• All e-books and audiobooks on The New Life Mission website are free
  • Explore multilingual sermons in global languages
  • Two new revised editions in English have been released
  • Check out our website translated into 27 languages
Search

Sermons

Liteya lia 5: Ndenge Nini Kotubela Maumu Malamu

[5-1] Ndenge nini Kotubela Masumu Malamu (1 Yoane 1:9)

Ndenge nini Kotubela Masumu Malamu(1 Yoane 1:9)
“Soki toyamboli masumu na biso, Nzambe akolimbisa biso mpe akopetola biso na mabe nyonso, pamba te azali Sembo mpe Moyengebene.”
 
 

SANGO MALAMU YA MAKILA EZALI SANGO MALAMU YA NDAMBO


Tokoki kokota bokonzi bwa lola Kaka na sango malamu ya makila?
Ata moke. Tosengeli kondimela sango malamu Mobimba (ya mayi mpe na Molimo).

1 Yoane 1:9 azali kolobela kaka boyengebene. Soki mosumuki akangolami nano te mpe ameki ko longola masumu maye ma mokolo na mokolo kolandisama na maloba ma molongo oyo mpe atatoli mabe ma ye, masumu ma ye balongwami te. Omoni nini ezali kolobela esika oyo? Molongo oyo mozali pona basumuki baye nano babotami te mbala ya mibale. 
Ezali na bato ebele na mokili oyo baye nano babotami te mbala ya mibale, kasi bazali kozuwa molongo oyo wuta 1 Yoane elongi 1 mpe kobondela pona masumu mabango, na elikia ya kolimbisama. 
Kasi moto oyo nano abotami te mbala ya mibale akoki kobimisama na mobimba na masumu ma ye na nzela ya mabondeli ma botatoli bwa ye? Ezali eloko moko ya mutuya tosingeli kotala malamu liboso tokende liboso.
Yambo totanga 1 Yeano, tosengeli kosuwa mokano soki ntoma Yoane azalaki moyengebene tope mosumuki. Tika ete na tuna yo motuna oyo. Ntoma Yoane azalaki moyengebene oyo abotama libela mbala ya mibale na kondimela sango malamu ya mayi mpe na Molimo, tope azalaki mosumuki? 
Soki olobi ete ntoma Yoane azalaki mosumuki, ozali kolendisama na Mokanda mwa Nzambe libanda na bondimi bwa yo. Soki ntoma Yoane azalaki moyengebene oyo abotama mbala ya mibale tango andimelaki Yesu, ekomi polele ete kondima na ye ezalaki na bokeseni na ya yo. Osengeli kozala na kondima moko na ntomba Yoane. 
Natuna mpe motuna mosusu. Ntoma Yoane azalaki kokoma mikanda oyo na bayengebene tope na basumuki? Azalaki kokomela bayengebene. 
Pona yango, soki basumiki baye nano babotami mbala ya mibale te batatoli maloma oyoya 1 Yoane 1:8-9 mpe basaleli yango, ekozala libanda na bosolo. Soki olingi kokoma sembo, tatola masumu mayo liboso na Nzambe mpe ndimela sango malamu ya mayi mpe ya Molimo. Bongo nde Nkolo akosokola yo masumu na sango malamu oyo esi epetoli masumu ma mokili mobimba.
Kondima ya ntoma Yoane ezali ndenge wana. Na 1 Yoane elongi 5 alobi ete andimeli kati na “mayi, makila, mpe Molimo.” Ondimeli Yesu oyo ayaki na mayi, makila mpe Molimo? Ondimeli kaka Yesu oyo ayaki na Kuruse, tope na nzela ya libatisi lia Ye, makila ma Ye, mpe Molimo? 
