(Ezayi 28:13-14)“Bongo Liloba na Yawe ekokoma mpo na bango se Biloba-loba ya pamba mpo ete, wana ezali bango kotambola, bakweya na ndenge ya sima, babukana mikongo, bazwama na mitambo mpe bakangama. Yango wana, bino batioli oyo bozali kokamba bato ya Yelusalemi, boyoka Liloba na Yawe!”
MOTO MAKASI NA KATI YA MOKANDA MWA NZAMBE
Ndenge nini Bible ezali Kolobela “moto makasi?”
Bible elobi moto ya motema makasi Azali oyo asumukaka na motema Ata andimeli Yesu.
Ebele ya bato bamikomisi bakomi ba mikanda ya kotanga mikolo oyo, mingi-mingi na bamboka ya boyebi mingi. Bamibengi bakomi mikanda kasi bazali koyiba mbongo ya bato, bazali koningisa bato na nakoluka kokoma makambo ya maba bazalaki. Esaleli wana elingi koloba eloko moko moko ezali lokola ya solo kasi ezali bongo te.
Na maloba mosusu, ezali eloko moko oyo bosolo na yango ya kati ezali na bokesani na libanda na yango. Maloba oyo ya “moto makasi” mpe “na ndenge yango moko” bazali kosalela yango mingi-mingi na mangomba ya Ba-Klisto.
Ndenge ya kolobela yango ezali pasi mingi pona oyo ewuti na “moto makasi” na oyo ezali “na ndenge yango moko,” mpe bamosusu bateyaka yango kolandisama na Mokanda mwa Nzambe.
Lokola ezali boye, nazali na mokumba ya kokabola oyo Mokanda mwa Nzambe mobengi “na ndenge na yango moko” mpe kotiya minda moke na moto na likambo oyo. Nakolinga kobimisa ndakisa ya makambo masalamaka na ndenge na yango moko na mikolo na mikolo kati na bomoyi mpe kotala ndege nini tokoki kokabola yango elongo. Moto nyonso oyo andimeli Nzambe asengeli kokanisa likolo ya momesano wana ata mbala moko na bomoyi na ye.
Tito 3:10-11 ezali kotalisa moto ya moto makasi lokola moto oyo azali kokoba kosumuka, mpe na komikatela makambo ye moko. Ezali moto moko azali komikatela etumbo lokola mosumuki. Na nzela wana baye bandimeli Yesu, kasi mazali na lisumu kati na mitema mia bango bazali na moto makasi liboso na Nzambe.
Yesu alongolaki masumu manso mosika na nzela ya libatisi lia Ye. Kasi bato na mito makasi baboyi kondomela sango malamu oyo ezali komema lobiko na basumuki mpe bazali komikatela etumbu na kokende na milongo ya libungi likolo ya lisumu.
Ozali moto ya moto makasi? Tosengeli kokanisa likambo wana soki tolingi kobika bomoyi ya boyengebene na bosolo kati na kondimi.
Komikatela etumbu te lokola mosumuki ata ondimeli Yesu soki nano oyoki te sango malamu ya mayi na Molimo. Soki ozali komimona mosumuki, ndenge wana ozali kobundisa mosala mwa lobiko mwa Yesu mpe na sango malamu ya mayi mpe na Molimo.
Komibenga mosumuki liboso na Nzambe ezali kondima ete ozali te mwana na Nzambe. Baye bazali kotatola liboso na Yesu, “Nkolo, nazali mosumuki” basengeli kotala malamu na kondima na bango moko.
Ndenge nini okoki kondimela Yesu mpe ozali kokoba nakoloba ete ozali mosumuki tango oyo Yesu alongolaki mosika masumu manso ma mokili mpe Abikisaki yo mobimpa na etumbu ya seko na seko? Ndenge nini okoki koboya likabo lia Ye lia ofele ya lobiko na kokoba komibenga mosumuki tango oyo Yesu alongolaki mosika masumu mayo manso na nzela ya libatisi lia Ye mpe asambisama pona nayango na Kuruse?
Bato ya ndenge wana bazali bato ya mito makasi pwete balingi na mposa na bango moko kotikala basumuki libanda na liloba lia Nzambe. Tosengeli koyeba sango malamu ya mayi na Molimo pona to kolongwa na liboke lia libungi liboso na Nzambe.
Oyo nyonso andimeli Yesu kasi nano abotami mbala ya mibale te azali na moto makasi pwete azali kaka na lisumu kati na motema.
Pwete Nzambe alongolaki mosika masumu manso ma mokili elongo na yabiso moko na kati, tozali bato ya mito makasi liboso na Nzambe soki to boyi kondima lipamboli oyo ya lobiko. Pwete Nzambe azali mozantu, biso tozali na mito makasi kati na libungi soki tozali na lisumu kati na mitema miabiso. Soki tolingi solo-solo kokoma bayengebene, tosengeli kondimela sango malamu ya libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye na Kuruse.
EBANDELI YA MOTO MAKASI NA MOKANDA MWA NZAMBE
Ndelo ya motuya ya Nganga-Nzambe ezali nini?
Asengeli kobotama mbala sika.
Totala 1 Bakonzi 12:25-26. “Jeroboami atongaki engumba Sishemi, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, mpe avandaki kuna. Longwa na Sishemi, abimaki mpe akendeki kotonga Penueli. Jeroboami amilobelaki: ‘Ndenge makambo ezali kotambola, bokonzi ekoki kozonga na ndako ya Davidi.’” Jeroboami azalaki moko ya basali minene ya Solomon. Tango Salomon akomaki na libunga na ba mbula na ye ya suka, Jeroboam atobokelaki mokonzi, mpe akomaki mokonzi ya minoko zomi ya Isalayele na tango ya Rehoboami, mwana na Solomon.
Mposa ya Jeroboami ya liboso tango akomaki mokonzi ezalaki ete bato bazonga na Juda esika Ndako na Nzambe ezalaki. Nasima, ayaki na likanisi lia kopekisa yango kosalema.
Asalaki bangombe mibale ya wolo na Bethel mpe na Dan mpe apesaki mitindo na bato naye kofukamela yango. 1 Bakonzi 12:28 elobi, “Sima nayango mokonzi asengaki toli, mpe asalaki ngombe mibale ya wolo.” Moko ezalaki na Bethel, mpe mosusu na Dan mpe ayebisaki bato baye kofukamela yango, ata kobanga te eloko oyo azalaki kosala ezalaki lisumu ya somo. Asengaki mpe na ndenge na ye moko kotiya Ba-Nganga-Nzambe kokamba batu tango ya kogumbamela bikeko wana.
“Atako bongo, Jeroboami atikaki te banzela na ye ya mabe, akobaki kaka kotia bato ya mboka na ye lokola banganga-nzambe ya bisambelo ya likolo ya bangomba ; abulisaki lokola nganga-nzambe ya esambelo ya likolo ya ngomba moto nyonso oyo alingaki kokoma nganga-nzambe.” (1 Bakonzi 13:33). Yango nde ebandeli ya libungi kati na moto makisi.
Ata sikoyi, bato ya mito makasi bapesi misala ya kosalela Nzambe na moto nyonso pona kosala mosala ya Nzambe. Oyo nyonso akeyi na kelasi ya makambo ma Nzambe akoki kokoma mosali na Nzambe, mopanzi sango malamu, mosali ya libanda na etonga mpe mpaka na lingomba ata nano abotami te mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Oyo nyonso ezali libungi mpe moto makasi.
Ndenge nini moto oyo nano abotami te mbala ya mibale akoma mosali na Nzambe? Soki moto ya ndenge wana bakomisi ye Nganga-Nzambe, etonga oyo eponi ye ekomi nzela ya kosala mabungi na moto makasi.
Tokanisa lisusu ebandeli ya libunga na moto makasi. Yambo, Jeroboami apesa esika na Nzambe na ngombe ya wolo pona kofandisa nguya naye ya makambo ya mokili oyo. Ya mibale, azali kobondela pona oyo nyonso amipesaki kokoma Nganga-Nzambe. Na maloba mangai, azali kopambola bato ya boye-boye lokola Ba-Nganga-Nzambe. Makambo ya ndenge wana ezali kosalama tii mikolo oyo ya lelo.
Lisolo lia libungi lia moto makasi ezali kokoba kaka lokola na tango ya Jeroboami. Baye nano babotami te mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo bakoki te kokoma Ba-Nganga-Nzambe.
Baye bawuti na kelasi ya makambo na Nzambe bakoki kokoma basali ya Nzambe tope bapanzi Sango Malamu? Bakoki kosalela Nzambe ata ndenge moko te pwete nano bandimami na Ye ! Ata moke te. Kaka baoyo bayebani na Nzambe, bango nde bakoki kopesamale nzela ya kokoma basali na Nzambe. Baye bayebani na Nzambe bazali baye basili kobotama mbala ya mibalena mayi mpe na Molimo.
Ekomami na 1 Bakonzi 12:25-26 na 1 Bakonzi elongi 13 ete lisuma lia Jeroboami ebendaki kanda ya Nzambe. Tokoki biso banso koyeba likambo wana, mpe soki moto moko ayebi yango te, akende na Mokanda na Nzambe mpe atanga yango.
Kanisa malamu soki yo mpe ozali kopesa esika na Nzambe na ngombe ya wolo na kati na lotomo nayo. Otiyaka motuya mingi na biloko bia mokili oyo tango mosusu? Tika ete balandi nayo bazonga na sango malamu ya botama ya mbala ya mibale ya mayi mpe na Molimo.
Ozali koyebisa bandimi nayo ete bakoki kobika na maladi na bango soki bandimeli Yesu? Oyebisa bango lisusu ete bakopambolama na biloko bia mokili oyo? Otiya baye nano babotami te mbala ya mibali kosalela Nzambe kati na etonga nayo mpe na koloba ete bokonzi bwa yo nde oyo bakolanda bango banso? Soki ezali bongo, ozali kosala lisumu ya Jeroboami liboso na Nzambe mpe kolamusa kanda na Ye.
BATO NA MOTO MAKASI BAZALI KOFUKAMELA NGOMBE YA WOLO
Ata na mokolo mwa lelo, ezali na bato ebele bazali na mito makasi baye bazali kofukamela ngombe ya wolo. Bazali koloba ete Nzambe apambolaki Solomon tango abonzelaki Ye mbeka ya kotumba nkoto. 1 Bakonzi 3:3-5 elobi, “Salomo alakisaki bolingo na ye mpo na Yawe na kotambola kolanda malako ya Davidi, tata na ye, longola kaka kotumba mbeka mpe ansa na bisambelo ya likolo ya bangomba. Mokonzi akendeki na Gabaoni mpo na kobonza mbeka, pamba te ezalaki esambelo ya likolo ya ngomba oyo elekaki motuya, mpe kuna, Salomo abonzaki bambeka ya kotumba nkoto moko, na etumbelo wana. Na Gabaoni, Yawe amimonisaki epai ya Salomo kati na ndoto ya butu. Nzambe alobaki na ye:’”
Bazali kobotola mbongo na bandimi na bango na nzela ya lokuta na maloba ma elikia ya “mbeka ya kutumba nkoto ya Solomon.” Bandimi oyo ya liboma bazali kobotola bango mbongo na bango. Mpe baye bazali kofukamela ngombe ya wolo lokola Nzambe na bango bazali kobebisa mbongo na bango, oyo ezali kozwama lokola lisungi na bango na misala mia kotonga matonga ya losambo. Ezali te pwete bisika na bango ya kosambela ezali monene te pona losambo, kasi pwete balingi nde kobotola mbongo ya bandimi na bango.
