(Yoane 8:1-12)“Kasi Yesu amataki na Ngomba ya Olivé. Kasi na tongo-tongo Ayaki pena etonga, pe batò bayaki epayi na Ye; pe Afandaki nasè pe Ateyaki bango. Boye Bakomi-Mikanda na Ba-Falizé bamemeli ye mwasi moko akangama na ekobo. Pe bafandisi ye nakati, bayebisi Ye, ‘Molakisi, mwasi oyo akangama na ekobo, nakati ya bosumuki. Sikoyo Moize, nakati ya mobeko, apesa biso nzela ète mwasi ya ndenge wana abambama mabanga. Kasi Yo olobi nini?’ Oyo ezalaki, nzela yakimeka Ye, pwète asala eloko moko pona kofunda Ye. Kasi Yesu afukamaki nasè pe abandi kokoma na mabele na mosapi mwa Ye, lokola motò oyo ayokaki té. Boye tango bakobaki kotuna Ye, Atelemaki pe Alobelaki nabango ète, ‘Oyo azali na lisusmi katikati nabino, tika ète abamba ye libanga motò ya yambo.’ Pe azongeli kokoma nasè. Boye baye bayokaki yango, batutama na mitema mia bango, bakenda moko na moko, kobanda na mokolo tii ya mwana moke. Pa Yesu atikali Ye moko, na mwasi yakotema na kati. Tango Yesu atelemaki, Amona motò té kasi, kaka mwasi yemoko, Ayebisi ye, ‘Mwasi, baye bazalaki kofunda yo bazali wapi? Motò moko té akatelaki yo etumbu?’ Alobi, ‘Té, moko té, Nkolo.’ Pe Yesu alobaki na ye, ‘Ngai pe nakateleyi yo etumbu té; kende pe kosumuka lisusu té.’ Bongo Yesu alobi na bango lisusu, ète, ‘Na zali Mwinda mwa mokili. Oyo akolanda Ngai akokweya na molili té, kasi akozala na mwinda mwa bomoyi.’”
Masumu boni Yesu alogolaki?
Masumu manso ma mokili
Yesu apesaki biso bosomi bwa seko. Ezali na motò moko té oyo akoki kozuwa bosomi soki akondimela té Yesu lokola Mobikisi mwaye. Abisaki biso banso. Soki mosumuki akobi kolela likolo lia masumu maye ezali pona kozanga koyeba ndenge nini Yesu abikisaki ye na masumu maye manso na libatisi pena liwa na Kuruze.
Tosengeli biso banso koyeba pe kondima sékélé ya lobiko. Yesu alongolaki masumu mabiso manso nakati ya libatisi lia Ye pe Amemaki etumbu ya masumu mabiso na Kuruze.
Esengele kondima na lobiko lia mayi pena Molimo, bosomi bwa seko na masumu manso. Esengeli kondima na bolingo bwa Ye bonene oyo Asalaki pona kobulisa yo. Ndima na oyo asalaki na mayi ma Yordané pena na Kuruze.
Yesu pe Ayebi lisolo lia masumu mabiso oyo malimbisama. Batò mosusu bazangi bososoli bwa masumu mabango moko. Bazali kokanisa ète masumu makoki kolimbisama té. Yesu afuta nyongo ya masumu mabiso manso, moko na moko na nayango.
Ezali na lisumu moko té na mokili oyo etikalaki. Pwète alongolaki masumu manso nakati ya mokili oyo, solo ezali ète basumuki bazali likususu té. Oyoki sango-malamu oyo epesi yo bosomi bwa masumu mayo manso, ata masumu mayo maleki mutuya! Ndima sè kondima nakati nayango, okobikisama, pe pesa kembo na Nzambe.
Mwasi Oyo Akangama Na Kosala Ekobo
Batò boni na mokili basalaka ekobo?
Batò banso
Na Yaone 8, ezali na lisolo lia mwasi oyo akangama nakati ya ekobo pe tomonaki ndenge Yesu abikisaki ye. Tolingi kokabola ngolu oyo azuwaki. Ezali mingi té yakoba, ète batò banso basala ekobo esika moko na kati na bomoyi bwango. Motò moko-moko asalaka ekobo esika moko.
Soki okanisi yango boye té, ezali pwète tosalaka yango tango mosusu nde tokomi kokanisa ète tosalaka yango té. Pona nini? Tozali kobika na ekobo mingi nakati na bomoyi bwa biso.
Totala moke mwasi na mokanda ya Yoane 8, nazali kokota na bozindo pona mona soki ezali na moto moko kati-kati nabiso oyo nano asala ekobo na bomoyi bwa ye té. Moko té azala yango, kaka mwasi oyo akangama nakati yako zala yango? Biso banso tozalaki yango. Kasi tozali kokanisa tosalaki yango té.
Okanisi nazali kokosa? Té. Tala malamu kati-kati. Motò nyonso na mokili asalaki yango. Bazali kosala ekobo tanga bazali kotala basi na mibali mosusu na nzela, nakati na makanisi na bango pena kati ya misala miabango, tango nyonso, esika nyonso.
Bazali nde kososola yango té. Batò ebele bazangi bososoli wana tii mokolo ya liwa na bango ète basalaki ekobo mingi na kati na bomoyi na bango. Kaka té baye bakangama, kasi baye banso nano bakangama té. Batò banso bazali kosala yango na kati na makanisi, pena misala miabango. Ezali té eteni ya bomoyi bwabiso banso?
Oyoki kanda? Solo yango wana. Tozali kaka kobatama pwète ezali kosala biso soni. Solo yango oyo, batò mikolo oyo bazali kosala ekobo mingi tango nyonso, kasi bazali kososola yango té.
Batò basalaka ekobo na milemo miabango pe. Biso, bikelamu bia Nzambe, baye tozali kobika nakati ya mokili oyo, pe nano tososoli ète tosalaka yango, tosala pe ekobo ya molimo. Kobumbamela banzambe mosusu ezali pe ekobo ya molimo pwète Nkolo azali Mobali mwa batò banso.
Mwasi oyo akangama na ekobo azalaki motò; kaka lokola biso banso, pe azuwaki ngolu ya Nzambe, kaka lokola biso baye tozuwi bosomi. Kasi Ba-falizé ya bilongo bibale batelemisaki ye liboso na bango na kotalisa ye misapi lokola bazuzi, pe bazalaki pene ya kobamba ye mabanga. Bazalaki pene na bwaka ye pena kokatela ye etumbu lokola bango bazalaki batò ya bule, pe nano basala ekobo ata mbala moko té.
Bandeko balingami Ba-Kristo, baye bayebi ète bazali liboke lia lisumu, basambisaka té basusu liboso na Nzambe. Ngambo mosusu, bayebi ète mazali pe kosala ekobo nakati na bomoyi bwa bango, pe bazuwaki ngolu na Nzambe oyo apesi biso banso bosomi. Kaka baye basosoli ète bazali basumuki pe basalaki banso ekobo nzela-nzela, nde bazali na esika na bosomi liboso na Nzambe.
Nani Akozuwa Ngolu Na Nzambe?
Nani akozuwa ngolu na Nzambe?
Oyo akoki té yemoko
Motò ya bule oyo azangi kosala ekobo akozuwa ngolu na Ye, tope oyo akoki té pe andimi kozala mosumuki nde akozuwa ngolu na Ye? Oyo akozuwa ngolu ezali motò oyo azuwi ngolu ya monene ya bosomi bwa Ye. Batò baye bakoki komisunga bango moko té, batò bazanga makasi na lisungi, bakozuwa bosomi. Bango nde bazali na kati na ngolu na Ye.
Baye bakanisi bazali na lisumu té bakoki kozuwa bosomi té. Ndenge nini bakoki kozuwa bosomi tango oyo eloko esengeli pona yango ezali té?
