• All e-books and audiobooks on The New Life Mission website are free
  • Explore multilingual sermons in global languages
  • Two new revised editions in English have been released
  • Check out our website translated into 27 languages
Search

Sermons

Liteya lia 1: Lisumu

[1-1] Esengeli Toyeba Liboso Pona Na Bolibisami Bwa Masumu Mabiso (Mark 7:8-9, 7:20-23)

Esengeli Toyeba Liboso Pona Na Bolibisami Bwa Masumu Mabiso( Mark 7:8-9 )
“‘Bosundoli mosika na ngambo mobeko mwa Nzambe, bokangami na bokoko bwa bato—bozali kosokola bakopo na bazungu, pe bozali kosala makambo mosusu ya bokoko.’ Nasima, bozali koloba ète, ‘Bino banso pe malamu bobwaka mokano mwa Nzambe, pe bokoki kosimba bokoko bwa bino.’”
 
( Mark 7:20-23 )
“Pe Alobi ète, ‘Oyo ewutaka na motò, nde yango ebebisaka ye. Pwete wuta katikati, wuta kati ya motema na batò, makinisi ya mabe ewutaka, kidumba, boluki basi na mibali ya batò, koboma, moyibi, kolula, motema mabe, kokosa, koluka oyo yayo té, liso mabe, kokosela bato likambo, lolendo, buzoba. Makambo maye manso ya mabe ewutaka na kati ya motema mwa motò.’”
 

Nayambo, nalingi ko limbolela bino lisusu ezali nini. Ezali na lisumu ndenge Nzambe Ye moko Alimboli yango, pena lisumu ndenge motò pe alimboli yango. Eloko oyo lisumu, ‘hamartia’ na monoko ya Ki-Greki ya kala, elingi koloba ‘kosanga moboku.’ Namaloba mosusu, ezali kosala likambo lia mabe. Ezali koboya kotosa mibeko mia Nzambe. Tika ète to tala elobeli ya motò likolo ya lisumu.

Lisumu ezali nini?
Ezali kozanga kotosa mibeko mia Nzambe.
 
Tososolaka lisumu nakati ya mitema mia biso. Ezalaka kolendisama na bokoko, na bisika tokolaka na biango, na batò tokola na bango, na mayele pena makambo tokutani na yango nzela-nzela na bomoyi bwa biso.
Nayango, ndenge ya kotala lisumu ekeseni na motò na motò. Ezaleli moko na moko wana ekoki kozala lisumu pona batò mosusu kasi pona ba mosusu ezali ndenge ya kofanda elongo ya mikolo na mokolo ya batò na batò. Ezali pona yango, Nzambe apesaki biso mibeko 613 ya Mokano mwa Ye pona kosalela yango lokola nzela ya boyengebene liboso ya masumu.
Emonisi oyo ezali nasè, ezali kotalisa masumu nakati ya bomoyi bwa batò.

Mobeko 
Mwa Nzambe
Motema mwa motò, mabanzo maye 
na bisika afandaka
Mibeko mia mboka naya 
bofandi elongo
 
Totika kolobela lisusu na nzela ya bokoko bwa biso, bofandi elongo bwa biso pena ndenge ya kotala lisumu na mitema miabiso.
Masumu na lolenge ya makanisi ma mitema mia biso mazali té ndenge moko na lolenge Nzambe azali komonela yango. Ponayango, esengele totika koyokaka mitema mia biso, kasi tolanda nzela oyo Nzambe Ye moko Apesi biso na kati ya mibeko mia Ye.
Moko na moko tozali na likanisi songolo likolo na masumu. Basusu bamonaka yango lokola nzela ya mukuse ya kosala makambo, basusu bazalmi komona yango lokola kobebisa lolenge ya bofandi elongo.
Tozuwa ndakisa, na Koré, batò basipaka nkunda ya baboti ba bano na matititi pe babatelalaka yango tii mokola ya liwa lia bango. Kasi na libota lia Ba-Papua “Guiné ya Sika, batombolaka baboti na bango na kosala féti na musunyi ya moweyi na bango elongo na bandeko ya libota. (Nayebi té soki balambaka yango liboso ya kolia yango.) Nakanisi ète baboyi nzoto ya baboti bakufa eliama naba myama ya mabele. Biloko yaboye ezali kotalisa ète bofandi elongo ya batò ekeseni na lolenge lia kotalela ekoloko oyo ebengami lisumu.
Eloko oyo batò mosusu bakomona mabe ezali malamu pona batò mosusu. Kasi Biblia nde ekoki koyebisa biso ète, koboya kotosa mibeko mia Nzambe ezali lisumu. “‘Pwete bosundoli mibeko mia Nzambe, bozali kokoba na mibeko mia batò—kosokola bakantini na ba kopo, pena biloko mosusu lokola yango, ‘Oyo nyonso pona kobwakisa mobeko mwa Nzambe, bona kokoba na bokoko’” (Mark 7:8-9). Libanda na nzoto na biso ezali eloko té, Nzambe atalaka nde mitema miabiso.
 