Kotiya ngombe ya wolo na bisika bia bango bia losambo ezalaki kaka esipelo ya lokuta ya bato wana ya mito makasi bazalaki kosalela bona kobotola mbongo na bango. Biso tondimeli ete Nzambe akoki te kozwa biso lokola bato ya liboma. Soki to bonzi mbongo nabiso pona kufukamela ngombe ya wolo, epesameli na Nzambe te, kasi na bisaka na bango ya Ba-Nganga ya mito makasi baye batondi na kolula lokola Jeroboami.
Kokweya te na maboko ya bato wana ya mito makasi. Sikoyo pona nini Nzambe asepelaki na mbeka ya kotumba nkoto ya Solomon? Pwete Solomon ayebaki masumu maye, atatolaki ete akokaki kokufa bona yango mpe abonzaki mbeka kolandisama na kondima na ye. Apesaki mbeka yakotumba nkoto na bozongisi matondo pona libikisi wuta epayi na Nzambe. Solomon apesaki mbeya ya kotumba nkoto, na likanisi lia ye na lobiko ya mayi na Molimo.
Sikoyo, osengeli tokanisa nzela ya solo mpe kotika oyo ya libungi kati na moto makasi pona kokosama lisusu na basali ya Nzambe oyo ya mito makasi.
BASALI YA NZAMBE BAYE NANO BABOTAMI TE MBALA YA MIBALE BAZALI BASALI YA LIBUNGI NA MITO MAKASI
Basali ya libunga balobi nini Na botama ya mbala mibale?
Balobi babotami sika na emoniseli, Ndoto, na mitindo ebele ya biloko ya Molimo na boyebi mosala
Ezali na baye bazali koteya bamosusu kobotama ya mbala ya mibale tango oyo bango moko nano babotami mbala ya mibale te kati na kondima. Bazali bato ya libungi na mito makasi. Bazali koyebisa bamosusu kobotama ya mbala ya mibale tango oyo bango moko bazangi makasi ya botama ya sika pwete bayebi te sango malamu ya mayi na Molimo. Tokoki kaka koseka.
Bazali bato ya mito makasi mpe bazali koteya sango ya lokuta, oyo ezali kobebisa sango malamu ya mayi mpe na Molimo. Bazali kosenga na bato balongolaka masumu mabango mokolo na mokolo.
Bazali koloba, “Kende kobondela na ngomba, nako kila, mipesa na mosala mwa Nzambe, bondela na tongo makasi, zala na botosi, pesa mbongo ebele pona kotongo ba ndako na Nzambe, kasi moto ya mayele mpe ya bokengi alanda bango te.”
Mbala moko, nayokaki moto moko azali kotatola ete asili kobotama mbala ya mibale. Alobaki yango na ndoto, azalaki yakotema na molongo tango mbala ya ye ekomaki, Yesu abengaki nkombo na ye. Alobaki ete ezalaki litatoli ya botama ya mbala ya mibale. Kasi na kati ya kotalela makambo na ndenge na ye azalaki na bosolo te. Yesu alobaki ndenge wana te.
Na Yoane 3:5, Alobi, “Kaka soki moto abotami na mayi mpe na Molimo, akoki te kokota na bokonzi ya Nzambe.” Nzambe alobi ete kaka baye babotami mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo, bango nde bakoki kozala Ba-Nganga-Nzambe ya solo. Oyo nyonso andimi ete abotami mbala ya mibale na ndoto, na makanisi naye, na emoniseli ya molimo, tope na kotubela azali mosali ya moto makasi mpe ya libungi azali nano libanda.
Mikolo oyo, bato mingi bazali kondima te liloba lia Nzambe ndenge likomami mpe bazali kotia mungwa na pilipili na matangisi nabango ya bomoko na esika ya motama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Baye baboyi koteya sango malamu ya mayi na Molimo bazali Ba-Klisto ya ndenge na bango moko mpe bato ya mito makasi.
MABONGISI MA BO-KLISTO YA BOMOYI
Tango nini sango ya solo ebandi Kokoma elongo naya libungi Ya bandimi ya ndenge mosusu?
Tango oyo Mokonzi Ya Barome Constantin apesaki nzela na Maloba ya Milan Na 313 Sima na Yesu
Masanga ebele ya Bo-Klisto esalama tango nini? Tango nini mangomba lokola Ba-Presbiterien, Ba-Methodiste, Ba-Baptiste, Ba-Lutherien, Bato ya Bosanto, mpe Ba-Full-Gospel babandaki? Mabongisi makambo eyaki eleki mbula 500 kaka.
Ba-Klisto ya tango ya liboso nde baye balandi na Yesu tango azalaki na mokili oyo. “Ba-Klisto” elobi “baye balandi Klisto.”
Ba-Klisto ya yambo bazalaki bantoma na bayekoli. Bantoma mpe Ba-Tata ya Etonga balandaki sango malamu ya solo tii mbula 313 sima na Yesu. Na sima ya Mokanda mwa Milan tango ya Mokonzi Constantin ya Monene, Ba-Klisto na bapagano babandaki kosangisa makambo. Suka na yango ezalaki Bikeke ya Moyindu oyo esalaki mbula nkoto moko.
Nasima, na ebandeli ya liboke lia mbula kama ya zomi na motoba, Martin Luther alobelaki Bobongisami, na maloba oyo, “Moyengebene akobika na kondima.” (Barome 1:17).Na sima moke, katikati na 1500~1600, Babongisi lokola John Calvin na John Knox babimaki na Bo-Katolika. Yango nde ezalaki bokokisami bwa Mabongisami.
Mabongisami ezalaki kaka makasi ya kofandisa mangomba masika libanda na ligomba lia Katolika ya Roma. Babongisi babundaki te na makambo ya Bo-Katolika yango moko.
Mposa na bango ezalaki te komatisa kondima kati na botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo, kasi kolongwa na bowumbu na libungi lia Lisanga monene ya Ba-Katolika. Lisanga ya Ba-Katolika ebengaki bobimi wana Bo-Protestant. Oyo elingi koloba baye baboyi.
Na tango wana, Lisanga lia Katolika ya Roma esengaka bato kosomba lifuti lia masumu ma baweyi na bakoko na bango pwete bakota Lola mpe esalamaki na misolo mia motuya mingi. Luther akokaki te kososola malamu ete Bo-Katolika ezalaki libanda mingi. Azalaki kaka komeka kotelemisa Lisanga lia Ba-Katolika ya Roma koteka nyongo ya masumu ma bakoko babango pona kobanda misala mia botongi bwa Etonga Monene ya Musantu Piere.
Nasuka, tokoki komona mbeba ebele ya Lisanga lia Ba-Katolika ya Roma na kati na Lisanga lia Ba-Protestant: libatisi lia bana, mabondeli ya kotubela lokola oyo ya Ba-Katika, bomesano bwa molimo, boyambi ya baye bawutu kotanga kelasi ya likolo ya makambo ya Bo-Katolika lokola basali na Nzambe kati na mangoba kitoko mpe ya monene. Oyo nyonso ezali mbeba ewuta na Lisanga lia Ba-Katolika ya Roma.
Kobanda na Bobongisami ya ebandeli ya liboke lia mbula kama ya zomi na mitano, lisolo lia Bo-Protestant esali kaka ya mbula 500. Mbula oyo ezali mbula ya 481, ya botama ya Mabongisami. Okoki te kososola ete Martin Luther abimaki na Lingomba lia botama na ye eleki kaka mbula 481 pamba. Bo-Protestant bokoki te kokoba na kokende liboso mpe kokokisa bongwana wana te na kotala bolenge na yango. Mabongisami ya Bo-Klisto bozali kokoba kaka.
Mpe ekokoba kokende nzela-nzela. Kasi ezali na eloko moko tosengeli kotiya na makanisi mabiso. Tokoki te kobosana ete kaka baye babotami mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo, bango nde bakoki kokota na bokonzi bwa Lola. Tika ete toyoka yango! Oteyaka sango malamu ya Yesu, sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo? Soki te, ozali te mosali mwa Nzambe. Ezali sango malamu ya “botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo” nde oyo Nzambe alingi tondimela. Ezali oyo Yesu atangisaki Nikodeme na Yoane elongi 3.
Mokanda mwa Nzambe molobeli kaka sangu malamu ya botama ya mbala ya mibale ya mayi mpe na Molimo, tope ezali kolobela makambo mosusu lokola kosala na esika ya malamu kati na mboka mpe na bomoyi ya bosantu? Yasolo oyo yasuka mpe ezali na motuya. Kasi malamu osala yango sima na kobotama mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Mposa ya Nzambe pona biso ezali kondimela sango malamu.
MATAYA YA BATO YA LIBUNGI
Nani Moto ya Libunga?
Oyo azali kaka mosumuki ata Andimeli Yesu
Tango nini baye bamibengi bango moko Ba-Klisto, na kondima ya libungi ebandaki kokoba na mokili?
Ba-Isalayele balandaki na Nzambe moko tii tango bakabolanaki kati na bokonzi mibale na tango ya Jeroboami ndenge ekomami na 1 Bakonzi elongi 12-13. Tango na tango, liboso Klisto aya na mokili oyo, kondima ya lokuta ebandaki kokola. Ezali na basali ya lokuta ebele baye bazali kosala na mikolo oyo.
Mokanda mwa Nzambe mozali kotalisa biso mateya mabango ma libungi na Ezayi elongi 28 mpe na Tito 3:10-11. Mokanda mwa Nzambe molobi ete bato ya libungi mpe ya moto makasi bazali baye bandimeli Yesu kasi bazali kaka na lisumu kati na mitema na bango. Oyo nyonso azali lolenge wana azali lokola mosali ya libungi mpe ya moto makasi.
Mpe batalisi biso lokola ekomami na Ezayi 28:9-10, “Azali nani, ye oyo azali koluka koteya? Alingi kolimbola bimoniselina ye epai ya banani? Epai ya bana oyo balongoli na mabele, bana oyo bakati bango mabele? Pamba te ezali nde bilobaloba ya pamba.”
Bato ya libungi mpe ya moto makasi babakisa makambo likolo ya makambo, molongo likolo na molongo. Elingi koloba nini? Elingi koloba “Zala ekenge, zala ekenge, zala ekenge na baye balobi ete babotami mbala ya mibale na nzela ya kondimela Yesu.” Bazali kaka kokepisa yo ata eloko eza te. Bakoyebisa yo koyoka te, kokende te, tii tango okokweya na libungi.