Bakomi-Mikanda na Ba-Falizé babendaki mwasi oyo akangama na ekobo liboso na Yesu pe batelemisaki ye kati-kati na kotuna Ye boye, “Molakisi, mwasi oyo akangami nakati yakosala ekobo, solo-solo. Sik’oyo, Yo olobi nini?” Pona nini bayaki na mwasi wana liboso na Ye, pe bamekaki Ye?
Bango pe basalaki ekobo mbala na mbala, kasi bazalaki komeka kosambisa na koboma ye na nzela na Yesu, na kolinga koluka kokotisa Ye na mutambo.
Yesu ayebaki mayele na bango, pe ayebaki nyonso likolo ya mwasi. Boye Alobaki, “Oyo azali na lisumu té kati-kati nabino, abamba ye liganga motò ya liboso.” Bongo Bakomi-Mikanda na Ba-Falizé, banda na mokolo na bango banso tii na elenge ya suka, bakendaki moko na moko pe batikaki Yesu ye moko na mwasi.
Baye bakendaki bazali Bakomi-Mikanda na Ba-Falizé, bakambi ya libota lia bandimi. Bazalaki pene na kozambisa mwasi oyo akangama nakosala ekobo, lokola bango moko bazalaki basumuki té.
Yesu atotatoli bolingo bwa Ye na mokili oyo. Azalaki Nganga-Bolingo. Apesaki batò bileyi, Abikisaki baz anga koyoka, Asekwisaki mwana ya mwasi akufela mobali, Asekwisaki Lazaré ya Bétani, Abikisaki batò na maladi ma maba, pe Asala bikamwa pona babola. Alongolaki masumu ma basumuki pe Apesaki bango lobiko.
Yesu alingi biso. Azali Motò na makasi oyo Akoki kozala nyonso, kasi Ba-Falizé na Bakomi-Mikanda bakanisaki Ye azali monguna na bango. Ezali bona na yango bamemaki mwasi liboso na Ye pona komeka Ye.
Batunaki motuna, “Molakisi, Moize, na kati na Mobeko, apesaki biso nzela ète tobamba mabangò ya boye. Kasi Yo, olobi nini?” Bakanisaki ète Akokaki kopesa bango nzela babamba ye mabanga. Pona nini? Soki tosengeli ko sambisa na lolenge ekomami na mobeko mwa Nzambe, moko na moko oyo asalaki ekobo asengeli abambama mabanga, kozangisa ata motò moko té.
Batò banso basengeli kobambama mabanga pe kokufa na sima kokende na lifelo. Lifuti lia lisumu lizali liwa. Kasi, Yesu ayebisaki té bango kobamba ye mabanga. Pe, Alobaki, “Oyo azali na lisumu té kati-kati nabino, abamba ye libanga motò ya liboso.”
Pona nini Nzambe apesaki biso biteni ya Mobeko 613?
Pwète tososola ète tosali basumuki
Mobeko mozali komema kanda. Nzambe azali mosanto lokola Mobeko mwa Ye mozali pe esanto. Mobeko mwa Ye mozali komemela biso biteni 613. Nzambe apesaki biso biteni 613 bia Mobeko mwa Ye pwète to sosola ète tozali basumuki; toyeba ète tozali yako tonda té. Mobeko mozali kotalisa biso ète tozali na bosengi bwa ngolu na Nzambe pona kozuwa bosomi. Soki tozangi koyeba yango pe tokobi kokanisa kaka oyo ekomami na Mobeko, tokokaki kobambama mabanga tii liwa, kaka lokola mwasi oyo akangama na kosala ekobo.
Bakomi-Mikanda na Ba-Falizé baye bayebaki té bosolo bwa Mobeko mwa Ye bakokaki kokanisa ète babamba mwasi wana mabanga, nde pe bakoki kobamba biso elongo. Kasi, nani akokaki to bamba mabanga na mwasi oyo azanga lisungi lokola mosumuki? Ata akangama na ekobo, motò moko té akokaki kobamba ye mabanga.
Soki mwasi wana elongo na biso banso tosambisamaki kaka elongo na Mobeko, biso, lokola mwasi wana, tokokaki to zuwa etumbu ya somo.
Kasi Yesu abikisi biso, biso baye tozalaki basumuki, na masumu mabiso pena etumbu na yango. Masumu ma biso manso, soki mobeko mwa Nzambe mosalami na ndege esengeli, nani kati-kati na biso akoki kozala na bomoyi? Biso banso tokokaki kosuka na lifelo.
Kasi Bakomi-Mikanda na Ba-Falizé bayebaki kaka Mobeko ndenge mokomama. Soki Mobeko mokokaki kotosama ndenge esengeli, ekokaki koboma bango banso lolenge moko na oyo balingaki koboma. Yasolo, mobeko mwa Nzambe mopesamelaki batò pwète basosola masumu mabango, kasi bamonaki pasi pona bozangi koyoka na kosalela yango malamu.
Ba-Falizé ya lelo, kaka lokola Ba-Falizé ya Biblia, bayebi kaka Mobeko mokomami. Bazangi kososola ngolu, bosembo pe bosolo na Nzambe. Basengeli bateyama sango-malamu ya bosomi pwète babikisama.
Ba-Falizé balobaki, “Mobeko mopesi biso nzela abambama mabanga. Kasi Yo olobi nini?” Basengaki eloko wana, pe bazalaki solo-solo na mabanga na maboko, pene na koboma ye. Bakanisaki yasolo Yesu akokaki kozala eloko té pona kotelemisa bango. Basalaki kozela Yesu kobesa bango nzela.
Soki Yesu asambisaki elongo na Mobeko, bakokaki kobamba Ye mabanga. Posa na banga ezalaki kobamba bango mibale mabanga mwasi na Yesu. Soki Yesu aboyaki babamba mwasi mabanga, bakoki koloba ète Yesu abukaki Mobeko mwa Nzambe, pe kobamba Ye mabanga pona bobuki Mobeko. Ezalaki libongisi lia mabe!
Kasi Yesu abumbamaki nasè pe Akomaki na mabele na mosapi mwa Ye, pe bakobi kotuna Ye, “Olobi nini? Ozali kokoma nini na mabele? Pesa biso kaka eyano na motuna mwa biso. Olobi nini?” Batalisaki ye misapi na Yesu pena kotungisa Ye.
Na suka, Yesu atelemi pe alobi ète moko na kati na bango azangi lisumu abamba ye libanga motò ya yambo. Pe abumbamaki nasè nakokoba kokoma na mabele. Baye bayokaki yango, mazuwaki bolamuki bwa mitema miabango, babimaki moko-moko, banda kaka na mokolo na bango tii elenge ya suka. Yesu atikalaki Ye moko, na mwasi yakotelema liboso na Ye.
“Oyo Azangi Lisumu Kati-kati Na Bino, Abamba Ye Libanga Motò Ya Yambo”
Masumu makomami esika wapi?
Nakati ya ekomelo ya mitema mia biso pena kati na Buku ya Misala
Yesu ayebisi bango, “Oyo azangi lisumu kati-kati nabino, abamba ye libanga motò ya yambo,” pe Akobaki kokoma namabele. Mikolo na bango babandi kokende. Mo-Falizé ya moko, oyo asalaki masumu mingi, akokaki kobima yambo. Bilenge bakenda pe. Totala lokola Yesu atelemi kati-kati nabiso, pe tozali kotema elongo na mwasi. Soki Yesu asengaki na biso ète moko na biso abamba libanga moto ya yambo, osalaki nini?
Eloko nini Yesu azalaki na mabele? Nzambe, oyo akelaki biso, akomi masumu mabiso na bisika mibale.
Yambo, Akomaki masumu mabiso na ekomeli na kati na mitema mia biso. “Masumu ma Yuda makomami na ekomeli ya libende; na songe ya diama ekomami na ekomelo ya motema, pena maseke ma etumbelo nayo” (Yelémiyé 17:1).