Boteli Likambo Na Lolenge Na Yomoko Ezali Lisumu Liboso na Nzambe 

Lisimu monene ezali nini?
Ezali koboya kotosa Liloba lia Nzambe.
 
Kozango kolanda mobeko mwa Ye, ezali lisumu liboso na Nzambe. Ezali lokola kozanga kondima Liloba lia Ye. Nzambe alobaki ète ezalaki lisuu kobika bomoyi lokola Ba-Farizé, baoyo bazali to sumdola mibeko mia Nzambe pe bazali opesa motuya mingi na kotangisa bokoko na bango moko. Yesu azalaki tomona bango lokola bato ba bilongi mibale.
“Bondimeli Nzambe ya ndenge nini? Bozali solo-solo kotosa Ngai na kopesa Ngai esika oyo esengeli na Ngai? Bozali kotatola nkombo na Ngai na minoko mia bino kasi bozali kopesa Ngai lokumu oyo esengenli na Ngai te.” Batò balingi kopesa libanda kitoko kazi na mitema mia bango bazali kotoza Liboba lia Ye té. Lisumu linene lizali oyo ya koboya kotosa Liloba lia Ye. Ososoli eloko oyo?
Kozanga kosala mobeko mwa Ye pona na kozanga makazi ma nzoto ezali masumu ya moke. Masumu tosalaka pena na mabe tosalaka pona na bopete ya nzoto nabiso ezali masumu ya monene té, kasi ezali bambeba kaka. Nzambe Azali kokabola bambemba na masumu. Baye baboyi kotosa Liloba lia Ye bazali basumuki, ata bazazangi kosala mbemba. Bazali masumuki ya minene liboso na Nzambe. Ezali pona nayango Yesu alobelaki Ba-farizé polele-polele.
Nakati ya Mikanda Mitano ya yambo ya Biblia, Banda Ebandeli tii na Deteronomé, ezala na mibeko oyo ezali kotalisa biso oyo esengeli biso kosala na oyo esengeli té biso kosala. Ezali Liloba lia Nzambe, mibeko mia Ye. Tokokoka kosalelela yango nyonso té, kasi esengeli to yeba yango lokola mibeko mia Ye.
Apesaki biso yango banda ebandeli pe esengeli kondima yango lokola Liloba lia Nzambe.
“Na ebandeli ezalaki Liloba, pe Lilobala lizalaki na Nzambe, pe Liloba lizalaki Nzambe.” (Yoane 1:1). Nasima, Alobaki, “Tika ète mwinda ezala, pe mwinda eyaki.” (Genesis 1:3). Asalaki biloko binso. Nasima ya makambo manso, Atiyaki Mobeko mwa Ye.
“Pe Liloba likoma nzoto pe lifandaki katikati na biso, pa Azali Liloba” (Yoane 1:1, 14). Ndenge nini sikoyo, Nzambe azali komimonisa na biso? Amimonisi na nzela ya mibeko mia Ye pwète Nzambe Azali Liloba pe Molimo.  Sikoyo, Biblia ezali nini? Ezali Liloba lia Nzambe.
Ekomami na kati, “Botiye épayi mobeko mwa Nzambe, pona na kokoba na boboko bwa bato.” Ezali na mibeko 613 kati na Mokano mwa Ye. Sala boye kasi kosala té boye, pesa baboti bayo lokumu... Na mokanda mwa Lévitiké, ekomami ndenge nini mibali na basi esengeli ba bikaka na ndenge nini esengeli basalaka tango nyama akweyi na libulu.... Ezali na mibeko 613 lokola banzela yakolanda na Mokano mwa Ye.
Lokola ezali té maloba ma batò, esengeli to kanisaka yango tango na tango. Ata tozali na makasi té ya kobatela yango nyonso kasi esengeli to yeba yango pe to sala makasi pona na kotosa Nzambe.
Ezali na eteni ata moko na kati na Liloba na Nzambe oyo ezali té yabosolo? Ba-Farizé babwakaki mibeko mia Nzambe epayi pe babatelaki boboko bwa batò likolo na mibeko mia Ye. Maloba ya bakoko na bango ekomi na motuya koleka maloba ma Nzambe. Tango Yesu azalaki na nsè, nde oyo Atatolaki, pe ezalaki kosala Ye pasi mingi komona batò babwaki épayi Libola lia Nzambe mobikisi na ngambo pe bazangi koyeya yango.
Nzambe apesaki mibeko 613 ya Mokano mwa Ye pwète toyebaka ète tozali basumuki na kososola ète Ye azali Bosolo, Ye azali Mosanto Nzambe nabiso.
Lokola tozali biso banso basumuki liboso na Ye, esengelei tobika bomoyi bwa kondima na kati na Yesu, oyo atindela biso uta épayi na Nzambe pona bolingo bwa Ye pona lobiko liabiso.
Batò baye babwakaki epayi Liloba lia Ye pe bazangi kondimela liango té, bazali basumuki. Baye banso bazangi kobatela Liloba lia Ye bazali pe basumuki, kasi kosumdola Liloba lia Ye eleki ndelo pe ezali lisumu monene. Baye bazali kosala makambo ya ndenge oyo bakosuka na lifelo. Ekozala te pona kozanga kondima Liloba lia Ye pe ezali mabe mingi liboso na Ye.