Okoki kokota pa bokonzi bwa Lola na kondimela sango malamu ya makila pamba? Soki ondimeli kaka sango malamu ya makila na Kuruse, ososoli ndambo ya sango malamu. Soki ondimeli kaka makila na Kuruse, kotiya tembe te komimona kati na losambo ya masumu ma mokolo na mokolo. Libaku malamu lizali ete ondimeli masumu mayo makoki kolongolama mosika na nzela ya mabondeli ma kotunela.
Kasi masumu mayo makoki kolongolama mosika tango ondimeli kaka na makila ma Kuruse, tubela mpe bondela pona bolimbisi bwa masumu mayo ma mokolo na mokolo? Soki ozali moko na bato oyo, pona yango, masumu mayo makotikala na motema na yo, pwete moto moko te akoki kosokola masumu ma ye na nzela ya kondimela makila ma Kuruse yango moko, tope mabondeli ma mokolo na mokolo ma kotubela. Soki ozali moko na bango, ndenge wana oyebi te sango malamu ya mayi na Molimo, mpe kondima na yo ezali ya mobimba te. 
Ntoma Yoane abotamaki mbala ya mibale pwete andimelaki sango malamu ya mayi na makili mpe na Molimo. Kasi yo, ondimeli kaka makila na Kuruse. Tango ozali te na boyebi ya malamu ya sango malamu yo moko, ndenge nini okoki kokamba bato mosusu na lobiko? Obotami nano te yo moko mbala ya mibale, kasi ozali komeka kolongola masumu mayo na mabondeli ma kotubela. Nzela wana ekokende esika moko te.
Ezali te likambo ya kobondela makasi na kotubela pona masumu malongw na kati na motema. Soki ozali koyoka ete tango mosusu masumu mayo masokolami mosika, ezali kaka makanisi mayo moko mpe nguya ya motema na yo. Soki obondeli mpe otubeli, okoki kokitisa motema mwa yo pona mokolo moko tope ndenge wana. Kasi okoki te kobikisama na masumu mayo libela na ndenge wana. 
Basumuki babondelaka mpe batubelaka, na makanisi ete bobikisami na masumu na bango. Ezali pona yango bazali kokoba kosumuka ata sima na kondimela Yesu tango molayi. Bayebi te sango malamu ya mayi mpe na Molimo. Soki ondimeli Yesu kasi nano obotami te mbala ya mibale, okoki kozala moko na bato wana. Soki ozali kolongola masumu mayo na kosambela mpe kotubela mokolo na mokolo, ezali kotatola polele ete nano obotami te mbala ya mibale. Osengeli kozuwa mokano soki ondimeli sango ya mayi mpe na Molimo lokola Ntoma Yoane asalaki, tope soki otiye kondima na yo na makanisi mayo moko na mabanzo ma yo. Moko ezali bosolo, mosusu ezali lokuta. 
Sango malamu ya solo kolandisama na Mokanda mwa Nzambe ezali ete Yesu abatisamaki mpe alongolaki mosika masumu ma mokili mbala moko libela mpe etumbo ya bamasumuki banso ekweyaki na Ye na Kuruse. Soki moto moko andimeli libatisi lia Yesu mpe liwa lia Ye na Kuruse, akobikisama mbala moko na masumu ma ye. Na loboko mosusu, soki moto ameki kolongola mosika masumu ma ye na mabondeli ya kotubela, akokangolama te na masumu ma ye. Okanisi ete okoki koyeba masumu mayo ma mokolo mobimba? Nzambe alandaka masumu maye otubeli te? Mabondeli na kotubela ezali eyano na likambo lia masumu ma mokolo na mokolo? Eyano ya bomoko ezali ‘te’.
 