Nzambe alobeleli biso koleka na Yuda, oyo azali motalisi-elongi mwa biso. Masumu mabatò makomami na ekomeli ya libende, na songe ya diama. Ekomami na ekomelo ya mitema mia biso. Yesu afukamaki pe akomaki na mabele ète batò banso bazali basumuki.
Nzambe ayebi ète tosumukaka pe Akomi masumu mabiso na ekomelo ya motema. Yambo, Akomi misala mia biso, masumu tozali kosala, pwète tozali na makasi té liboso na Mobeko. Lokola masumu makomami na kati ya mitema mia biso, tososoli ète tozali basumuki tango totali Mobeko. Na ndenge A komaki makambo manso na mitema mia biso pena mapanzo mabiso, toyebi ète tozali basumuki liboso na Ye.
Yesu afukami nasè mbala ya mibale pona kokoma na mabele. Makomi malobi ète masumu mabiso manso makomami na Mokanda mwa Misala liboso na Nzambe (Botalisi Basékélé 20:12). Masuma manso makomami na nkombo mango nakati na Mokanda. Ekomami pena ekomelo ya mitema miabiso.
Masumu makomami na motema ya moko na moko, elenge tope mokolo. Ezali pona yango, bazangaki eloko ya koloba pona masumu ma bango liboso na Yesu. Baye balingaki kobamba mwasi mabanga, bazanga lisungi liboso lia maloba ma Ye.
Tango nini masumu mabiso makomama bisika mibale malongwamaki?
Tango oyo tondimaki bosomi bwa mayi na makila ma Yesu na mitema mia biso.
Nangabo mosusu, tango ozuwi lobiko na Ye, masumu manso mayo na kati ya Mukanda mwa Misala malongwami pe nkombo nay o ekomami na Mokanda mwa Bomoyi. Baoyo bakombo na bango ekomonan na Mokanda mwa Bomoyi bakokende na Lola. Misala mwa bango makambo malamu basalaki na mokili pona bokonzi bwa Nzambe na boyengemene bwa bango ekomami pe nakati ya Mokanda mwa Bomoyi. Bandimelami na Lola. Baoyo bakanbolami na masumu na bango bakokota bisika bwi seko na seko.
Yeba ète masumu manso ma motò moko na moko bakomami na bisika bibale, boye motò ata moko akoki kokosa Nzambe té. Ezali na motò moko té oyo azangi kosumuka tope kosala ekobo nakati na motema naye. Batò banso bazali basumuki pe batò mabe.
Baye bandimeli té bosomi bwa Yesu kati na mitema miabango bakokoka té, kasi bakolela likolo na masumu mabango. Bazangi kimia. Bazali kobanga liboso na Nzambe pe liboso na batò mosusu pona na masumu mabango. Kasi tango bandimeli sango-malamu ya bosomi bwa mayi na Molimo na mitema miabango, masumu mabango manso makomami na ekomelo ya mitema mia bango pena Mokanda mwa Misala malongwami. Babikisami na masumu mabango manso.
Bakomami na kati na Mokanda mwa Bomoyi mozali na Lola. Bankombo ya baye bandimeli bosomi bwa mayi na Molimo ekomami na mokanda, pe bakokota Lola. Bakoti Lola po basumukaki na mokili té, kasi pwète bakagolami na masumu manso na nzela ya kondimela bosomi bwa mayi na Molimo. Ezali ‘mobeko mwa kondima’ (Ba-Romén 3:27).
Bandeko bakristo, bakomi-mikanda na Ba-Falizé bazalaki basumuki, kaka lokola mwasi oyo bakangaki na kosaka ekobo azalaki.
Nabosolo, basalaki masumu mingi pwète bamikosaki pe bakosaki batò na kondima ète bazangaki masumu. Bakambi ya magomba ma bandimi bazalaki miyibi na bosungi bwa mibeko mwa mboka. Bazalaki miyibi mia milemo, na maloba mosusu, miyibi mia bomoyi. Bamekaki ko tangisa batòn mosusu na bokonzi nyonso, ata nano bazuwaki bosomi bwa bango moko té.
Motò azangi masumu kolendisama na Mokebo azali té. Kasi motò akoki koma peto, pona kozanga kosala masumu té, kasi pona bosomi bwa masumu maye manso. Motò ya ndenge wana akomami na Mokanda mwa Bomoyi. Eloko ya motuya ezali ète nkombo ya motò ekomami tope ekomami té na kati ya Mokanda mwa Bomoyi. Lokola batò bakoki té kobika na kozanga kosumuka na kati na bomoyi bwabango, basengeli bazuwa bosomi bwa seko na seko pwète bakomama na kati na mokanda.
Pona kopesamela nzela ya kokota Lola ezali kowuta na kondima yayo moko kati na sango-malamu ya solo tope kozanga kondima yayo moko. Yo moko oyambi ngolu na Nzambe tope osumdoli yango. Ezali likambo ya ndenge nini yomoko ondimeli lobiko lia Yesu. Eloko nini elekaki na mwasi oyo akangamaka? Akokaki kofukama nasè na mabolongo mawe pena kokanga miso miaye pwète ayebaki azaliki pene na liwa. Azalaki, tango mosusu, kolela na kobanga pena kosenga bolimbisi. Batò bakoma liboso ya boloso nakati na bomoyi na bango tango bakomaka na suka.
“O, Nzambe, ezali malamu nakofa. Nabeleli yo yamba molemo mwangai na maboko ma Yo, Yokela ngai mawa. Nabeleli Yo, Yokala ngai mawa, Yesu.” Abelelaki Yesu pona bolingo bwa bosomi. “Nzambe, soki O zambisi ngai, pe soki Yo olobi ète nazali na masumu té, pe masumu manga malongwami. Ezali likambo lia Yo.” Azalaki, tango mosusu, koloba makambo maye manso. Akokaki kotatola maye manso asalaki na bomoyi bwaye epayi na Yesu.
Mwasi oyo bamemaki liboso na Yesu alobaki eloko té, “Nasalaki mabe, nabeleli Yo, limbisa ngai pona ekobo nangai.” Alobaki, “Nabeleli Yo, bikisa ngai ma masumu mangai. Soki opesi ngai bosomi likolo na masumu mangai, nakobikisama. Pamba té, nakokende na lifelo. Nalingi bosomi bwa Yo. Nalingi bolingo bwa Yo Nzambe, nalingi Oyokoyokela ngai mawa.” Akangaki miso naye pe atatolaki bosumuki bwaye.
Pe Yesu alobaki naye ète, “Baye bazalaki kofunda yo bazali wapi? Motò moko akateli yo etumbu?” Ayanolaki ète, “Té, Nkolo.”
Pe Yesu ayebisaki ye, “Ngai pe nakateli yo etumbu té.” Yesu akatelaki ye etumbu té pwète Alongolaki kala masumu maye na nzela ya libatisi lia Ye na mayi ya Yordané, pe azuwaki bosomi libela. Sik’oyo, pona Yesu, mwasi wana asengelaki té kosambisama pona masumu maye mana.
Alobaki ète, “Ngai Pe Nakateli Yo Etumbu Té.”
Yesu akatelaki ye etumbu?
Té
Mwasi oyo apambwama na lobiko kati na Yesu. Azuwaki bosomi bwa masumu maye. Nzambe na biso ayebisa biso ète apesi biso bosomi bwa masumu mabiso manso pe tokomi biso banso bayengebeni.
Alobeli biso boye nakati na Biblia. Akufaki na Kuruze pona kofuta masumu mabiso, maye alongolaki na libatisi lia Ye na mayi ya Yordané. A yebisi biso polele-polele ète Apesi biso bosomi, baye bandimeli nakati ya bosomi bwa libatisi lia Ye, pena etumbu na Kuruze. Biso banso tozali na posa ya Liloba oyo ekomami lia Yesu pe tokangama liango. Bongo, tobombama na kati na bosomi.
