• All e-books and audiobooks on The New Life Mission website are free
  • Explore multilingual sermons in global languages
  • Two new revised editions in English have been released
  • Check out our website translated into 27 languages
Search

Sermons

Liteya lia 4: Masumu Maye Mazongaka Mokolo na Mokolo

[4-1] Sango-Malamu Ya Bosomi Ya Monene (Yoane 13:1-17)

Sango-Malamu Ya Bosomi Ya Monene(Yoane 13:1-17)
“Sik’oyo liboko ya féti ya Paska, tango Yesu ayebaki ète tango na Ye akokisama ète Azalaki kokenda mosika na mokili epayi na Tata, ndenge alingaki baye ba Ye bazalaki nakati na mokili, Alingaki bango tii na suka. Nasuka ya bilei bia pokwa, Satana asilisaki kotiya na motema mwa Yuda Iscarioté, mwana na Simoné, koteka Ye, Yesu, oyo Ayebaki ète Tata apesaki biloko binso na maboko ma Ye, pe Awuta epayi na Nzambe pe Azali kozonga epayi Nzambe, atelemaki na mesa ya bileyi pe alongolki elemba ne Ye yamolayi ya likolo, azuwaki elamba ya maboko pe amikangaki yango na loketo na Ye. Sima kosopa mayi na sani ya monene, Abandi kosokola makola mabayekoli ba Ye pe, na kobangosa yango na elemba ya maboko oyo Akangaki na loketo na Ye. Bongo, ezalaki tango na Simoné Piere. Pe Piere ayebisaki Ye ète, ‘Nkolo, ozali kosokola makolo mangai?’ Yesu ayanolaki ya ète, ‘Oyo nazali kosala okoki kososola yango sik’oyo, kasi okoyeba yango nasima.’ Piere alobaki na Ye ète, ‘Okosokola té ata moke makolo mangai!’ Yesu ayanoli ye, ‘Soki nasokoli yo té, okozala elongo na Ngai té.’ Simoné Piere alobi na Ye ète, ‘Nkolo, kaka makolo mangai té, kasi maboko na mutu nangai!’ Yesu alobeli ye ète, ‘Oyo asi kosokola azali na posa ya kosola kaka makolo maye, kasi asokwama mobimba libela; pe ozali peto, kasi bino banso té.’ Pwète Ayebaki nani alingaki koteka Ye; Bongo, Alobaki, ‘Bozali bino banso peto.’ Bongo, tango asilisaki kosokola bango makolo mabango, azuwaki elamba na Ye ya molayi ya likolo, pe Afandaki nasè lisusu, Ayebisaki bango, ‘Boyebi eloko nini nawuti kosala na bino? Bobengaka Ngai Molakisi na Nkolo, pe bolobi yango malamu, pwète yango nde Nazali. Soki, Ngai, Nkolo na Molakisi na bino, nasokolaki bino makolo mabino, esengeli bino, pe kosokola makolo kati-kati na bino moko na moko. Pwète napesi bino ndakisa, ète bosengeli lokola Ngai komisalela yango. Solo-solo, Nalobeli bino, mosali azalaka monene té koleka nkolo naye; tope motindami kolela oyo atindi ye. Soki boyebi makambo maye, bozali batò ya esengo mingi soki bozali yango.’”
 

Pona nini Yesu asokolaki makolo ma Piere mokolo wana liboso na féti ya Paska? Moke liboso na kosokola ye makolo, Yesu alobelaki ye ète, “Ozali kososola té sik’oyo, kasi okoyeba sima na yango.” Piere azalaki moyekoli ya malamu koleka ya Yesu. Andimaki ète Yesu azalaki Mwana na Nzambe pe atatolaki ète Yesu azalaki Kristo. Lokola Yesu asokolaki makolo maye, ezalaki na likambo na sima pona nini asalaki bongo. Tango Piere atatolaki ète Yezu azalaki Kristo, elingaki koloba ète Yesu azalaki Kristo, elingi koloba ète andimela Yesu kozala Mobikisi oyo Abikisa ye na masumu manso.

Pona nini Yesu asokolaki makolo ma bayekoli baye liboso ya kokende kokufa na Kuruze?
Pwète Alingaki ba sosola lobiko esantu na Ye.

Pona nini asokolaki makolo ma Piere? Yesu ayebaki ète Piere akoboya ye kala mingi té, mbala misato, pe akokoba kosala masumu na sima.
Soki, na sima na Yesu komata Lola, Piere azalaki na lisumu té na kati na motema ye lisusu, akokaki té kosala na bomoko na Yesu. Kasi Yesu ayebaki bolembu na bayekoli na Ye banso pe alingaki té masumu na bango ezala kati-kati na Ye na bango. Bongo, Alingaki Koyebisa bango ète masumu na bango manso malongwama kala mosika na bango. Ezali ponayango Asokolaki bango makolo. Yesu, liboso Akufa pe Atika bango, Alingaki kopesa bango elikia ète batelema gwi kati na sango-malamu ya libatisi lia Ye pe bolimbisi ya kotonda ya masumu ma bomoyi nabango mobimba.
Yoane 13 elobeli likolo na lokibo ya solo-solo oyo Yesu akokisaki pona bayeba Ye malamu. Tango azalaki kosokola bango makolo, Yesu ayebisaki bango bwanyia bwa libatisi lia Ye na nzela oyo batò banso bakoki kosokolama na masumu mabango manso.
“Satana akosa bino té na mikolo mikoya. Nalongolaki masumu mabino mosika na libatisi lia Ngai kati na Mayi na Yordané pe Nako zuwa etumu na bino na Kuruze. Nasima, Nakosekwa wuta liwa pe kokokisa lobiko ya batò babotami mbala ya mibale pona bino banso. Kotalisa bino ète Nasi kolongola mosika nabino masumu mabino ya mikolo ekoya, pona koteya bino sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu, Nazali kosokola bino makolo liboso na kufa na Kuruze. Oyo nde sékélé ya sango-malamu ya botama ya mbala ya mibale. Bosengeli bino banso kondimela yango.”
Tosengeli kososola pona nini Yesu asokolaki makolo ma bayekoli na Ye pe Ayebaki pona nini Azalaki koloba ète, “Oyo Nazali kosala bokoki kososola yango sik’oyo, kasi bokoyeba yango sima nayango.” Kaka bongo nde tokoki kondimela sango-malamu ya botama ya mabala ya mibale biso moko.
 

Alobaki na Yoane 13:12

Masumu mazali nini?
Mazali mbemba tozali kosala mokolo na mokolo pona bolembu nabiso.

Yambo Akufa na Kuruze, Yesu azalaki na féti ya Paska na bayekoli ba Ye pe akotisaki bango na sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu na nzela ya kosokolama makolo na maboko ma Ye moko.
“Yesu ayebaki ète Tata apesaki Ye biloko nyonso na maboko ma Ye, pe Awuta epayi na Nzambe pe, Azalaki kozongo epayi na Nzambe, Atelemaki na mesa ya bileyi ya pokwa pe alongolaki elamba na Ye ya molayi ya likolo, azuwaki elemba ya moke ya maboko pe amikangaki yango na loketo na Ye. Nasima na yango, Asopaki mayi na sani ya monene pe Abandi kosokola makolo ma bayekoli ba Ye pe kopangoza yango na eteni ya elamba ye maboko oyo amikanga na loketo. Bongo, Ayaki epayi na Simoné Piere. Pe Piere ayebisi Ye, ‘Nkolo, okosokola ngai makolo mangai?’ Yesu ayanolaki ye ète, ‘Oyo nazali kosala okososola yango sik’oyo té, kasi okoyeba yango na sima’” (Yoane 13:3-7).
Atangisaki bayekoli ba Ye sango-malamu ya libatisi pe bosomi bwa masumu na nzela na mayi ya libatisi lia Ye.
Natango wana, kozala nabondimi pona Yesu, Piere azalaki na makoki té ma kososola pona nini Nkolo Yesu asokolaki makolo maye. Nasima, Piere asosolaki solo-solo oyo Yesu asalaki ponaye, ndenge naye akondima Yesu abalukaki. Yesu alingaki koteya ye likolo na bolimbisi bwa masumu, likolo na sango-malamu ya mayi ya libatisi lia Ye.
Azalaki na mukumba ète Piere akokoka té koya epayi na Ye pona masumu maye ma mikolo mikoya, na ndenge mosusu, masumu ma bolembu bwa nzoto ma mikolo ya sima. Yesu asokolaki makolo mabango pwète Satana akoka kobotola kondima nabango té. Sima, Piere ayaki kososola ponani, na sima.
Yesu abongisaki nzela pwète oyo nyonso akondima libatisi lia mayi pe, na makili ma Ye azuwa bosomi ya masumu maye libela.
Na Yoane 13, maloba maye alobaki tango azalaki kosokola makolo ma bayekoli ba Ye. Mazalaki maloba ma motuya mingi maye kaka batoma mbala ya mibale nde bakoki kososola yango.
Tina Yesu asokolaki makolo ma bayekoli ba Ye sima na féti ya Paska ezalaki kosunga bango komona ète Alongolaki libela mosika masumu ma bomoyi bopimba na bango. Yesu alobaki, “Pona nini Nazali kosokola makolo mayo, okoki kososola yango sik’oyo té, kasi okoyeba yango sima.” Maloba maye epayi na Piere ezalaki na kati na yango bosolo bwa bosomi ya seko na seko kati na Ye.
Tosengeli biso banso koyeba pe kondima kati na libatisi lia Yesu, nzela oyo masumu na mabunga manso malongwama mosika. Libatisi lia Yesu na Yordané ezalaki sango-malamu ya bolongoli masumu na kotia maboko na mutu. Tosengeli kondima biso banso maloba ma Yesu. Alongolaki masumu ma mokili manso mosika na nzela na libatisi lia Ye pe Akokisaki bosomi bwa masumu na kosambisama na Kuruze. Yesu abatisima pona kolongola batò na masumu nabango.
 
 

Bolimbisi Bwa Masumu na Mabunga Mabiso Manso Kati na Bomoyi na Biso Mobimba Makokisama na Nzela Ya Libatisi pe, na Makila ma Yesu


Motambo na Satana pona kobundisa moyengebeni ezali nini?
Satana azali komeka kokosa moyengebeni pona kosala masumu lisusu.

Yesu ayebaki malamu ète, sima liwa na Kuruze, akosekwa pe akokende Lola, Satana na basali baye ba kobundisa kondima ya solo, bakokosa bayekoli, sima na Ye. Totala malamu litatoli lia Piere, “Ozali Kristo, Mwana na Nzambe na bomoyi,” yango etalisi ète andimelaki Yesu. Kasi kaka, Yesu Alingaki kotalisa Piere mbala mosusu ète esengelaki abatela sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu na kati na mayele maye. Sango-malamu wana ezalaki libatisi lia Yesu, na nzela nini Alokongolaki mosika masumu manso ma mokili. Alingaki koteya yango lisusu epayi na Piere, epayi na bayekoli pe epayi ya biso pe, baye bakoya na sima. “Oyo Nazali kosala, okoki kososola yango sik’oyo té, kasi okoyeba yango sima.”
Tango nyonso bayekoli ba Yesu basumukaki, Satana azalaki komeka bango pe kokatela bango etumbu, ète, “Tala! Soki ozali kaka kosala masumu, ndenge nini okoki kolola ète ozali té na lisumu kati-kati nayo? Obikisama té. Ozali mosumuki yapamba.” Pona koleka mosika na bosongisami sima, Yesu ayebisa bango ète kondima kati na libatisi lia Yesu esili kolongola mosika na bango masumu manso ma bomoyi nabango mobimba—ya kala, ya sik’oyo, pe ya lobi ekoya.
“Bino banso boyebi malamu ète Nabatisama! Tina na libatisi lia Ngai na Yordané lizali ète Nalongola masumu mabino mabomoyi nabino mobimba, elongo na, ya botama ya bomotò nabino. Bokoki kososola sik’oyo pona nini Nabatisama, pe pona nini esengelaki nakufa na Kuruze?” Yesu asokolaki makolo ma bayekoli baye pona kotalisa ète Alongolaki masumu mabango ma mikolo na mikolo na nzela na libatisi, pe etumbu na yango, Amemaki yango na Kuruze.
Sik’oyo, yo nangai tosokwami na masumu mabiso manso na nzela na kondima kati na sango-malamu ya libatisi lia Yesu na makila ma Ye, yango nde ekotisi biso na kati na bolimbisami bwa masumu mabiso. Yesu Asambisama na Kuruze pona biso. Alongolaki mosika nabiso masumu manso mabiso na nzela na libatisi lia Ye pena makila ma Ye. Oyo nyonso ayebi pe andimeli sango-malamu ya bosomi bwa masumu pe andimeli kati na solo azuwi bosomi bwa masumu maye.
Bongo, mobotami mwa mbala ya mibale akosala nini sima na lobiko naye? Esengele andima masumu maye mokolo na mokolo pe andimela lobiko naye ya libatisi pe makila ma Yesu, sango-malamu ya bosomi bwa masumu manso. Sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu ezali oyo, biso baye tobotama mbala ya mibale, esengeli tokanga na makasi manso kati namakanisi mabiso.
Kaka pwète osumukaki lisusu, elingi koloba ète ozali mosumu lisusu? Té. Koyeba ète Yesu alongolaki mosika msumu mabiso manso, ndenge nini tokoki kozala lisusu basumuki? Libatisi lia Yesu na makila ma Ye na Kuruze ezalaki sango-malamu ya bosomi pona masumu mabiso banso. Oyo nyonso andimeli sango-malamu oyo tobandaki nayango, ya bolimbisi ya masumu, akoki kobotama mbala ya mibale, pe motò yakopekisa ye nzela wana azali té, azali ‘moyegenbeni.’
 
 

Bayengebeni Bakoki Té Kokoma Basumu Lisusu


Pona nini bayengebeni bakoki té kosumuka lisusu?
Pwète Yesu asili kolongola masumu na bango manso ma bomoyi na bango libela.

Soki ondimeli sango-malamu ya bolimbisi ya masumu, ya mayi pena Molimo, kasi ozali komiyoko lokola mosumuki pona masumu ya mokolo na mokolo, bongo esengeli okende na Yordané, esika wapi Yesu abatisama pona kolongola mosika nayo masumu mayo manso. Soki okomi lisusu mosumuki, sima boyambi bwa bolimbi bwa masumu mayo, Yesu asengeli abatisama mbala mosusu, pe mbala na mbala. Osengeli nde kondimela kati na bolimbisami bwa masumu mayo na nzela ya sango-malamu ya libatisi lia Yesu. Osengeli kokanga na mayele mayo ète Yesu alongolaki mosika nayo masumu mayo mbala moko pona libala na nzela na libatisi lia Ye. Osengeli kokangama na kondima nayo makasi kati na Yesu Kristo lokola Mobikisi nayo.
Kondimela Yesu lokola Mobikisi mwayo elingi koloba ète ondimeli kati na libatisi lia Ye, oyo alongolaki mosika masumu mayo manso kati na bomoyi nayo mobimba. Soki solo-solo ondimeli kati na libatisi lia Ye, Kuruze, liwa, pena lisekwa lia Yesu, okoki té lisusu kokoma mosumuki, ezala lisumu nini osalaki. Ozuwi bosomi bwa masumu mayo manso ma bomoyi nayo mobimba na nzela na kondima nayo.
Yesu Kristo alongola pe masumu ma lobi ekoya libela, ata masumu maye tozali kosala na kati ya bolembu nabiso. Lokola kaka Yesu pona kofandisa mutuya ya libatisi, Asokolaki makolo ma bayekoli ba Ye na mayi, elembo na sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu, oyo ezali, libatisi lia Ye. Yesu Kristo abatisama, akufa na Kuruze, asekwaki, amataki na Lola pona kokokisa elaka na Nzambe ya bosomi pona masumu manso ma mokili pe abikisi batò banso. Wuta elembo wana, bayekoli ba Ye bazalaki na makasi yakoteya sango-malamu ya bosomi bwa masumu, libatisi lia Yesu, Kuruze, pe lisekwa, banda sik’oyo tii suka na bomoyi na bango.
 