Soki bazali kokoba ete bazali na kondima ya solo-solo, pona nini bazali kozongisa te baye balobi ete kondima na bango ekeseni na liloba lia Nzambe? Ezali maya mingi. Bazali komigenga Ba-Klisto ya solo, kasi bazali na kati na liloba lia kobongisa oyo ebunga nzela. Mo-Klisto ya solo akoki kolonga oyo amibangi Mo-Klisto na liloba lia Nzambe.
Mikolo mia lelo ekozala sembo Ba-Klisto baloba mabe na botama ya mbala ya mibale lokola “basali wana ya mito makasi” kaka pwete bakeseni na kondima. Ndenge nini tokoki kozala bato ya libungi tango oyo tondimeli sango malamu ya mayi na Molimo?
Soki baye babengami Ba-Klisto ya libungi bateyi sango malamu ya mayi na Molimo, bazali kutu Ba-Klisto ya solo-solo. Ndenge moko, soki Ba-Klisto ya solo bazali koteya te sango malamu ya mayi na Molimo, bakomi kaka Ba-Klisto ya libungi.
Bokeseni kati na “bosolo” na “libungi” oyo efandi na ndenge ya koteya sango malamu ya mayi na Molimo na ndenge bandimeli Yesu mpe bazali na lisumu kati na mitema mia bango tope te. Ndenge nini bakoki kozala kati na libungi tango oyo bandimeli liloba lia Nzambe mpe babotami mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo?
Kondimela libatisi lia Yesu na makila ma Ye na Kuruse mpe na kopetolama mobimba na lisumu ezali libungi? Koboya kondimela sango malamu ya mayi mpe ya Molimo ezali “bosolo”?
Ezali na mangoma ebele ya ba nkombo na nkombo baye basalelaka Mokanda mwa Nzambe mpe bazali kokoba komibenga Ba-Klisto “ya bosolo”. Na kati ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo ndenge ekomami na Mokanda mwa Nzambe, bazali koteya kaka makila na Kuruse, na koboya libatisi lia Yesu (mayi).
Bokeseni nini ezali kati-kati na Lisanga lia Katolika ya Roma na Ba-Protestant mikolo oyo? Kaka lokolo mabongisi ma botomboki baye bawuta na Bo-Katolika ya Roma mpe batongi ya Bo-Protestant. Tokoki mpe kotombokela Ba-Klisto bakufi miso elongo nabaye bamibengi bango moko Nganga-Nzambe na moto makasi na bango. Kaka ndenge wana nde tokoki kofongola miso na sango malamu ya solo, kondimela na kati na bosolo, mpe kobikisama na nzela ya sango malamu ya mayi mpe na Molimo.
Tosala nini pwete tokoma Na libungi te?
Tosengeli kobotama mbala ya Sika na mayi mpe na Molimo.
Mokanda mwa Nzambe moyebisi biso ete kaka baye bandimeli sango malamu ya libatisi lia Yesu na makila ma Ye na Kuruse nde baye bazali na koondima ya solo. Yesu ayabisaki bongo Nikodeme na Yoane 3:1-12.
Bakambi na libunga mpe ya moto makasi basengaka bandimi na bango kondimela bango. Basengaka bango kosambela mingi na kosala makasi. Ezali lokola kotindika bakofi miso kokima bangu.
Ata ozali kobondela mingi, ezali ya pamba soki nano obotami te na mayi mpe na Molimo. Tango tolobaka ete baye babotami te na mayi mpe na Molimo bazali sembo te, basali ya libungi mpe ya moto makasi batalaka na Barome 3:10, “Ezali na moko te. Te! Moko te.” Na molongo oyo, bazali kokamba bandimi lokola basili na kati na libungi.
Nabosolo, ezali bango nde bazali na libungi. Elongi ya molongo wana ezali te lokola ezali koyokama. Basali ya libungi batangaki te Mokanda mwa Nzambe mobimba. Ntoma Paul alobaki ete moto ya bosembo azali te na mokili. Azalaki kolobela Mokano mwa Kala oyo elobi ete moko te azali mosembo na mokili liboso Yesu-Klisto awa nase mpe Yen de Akobikisa biso banso na masumu ma biso na lobiko ya Nzambe. Mpe, baye babikisami na Yesu bakomi bato ya bosembo.
Tokoki komona bosolo soki to tangi elongi mobimba. Basali ya libungi na moto makasi bayebisaka bandimi na bango kosala keba na baye bakondima na ndenge mosusu oyo ekeseni na ya bango. Kobondela kaka na mangomba oyo bango bayebi kozala ya solo, bapekisaka bandimi na bango kobondela esika mosusu. Bongo bandimi ya magomba na bango bakendaka te na mangomba oyo eteyaka sango malamu ya mayi mpe na Molimo.
Bakufi matoyi liboso ya bosolo bwa sango malamu ya solo mpe bakoki te kobotama mbala ya mibale. Oyo nde malakisi ya bakambi ba lokuta baye bazali kokamba bana ya mibali na ya basi ya lifelo. Bakosambisama na Nzambe pona yango. Bakambi ya lokuta mpe na moto makasi basengeli kozonga epayi na Nzambe.
Banani bato ya libungi mpe na moto makasi? Bazali baye babikisami na nzela ya kondima sango malamu ya mayi mpe na Molimo, tope baye bazali kotatola kondimela Yesu kasi bazangi kobotama mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo?
Tito 3:11 elobi ete baye bandimeli Yesu kasi batikali “komikatela etumbu” bazali bato ya libungi mpe ya moto makasi.
Bapekisaka bandimi na bango kokende na mayangani ya bolamuki esika nini sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo ezali koteyama, nakoloba ete ezali esika mabe. Ndenge nini “moto ya bosolo” akoki kobanga oyo ya kondima ya kopata-pata? Bazali kobanga pwete bazangi bosolo ngambo na bango. “Pwete mobeko esengeli kozala likolo na mobeko, mokano likolo na mokano.” Malakisi ma libungi mazalaka ndenge wana.
Ba-Nganga-Nzambe ya libungi mpe na moto makasi bapesa mutuya moke na mokanda oyo, moke kaka na makambo oyo.
Bazuwa maloba ma bato ya makanisi molayi ya mokili oyo, wuta mikanda ya bakomi ba mokili, mpe basangisi yango na makanisi mabango moko pona kokomisa yango kitoko na matoyi. Bakanisi ete bandimi na bango bazangi koyebi mpe bazali komeka kotangisa bango na malasi ma mokili. Lisanga lia solo liteyaka liloba lia Nzambe mpe kolakisa bandimi na liloba lia Nzambe. Bato bayaka te na lingomba kotangisama na nzela ya mayele ya mokili. Kutu, bayaka na lingomba koyoka biloko bia lola oyo mokili ekoki ko yoka te. Bayaka koyoka liloba lia Yesu.
Bato bakotaka na ligomba lokola basumuki kasi balingi kobikisama mpe kokola na kati ya lisanga lokola bayengebene baya bazali lisusu na lisumu te. Bakambi ba libungi mpe moto makasi bakoki koteya bango nini? Bazali kopekisa bandimi na bango kokende na makutani ma bolamoki esika nini basali na Nzambe bazali koteya sango malamu ya solo. Bazali kopekisa bandimi na bango kobotama mbala ya mibale na mayi mpe Molimo.
Ezali bozoba mingi. Bakoki kokosa bandimi na bango kasi Nzambe te.
Ba-Nganga-Nzambe bakoki Kokomisa bandimi kobotama Na mayi mpe na Molimo?
Te. Kaka mobotami ya mbala ya sika Nde akoki kokomisa bango boye.
Bino basali ya libungi na moto makasi, soki bozali basali ya solo, bokoki te koyoka Molimo kopekisa bino te? Esengeli bosonga na bosolo. Botika kokangela bandimi ba bino nzela ya kokende na mayangani ya bolamoki esika nini basali ya solo ya Nzambe bazali koteya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo.
Bateyi ba libungi mpe moto makasi bateyaka bandimi na bango malakisi ya mayele ya kelasi pamba, tango bakuta na boyebi mosusu, batutani mitu. Ezali mawa mingi. Baye bamibengi Ba-Nganga-Nzambe bazali malamu kaka tango oyo bazali kosala libanda na liloba lia Nzambe. Bazali koteya, kotuna, mpe kosala mosala ya Nzambe kaka na bobungi bwa bango moko. Baye bazali kosala mosala mwa Nzambe libanda na liloba lia Ye bazali basili ya moto makasi mpe ya kowaya-waya (Yoane 10:13).
Baye bamibengi Ba-Nganga-Nzambe bazali basali ya libungi mpe ya moto makasi pwete kati na bango mpe libanda na bango ekeseni. Bato mosusu babengaka mangomba maye mazali komikotisa na mabongisi ma bankombo ya mangomba ya libungi. Kasi kati-kati na bango bamosusu baboyi kokota na bankombo ya mangomba wana pwete bazali kosala libanda na maloba ya solo ya Mokanda mwa Nzambe.
Bateyi na bakambi ya libungi bayebisaka bandimi na bango kobikisama tango oyo bango moko nano basilisi te likambo lia masumu mabango. Bazali na kati ya lisumu lia Jeroboami. Soki ezali lisusu na moto moko oyo azali na lisumu kati na motema na ye mpe azali komeka kosalela Nzambe, esengeli ayeba ete masumu maye na boyengebene bwa Nzambe ekokani te. Ayeba ete azali mosali ya libungi mpe ya moto makasi.
Bongo, soki moteyi tope mosali na Nzambe moko azali nano mosumuki, asengeli koyeba ete azali mosali na libungi. Azali moto na libungi pwete ayebi nano te sango malamu ya lokibo ya Klisto, sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Soki moto moko atangi Mokanda mwa Nzambe na mosali ya libungi mpe akeyi koteya bamosusu ndenge moko, akomi mpe moto ya libungi mpe ya moto makasi.
Tokoki koyeba nzete na mbuma na yango. Baye babongwami na nzela ya kondimela libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye bakoki komema bosolo tango oyo baye bakobi na masumu babengami komema masumu. “Ata ndenge wana, nzete nyonso ya malamu ememaka mbuma ya malamu, kasi nzete ya mabe ememaka mbuma ya mabe.” (Matthew 7:17).
BATEYI YA LIBUNGI MPE MOTO MAKASI BATEYAKA NINI NA MATEYA MA BANGO?
Bateyi ya libungi Bateyaka nini na mateya?
Boyebi Nzambe ya mokili mpe na Makanisi ma bato
Bateyi ya lokuta batalaka oyo ya mokili. Pona nini bazali miso payi-payi? Bazali kobatela lokuta na bango eyebana te pwete bazangi kondima ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo.
Bateyi ya lokuta bazuwaka moke awa mpe moke kuna. Bakosaka bato mpe na koteya na bozangi boyebi bwa elongi ya solo ya sango malamu.
