(Mark 7:20-23)“Pe Alobi ète, ‘Oyo ewutaka na motò, nde yango ebebisaka ye. Pwete wuta katikati, wuta na kati ya motema na batò, makinisi ya mabe ewutaka, kidumba, boluki basi na mibali ya batò, koboma, moyibi, kolula, motema mabe, kokosa, koluka oyo yayo té, liso mabe, kokosela batò likambo, lolendo, buzoba. Makambo maye manso ya mabe eutaka na kati yamotema ya motò.’”
Batò Bazali Nakati Ya Buntu-Buntu Pe Bazali Kobika Nasè Ya Mubulo Na Bango
Nani asengeli abikisama mingi-mingi?
Oyo akanisi ète azali mosumuki ya mabe makasi
Nayambo na nyonso, nalingi kotuna yo motuna moko. Lolenge kani ozali komimona? Ozali kokanisa ozali malamu tope ozali mabe? Ozali kokanisa ndenge nini?
Batò banso bazali kobika na kati na libungi makanisi na bango moko. Ozali té mabe na lolenge okanisaka tope maluma na ndenge oyo okanisa.
Nani, sikoyo, akoki kobika bomoyi bwa malamu nakati ya kondima? Ekozali oyo azali komimona moto malamu liboso na miso naye moko? Tope oyo azali kokanisa liboso na miso yaye moko ète azali motò mabe?
Ezali oyo yasuka. Tika ète natuna yo motuna mosusu. Nani akoki kobikisama mingi-mingi—motò oyo asalaki masumu mingi tope motò oyo asalaki kaka masumu moke? Motò oyo azalaki masumu eleki ndelo nde motò oyo azali na bosenga bwa bosomi pwète motò wana andimi ète azali motò ya masumu mingi. Motò ya ndenge wana akoki kondima Liloba lia bosomi oyo ebongizamaki pona ye na Yesu.
Tango tomitali solo-solo, ezali solo ète tozali maboke ma mabe mazanga tina. Batò bazali nini? Motò azali kaka ‘buma ya bozali mabe.’ Na Ezayi 59, ekomami ète mitema mia batò mitondi na mabe mingi. Nayango, ezali polele ète batò bazali maboke ma masumu. Nagambo mosusu, soki tozali kolimbola motò lokola liboke lia masumu, mingi bakoboya yango. Kasi, kolimbola motò loko ‘buma ya mabe nyonso’ ezali bolimboli ya solo-solo. Soki tomitali nabosolo banso, ezali polele ète tozali batò ya mabe mingi. Baye bazali sembo na bango moko bakokoma na suka na bososoli wana.
Kasi, ezali lokola batò mini baboyi kondima ète mazali maboke ma lisumu. Mingi bazali kobika nakati ya bomoyi kitoko pe ya mbongo pwète nano bamisosoli té kozala basumuki. Tango tozali batò ya mabe, tokoki bongo kofanda elongo ya masumu. Soki ezalaki solo té, tokokaki kozala na soni ya kosumuka. Naboye, mingi katikati na biso bazali na soni té tango bazali kosumuka.
Ata ndene wana, mitema mia bango miyebi ète mizali kosala mabe. Motò moko-moko azali na mongongo moko kati na motema naye oyo eyebisaka ye ète “esali masumu.” Adam na Eva bakendaki kobatama katikati yabazente nasima ya kosumuka. Lelo basumuki mingi bazali kobatama na zima ya bofandi elongo ya mabe—bofandi elongo bwa batò bosali bofandi bwa lisumu. Bazali komibatama katikati na bandeko na bango basumuki pona na kokima etumbu yakoya na Nzambe.
Batò bazali komikosa bango moko na makanisa ya mokuse na bango moko. Bazali kokanisa ète bazali mayele koleka bamosusu. Sik’oyo, tango bakoyokaka sano yamabe, bazali koganga na kanda ebele ète, “Ndenge nini motò akoki kozala makambo ma boye? Ndenge nini mwana akoki kozala baboti baye moko boye?” Bazali kokanisa ète bango bakokaki kosala makambo manso wane té.