“Nzambe, nakoki té libosa na Yo. Nazali na eloko ya malamu té nakati nangai, yakotalisa Yo kasi masumu mangai kaka. Kasi nandimi ète Yesu azali Nkolo ya bosomi. Alongolaki masumu mabiso na mayi ma Yordané pe Afutaki nyongo na yango na Kuruze. Alongolaki masumu mangai nalibatisi lia Ye pena makila ma Ye. Nandimeli Yo, Nkolo.”
Ezali bongo nde obikisami. Yesu azali ko ‘katela biso etumbu té.’ Apesaki biso nzela tokoma bana ba Nzambe: Baye bandimeli bosomi ya mayi pe ya Molimo, Alongoli mosika nabango masumu mabango manso pe Azali bango batò ya bule.
Bandeko balinami! Mwasi azuwaki bosomi. Mwasi akangama na ekobo apambwama na bosomi bwa Nkolo Yesu. Tokoki pe kobambwama lokola ye. Motò nyono oyo andimi masumu maye pe asengi mawa ma Nzambe likolo naye, pe oyo nyonso andimi bosomi ya mayi na Molimo kati na Yesu azuwi libamboli lia bosomi wuta epayi na Nzambe. Baye bandimi bosumuki bwa bango liboso na Nzambe bakoki kozuwa bosomi, kasi baye basosoli té masumu mabango bakoki té kopambwama na bosomi.
Yesu Alongolaki masumu ma mokili mobimba (Yoane 1:29). Masumu nyonso na mokili akoki kozuwa bosomi soki tondimeli Yesu. Yesu alobelaki na mwasi wana, ète: “Ngai pe nakateli yo etumbu té.” Alobaki ète A kateli ye etumbu té pwète masumu manso maye Amemaki mango na nzoto na Ye nakati ya libatisi. Azuwaki masumu mabiso na nzoto na Ye moko, pe asambisamai na bisika bwabiso pona yango pe etumbu na yango ekweyaki na nzoto na Ye na Kuruze.
Tosengeli Kozuwa Bosomi Liboso Na Yesu
Bolingo monene bwa Nzambe bozali bolingo bwa Ye tope etumbu na Ye?
Bolingo bwa Ye
Ba-Falizé; na mabanga na maboko nabango, lokola bakambi babandimi mingi ya lelo, bazali kolandela Mobeko ndenge ekomami. Bandimi ète Mobeko eyebisi biso kosala ekobo té, oyo akosala masumu mana akobanbama mabanga tii liwa. Bazali kofina liso lia moyibi, tango oyo bazali kokanisa basalaka ekobo té. Bakoki kozuwa bosomi tope lobiko té. Ba-Falizé na Bakomi-Mikanda bazalaki bateyi bolamu ya mokili. Bazalaki té baye Yesu atindaki. Batò baye, nano bayokaki Ye koloba, “Nako katela yo etumbu té.”
Kaka mwasi oyo akangama na ekobo nde ayokaki maloba kitoko mana. Soki ozali motò ya bosolo liboso na Ye, okoki pe kozala lokola mwasi wana. “Nzambe, nakoki kosala ekobo bomoyi nangai nyonso. Nazali komona yango té pwète nasalaka yango tango na tango. Nasalaka lisumu lia boye mbala mingi pena mikolo minso.”
Tango tondimi Mobeko na lolenge tozali basumuki, baye basengeli bakufa, pena kokutana nabosolo bwa Nzambe, nakoloba ète, “Nzambe, oyo nde Ozali Mobikisi ya solo. Nabeleli Yo, okobikisa ngai,” Nzambe akopambola ngai na bosomo bwa Yo.
Bolingo bwa Yesu, sango-malamu ya mayi pena Molimo elongi solo-solo kosambisama na Nzambe. “Ngai pe nakateyo etumbi té.” Akateli biso etumbu té. Alobi, “Ozuwi bosomi.” Nkolo na biso Yesu Kristo Azali Nzambe na mawa. Akangoli biso na masumu ma mokili.
Nzambe na biso azali Nzambe ya boyengenbene, pe ya bolingo. Bolingo bwa mayi na Molimo boleki etumbu na Ye na monene.
Bolingo Bwa Ye Ezali Monene Koleka Etumbu Na Ye
Pona nini apesaki biso banso bosomi?
Pwète bolingo bwa Ye boleki monene ya etumbu na Ye.
Soki Nzambe alandaki etumbu na Ye pona kokisa boyengebene bwa Ye, Akokaki kokatela masumuki banso etumbu pe kotinda bango banso na lifelu. Kasi pwète bolingo bwa Yesu bozali, oyo ebikisi biso na etumbu na Ye, ezali monene, Nzambe atindaki Mwana na Ye moko, Yesu. Yesu azuwaki masumu mabiso manso na nzoto na Ye pe etumbu ya batò banso ekweyelaki Ye. Sik’oyo, oyo nyonso akondima Yesu lokola Mobikisi akomi mwana na Ye pe moyengebene mwaye. Lokola bolingo bwa Ye eleki monene ya bosembo mwa Ye, Apesi biso banso bosomi.
Tosengeli kotonda Nzambe pwète akatelaki biso etumbu té kaka pona boyengebene bwa Ye. Mbala moko Yesu ayebisaki Bakomi-Mikanda, Ba-Falizé, pena na bayekoli na bango ète, “Kasi bokende pe botanga oyo elingi koloba: ‘Nazali na posa ya mawa kasi mbeka té.’ Pwète nayaki té pona kobenga bayengebeni, kasi basumuki, tobubela” (Matié 9:13). Batò mosusu bazali koboma meme tope tamba pe babonzeli liboso na Nzambe, nalosambo, “Nzambe, limbisa masumu mangai mokolo na moko.” Nzambe azali na posa na mbeka nabiso té, kasi ezali nde, kondima na bosomi bwa mayi na Molimo. Alingi kotalisa biso tozuwa bosomi pe tokagwama. Alingi kopese biso bolingo bwa Ye pe koyamba kondima na biso. Bokoki komona yango bino banso? Yesu apesaki biso lobiko lia Ye lia boyengembene.
Yesu ayini lisumu, kasi Azali na bolingo oyo ezali kopela moto pona batò, baye bakelama na elili na Nzambe. Azuwaki mokano yambo Bokelami, ya kokomisa biso bana ba Ye, pe Alongolaki masumu mabiso na libatisi lia Ye pena makila. Nzambe akelaki biso na libongisi lia kopesa biso bosomi, kolatisa biso na Yesu, pe kosala biso bana ba Ye. Oyo nde bolingo Azali nayango pona biso, bikelamu bia Ye.
Soki Nzambe kaka asambisaki biso kolandisama na Mobeko mwa Ye mosantu, biso, basumuki, tokokaki biso banso kokufa. Kasi Abikisaki biso na nzela ya libatisi na etumbu ya Mwana mwa Ye na Kuruze. Ondimi yango? Tika ète tofandisa yango nakati ya Boyokani bwa Kala.
Aaloné Atiyaki Maboko Maye Na Ntamba Ya Kotinda Na Esobe
Nani azalaki kolekisa masumu ma Izraélé na bomoyi bwa ntamba lokola motalisi-elongi?
Nganga-Nzambe Monene
Masuma manso ma mokili malongwama na nzela na kondima na mokano mwa Boyokani bwa Kala pena libatisi lia Boyokani bwa Sika. Naboyokani bwa Kala, masumu mambula mobimba mazalaki kolongwama na nzela ya Nganga-Nzambe Monene, oyo azalaki kotiya maboko maye na motò na ntamba ya bomoyi oyo azangi mbeba ata moke.
“Pe Aaloné akotiya maboko maye na móto ya ntamba ya bomoyi, akotubela masumu manso ma Bana-Izaraélé likolo na yango, pena botomboki na bango banso, elongo na masumu na bango manso, nakotiya yango na mutu na ntamba, pe akotindama na esobe na loboko ya motò oyo asengeli” (Lévitiké 16:21).