“Bongo Liloba na Yawe ekokoma mpo na bango se bilobaloba ya pamba mpo ete, wana ezali bango kotambola, bakweya na ndenge ya sima, babukana mikongo, bazwama na mitambo mpe bakangama.” (Ezayi 28:13).
Molongo likolo na molongo, bazali koloba, “Liloba wana elingi koloba boye na boye na Ba-Kreki mpe boye na boye na boye mpe na Ba-Ebre. Mpe ezali na banzela ya kosalela makambo ebele ya ndenge wana.” Bakebisi bato kozala ekenge soki bakutani na nzela ya lobiko oyo ezali polele-polele lokola moyindu na pembe. Balobi ete, “Martin Luther alobaki boye mpe John Calvin alobaki boye tango oyo John Knox alobaki boye na boye, mpe tokanisi bango nyonso bazalali moto na moto na nzela na ye.”
Bayebi te oyo bazali koloba tope oyo bandimeli. Oyo azali na bosolo akotalisa yango polele-polele. Bandimi ya solo bakoki kotalisa polele-polele bokesani kati-kati na baye babotami mbala ya mibale na baye nano babotami te mbala ya mibale. Tozali koteya polele-polele sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo.
Kazi bateyi ya lokuta bazali kati na mokili ya mikakatano oyo. Kondima na bango ezali lokola ya ngembo. Kaka ndenge ngembo alingaka kati ya lidusu na moyi mpe libanda na butu, bateyi ya lokuta balingi nzela oyo na nzela wana, mpe bandimeli makambo oyo na makambo wana. Tango moteyi ya lokuta akokende na lifelo, bandimi na ye bakokende na ye elongo na suka oyo ya mabe. Ndenge wana, bato ebele bakosuka na lifelo pwete bandimeli basakoli ba lokuta.
Osi obotami mbala ya mibala na mayi mpe na Molimo kati na mosala na yo ya Nzambe? Ozali koteya sango malamu ya botama ya mbala ya mibale ndege ekomami na Mokanda mwa Nzambe? Soki osalaka yango, opambolami, mpe soki te, olakelami mabe. Soki nano obotami te mbala ya mibale, esengeli oyoka sango malamu ya mayi mpe na Molimo.
Otanga mikanda oyo ezali kolobela yango, mpe botama mbala ya mibale. Bato ya libungi balingaka te sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Bazali koteya ete, “Yesu-Klisto ayaki kolongola masumu mabiso, mpe Asalaki kaka eloko wana. Azali kokoba kopetola biso na masumu ma biso lelo mpe akokoba kosala boye na mikolo mikoya.” Ekoki kozala solo ndenge nini? Balobi ete bakomi sembo, kasi bazali kokoba na kosumuka. Bazali sembo tango moko mpe basumuki tango mosusu.
Oyo ezali malaki ya makambo ya Nzambe na ndenge ya mabe. Oyo nyonso azali mosembo sikoyo mpe mosumuki lobi kuna azali mondimi ya libungi mpe ya lukuta, azali mosalitope mosakoli ya lokuta. Oyo nyonso azali komikatela etumbo, oyo azali komikosa azali ndenge moko wana.
BILAKELI MABE BIA NZAMBE LIKOLO NA BANDIMI YA LIBUNGI NA LOKUTA
Basali ya libungi na lokuta Batiyaka sete na nini?
Na misala
Basali ya libungi mpe ya lokuta bazalaka na elongi moko te. Pona yango, bakoki te kotinda bandimi na bango na botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo tango bandimi bayaka komona bango pona koyeba ndenge nini babotamaka mbala ya mibale. Tango wana, bakopesa bandimi na bango mayele ya bozoba ete bato bakoki te kobotama mbala ya mibale na lolenge ya masano mpe bakoki te koyeba tango babotami mbala ya mibale. Ezali bozoba mingi.
Yesu alobaki na Yoane elongi 3, “Soki moto moko abotami te na mayi mpe na Molimo, akoki kokota te na bokonzi bwa Nzambe.” Kokama mikolo oyo, bayengebene baye babotami mbala ya mibale bazali kobenga bango babungi nzela na ndenge ya mabe.
Ba-Nganga-Nzambe ya libungi mpe ya moto makasi balobi ete bakoki komibenga te bango moko bayengebene pwete bazali komikitisa. Bayebisaka bandimi na bango, “Kokende te na mayangani ya bolamuki esika wapi bateyi bazali kolobela lipamboli lia botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Soki obotami lisusu, okokoma moto ya libungi. Tokobengana yo na etonga oyo. Soki olingi kozala na biso, tikala mosumuki, mpe Nzambe akosala yo moyengebene na tango na yo.” Yango nde oyo balobaka. Oyo balingi kolola ete ezali yonde okokata mokano mwa kobotama mbala ya mibale tope te.
Bakambi ya lokuta bayebisaka bandimi ete, “Esengeli botikala na biso, kasi botama ya mbala ya mibale ezali likambo lia bino moko. Pona yango, bomeka bino moko. Bofanda kaka ndenge bozali sikoyo, mpe kokende liboso na Nzambe tango ekozala tango na yango, nde bokozuwa bosolo. Nayebi te oyo ekokoma sima na yango. Kasi oyo ezali etonga ya bosolo, bongo esengelei kotikala na biso.” Okanisi ezali ya solo?
Bakambi ya libungi mpe ya moto makasi bazuwaka moke awa mpe moke kuna kosala mabongisami ma bango. Wana ekomi bosolo bwa bango moko. Bayebi te liloba lia Nzambe oyo eyebisi biso lisolo lia mayi mpe na Molimo.
Bateyi ya libungi bazali koteya maye makomami na Mukanda mwa Nzambe na ndenge na bango kolandima na makanisi na bango moko. Esengeli toteya Mokanda mwa Nzambe kolandisama na maloba ndenge makomami, kasi bango bazali kosala yango na ndenge na bango moko. Ezali pona yango tozali na bateyi na mangomba ebele na Bo-Klisto.
Pwete ezali na basali mingi ya libungi mpe ya moto makasi ya mangomba na bankombo ebele na bayekoli ya kelasi ya minene ya makambo ma Nzambe, ezali mpe na mikanda ebele ya libungi mpe botomboki. Ba-Nganga-Nzambe bazali kosalela moke na mokanda oyo mpe na mokanda wana tango bazali koteya. Kazi Ba-Nganga-Nzambe ya solo, bateyaka wuta Mokanda mwa Nzambe yango moko.
Bakambi ya moto makasi babotolaka mbongo ya bandimi na banzela mingi. Bazali na bomoyi ya malamu na mokili oyo kasi lifelo lizali kozela bango, pwete nano babotama mbala ya mibale te. Yango nde suka oyo Nzambe abongisali pona bango.
Nzambe akomisaki bango bato na makasi na ebandeli. Kasi na baye baboyaki kondimela lipamboli lia botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo, Akotinda bango na lifelo.
Nzambe akosambisa basali ba libungi na lokuta. Basali ya lokuta bandimelaka Nzambe makasi mpe pazalaki na mikanda ebele ya bososoli bwa Mokanda mwa Nzambe na malongi ma kelasi elongo na ebandeli. Kasi malembe, malembe, babandi koteya na makasi ya bato, pwete bandimi babotama mbala ya mibale te.
Basali bana balingaka kolobela misala mia bango mia mokili. Moteyi nyonso oyo ateyaka te sango malamu ya botama na mayi mpe na Molimo azali mokosi mpe moto ya moto makasi liboso na Nzambe.
Batiya mikumba na mokongo ya bandimi na bango tii na suka. Bakosenga bango koya na mabondeli ya mikolo 40, ya mikolo 100 na tongo makasi, kokende na ngomba, kokanga biloko kaka boye, kopesa mbongo pona kosalisa botongi bwa ba ndako na Nzambe, nkoto ya mbeka ya kotumba, lisungi na bokotani bwa bolamuki... Bakosala mpe botangi pona kotalisa ndenge nini moko na moko apesaki. Kaka na kotala mbuma ya misala mia bango, tokoki komona ete bazali batu ya libungi mpe ya lokuta.
Elakeli maba na Nzambe ekokweya na bandimi na bango mpe. Basali baye bazali koteya nano babotami mbala ya mibale te elongo na bandimi na bango bazali nase ya elakeli mabe na Nzambe.
BAKAMBI YA LOKUTA BAMEKAKA KOTANGA MAKANISI YA BANDIMI NA BANGO
Pona nini bakambi ya lokuta Batangaka makanisi ma bandimi?
Pwete babotami te mbala ya mibale, Kasi bazali kosala na bilongi mibale mpe Bazangi Molimo kati na motema.
Ba-Nganga-Nzambe ya lokuta bagangaka mikolo nyonso. Bazali kosepelisa bampaka, basali na bateyi na bango kati na lingomba. Bakendaka bongo mokolo na mokolo. Bazali bato ya bilongi mibale mokolo na mokolo.
“Mozantu mpe Atonda Mawa....” Batondi na masumu kasi bazali kolobela makambo ma bosantu. Ndenge wana, bakomi mabe koleka ndelo mokolo na mokolo.
Moteyi moko alobaki ete, “Ezali elakeli mabe kosala mosala mwa Nzambe soki ozangi Molimo na kati.” Elingi koloba ete ezali libungi kosala mosala mwa Nzambe soki nano obikisami te; ezali elakeli mabe likolo na bomoyi na yo. Soki ozali moko na basali ya moto makasi wana, esengeli obotama mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo.
Oyo nyonso andimeli Yesu kasi nano abotami te mbala ya mibale azali moto ya libungi mpe ya lokuta. Ezali mpe bongo pona moto nyonso oyo abalukeli sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Kaka moto ya bosolo oyo abotami mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo nde akoki koteya sango malamu na bamosusu.
BASALI YA LIBUNGI BAGANGAKA PONA KIMIA
Ndenge nini basali mabe Basepelisaka bandimi?
Bagangaka pona na kimia, Balobaka na bandimi na bango bakoki kokota Na Bokonzi na Lola ata bazali Basumuki.
Ezayi 28:14-15 elobi, “Yango wana, bino batioli oyo bozali kokamba bato ya Yelusalemi, Bozali koloba: ‘Tosalaki boyokani elongo na kufa, boyokani elongo na mboka ya bakufi. Tango likama ya makasi ekoya, ekozwa biso te; pamba te tokomisi lokuta ekimelo na biso mpe makambo ya lokuta ebombamelo na biso.’”
Ezali banani oyo bato ya botomboki? Ezali baye bateyi liloba lia Nzambe elongo na mabungi ma kondimela na bango. Likolo na makanisi maye, ya kelasi ya koyeba makambo ma Nzambe, moteyi asengeli topesa bolimboli ya solo ya Mokanda mwaNzambe. Kasi Ba-Nganga-Nzambe ya libungi na moto makasi bateyaka Mokanda mwa Nzambe na ndenge na bango. Bango bazali kosala ya mabe na botomboki.