Bandeko balingami, ezali pasi mingi komiyeba. Pona komiyeba solo-solo, tosengeli yambo tozuwa bolimbisi bwa masumu mabiso. Ezuwaka tango molayi pona kozuwa boyebi bwa solo-solo bwa bozaleli bwa biso batò, pe mingi katikati na biso bakoki té kokoma na bososoli wana tii mokolo bakokufa.
Komiyeba Yomoko
Ndenge nini baye bamiyebi té babikaka bomoyi bwa bango?
Babikaka bomoyi bwa bango na bilongi bibale pena kobomba masumu mabango.
Tango mosusu tokutanaka na batò oyo bamiyebi malamu té. Sokraté alobaki ète, “Omiyebi yomoko.” Mingi kati-kati na biso bayebi té nini ezali na kati ya minetema miabiso: koboma, koyiba, kolula, motema mabe, kokosa, mayele molayi ya mabe, liso ya mabe....
Motò oyo amiyebi té azali na somu ya nyoka na bebo naye tango azali koloba pona bolamu. Moboku mwa likango ya ndenge wana ezali ète motò wana ayebi té ète abotami lokola mosumuki mwa monene.
Batò ebele na kati ya mokili oyo bayebi té lolenge ya bomotò bwa bango. Bazali komikosa pe bazali kokoba kobika bomoyi nakati ya lukuta. Bazangi koyeba ète bazali komibwaka bango moko nakati ya lifelo likolo na lukuta wana.
Batò Bazali Kusumuka Bomoyi Na Bango Mobimba
Pona batò nini bazali kokende lifelo?
Pwète bamiyebi malamu té.
Totala na Mark 7:21-23. “Pwete wuta katikati, wuta na kati ya motema na batò, makinisi ya mabe ewutaka, kidumba, boluki basi na mibali ya batò, koboma, moyibi, kolula, motema mabe, kokosa, koluka oyo yayo té, liso mabe, kokosela batò likambo, lolendo, buzoba. Makambo maye manso ya mabe ewutaka na kati ya motema ya motò.’” Mitema mia batò mitondi na makanisi ma mabe banda mokolo oyo zemi na bango ekotaki.
Tika ète tokanisa motema mwa motò oyo esalami na kilawuli oyo ezali na mbebo ya mabe pe itondisami na mayi ma salité, oyo ebengami, masumu mabiso. Nini ekosalema soki motò aningisi yango? Mayi oyo ya salité (lisumu) ekosopana bisika binso. Tango motò atambolaka, masumu maye mazali kosopama bisika binso.
Biso, baye tozali lokola maboke ma lisumu, tozali kobika bomoyi bwa biso ndenge wana. Tozali kosopa masumu bisika binso tozali kokende. Tokosumuka nzela-nzela pwète tozali maboke ma lisumu.
Likambo lizali ète tozali kososola té, ète tozali maboke ma lisumu tope mbuma ya lisumu. Tozali maboke ma lisumu pe tozali na lisumu na kati ya mitema mia biso banda mokolo mwa botama na biso.
Maboke ma lisumu maye makomi pene na kosopama. Ngambo mosusu, batò bazali kondima té, ète bazali ndenge wana, yasolo, bomotò bwa biso bozali bomotò moko botonda na masumu. Mingi bazali kokanisa ète bat bomotò mosusu nde babendi bango na kati ya lisumu pe pona na yango, bazali té bakolo mabe ya masumu ma bango.
Ata na tango bazali kosala masumu, batò mingi bazali kokanisa ète nzela moko ya kobongisa likambo lina ezali oyo ya koboya bango. Bazali kokoba kolela ponabango tango na tango pona lisumu moko-moko oyo basali, bazali komiyebisa ète bazali bakolo babemba na bango moko té. Nyonso wana pwète tozali komibepola na ndenge ya biso moko, elingi koloba ète ekoki kolonga bongo yo moko? Esengeli tolelaka tango nyonso pona na mabe mana kaka?