Bolembu Bwa Nzoto Ya Piere

Pona nini Piere awangana Yesu?
Pwète azangaki makasi

Biblia ezali kotalisa biso ète Piere afundamaki na basali ba Kaifa, Nganga-Nzambe Monene, balobaki ète azalaki moyekoli mwa Yesu, awanganaki mbala mibale, nakoloba ète, “Té, nayebi Motò wana té.” Bongo, akata ndayi pona mbala ya misato.
Totanga molongo oyo ya Matié 26:69. “Sik’oyo Piere afandaki libanda na lopango ya bosambisami. Pe mwana mwasi moko ayaki epayi naye, alobeli ye ète, ‘Yo pe ozalaki na Yesu ya Galilé.’ Kasi awanganaki liboso nabango, pe alobaki ète, ‘Nayebi té oyo ozali koloba.’ Na tango abimaki na ekuke monene, mwana mwasi mosusu amonaki ye, pe alobi nabaye bazalaki wana, ‘Mobali oyo azalaki na Yesu ya Nazareté.’ Kasi lisusu awanganaki pe nakokata ndayi, ‘Nayebi té Motò wana!’ pe sima tango moke, baye bazalaki yakotema bayaki epayi naye, pe balobaki na Piere ète, ‘Solo-solo ozali moko na bango, pwète elobeli nayo ezali kofunda yo.’ Bongo, abandi kolakela mabe pe kokata ndayi, nakoloba ète, ‘Nayebi té Motò wana!’ Pe mbala moko soso mobali agangaki. Pe Piere azongisaki mayele na liloba lia Yesu oyo elobama naye ète, ‘Yambo soso mobali aganga, okowangana Ngai mbala misato.’ Pe abimaki libanda pe alelaki na motema mwaye mobimba” (Matié 26:69-75).
Piere solo-solo andimelaki Yesu pe alandaki Ye na boyengebene nyonso. Andimaki ète Yesu azalaki Mobikisi pe ‘Mosakoli’ akoya. Kasi tango Yesu akangama na lobango lia bosambisi ya Kaifa pe ekomaki kobangisa ye kokoba na bofandi elongo na Yesu liboso na bakonzi, awangana Ye pe alakela Ye mabe liboso nabango.
Piere ayebaki té akowangana Yesu, kasi Yesu ayebaki akosala yango. Yesu ayebaki ète Piere azalaki na bolembu kati naye. Ponayango, Yesu asokolaki makolo ma Piere pe Afandisaki sango-malamu ya lobiko nakati naye, lokola ekomami na Yoane 13, “Okosumuka na mikola mia sima, kasi nasili kosokola yo libela pona masumu mayo ma mikolo mikoya.”
Piere awangana solo-solo Yesu tango bomoyi bwa ye bokomaki na pasi pe mikakatano, kasi yango ezalaki likolo na bolembu ya nzoto naye nde asalaki bongo. Boye, pona kobikisa moyekoli mwa Ye na masumu ma lobi ekoya, Yesu asokolaki ye makolo liboso.
“Nakolongola masumu mayo manso ma mikolo ya sima, elongo. Nazali kokende kokufa na Kuruze pwète Nabatisama pe Nalongola masumu mayo manso, pe Nakofuta pona nayango nyonso, pe etumbu na yango ekokweya na mapeka ma Ngai, pwète Nakozala Mobikisi ya solo nayo. Nazali Mobikisi mwayo. Nakofuta nyongo ya masumu nayo nyonso, pe Nakozala Mobateli nayo na nzela na libatisi lia Ngai pena makila ma Ngai. Nazali Mobateli ya lobiko nayo.”
Pona kolona bosolo oyo makasi nakati na mitema miabango, Yesu asokolaki makolo mabango sima na féti na Paska. Oyo nde bosolo ya sango-malamu.
Pwète nzoto na biso ezali na bolembu, ata na sima ya botama ya mbala ya mibale, tokosumuka lisusu. Solo-solo, tobengami kosumuka lisusu té, kasi liboso na tango ya mikakatano pena pasi lokola ekomelaki Piere, tozali kokweya na masumu kasi na Katina na motema, tozali koboya oyo tozali kobika na kati na nzoto. Boye, tango mosusu tobendami na bobesi na masumu mabiso. Nzoto ekosumuka tango nyonso tokozala awa na mokili yasè, kasi Yesu alongolaki masumu mabiso manso na libatisi lia Ye na makila na Kuruze.
Tozali koboya té Yesu lokola Mobikisi mwabiso, kasi tango tozali kobika kati na nzoto, kozali kokoba kosumuka liboso na posa na Nzambe. Ezali pwète tobotama na nzoto oyo.
Yesu ayebaki ète tokosala masumu tango tozali na nzoto oyo, bongo Akomaki Mobikisi mwabiso, na kofuta nyongo ya masumu mabiso na nzela na libatisi lia Ye pena makila ma Ye. Alongolaki masumu manso mabaye bandimeli lobiko pena lisekwa lia Ye.
Ezali pona nini ète mikanda mia sango-malumu minei nyonso ebandi na lisolo lia libatisi lia Yesu na nzela ya Yoane Mobatisi. Tina na mobotò na Ye ezalaki pona kokokisa sango-malamu ya botama ya mbala ya mibale, sango-malamu oyo ya lobiko.

Tango boni tosumukaka na kati na nzoto?
Tosumukaka na nzoto bomoyi bwa biso mobimba tii liwa.

Tango Piere awanganaki Ye té mbala moko, tope mibale, kasi mbala misato liboso soso ya mobali aganga, ndenge nini ekokaki kopasola motema mwaye! Soni mingi etonda motema mwaye, solo-solo! Akataki ndayi liboso na Yesu ète akoki koteka Ye ata moke té. Asumukaki pwète nzoto naye ezalaki na bolembu, kasi mawa mingi pona naye tango akweyaki kati na bolembu bwaye moko, pe awanganaki Yesu, mbala moko té, kasi mbala misatu! Azangaki kimia tango Yesu atalaki ye lisusu na mawa!
Kasi Yesu ayebaki makambo manso mana na mosusu libanda na yango. Panayango, Alobi ète, “Nayebi ète okosumuka lisusu. Kasi nasi nalongola mosika masumu mayo manso na libatisi lia Ngai, pamba té, masumu mayo mazongisa yo sima na bomoyi bwa bosumuki, okoya kozanga kozongela Ngai. Nakomi Mobikisi na nyonso pona yo, na nzela ya libatisi lia Ngai pe nasambisama pona masumu mayo. Nakomi Zambe nayo, Mobateli mwayo. Ndimela sango-malamu ya lolimbisi ya masumu mayo. Nakokoba kolinga yo ata okosalaka masumu pona nzoto nayo. Nasilisi kolongola mosika nayo masumu mayo manso. Sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu ezali ya solo pe ya libela. Bolingo na Ngai pona yo ezali ya seko na seko.”
Yesu ayebisaki Piere na bayekoli na Ye, “Soki na sokili bino makolo ma bino té, bokozala elongo na Ngai té.” Tina Alobaki pona sango-malamu na kati na mokanda na Yoane 13 ezalaki ète ezalaki na motuya mingi pona batò kobotama mbala ya mibale na mayi pena Molimo. Ondimeli yango?
Na molongo na 9, “Simoné Piere alobi na Ye ète, ‘Nkolo, kaka makolo mangai té, kasi maboko na mutu nangai elongo!’ Yesu alobeli ète, ‘Oyo asokwama azali na bosenga na kosokolama makolo maye, kasi asokwama mobimba naye.’”
Bandeko balingami, bokosala masumu ‘ma nzoto’ na mikolo mikoya, tope bokozala té? Bokosala yango. Kasi Yesu alobaki ète Alongolaki libela masumu mabino manso, nata oyo ya mikolo mikoya, masumu manso ma nzoto nabino na nzela na libatisi pena makila ma Ye, pa Ayabisa polele bayekoli ba Ye liloba lia bosolo, lia sango-malamu ya bosomi, liboso Akufa na Kuruze.
Pwète tozali kobika kati na nzoto na biso, na bolembu nabiso, tokoki kozanga lisumu ata ya moke té. Yesu alongolaki mosika nabiso masumu ma mokili mobimba na libatisi lia Ye. Asokolaki té kaka mitu na nzoto na biso, kasi makolo mabiso pe, yango ezali, masumu mabiso manso ma mikolo ekoya. Oyo ezali sango-malamu ya botama ya mbala ya mibale, ya libatisi lia Yesu.
Sima libatisi lia Yesu, Yoane Mobatisi atatolaki ète, “Botala! Mwana-Mpate na Nzambe oyo alongoli mosika lisumu lia mokili!” (Yoane 1:29) Tosengeli kondima ète masumu manso ma mokili maleka na nzoto na Yesu, na libatisi lia Ye.
Tango tozali kobika kati na mokili oyo ya masumu, tokoki té kotika kosumuka solo-solo. Ezali eloko oyo tokoki kotika na mobimpa nayango té. Tango nyonso oyo bolembo bwabiso bozongaka, tika ète tokanisa Yesu alongolaki masumu mabiso mosika elongo na masumu manso ma mokili na nzela na sango-malamu ya bolimbisi, pe afutaki pona yango na makila ma Ye. Tosengeli kotonda Ye matondo wuta kati na mitema miabiso. Tika ète totubela na kondima ète Yesu azali Mobiki pe Nzambe nabiso. Nkolo akumisama.
Moko té na mokili oyo akoki kozanga kosumuka ata na makambo ya mike-mike pona bolembu bwa nzoto. Batò mingi basumukaka na nzoto na bango pe bakokufa kati na masumu ma bomoyi na bango.
 

Makanisi Mabe Kati na Mitema mia Batò

Nini ebundisaka motò?
Masumu kili-kili pe makanisi ya mabe

Yesu alobi na Matié 15:19-20. “Pwète wuta motema ebimaka makanisi mabe, koboma, ekobo, kidumba, moyibi, litatoli ya lokuta, makambo ezangi bosolo na Nzambe. Yango, nde makambo mazali kobebisa motò, kasi kozanga kosokola maboko liboso ya kolia ezali kobundisa motò té.” Pwète masumu manso ma kili-kili mazali na motema ya motò mazali kobundisa ye, pe azali peto té.
 

Motò Asengeli Koyeba Bomotò Bwa Mabe Bwa Ye

Nini ezali nakati na motema ya motò nyonso?
Mitindo zomi na mibale ya masumu (Marko 7:21-23)

Tosengeli kozala na makoki makoloba ète, “Mitindo mia masumu zomi na mibale mizali na kati na mitema miabatò. Nazali na yango nyonso kati na motema nangai. Nazali na masumu ya mitindu zomi na mibale kati na nangai, ndenge ekomani na Biblia.” Liboso tobotama mbala ya mibale na mayi pena Molimo, esengeli kondima ète masumu mazali banda botama kati na mitema miabiso. Esengeli tondima ète tozali basumuki ya solo liboso na Nzambe, kasi tozalaka yango té mingi-mingi. Mingi kati-kati nabiso bazali komikosa na kosenga bolimbisi, nakoloba ète, “Nazalaki na makanisi mana na motema nangai, nabungaki nzela kaka.”
Kasi Yesu azali koloba nini bona batò? Alobeli yango polele ète oyo ezali kobima na motema ya motò, yango nde ‘ezali kobundisa’ ye. Ayebisi biso ète batò bazali na makanisi mabe kati-kati nabango. Okanisi ndenge nini? Ozali malamu tope mabe? Oyebi ète motò nyonso azali na makanisi ya mabe kati naye? Boye, makanisi ma motò mazali makanisi ma mabe.
Eleki mbula mike, Ndako monene na mboka ya Séwulé ekweyaki na mbalakata. Mabota mabaye babungisa balingami nabango, bazalaki na mawa mingi, kasi batò mosusu bakenda kuna pona kosepela likambo lia mawa lina.
Bamosusu bakanisaki, “Batò boni bakufaki? 200? Té, ezali moké. 300? Tango mosusu? Malamu; ekokaki kosepelisa mingi soki motuya ya bakuwi ekokaki kozala ata 1000....” Mitema mia batò mikoki kozala mabe ndenge wana. Tosengeli kondima yango bongo. Somo mingi ezalaki kati na liwa! Mawa mingi pona ma bota babungisi balingami nabango! Mawa pona ebele ya mbongo ebebi.
Batò mosusu kati na baye bazalaki kotala bazalaki té na mawa. “Ekokaki kosepelisa biso soki batò mingi koleka bakufaki! O, likambo monene ya kotala! Ndenge nini ekokaki kozala soki likambo lia ndenge wana ekomelaki batò ebele bazalaki esika moko, libanda? Ebele na ebele ya batò bakokaki kokufa, boye té? Boye! Ekokaki kosepelisa mingi koleka oyo!” Tango mosusu batò mosusu bakanisa bongo. Likambo ya ndenge moko ekoki koyokana sima na kobaluka ya motuka. Baye bazali na posa ya kotala, batondi na pasi yakomona bana mike kokufa mabe.
Toyebi biso banso ndenge nini tokoki kozala mabe. Solo-solo, tokoki ata moke kolobela mabe mabiso na mongongo makasi. Tozali kokanga miso, totalisi motema ya mawa liboso na likama ya mutuka, kasi na kati na mitema miabiso, mingi-mingi tozali kaka na posa yakotala pamba. Tozali na posa ya kotala makambo yamakasi mingi na nzoto ya batò mosusu, tango batò ebele na ebele bakofi mbala moko, tango ezali na nzoto nabiso té tope na makambo mabiso. Ezali ndeko oyo mitema mia batò misalaka. Ebele na biso, tozalaka ndenge wana liboso tobotama mbala ya mibale.
 

Koboma na Kati na Motò Nyonso

Pona nini tosumukaka?
Pwète tozali na makanisi ya mabe kati na mitema mia biso.

Nzambe ayebisaki biso ète ezali na koboma kati-kati na mitema mia biso banso. Kasi mingi bakoki koboya yango liboso na Nzambe, nakoloba ète, “Ndenge nini okoki koloba boye! Nazali na makanisi makoboma té na kati na motema nangai! Ndenge nini okoki kotala ngai lokola motò ya ndenge wana!” Bandimaka té kozala na koboma kati na mitema miabango. Bakanisaka ète kobama ezali kaka oyo ya mbeli, na modunki.
“Baye bazali kosuka na koboma batò ebele mikolo miye, bazanga mawa, bazali koboma bazali kozonga sima té, bazali baye bazali na koboma kati na mitema na bango! Bazali ya mitindo mikeseni. Nakoki kozala lokola bango té! Bazali batò bazanga mawa! Babomi!” Bazali kotambola na koboma nzela-nzela, “Baye babotama na mboto ya mabe nakati na mokili oyo! Boko zuwa etumu ya liwa!”
Kasi oyo ezalikosala pasi, likanisi lia koboma lizali kati mitema mia batò ebele, lokola ndenge ezali kati na mitema mia babomi na batò bazanga mawa ya koboma. Nzambe ayebisi biso ète na kati na mitema na batò banso, ezali na koboma. Tosengeli kondimela Liloba lia Nzambe, oyo amonaka oyo nyonso ebatami na kati na makanisi mabiso. Bongo, tosengeli kondima ète, “Nazali mobomi kati na motema nangai.”
Boye, Nzambe ayebisaki biso ète makanisa ya mabe ezali, elongo na oyo ya koboma, kati-kati na mitema mia batò banso. Tika, ète tondimela Liloba na Nzambe. Lokola bikeke bia batò bikomi mabe koleka, biloko ya komibatela na yango ebele ekomi biloko ya komba na yango. Yango nde mbuma ya koboma wuta na mitema biso. Okoki koboma kati ya kanda tope kati na kobanga. Nazali koloba té, moko na moko kati-kati na biso asengeli koboma basusu, kasi tokanisaka yango kati na mitema mia biso.
Biso banso tobotama na makanisi ma mabe kati na mitema mia biso. Basusu basumukaka na koboma, pamba té pwète babotami babomi, kasi pwète moko na moko kati-kati na biso akoki kozala mobomi. Nzambe alobi na biso ète tozali na makanisi ya mabe pe ya koboma kati na mitema miabiso. Boye té? Moko té na biso akoki kokima mosika na bosolo oyo.
Ponayango, nzela ya malamu pona biso kozuwa ezali kondimela Liloba lia Nzambe pe kotosa yango. Tosumukaka na mokili oyo pwète tozali na makanisi ya mabe kati na mitema miabiso.
 

Ekobo Na Katina Mitema Mia Biso

Nzambe alobi ète ekobo ezali kati na motema na motò nyonso. Ondimi yango? Ondimi ète ekobo ezali na kati na motema nayo? Boye, ekobo ezali na kati na motema ya motò nyonso.
Yango nde, tina nini, ekobo na kindumba etondi kati na mboka na biso. Ezali nzela ya mokuse yakosala mbongo na tango nyonso kati na lisolo ya bofandi elongo ya batò. Misala misusu mikoki kokutana na mikakatano ya mbongo, kasi kindumba na ekobo ezangaka misolo té ata wuta na motema ya motò moko kaka, oyo azali na yango kati na motema mwaye.
 

Mbuma Ya Basumuki Ezali Lisumu

Motò akoki kotalisama lokola nini?
Nzete oyo ezali kobimisa mbuma ya lisumu

Kaka lokola nzete na pomé epesaki ba-pomé, nzete ya safu, epesaka safu, ya manga epesaka manga, ya tomaté, epesaka tomaté, biso baye tobotama na ndenge na masumu zomi na mibale kati na mitema miabiso, ndenge nini té, tokozanga kobota mbuma ya lisumu.
Yesu alobi ète oyo ewutaka na motema ya motò yango nde ezali kobebisa ye pe kobundisa ye. Ondimi yango? Tokondima kaka maloba ma Yesu, maye malobi ète, “Boye, tozali na mboto na lisumu, ya mabe kati nabiso. Boye, olobi ya solo, Nkolo.” Boye, tosengeli kondimela mabe mabiso. Tosengeli kondimela bosolo nabiso moko liboso na Nzambe.
Kaka lokola Yesu andimaki mokano mwa Nzambe, tosengeli kondima Liloba na Nzambe pe kotosa Ye. Ezali nzela kaka moko oyo tokoki kobikisama na masumu mabiso manso: nzela na mayi pena Molimo. Yango, nde makabo ma Nzambe.
Mboka epambolami na biteni ya tango minei ya kitoko. Lokola etani moko-moko ezali kokende liboso, banzete ndenge na ndenge ezali kobota mbuma. Ndenge moko, masumu zomi na mibale kati na mitema miabiso ezali kobimisa mbuma ya lisumu na bomoyi nabiso. Lelo oyo, ekoki kozala koboma oyo ewuti na mitema miabiso pe lobi kuna, ekoki kozala ekobo.
Nasima, moko molandi, makanisi ya mabe, pe kindumba, moyibi, litatoli lia lukuta...boye na boye. Tozali kokoba kosumuka mbula mobimba, sanza mobimba, mokolo na moko, ngonga na ngonga. Ezali té na mokolo moko oyo elekaka ezanga lisumu moko boye. Tozali kokoba kokata ndayi ète tozali kosala masumu té, kazi tozangi makasi ya kotika pwète tobotama ndenge wana.
Osi omoni nzete ya pomé koboya kobimisa ba-pomé pwète elingi yango té? “nalingi kobota ba-pomé té!” ata ekangi motema nakoboya kobota mbuma, ndenge nini ekozanga kobota ba-pomé? Matiti ya fololo ya mbuma ekobima na tango na yango, pe sima, elinga, elinga té, ba-pomé ekobima, pe ekokola na eteni ya tango ya mbula mosusu, pe mbuma ekozala kitoko kotala pa kolia na tango yango.
Ezali mokebo ya bokeli, pe bomoyi bwa mosumuki esengeli elanda mokebo na bokeli wana. Basumuki bakoki té kotika kobimisa mbuma ya lisumu lizali kati na mitema miabango.
 