“Tosalaki boyokani na liwa, mpe na lifelo elongo. Tango mabe ekoya, ekosimba biso te.”
Bateyi ba botomboki balobi ete mabe tango ekoya ekosimba bango te. Bazali koyebisa bandimi na bango kobanga te. Pasi na lifelo ezali kozela bango, kasi bazali koloba, kobanga te. Kobebisama na lifelo ezali te pona bango. Bongo esengele batikala libanda na bozoba ya ndenge wana soki balingi kobika.
Bato ya libungi na botomboki balobi ete kobotama mbala ya mibale te na mayi mpe na Molimo. Ezali boye? Te, ata moke te. Okoki kokota te na bokonzi bwa Lola soki obotami te mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo.
Ezali malamu kozanga kokota na bokonzi bwa Lola? Ezali ndenge moko na kotuna soki ezali malamu kozika na lifelo. Esengeli te ate kopesa eyano, na mitona nyonso mibale eyano ezali ‘te’. Tondimela biso banso sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo mpe tokota na bokonzi bwa Lola elongo. Bakambi ya lotuka na botomboki bazali kokosa bato.
Bazali koloba ete pwete bandimeli Yesu, ezali likambo te pona bango ata batikali basumuki, bako kende te na lifelo.
Yesu akosunga yo na bomoyi ya masumu mpe na botomboki? Mosumuki akoki kokota Lola? Okoki kozanga kokende lifelo ata ozali mosumuki? Ekomami na Mokanda mwa Nzambe ete okokende te na lifelo tango ondimeli Yesu, ata ozali na masumu na kati na motema nayo?
Bato na moto makasi na botomboki balobi ete basalaki boyokani na liwa, mpe liwa ekoya te na nzela na bango. Balobi ete mondimi akoki kozanga kokende na lifelo ata soki azali na lisumu kati na motema mwa ye. Okanisi solo-solo ekosalema ndenge wana?
Bato na libungi mpe na moto makasi bazali koyebisa bato na elikia nyonso ete liwa na lifelo ezali kozela bango te. Ba-Nganga-Nzambe ya lokuta bazali kopesa misala mia Nzambe na baye nano babotami mbala ya mibale te lokola bampaka, bakambi mpe bateyi. Kasi basengeli koyeba ete bakosuka na lifelo pwete bandimeli te sango malamu ya mayi mpe na Molimo. Oyo esengeli basala ezali kokotisa kati na mateyi na bango kondima ya sango malamu ya mayi mpe na Molimo.
Bandimi, ata bazali basumuki, bakokota na Lola? Mosumuki akoki kokende na Lola? Mokanda mwa Nzambe molobi ete basumiki bakoki kokende na Lola? Te. Moto ya bosolo akoki kozala na lisumu? Te. Yango nde mateya ya libungi na mayele ya kelasi ya bato ya boye na makambo ma Nzambe.
Mokanda mwa Nzambe molobi, “Lifuti lia lisumu lizali liwa.” (Barome 6:23). Ezali mobeko mwa Nzambe. Akotinda basumuki banso na lifelo. Na ngambo mosusu, baye banso babotami mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo bakokende na Lola.
“Tango pasi na mikakatano ekoya, ekoleka na nzela na biso te, pwete tobatami na lokuta, mpe kokimele na banzela ya kokosa.” Ba-Nganga-Nzambe ya moto makasi na lokuta balobaka kati na maloba mabango na nzela wana ete bakokende te na lifelo ata bazali na lisumu kati na motema na bango. Pwete babatami na sima ya malakisi ya lokuta mpe ya botomboki, Nzambe akoki te kosunga bango. Bandimeli kati na malakisi ya kelasi ya boyebi Nzambe na ndenge na bango. Pwete bandimeli na makani ma bango esika ya liloba lia Nzambe, bazali bato ya moto makasi, libungi na masumu pona lifelo. Ezali pasi na mawa mingi pona bango.
BAKAMBI YA LIBUNGI BALUKAKA KAKA MBONGO
Ba-Nganga-Nzambe Ya lokuta balukaka nini?
Kobotola mbongo mingi koleka na Ndenge nyonso na Badimi na bango.
Basali ya lukuta na baye bamibengi Ba-Nganga-Nzambe balukaka kaka mbongo. Bazali na boluli mingi. “Mbongo boni moto wana akobesa soki aye na etongo nangai?” bakanisi moko na zomi akopasa. Ezali kaka lokola kofukamela ngombe ya wolo. “Tika ete nakoma na lokumu mingi, na sala mbongo ebele, Nkolo.” Ba-Nganga-Nzambe ya libungi bayebisaka bato babondela ndenge wana.
Balobaka, ete, “Soki ondimeli Yesu, okozala na mbongo ebele, okobota soki obotaka te, okokoma moto ya lokumu na misala mia yo.”
Ndenge wana, bato ebele bakomisi bango kilo na Ba-Nganga-Nzambe ya libungi na moto makasi, baye bazali koya kobotola bango mbongo na bango mpe bazali kozela lifelo pona botomboki na bango. Ezali malamu ata moke te! Soki molakisi ya mabe aye kobima na bozoba wana, akomona na kokamwa mbongo boni abotola bato na kati na lokuta na ye. Akotubela ye moko na bozangi mayele kati na misala mia ye mpe akosala makasi pona bolamu ya bandimi.
Bakambi na libungi bazalaka bato ya makasi na ndenge na bango ya kolanda malakisi ma bango. Bazali kokende na tongo makasi na libondeli, na ngomba, na misala ya kosunga etonga, kopesa mbongo na ndenge ya bomoko, moko na zomi, na mabonza ya poso. Ezali na banzela mingi ya kobotola mbongo na bandimi.
Bandimi na bango basalaka makasi, kasi bazali kaka na lisumu kati na motema, pwete moto moko te ateya bango sango malamu ya mayi na Molimo. Bamosusu batunaka bango yango, kasi bazuwaka te eyano ya solo. Oyo nyonso nano abotami te na mayi mpe na Molimo azali kati na libungi, moto makasi na botomboki.
MAWA PONA BAKAMBI YA LIBUNGI NA BANDIMI NA BANGO
Ba nani bato ya mingi kati Na mokili oyo?
Baye bazali kosalele Nzambe nano babotami te Mbala ya sika na mayi mpe na Molimo.
“Oh, mawa na bino basali na libungi! Bosali mosala na lobiko na bino yambo” Botomboki na bino ezali lolenge na kofukamela ngombe ya wolo ya Jeroboami. Eloko ya liboso oyo bato na botomboki basalaki na Boyokani bwa Kala ezalaki kotonga ndako na kotiya ngombe ya wolo na kati (1 Bakonzi 12:25-33).
Mikolo oyo, bazali kotonga bandako ya Nzambe minene pona kobotola mbongo na bandimi na bango. Bazali kotinda bandimi na bango kokende kozuwa mbongo ba banke pona kotonga ndako monene ya Nzambe. Bazali kosalela bobangi bwa lingomba pona kobenda mbongo. Mbongo, biloko ya kingo na ya matoyi, na biloko ya wolo ezali kotonda na sani ya mabonza tango nyonso. Bakambi ya lokuta basalaka ndenge wana. Ezali bongo na mangomba ya bazali ya libungi wana.
Na libanda, bazali kotalisa ete bakobi na makambo ma molimo, kasi na bosolo nyonso bazali koluka mbongo kaka. Nakebisi yo kofanda mosika na masanga maye masalelaka kaka mbongo. Nabeleli yo kokende te na mangomba oyo balukaka mingi bato ya mbongo. Ezali malamu te kotanga mbongo ya mabonza ya lingomba, pwete basalaka yango ndenge wana pona kobenda bamosusu kopesa mbongo ebele.
Bakambi ya libungi balobelaka bandimi malomba ya komeka bango.
“Okopambolama soki ondimeli Yesu.”
“Mipesa na misala mia Nzambe. Soki opesi mingi, okozuwa mpe mingi.”
“Soki osali lokola mpaka, okopambwama na biloko ya mokili.”
Boye, bandimi babandi mbangu ya kokoma bampaka. Soki lifuti songolo lizali te, nani akoki kokoma mpaka? Mpe bampaka babengami kosunga mingi na misolo mia bango.
Bobegami bofandi te na koyeba mosala na Nzambe kasi na ndenge ya kopesa misolo, ndenge ya kokoma moto monene soki opesi mingi na etonga? Ezali nde bongo.
Bakambi ya libungi batalelaka kaka mbongo. Bazali kotonga mangomba ya minene. Bazali kokengela te soki bandimi na bango bakokende na lifelo. Bango bazali kolanda kaka mbongo.
Basali ya lokuta basalaka pona na lipa. Bazali kokosa bato na bapete ya lokuta. Bazali kobatama na bapete ya lokuta liposo na bandimi na bango (Ezekieli 13:17-19). Elingi koloba kokanga bango na lisanga mpe kobakisa boswiwi na bango. Basali ya lokuta bateyaka te sango malamu ya mayi na Molimo. Bazali kaka kokumisa bato ya bozuwi mingi.
Ata moto oyo aye na etonga kaka tango moke, akomi mokambi. Nalikolo na yango, soki ayebi malamu mateya mpe zali na mbongo na ye, bakomatisa na pete na kimpaka. Yango nde nyonso oyo na kati na bokoko bwa soni bwa lisumu lia Jeroboami, oyo atiyaki ngombe ya wolo esiki na Nzambe.
Basali ya lokuta bafukamelaka ngombe ya wolo. Bazali te kosuka na koboya koteya bandimi na bango mateya ya botama ya sika. Bazali kaka kosenga bango mbongo na kolaka bango mapamboli ya ndoto. Bazali kotala te makambo ma bandimi na bango, pwete posa na bango ezali mbongo kaka.
BATEYI YA MOTO MAKASI BAZANGI ELIKIA YA SOLO KATI NA MATEYA NA BANGO
Bateyi ya moto makasi na lokuta balingi koloba “ekoki kosalema” tope “tango mosusu” mingi-mingi pwete bazangi elikia ya solo na makambo maye bazali koloba. Bazangi kondima kati na liloba lia Nzambe, mpe bandimeli te oyo bazali koteya. Bomoyi nabango efandi te na kondima kati na liloba lia Nzambe. Balobaka ete, “Ekokaki kolobama ete....” Balobaka te polele-polele na elikia nyonso. Ekoki kozala malamu bateyaka te bandimina bango eloko ya solo koleka mateya oyo ya lokuta.
Bateyi ya lokuta na moto makasi bakoki te kokamba bato na botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Bazali kaka kolakela mabe bato na kotinda bango na lifelo.
BATEYI YA LOKUTA BAZALI LOKOLA BASAKOLI YA MABE
Botomboki na Molimo Ezali nini?
Kondimela Yesu na tango oyo ozali Kobika lokola mosumuki oyo nano Andimeli te libatisi lia Ye.