Tango kilawuli etondi na lisumu, ekosopama suka-suka. Ezali na litoma moko té ya kolele pona libanda. Ata toleli ndenge nini libanda na misala mia biso mia malamu, ezali na litomba moko té, tango kaka kilawuli etondami na lisumu, suka-suka ekosopama kaka.
Tobotami na lisumu boye pona yango mitema mia biso mikozala polele té; ata tozali kokima masumu nzela-nzela.
Ponayango, tozali kosala masumu kati na bomoyi bwa biso mobimba.
Tango moto azangi kososola ète azali solo-solo liboke lia lisumu lia bamba, akokoba kobatamisa bomoyi bwa ye ma lisumu wana. Masumu mazali na kati ya mitema ya batò banso pe ezali kosila té na kolela na biso na kopangosa pinzoli. Tango tosopaka lisumu ya moke, tozali komiko ète lobi-lobi, tokosopa yango lisusu té. Topangosi lelo na elamba ya moke, lobi kuna na elamba ya monene, na suka tosaleli likuta.... Tozali komikosa biso moko ète kolela na biso likolo lia masumu mabiso, ekopetola biso, zonkande ezali komisa biso batò mabe koleka.
Ozali kokanisa ète ekosala tango boni? Ekokoba tii mokolo na liwa lia motò. Batò bazali kosumuka tii mokolo mwa liwa lia bango. Ezali ponayango, tosengeli konimela Yesu pwète tozuwa bosomi. Pona kozuwa epe bosomi, tosengeli komiyeba biso moko malamu.
Nani oyo akoki koyamba bolingo bwa Yesu?
Basumuki baye bandimi ète basalaki masumu ebele
Toloba ète ezali na batò babale baye bakoki kozala elili ya bilawuli bibale oyo etondi na mayi ma salité. Bango mibale batondi na lisumu. Moko amilobeli ète, “O, ngai oyo nazali motò ya masumu.” Nasima, atiki pe akeyi koluka motò mosusu oyo akoki kosunga ye.
Kasi oyo mosus azali kokanisa ète azali solo-solo mabe té. Azangi kotala liboke lia lisumu kati-kati naye pe azali kokanisa ète azali mosumuki té. Bomoyi bwaye mobimba, azali kaka kolele-lela. Aleli boye, pe aleli ndenge mosusu… Lelo aleli na ngambo boye, lobi kuna alileli na ngambo mosusu wana....
Ezali na batò ebele baye bazali kokengela bomoyi na bango mingi, bazali komeka kokima masumu na ndenge na ndenge pona kozanga kokweya. Kasi lokola bazali nano basumuki na kati ya mitema mia bango, eloko nini ya malamu ekozala? Kozala ekenge ekomema motò ata moko té pembeni na Nzambe. ‘Kozala ekenge’ azali kopesa nzela na lifelo na esika ya komema biso liboso na Nzambe.
Bandeko balingami, ‘kozala ekenge’ ememaka kaka na lifelo. Esengele tokanga liteya lina na kati ya motema. Tango batò bazali na bokebi, masumu na bango esopama mingi-mingi té, kasi bakotikala kaka basumuki.
Motema ya motò ezali nini? Lisumu? Bozoba? Boye! Makanisi mabe? Boye! Ezali na moyibi na kati? Boye! Lolendo? Boye!
Tokoki té komisunga kasi malamu tondima ète tozali maboke ma lisumu, mingi-mingi tango totali misala mia masumu mia biso moko, na mia motema mabe, na kozanga kozala malamu.