Bona Nini Nzambe Apesaki Biso Mobeko


Bona Nini Nzambe Apesaki Biso Mobelo?
Pona kotaliza biso ète tozali basumuki pena etumbu na yango ezali kozela biso
 
Pona nini Nzambe apesaki biso Mobeko? Pona koyebisa biso ète tozali basumuki pe kosongela Ye. Apesaki biso mibeko 613 ya Mokano mwa Ye pwète to sosola masumu mabiso pe tozuwa bosomi na nzela na Yesu Kristo. Ezali pona yango Nzambe apesaki biso Mobeko.
Ba-Romén 3:20 ezali koloba ète, “Na nzela ya mobeko, toyebaki lisumu.” Nayango, toyebi ète Nzambe apesaki biso Mobeko pona na kotindika biso kobika na yango té.
Bongo, eloko nini ezali na sima ya boyebi bwa Mobeko? Ezali ète tozali na makasi té ya kotosa Mobeko ma mobimba na yango nyonso pe tozali masumuki binene liboso na Ye. Nini tokoki komona na kati ya mibeko 613 ya Mokano mwa Ye? Tososoli bomotò na ndelo na biso na lolembo bwa biso pona na kokisa botosi bwa Mobeko mwa Ye. Toyebi ète biso, bikelamu bia Nzambe, tozali bikelamu bia bolembu mingi, pe tozali basumuki ya minene liboso na Ye. Tokosuka na lifelo kolandisama na Mobeko mwa Ye.
Tango to sosoli masumu ma biso na bozangi makasi makobika na nzela ya Mobeko mwa Ye, esengeli tosala eloko nini? Tozali kosala makasi tokoma bikelamu bia malamu? Té. Esengeli to ndima ète tozali basumuki, tondimela Yesu, tozua bosomi na lobiko lia Ye na mayi pena Molimo pe to tonda Ye matondi pona yango.
Apesaki biso Mobeko mwa Ye pona kotalisa biso ète tozali basumuki pe etumbu na Ye ezali kozela biso pona na masumu mana. Nayango, tososoli ète nzela ezali té oyo tokoki kobikisama na lifelo libanda na Yesu. Soki tondimeli Yesu lokola Nkolo na biso, tokozuwa bosomi. Akopesa biso Mobeko ekokumba biso liboso epayi na Ye, Mobikisi mwabiso.
Nzambe asalaki Mobeko pwète tososola ète tozali basumuki ya minene pona na kopesa biso nzela ya bosomi bwa milimo mia biso likolo na masumu ma biso. Apesaki biso Mobeko pe Atindaki mwana mwa Ye moko, Yesu pona kobikisa biso na kolongola masumu mabiso manso na nzela na libatisi lia Ye. Kondimela Ye ekoki kobikisa biso solo-solo.
Tozali basumuki baye bazangi elikia pe esengeli tondimela Yesu pona kokangolama na boloko bwa masumu, tokoma bana ba Ye pe kembo nyonso ezongela Nzambe Tata.
Esengeli toyeba yango, tokanisa pe to sosola libambo oyo na nzela ya Liloba lia Ye pwète makambo manso mawuti epayi na Ye. Esengeli lisusu tososola bosolo bwa bosomi bwa biso na nzela ya Liloba lia Ye. Oyo nde kondima pe ya boyengebene ya solo.
 