 

‘Libatisi Na Kuruze na Yesu Ezalaki Bosomi Ya Masumu Mabiso


Na bosomi bwa Yesu elingi koloba nini?
Ezali kofuta nyongo nyonso ya lisumu na nzela ya libatisi lia Yesu (botiye maboko na mutu) pena makila ma Ye na Kuruze.

Tika ète totanga molongo ya Biblia pona komona ndenge nini basumuki, batò ya mabe, bakoki kolongola masumu mabango liboso na Nzambe pe babika pe bazuwi bomoyi ya malamu kati na esengo. Yango nde sango-malamu ya bosomi bwa masumu.
Na Ba-Lévi 4, ekomami ète, “Soki motò kati kati na lisanga ya batò asumuki libanda na posa naye ya motema na kosala eloko moko sima na mibeko na Nkolo na eloko oyo esengeli kosala té, pe abungi nzela, tope soki lisumu liye asalaki eyè koyebana, bongo akomema lokola mbeka naye mwana moke ya ntaba, ya mwasi oyo azangi mbemba, pona lisumu liye asalaki. Pe akotiya maboko maye na mutu na mbeka ya lisumu, pe akoboma mbeka ya lisumu na esika ya mbeka ya kotumba. Sima nayango nganga-nzambe akozuwa moke ya makila na yango na mosapi naye, akotiya na maseke likolo na etumbelo ya mbeka ya kotumba, pe akosopa oyo ekotikali nasè ya etumbelo ya mbeka ya kotumba na mótó. Akolongola mafuta nayango nyonso, lokola mafuta elongwamaka na mbeka ya kimia; pe nganga-nzambe akotumba yango na etumbelo pona solo kitoko liboso na Nkolo. Bongo nganga-nzambe akosala bosomi naye, pe akolimbisama” (Ba-Lévi 4:27-31).
Natango ya mikolo mia Boyokani bwa Kala, ndenge nini batò bazalaki kolongola masumu mabango? Bazalaki kotiya maboko nabango na mutu ya mbeka ya lisumu yako bonza yambo, pena kolekisa masumu mabango na nzoto nayango.
Ekomami na Ba-Lévi. “Tango motò oyo amemi libonza liaye epayi na Nkolo, okomema libonza liayo lia kaki ya meme nayo tope ya banyama mosusu. Soki mbeka nayo ezali yakotumba, meme wana esengeli azala ya mobali pe azala na mbeba té; akobonza ye na motema polele na ekuke ya mongombo ya bokutani liboso na Nkolo. Bongo, akotiya maboko maye na mutu ya mbeka ya kotumba, pe ekondima ète na nzela ya mbeka wana, bolongoli bwa masumu ekosalema pona ye” (Ba-Lévi 1:2-4).
Tango motò moko ya bisika wana amoni lisumu na motema naye, asengeli kobongisa mbeka oyo bakosalela pona kolongola lisumu lina. Akotiya ‘maboko maye’ na mutu ya mbeka ya lisumu pona kolekisa na nzoto ya mbeka lisumu lina. Kati na lopango ya mongombo esantu, ezalaki na etumbelo ya mbeka ya kotumba na mótó. Ezalaki mesa ya moke pe ezalaki ma maseke na moko na moko ya songe nayango. Bana Izraélé bazalaki kolekisa masumu mabango na mutu ya mbeka ya lisumu pe kutumba musuni nayango na mótó na etumbelo ya mbeka.
Nzambe alobaki na Ba-Lévi pwète batò “Kopesa mbeka na motema polelele na ekuke ya lopango ya mongombo liboso na Nkolo.” Masumu mabango mazalaki koleka na nzoto ya mbeka ya lisumu tango mazalaki kotiya maboko na mutu nayango, pe sima, mosumuki azalaki ko kata kingo ya mbeka pe kotiya makila na yango na maseke likolo na mesa ya etumelo na mbeka ya kotumba na mótó.
Sima nayango, nzoto ya mbeka ezalaki kosokwama elongo na biloko bia kati, pe mosuni nayango ezalaki kokatama mike-mike pe kotumbama na makala na etumbelo ya mbeka ya kotumba na mótó. Bongo, solo ya kitoko ya musuni ezalaki kobonzama epayi na Nzambe pona bolongoli bwa lisumu. Ezalaki pona bolongoli esantu ya masumu ya mokolo na mokolo.
Nzambe apesaki lisusu mbeka mosusu pona bolongoli bwa masumu ma mbula na mbula. Ekeseni na mbeka ya bolongoli bwa masumu ma mikolo na mikolo. Awa, Nganga-Nzambe ye moko akotiya maboko na mutu ya mbeka ya masumu na nkombo na Bana-Izraélé pe kosopa makila na ngambo moyi ebimaka ya kiti ya mawa mbala sambo (7). Pe, kotia maboko na mutu ya ntaba ya bomoyi ezalaki kosalama liboso na Bana-Izraélé banso na mokolo mwa zomi ya sanga ya sambo (7) mbula na mbula (Ba-Lévi 16:5-27).

Nani azalaki elili ya mbeka ya masumu ya Boyokani bwa Kala?
Yesu Kristo

Sik’oyo, tika ète to mona ndenge nini mabongisi ya kobonza mbeka ya lisumu ebaluki na Boyokani Bwa Sika pe ndenge nini libongisi lia seko lia Nzambe etikala libela na bikeke na bikeke.
Pona nini Yesu asengelaki kokufa na Kuruze? Eloko tope likambo nini ya mabe asalaki na mokili pwète Nzambe atika Mwana mwa Ye kokufa na Kuruze? Tango basumuki banso ba mokili, biso pe elongo, tokwayaki na lisumu, Yesu ayaki na mokli pona kobikisa biso.
Abatisama na Mayi ma Yordané pe alongolaki mosika etumbu na Kuruze pona masumu manso ma batò banso. Ndenge oyo Yesu abatisama pe ndenge Asopaki makila ma Ye na Kuruze ezalaki ndenge moko na oyo ya mbeka ya bolongoli bwa lisumu na Boyokani bwa Kala, kotiya maboko na mutu ya mbeka ya lisumu pen a bosopi bwa makila.
Oyo ezali nzela songolo epesami na Boyokani bwa Kala. Mosumuki azalaki kotiya maboko maye na mutu ya mbeka ya lisumu pe azalaki kotubela masumu maye, nakoba ète, “Nkolo, nasumukaki, nasalaki masumu. Nabomaki pe nasalaki ekobo.” Boye, masumu maye mazalaki koleka na nzoto ya mbeka ya lisumu.
Kaka lokola musumuki azalaki kokata kingo na mbeka ya lisumu liboso na Nzambe, Yesu aponama ndenge moko pona kolongola mosika na biso masumu mabiso. Yesu Abatisima pe Asopaki makila ma Ye na Kuruze pona kobikisa biso, na masumu mabiso na nzela ya mbeka na Ye.
Solo-solo, Yesu akufaki pona biso. Tango kokanisa yango, nini ezalaki na kati ya bosindo bwa likabo lia mbeka ya lisumu, na nyamba ezanga mbemba lokola mbeka pona masumu ma batò? Banyamba baye banso bayebaki lisumu ezalaki nini? Banyama bayebi lisumu lizali nini té. Basengelaki kozanga mbemba.
Kaka lokola banyama bazangaki mbemba, bongo-bongo, pe, Yesu azangaki mbemba ata yamoke, Azangaki lisumu ata moke. Azali Nzambe Mosantu, Mwana na Nzambe, pe nano Asumuka té. Bongo, Alongolaki mosika nabiso masumu mabiso manso na nzela na libatisi lia Ye na Mayi ma Yordané tango Azalaki na mbula 30 ya botama.
Yesu akufaki na Kuruze pona masumu mabiso, Alongolaki yango mosika na biso. Ezalaki lotomo lia Ye lia lobiko lilongolaki mosika masumu ma batò banso.
 

Ebandeli ya Sango Malamu ya Bolongoli bwa Masumu

Pona nini Yesu abatisama na Yoane Mobatisi na Yordané?
Pona kokokisa boyengebene nyonso

Ekomami na Matié 3, “Boye Yesu awutaki Galilé kokende epayi na Yoane na Yordané kobatisama naye. Yoane amekaki kopekisa Ye, nakoloba, ‘Ngai nde asengeli kobatisama na Yo, pe ozali koya epayi na nangai?’ Kasi Yesu ayanolaki ye, ‘Tika ète ezala bongo sikoyo, pwète yango nde ezali malamu pona kokokisa boyengemene nyonso’” (Matié 3:13-15).
Tosengeli koyeba pe kososola pona nini Yesu abatisima tango akomaki na mbula ya botama 30. Abatisama pona kolongola mosika masumu ma batò banso pe pona kokokisa boyengebene nyonso bwa Nzambe. Kobikisa batò banso na masumu nabango, Yesu Kristo, Oyo asalaki na masumu té, abatisama na Yoane Mobatisi.
Bongo, Alongolaki mosika masumu ma mokili pe abonzaki nzoto na Ye moko pona kolongola mosika masumu ma batò banso. Pona kobikisama na lisumu, tosengeli koyeba ète bosolo nyonso pe kondimela yango. Ezali etani nabiso ya kondimela kati na lobiko lia Ye pe kobikisama.
Libatisi lia Yesu elingi koloba nini? Ezali ndenge moko lokola kotia maboko na mutu kati na Boyokani bwa Kala. Nakati na Boyokani bwa Kala, masumu ma batò banso mazalaki koleke na mutu mwa mbeka ya lisumu na nzela ya kotia maboko ma Nganga-Nzambe na mutu na mbeka. Ndenge moko, na kati ya Boyokani bwa Sika, Yesu alongolaki mosika masumu ma mokili na komitalisa lokola mbeka ya lisumu pe nakobatisama na Yoane Mobatisi.
Yoane Mobatisi azalaki monene koleka batò banso, motalisi-elongi na batò banso oyo nzela epesamela na Nzambe. Lokola motalisi-elongi ya batò banso, Nganga-Nzambe ya batò banso, atiyaki maboko maye na mutu na Yesu pena kolekisa na nzoto na Ye lisumu lia mokili mobimba. ‘Libatisi’ ezali, ‘kolekisa na, kokundama, pe kosokwama.’
Oyebi pona nini Yesu ayaki na mokili oyo pe abatisama na Yoane Mobatisi? Ondimeli Yesu, na boyebi bwa libatisi lia Ye? Libatisi lia Ye lizalaki pona kolongola mosika masumu mabiso manso, masumu maye biso, batò mabe, tozali kosala na nzoto nabiso nzela-nzela ya bomoyi nabiso. Yoane Mobatisi abatisa Yesu pona kokokisa sango-malamu ya Kala ya bolongoli bwa masumu mabiso manso.
Na Matié 3:13-17, ebandi na ‘Bongo,’ pe ezali kotalisa tango na Yesu abatisama, tango oyo masumu manso ma mokili malekaki na nzoto na Ye.
‘Boye,’ Yesu alongolaki masumu manso ma batò banso, akufaki na Kuruze sima mbula misato, pe Asekwani sima mikolo misato. Kolongola mosika masumu manso ma mokili, Abatisama mbala moko pona nyonso, akufaki na Kuruze mbala moko pona nyonso, pe Asekwaki pe wuta baweyi mbala moko pona nyonso. Pona baye balingi kozuwa bosomi bwa masumu mabango liboso na Nzambe, Alongolaki lisumu lia mokili pe abikisa bango mbala moko pona libela.
Pona nini Yesu asengelaki kobatisama? Pona nini alataki ekoti ya zumbe na mutu na Ye pe kosambisama na lopango ya bosambisi ya Pilaté lokola mobomi ya pamba? Pona nini Akufaki na Kuruze pena kosopa makila ma Ye? Tina ya maye maleki likolo ezalali pwète Alongolaki mosika masumu manso ma mokili, masumu mayo pe mangai, na nzoto na Ye na nzela ya libatisi lia Ye. Pona masumu mabiso, Akufaki na Kuruze.
Tosengeli kondima kati na liloba lia lobiko ète Nzambe abisaki biso pe kozongisela Ye matondi. Soki liibatisi lia Yesu té, Kuruze na Ye, pe lisekwa lia Ye, lobiko pona biso ekokaki kozala té.
Tango Yesu abatisama na Yoane pona kolongola mosika masumu manso ma mokili, Alongolaki mosika masumu pe, Abikisaki biso baye bandimeli sango-malamu ya lobiko lia Ye. Ezali na batò bazali kokanisa ète, “Yesu alongolaki mosika lisumu lia yambo kaka, tope té?” Bango bazali na bosolo té.
Ekomami polele na kati na Biblia ète Yesu alongolaki mosika masumu manso ma mokili tango Abatisama. Masumu mabiso manso, lisumu na yambo na kati, malongolama mosika. Yesu alobaki na Matié 3:15, “Pwète yango nde ekoki pona biso pona kokokisa boyengebene nyonso.” Pona kokisa boyengemene nyonso elingi koloba ète masumu manso, moke ezangaki té, malongwamaki mosika nabiso.
Yesu alongolaki mosika nabiso na kati na bomoyi bwa biso, elongo? Boye, ezali bongo. Alongolaki yango nyonso. Tika ète toluka liboso elembo nayango na Ba-Lévi. Ezali koyebisa biso lisolo ya Nganga-Nzambe na mbeka ya bolongoli bwa masumu.
 

Mbeka ya Bolongoli Masumu ya Mbula na Mbula ya Ba-Izraélé Banso

Ba-Izraélé bakokaki kosantisama mbala moko pona nyonso na nzela ya mbeka ya lisumu ya mokili oyo?
Ata moke té