Ekoki kosalama té tango tozali nano bilenge. Kazi ezali ndenge nini, tango tokoli? Tango tokeyi na kelasi ya kati-kati, na kelasi ya likolo, pena kelasi ya likolo makasi, toye kososola ète oyo nyonso tozali na yango na kati ya mitema mia biso ezali kaka lisumu. Boye té? Solo-solo, tolobela yango, ekoki kosalema té, ète tobatama na lolenge na biso ya masumu. Ezali boye? Tokoki komikomisa sembo ata moke té, sukaka-suka, tokosumuka kaka. Nde tobandi ko lela-lela, “esengelaki té nasala boye.” Boye, tomoni ète tokoki kolonga biso moko masumu ata moke té. Pona nini boye? Pwète, moko na moko tozali maboke ma lisumu.
ToKomikomisa peto na kozala ekenge té. Oyo esengeli toyeba ète, tobotami lokola maboke ma lisumu pona bosomi bwa biso mobimba. Kaka basumuki baye bandimi bosomi oyo ebongisamaki na Yesu, bango nde bakoki kobikisama.
Baye bazali kokanisa ète, “nazalaki té masumu mingi, tope na sumukaki mingi té,” bango wana bandimi té, ète Yesu alongolaki masumu pe lifelo azali kozela bango.
Esengeli toyeba ète moko na moko kati-kati na biso azali na liboke liaye lia lisumu na kati-kati naye pwète tobotami biso banso na yango.
Soki motò moko akanisi ète, “nazalaki masumu mingi té be akoki kozuwa bosomi pona lisumu moke oyo,” akoki kobikisama na lisumu liaye oyo ya moke wana? Ekoki kosalama ata moke té.
Oyo akoki kozuwa bosomi azali oyo amiyebi liboke lia lisumu. Oyo andimi ète solo-solo Yesu alongolaki mosika naye masumu manso mabiso na nzela ya libatisi lia Ye nakati na Ebale ya Yordané pe Afutaki nyongo ya masumu manso tango akufaki pona biso.
Ezala tozuwi bosomi tope té, tozali banzo kobika na kati ya bozangi koyeba. Tozali maboke ma masumu. Yango nde oyo tozali. Bosomi ya solo-solo ezali kokota na bomoyi bwa biso tango oyo tondimi ète Yesu alongolaki masumu mabiso mosika na biso.
Nzambe Abikisaki Té Baye Bazalaki na ‘Lisumu lia Moke’
Nani oyo azali kokosa Nkolo?
Oyo azali kosenga bolimbisi bwa masumu ma mokolo na mokolo
Nzambe abikisaki té baye bazalaki na ‘lisumu lia moke.’ Nzambe alimbisaki té ata moke baye balobaki ète, “Nzambe, nazali kaka na mwa lisumu ya moke.” Atalisaka mawa na baye baloboki ète, “Nzambe, na zali liboke lia lisumu. Nazali kokende na lifelo. Nabeleli yo Nzambe, bikisa ngai.” Baye batonda na masumu, baye balobi ète, “Nzambe, ngai nalingi kobikisama soki kaka Yo obikisi ngai. Nakoka té kotubela lisusu pwète nayebi ète nakozongela lisumu mbala na mbala. Na beleli Yo, bikisa ngai.”
Nzambe abikisaka baye batiyaka elikia nyonso epayi na Ye. Ngai moko namekaki kosenga bolimbisi mokolo na mokolo pe, kasi mabondeli ma bosengi bolimbisi mazali kokangola ngai té na lisumu. Nayango, nafukamaki liboso na Nzambe pe nabondelaki, “Nzambe, nabeleli Yo, Yokela ngai mawa pe bikasa ngai na masumu mangai manso.” Baye babondeli lolenge oyo, bakobisama solo-solo. Bakotaki na bonzindo bwa kondima bosomi bwa Nzambe pe na libatisi lia Yesu na Yoane Mobatisi. Batò bana bakobikisama soslo-solo.
Nzambe abikisaka kaka baye bazali komimona lokola maboke ma lisumu, baye bamiyebi lokola batò mabe. Baye balobaka, “nasalaki kaka oyo mabe ya moke. Nabeleli Yo, limbisa ngai pona yango,” bazali nano kaka basumuki pe Nzambe akoki kolimbisa bango ata moke té. Nzambe abikisaka kaka baye bandimi ète bazali maboke etondi na lisumu.