Eloko Nini ezali Na Kati Ya Motema Ya Moto?

Eloko nini tokoki kosala liboso na Nzambe?
Esengeli tondima masumu mabiso pe tosenga Nzambe Abikasa biso.

Kondima esengeli ebanda na Liloba lia Nzambe pe esengeli tondimela Ye na nzela ya Liloba lia Ye. Pamba té, tokokweya na libunga. Oyo ekozali kondima ya mabe pe ya lokuta.
Tango oyo Ba-Falizé na bakomi mikanda bamonaki bayekoli ba Yesu kolia mapa na maboko ma salité, bakokaki kokufunda bango soki batalaki té likambo wana na lolenge na Liloba na Nzambe. Liloba ezali koyebisa biso ète oyo ezali kokota na monoko na biso ekoki kobebisa biso té pwète ekokende na libumu pe ekobima libanda lia nzoto, eko bebisa motema té.
Lobola elobami na Mark 7:20- 23, “Pe Alobi ète, ‘Oyo ewutaka na moto, nde yango ebebisaka ye. Pwete wuta katikati, wuta na kati ya motema na batò, makinisi ya mabe ewutaka, kidumba, boluki basi na mibali ya batò, koboma, moyibi, kolula, motema mabe, kokosa, koluka oyo yayo té, liso mabe, kokosela batò likambo, lolendo, buzoba. Makambo maye manso ya mabe ewutaka na kati ya motema ya motò.’” Yesu alobaki ète batò oyo bazali basumuki pwète babotami na lisumu.
Ososoli oyo elobi? Tobotami lokola basumuki pwète biso banso bana na Adam. Kasi tokoki komona té bosolo pwète toboyi kondimela na kati na Liloba lia Nzambe. Sikoyo, eloko nini ezali nakati ya motema ya motema?
Eteni ya liloba oyo ezali likolo elobi ète, “Pwete wuta katikati, wuta na kati ya motema na batò, makinisi ya mabe ewutaka, kidumba, boluki basi na mibali ya batò, koboma, moyibi, kolula, motema mabe, kokosa, koluka oyo yayo té, liso mabe, kokosela bato likambo, lolendo, buzoba.” Mabe manso mautaka na mitema mia batò.
Mokanda ya Banzembo pe elobi boye, “Tango na talaka Lola na Yo, mosala mwa misapi mia Yo, sanza na mizonto, oyo opesaki mitindo, Motò azali nani pwète Okanisaka ye, pe mwana ya moto azali nani pwète Oyaka kotala ye?” (Banzembo 8:3-4)
Pona nini Nzambe Ye moko ayaka kotala biso? Ayaka kotala biso pwète Alingakaka biso, Akelaki biso, pe Ayokaka mawa pona biso basumuki. Alongolaki biso na bomoyi bwa masumu pe Asalaki biso batò na Ye. “O Nkolo, Nkolo na biso, nkombo na Yo ezali malamu koleka bankombo mosusu nakati ya mokili mobimba, pena kati ya Lola!” (Banzembo 8:1) Mokonzi David ayembaki nzembo oyo nakati ya Boyokani bwa Kala tango asosolaki ète Nzambe alingaki ko bikisa basumuki.
Na Boyakani bwa Sika, Ntoma Polo azongelaki nzembo moko-moko wana. Ezali eloko moko ya kokamwa ète biso, bikelamu bia Nzambe, tokoki kozala bana ba Mokeli. Yango epesami kaka na nzela ya mawa ma Ye pona biso. Oyo nde bolingo bwa Nzambe.
Esengeli toyeba ète kobika na bosaleli bwa Mobeko mwa Nzambe ezali eloko moko ya pasi pe ya makasi mingi. Ezali pe nzela ya lolendo oyo ezali kowuta na matoyi mangongi na bozangi koyeba. Ezali pasi pe makasi mingi kobika libanda na bolingo bwa Ye na kobunda butu na moyi na botosi bwa Mobeko yo motò moko akiki té kolonga na nzela na yango. Ezali posa ya motema mwa Nzambe ète tozala basumuki na sè ya Bobeko pe tondima bosomi ya mayi pena makila ma Yesu, na sima na yango. 