Ezali ndenge wana bazalaki kolongola masumu na Boyakani bwa Kala. Pona kozuwa bosomi ya masumu ma mikolo na mikolo, bazalaki komema meme tope ntamba moko azanga mbeba na mongombo pona kobonza ye na etumbelo. Azalaki kotiya maboko maye na mutu na mbeka, pe masumu ma mosumuki bazalaki koleka na mbeka. Boye, mbeka akobomama pe nganga-Nzambe akotiya makila mayango na maseke ma etumbelo.
Ezalaki na maseke na basonge mineyi ya emtumbelo. Maseke mana mazalaki elembo ya Mikanda mia Misala oyo ekomami na Kotalisa Basékélé 20:12. Makila maye matikali makosopama na mabele pe. Mabele malakisi motema mwa motò pwète motò akelama na putulu. Batò bazalaki kolongola, na ndenge wana, masumu mabango ma mikolo na mikolo.
Tango oyo, bazalaki kozanga kopesa mbeka ya masumu ya mokolo na moko, bongo, Nzambe apesaki nzela ya kolongola masumu mbala moko na mbula. Oyo ezalaki kosalema mokolo mwa zomi ya sanza ya sambo, Mokolo mwa Bolongwama bwa Masumu. Namokolo wana, Nganga-Nzambe, motalisi-elongi ya Bana-Izraélé banso, akomema mtaba mibale pe akotiya maboko maye na mitu na yango, pona kolekisa masumu mabatò na yango, pe akobonza bango liboso na Nzambe bona bolongwama bwa masumu ma Bana-Izraélé.
“Aaloné akotiya maboko maye mibale na mutu ya ntaba ya bomoyi, akotubela likolo na yango masumu manso ma Bana-Izraélé, pena botonboki nabango nyonso, pona masumu mabango manso, liboke moke na mutut na ntaba.”
Nzambe atiyaki Aaloné, Nganga-Nzambe Monene ya Izarélé, kozala Motalisi-elongi na batò. Lobiko ya motò moko na moko esengelaki atiya maboko maye na mutu na mbeka na nzela na ye moko, nganga-nzambe monene, lokola motalisi-elongi ya batò banso, akotiya maboko maye na mutu ya ntaba ya bomoyi pona bolimbisi bwa masumu ma mbula mobimba.
Akotatola masumu manso ma Izraélé liboso na Nzambe, “O Nzambe, bana ba Yo Ba-Izraélé basumukaki. Tobumamelaki bikeko, tobukaki biteni binso bwa Mobeko mwa Yo, totatola nkombo na Yo pamba, tosalelaki bikeko misusu pe tolingaki yano koleka Yo. Tobatelaki té mokolo mwa Sabata esentu, totosaki baboti babiso té, tobomaki, tosalaki ekobo be moyibi.... Tofandaki na kati na zuwa pena bitumba.”
Akotatola masumu manso. “Nzambe alimbisa libota lia Izraélé, pwète ngai pe nakokati té kobatela Mobeko mwa Yo ata moke té. Bona kozuwa bosomi bwa masumu manso, nazali kotiya maboko na mutu ya ntaba oyo pona kolekisa masumu manso na yango.” Nganga-Nzambe Monene akotiya maboko maye na mbeka pona batò banso pe kolekisa masumu na mutu na mbeka. Bopesi nzela, tope botiyi bwa maboko elobi ‘ko lekisa’ (LKévitiké 1:1-4, 16:20-21).
Bolongoli masumu ezalaki kosalema ndenge nini na Boyokani bwa Kala?
Na nzela ya kotiya maboko na mutu na mbeka ya lisumu
Nzambe apesaki bosaleli bwa mbeka na bana-Izaélé, pwète balekisaka masumu mabango pe bazuwa bosomi. Apesaki mitindo ète motò abongisa mbeka na lisumu ezanga mbeba pwète mbeka na lisumu akufa na esika ya mosumuki. Bosomi bwa moko na moko bozalaki lolenge lina.
Panayango, na mokolo mwa bolongoli masumu, mbeka ya masumu ekobomama pe makila na yango ekotiyama na kati ya Esika Esantu pe likolo na kiti na ngolu mbala sambo. Bongo, Bana-Izraélé bazalaki kolongola masumu mbula na mbula na mokolo mwa zomi mwa sanza na sambo.
Nganga-Nzambe Monene akokota na Bisika Esentu pona kobonza mbeka, kasi batò bakosangana libanda pona koyoka mongongo mwa ngonga ya olo na ndelo na elamba ya molayi na mokaba mwa tolo ya Nganga-Nzambe Monene. Bangonga ya olo ekolela mbala sambo na tango oyo makila masopami na kiti na ngolu. Bongo, batò bakosepela pwète masumu mabango manso malobgwami. Mongongo mwa ngonga ya olo ezali elili na sango-malamu ya esengo.
Ezali solo té, ète Yesu alingi batò moko pe apesi bango bosomi kaka bango. Yesu alongolaki masumu manso ma mokili mbala moko na libatisi lia Ye. Alingaki kobikisa biso mbala moko pona nyonso. Masumu mabiso makokaki kolongwama mokolo na mokolo, kasi na Yesu, alongolaki mango mbala moko pona libela.
Na Boyokani bwa Kala, polongoli masumu bozali bopesamela na makila ma mbeka ya masumu. Aaloné akotiya maboko maye na mutu ya ntaba ya bomoyi liboso na batò banso pena kotatola masumu manso oyo batò basalaki na mbula mobimba. Akolekisa masumu na ntaba liboso na Bana-Izraélé banso. Masumu ma batò mazalaki tokende wapi na sima ya botiyi maboko ma Nganga-Nzambe Monene likolo na mbeka ya bolongoli masumu? Masumu mana bazalaki koleka na ntaba.
Suka-suka, ntaba akomemama mosika na ‘motò apemela nzela.’ Ntaba na masumu manso ma Izaraélé likolo na yango, bakomema ye na esobe esika wapi mayi na matiti ezali té. Ntaba, natango wana, akoyenga-yenga na esobe nasè na moyi tii akokufa suka-suka. Ntaba akokufa pona masumu ma Bana-Izraélé.
Oyo nde bolingo bwa Nzambe, bolingo bwa bosomi. Ezali ndenge oyo bazalaki pona kolongola masumu ma mbula na makolo wana. Kasi biso tozali kobika na Boyokani bwa Sika. Ezali lokola mbula 2000 banda Yesu ayaki nasè na mokili mwa biso. Ayaki kokokisa elaka oyo esalama na Boyokani bwa Kala. Ayaki kopesa biso bosomi bwa masumu mabiso manso.
Kobesa biso banso Bosomi
Nkombo oyo “YESU” ezali koloba nini?
Mobikisi oyo akobikisa batò ba libota lia Ye na masumu mabango.
Tika ète totanga Matié 1:20-21. “Kasi tango alobelaki likolo na makambo mana, tala, angelo moko na Nkolo abimelaki ye na ndoto, ayebisi ye ète, Yosefu, mwana na David, kobanga té kozuwa nayo Maliya lokola mwasi mwayo, pwète mwana oyo okozuwa na zemi na ye akowuta na Molimo Mosantu. Pe akobota Mwana Mobali, pe okobenga Ye na nkombo Yesu, pwète Akobikisa libota lia Ye na masumu na bango’” (Matié 1:20-21).
Tata na Lola adefaki nzoto na Moseka Maliya pona kotinda Mwana mwa Ye na mokili pona kolongola masumu manso ma mokili. Atindaki angelo moko na Maliya pona koyebisa ye ète, “Tala, okozuwa zemi na kati na libumu nayo, pe okobota Mwana mobali, pe akobengama nkombo na Ye YESU.” Elembolisaki ète Mwana wuta libumu na Maliya akozala Mobikisi. Yesu Kristo oyo akobikisa batò ba Ye, na ndenge mosusu, Mobikisi.