 

KOTUBELA YA SOLO NA TINA NA KOTATOLA 


Ndelo ya kotubela mpe misala Malamu ezali nini?
Ata totubeli masumu mabiso kati na Bomoyi na biso,tokoki te kobikisama Kaka na nzela ya kotubela masumu Mpe na misala malamu.

Kutubela na Mokanda mwa Nzambe ezali kobaluka wuta kondima ya mabe pona kondima ya solo, mpe pona moyengebene, elobi kososola mabe na yo mpe kozonga na mwinda mwa sango malamu. 
Soki ozali mosumuki, esengeli otubela ndenge oyo: “Nzambe nangai, nasumukaki mpe nakoki kotindama na lifelo. Kasi nalingi na bikisama na masumu mangai. Nabeleli Yo bikisa ngai na masumu manso. Nano nabotama mbala ya mibale te, mpe nayebi ete nakangami pona kosuka na lifelo.” Oyo nde kotubela ya malamu. 
Bongo motindo nini ya kotubela mobotami ya mbala ya mibale akoki kosala? “Nkolo Nzambe, nasumukaki kolandisama na nzoto nangai. Nandimi ete Yesu abatisamaki na Yoane-Mobatisi mpe abikisaki ngai na masumu manso, ata masumu maye nawuti kosalama, soki te nakoki kokufa pona masumu mangai. Natondi Nkolo pwete Abikisaki ngai na mayi mpe na makila.” Kotubela ya mobotami ya mbala ya mibale na ya oyo nano abotami te mbala ya mibale ekeseni. 
Tosengeli kozala na kondima ya ndenge moko na Ntoma Yoane. Soki obatamisi masumu mayo sima na kotubela oyo, nde okobikisama ata moke te na liwa, oyo ezali lifuti lia lisumu. 
Basumuki banso baye nano babotami te mbala ya mibale basengeli kotika kobatama na sima ya mabondeli ya kotubela mpe babanda kondimela sango malamu ya solo ya mayi mpe na makila elongo na Molimo. Babengami kotanga kondima ya ntoma Yoane mpe na sima basuwa lobiko.
Basumuki bayebi te etumbo ya somo ya masumu ma bango ndenge nini ekozala. Lisumu ya monene liboso na Nzambe ezali koboya kondimela sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. 
Baye banso bandimeli Yesu kasi nano babotami te mbala ya mibale basengeli kotubela liboso na Nzambe, “Nkolo nazali mosumuki yakobwama na moto ya lifelo,” na esika ya koloba ete, “Nkolo, nabeleli Yo longola mosika masumu mangai.” Tango mosumuki atiye na kati na motema na ye ete Yesu abikisaki ye na nzela ya libatisi lia Ye na Yordani mpe na makila ma Ye na Kuruse, akoki kokangolama na masumu maye manso. Yango nde motindo ya kotubela oyo mosumuki akoki kosala pona kobikisama na masumu maye manso liboso na Nzambe. 
Mosumuki asengeli kotubela ete nano abotami te mbala ya mibale mpe andimeli te sango malamu ya mayi mpe na Molimo. Yango nde akobikisama mbala moko. Na nzela ya sango malamu ya mayi mpe na Molimo, lobiko ya basumuki banso ekokisami. “Tope ezali na lobiko na mosusu te, pwete ezali na nkombo mosusu te nase ya lola oyo epesamela bato pona lobiko na bango” (Misala ya Bantoma 4:12). Nzambe abikisaki basumuki banso wuta masumu mabango na nzela ya libatisi lia Mwana mwa Ye, Yesu na Yoane-Mobatisi mpe na liwa lia Ye na Kuruse. 
Nkolo alongoli mosika masumu mabato banso oyo bazalaki na nzoto na bango mpe na mitema mia bango banda botama na bango tii liwa. Tosengeli kondimela sango malamu ya solo pwete tobikisama. Ezali nzela moko oyo tokoki kokangolama na masumu mabiso mpe kokoma solo basantu. Tokoki kokoma basantu mbala moko libela tango tondimeli sango malamu ya solo ya mayi mpe na Molimo. 
Yesu abatisamaki, Alongolaki masumu ma mokili, Afutaki pona yango na Kuruse na bomoyi bwa Ye, asekwaki mokolo mwa misato mpe sikoyo afandi na loboko ya mobali na Nzambe. Yango nde bosolo ya motuya. 
Tokoki biso banso kotubela boye. “Nkolo, nakoki te komisunga kasi lisumu ezali tii mokolo nakokufa. Nabotami na lisumu wuta libumu ya mama nangai, mpe kolandisama na masumu manso nasalaki, nasengeli kobwakama na moto ya lifelo. Pona likambo oyo, nalingi kondimela Yesu, oyo ayaki na mayi, makila, mpe na Molimo mpe Akokomi Mokonzi nangai.” 
Kaka lokola ekomami na Matie elongi 3, Yesu alongolaki mosika masumu ma mokili, elongo na masumu manso tosalaki tii mokolo tokufi, tango Abatisamaki na Mayi ya Yordani. “Oko yeba bosolo mpe bosolo bokokangola yo” (Yoane 8:32).
Soki Yesu abikisaki biso kaka na lisumu lia ebandeli mpe Ayebisaki biso kopesa eyano na makambo ya masumu mabiso moko na ndenge na biso moko, tokokaki kozala kati na pasi mingi. Kasi Yesu Akangolaki biso na masumu mabiso manso na libatisi na makila ma Ye. Pona nini tokoki kotungisama? Tango tondimeli libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye na Kuruse, mpe totondi Nkolo, Molimo efandi na mitema mia biso. 
Ondimeli Yesu? Ondimeli Molimo efandi na motema mwa yo? Masumu mayo manso malekaki na nzoto na Yesu tango Alongolaki mosika lisumu lia mokili na libatisi lia Ye. Etumbo ya masumu mabiso Afutaki yango na Kuruse, Akangolaki biso na etumbo ya seko na seko. Yango nde sango malamu ya solo. 
 