Liloba lia Ye ekomami na Marko 7:20-23, “Oyo ewutaka nakati ya motò, nde yango ebebisaka ye. Pwète wuta katikati, wuta na kati ya motema na batò, makinisi ya mabe ewutaka, kidumba, boluki basi na mibali ya batò, koboma, moyibi, kolula, motema mabe, kokosa, koluka oyo yayo té, liso mabe, kokosela batò likambo, lolendo, buzoba. Makambo maye manso ya mabe eutaka na kati yamotema ya motò.’”
Yesu alobaki ète oyo ewutaka na kati ya motò, ezali masumu ya kati, yango nde ezali kobebisa yo. Ata bileyi ya mabe oyo ezali na mokili oyo Nzambe akelaki, ekoki bobebisa biso té. Biloko oyo Nzambe asalaki bizali malamu, kasi kaka biloko oyo ewutaka na kati ya motò, yango nde masumu, oyo ezali kobundisa biso. Tozali biso banso bana ba Adam. Ponayango, tobotami na nini? Tobotami na mintindo mia masumu zomi na mibale. Boye té?
Sikoyo, tokoki kobika bomoyi ezanga masumu? Tokokoba kosumuka pwète tobotamaki na lisumu. Tokoki kotika kosumuka pwète toyebi Mobeko? Tokoki kobika na mibeko? Ata moke té.
Tango tozali kokoba na makasi kobika na Mobeko, makambo pe mazali kokomela biso makasi mingi koleka. Esengeli tososola bandelo babiso pe totika nzela wana oyo yakala. Nasima na yango, nakomikitisa, tokoki kondimela libatisi na makila ma Yesu, oyo ezali nzela ya solo ya biso.
Mibeko nyonso 613 oyo ya Mokano mwa Nzambe mizali malamu pe mizali ya boyengebene. Kasi batò bazali basumuki tango na tango wuta libumu lia bamama nabango. Tango tososoli ète Mobeko mwa Nzambe mozali na boyengebene, kasi biso tobotami lokola basumuki baye bakoki té kokoma bayengebene na makasi mabiso moko, tososoli ète tozali na posa na mawa ma Nzambe pena bosomi bwa Yesu nakati ya sango-malamu ya mayi, makila na Molimo. Tango oyo tososoli ndelo na biso—ète tokoki té kokoma sembo na makasi ma biso moko pe tokokende na lifelo pona masumu mabiso—tokoki té, kasi malamu tondima bosomi bwa Yesu.
Tokoki kobikisama. Esengele toyeba ète tozali na makasi té ya kozala peto tope malamu liboso na Nzambe na makasi mabiso moko. Boye, esengeli tondima liboso na Nzambe ète tozali basumuki baye bazali kokende na lifelo pe esengeli to senga nde mawa ma Ye, “Nzambe, nabeleli Yo bikisa ngai na masumu mangai pe yokela nga mawa.” Pe, Nzambe Akoyoka biso solo-solo nakati kolandisama na Liloba lia Ye. Na nzela wana, tokoki kobikisama.
Totala sik’oyo libondeli lia David. “Pwète Ozala sembo tango Okoloba, pe nalisumu ata moko té tango Okokata etumbu” (Banzembo 51:4).
David ayebayi ète azalaki liboke lia lisumu oyo ekokaki pona kobwakisama na lifelo, kasi andimaki liboso na Nzambe ète, “Nkolo, soki Obengi ngai mosumuki, nazali mosumuki. Soki Obengi ngai moyengebene, nazali moyengebene. Soki Obikisi ngai, nakobikisama; pe soki Otindi ngai na lifelo eko zala bongo.”
Oyo ezali kondima ya solo pe nzela ya lobiko. Ezali ndenge oyo esengeli tozala na elikia ya kondima bosomi bwa Yesu.
 