Boye, ndenge nini Yesu abikisaki biso banso na lisumu? Na nzela nini Yesu alongolaki masumu manso ma mokili? Ezalaki kolekela na libatisi na mayi Mayi ma Yordané. Tango Yoane Mobatisi abatisaki Ye, Amemaki masumu manso na nzoto na Ye. Totanga Matié 3:13-17.
“Boye, Yesu ayaki na Galilé kokutana na Yoane na Yordané pona kobatisama naye. Pe Yoane amekaki kopekisa Ye, nakoba ‘Na zali na posa yakobatisama na Yo, pe Ozalikoya ebayi nangai?’ Kasi? Yesu ayanaluki ye ète, ‘Pesa nzela ezala bongo, pwète yango nde ebongI kosalema pona biso kokokisa boyengemene nyonso.’ Nasima, apesaki Ye nzela. Boye Yesu, tango Abatisamaki, pe abimaki na mayi mbala moko; tala, lola efongwami pona Ye, pe Amoni Molimo mwa Nzambe kokita lokola ndeke ya bembe pe etelemaki likola na Ye. Pe na pwasa mongongo moko moyaki wuta lola, koloba ète, ‘Oyo nde Mwana na Ngayi molingami, kati ya nani Nasepeli.’”
Yesu akendaki epayi na Yoane Mobatisi pona kopesa biso bosomi bwa masumu mabiso. Akitaki na mayi, amikitisaki liboso na Yoane. “Yoane, batisa Ngai sik’oyo. Esengeleli pona biso kokokisa boyenbene nyonso. Lokola Nazali pene na kolongola masumu manso ma mokili pe kobikisa basumuki banso na masumumu mabango, Nalingi kolongola masumu mabango mosiki na libatisi lia Ngai. Batisa Ngai! Pesa yango nzela!”
Bongo, bonyengebene nyonso ekokisami. Yesu abatisami na Yoane Mobatisi na Mayi ma Yordané, pena na tango wana, boyengebene nyonso bwa Nzambe bopezi biso bosomi bwa masumu mabiso po tobikisama.
Ezali ndenge oyo, Alongolaki masumu mabiso manso mosika nabiso. Masumu mayo pe manso malongolama nakati na Yesu, elongo. Ososoli yango?
Ndima na bosomi bwa libatisi lia Yesu pena Molimo pe okobisama.
Boyengebene bwa biso banso bokokisami ndenge nini?
Na nzela na libatisi lia Yesu
Nzambe alakaki yambo Izraélé ète, masumu manso ma mokili makolongwama na botiyei maboko pena bobesi mbeka ma masumu. Naloboko mosusu, lokola ezalaki na nzela té pona motò nyonso kotia maboyo maye na mutu na ntaba na bomoko, Nzambe abulisaki Aaloné kozala nganga-nzambe monene pwète akoka kobonza mbeka pona batò banso. Bongo, alekisaki masumu mabango ma mbula likolo na mutut ya mbeka ya lisumu mbala moko bona nyonso. Oyo nde ezalaki Bwanya na Nguya ya bosomi. Nzambe azali na bwania pe Atonda bikamwa.
Atindaki Mwana mwa Ye Yesu pona kobikisa mokili mobimba. Boye, mbeka ya lisumu ebongisamamaki. Sik’oyo, ezalaki kozela motalisi-elongi ya batò banso, moko, oyo akotiya maboko maye na mutut ya Yesu pe alekisaki masumu manso ma mokili na nzoto na Ye. Motalisi- elongi azalaki Yoane Mobatisi. Ekomami na Biblia ète Nzambe atindaki motalisi-elongi mwa batò banso liboso na Yesu.
Ezalaki Yoane Mobatisi, ngana-nzambe ya suka nakati ya batò. Lokola ekomamani na Matié 11:11, “Kati-kati na baye babotami na basi, moko té atelemisaki, monene koleka Yoane Mobatisi.” Azali motali-elongi yabomoko ya batò banso. Atindaki Yoane lokola motalisi-elongi mwa batò banso pwète abatisa Yesu pena kolekisa masumu manso ma mokili na nzoto na Ye.
Soki miliaré motoba ya batò na mokili oyo bakei epayi na Yesu sik’oyo, moko na moko asengeli kotiya loboko na ye na mutu na Yesu pona kolekisa masumu na bango na nzoto na Ye, eloko nini ekokaki kosalema na mutu na Ye? Soki ebele ya batò, koleka miliaré motoba na mokili batiyaki maboko mabango na mutut mwa Yesu, ekokaki kozala kitoko té. Batò yaliko-likolo bakokaki kutindika Ye tii nakolongola Ye suki. Bongo, Nzambe, na Lola, kati na bwanya bwa Ye, Aponaki Yoane kozala motalisi-elongi pe kolekisa masumu manso ma mokili na nzoto na Yesu, mbala moko pona na libela.
Ekomami na Matié 3:13, “Bongo Yesu ayaki na Galilé epayi na Yoane na Mayi ma Yordané kobatisama naye.” Elekaki tango oyo Yesu azalaki na mbula 30 ya botama. Yesu abongisama lokola mwana mobali, mikolo mwambe sima na botama na Ye, pe makambo mike kaka eyebani likolo na Ye tii tango Akomaki na mbula 30.
Mutu na likambo Yesu asengelaki kozela akoma na mbula 30 ezalaki pwète Akoma Nganga-Nzambe ya lola kolandisama na mobeko mwa Nzambe, pena Boyokani bwa Kala. Na mokanda mwa Détéronomé, Nzambe ayebisaki Moize ète nganga-nzambe akozala soki moke na mbula 30 yambo kosala boganga-nzambe. Yesu azalaki Nganga-Nzambe Monene ya Lola. Ondimi yango?
Nakati na Boyokani bwa Sika, na Matié 3:13-14, elobami ète, “Boye Yesu akayi wuta Galilé epayi na Yoane na Yordané kobatisama naye. Pe Yoane amekaki ko pekisa Ye, nakolebela Ye, ‘Nasengeli kobatisama na Yo.’” Nani azali motalisi-elongi na batò banso? Yoane Mobatisi. Bongo, nani motalisi-elongi mwa Lola? Yesu Kristo nde. Batalisi bilongi bakutana. Sik’oyo nani monene koleka? Nabosolo nyonso, motalisi-elongi na Lola Azali Monene koleka.
Bongo Yoane Mobatisi, oyo azalaki na mpiko ya koganga liboso na bakambi ba bandimi na tango wana ète, “Libota lia nyoka ya mabe! Botobela!” Napwasa amikitisaki liboso na Yesu. “Nazali na bosenga nabatisama na Yo, pe ozali koya epayi nangai?”
Na ndelo wana, Yesu alobelaki ye ète, “Tika ète ezala bongo sik’oyo, pwète oyo ezali malamu kosala oyo esengeli pona kokokisa boyengebene nyonso.” Yesu ayaki na mokili kokokisa boyengebene bwa Nzambe, pe tango ekokisamaki po Yoane Mobatisi abatisaki Ye.
“Bongo apesaki Ye nzela. Pe Yesu, tango Abatisamaki, abimaki mbala moko na mayi pe lola efongwamaki likolo na Ye, pe Amonaki Molimo na Nzambe kokita lokola ndeke ya pembe pona kotema likolo na Ye. Pena pwasa mongongo moko eyaki wuta lola, nakoloba ète, ‘Oyo nde Mwana na Ngai molingami, Oyo Nasepeli mingi na Ye.’”
Oyo nde elekaki tango Abatisamaki. Bikuke bia Lola bifongwamaki tango Abatisamaki na Yoane Mobatisi pe alongolaki masumu ma mokili mobimba mosika na biso.