Matie elongi 7 eyebisi biso lisolo lia baye bandimeli Yesu, kasi bakosuka na lifelo. Basali ya lokuta bakokanga liboso na Nzambe na mokolo ya suka. Lokola ekomami na Mokanda mwa Nzambe, “Mingi bakoloba na Ngai mokolo wana, ‘Nkolo, Nkolo, tosakolaki na nkombo na Yo, tobenganaki milimo mabe na nkombo na Yo, mpe tosalaki bikamwa mingi na nkombo na Yo?’ Mpe Nakoyanola bango ete, ‘Nayebi bino ata moke te; mosika na Ngai, bino basali ya botomboki!’” (Matie 7:22-23).
Bandimaki te Yesu asokolaki masumu manso ma moto; bandimaki te sango malamu ya mayi mpe na Molimo.
Bazali kosala libanda ya mobeko mwa Nzambe. Elingi koloba nini? Elingi koloba ete bayebisaki bato kondimela Yesu tango bango moko bazali nano na lisumu na motema. Okoki komituna nini ezali malamu te, kasi ezali lisumu monene liboso na Nzambe.
Tango mosumuki azali koteya bato mosusu kondimela Yesu, akoki te komema bango na botama ya mbala na mibale na mayi mpe na Molimo. Ndenge wana, bakambi ya lokuta babotaka kaka basumuki baye bandimeli Yesu. Ezali lisumu liboso na Molimo kosala makambo libanda na Molimo.
Baye bamisali basali na Nzambe bandimelaka te liloba lia Nzambe tope koteya sango malamu lokola ekomami. Babendaka kaka mbongo na bandimi na bango. Bazali basumuki ata bandimeli Yesu. Bazali komeka kokamba bamosusu tango oyo bango moko nano babotami mbala ya mibale te. Na nzela wana, bazali kosala libanda na mobeko mwa Nzambe.
BASALI YA LOKUTA, KASI BAMEKAKA KOLANDA BOSOLO
Ndenge nini kosala bokeseni kati Ya baye babotami mbala ya mibale na baye Nano babotami te?
Tokoki kosala bokeseni na komeka soki Basumuki tope te.
Bakosa bino te na basakoli ya lokuta baye bazali koloba ete bazali basumuki. Kopesa bango mbongo na bino te. Kopesa te mbongo ya motoki na bino na basumuki wana.
Pona nini opesaka mbongo na yo na bateyi ba ndenge wana baye bakoki te kosunga yo na masumu mayo? Soki olingi kopesa mbongo na yo na etonga, nzela nano masumu mayo ma sokolama na sango malamu ya mayi mpe na Molimo.
Kaka ndenge kolandisama ezalaka na masano, ndenge moko mpe ezalaka na bomoyi. Ezali, na ndenge ya ndakisa, masanga ya kobondela na kolandisama baye bakoki te kosokola masumu kati na motema. Okoki kososola ndenge nini lisanga lia bilanda-landa ezalaka? Kolandisama ezali eloko moko ezali libanda lokola ya solo, kasi na kati ezali na molongo ya makambo te.
Osengeli kozuwa mokano pona yo moko. Nani moteyi ya solo? Nani azali mosali ya lokuta? Kondima ya solo ezali nini? Mosali ya solo andimeli Yesu kati na bosolo mpe na lobiko ya makoki ma Ye. Bazali na masumu te kati na mitema mia bango.
Bato banso bazali lokola basali ya lokuta wana? Ekoki kozala ndenge wana. Kasi, tika ete tokende lisusu na Mokanda mwa Nzambe. Oyo nyonso andimeli Yesu nano abotami te mbala ya mibale azali mondimi ya lokuta mpe motomboki. Ezali polele ya koloba ete botama ya mbala ya mibale nde kondima ya solo. Pona yango, baye banso babotami te mbala ya mibale bazali na kati na libungi. Bandimi ya lokuta mpe ya libungi bango nde bandimeli Yesu kasi bazali na lisumu na kati na motema na bango.
Basali na bandimi ya libungi bazali kati na komeka kolanda boyengebene. Bakoki koyeba ete nzela ya kosantisama ezali na kondimela Yesu, kasi bazali nano na lisumu kati na motema na bango. Bandimi bango moko kozala basumuki. Bazali kokoba koloba ete bakoki kokende kaka na Lola mpe babakisi ete bafukamelaka Nzambe. Ezali komonana ete bazali bato ya bosolo, kasi tokosama te na bilanda-landa.
BOZAMBISAMI BWA NZAMBE BOZALI KOZELA BATOMBOKI
Pona nini sango malamu Ya solo ebongwami?
Pwete basali ya lokuta na ya libungi Basangisi kondima ya mabe ya bato Na sango malamu ya solo.
“Yango wana, Yawe, Mokonzi ya mampinga, Elombe ya Isalaele alobi: Ah, mawa! Nakosepela na pasi na bino, bino bayini na Ngai; mpe nakofutisa bino masumu, bino banguna na Ngai! Nakotelemela bino, nakopetola bosoto ya palata na bino mpe nakolongola salite na bino, nakokomisa lisusu basambisi na bino malamu lokola na tango ya kala; mpe bapesi toli na bino, ndenge ezalaka na ebandeli. Sima na yango, bakobenga bino lisusu Engumba ya Bosembo, Engumba ya Boyengebene. Siona ekosikolama na nzela yaboyengebene, mpe bato na yango oyo bakobongola mitema bakobika na nzela ya bosembo. Kasi batomboki mpe bato ya masumu bakobebisama, bato oyo bakobosana Yawe bakosila. ‘Bokoyoka soni mpo na banzete ya terebente oyo bozalaki kolinga mingi; bokoyoka pasi na mitema mpo na bilanga oyo boponaki; bokokoma lokola nzete ya terebente oyo ekawuka makasa. Moto ya makasi akokoma moto ya bolembu, mpe mosala na ye ekokoma lokola mokalikali; bango mibale bakozika nzela moko na moto, mpe moto oyo koboma yango akozala te.’” (Ezayi 1:24-31).
Nzambe ayebisi biso ete soki tondimeli bato, toko sila kati na somi pwete bato bazali kaka bato. Ayebisi biso ete tokozala na soni pona lingomba oyo toponaki biso moko, mpe soni wana ekozala lokola nzete oyo makasa ekweya mpe lokola bilanga oyo ezangi mayi.
Ayebisi biso ete basakoli ya lokuta na bandimi baye bandimeli na mikano ya bato na kotika liloba lia Nzambe bakosuka mabe mpe misala mia bango ekozala na motuya te. Bango nyonso bakokende kati na lifelo. Bateyi ya lokuta mpe batomboki baye nano bakangolami te elongo na basumuki mpe na banguna ya bosolo bakosambisama na moto ya Nzambe.
Mangomba maye matongami na mayele ya kelasi ya bato pona koyekola Bo-Nzambe ekoki kozala minene kasi matonga mana mafandi na malakisi ya kelasi ya boyebi Nzambe na nzela ya bato mpe ezali libanda na bosolo, mpe bazangi eloko te na kati. Etonga nyonso oyo efandi te na kondima ya liloba lia Nzambe mpe na botama na mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo ezali lokola bilanga bizangi mayi.
Ekoki kozala nzete, kasi ezali nzete ya kokufa oyo ezangi mbuma. Tango libulo lia mayi lizangi mayi, libungisi motuya mwa yango.
“Ya makasi ekozanga makasi, mpe mosala na yango ekokawuka, banso mibale bakozikisama.” Baye bazangi Molimo bakoki komonana bato ya makasi liboso na bato mosusu, kasi na miso ya Nzambe, bazali lokola nzete ya kokawuka epongisami pona moto ya lifelo.
Nkolo aloki, “Mokengeli, kolala te na butu?” (Ezayi 21:11) Moyengebene oyo akozuwa bomoyi bwa seko asengeli koteya sango malamu ya mayi mpe na Molimo kati na molili ya butu.
Nzambe azali mwinda mpe Satana azali molili. Nzambe azali komema bato na boyengebene mpe Satana azali komema bango na matonga malokuta etonda pasi na mikakatano mpe na mateya ya lokuta.
Na tango ya mosakoli Ezayi, kondima na bato ekweyaki lokola na mikolo mia lelo. Basangisaki liloba lia Nzambe na malakisi ya bonzambe ya kelasi ya bato na bizaleli bia bato ba mokili. Bakambabi Ba-Isalayele na nzela ya libungi mpe ya lokuta na mikakatano, oyo etindaki Nzambe kobengana bango banso.
“Nakolongola mabongisami ma bosangisami bwa bino mosika. Na kobongisa bazuzi ba bino pona yambo, mpe bapesi toli na bino lokola na ebandeli.” Mbeka oyo eko ndimama ata moke te na Nzambe ezali oyo ya sangisa-sangisa, masangisi ma bosolo bwa Nzambe na mayele ma bato.
Nzambe andimaka te mbeka ya sangisa-sangisa. Ekoki komonana peto na miso ya bato, kasi ezali ya kosangisama na bambeba ya kondimela ya bomoto mpe etondi bosoto mpe ezali te eloko ya kondimama liboso na Nzambe.
Nzambe abendaki matoyi ma Ba-Isalayele banso, na bomoko bakambi ya lokuta, bateyi ya moto makasi na libungi mpe na basumuki.
Soki totangi mokanda na Kobima mpe na Mitango, tokoki komona ete Nzambe abendaki te bango matoyi na ebandeli. Nzambe asungaki Ba-Isalayele mpe apambolaki bango. Kazi na sima ya liwa lia Jozue, kobanda na Bilombe, Ba-Isalayele bakotaki kati na libungi mpe botomboki.
Na ndenge wana, baponaki nzela na bango moko. Na tango wana, Nzambe atindali mosakoli mwa Ye Jeremi mpe ayebisaki Isalayele bomipesi na Babilone.
Jeremi ayebisaki bato ete bakozwana na Babilone. Ezalaki na elongi ya molimo na kati, elili ya moyengebene azali koyebisa baye bazali na libungi komipesa na sango malamu ya mayi na Molimo.
NZAMBE AZALI KOZONGISA NA BOSOLO BABUNGI NA BATOMBOKI
Pona nini Nzambe Azongisi bango na bosolo?
Pwete basaleli bikeko Esika na Nzambe.
Pona nini basali na Nzambe bakotisaki Ba-Isalayele na libungi mpe na botomboki? Pwete babalokisaki ndege ya kopesa mbeka, na kopesa bato nyonso nzela ya kokoma Nganga-Nzambe, mpe babalokisaki mikolo mia bopesi mbeka.
Babalokisaki Mokolo mwa Bolongoli Masumu wuta mokolo mwa zomi mwa sanza ya sambo na mokolo mwa zomi na mitano ya sanza ya mwambe mpe bakotisaki Ba-Nganga-Nzambe wuta libanda na Ba-Levike. Bamikangelaki nzela ya botama ya mbala ya mibale.