“Aaloné akobonza ngombe lokola mbeka ya lisumu, oyo ezali pona ye moko, pe kolongola masumu maye, na ma ndako naye. Akozuwa ntaba mibale pe komema yango liboso na Nkolo na ekuke ya mongombo ya bokutani. Bongo Aaloné akobwaka libanga likolo likolo na ntaba mibale: moko ekoponama pona Nkolo pe mosusu ekozala pona kotika yango na kati na esobe. Pe Aaloné akozuwa ntaba oyo libanga ekweyaki pona Nkolo, akobonza ye lokola mbeka ya lisumu. Kasi oyo libanga ekweyaki pona kotinda ye na esobe akomemama na bomoyi liboso na Nkolo, kozala bolongoli bwa masumu likolo naye pe kotika ye lokola nyama ebwakani na kati na esobe” (Ba-Lévi 16:6-10). Awa, Aaloné azuwaki ntaba mibale na ekuke ya mongombo ya bokutani pona kolongola masumu ma Ba-Izraélé ya mbula mobimba.
“Bongo Aaloné akobwaka libanga likolo likolo na ntaba mibale: pona koponama pona Nkolo pe mosusu ekozala pona kotika yango na kati na esobe.”
Mbeka ya kobonza esengelami pona mobeko mwa bolongoli bwa masumu ma mokolo na mokolo pona kolekisa lisumu lia mosumuki na mbeka na nzela ya kotiya maboko na mutu ya mbeka. Kasi masumu ma mbula mobimba ma Ba-Izraélé, Nganga-Nzambe Monene, na nkombo na batò banso, azalaki kolekisa masumu ma mbula mobimba na mbeka ya lisumu na mokolo mwa zomi ya sanza ya sambo (7) mbula na mbula.
Na Ba-Lévi 16:29-31, ekomami, “Na sanza ya sambo (7), mokolo ya zomi ya sanza, bokopesa mokumba na milimo miabino té, tope kozala ata mokel, ata mobotami ya mboka na bino moko tope mopayi oyo azali koleka nzela epayi nabino. Pwète na mokolo wana, nganga-nzambe akosala bolongoli masumu mabino, kosokola bino, pwète bozala peto ya masumu mabino manso liboso na Nkolo. Ezali Sabata ya monene koleka pona kopemisa bino, pe bokopesa mikumba na milimo miabino té. Ekozala mokano mwa libela na libela” (Ba-Lévi 16:29-31).
Nakati na Boyokani bwa Kala, Ba-Izraélé bazalaki komema mbeka ya libonza ya bolongoli masumu bwa mokolo na mokolo pe kolekisa yango na mutu ya mbeka wana, nakotatola ète, “Nkolo, nasalaki masumu mingi koleka. Nabeleli yo, limbisa ngai.” Bongo, akokata kingo na mbeka ya lisumu, akobesa makila na nganga-nzambe, pe akonde ndako, na elikia ète alimbisami na masumu maye mana. Na ndenge wana, mbeka ya lisumu epesami na mosumuki, na lisumu na mutu na yango. Mbeka ya lisumu ezalaki kobomama na esika ya mosumuki. Na Boyokani bwa Kala, mbeka ya lisumu ekokaki kozala ntaba, meme, ngobe ya moke, ngombe ya monene, yango nde, ezalaki moko ya mbeka ya lisumu oyo Nzambe Aponaki.
Nzambe, na mawa maye mazanga ndelo, apesaki nzela na bomoyi bwa nyama kopesemelama na esika na mosumuki pona kokufa pona masumu maye.
Na nzela wana, kati na Boyokani bwa Kala, basumuki bakokaki kolongola masumu mabango na nzela na mbeka ya bolongoli masumu. Masumu ma mosumuki mazalaki kolekisama na mutu ya mbeka ya lisumu na nzela yakotiya maboko likolo na mutu, pe makili ma mbeka wana mazalaki kopesema na nganga-nzambe pona kolongola masumu ma mosumuki.
Ndenge wana, nzela ezalaki té pona kolongolaka masumu mokolo na na mokolo. Bongo, Nzambe apesaki nzela na Nganga-Nzambe ya Monene pona kolongola masumu ma mbula mobimba, mbula na mbula na mokolo mwa zomi ya sanza sambo (7), na nkombo na Ba-Izraélé banso.
Nasima nayango, mosala mwa Nganga-Nzambe Monene mozalaki nini mokolo ya bolongoli bwa masumu? Yambo, Aaloné, Nganga-Nzambe Monene azalaki kotiya maboko maye na mutu ya mbeka ya lisumu, nakotubela masumu ma batò, “Nkolo, Bana Izraélé basalaki masumu mingi, koboma, ekobo, kindumba, moyibi, kokosa, kobuka mobeko mwa Yo…”
Bongo, akokata kingo na mbeka ya lisumu, akozuwa makila maye, akosopa makila mana mbala sambo (7) na kiti ya mawa kati na Bisika Bisantu. (Kati na Biblia, mutuya sambo (7) ezali mutuya mwa bopeto.)
Ezalaki mosala mwaye mwa kolekisa masumu ma mbula ma batò na mutu na mbeka ya lisumu na nkombo nabango, pe mbeka ya lisumu ezalaki kobonzama.
Pwète Nzambe azali moyengebeni, kobikisa batò banso na masumu mabango, Apesaki nzela na mbeka ya lisumu kobonzama pona kokufa na esika ya batò. Lokola Nzambe azali na mawa solo-solo, Apesaki nzela na batò kobonza bomoyi bwa mbeka ya lisumu na esika nabango. Nganga-Nzambe Monene akosopa makila na ngambo moyi abimaka ya kiti ya mawa, pe bongo, akolongola masumu manso mabatò pona mbula ewuti koleka na Mokolo mwa Bolongoli Masumu, na mokolo ya zomi ya sanza ya sambo (7).

Nani azali Mwana Mpate ya mbeka kolandisama na Boyokani bwa Kala?
Yesu oyo azangi mbeba

Nganga-Nzambe Monene akobonza ntaba mibale na Mokolo mwa Bolongoli Masumu pona Bana Izraélé. Moko na yango ebengami ntaba ya kobwaka na kati ya esobe, oyo elobi ‘kolongola.’ Na ndenge moko, ntaba ya kobwaka na esobe ya Boyokani bwa Sika ezali Yesu Kristo. “Pwète Nzambe alingaki mingi mokili, ète Apesaki Mwana na Ye moko, pwète oyo nyonso akondimela Ye akufa té, kasi azala na bomoyi bwa seko” (Yoane 3:16).
Nzambe apesaki Mwana na Ye moko lokola Meme ya mbeka ya kobonza. Lokola mbeka ya Meme ya kobonza pona batò banso, abatisama na Yoane Mobatisi pe Akomaki Mobikisi, Masiya ya mokili. Yesu, elingi koloba, ‘Mobikisi’ pe Kristo, elingi koloba, ‘Mokonzi Mopakolami,’ bongo Yesu Kristo elingi koloba ‘Mwana na Nzambe oyo ayaki kobikisa biso banso.’
Kaka lokola masumu ma mbula na mbula mabatò mazalaki kolongwama na Mokolo mwa Bolongoli Masumu kati na Boyokani bwa Kala, Yesu Kristo, eleki mbula koleka 2000, ayaki na mokili oyo kobatisama pe asopaki makila ma Ye na kokufa na Kuruze pona kokokisa sango-malamu ya bolongoli bwa masumu mabiso manso.
Na esika wana, tika ète totanga molongo oyo ya Ba-Lévi. “Pe Aaloné akotiya maboko maye mibale na mutu ya ntaba ya bomoyi, akotubela masumu manso ma Bana-Izraélé, pe mabunga mabango manso, ya botomboki nabango, akotiya yango na mutu na ntaba, pa akotinda yango na esobe na nzela motò oyo asengeli kosala yango. Ntaba akomema na nzoto na yango masumu manso na botomboki na bango kati na bisika bikawuka; pe akotika ntaba wana kati na esobe” (Ba-Lévi 16:21-22).
Ekomami ète masumu ya Bana Izraélé matiyama na mutu na ntaba lokola ebongisama na Ba-Lévi 1. ‘Mabunga na bango manso’ ezali kotalisa masumu basalaki na kati na mitema miabango na kati na nzoto nabango. Pe ‘mabunga mabango manso’ matiyama na mutu na mbeka ya lisumu na nzela ya botiye maboko ma Nganga-Nzambe.
 

Na Mobeko mwa Nzambe, Tozali na Boyebi bwa Masumu Mabiso Manso

Pona nini Nzambe apesaki biso Mobeko?
Pona kopesa biso moyebi bwa masumu

Mobeko mwa Nzambe mozali na maloba makotosa 613. Solo-solo, tango tozali kokanisa yango, tozali kosala oyo Apekisi biso, pe tozali kosala té oyo Alingi tosala.
Bongo, tozali basumuki. Ekomami na Biblia ète Nzame apesaki biso mibeko mia Ye pwète tososola ète tozali basumuki (Ba-Romén 3:20). elingi kola ète Apesaki miso Mobeko mwa Ye pona totangisa biso ète tozali basumuki. Apesaki yango té na biso pwète tozalaki na makasi ya kobika nayango, kasi pwète tososola ète tozali basumuki.
Apesaki biso mibeko mia Ye, pwète tobateya yango. Okoki kozela té mbwa abika lokola motò. Ndenge moko kaka, tokoki kobika na Mobeko mwa Nzambe té, kasi tokoki kososola kaka tozali basumuki na nzela ya Mobeko mwa Nzambe.
Nzambe apesaki yango nabiso pwète tozali maboke ma lisumu, kasi tozali komona yango té. “Bozali babomi, batò na ekobo pe batò mabe,” Nzambe azali yoyebisa biso na nzela ya bokeseni kati na mibeko mia Ye. Ayebisaki biso toboma té, kasi tozali koboma kati na mitema miabiso, tango na tango na nzoto pe tozali koboma.
Toloba ète, pwète ekomami na Mobeko ète tokoboma té, toyebi ète tozali babomi, tozali koloba, “Ah, nabungaki nzela. Nazali mosumuki pwète nasalaki oyo nalingaki kosala té. nasumukaki.”
Pona kobika batò na Izraélé na lisumu, Nzambe apesaki Aaloné nzela ya kobonza mbeka ya bolongoli bwa masumu na kati na Boyokani bwa Kala, pe Aaloné azalaki kolongola masumu ma batò mbala moko na mbula.
Na Boyokani bwa Kala, mbeka mibale ya masumu ezalaki kobonzama epayi na Nzambe na Mokolo mwa Bolongoli bwa Masumu. Moko ezalaki kobonzama liboso na Nzambe tango oyo, mosusu ezalaki kotindama na esobe sima ya botiyi maboko na mutu, nakomema mosika masumu ma mbula mobimba ma bana ba Izraélé. Yambo ntaba atindama na esobe na maboko ya motò oyo akoki kosala mosala wana, Nganga-Nzambe Monene azalaki kotubela masumu ma Izraélé. “Nkolo, batò babomaki, basalaki ekobo, bayibaki, babumelaki bikeku.... tosumukaki liboso na Yo.”
Mboka na Palestina ezalaki esobe. Ntaba yakosundola na esobe ezalaki kobwaka na esobe oyo ezangi ndelo pwète ekende kokufa na yango. Tango ebwakami mosika na esobe, Bana-Izraélé bakotika kotala yango tii ekolimwa mosika nabango, pe bandimi ète masumu mabango malongwe na ntaba yakosundula na esobe wana. Batò bakozuwa kimia na mitema mia bango nasima, pe ntaba ya kobwakama na esobe akokufa na esobe pona masumu ma mbula na mbula ma batò.
Na ndenge oyo, Nzambe alongolaki masumu mabiso na nzela ya Mwana-Mpate na Nzambe, Yesu Kristo. Masumu mabiso malongolama na nzela ya libatisi lia Yesu pena na makila ma Ye na Kuruze.
Yesu azali Nzambe pe Mobikisi nabiso. Azali Mwana na Nzambe oyo ayaki kobikisa biso batò banso ma lisumu. Azali Mokeli mwa biso oyo Asalaki biso, na elili na Ye, pe ayaki nasè na mokili kobikisa biso, na lisumu.
Kaka té masumu ma moko na moko tozalaki na nzoto nabiso, malekaki na nzoto na Yesu, kasi elongo na masumu ma mikolo mikoya mia makanisi na nzoto nabiso. Bongo, Asengelaki kobatisama na Yoane Mobatisi pona kokokisa boyengebene nyonso na Nzambe, botondi bwa bolongoli masumu manso ma mokili.
Mbula misato yambo Yesu kokufa na Kuruze, tango abandaki mosala mwa lotomu na Ye libanda, Alongolaki mosika, masumu manso ma mokili, na nzela ya libatisi na Yoane Mobatisi kati na Mayi na Yordané. Lobiko na Ye pona batò, na nzela ya bolongoli masumu manso mobandaki na libatisi lia Ye.
Na kati na Mayi ma Yordané, na molayi ya mayi tii na loketo, Yoane Mobatisi atiyaki maboko maye na mutu na Yesu, pe akotisaki Ye kati na mayi. Libatisi oyo ezalaki lokolo kotiya maboko na mutu, kati na Boyokani bwa Kala, pe ezalaki na tina moko, ya kolekisa masumu manso.
Kozindisama na kati na mayi elingi koloba kokufa, pe kobima na mayi elingi koloba, lisekwa. Bongo, nakobatisama na Yoane Mobatisi, Yesu akokisaki pe kotalisa sékélé ya biteni misatu ya lotomo na Ye: kolongola masumu mosika, liwa na Kuruze, pe lisekwa.
Tokobikisama kaka, soki totosi maloba maye Yesu abikisaki biso, na mango na masumu. Nzambe akataki mokano mwa kobikisa biso kati na nzela Yesu, pe boyokani Asalaki na Boyokani bwa Kala ekokisami. Koleka na mosala mwa Ye, Yesu atambolaki tii na Kuruze na masumu mabiso manso na mutu mwa Ye.

Mosala nini etikali na biso lokola Yesu alongolaki masumu mabiso manso?
Oyo nyonso tokoki kosala ezali kaka kondima maloba ma Nzambe.

Na Yoane 1:29, ekomami, “Lobi na yango, Yoane amonaki Yesu koya epayi naye, pe alobaki, ète, ‘Botala! Mwana Mpate na Nzambe oyo alongoli mosika lisumu lia mokili!’” Yoane Mobatisi atatolaki, ète, “Botala! Mwana Mpate na Nzambe oyo alongoli mosika lisumu lia mokili!” Masumu manso ma batò malekaki na nzoto na Yesu, tango abitisama na Yordané. Ndima yango! Bongo okopambolama na bolongoli masumu mayo.
Tosengeli kondimela liloba lia Nzambe. Tosenngeli kolongola makanisi mabiso na tembe pe kotosa Liboba lia Nzambe ndenge likomama. Tosengeli kaka kondimela kati na bosolo ète Yesu alongolaki mosika masumu manso ma mokili.
Koloba ète Yesu alongolaki masumu ma mokili, tope koloba ète Akokisaki boyengebene nyonso na Nzambe na bolongoli bwa masumu manso, ezali kaka eloko ndenge moko. ‘Kotiya maboko na mutu’ na ‘libatisi’ ezali nyonso eloko moko.
Ezali likambo té ya ndenge ezalaki kolobama, ezala ‘nyonso,’ ‘oyo nyonso,’ tope ‘yango nyonso,’ elingi koloba eloko moko kaka. ‘Kotiya maboko na mutu’ elingi koloba na Boyokani bwa Kala, eloko moko pe, na Boyokani bwa Sika, kolongola kaka eloko oyo ‘libatisi’, bazalaki kosalele yango na esika wana.
Etalisi polele ète Yesu abatisama pe esambisama na Kuruze pona kolongola masumu mabiso manso. Tokoki kobikisama kaka, tango tondimeli kati na sango-malamu ya yambo, pe ya ebandeli.
Tango Biblia elobi ète Yesu alongolaki ‘lisumu lia mokili’ mosika (Yoane 1:29), lisumu lia mokili elingi koloba nini? Elingi koloba ète masumu manso tobotama nayango, elobi, makanisi mabe, moyibi, ekobo, kolula, motema mabe, bozangi botosi ya Liloba lia Nzambe, lolendo, pena bozoba oyo efandi na mitema miabiso. Nakati na yango, ezali pe, na mabunga na mabe manso tosalaki na nzoto pena mitema miabiso.
“Pwète lifuti lia lisumu lizali liwa, kasi likabo lia Nzambe ezali bomoyi bwa seko, kati na Yesu Kristo, Nzambe nabiso” (Ba-Romén 6:23). “Pe nakozanga kopanza makila, bolimbi na masumu ezali té” (Ba-Ebré 9:22). Lokola elobami nakati ya milongo miye, masumu manso masengeli kofutama. Yesu Kristo, pona kobikisa batò banso na masumu, apesaki bomoyi na Ye moko pe afutaki etumbu ya lisumu lia biso mbala moko pona libela.
Bongo, pona kokangola biso, na masumu mabiso, nyonso esengeli tosala ezali kaka kondimela sango-malamu ya yambo pe ya ebandeli—libatisi lia Yesu na makila ma Ye, pena Bonzambe bwa Ye.
 