 

Esengeli Toyeba solo-solo Masumu Mabiso Bazali Nini


Lokola tozali batò, tozali biso banso naba posa ya mabe nakati ya mitema mia biso. Sik’oyo, eloko nini oyo Nzambe azali koyebisa biso ète tosala ekobo té atako tozali na mbuma wana ka kindumba nakati nabiso. Tozali na bobomi nakati ya mitema mia biso, kasi Nzame azali koyebisa biso nini? Azali koyebisa biso, toboma té. Biso banso tozali kozanga botosi bwa bapoti na mitema mia biso, kasi Azali koyebisa biso, topesa bango lokumu. Bongo, tozali komona solo-solo ète Libola lia Nzambe lizali sembo pe malamu, kasi tozali banso na masumu na mitema mia biso.
Ezali ya solo tope ya solo té? Ezali ya solo pe malamu koleka Ezali nde boye, esengeli tozala liboso na Nzambe? Esengeli tondima ète tozali maboke ma masumu pe basumuki baye bazangi elikia. Ezali malamu té kokanisa ète lobi oyo eleki tosumukaki té, pe tozalaki sembo lobi, lelo lokola tosumuki tozali basumuki kaka mokolo mwa lelo. Tobotama basumuki. Eloko nyonso tokosala ezali kaka masumu. Ezali pona yango ète esengeli to zuwa bosomi na nzela ya kondima libatisi lia Yesu.
Tozali basumuki pona na misala mia biso té: lokola kosala ekobo, koboma, koyiba, kolula mwasi tope mobali ya motò mosususu… Kasi, tozali masumuki pwète tobotama lokola basumuki. Tobotama na mitindo zomi na mibale ya masumu pe lokola tobotama basumuki na miso mia Nzambe, tokoki ata moke té kokoma malamu na makasi mabiso moko. Tokoki kaka kokanisa ète tozali malamu.
Tobotama na makanisa mabe, sikoyo, lolenge nini tokoki kozala bayengebene ata tozali kosala masumu mana té? Tokoki ata moke té kozala sembo liboso na Nzambe na makasi ma biso moko. Soki tozali kobeta tolo nakoloba ète tozali sembo, ezali bokono bwa bilongi mibale. Yesu abengaki Ba-Falizé na elongo na bakomi-mikanda, ‘batò ba bilongi bibale bino Ba-Falizé na bakomi-mikanda.’ Batò babotami lokola basumuki pe bazali kosumuka mikolo nyonso liboso na Nzambe nakati ya bomoyi bwa bango mobimba.
Oyo nyonso akoki koloba ète nano abunda, tope apeta motò té, tope ayiba ata tonga ya motò mosusu té na bomoyi bwa ye mobimba azali kokosa pwète tobotami basumuki. Motò ya lolenge wana azali motò ya lukuta, mosumuki pe motò ya bilongi bibale. Ezali bongo Nzambe atalaka ye.
Motò nyonso azali mosumuki wuta botama naye. Ata ozali kosumuka ata moke té, okosuka kaka na lifelo. Ata kobatelaki Mobeko na biteni bia mobeko binso, ozali kaka musumuki pe suka nayo ezali lifelo.
Nayango, tokoki kosala nini na suka ya ndenge wana? Esengeli to senga mawa ma Nzambe pe no tiya elikia na Ye pona kobikisama na masumu mabiso. Soki abikisi biso té, tokokende na lifelo. Wana nde suka na biso banso.
Kaka baye bandimeli Liloba lia Nzambe pe batatoli ète bazalaki basumuki solo-solo. Baye pe bayebi ète bakomi sembo na nzela ya kondima. Bongo, beyebi ète kotika epayi pe kosundula Liloba lia Ye na kozanga to ndimela liango ezali lisumu monene koleka masumu manso. Baye bandemeli Liloba lia Ye bazali sembo, ata bazalaki basumuki kala. Babotamaki mbala ya mibale na Liloba lia Ye nakati ya ngolu na Ye pe bapambwami mingi koleka.
 