KOTUBELA YA MOYENGEBENE

Kotubela ya solo ya Moyengebene eza nini?
Kotubela lisumu lia mokolo, kasi kozala na kondima Na ndenge Yesu alongolaki mosika masumu ma Mikolo oyo esali mbula 2000 eleki.

1 Yoane 1:9 elobi, “Soki totubeli masumu mabiso, Azali moyengebene mpe mosantu pona kolimbisa biso masumu mabiso mpe kopetola biso na mabe manso.” Elingi koloba ete moto oyo azuwi mokano ya kondimela sango malamu ya mayi mpe na Molimo asengeli kotubela masumu maye, nakoloba ete, “Nkolo. Nakoki te komisunga kasi lisumu etamboli nangai bomoyi nangai nyonso kasi nayebi nakoki te komibikisa ngai moko na masumu na nzela ya mabondeli pona bolimbisi. Nandimi lifuti lia lisumu lizali liwa mpe eloko moko te libanda na libatisi lia Yesu mpe na liwa lia Ye ekoki kolongola mosika masumu mabiso. Natubeli ete nasumukaki lelo kasi nandimi Yesu asili kolongola mosika masumu oyo nasalaki lelo na Yordani eleki mbula 2000.” Soki moto moko abondeli boye, likambo lia masumu na makanisi maye likozuwa eyano mbala moko. 
Baye basi babotami mbala ya mibale basengeli kaka kotubela masumu mabango. Bakotatola kaka Yesu asi kolongola mosika masumu maye basalaki. Pwete Yesu abatisamaki mpe akufaki pona basumuki eleki mbula 2000, kotala te bolembu nabango, masumu ma bango manso malongwamaki mosika libela. 
Makomi totangi lelo mazali kitoko malamu pona moyengebene. Kasi mosumoki oyo akozuwa makomi oyo na nzela ya mabe, akokende lifelo. Na bomoko, ezali moko na makomi ya pasi na kati na Mokanda mwa Nzambe. Ememaki banda tango molayi mozangi boyokani kati na Ba-Klisto. 
Elobami ete monganga oyo asangi boyebi mosala akoki koboma babeli na ye. Tango monganga azali kosala koleka boyebi bwa ye akoki koboma babeli baye.
Ezali mobeko na bomoyi oyo esalaka ete moto ateyama malamu mpe azala na boyebi malamu ya mosala pona kosala malamu mosala mwa ye. Ezali ndenge moko na makambo ya kondima. Baye bazali koteya liloba lia Nzambe babengami kosalela bosolo lokola ekomami na botosi mpe na pole nyonso, mpe baye bazali kotanga wutu bango bazala na kondima na maye mazali koteyama. 
Soki bateyi batangisi bandimi na bango na nzela ya mabe, tope bandimi balandi mabe Mokanda mwa Nzambe, ekosuka na etumbo mpe na lifelo pona bango nyonso. Kaka babotami ya mbala ya mibale nde bakoki koteya malamu. Ata kisi ya malamu ekoki koboma babeli soki ekomami mabe, mpe ezali ndenge moko na koteya mpe na kotanga makambo ma Nzambe. Ezali ya motuya lokolo moto na kati na bomoyi bwa biso. Kasi lokola ekoki kobenda pasi soki moto atiyami na maboko ma bana, liloba lia Nzambe ekoki komema makambo ya mabe na maboko oyo ekoki yango te. 
Tokoki kosolola bokeseni kati ya kotubela ya moyengebene mpe na ya mosumuki. 1 Yoane 1:9 ezali kotubela ya moyengebene. Tango moyengebene atubeli masumu maye liboso na Nkolo na kondima, akangolami na yango pwete Yesu asi alongoli mosika masumu manso eleki mbula 2000. 
Ezali libungi pona basumuki kondima masumu malongolami mosika tango nyonso babondelaka pona kotubela. Tango moko nano abotami te mbala ya mibale, masumu maye makoki kolongolama na kotubela? 
Nzambe azali moyengebene. Atindaki mwana mwa Ye ya bomoko na mokili oyo mpe Alongolaki mosika masumu ma mokili na nzela ya libatisi lia Ye mpe abikisaki baye banso bandimeli mayi ya libatisi lia Ye mpe makila ma Ye na Kuruse. Bongo, tango moyengebene azali kotubela masumu maye, Nzambe ayebisi ye ete Yesu asi alongolaki yango mosika masumu manso eleki mbula 2000. Moto ya boye atalisi ete azali te na lisumu na motema mwa ye, ata nzoto ekobi kosumuka.