Bolongoli Masuma ma Lobi Ekoya

Tosengeli kopesa lisusu mbeka ya masumu pona masumu mabiso lisusu?
Eloko moko té

Masumu ma lobi ekoya, pe ma mikolo miasima, na maye manso tokosala tii liwa na biso mazali na kati ya ‘lisumu lia mokili,’ kaka lokola masumu malelo, malobi elekaki, na lobi kuna mosika, mazali na kati ya ‘lisumu na mokili.’ Masumu ma batò wuta botama tii liwa mazali eteni ya ‘lisumu lia mokili,’ pe masumu ya mokili manso malekaki na nzoto na Yesu na nzela ya libatisi lia Ye. Masumu manso tokosala tii mokolo tokokufa masili kolongwama mosika nabiso.
Tosengeli kaka kondima sango-malamu oyo ya ebandeli, maloba makomama ma Nzambe, pe kotosa bosolo ya kobikisama. Tolongola makanisi mabiso moko epayi, pwète tozuwa bosomi bwa masumu mabiso manso. Okoki kotuna ète, “Ndenge nini akokaki kolongola masumu maye nano masalama té?” Bongo, nakoki kozongisela yo ète, “Yesu asengelaki tosonga awa na mokili tango nyonso oyo tokosumukaka pe kosopa makila ma Ye lisusu?”
Sango-malamu ya botama ya mbala ya mibale, ezali té na Mobeko ya bolongoli bwa masumu. “Pe soki makila, masopani té, bolimbi bwa masumu bozali té” (Ba-Ebré 9:22). Tango motò moko alingi kozuwa bosomi ya masumu maye tango na Boyokani bwa Kala, asengeli kotiya maboko maye na mutu ya mbeka ya lisumu, pe mbeka ya lisumu esengeli kokufa pona masumu maye.
Likolo na yango, na nzela moko, Mwana na Nzambe ayaki nasè na mokili pona kobikisa batò. Abatisama pona kolongola mosika masumu mabiso manso, asopaki makila ma Ye na Kuruze pona kofuta etumbu ya masumu ma biso, pe akufaki na Kuruze, alobaki ète, “Esili nayango.” Asekwaki wuta baweyi mokolo ya misato, sik’oyo afandi na loboko ya mobali ya Nzambe. Bongo, akomi Mobikisi mwa biso pona libela.
Pona kozuwa bolimbisi bwa masumu mabiso, tosengeli kobwaka makanisi mabiso manso pe kotika bondimi ya mangomba maye mazali koyebisa biso ète pona kozuwa bosomi bwa masumu mabiso ma mikolo na mikolo na nzela ya mabondeli ya kosenga bolimbisi. Pona kolongola masumu ma batò mosika, mbeka ya lisumu esengelaki kopesama, mbala moko pe pona libela. Nzambe na lola atiyaki masumu ma mokili na nzoto ya Mwana mwa Ye moko na nzela ya libatisi lia Ye pe Atikaki Ye akufa na na Kuruze pona biso. Na lisekwa lia Ye wuta baweyi, lobiko na biso bokokisama.
“Kasi Azokisama pona masumu mabiso, Anyokolama pona mabunga mabiso. Amemaki etumbu nabiso, pe alongolaki bapasi babiso; tango oyo biso totalaki Ye lokola abetama, anyokwama na Nzambe, pe azokisama na motema… pe Nkolo Atiyaki likolo na Ye lisumu lia batò banso.” Na Ezayi 53, elobami ète masumu manso na mabunga manso ma mokili, ma batò banso matiyama na nzoto na Yesu Kristo.
Na Boyokani bwa Sika, na Ba-Efésié 1:4, ekomami ète, “Kaka ndenge Aponaki biso kati na Ye liboso na bosalami bwa mokili.” Oyo ezali kotalisa biso ète Aponaki biso kati na Ye liboso na bosalami bwa mokili. Liboso mokili nano kosalema, Nzambe akataki mobeko ya kosala biso libota lia Ye, ya boyengebene, oyo ezangi mbeba, kati na Kristo. Oyo nyonso tokokaki kokanisa liboso, tosengeli sik’oyo kondimela pe kotosa Liloba lia Nzambe, maloba ma mayi, makila, pena Molimo.
Nazambe ayebisaki biso ète Mwana-Mpate na Ye, Yesu Kristo, alongolaki masumu ma mokili pe alongolaki masumu ma batò banso. Na ba-Ebré 10, ekomami, “Pwète Mobeko, ezali na elili ya makambo kitoko makoya, pe elembo ya solo-solo ya makambo, ekoki ata moke té na mbeka ya ndenge moko, oyo babonzaka tango na tango pe mbula na mbula, kokomisa batò basaleli yango, peto” (Ba-Ebré 10:1).
Awa, ekomami ète mbeka na ndenge moko, oyo babonzaka tango na tango pe mbula na mbula, ekoki té kokomisa bango peto. Mobeko mozali elili ya makambo kitoko yakoya, pe ezali té elembo ya solo-solo ya makambo. Yesu-Kristo, Masiya oyo azalaki yoka, epetole biso mbala moko pona nyonso (kaka lokala masumu ya mbula na mbula ya Izraélé, alongwama mbala moko pona nyonso) na nzela yakobatisama pena kokufa na Kuruze pona kolongola masumu mabiso manso.
Ponayango, Yesu alobi na Ba-Ebré 10, “Bongo, Alobi ète, ‘Botala, Nayaki kosala mokano mwa Yo, O Nzambe. Alongolaki mosika ya yambo, pwète Akoka ko fandisa ya sika.’ Na yango tosantisama na nzela ya mbeka ya nzoto na Yesus Kristo mbala moko pona nyonso. Pe nganga-nzambe nyonso akotelema pona kosala mokolo na mokolo mbeka ya kozongela mbeka ya ndenge moko, oyo ekoki kolongola masumu. Kasi Motò oyo, sima Apesaki mbeka ya masumu pona libela, afandi na loboko ya mobali ya Nzambe, nakozela tii banguna ba Ye banso bakoma enyatelo na Ye. Pwète na mbeka moko Abulisaki libela baye basantisama. Pe Molimo Mosantu pe atatoli pona biso; pwète sima Ye koloba liboso, ‘Oyo nde boyokani oyo na kosala na bango na sima ya mikolo mana, elobi Nkolo: Nakotiya mibelo mia Ngai kati na mitema mia bango, pe nakati na makanisi mabango, Nakokoma yango,’ bongo, Abakisi, ‘Masumu mabango pe mabunga mabango Nakokanisa yango té lisusu.’ Sik’oyo esika wapi bolimbisi bwa masumu bozali, ezali té na esika ya mbeka ya lisumu yako bonza” (Ba-Ebré 10:9-18).
Tondimeli ète Yesu abikisaki biso, na masumu ma mokili, na nzela ya libatisi lia Ye pena makila na Kuruze.
 

Lobiki lia Botama ya Mbala ya Mibale na Mayi pena Molimo Ekomami na Mitema pena Makanisi Mabiso

Ozali moyengebeni kaka pwète ozali kosumuka lisusu té?
Té. Tozali bayengebeni pwète Yesu alongolaki mosika masumu mabiso pe tondimeli Ye.

Bondimili bino banso kati na lobiko na Ye ya bopeto? —Amen.— Bozali kotosa na kondima maloba ma Nzambe ète Yesu Kristo Ye moko Abatisama, pe Asopa makila ma Ye na Kuruze pona kopibisa biso? Tosengeli kondimela Liloba lia Ye pona kobotama mbala ya mibale. Tokoki kobikisama tango tondimeli ète Yesu Kristo, na nzela ya sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu, tosokwami na masumu mabiso manso, elongo na masumu ma mokili.
Tokobulisama té na botosi bwa Mobeko bwa Nzambe, kasi tokoki kokoma peto na nzela ya kondima nabiso kati na misala mia Ye. Yesu Kristo alongolaki mosika na nzela ya libatisi lia Ye na Yordané, etumbu ya masumu mabiso ekweyisama na nzoto na Ye pe anoyokolama pona masumu mabiso manso na Kuruze. Na nzela ya kondimela sango-malamu wana na kati na mitema miabiso, tokoki kozuwa bosomi bwa masumu mabiso manso pe tokoki kokoma bayengebeni. Bondimeli yango?
Libatisi lia Yesu, liwa lia Ye na Kuruze pe lisekwa lia Ye ezali pona bolimbisi bwa masumu manso ma batò pe pona mobeko mwa lobiko likolo na bolingo ezanga ndelo na ya ofele wuta epayi na Nzambe. Nzambe Alingaki biso ndenge tozalaki pe Azali sembo, bongo Asalaki biso bayengebeni yambo. Abulisaki biso na nzela na kolekisa masumu mabiso manso na nzoto na Yesu na nzela ya libatisi.
Pona kolongola mosika masumu manso mabiso, Atindaki Mwana na Ye moko, Yesu, awa nasè na mokili pona biso. Apesaki nzela ète Yesu alongola mosika masumu manso ma mokili na nzela ya libatisi lia Ye pe alekisaki yango na etumbu ya masumu manso mana na nzoto na Mwana na Ye. Akomisa biso bayengebeni na nzela na lobiko lia mayi pena makila, likabo lia esengo lia Nzambe.
Ekomami na Ba-Ebré 10:16, “Nako tiya Mibeko mia Ngai kati na mitema miabango, pe kati na makanisi nabango, Nakokoma yango.”
Kati na mitema pena makanisi miabiso, tozali basumuki liboso na Nzambe tope tozali té? Soki tondimeli Liloba lia Nzambe, tokomi bayengenbeni. Yesu Kristo alongolaki mosika masumu mansu mabiso pe asambisama pona yango. Yesu Kristo azali Mobikisi mwa biso. Okoki kokanisa, “Pwète tosumukaka mokolo na mokolo, ndenge nini tokoki tozala bayengebeni? Solo-solo tozali basumuki.” Kasi tango tondimeli kati na Liloba lia Nzambe, kaka lokola Yesu Kristo atosaki Tata, tokomi bayengebeni.
Ndenge wana, lokola nalobaki yambo, tozali na lisumu kati na mitema miabiso, yambo tobotama mbala ya mibale. Sima na kozuwa sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu kati na mitema miabiso, tobikisami na masumu mabiso manso. Tango toyebaki té sango malamu, tozalaki basumuki. Kasi tokoma bayengebeni tango tobandi kondimela lobiko lia Yesu, pe tokoma bana bayengebeni ba Nzanbe. Oyo nde kondima ya kokoma moyengebeni oyo Ntoma Polo azali koteya.
Kondima ya sango-malamu pona bolimbisi bwa masumu ekomisi biso ‘bayengebeni.’ Ezala Ntoma Polo, ezala Abraham, tope bakoko ya kondima bakoma té bayengebeni na nzela ya misala miabango, kasi nakozala na kondima kati na Liloba na Nzambe, maloba ma mapamboli ma Ye pona bolimbisi bwa masumu.
Kati na mokanda mwa Ba-Ebré 10:18, “Sik’oyo esika wapi bolimbisi bwa masumu bozali, ezali lisusu té na bosengi bwa mbeka ya lisumu.” Kaka ndenge ekomami, Nzambe abikisaki biso pwète tokufa té pona masumu mabiso. Ondimi yango? —Amen.—
Nakati ya Ba-Filipié 2, “Tika ète likanisi liye lizala kati na bino, liye lizali pe kati na Yesu Kristo, oyo, Azalaki na ndege ya Nzambe, Amonaki yango té lokola kobotoloma bozali bwa Ye ya ndenge moko na Nzambe, kasi Amisalaki motò pamba, Azuwaki esika ya mosali, pe Ayaki lokola motò. Pena elongi ya bomotò, Amikitisaki pe Akomaki motò na botosi tii na liwa, suka na liwa na Kuruze. Ponayango, Nzambe anyetolaki Ye likolo koleka pe Abesamelaki nkombo oyo ezali likolo na bankombo banso, pwète na nkombo na Yesu, mabolongo manso mafukama na lola, na mabele, pena mokili mwasè, pe lolemo nyonso etatola ète Yesu Kristo Azali Nkolo, pona kembo na Nzambe Tata” (Ba-Filipié 2:5-11).
Yesu Kristo, oyo azali bomimosi bwa kembo na Ye, pe motalisi-elongi ya solo-solo ya bozali bwa Ye (Ba-Ebré 1:3), Atalaki té monene ya mutuya na Ye. Nzonkande, Azuwaki elongi ya mosali, ayaki na lolenge na motò. Amikitisaki pe atosaki tii na liwa pona kobikisa biso.
Bongo, tozali kokumisa Yesu, “Azali Nzambe na biso, Mobikisi pe Mokonzi.” Tina nini tokumisi Nzambe na kopesa masanzoli epayi na Yesu, ezali pwète Yesu atosaki mokano mwa Tata tii na suka. Soki atosaki té, tokokaki té kokumisa Mwana na Nzambe sik’oyo. Kasi pwète Mwana na Nzambe atosaki posa na Tata na Ye tii na liwa, bikelamu binso na batò banso kati na mokili tika ète bakumisa Ye, libele na libela.
Yesu Kristo akomaki Mwana-Mpate na Nzambe oyo alongolaki mosika masumu ma mokili, pe lokola ekomami Alongolaki yango na nzela na libatisi lia Ye. Sik’oyo, lokola mbula 2000 aleki wuta Alongolaki masumu ma mokili. Yo, nangai tobiki na mokili oyo pona botama na biso, pe masumu manso mabiso manso mazali kati na masumu ma mokili.

Tokozala basumuki soki tosumuki lobi kuna?
Té, pwète Yesu alongolaki masumu mabiso ma lobi eleki, ma lelo, pema lobi ekoya.

Nakozanga té kokabola lisolo lia lisumu lia botama na masumu ma bomoyi bwabiso, tusumukaki té banda tobotami? — Boye, tosumuki.—
Yesu ayebaki tokosumuka banda mokolo mwa botama ti mokolo mwa kokufa. Okoki komona yango sik’oyo? Soki tobiki mbula 70, masumu mabiso makokaki kozala mingi koleka mituka minene kama moko. Kasi Yesu alongolaki mosika nabiso masumu mbala moko pona libela na nzela ya libatisi lia Ye pe Amemaki yango na Kuruze na nzoto na Ye.
Soki Yesu alongolaki kaka lisumu lia mbotama, tokokaki biso banso kokufa pe kokende lifelo. Ata tozali koyoka kati nabiso ète Alongolaki mosika masumu mabiso, ekopekisa té kobalukisa likambo liye ète Yesu alongolaki masumu manso mabiso.
Masumu boni tosali na kati na mokili oyo? Masumu manso tozali kosala mazali na kati na masumu ma mokili.
Tango Yesu ayebisaki Yoane Mobatisi kobatisa Ye, ezali solo-solo oyo Alingaki koyebisa ye. Yesu atatolaki Ye moko ète alongolaki masumu mabiso mosika. Nzambe atindaki mosali na Ye liboso na Yesu pe Apesaki nzela ète Yesu abatisama naye. Na nzela ya libatisi lina na Yoane Mobatisi, motalisi-elongi na batò banso, nakokitisa mutu na Ye liboso naye pona kobatisama, Yesu Alongolaki masumu ma batò banso mosika.
Masumu mabiso banda mbula ya botama 20 tii mbula 30, banda 30 tii 40, pena kokoba kokende; ata masumu mabana ba biso mazali na kati na masumu ma mokili, maye Yesu alongolaki mosika na nzela ya libatisi.
Nani akoki koloba ète ezali na lisumu moko etikalaki na mokili oyo? Yesu Kristo alongolaki masumu ma mokili, pe tokoki kobikisama tango tondimeli na mitema miabiso, nakolongola tembe nyonso, kati na Yesu pona bolongoli bwa masumu mabiso: Libatisi lia Ye na makila ma Ye matalo masopama na Kuruze.
Batò mingi bazali kobika bomoyi ya botomboki kolendisama na makanisi mabango moko, nakolobela bomoyi na bango lokola ezalaki na motuya mingi koleka. Kasi bazali baye babika bomoyi ya pasi mingi. Mini ya batò babika bomoyi ya mikakatano ebele. Ngai pe nabika bomoyi bwa ndenge wana liboso na botama mbala ya mibale. Ndenge nini okoki té kososola tope kondimela sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu, oyo ya libatisi lia Yesu pena makila ma Ye?
 

Lobiko ya Basumuki Esalemi

Pona nini Yesu asokolaki Piere makolo maye?
Pwète Alingaki Piere azala na kondima ya makasi na koyeba ète Asilisaki kolongola masumu maye ma mikolo mikoya manso na nzela ya libatisi lia Ye.

Totanga Yoane 19. “Pe Ye, amemaki Kuruze na Ye, akeyi na esika ebengami Esika ya Mokuwa ya Mutu, oyo ebengami na monoko ya ba-Ebré, Golgotha, esika wapi babomaki Ye na Kuruze, pena batò mibale mosusu bazalaki na Ye, moko na ngambo moko, pe moko na ngambo mosusu, Yesu na kati-kati. Sik’oyo Pilaté akomaki na libaya ya moke petiyaki yango na mutu na Kuruze. Makomi mazali boye: YESU NA NAZARETE, MOKONZI NA BA-YUDA. Bongo, batò mingi kati-kati na Ba-Yuda batangaki makomi mana, pwète esika Yesu abomama ezalaki pene na mboka; pe ekomamma na Ba-Ebré, na Kéléké, pe na Laté” (Yoane 19:17-20).
Balingami, Yesu Kristo alongolaki masumu manso ma mokili pe amemaki etumbu na yango na kobomama na Kuruze na lopango ya bosambisi bwa Pilaté. Sik’oyo kokanisa elongo likambo liye biso banso.
Banda molongo mwa 28, “Nasima na yango, Yesu, ayebaki ète makambo manso makokisama, pe makomi makokisama,” Yesu alongolaki masumu mabiso manso pona kokokisa Makomi Masantu. “Pe, Alobi ète, ‘Nayoki posa na mayi!’ Sik’oyo kopo etonda na vinyo ya ngayi ezalaki wana; batiyaki vionyo ya ngayi na nzete, batiyaki na isopé, pe bamemaki yango na monoko na Ye. Bongo, tango ye azuwaki vinyo ya ngayi, Alobaki, ‘Esili nayango!’ Pe abendaki mutu na Ye nasè, Azongisaki Molimo mwa Ye” (Yoane 19:28-30).
Yesu alobaki ète, “Esili na yango!” pe Akufaki na Kuruze. Sima mikolo misato, Asekwaki wuta baweyi pe akendaki lola.
Libatisi lia Yesu na Yoana Mobatisi pena liwa lia Ye na Kuruze ekangami makasi elongo; moko ekoki kozala té, soki mosusu wana ezali té. Ponango, tika ète tokumisa Nkolo Yesu pona kobikisa biso, na sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu.
Nzoto na batò elandaka pe posa na nzoto, bongo eloko moko ekoki kopekisa biso kosumuka ezali té. Yesu apesaki biso libatisi lia Ye na makila ma Ye pona kobikisa biso, na masumu ma nzoto mabiso. Abikisaki biso, na masumu ma nzoto mabiso na nzela ya sango-malamu na Ye.
Baye bazuwa bolimbisi bwa masumu mabango bakoki kokota na Bokonzi bwa Lola na kondimela Yesu, oyo abotama na Bethlehem, abatisama na Yordané, akufa na Kuruze pe asekwa mokolo mwa misato. Tokumisi Nkolo pe tonyetoli nkombo na Ye libela na libela.
Na elongi ya suka ya Yoane, Yesu akendaki na Galiléa sima lisekwa lia ye wuta baweyi. Akendai epayi na Piere pe Ayebisaki ye ète, “Simoné, mwana na Yona, olingi Ngai koleka bango banso?” pe Piere ayanolaki Ye, “Boye, Nkolo; oyebi ète nalingi Yo.” Pe Yesu alobela ye ète, “Pesa bampate na Ngai bileyi ya malamu.”
Piere asosolaki makambo manso mana, sango-malamu ya libatisi lia Yesu pena makila ma Ye, bolimbisi bwa masumu. Sik’oyo, kondimela sango-malamu na mayi pe makila ma Ye apesaki ye bolimbisi bwa masumu maye manso pe asosolaki pona nini Yesu asokolaki ye makolo, kondima naye kati na Yesu ekomaki makasi koleka.
Tika ète totanga Yoane 21:15. “Bongo, tango basilisaki koliya bileyi bia tongo, Yesu ayebisi Piere ète, ‘Simoné, mwana na Yona, olingi Ngai koleka bango banso?’ ayanoli Ye ète, ‘Boye, Nkolo; Oyebi yango ète nalingi Yo.’ Ayebisi ye ète, ‘Pesa bampate na Ngai bileyi ya malamu.’” Akoki kopesa bampate ba Ye na Piere pwète Piere azalaki moyekoli na Ye pe abikisama mobimba, pe pwète Piere akomaki mosali ya boyengebene pe ya bopeto pona Nzambe.
Soki Piere akomaki mosumuki lisusu na masumu ma mikolo na mikolo, Yesu akokaki té koyebisa ye koteya sango-malamu ya bolongoli masumu, pwète ye, elongo na bayekoli mosusu, akokaki kotika kosumuka mokolo na mokolo kati na nzoto. Bongo, Yesu ayebisaki ye koteya sangu-malamu ya bolongoli masumu na banso pwète bandimela libatisi lia Yesu pe makila na Kuruze, sango-malamu ya bolongoli bwa masumu.
 