Baye Bazali Komeka Kobikisama Na Misala Mia Bango Moko Bazali Kaka Basumuki

Banani bazali kaka basumumuki ata na sima ya kondimela Yesu?
Baye bazali komeka kozuwa bosomi na nzela ya misala mia bango moko.

Totanga nanu Ba-Galaté 3:10-11. “Pwète mingi ya baye bazali na misala mia Mobeko bazali nasè na elakeli mabe; pwète ekomami: ‘Alakelama mabe oyo nyonso azali kokoba té nakati na makambo manso maye makomami na Mokanda mwa Mobeko, pona kosala yango.’ Kasi motò moko té azuwi bosembo na Mobeko liboso na Nzambe, yango ezali solo, pwète  ‘Moyengebene ako bika na kondima naye.’”
Elobami ète, “Oyo nyonse akokoba té nakati na makambo manso maye makomami na Mokanda mwa Mobeko, alakelama mabe.” Baye bazali kokanisa ète bandimeli Yesu, pe bazali kokoba na komipesa bosembo na misala mia bango bazali ya kolakelama mabe. Baye bazali komeka komikomisa sembo na misala mia bango bazali wapi? Bazali nasè ya bilakelami mabe bia Nzambe.
Pona nini Nzambe apesaki biso Mobeko? Apesaki biso Mobeko, pwète to sosola masumu mabiso (Ba-Romén 3:20). Alingaki lisusu toyeba ète tozali basumuki ya minenee baye lifelo azali kozela.
Ndimela libatisi lia Yesu, Mwana na Nzambe, botama mbala ya mibale na mayi pena Molimo. Nayango, okozuwa bosomi likolo na masumu mayo, okokoma sembo, okozuwa bomoyi bwa seko na seko pe okokota Lola. Zala na kondima na motema mwayo.
 

Lisumu Lia Linene Na Mokili

Lisumu lia linene na mokili lizali nini?
Ezali komeka kobika na Mobeko
 
Topambolami na kondimela mapamboli ma Ye. Nzambe abikisi baye ba tiyi kondima nakati na Liloba lia Ye.
Kazi lelo oyo, kati-kati na bandimi, tozali na Ba-Kristo mingi baye bazali komeka kobika na Mobeko mwa Ye. Ezali eloko mabe epayi na bango yakomeka kobika na Mobeko, kasi ekoki kosalema ndenge nini?
Esengele to sosola ète ezali liboma komeka kobika na Mobeko mwa Ye. Mingi tozali komeka, ezali kokoma makasi koleka pona biso. Alobi ète, “Nkondima eyaka na koyoka, pe koyoka ewutaka na Liloba lia Nzambe.” Esengeli tobwaka mosika na biso lolendo na biso po tobikisama.
 
 

Tosundoli Lolenge Na biso Pona Kobikisama


Tosala nini po tobikisama?
Esengeli to tika lolenge na biso ya komenela makambo.