Nzambe abendaki matoyi ma basakoli ba lokuta. Baye basalelaki ngombe ya wolo esika na Nzambe bakomaki Ba-Nganga-Nzambe ya libungi mpe ya botomboki.
Solo-solo, Nzambe abendaki bango matoyi kaka te pona kofukamela bikeko. Yo na ngai tango na tango tofukamelaka mpe bikeko? Tosumukaka tango mosusu, kasi masumu mabiso mazali te makasi kaka pwete tozali na ngolu na Nzambe. Kasi kolongola Nzambe mpe kopesa esika na Ye na ngombe ya wolo ekoki kolimbisama te. Mpe yango ekeyi na kobalukisa ndenge ya kosala mbeka na kotiya bato nyonso na kati na Bo-Nganga-Nzambe.
Masumu mana mazali somo mingi! Mazali masumu ma somo mingi koleka. Ndenge nini moto akoki kolimbisama tango apesi esika na Nzambe na ngombe ya wolo! Ekomami na Mokanda mwa Nzambe ete ezalaki lisumu lia Jeroboami oyo ebendaki kanda na Nzambe.
Kaka lokola Nzambe atalisaki kanda na Ye na Boyokani bwa Kala, Azali sikoyo kobebisa basumuki baye bazali kobundisa Ye. Nzambe ayebiski Ba-Isalayele ete Akolakela mabe baye bakobaluka na kofukamela ngombe ya wolo.
BATOMBIKI BAPESI MBEKA LIBANDA NA MOBEKO
Tosala nini liboso Tosalela Nzambe?
Masumu mabiso manso Malongwama mosika.
Bakonzi mpe Ba-Nganga-Nzambe ya lokuta mpe na botomboki ya Isalayele bazalaki kobundisa Nzambe. Babakisaki baye babebisaki nzela ya momesano mwa bopesi mbeka na Bo-Nganga-Nzambe. Jeroboami, mokonzi na mayele na moto makasi maye, apesaki nzela na bato mosusu ya libanda na ndako na Levi kosala Bo-Nganga-Nzambe.
Kaka baye bazalaki ya ndako na Levi nde bakokaki kokoma Ba-Nganga-Nzambe mpe na kosala kati na Ndako esantu ya Nzambe. Likolo na yango, Ba-Nganga-Nzambe bakokaki kowuta na ndako ya Aron. Yango nde ezalaki mobeyo mozangi ndelo mwa Nzambe. Kasi Jeroboami apesaki nzela na Ba-Nganga-Nzambe ya libanda ya ndako na Levi mpe bapesaki mbeka na ngombe ya wolo. Tosengeli koyeba ndenge nini yango elamusaki kanda na Nzambe.
Ata na mokolo mwa lelo, baye nano babotami mbala ya mibale te, bazali kokoma basali ba Nzambe, bampaka, mpe bakambi na kati na lisanga lia Nzambe. Oyo ezali kobundisa mobeko mwa Nzambe mpe nakobenda kanda na Ye. Nzambe asepeli na mbeka libanda na mobeko mwa Ye? Batomboki na bato na libungi na moto makasi babengami ko bebisa ngombe na bango ya wolo na kozonga na Nzambe mpe na kobotama mbala ya mibale.
Ezayi 1:10-17 elobi ete, “Boyoka Liloba na Yawe, bino bakambi ya engumba Sodome! Boyoka mobeko ya Nzambe na biso, bino bato ya engumba Gomore! ‘Ebele ya bambeka na bino ekosala Ngai nini,” elobi Yawe? “Nasili kolembabambeka na bino ya kotumba, bambeka na bino ya bameme ya mibali mpe mafuta ya bibwele na bino ya mafuta; nazalikosepela ata moke te na makila ya bangombeya mibali, ya bana meme mpe ya bantaba ya mibali. Tangoboyaka libosona Ngai, nani abengaka bino ete boya kokota na lopango naNgai? Botika komemela Ngai makabo oyo ezanga tina! Nazali koyoka malasi na bino ya ansa nkele. Bafeti na bino ya ebandeli ya sanza, ya Saba mpe mayangani na bino: bafeti wana ya mabe, nazali kokoka yango lisusu te. Motema na Ngai eyini bafeti na bino wana ya ebandeli ya sanza mpe bafeti na bino wana ekatama. Ekomipenza mokumba mpo na Ngai, nalembi komema yango. Tango bokotombola maboko na bino mpo na kobondela, nakolongola miso na Ngai likolo na bino; ezala soki bosambeli mingi, nakoyoka bino te, pamba te maboko na bino etondi na makila. Bomisukola mpe bomipetola, bolongola misala mabe na bino na miso na Ngai! Botika kosala mabe! Boyekola nde kosala malamu, boluka bosembo, bosunga moto oyo bazali konyokola, bobundela mwana etike, bokotela mwasi oyo akufisa mobali!”
Soki totangi milongo oyo na bokebi, tokoki komona ndenge nini bakambi ya Isalayele bazalaki na boluki Nzambe mingi. Kasi ata bazalaki bongo, babebisaki tango babonzaki mbeka ya mabe mpe bazangaki kotosa mobeko mwa Nzambe.
Tokoki komona ete bazalaki kolanda mobeko mwa Nzambe te tango bazali kopesa mbeka mpe bazalaki kotosa te liloba lia Nzambe. Bakambi oyo bamikotisaki mingi na makambo ma Nzambe mpe babonzaki mbeka ebele liboso na Nzambe. Mokanda mwa Nzambe molobi ete makila masomaki lokola elabe kati na Ndako esantu na Nzambe.
Ata ndenge wana, tango Nzambe atalaki oyo basalaki, Alobaki ete ezalaki lokola lisumu lia Gomora. Amonaki ete bazalaki kosala mbeka liboso na Ye, kasi na bosolo, bazalaki nde kosumuka. Alobaki ete ezalaki malamu kutu bamema te mbeka ata moke te. Aboyaki koyamba bango.
Lokola bazalaki kopesa mbeka liboso na ngombe ya wolo, Nzambe akokaki te kolimbisa masumu mabango. Akokaki te lisusu koyamba yango ata moke te. Ayebisaki bango ete basengeli kopesa mbeka kolandisama na nzela Apesaki bango. Pamba te, ezalaki malamu bapesa yango te.
Mbeka na bango epesamelaki te na Nzambe na nzela ya malamu, pona yango, Ba-Nganga-Nzambe abenga bango basumukaki. Esengeli oyeba ete kosalela Nzambe mpe kosala mosala mwa Ye na masumu ezali mbeba monene liboso na Ye.
BATO NA LIBUNGI MPE MOTO MAKASI BAZALI LOKOLA BATANGISI YA KELASI
Batangisi mabe basalaka nini?
Batangisaka bofandi elongo, Batangisaka botama ya sika te.
Bateyi wana bazalaka na bosantu ya libanda. Tango batelemaka liboso na bato, bazalaka lokola bato ya bosembo mingi mpe bakosaka bato mingi na elongi wana. Bazalaka bato ya mayele mingi. Mpe basukisaka mateya ma bango na kosenga bato bazala malamu. Mateya ya ndenge nini wana? Bokeseni nini ezali kati na mateya ma bango na oyo ya balakisi ya kelasi?
Etonga na Nzambe ezali esika ya botama ya mbala ya mibale pona kokumisa Nzambe. Kaka etonga ya ndenge wana nde ezali etonga ya solo. Etonga ya solo ya Nzambe ezali te koteya ndenge nini esengeli kobika liboso na Nzambe. Moteyi ya etonga ya solo azali koteya sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Ata ozali na bolembu mingi, Nzambe akosokola yo na masumu mayo manso.
Bateyi ba moto makasi na libungi bayebisaka bandimi na bango, “Sala oyo, mpe wana,” na kotiya mikumba mia kilo na mikongo mia bango, kasi bango moko bakoki te koningisa yango ata na mosapi moko.
Moteya ya libungi mpe moto makasi asombeli mwana lindanda ya talo mingi mpe atindi ye mboka mopaya kotanga yango. Ndenge nini Nganga-Nzambe akoki kosala yango? Akozuwa mbongo wapi? Soki azali na mbongo ya ndenge wana, akoki kosalela yango te na koteya sango malamu te? Esengeli kaka moteyi azala na mutuka ya talo mingi? Azala kaka na mutuka ya kitoko mingi mpo bamona ye? Moteyi oyo azali kokumba mutuka ya talo mingi azali moyibi. Tango oyo bandimi baye bakoki te kosomba ata mutuka ya moke te, ndenge nini ekozala sembo pona kozala na mutuka ya ndenge wana? Tokoyeba moteyi ya libungi na moto makasi kaka nabizaleli bia ye.
Bateyi ya lokuta basengaka misolo ya mingi. Matonga mosusu efutaka bateyi na bango koleka 10.000 $ na sanza moko. Mpe yango wana ezali kaka lifuti oyo eyebani. Bapesaka mbongo ya kelasi na bana na bango, mikanda mia kelasi, kobatelami na bana na bango na kelasi, mbongo ya kokutana na bango kaka pona tango moke.
Mpe, bamosusu kati na bango bazali yobelela ete mbongo ya lifuti ekoki te. Bazuwaka 10.000 $ na sanza moko mpe bazali kosenge mbongo ebele koleka lisusu. 10.000 $ ezali lifuti moke? Moteyi asengeli kosepela na moke oyo ezali wana kaka pona na koteya sango malamu ya botama na mayi mpe na Molimo.
Moteya ya solo azuwaka ngolu na kimia kowuta na Nzambe. Kasi moteyi ya libungi mpe na moto makasi azali na kimia na ye kati na kosenga mbongo.
Bateyi ya ndenge wana bazali kofukama liboso na ngombe ya wolo. Etonga na Nzambe ebengami tango mosusu Siona. Ezali na etonga ata moko te oyo ezali kitoko lokala Siona. Etonga na Nzambe ezali esika wapi sango malamu ya mayi mpe na Molimo ezali koteyama.
Ezayi 1:21 elobi ete, “Tala ndenge nini engumba ya boyengebene ekomi lokola mwasi ya ndumba! Ezalaki liboso engumba etonda na bosembo, boyengebene ezalaki kovanda kati na yango; kasi lelo oyo ekomi kobomba babomi.” Ezayiazali kotalisa etonga na Nzambe, na koloba ete, “Etondamaki na bosolo mingi.”
Nzambe azali na mawa mingi. Pwete tokoki te, pwete tozali bana na Adam mpe tobotama na lisumu, Yesu ayaki na mokili kopetola biso mosika na masumu mabiso na nzela ya mayi mepe na Molimo. Yango nde bolamu bwa Nzambe.
Na Boyokani bwa Kala, tango bamonaki ete bazalaki na makasi te, bayaki epayi na Nzambe kobonza mbeka. “Na salaki mabe na nzela oyo mpe na nzela wana. Nazalaki na kati na libungi.” Bongo bazalaki kolimbisama masumu mabango ma mokolo na mokolo, mpe bazalaki na ngolu ya kozuwa bolimbisi pona masumu mabango ma mbula mobimba mbala moko na mbula na Mokolo mwa Bolongolani mwa Masumu.