Nkolo, Oyebi ète Nalingi Yo

Okozala lisusu ‘mosumuki’ soki osumuki lisusu?
Té. Yesu alongolaki libela masumu mayo ma mikolo mikoya na kati na Yordané.

Tika ète tokanisa malamu na maloba ma Yesu na Piere. “Simoné, mwana na Yona, olingi Ngai koleka bango banso?” “Boye, Nkolo; Oyebi yango, nalingaka Yo.” Litatoli liaye lia bolingo lizaliki lia bolingo bwa solo, wuta na kondima na sango-malamu ya bolongoli masumu manso.
Soki Yesu atalisaki té Piere elongo na bayekoli mosusu sango-malamu ya bolimbisi masumu na kosokola makolo mabango, bakokaki té kotatola bolingo nabango na ndenge wana té.
Nangambu mosusu, tango Yesu ayaki epayi na ye pe atunaki ète, “Olingi ngai koleka bango banso?” Piere akokaki koloba ète, “Nkolo, nazali motò pamba oyo akoki naye té. Nazali mosumuki oyo akoki kolinga Yo ata moke té koleka bango. Nabeleli Yo, okopesa ngai kimia.” Piere akokaki kokima mosika, nakobantama mosika na Yesu.
Kati, tika ète tokanisa pona eyano na Piere. Apambolama na sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu, libatisi lia Yesu pe makila ma Ye oyo ezali kobikisa batò banso.
Ponayango, Piere azalaki na makasi makoloba ète, “Boye, Nkolo; Oyebi yango malamu, nalingi Yo.” Litatoli lina lia bolingo ewutaki na kondima kati na sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu na Yesu. Piere andimela sango-malamu ya solo ya bolimbisi bwa masumu, na nzela nini Yesu alongolaki mosika masumu manso ma mokili. Oyo ezali na kati na yango na masumu manso ma mikolo mikoya, maye makosalama na nzela ya bolembu na nzoto ya batò.
Piere andimelaki sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu, pe pwète andimela lisusu ète Yesu azalaki Mwana-Mpate na Nzambi, akokaki koyanola Nkolo na tembe tope kobanga té. Lobiko lia Yesu eyaki na sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu, bongo, Piere abikisama na masumu maye manso ma mokolo na mokolo pe. Piere andimaki kati na lobiko na nzela na sango-malamu na bolimbisi bwa masumu pona masumu mansu ma mokili.
Ozali lokola Piere? Okoki kolinga pe kotia elikia nayo kati na Yesu, Oyo Alongolaki mosika masumu manso mabiso na nzela na sango-malamu na Ye ya bolimbisi bwa masumu, na libatisi lia Ye pena makila? Ndenge nini okoki kozanga kondimela Ye tope kolinga Ye? Nzela mosusu ezali té.
Soki Alongolaki kaka masumu makala tope malelo, pe Atikaki maye ma lobi ekoya, tokokaki kokumisa Ye lokola tozali kosala sik’oyo té. Tokokaki kokende solo-solo na lifelo. Ponayango, tosengeli kotatola ète baye banso bandimeli sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu babikisami nabango.
Nzoto ezali na makasi makoboya lisumu té, pona yango tozali kosumuka mingi. Ponayango, tosengeli kotatola ète kondimela sango-malamu ya bolongoli masumu ète Yesu apesaki biso, sango-malamu ya libatisi pe makila ma Yesu, ebikisaki biso.
Soki toboyi kondimela sango-malamu ya bolongoli masumu, oyo ezali libatisi pe makila ma Yesu, mondimi moko té akokaki kobikisama na masumu maye ma bomoyi bwaye. Likolo na yango, soki tozuwaki bosomi na masumu mabiso ma tango nabiso ya bomoyi bwa biso, na kotatola pe, na kosenga bolimbisi tango na tango, tokokaki kokoma na bolembu mingi pona koteleme kati na boyengebeni, pe tokokaki kozala na masumu tango nyonso kati na mitema miabiso.
Soki ezalaki bongo, tokokaki kosongela bomoyi ya masumu pe tokokaki kolinga Yesu té tope kopusana pembeni na Ye. Bongo, tokokaki kobikisama té na Yesu pe kolanda Ye tii suka na bomoyi bwabiso.
Yesu apesaki biso sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu pe lobiko na baye bandimaki. Akomaki Mobiki ya bule pe alongolaki mosika masumu ma mokolo na mokolo pwète tolinga Ye solo-solo.
Biso bandimi tokoki té komibatela biso moko kasi kolinga sango- malamu ya libatisi, pe makila ma Yesu, bolimbisi bwa masumu mabiso. Bandimi banso bakoki kolinga Yesu pona libela, pe kokoma mayumbu ba bolingi bwa lobiko na nzela ya sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu oyo Yesu apesa biso.
Balingami! Soki Yesu atiki lisumu ata moke na sima na Ye, okokaki té kondimela Yesu, tope kozala na makasi ma kotatola sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu. Okokaki kosalela Nzambe lokola moko na basali na Ye té.
Kasi, soki ondimi sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu, okoki kobikisama na masumu mayo manso. Akopesa yo nzela ya kobikisama na masumu mayo manso tango ososoli bosolo na sango-malamu ya bolimbisi, ndenge ekomami na kati ya Liloba lia Yesu.
 

“Olinga ngai koleka Bango Banso?”

Nini esali biso tolinga Yesu koleka biloko binso mosusu?
Bolingo bwa Ye pona biso, na nzela na libatisi lia Ye, oyo elongolisi biso masumu manso mabiso, na maye ma mikolo mikoya.

Nzambe abendi bampate ba Ye kozala nabomoko na basali ba Ye, baye bandimeli solo-solo sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu. Yesu atunaki mbala misato, “Simoné, mwana na Yona, olingi Ngai koleka bango banso?” pe Piere ayanolaki ète, “Boye, Nkolo oyebi ète nalingi Yo.” Sik’oyo, tika ète tokanisa kati na eyano na Piere. Tokoki komona ète ezalaki té posa ya motema naye, kasi kondima kati na sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu.
Tango tolingi motò moko boye, soki bolingo wana efandisami na baposa nabiso, ekonuna tango okolemba. Kasi soki bolingo wana ezali na misisa ya makasi ma bolingo bwa Nzambe, ekokweya ata moke té. Bolingo bwa Nzambe, oyo ebengani, bolongoli bwa masumu mabiso na ndenge ya monene, lobiko ya mayi pe libatisi lia Yesu pe Molimo, ezali ndenge wana.
Kondima na biso kati na sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu esengeli kokoma mobuku mwa bolingo bwa biso pe misala miabiso pona Nkolo. Soki tolingaki Ye kaka pona baposa nabiso, tokokaki kokweya lobi kuna na kosukisa kati na bomoyi bwa masumu na botomboki. Ngambo mosusu, Yesu alongolaki masumu mabiso manso mosika: lisumu lia botama, masumu ma mokolo na mokolo eleka, masumu ya mokolo na mokolo ya lelo na, ya lobi ekoya, elongo na masumu manso kati na bomoyi na biso banso. Atikaki ata moko libanda na lobiko lia Ye.
Oyo nyonso ezali solo. Soki bolingo ya biso pena kondima na biso efandaki na baposa nabiso na mabongisi nabiso, tokokaki kokweya kati na kondima nabiso. Kasi, pwète bolingo nabiso na kondima efandi likolo sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu bwa Yesu epasaki biso, tozali libela bana ba Nzambe, bayengebeni. Lokola tondimeli kati na lobiko lia mayi pe Molimo, tozali na lisumu lisusu té.
Lokola lobiko nabiso ezali koya té, wuta na elongi ya bolamo kati na biso moko, kasi wuta bolingo bwa Nzambe pena mobeko mwa Ye bwa lobiko bwa solo na nzela ya bolimbisi bwa masumu mabiso, tozali bayengemeni ata bolemu na bozangi makasi nabiso kati na moboyi na biso. Tokokota kati na Bokonzi bwa Lola pe kokumisa Nzambe na nzela ya seko na seko. Ondimi yango?
1 Yoane 4:10 elobi ète, “Kati na bolingo wana, pona tina té tolingi Nzambe, kasi Alingaki biso pe, atindaki Mwana mwa Ye pona bolongoli masumu mabiso.”
Yesu abikisaki biso, na mayi, pena Molimo, bongo tosengeli kondimela sango-malamu ya bolimbisi, libatisi lia Yesu me makila ma Ye.
Soki Nzambe abikisaki biso té na sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu, tokokaki té kobikisama, ezala ndenge nini tondimaki. Kasi Yesu alongolaki mosika nabiso masumu manso tosalaki kati na mitema miabiso me kati na nzoto nabiso.
Pona biso kokoma bayengebeni, tosengeli kozala na bondimi ya makasi ya lobiko nabiso na nzela ya kondima kati na maloba ma mayi, pena na Molimo, sango-malamu ya bolongoli bwa masumu. Sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu ma mokili ezalami na libatisi lia Yesu pe, na makila ma Ye. Sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu ezali liboke lia kondima ya solo, moboku mwa solo mwa lobiko, pe fongola pona kokota kati na Bokonzi na Nzambe.
 

Esengeli té tobika na Kondima na Ndenge Ya makanisi Mabiso Moko

Kondima ya solo ewuta wapi?
Ezali kowuta na bolingo na Nkolo, Oyo Alongolaki libele masumu mabiso manso ma mikolo mikoya.

Kondima tope bolingo oyo ewuti na baposa yabiso moko ezali té kondima tope bolingo ya slo-solo. Ebele ya batò na mokili babandi na kondima kati na Yesu na posa malamu, pena sima libanda na kondima na bango nzela-nzela pwète na mikakatano na pasi ya lisumu kati na mitema nabango.
Kasi, tosengeli kososola ète Yesu alongolaki masumu manso ma mokili: kaka té mabunga ma mike-mike, kasi pe masumu ya minene masalama na tango ya bozangi boyebi.
Na Yoane 13, pona koteya bayekoli ba Ye ndenge nini bango banso bayambaki pe babatelaki kondima kati na lobiko lia Ye ezalaki, Yesu asangisaki bayekoli ba Ye, liboso Ye kokufa na Kuruze. Tango azalaki kolia elongo na bayekoli ba Ye, Atelemaki pe asokolaki makolo mabango pona kofandisa bosolo bwa lobiko bwa Ye yabofoluki kati na mitema miabango. Tosengeli biso banso koyeba tope kondima kati na sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu, oyo Yesu ateyaki bayekoli ba Ye na nzela ya kosokola bango makolo.
Kasi Piere aboyaki makasi kotika Yesu asokola ye makolo yambo. “Okosokola ngai ata moke té makolo mangai!” Pe oyo ezalaki elobeli ya posa na ye moko. Kasi Yesu ayebisaki ye ète, “Oyo nazali kosala okoki kososola yango té sik’oyo, kasi oko yeba yango na sima.”
Sik’oyo, na sango-malamu ya mayi pe Molimo, tokoki kososola maloma ma Biblia maye mazalaki na lokolo na bososoli bwabiso. Ezali Liloba lia bosolo; sango-malamu ya mayi pena Molimo, bolimbisi bwa masumu, oyo ezali kopesa mosumuki nzela kokoma moyengebeni na nzela ya kondima na motema naye nyonso.
Piere akendaki koloba elongo na bayekoli mosusu, kaka ndenge bazalaki kosala liboso kokutana na Yesu. Bongo, Yesu abimelaki bango pe abengaki bango. Yesu abongisaki bileyi bia tongo pona bango, tango bazalaki kolia elongo, Piere asosolaki tina ya maloba maye Yesu alobelaki ye liboso. “Oyo nazali kosala, okoki kososola yango sik’oyo té, kasi okososola yango na sima.” Asosolaki na suka oyo Yesu alingaki koloba tango asokolaki ye makolo.
“Nkolo alongolaki mosika masumu manso mangai. Masumu manso nasalaki pona bolembu bwangai, nakati yango pe masumu nakosala na mikolo mikoya.” Piere atikaki kondima oyo ya makanisi maye na makasi maye, pe abandaki kolanda libatisi, pe makila ma Yesu, sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu.
Sima kolia, Yesu atunaki Piere, “Olingi ngai koleka bango banso?” sik’oyo, na lisungi lia kondima na kati na bolingo bwa Yesu, Piere atatolaki ète. “Boye, Nkolo; Oyebi ète nalingi Yo.” Piere akokaki koyanola pwète asosolaki oyo Yesu alobelaki ye tango Alobaki ète, “Okoyeba yango na sima na yango.” Akokaki té kotatola kondima ya solo, kondima kati na libatisi pe makila ma Yesu, sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu.
 

Sima na Yango, Akomaki Mosali Mwasolo mwa Nzambe

Sima na likambo lina, Piere na bayekoli mosusu bateyaki sango-malamu tii pema ya suka liboso na liwa liabango. Ata Polo, oyo anyokolaki na bozangi mawa nyonso Ba-Kristo, atatolaki sango-malamu na tango ya mikolo mia pasi na mikaktano ya Bokonzi bwa Roma.

Ndenge nini okoki kokoma mosali ya solo ya Nzambe?
Na nzela ya kondima kati na bolongoli bwa masumu manso bwa Ye pona seko.

Kati-kati na bayekoli zomi na mibale ya Yesu, Yuda atekaki Ye, pe sima amibomaki. Ezalaki Ntoma Polo oyo azuwaki esika naye. Bayekoli baponaki Matiasé kati-kati nabango, kasi ezalaki Polo oyo Nzambe aponaki, bongo Polo akomaki Ntoma na Yesu pe ateyaki sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu na bayekoli mosusu.
Mingi kati-kati na bayekoli ba Yesu bakufaki lokola mbeka. Ata liboso na kufa, baboyaki té kondima nabango, pe bakobaki koteya sango-malamu oyo ya ebandeli.
Bakokaki koteya boye: “Yesu Kristo alongolaki masumu manso ma nzoto nayo, na libatisi lia Ye pena makila, oyo ezali, elongo na sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu. Yesu alongolaki masumu mayo manso mosika nayo na nzela ya libatisi lia Ye na Yordané pe Amemaki etumbu ya masumu mayo na Kuruze. Ndima kati na sango-malamu ya libatisi lia Yesu pe makila ma Ye na Kuruze, okobikisama.”
Koyoka sango-malamu ya ebandelii pe kondimela yango solo-solo ebikisi batò mingi. Ezalaki nguya ya sango-malamu ya libatisi lia Yesu, makila ma Ye, pe Molimo.
Bayekoli bateyaki sango-malamu ya mayi, na molimo, nakoloba boye, “Yesu azali Nzambe pe Mobikisi.” Ezali pwète batatolaki sango-malamu ya mayi na molimo ète nakoki sik’oyo koyoka sango-malamu ya libatisi na makila ma Yesu pona lobiko liabiso, pena kobikisama na lisumu. Pwète bolingo bozangi ndenlo bwa Nzambe na lobiko ya kotonda ya Yesu, tokomi biso banso bayekoli ba Yesu.
Bondimi bino banso? Yesu alingaki biso mingi ète Apesaki biso sango-malamu ya mayi pena Molimo, bolimbisi bwa masumu, pe tokomi bayekoli bayengebeni ba Yesu. Pona kotangisa biso bosolo bwa bolimbisi bwa masumu, Yesu asokolaki makolo ma bayekoli ba Ye. Yesu asokolaki makolo ma bayekoli ba Ye pona kotangisa bango na biso elongo ète masumu manso ma mokili, elongo na maye tosalaki na kati na bomoyi na biso, malongolamaki mosika na biso tango abatisama pe asopaki makila ma Ye na Kuruze. Tozali kotonda matondo Yesu pona bolingo bwa Ye pena sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu.
Yesu ateyaki biso makambo mibale na nzela ya kosokola makolo ma bayekoli ba Ye. Yambo, ezali pona koteya bango, kaka lokola Alobaki ète, “Oyo nazali kosala, okososola yango té sik’oyo, kasi okoyeba yango na sima na yango,” ète masumu mabiso manso malongwama mosika nabiso na nzela ya sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu, libatisi lia Yesu pe makila ma Ye.
Liteya lia mibali lizalaki ète lokola Yesu amikitisaki pona kobikisa basumuki pe kokomisa bando bayengebeni, biso, baye babotami mbala ya mibale, tosengeli kosunga basusu na koteya sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu. Ezali malamu pona biso baye bayaki yambo, kosunga baye bayaki na sima.
Tina mibale ya Yesu kosokola makolo ma bayekoli baye na mokolo mwa féti ya Paska ezali polele pe ezali kati na Lingomba lia Ye tii sik’oyo.
Moyekoli akoki té kozala monene koleka molakisi. Ponayango, tozali koteya na mokili pe kosala yango lokola tozalaki kosala pona Yesu. Biso, baye babikisama liboso, tosengeli kosalela pona baye bayè sima nabiso. Koteya bongo, Yesu alongolaki masumu makoyla bango na elembo ya soola makolo ma bayekoli ba Ye. Likolo na yango, na kosokola makolo ma Piere, Atalisi biso ète Azalaki Mobikisi ya bopeto, pwète tokosama té na Satana lisusu.
Okoki kobikisama na kondimela sango-malamu ya bolimbisi masumu, ya mayi pena Molimo. Yesu alongolaki masumu mabiso manso na libatisi lia Ye, liwa lia ye na Kuruze. Kaka baye bandimeli sango-malamu naye nde bakoki bobikisama na masumu ma mokili libela na libela.
 