Ndenge nini motò akoki kobikisama? Nzela ekopesemela kaka soki asosoli ète azali mosumuki. Ebele na bató nano babikisami té pwète nano batiki kotia elikia nakondima na bango ya lukuta pena makasi na bango moko.
Nzambe alobi ète baye bakangami na Mobeko bazali nasè na bilakeli mabe. Baye bandimi ète bakoki moke-moke kokoma sembo nakomeka kobika bomoyi ya botosi bwa Mobeko na sima ya kondimela Yesu, bazali nasè na bilakeli mabe. Bandimeli Nzambe, kazi bazali kaka kokoba na kokanisa ète esengeli bakika kolandisama na Mobeko po babikisama.
Balingami, tokoki kokoma sembo na misala mia biso? Tokokoma sembo kaka na kondima Liloba lia Yesu; pena nasima na yango tokozuwa bosomi. Kaka na kondimela libatisi lia Yesu, mayi ma Ye, pe Bonzambe bwa Ye, nde tokozuwa bosomi bwa solo.
Nzambe abongisaki Mobeko pona biso lokola nzela ya kokomisa biso na bosembo. Bosomi bwa mayi na Molimo bozali kofanda té likolo na misala mia batò, kasi na kondima ya Liloba lia Nzambe. Nzambe akangolaki biso na nzela ya kondima pe ezali lolenge wana Nzambe abongisaki pe Akokisaki lobiko lia biso.
Pona nini baye bandimaki Yesu bazuwaki bosomi té? Ezali pwète bandimaki té liloba lia bosomi bwa mayi na Molomo. Kasi biso, baye bazali batò mabe lokolo tozali, tosuwi bosomi na nzela ya kondima na biso kati na Liloba lia Nzambe.
Soki batò babale bazali kosala mosala na libanga ya kotuta masangu, ète moko atikali na sima ya mosusus konyetolama; oyo atikali wana na sima akoba kosala mosala, ata oyo mosusu anyetolami. Oyo atikali na sima azali elili ya oyo nano abikisami té. Pona nini moko anyetolami, mosusu atikali na sima?
Eyano ezali ète moko ayokaki, pe andimaki Liloba lia Nzambe, kazi mosusu wana azalaki mosala makasi pona kobatela Mobeko pe abwakisami, nakanisa bongo, na kati na lifelo. Motò wana azalaki komeka kojembela Nzambe, kasi Nzambe a betake ye lokolo, tango azalaki kojembela na lokolo lia Ye. Soki motò ameki kojembela Nzambe nabotosi bwa Mobeko, akobwakama solo-solo na lifelo.
Ezali pona yango esengeli tozuwa bosomi na nzela ya kondima kati na mayi pena Molimo.
“Baye banso bazali na misala mia Mobeko bazali nasè ya bilakeli mabe; pwète ekomami ète, ‘Alakelama mabe oyo nyonso akokisa té makambo manso makomami na mokanda mwa mobeko, pona kosalela yango nyonso,’” “Kasi motò ata moko té akokomisama sembo na mobeko na miso na Nzambe ata moke, pwète moyengebene ako bika na kondima’” (Ba-Galaté 3:10-11, Ba-Romén 1:17).
Kozanga kondima Liloba lia Nzambe ezali lisumu liboso na Ye. Pelikolo nayango, ezali lisumu monene kotika Liloba lia Nzambe epayi kolandisama na emoneli ya makambo ya motò moko na moko. Biso batò tokoki kobika na Mobeko mwa Ye té pwète tobotami biso banso lokola basumuki pe tozali kokoba kosumuka bomoyi na biso mobimba. Tozali kosumuka moke awa, moke lisusu kuna, pena bisika binso tozali kokende. Esengeli tososola ète tozali na nzoto pe tokoki komisunga biso moko liboso na lisumu ata moke té.
Motò azali lokola kitunga na biloko ya salité. Soki tomeki komema yango mosika, ezali kokweya-kweya nzela-nzela. Tozali ndenge wana. Tozali kokoba na kosopa bosoto bisika binso tozali kokende. Okoki kotala foto na yango?
Olingi kaka kokoba koloba ète ozalaki mosantu? Soki okokaki komisolosola malamu, okokaki, yo moko, kotika nzela wana ya komikomisa mosantu pamba-pamba pena kondimela liteya lia mayi na malika ma Yesu.
Baye nano babotami mbala ya mibale té, esengeli babwaka mosika nabango motema makasi wana pe bandima ète bazali masumuki liboso na Nzambe. Nasima nayango, esengeli ba zonga na Liloba lia Ye pona na kososola ndenge nini Abikisaki bango na mayi pena Molimo.