“Pe banda mikolo mia Yoane Mobatisi tii sik’oyo bokonzi na lola bozali kobundisama na makasi, pe batò na makasi bazali kokota na kati na makasi” (Matié 11:12).
Basakoli banso na mobeko basakolaki tii Yoane Mobatisi.
“Pe banda mikolo mia Yoane Mobatisi tii sik’oyo bokonzi na lola bozali kobundisama na makasi, pe batò na makasi bazali kokota na kati na makasi.” Oyo nyonso adimeli libasi lia Ye akoki kokota na Bokonzi bwa Lola pe motò yakokangela ye nzela azali té.
“Ngai pe Nakateli yo Etumbu té”
Pona nini Yesu asambisamaki na Kuruze?
Pwète Alongolaki masumu mabiso mosika na biso.
Yesu Abatisamaki na Yoane Mobatisi pe alongolaki mosika masumu ma mokili. Nasima, Alobelaki na mwasi oyo akangamaki na ekobo ète, “Ngai pe nakateli yo etumbu té.” Akatelaki mwasi wana etumbu té pwète Alogolaki mosika masumu ma mokili na Yordané Yemoko, masumu ma mwasi wana pen a kati, esengelaki mwasi wana alimbisama pona masumu mana.
Yesu alongolaki masumu manso ma mokili. Tokoki komona ndenge nini etondi somo nakati ya pasi na Kuruze, na ndenge nini abundaki pwète ‘lifuti lia lisumu ezali liwa.’ Abondelaki Nzambe mbala misatu na Ngomba ya Olivé alongola mosika na Ye etumbu wana. Yesu azalaki nzoto na makila, kaka lokola batò banso, boye tokoki komona ète Akomaki na somo ya pasi pona kolongola masumu mabiso manso. Yesu azokisama pona kokokisa etumbu.
Kaka lokola mbeka ya lisumu na Boyokani bwa Kala esengaki makila matangama pona kofuta masuma, Amikomisaki mbeka na Kuruze. Alongolaki libela masumu manso ma mokili mosika pe sik’oyo, Asengelaki kopesa bomoyi bwa Ye pona bosomi bwabiso. Ayebiki ète etumbu na Nzambe ezalaki kozela Ye.
Yesu azangaki lisumu ata ya moke na motema mwa Ye, kasi lokola masumu manso malongwaki na nzela na libatisi lia Ye, Nzambe Asengelaki kosambisa Mwana na Ye moko sik’oyo. Boye, na esika ya batò banso, pe boyengebene bwa Nzambe bokokisama. Pe yamibale, Apesaki biso bolingo bwa Ye pona lobiko nabiso. Nasuka nayango, Yesu asambisama na Kuruze.
“Ngai pe nakateli yo etumbu té, tope kosambisa yo té.” Masumu manso mabiso, oyo ezalami na boyebi tope na bozangi boyebi, oyo ekangama na motema tope oyo ebusanama, esengeli esambisama na Nzambe.
Nangambo mosusu, Nzambe asambisi biso té. Nzambe asambisa nde Yesu, oyo Azuwaki masumu mabiso na nzoto na Ye na nzela ya libatisi. Nzambe alingaki té kosambisa basumuki pwète Atonda bolingo na mawa. Libatisi pe na makila na Kuruze ezalaki nakati na bolingo bwa bosomi pona biso. “Pwète Nzambe alingaki mokili pe Apesaki Mwana mwa Ye moko, ète oyo myonso akondimela Ye akufa té, kasi azuwa bomoyi ya seko na seko” (Yoane 3:16).
Ezali bongo toyebi ète bolingo monene ezali oyo ya Nzambe pona biso. Yesu Akatelaki té mwasi akangama na ekobo etumbu.
Ayebaki ète azalaki mosumuki pwète akangama na ekobo kati-kati na kosala yango penza. Azalaki kaka na lisumu nataki na motema naye té, kasi amemaki pe yango na bomoyi na nzoto naye. Nzela ya kowagana lisumu liaye ezalaki lisusu té. Ngambo mosusu, pwète andimaki ète Yesu alongolaki masumu maye manso mosiki naye, abisamaki. Soki tondimeli bosomi bwa Yesu, tokobikisama. Ndima yango! Ezali pona bolamu bwa yomoko.
Nani abambwami mingi koleka?
Baye bazangi lisumu
Batò banso basumukaka. Banso basalaka ekobo. Kasi batò banso basambisama té pona masumu nabango. Tozali biso banso basumuki, kasi baye bandimeli bosomi bwa Yesu Kristo bazali té na masumu lisusu na mitema miabango. Oyo andimeli kati na lobiko na Yesu azali motò ya esengo mingi. Baye bakangwama na masumu bapambwami mingi koleka. Nalolenge mosusu, bazali sik’oyo bayengembeni nakati na Yesu.
Nzambe alobeli biso ète likolo ezali na esengo mingi, nataki na Ba-Romén 4:7, “Babambwama, baye masumu mabango bombwami.” Biso banso tosumukaka tii tango na liwa na biso. Tozangi botosi bwa mobeko pe tokoki té liboso na Nzambe. Tozali kokoba kosumuka ata na sima tokomi na boyeki bwa Mobeko mwa Ye. Tozangi solo-solo makasi.
Kasi Nzambe abikisaki biso na libatisi pena makila ya Mwana mwa Ye moko pe ayebisaki biso, yo, nangai; tozali lisusu basumuki té, pe tokomi sik’oyo bayengebeni liboso na Ye. Ayebisi biso ète tozali bana ba Ye.
Sango-malamu ya mayi na Molimo ezali sango-malamu ya bosomi bwa seko na seko. Ondimi yango? Nabaye bandimi, Abenga bango bayenbeni, basombami pe bakomi bana ba Ye. Nani azali motò ya esengo mingi koleka na kati na mokili oyo? Baye bandimi pe babikisami nabondimi ya sango-malamu ya solo. Osi obikibami na bomoyi bwayo?
Yesu azangi kolongola masumu mayo? Té, Alongolaki masumu mayo nakati na libatisi lia Ye. Ndima yango. Ndima sè kondima pe okozuwa bosomi bwa masumu mayo manso. Totanga Yoane 1:29.
Kaka lokola Elongwama na Nzela na Ye
Masumu boni Yesu alogolaki?
Masumu manso ma mokili
“Lobi na yango Yoane amoni Yesu koya epayi na ye, pe aloki, ‘Botala! Mwana-Mpate na Nzambe oyo Alongola lisumu lia mokili!’” (Yoane 1:29).
“Botala! Mwana-Mpate na Nzambe oyo Alongola lisumu lia mokili.”
Yoane Mobatisi alongolaki masumu manso ma mokili atiyaki mango na nzoto na Yesu na Yordané. Lobi nayango, atatolaki ète Yesu azalaki Mwana-Mpate na Nzambe oyo alongoli masumu manso makokili. Amemaki na mapeka ma Ye masumu mamokili.
Masumu manso mamokili esangisi masumu manso maye batò banso basalaki namokili, banda bokeli ya mokili tii suka na yango. Ezalaki mbula 2000, Yesu alongolaki mosika masumu ma mokili pe apesa biso bosomi. Lokola Mwana Mpate na Nzambi, Alongoli mosika masumu mabiso pe asambisama pona biso.
Lisumu nyonso oyo biso batò tosalaki elekaki na nzela na Yesu. Akomaki Mwana-Mpate na Nzambe oyo alongolaki masumu ma mokili.
Yesu ayaki na mokili mokili lokola motò ya komikitisa, lokola Oyo abikisi basumuki banso na mokili. Tozali kosumuka pwète tozangi makasi, batò na motema mabe, bazangi boyebi, pe pwète tozali bazoba pe totondisami té. Nalolenge mosusu, tosumukaka pwète tobotami na lisumu wuta koko na biso banso Adam. Masumu manso masokolama pe matiyama na mutu na Yesu na nzela na libatisi lia na Yordané. Azukisaki yango nyonso na liwa lia nzoto na Ye na Kuruze. Akundama, kasi asekwa wuta baweyi na mokolo mwa misatu.