Zala na Kondima Kati na Sango-Malamu Oyo Elongolaki Masumu Manso Ma Mokolo na Mokolo

Tokoki kokata Satana nzela na bokosi bwaye na nzela ya kondimela sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu, maloba ma mayi na Molimo. Batò bazali kokosama na Satana oyo azali kolobela bango na litoyi pona kopengwisa bango. Ayebi malamu ète nzoto na batò ezalaka masumu tango nyonso na mokili oyo, ndenge nini bakoki kozanga masumu? Batò banso bazali basumuki.
Nagambo mosusu, toyebi eyano. “Toyebi ète Yesu alongolaki mosika masumu ma biso, na libatisi lia Ye, ndenge nini kokoki kozala bandimi na lisumu? Yesu afutaki etumbu nyonso ya masumu mabiso, sik’oyo nyongo nini etikali kofutama?”
Soki tondimeli té sango-malamu ya mayi na makila, maloba ma Satana makozala sukali. Kasi, soki tozali na sango-malamu na ngambo na biso, tokozala na kondima ya makasi kati na bosolo bwa Liloba lia Nzambe.
Tosengeli kozala na kondima na sango-malamu ya botama ya mabala ya mibale na mayi pena makila. Kondima ya solo ezali kondima kati na sango-malamu ya libatisi lia Yesu, makila ma Ye na Kuruze, liwa lia Ye pe lisekwa lia Ye.
Omonaki té ba foto ya lolenge ya mongombo mosantu? Ezali ndako ya moke. Nandako wana ekabwani na biteni mibale, eteni ya libanda ezali Esika Esanto pe oyo ya kati ezali Esika Esantu Yakoleka, esika wapi kiti ya mawa ezali.
Ezali na nzete 60 etelemi libanda na loPango ya mongombo mosanto, pe esika esanto ezali na ndelo 48. Esengeli totala malamu mongombo mosanto kati na makanisi mabiso pwète tososola bozindo bwa maloba ma Nzambe.
 

Ekuke na Lopango na Mongombo Esalama na Nini?

Ekuke na lopango na mongombo masalama na nini?
Esalema na elamba ye pete ya langi ya bulé, ya motané, na elamba mosusu ya motané makasi esibani na singa elongo.

Ekuke ya lopango ya mongombo epesami na Kobima 27:16, “Bongo monoko ya lopango ekozala rido ya monene yaba metre zomi, makonzi ma makolo ma yango, ekozala minei. Bakosala rido ya bilamba bia lokumu pe ya molayi, yango ekosala ya bulé, motané, pe ya motané makasi, na singa ya makasi, etogami elongo. Ekozala na makolo minei.” Biloko basalela na monoko na lopango na mongombo ezalaki bilamba ya bulé, motané, pena motané ya makasi, ya talo mingi pena singa ya talo elongo. Ezalaki bilamaba bia talo peya langi ekeseni.
Nzambe apesaki Moize mitindo alatisa monoko ya lopango na bilamba bia bulé, motané, pena motané makasi, pwète moko na moko amonaka ekuke malamu. Bilamba bia monoko mwa mongombo bizalaki na langi ya bulé, motané pena motané makasi, peya talo mingi pena na singa ya talo ekangama na miboko minei.
Makolo minei mana mazalaki elili ya komibulisa na kati na lobiko lia Nzambe, na mpiko pona nabaye bandimela Mwana mwa Ye, na mpiko ya libatisi pe makila ma Yesu, pena bozali bwa Ye Nzambe.
Eloko moko na moko basalelaki na mongombo ezali na bozindo na yango pe ezali elili na Liloba lia Nzambe pe mabongisi ma Ye pona kobikisa batò na nzela na Yesu.
Sik’oyo, biloko boni basalela na monoko mwa lopango ya mongombo mosantu? Bilo minei basalelaki yango; bulé, motané, motané ya makasi, pe elamba ya talo mingi, na singa elongo. Biloko biye minei bizali na bozindo bozali kosunga biso, na kondima nabiso kati na sango-malamu ya botama ya mbala ya mibale. Soki ezalaki té na motuya, likambo nayango ekokaki té kokomama na kati na Biblia na ndenge ya kotalisa biso biloko ya mike-mike boye.
Biloko binso basalela na monoko ya lopango ya mongombo mosantu ezali na motuya kati na lobiko liabiso. Ponayango, Nzambe atalisi basékélé ya biloko wana na Moize, pe ayebisaki ye eloko na eloko ndenge ya kosala yango kolandisama na maloba ma Ye.
 

Bulé, Motané, na Motané ya Makasi Elingi Koloba nini na Sango-Malamu na Nzambe?

Biloko biye basalela na mongombo elingi koloba nini?
Lobiko lia Yesu na nzela ya libatisi na makila ma Ye

Kati-kati na mongombo, langi ya bulé, ya motané, naya motané makasi na singa ya elemba ya talo basalelaki yango, pona elamba ya molayi oyo ezalaki kokabola Esika Esantu na Esika Esantu Koleka. Biloko moko moko wana basalela yango pona bilamba ya molayi ya Banganga-Nzambi ya Minene, baye bazalaki kokota mbala moko na mbula na Esika Esantu Koleka.
Elamba ya langi ya bulé ezali elembo ya libatisi lia Yesu. Kati na 1 Piere 3:21, ekomami ète, “Ezali na bomonisi nzoto oyo bozali kobikisa biso, na nkombo libatisi.” Piere apetaki sété na libatisi lia Yesu, na mpiko ya Oyo Alongolaki masumu manso ma mokili na molongo oyo, lokola bomimonisi nzoto ya bolongoli masumu. Masumu manso malekaki na nzoto na Yesu na nzela na libatisi lia Ye. Ponayango, elamba ya langi na bulé, libatisi lia Yesu, ezali eteni ya motuya mingi ya Liloba lia lobiko.
Motané makasi ezali elili ya makila ma Yesu, pe motané ezali elili ya Bonzambe na Ye—bozali bwa Yesu lokola Mokonzi pe Nzambe. Balangi misatu oyo ezalaki na mutuya mingi pona kondima na biso kati na Yesu pe, pona lobiko lia Ye.
Elamba ya kokanga elamba ya molayi oyo Nganga-Nzambe Monene azalaki kokanga na tolo naye ebengami mokaba ya tolo, ezalaki peya langi na bulé. Nganga-Nzambe azalaki kolata lisusu elamba ya likolo na mutu mwaye, oyo ezalaki na eteni ya lizanza ya olo ya solo-solo efandisama na kati, pe ekomami likolo na yango, ‘BOSANTU PONA NKOLO.’ Eteni ya lizanza ezalaki ya kotonga kati na singa ya langi ya elamba ya langi ya bulé, pe.
 

Bosolo Etalisami na Elemba ya Langi Ya Bulé

Elamba ya bulé ezali kotalisa nini?
Libatisi lia Yesu

Nazuwaki tango ya koluka mozindfo ya langi ya bulé nakati na Biblia. Biblia elobi nini na langi ya bulé? Tosengeli kososola langi ya bulé, ya motané, naya motané makasi.
Langi ya bulé ezali totalisa ‘mayi,’ oyo ezali, libatisi lia Yesu. Yesu Kristo abatisama na Yoane Mobatisi pona kolongola masumu mansu ma mokili (Matié 3:15).
Soki Yesu alongolaki té masumu manso ma mokili na libatisi lia Ye, tokokaki té kosantisamaa liboso na Nzambe. Nayango, Yesu Kristo asengelaki koya na mokili oyo pena kobatisima na Yoane Mobatisi kati na Mayi ma Yordané pona kolongola mosika masumu ma mokili.
Mutu na likambo pona nini ezali na elamba ya langi ya bulé na na monoko mwa mongombo mosantu mozalaki pwète tokokaki té kokoma basantu libanda na libatisi lia Yesu.
Motané ezali elili na makila ma Ye, liwa lia Yesu. Motané ya makasi ezali kotalisa Bonzambe bwa Yesu, bongo bozali bwa Yesu bozali lokola “Oyo Moko Atondi Makoki, Mokonzi ya bakonzi pe Nkolo na bankolo” (1 Timoté 6:15).
Bosolo ezali ète motané ezali kolobela makila ma Kristo, oyo Asopaki yango na Kuruze pona kofuta nyongo ya masumu ma batò banso. Yesu Kristo ayaki na mokili na nzoto pona kolongola masumu manso ma batò na nzoto ba Ye na nzela ya libatisi lia Ye, pe afuta nyongo ya lisumu na komipesa na Kuruze. Libatisi na makila ma Yesu ezali sango-malamu ya solo ya bolimbisi bwa masumu oyo etatolami na langi ya bilamba biye bazalela pona mongombo mosantu kati na Buyokani bwa Kala.
Banzete ya mongombo ezalakaki ya libaya lia akasia, biloko bia kokangela yango bizalaki bia libende ya bronzé, pe libende lia bronze ebatamisa na kati na libende mosusu ya talo mingi koleka.
Basumuki banso bakosambisama pona masumu mabango pwète lifuti lia lisumu lizali liwa. Yambo moko apambwami na Nzambe pona kosuwa bomoyi yasika, asengelaki kobonza mbeka naye ya lisumu na tango na Boyokani bwa Kala.
Nangambo mosusu, libatisi lia Yesu kati na Boyokani bwa Sika, oyo emonisami na elamba ya langi ya bulé, pona mongombo mosantu, alongolaki mosika masumu mabiso manso. Yesu amemaki masumu mabiso na Kuruze, asopaki makila ma Ye, pe etumbu yango ekweyaki na nzoto na Ye, bongo, Abikisaki biso banso baye bandimeli kati na sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu. Azali Mokonzi ya bakonzi pe Nzambe Mosantu.
Ba-Kristo balingami, liabatisi lia Yesu ezalaki lobiko lia Ye, oyo Abikisa biso, na kolongola masumu mabiso. Yesu, oyo Azali Nzambe, ayaki na mokili kati na nzoto (elamba ya motané); Abatisama pona kolongola mosika masumu manso ma mokili (elamba ya bulé); Akufaki na Kuruze pe asopaki makila ma Ye pona kondima etumbu na esika na biso (elamba ya motané makasi). Libatisi lia Yesu lizali solo-solo kotangisa biso ète Akoma Mobikisi mwa solo mwa batò banso.
Tokoki pe kotala langi nyonso basalela na monoko mwa mongombo mosantu.
Kobongisa elamba na monoko mwa mongombo ya langi ya bulé, ya motané, naya motané makasi na elemba na singa na yango ya talo mingi ezali kotalisa biso bosolo bwa lobiko lia Nzambe. Elamba na singa ya talo mingi awa elingi koloba ète Abikisaki biso banso, ata masumu ya moko té mazanga kologwama. Ezalaki solo-solo lobiko lia boloboli masumu manso.
Tokoki komona wuta langi ya bilamba basalela na monoko mwa mongombo mosantu ète Yesu Kristo abikisa biso, na pwasa té, nakozanga libongisi malamu té. Atosaki na botosi bwa kotonda libongisi lia malamu lia Nzambe, abatisama, akufaki na Kuruze, pe asekwaki wuta baweyi pona kokokisa lobiko lia batò. Na langi ya bulé, motané pe motané makasi, biloko bia bolongoli masumu, Yesu abikisaki baye banso bandimela lobiko lia Ye.
 

Libende lia Bronzé Kati na Boyokani bwa Kala Ezalaki Libatisi kati na Boyokani bwa Sika

Pona nini banganga-nzambe bazalaki kosokola makolo mabango yambo kokota na esika esantu?
Pwète babengama ko telema liboso na Nzambe na kozanga lisumu ata moko.

Eteni ya libenda wana ezalaki ya bronzé. Bronzé ezali elili ya etumbu ya Yesu oyo akufela biso. Sani ya monene ya mayi ezali elili ya liloba lia sango-malamu, oyo etalisi biso ète masumu mabiso manso balogwami mosika nabiso.
Ezali kotalisa bolongoli bwa masumu ma mokolo na mokolo. Masumu ma mokolo na mokolo mabatò makoki kolongwama na nzela ya maloba ma libatisi lia Yesu.
Etumbelo ya mbeka ya kotumba na mótó ezali kotalisa etumbu. Mayi ma Yesu, oyo ezali ya langi ya bulé, ezali sango-malamu ya bolongoli masumu, na maloba mosusu, libatisi lia Yesu na Yoane Mobatisi (Matié 3:15, 1 Yoane 5:5-10). Ezali liloba lia litatoli pona sango-malamu ya lobiko na bolongoli bwa masumu.
Na 1 Yoane 5, ekomami, “Pe oyo ezali bolongi oyo ezali likolo na mokili—kondima na biso. Pe ezali na misato oyo ezali kotatola na mokili: Molimo, mayi, makila; pe yango nyonso misato bazali koyokana lokolo moko.” Atalisi biso lisusu ète oyo akondima Mwana na Nzambe azali na litatoli lia mayi, makila, pe Molimo kati naye.
Nzambe apesaki biso nzela ya kosantisama na nzela ya kondimela sango-malamu ya bolongoli bwa masumu pena kokota na mongombo mosantu. Ponayango, tokoki kobika bomoyi ya boyengebene. Kokoma libota lia Nzambe elingi koloba ète tobikisami na nzela ya kondima kati na sango-malamu ya bolongili bwa masumu pe kobika kati na mongombo mosanto.
Ebele ya batò mikolo mia lelo balobi ète ezali likambo té soki tondimi libanda na boyebi bwa lisolo lia langi ya elamba ya bulé, motané, na motané makasi oyo ezalaki na monoko mwa mongombo mosantu. Soki moko andimi Yesu nakozanga koyeba biloko biye, kondima naye ekoki té kozala ya solo pwète lisumu lizali kaka kati na motema mwaye. Motò ya ndenge wana akokoba kosumuka kati na motema mwaye pwète ntembe kati na solo ya botama ya mbala ya mibale na nzela ya bolongoli bwa masumu, ya mayi, makila, pe Molimo, ezali nano.
Soki motò moko atunama kokakola motò moko oyo ayebi té malamu, pe soki, tokoki koyoka ye, akoloba boye, “Solo, nandimeli motò oyo. Solo-solo, nano nakutana naye, kasi nandimi ye kaka ndenge wana.” Okanisi eyano wana ekosepelisa pe ekoki pona motò oyo akoyoka eyana wana? Tango mosusu ebale ezali kati-kati nabino, pe bakoki kosala ndenge wana ma makambo ma mokili, Kasi, ezali té ndenge wana oyo elikia ya Nzambe azali kosenga biso.
Nzambe alingi biso kondima kati ya sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu, lobiko ya Yesu na nzela ya elamba ya langi ya bulé (libatisi lia Yesu), motané (Bonzambe bwa Yesu), pa motané makasi (makila ma Yesu). Tosengeli koyeba, yambo tondimela Yesu, ndenge nini abikisa biso, na masumu.
Tango tondimeli Yesu, tosengeli koyeba ndenge nini Abikisaki biso na masumu mabiso manso na nzela ya mayi (libatisi lia Yesu), makila (liwa lia Ye), pena Molimo (Bonzambe bwa Yesu).
Tango tososoli solo-solo, tokoki kokota na kondima ya solo peya mobimba. Kondima nabiso ekokaki kozala malamu té, soki toyebi bosolo malamu té. Kondima yasolo, eyaka na bososoli bwa litatoli lia lobiko lia Yesu, sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu, pe Yesu lokola Mobikisi ya solo ya batò banso.
Eloko nini, bongo, kondima ya likolo-likolo ekoki kosala, eloko ya kosekisesa bozali bwa Yesu pamba? Tika ète totala yango.
 