Ndenge moko na kati na Boyokani bwa Sika, Yesu-Kristu ayaki na mokili oyo mpe abatisamaki mpe akufaki na Kuruse pona kolongola mosika masumu ma bato banso mbala moko pona libela.
Kasi na Mokolo mwa Mosala mwa Mbula, bato ebele bazalaki koganga na kotubela, “Nzambe na biso, tobeleli yo, Limbisa biso pona masumu tosalaki mbula ewuti koleka. Mpe tobelili yo lisusu, pambola biso kati na mbula oyo ya sika.” Batu bana bazalaki bato ba libungi na moto makasi.
Nini lisusu, ezali solo kobotama ya mbala ya sika na mayi mpe na Molimo? Yesu ayaki na mokili oyo eleki lokola mbula 2.000, alongolaki mosika masumu ma bato banso mbala moko pona libela mpe abikisaki biso na lisumu pona libela na mayi mpe na makila. Kasi tozali kosenga bolimbisi mokolo na mokolo, Alobi nini?
“Ndenge mboka ya bondimi ekomi lokola mwasi yandumba! Etondaki na boyengebene; Bosembo efanadaki na kati na yango, Kasi sikoyo etondi na babomi ebele.” Oyo nyonso amibengi mosumuki azali lokola motomboki mpe moto ya moto makasi.
BATEYI YA LIBUNGI MPE MOTO MAKASI BAKOKI TE KOTEYA SANGO MALAMU YA BOTAMA YA SIKA NA MAYI MPE NA MOLIMO
Nzambe ayokaka losambo Ya basumuki?
Te. Akoti te pwete masumu mabango Makaboli bango na Nzambe.
Nzambe na biso abengi baye bandimeli Ye mpe bazali kosenga Ye bolimbisi babomi. Lokola bazali kosenga bolimbisi mpe lisusu bazali basumuki, bazali na elikia ete Yesu akozonga lisusu mpe kokufa pona masumu mbala ya mibale? Libatisi na Kuruse na Yesu ezali bosolo bwa lobiko.
Na 1 Piere 3:21, elobi ete libatisi lia Yesu ezali elili ya lobiko na biso. Yesu akufaki pona kobikisa biso na lisumu lia batu banso mbala moko. Alongolaki mosika masumu ma bato banso mbala moko pona libela mpe asekwaki mikolo misatu na sima na yango. Afandi sikoyo na loboko ya mobali na Nzambe.
Yesu abaitisamaki mbala moko mpe akufaki mbala moko na Kuruse pona kobikisa biso libele. Abatisamaki na Yoane-Mobatisi tango Azalaki na mbula 30. Akufaki mbala moko pona kobikisa biso banso na masumu ma mokili. Elingi te koloba ete etumbu epesamelama pona na tango nyonso?
Soki babungi bazali koloba ete bazali kaka basumuki, bazali kosenga na Ye koya nase lisusu mpe kokufa na Kuruse lisusu. Na bosolo, Akokaki kokoba kosala yango tango na tango batu bakosenga bolimbisi.
Baye bandimeli sango malamu ya mayi na Molimo kati na mitema mia bango babikisami na lisumu libela, bakomi bayengebena, bakokende na Lola mpe bazuwi lipamboli lia Nzambe lia bomoyi bwa seko. Oyo nyonso akutani na moyengebene akoki kobikisama na nzela ya mayi mpe na Molimo mpe akomi moko na bapambolami na Nzambe. Oyo nyonso asengi lobiko ya solo liboso na Nzambe akobikisama.
Totanga Ezayi 1:18-20. “‘Boya sik’oyo, tosilisa likambo,’ elobi Yawe. ‘Ezala masumu na bino ezali motane makasi, ekokoma pembe lokola mvula ya pembe ; ata ezali motane lokola ngola, ekokoma lokola bapwale ya meme. Soki bozwi mokano ya kotosa Ngai, bokolia mbuma kitoko ya mokili. Kasi soki kaka botie moto makasi mpe botomboki, bokokufa na mopanga.’ Pamba te monoko ya Yawe nde elobi.”
Nzambe azali koloba ete soki totosi sango malamu ya mayi mpe na Molimo, tokolia mbuma ya mabele, kasi toboyi mpe botomboki, tokoliama na mopanga.
Nzambe na biso alobi ete, “Boya sikoyo, mpe toyokana elongo. Tosolola. Bokoki te? Bozangi boyengebene? Bomilingi mingi? Bokoki te kobika na mikano mia Ngai? Bokoki te kosala oyo mobeko esengi na bino? Boyebi kasi bokoki te? Bongo, boya epai na Ngai. Ata masumu mabino mazali ya lani ya motano, ekokoma pembe lokola mvula ya pembe; ata ezali motano lokola ngola ekokoma lokola bapwale ya meme.” Oyo elingi koloba ete Nzambe abikisaki basumuki na bosolo nyonso mpe asali bango bayengebene.
Ezalaki na lisumu te tango Nzambe akelaki Adam na Eva. Kasi Satana ayaki na kati na likambo lina. Amekaki bango mpo batombokela Nzambe mpe bakomisi bato banso basumuki na nzela na lisumu lia bango. Satana ekweyisaki bomoto nyonso. Na ebandeli Adam na Eva bazalaki te basumuki liboso na Nzambe. Babikaki na Nzambe na kati na Elanga ya Edeni. Kasi bakomaki basumuki. Bongo sikoyo, Nzambe azali kobenga biso. Boya toyokana elongo. Tosolola elongo!
“Masumu boni osalaki na mokili oyo? Mpe masumu boni okosala liboso okufa?”
“Oh, Nzambe. Nzela ezali ya kozanga kosumuka. Tokoki te kozala beyengebene ya suka ata tozali komeka yango.”
“Malamu, masumu boni osala tii sikoyo?”
“Malamu, Nkolo, nakoki koyeba yango nyonso lisusu, kasi ezali moke oyo ekoki kozonga na makanisi mangai. Okanisi tango wana? Oyebi oyo nazali kolobela... Mpe ezali na tango mosusu wana, Oyebi...”
Na sima Nzambe alobi, “Koba na koyebisa Ngai. Okanisi yango nyonso? Oyebi boni libanda ya oyo nyonso? Masumu maye ososoli, malimbisami manso, maye obosani, mpe na oyo okosala na mikolo ekoya, Nalongoli yango mosika nayo libela. Kaka yayo moko te, kasi ya bana na yo mpe na bana na bango nase elongwami mosika na bango. Nazali Nzambe ya boyengebene. Na longoli masumu mayo mosika na yo mbala moko pona libela.”
Nzambe, oyo alongoli mosika masumu manso mabato banda na lisumu lia Adam tii masumu ya moto ya suka na mokili, azali Alfa mpe Omega, Ebandeli mpe na Suka.
“Nazali Mobiki mpe Nzambe Atonda Nguya.”
“Nazali Yehovah, Nzambe ya Mawa.”
“Nakoyokela ngolu na baye bakoki na ngolu, Nakozala na motema ya mawa na baye bakoki na motema ya mawa.”
Soki tosengi mawa na Ye mpe totiye elikia na biso kati na Ye, tokoki kozuwa mawa ma Ye Nzambe. Tata na biso alingi kopambola biso banso. Alingi biso banso tokoma bayengebene. Kati na bolingo mpe mawa ma Ye, Alingi kosala biso bana na Ye ya boyengebene.
Nzambe alingi tosala nini sima Na botama ya mbala ya sika?
Alingi to teya sango malamu kati ya Mokili mobimba.
Alingi tozala pembe lokola mvula ya pembe. Yesu alongolaki mosika masumu ma bato banso mbala moko libela pona nyonso na nzela ya libatisi lia Ye mpe na makila ma Ye. Soki etonga ekoki te kosilisa makambo ma masumu mpe na bomoyi pona bandimi banso, ekoki te kobengama etonga ya solo ya Nzambe.
Bato bayaki na Ba-Nganga-Nzambe mpe batuni, “Na sumukaki. Esengeli nasala nini? Natubeli mpe natubelaka mbala na mbala, kasi masumu mangai malongwami te. Nakoki te kokoba kokende mosika. Nakanisi ete nakoki te kokoba na bomoyi ya losambo.” Soki Nganga-Nzambi akoki te kopesa eyano na moto ya ndenge wana na makambo maye, asali mosali ya libungi. Akoki koloba ete, “ekozali ndenge olingi. Kende kobondele na ngomba. Meka kokanga bileyi mikolo 40.”
Ba-Nganga-Nzambe ya lokuta tope bakambi na kati na etonga batondi na makambo ya bosoto mingi mpe bazangi boyebi bwa sango malamu ya mayi mpe Molimo. Bayebi te soki milemo mia bandimi na bango mikokende na lifelo tope na Lola.
Bakambi wana bazali te na bosolo liboso na Nzambe. Bamimbengi Ba-Klisto mpe basali kati na libungi. Bazali na elongi ya baye bandimeli Yesu na libanda, kasi mitema mia bango etondi na lisumu. Nano basokolami te na masumu mabango. Bakoki te koteya sango malamu ya mayi mpe na Molimo oyo ekoki kolongola masimu manso mosika. Bakosa biso te.
Tito 3:10-11 elobeli babungi, “Soki, kati na Lingomba, ezali na moto oyo amemaka bokabwani, kebisa ye, mbala moko, mpe kebisa ye mbala ya mibale. Soki aboyi kaka koyoka, bimisa ye libanda ya Lingomba; pamba te osengeli koyeba ete moto ya ndenge wana abunga nzela, azali kosala masumu; mpe na ndenge wana, amikateli ye moko etumbu.” Pwete bandimeli Yesu kasi nano babotami te mbala ya mibale. Bamikateli bango moko etumbu lokola basumuki. Basundoli sango malamu ya mayi mpe na Molimo, bazali koloba ete bazali basumuki mpe bakokende te na lifelo.
Bazali na Bo-Klisto ya libungi. Oyo nyonso andimeli Yesu mpe azali na lisumu azali mobungi. Babungi na batomboki liboso na Nzambe. Nzambe azali mosantu. Kasi batomboki bazali te bansantu. Baye bandimeli sango malamu ya mayi mpe Molimo bapetolami na masumu bango manso. Pona yango, oyo nyonso andimeli Yesu kasi azali na masumu azali mobungi nzela mpe motombongi. Tobengami kozala mosika na bato baye balobi ete bandimeli Nzambe mpe bakoki kaka na kozala basumuki.
Toteya sango malamu na baye nano bayoki yango te mpe na baye balingi kondimela kasi bakoki te pwete bayebi yango te. Tosunga bango kobotama mbala ya mibale. Tokende mosika na baye bazali kobundisa sango malamu ya mayi mpe na Molimo.
Tosengeli koteya sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo na mokili mobimba. Amen!