Lokola Mobisi na bazumuki banso, lokola Molongi, lokola Mosambisi, afandi sik’oyo na loboko ya mobali ya Nzambe. Asengelaki kobikisaka biso mbala na mbala. Nyonso tosengeli kosala ezali kondima Ye pona kobikisama poana libela. Bomoyi bwa seko ezali kozela baye bandimi, pe etumbu ezali kozela baye bandimi té. Nzela mosusu ezali té.
Yesu abikisi biso banso. Bozali batò na esengo mingi koleka na mokili. Okosumuka nasima mikolo pona bolembu bwayo, kasi Alongolaki masumu manso, yayo pe.
Ezali na lisumu ata moko Katina na motema nayo? —Té.—
Yesu alongolaki yango nyonso? —Boye! Alongolaki yango.—
Batò bazali ndenge moko. Moko té azali mosanto koleka ndeko na lopango naye. Kasi batò ebele bazali batò babilongi mibale, bandimi té bazali basumuki, tango oyo bazi bongo. Mokili oyo ezali ndako eliaka masumu lokola bileyi.
Tango basi balongwaka na bandako na bango, batiyaka langi na mbebu na bango, pudré na bilongi na bango, kerlé na suku na bango, balata pe bilamba kitoko, pe balati sapato ya talon molayi.... Mibali pe, bakendaka kokatisa suki nabango kitoko, bamibonsaka malamu, balati bilamba ya kitoko baponi kravaté na malamu, babongisi sapato nabango malamu.
Kasi natango bazali komonana batò malamu libanda, nzokande batondi na mabe na kati.
Mbongo ekomisaka batò na esengo? Bokolongo bwa nzoto ekomisa batò na esengo? Té. Kaka bosomi bwa seko, bolinbisami bwa masumu, ekomisa nsolo-solo batò na esengo. Ezala lolenge nini motò azali komomonisa libanda, kasi, azali motò na pasi nakati na motema naye. Motò ya boye azali kobika na bobangi bwa bosambisami bwa Nzambe.
Mosomi azali motò na mpiko lokola nkosi, ata azali namakoki mingi té kasi atondi na elikia. Masumu mazali na motema mwaye té. “Matondi Nkolo, obikisi ngai mosumuki lokola ngai. Olongoli masumu mangai manso. Nayebi nakoki té koyamba bolingo bwa Yo, kasi na kumisi Yo po Obikisi ngai. Na zuwi bosomi bwa masumu mangai pona seko na seko. Lokumu ezala na Yo, Nzambe!”
Motò oyo abikisami solo-solo akomi motò na esengo. Motò oyo apambwami na ngolu na bosomi ezali motò na esengo.
Pwète Yesu, ‘mwana mpate na Nzambe oyo alongoli lisumu lia mokili,’ alongolaki mosika na biso masumu mabiso manso, tozali na masumu lisusu té. A ‘silisaki’ lobiko na bison a Kuruze. Masumu mabiso manso, elongo na yayo na yangai, ezali na kati na ‘lisumu lia mokili,’ pe bongo, to bikisami.
Posa na Nzambe
Tozali na masumu na mitema mia biso tango tozalina Yesu Kristo?
Té, tozali nayango té.
Bandeko balingami, mwasi oyo akangama na ekobo andimaki kati na maloba ma Yesu pe abikisama. Lisolo liaye likomami na Biblia pwète apambwama na bosomi bwa seko na seko. Ngambo mosusu, Bakomi-Mikanda na Ba-Falizé, batò na bilongo mibale, bakimaki Yesu.
Soki ondimi Yesu, Lola nde ezali kozela yo, kasi soki obwaki Yesu, okokende lifelo. Soki ondimi misala mia Ye mia boyengebene, ezali lokola Lol efongwami pona yo, kasi soki ondimi té misala mia Ye, ezali lokola lifelo ezali kozela yo. Bosomi ezali té lisolo ya makasi tope ya bozwi ya motò, kasi lisolo lia kobikisama Yesu.
Tika ète totanga Ba-Ebré 10. “Pwète Mobeko, ezalaki elili ya biloko malamu ekoya, pe ezalaki té lolenge biloko ezalaki komonana na miso na batò, ekokaki ata moke na mbeka moko-moko wana, oyo bazalaki kopesa mbula na mbula, kobulisa baye bazalaki kopusana na nzela na yango. Pona nini, batikaki yango epayi? Pwète bakomi na elongi na Nzambe, tango babikisami, bakozala lisusu té na lisumu na kati na mitema miabango. Kasi na mbeka wana ezalaki na makasi likolo na masumu mbula na mbula. Pwète makila mangombe na ntaba makoki kolongola masumu mosika ata moke té. Ponayango, tango Ayaki na mokili, Alobaki ète: ‘Ozalaki na posa ya mbeka té, kasi Ozalaki nzoto moko, pe Obongizaki Ngai. Osepelaki té na kobonza pe na mbeka ya lisumu. Bongo nalobaki, ‘Tala, nayei—nakati na mokanda ekomami pona Ngai—pona kosala posa na Yo, O Nzambe.’’ Alongolaki na yambo mosika pe Afandisaki oyo ya mibale na esika. Na posa na Yo tosantisami na nzela na mbeka ya nzoto na Yesu Kristo mbala moko pona libela” (Ba-Ebré 10:1-10).
“Na posa na Nzambe” Yesu apesaki bomoyi bwa Ye pona kolongola masumu ma biso mbala moko, pe asambisamaki pona nyonso mana mbala moko, nasima na yango, Asékwaki.
Nde, tosantisami. ‘Tokomi basantu, (Ba-Ebré 10:10)’ ndenge komami na tango ya makambo ma lelo. Yango etalisi ète bosomi bwa biso bozali na bontondisi ya bokokanisami nyonso, pe eloko mosusu yakobakisa ezali té. Tosantisami pona libela.
“Ngana-Nzambe nyonso azalaki kotelema pona na kobonza mbeka ndenge wana mokolo na mokolo, ezalaki na makoki ma kolongola masumu mosika té. Kasi Motò oyo, sima Abonzaki mbeka moko kaka pona masumu babiso libela, afandaki na loboko ya Mobali na Nzambe Nzambe, banda tango wana, tozali kozela tii bayini na Ye banso bakoma etambolelo na Ye. Pwète na mbeka moko kaka Abulisaki libela baye bapetolami” (Ba-Ebré 10:11-14).
Bosantisami bino banso libela. Soki bozali masumu lobi kuna, makolimbisama lisusu? Yesu alongolaki pe masumu mane? Boye, malongwama pe. Alongolaki pe masumu ma lobi kuna.
“Kasi Molimo Mosantu mozali kotatola pona biso; pwète sima Alobaki yango liboso, ‘Oyo nde boyokani Nakosala na bino nasima mikolo mana, elobi Nkolo: nako tiya Mibeko mia Ngai nakati na mitema miabango, pena kati na makanisi mabango Nakokoma yango.’ Pe Abakisi, ‘Nakokanisa lisusu té masumu na mabunga na bango.’ Sik’oyo esika wapi bolimbisi bwa masumu bozali, esika wapi mbeka na masumu esengami lisusu té!” (Ba-Ebré 10:15-18).
Molonga oyo mwa makomi ‘bosengi bwa bolimbi na yango’ molingi koloba ète, Alongolaki masumu manso ma mokili. Yesu azali Mobikisi mwa biso banso, Mobiki nangai pe Mobiki nayo. Kondima Yesu ebikisi biso banso. Oyo ezali bosomi pe ngolu monene na likabo lia Nzambe. Yo nangai, baye tozuwi bosomi bwa masumu mabiso manso, tozali batò bapambwami mingi koleka batò banso!