Na Ezayi 59:1-2, ekomami, “Botala ète loboko na Nzambe ezali mokuse té, ète ekoki kobikisa té; tope litoyi lia Ye ezangi koyoka, pwète ayokaka. Kasi ezali masumu mabino maye matiyi bokabwani katikati nabino na Nzambe nabino; pe masumu mabino mazipi bino elongi na Ye, pwète Ayoka bino té.”
Pwète tobotami lokola maboke ma lisumu, Nzambe akoki té kotala biso na bosanto bwa Ye. Ezali té, pwète loboko na Ye ezali mokuse, litoyi lia Ye likangama té, tope Akoki koyoka biso té tango tozali kosenga bolimbisi.
Nzambe alobi na biso ète, “Masumu mabino ekaboli bino na Ngai; pe masumu mabino mazipi bino bomona elongi na Ngai mosika na bino, pwète Ayoka tée.” Pwète tozali na lisumu na kati ya mitema mia biso, tokoki kokota té na Lola, ata bikuke bizali biakofongolama mingi.
Soki biso, oyo tozali maboke ma lisumu, tozalaki kosenga-senga bolimbisi tango nyonso oyo tozalaki kosumuka, mbele Abomaki pe Mwana mwa Ye, mbala na mbala. Nzambe alingi té kozala eloko wana. Alobi ète, “Boyaka té mikolo na mikolo liboso na Ngai na masumu mabino. Na tindaki Mwana mwa Ngai pona kopesa bino bosomi na masumu mabino manso. Nyonso oyo esengeli na bino bosala ezali kosolola ndenge nini Alongholaki mosika na bino masumu mabino pe bondima ète ezali bosolo. Nasima nayango, bondima sango malamu ya mayi pena Molimo pona kobikisama. Oyo nde bolingo oyo yamonene Napesi bino, bikelamu bia Ngai.”
Oyo nde eloko oyo azali yoyebisa biso. “Bondimela Mwana mwa Ngai pe bozuwa bosomi bwa masumu mabino. Ngai Nzambe na bino, Natindaki Mwana mwa Ngai kolongola masumu mabino manso. Bondimela Mwana mwa Ngai pe bobikisama.”
Baye bamiyebi té kozala maboke ma lisumu bazali kosenga bolimbisi pona masumu mabango moko na moko. Bazali kokende liboso na Nzambe na bozangi boyebi ya motuya monene mwa masumu mwa bango pe bazali kobondela kaka ète, “Nabeleli Yo, limbisa ngai pona masumu maye ma mike-mike nasalaki. Nakozala lisusu té.”
Bazali pe komeka kokosa Ye na mabondeli ma ndenge mana. Tosumukaka kaka mbala moko té, kasi mikolo na mikolo tii liwa na biso. Esegenlaki kokoba na kosenga bolimbisi tii mokolo ya suka ya bomoyi bwa biso, pwète tokoki té totika kosumuka pe nzoto na biso ezali kosalela mobeko mwa lisumu tii liwa.
Kolimbisama pona na lisumu moke ekoki kosilisa té likambo lia lisumu oyo tozalaka mokolo na mokolo. Naboye, nzela moko oyo tokoki kokangolama na lisumu ezali na nzela ya kolekisa masumu mabiso manso na Yesu.
Moto azali lolenge nini?