Kondima Ezali Kosekisesa Bozali bwa Yesu

Eloko nini ya motuya esengeli kozala kati na kondima?
Boyebi bwa makasi bwa libatisi lia Yesu

Osengeli kososola ète kondimela Yesu likolo-likolo ekoki kosekisisa Ye. Soki okanisi ète, “Namoni yango lokola eloko ya makasi pona kondima, kasi lokola Azali Nzambe pe Mwana na Nzambe, Nakondimela Ye kaka,” bongo, ozali kosekisesa Yesu. Soki olingi kobotama mbala ya mibale, osengami kondima kati na libatisi lia pe makila ma Yesu, sango-malamu ya bolongoli bwa masumu.
Kondimela Yesu na bozangi boyebi bwa sango-malamu ya bolongoli bwa masumu ezali mabe koleka kozanga kondimela Yesu likolo na nyonso. Koteya kaka sango-malamu ya makila ma Yesu ezali mosala ya punda soki boyebi bwa solo bozangi.
Yesu alingi té motò ata moko akende koteya oyo yemoko ayebi malamu té, tope yemoko azali na kondima ya likolo-likolo kati na Ye. Alingii nde tondima Ye na nzela ya sango-malamu ya bolongoli masumu manso.
Tango tondimi Yesu, tosegeli kondimela ète sango-malamu ya bolongoli masumuwe ezali libatisi na makila ma Yesu. Tango tondimi Yesu, tosengeli kososola sango-malamu ya bolongoli masumu na nzela ya Liloba lia Ye pe koyeba ndenge nini Alongolaki masumu mabiso manso.
Tosengeli pe koyeba langi ya bulé, ya motané, naya motané makasi na monoko mwa mongombo mosantu ezali koloba nini. Bongo, tokoki kozala na kondima ya solo opyo ezali komema biso tii bomoyi bwa seko na seko.
 

Pona koteya Yesu malamu, Toyeba Bosolo bwa Langi ya Bulé, Motané, na Motané ye Makasi

Banganga-Nzambe bazalaki kosala nini yambo kokota na esika esantu?
Bazalaki kosokola maboko na makolo mabango na mayi na sani ya bronzé.

Nkolo nabiso abikisaki biso. Tokoki kozanga té kokumisa Nkolo tango totali maye manso Asala bona lobiko liabiso. Tonsengeli kotala na mongombo mosantu. Apesaki biso maloba ma sango-malamu ma bolongoli bwa masumu koleka na langi ya bulé, motané pe, na motané makasi ya mongombo mosantu pwète Abikisaki biso nayango. Totondi Nkolo matondo.
Basumuki bakoki té kokota kati na esika esantu soki baleki té na esabisama ya somo. Ndenge nini tokoki kokota esika esantu libanda na kosambisama pona masumu mabiso? Nzela ezali ata moke té. Kosi, motò moko kaka, yandenge wana, akoti na esika epekisama, akobomama mbala moko na esika wana. Ekozala etumu ya makasi. Mosumu akoki té kokota na esika esantu, pe kozala na elikia ya kobika.
Nkolo nabiso abikisaki biso, na nzela ya monoko ya sékélé ya mongombo mosantu. Nalangi ya bulé, motané, na motané makasi, na singa ya elamba ya talo mingi. Atalisaki biso sékélé ya lobiko lia Ye na nzela ya bikolo wana.
Yo, nangai, tobikisami na nzela wana? Soki tozali kondimela té maloba ma langi ya bulé, ya motané pe motané makasi, tokoki té kozuwa lobiko na nzela ya sango-malamu ya bolongoli masumu. Langi ya bulé ezali kotalisa té Nzambe, ezali totalisa eloko mosusu té, soki kaka libatisi lia Yesu. Ezali nde libatisi lia Yesu yango nde ezali kolongola mosika masumu mabiso manso.
Moko té akoki kokota pembeni na etumbelo ya mbeka ya kotumba na mótó, soki azangi kondimela tina ya elamba ya langi ya bulé. Ngambo mosusu, motò akoki té kokota na esika esantu wapi Nzambe afandi.
Ponayango, yambo tokota na monoko mwa mongombo mosantu, tosengeli kondima na tina ya langi ya elamba ya langi ya bulé (libatisi lia Yesu), ya langi ya motané (makila ma Ye na Kuruze), peya motané makasi (Yesu akomi Nzambe pe Mwana mwa Nzambe). Kaka tango tondimeli nde Nzambe apesi biso nzela ya kokota Esika ya Bosantu koleka.
Basusu bakoti na lopango ya libanda ya mongombo pe bakanisi ète bazali na kati. Kasi wana ezali té lobiko. Mosika ndenge nini esengeli tokende pwète tobikisama? Tosengeli kozala na makoki ma kokota na esika Esantu Makasi.
Pona kokota na esika Esantu Makasi , tosengeli koleka na sani ya bronzé. Sani ya bronze ezali totalisa kaka libatisi lia Yesu, pe tosengeli kosokola masumu mabiso manso ma mokolo na mokolo na libatisi lia Yesu, pe kokoma bule pona kokota na esika esanto.
Na Boyokani bwa Kala, banganga-nzambe basengelaki kosokola bango moko yambo bakota, pena Boyokani bwa Sika, Yesu asokolaki makolo ma bayekoli ba Ye na ndenge yakotalisa bolongoli bwa masumu mabango kati na bomoyi nabango mobimba.
Mobeko mwa Nzambe molobi ète, “Pwète lifuti lia lisumu lizali liwa, kasi likabo lia Nzambe lizali bomoyi ya seko na Yesu Kristo Nkolo na biso” (Ba-Romén 6:23). Zambe Akosambisa masumu ma motò nyonso, ata moko té akozanga koleka na esambiselo na Ye, kasi Alekisaki masumu manso na nzoto na Mwana mwa Ye pe Asambisa Ye na esika nabiso libela. Oyo nde bolingo na Nzambe, lobiko lia Ye. Lobiko lia solo ezalali komonana kaka tango tondimeli kati na sango-malamu ya bolongoli masumu oyo ezali kati na libatisi, makila , liwa, na lisekwi lia Yesu.
 

Pona Kobotama Mbala Ya Mibale, Moko Asengeli té Koleka Libanda na Bosolo bwa Biblia, Sango-Malamu ya Bolongoli bwa Masumu

Eloko nini etikali kozala pona biso?
Ezali kondimela sango-Malamu ndenge ekomami na maloba ma Nzambe.

Nakanga té mabe batò mosusu. Tango motò moko alobeli eloko moko oyo ngai nayebi malamu té, nakotuna ye malembe-malembe atalisa ngai yango malamu. Kasi, tango nazali kotuna zinga-zinga bozindo ya bikolo ya mongombo mosantu, motò moko té azali koyebisa ngai yango.
Bongo nasala nini? Nasengeli nazonga lisusu na Biblia. Kati na Biblia, esika wapi mongombo esantu elobama? Etalisa na biloko mike-mike na kati ya mokanda mwa Kobima. Soki motò atangi na bokebi Mokanda, akoki kososola elingi koloba nini na nzela ya maye makomami na kati wutu na Liloba lia Nzambe.
Ndeko balingani, bokoki té kobikisama na kondima ya likolo-likolo kati na Yesu. Bokoki té kobotama mbala ya mibale kaka pona kokende na ndako na Nzambe mikolo na mikolo. Toyebi maye Yesu ayebisaki Nikodémé. “Solo-solo, Nalobeli yo ète, kaka, soki motò abotami na mayi pena Molimo, akoki té kokota na bokonzi bwa Nzambe…Ozali molakisi na Izraélé, pe oyebi té makambo maye?” (Yoane 3:5, 10)
Baye bandimeli Yesu esengeli bandimela elamba ya bulé (masumu manso ma mokili amelekaki na nzoto na Yesu tango Abatisama), elamba ya motané (liwa lia Yesu pona masumu mabiso manso), pe elamba ya motané makasi (Yesu azali Mobikisi, Nzambe, pe Mwana na Nzambe).
Tosengeli kondima ète Yesu azali Mobikisi mwa basumuki banso ba mokili. Kozanga kondima wana, motò moko té akoki kobotama mbala ya mibale té, tope kokota kati na esika esantu ya Bokonzi bwa Nzambe. Motò mosusu akoki ata kozala sembo, pe motò yabotosi mingi kasi azangi kondima wana.
Ekoki té kozala pete mingi soki kaka motò moko akoki kobotama mbala ya mibale kaka nakotiya kondima kati na Yesu? —Boye.— “Obotami mbala ya mibale. Ngai pe nasi kobotama mbala ya mibale. Tosili kobotama mabala ya mibale.” Kitoko mingi! Kasi ezali na batò mingi baye bandimeli Yesu, na kozanga ‘kobotama mbala ya mibale’ solo-solo.
Tosengeli koyeba bosolo kati na Biblia lokola tondimeli penza Yesu. Tosengeli kososola sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu kati na Biblia pe tina ya elamba ya langi ya bulé, ya motané, pena ya motané makasi pwèto tokota kati na mongombo mosantu pe tozala elongo na Nzambe kati na bokonzi bwa kondima. Kuna na kati na mongombo ya kondima, tokoki kobika kati na esengo tii tango Yesu akoya lisusu komema biso kati na Bokonzi bwa Ye. Ezali malamu mingi kolela pona biso kondimela Yesu na nzela ya alima.
 

Sango-Malamu ya Ebandeli Eboti Boyengebene na Elamba ya Langi ya Bulé

Nini esengami na mutuya pona lobiko, pembeni na Kuruze ya Yesu?
Libatisi lia Yesu

Batò bazali na ezaleli ya kokanisa ète bakoki kobika kati na mosantu na kozanga kosala mbeba. Ngambo mosusu, tango bazali kosala makasi pona kosala malamu, mingi bazali komona ète bakoki nde té. Batò bazali na ndelo, pe bakoki nabango té, boye ezali na nzela té babika libanda na masumu. Nangambo mosusu, pwète Yesu abikisaki biso, na elamba ya bulé, ya motané, pena ya motané makasi, sango-malamu ya bolongoli bwa masumu, tokoki kosantisama pe kokota na esika esantu ya Nzambe.
Soki Nzambe abikisaki biso té na elamba ya langi ya bulé, ya motané, naya motané makasi, tokokaki té kokota kati na esika esantu na makasi mabiso moko. Tina nayango ezali nini? Soki kaka baye babikaka bule na nzoto na bango bakokaki kokota na esika esantu, moko té akokaki ata moke té. Tango motò moko andimeli Yesu libanda ya koyeba sango-malamu ya solo-solo, motò ya ndenge wana, azali kobakisa kaka masumu likolo na masumu kati na bomoyi bwaye.
Yesu abikisaki biso na libongisi lia lobiko; lobiko ya elamba ya langi ya bulé, ya motané pena ya motané makasi, elongo na singa ya elamba ya talo mingi. Alongolaki masumu mabiso manso. Ondimeli yango? —Boye.— Ozali na bosolo bwa sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu kati na motema pe okomema litatoli lina? —Boye.—
Kaka tango omemi litatoli lia sango-malamu, nde okoki kotiya na elongi nayo linzanza ya olo likolo ya nini ekomami ‘BOSANTO NA NKOLO’ pe kokota na ‘bonganga-nzambe ya bokonzi’ (1 Piere 2:9). Bongo nde okoki kotelema liboso na batò pe koyebisa bango ète ozali mosali ya nzambe, oyo azali kosala lokola nganga-nzambe ya bokonzi.
Elamba ya likolo ya nganga-Nzambe Monene ezalaki na lizanza ya moke ya olo ekagisama na singa ya langi ya bulé. Pona nini langi ya bulé? Pwète Yesu abikisaki biso, na sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu, alongolaki mosika masumu manso pe abulisa biso, na nzela ya libatisi lia Ye. Libatisi na kati na Boyokani bwa Sika ezali elili ya kotiya maboko likolo na mutu kati ya Boyokani bwa Kala.
Ezali té likambo ya ndenge nini tozali na botosi kati na kondima Yesu na bomoyi bwabiso, tokoki té kozuwa lizanza ya moke ya olo likolo ya nini ekomami, ‘BOSANTU NA NKOLO’, nakozanga koyaba sékélé ya elamba ya langi ya bulé, motané pena motané makasi.
Tokomaki bayengebeni ndege nini? Ekomami na kati na Matié 3:15, “Pwète yango nde ekokami pona biso tokokisa boyengebene nyonso.” Yesu abatisama be abikisaki biso, na masumu manso ma mokili. Na nzela ya libatisi lia Ye, Alongolaki masumu mabiso manso, pe biso bandimi tokomi bayengebeni.
Ndenge nini tokoki koloba ète tozali na masumu té, soki libatisi lia Yesu lisalama té? Ata, soki todimeli Yesu na koganga makasi yango, kokanisa liwa lia Ye na Kuruze, pinzoli nyonso yamokili mobimba ekokaki té kolongola mosika masumu manso mabiso. Té. Ata tokobi koganga na kolela, nakosenga bolimbisi, masumu mabiso matikali kati na biso.
‘BOSANTU NA NKOLO.’ Lokola Alongolaki mosika masumu mabiso manso na nzela ya libatisi lia Ye pe, na makila ma Ye, Nkolo asalaki ète masumu mabiso manso maleka na nzoto na Ye, pe pwète liloba lia lobiko ekomami na kati ya Biblia, tokomi bayengebeni na nzela ya kondima na biso, ata ebele ya masumu pe, na bolembu bwabiso bozali kaka.
Bongo, tokoki kotelema liboso na Nzambe. Tokoki sik’oyo kobika lokola bayengebeni, pe koteya sango-malamu na mokili. “Nabikisami. Obikisami. Tobikisami biso banso.” Tobikasami kolandisama na libongisi kitoko ya mawa ma Nzambe.
Libanda ya liloba lia sango-malamu ya bolongoli bwa masumu kati na motema mwayo, lobiko ezali té, ezali ndege nini tozali kosala makasi pona yango. Ezali lokola oyo eyembama na nzembo moko ya Ba-Koréya likolo ya bolingo ya makasi. “Oh, motema nangai ezali kobeta yango moko tango nyonso nazali komona ye, tango nyonso nazali pembeni naye.
Nasengeli kozala kati ya bolingo eleki ndelo.” Motema mwangai mozali kobeta bangu-bangu, kasi yaye té. Bolingo nangai ezongaka té sima. Mawa mingi bona Ba-Kristo ebele bazali na bolingo boye bozongaka sima té pona Nzambe, kasi nazangi boyebi bwa libatisi lia Yesu.
Batò bazali komeka kokanisa ète lobiko ewutaka na banzela mingi pena mabota ebele ekeseni. Bazali kotuna, “Pona nini ekoyaka kaka na nzela ya sango-malamu ya libatisi?” Kasi, ekoki kozala ya kotondisama té, soki ezalaki té pona sango-malamu ya libatisi lia Yesu. Ezali nde nzela moko oyo tokoki kokoma bayengebeni liboso na Nzambe pwète nde lolenge moko ya biso kopetolama na mobimba nyonso na masumu mabiso manso.
 

Lobiko lia Elamba ya Langi ya Bulé Oyo Yesu Apesaki Biso Ezali Nini?

Nini ekomisi biso bayengebeni?
Sango-Malamu ya elamba ye langi ya bulé, motané pena motané makasi.

Lobiko na kati na sango-malamu ya elamba ya langi ya bulé, motané, pena motané makasi ezali likabo lia Nzambe pona batò banso. Likabo lina lipesi biso nzela ya kokota kati na mongombo mosantu pena kobika na kati na kimia. Ekomisi biso bayengebeni, ekokisi biso kobika kati na ndako na Nzambe pena kotangisama na Makomi Masantu na nzela ya lisanga.
Esika nyonso okokende liboso na Nzambe pona kobondela, sango-malamu ezali kopambola biso, na bolingo bwa Ye. Ezali ponango, lobiko ezali na talo mingi liboso nabiso Yesu ayebisi biso ète totonga ndako nabiso ya kondima likolo na ‘libanga’ Libanga ezali sango-malamu ya libatisi. Tosengeli biso banso kobikisama, kobika na lobiko, kokende na Lola, kozuwa bomoyi bwa seko na seko, pe kokoma bana ba Nzambe.
Balingami, pwète na sango-malamu ya bolongoli bwa masumu, tokoki kokota kati na mongombo mosantu na kondima. Pwète bolongoli bwa masumu mosika nabiso (libatisi lia Yesu) pena etumbu na Kuruze, kobikisamaki na kozala na kondima kati na sango-malamu ya libatisi lia Yesu.
Bolongoli ya monene, ya masumu pona biso banso, libatisi lia Yesu pe makila ma Ye, ezali sango-malamu ya bolongoli mosika bwa masumu mabiso manso. Ondimi yango? Sango-malamu ya solo-solo ezali oyo ya sango-malamu ya lola, oyo ya bolongoli bwa masumu mosika pona biso banso.
Tobotami mbala ya mibale na kondimela sango-malamu ya bolongoli bwa masumu. Yesu apesasaki biso sango-malamu ya bolongoli bwa masumu, oyo elongolaki masumu mabiso manso ma mokolo na mokolo pe, na oyo ya mikolo mikoya elongo. Kembo na Nkolo. Halleluyah!
Sango-malamu ya mayi na Molimo (sango-malamu ya mayi na makila) ezali sango-malamu ya solo oyo ekokisama na liteya lia Yesu Krsito. Mokanda oyo ekomami pona kotalisa basékélé ya sango-malamu ya Yesu, sango-malamu ya mayi, na Molimo.
Pwète batò ebele bandimeli Yesu nakozanga koyeba bosolo bwa kati na yango, bazali komikumisa kozala malakisi, tope batò ya kondima ya ndenge wana, kaka kati na mokili ya Ba-Kristo, baye bazali kotanga makambo ma Nzambe (babengami banganga-mayele na makambo ma nzambe); na mokuse, bazali kobika kati ya bozangi boyebi bwa solo. Ponayango, tosengeli kozonga sima, pona kondimela sango-malamu ya solo. Tango ezali nano pona yango.
Nakokota na bosindo makasi na kati ya mokanda mwangai mwa mibale pona baye, bazali na mituna lokolo na sango-malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi pena Molimo.