Liboye lia lisumu
Biblia ezali kotanga masumu ma batò: “Pwète maboko mayo matondi na makila, pe misapi mia yo na lisumu; bembo nayo elobaki lukuta, lolemo liayo litatolaki botomboki. Moko té azali kobenga pona bosolo, tope azali kofunda pona na bosolo. Bazali kotiya elikia na maloba ezanga tina pe bazali kobuka lukuta; bazali kobokola mabe pe kobota lisumu. Balaleli maki ma nyoka pe batongi basinga ya nyama ya mabe oyo azalaka na ndako; moto oyo akolia maki mabango akokufa, pena na maki makopasuka, nguma pe akobima na kati nayango. Basinga na bango bakokoma té bilamba, tope bakomibomba nzoto té na misala mia bango; misala mia bango mizali misala mia lisumu, pe makambo mabotomboki mazali nakati na maboko mabango. Makolo mabango mazali kokima bangu pona na kosala mabe, pe bazali kokima bangu pona kosopa makila mayengebeni; makanisi nabango mazali makanisi ma lisumu; bokebisi na bopanzi biloko bozali na nzela na bango. Nzela oyo ya kimia eyebani na bango té, pe bosolo bozali té na banzela nabango; bamisaleli banzela ya maleye mabe na mitambu; oyo nyonso akoleka na banzela bana akomona kimia ata moke té” (Ezayi 59:3-8).
Misapi mia batò mitondi na mabe pena bomoyi bwa bango mobimba ezali kaka bomoyi bwa masumu. Eloko nyonso bazali kosala ezali eloko ya mabe. Pe lolemo na bango ‘elobaki lokuta mingi.’ Makambo manso mazali kowuta na minoko mia bango mazali makambo kaka ma lukuta.
“Tango molimo ya mabe mozali koloba lokuta, mozali koloba wuta kati naye moko mazali na kati na yango” (Yoane 8:44). Baye nano babotami té mbala ya mibale balingaka koloba ète, “nazali koyebisa yo solo.... Nazali yokebisa yo bosolo. Likambo nazali koyebisa yo ezali likambo ya solo....” Nzonkande, makambo manso bazali koloba nazali kaka makambo malukuta. Ezali lokola ekomami. “Tango molimo ya mabe mozali koloba lokuta, mozali koloba wuta kati nayango moko mobimba.”
Batò bazali kotiya elikia lia bango na maloba mazanga tina pe bazali kobuka lukuta. Bazali kobongisa mabe pe bazali kobota masumu. Bazali kolalela maki ma nyoka pe bazali kobota basinga ya nyama ya mabe oyo azalaka na ndako. Zambe alobi ète, “Oyo nyonso akolia maki mabango akokufa, pena maki maye mapasuki nguma ekobima na kati na yango.” Aloki ète maki ma nyoka mazali nakati ya mitema mia bino! Mabe ezali nakati na mitema mia bino. Ezali pona yango, esengeli tozua bosomi na kati ya sango-malamu ya mayi pena makila.
Tango nyonso nazali kofongola monoko mwangai pona koloba pona Nzambe, ezali na baye bazali koloba ète, “O, molingami! Tika kobetela biso lisolo lia Nzambe. Tango nyonso nazali komeka kosala eloko songolo, lisumu lizali kowuta na kati nangai. Ezali kosopama. Nakoki té kosala ata eteni moke ya kotambola nakozanga kosopa lisumu ngambo na ngambo. Nakoki té. Natondami na masumu. Nazangi pe elikia. Ponayango, tika kobetela ngai liteya lia Nzambe Mosantu.”
Motò oyo ayebi solo-solo azali liboke lia lisumu, kasi azangi koyeba ète Nzambe abikisaki ye mobimba na nzela ya sango-malamu ya bolingo bwa Ye. Kaka baye bamimoni bango moko kozala maboke ma lisumu nde bakoki kobikisama.
Nasolo, motò nyonso azali ndenge wana. Motò nyonso azali kosopa nzela-nzela lisumu esika nyonso azali kokende. Lisumu ezali kosopama pwète bato banso bazali maboke ma lisumu. Nzela moko oyo tokoki kobisama na bomoyi bwa boye ezali kolekela na nguya na Nzambe. Ezali kokamwisa yo? Baye bazali kosopa lisumu tango nyonso nasè na kanda, na esengo, tope na bofuluki, bakoki kobikisama kaka na nzela na Yesu Kristo. Yesu ayaki pona na kobikisa biso.
Alongolaki masumu mayo manso. Ndima kaka ète ozali liboke lia lisumu pe okobikisama solo-solo.