• All e-books and audiobooks on The New Life Mission website are free
  • Explore multilingual sermons in global languages
  • Two new revised editions in English have been released
  • Check out our website translated into 27 languages
Search

Sermons

Liteya lia 3: Sango Malamu ya Mayi mpe na Molimo

[3-2] Libatisi lia Yesu na Bolongoli bwa Masumu (Matié 3:13-17)

Libatisi lia Yesu na Bolongoli bwa Masumu(Matié 3:13-17)
“Boye Yesu awutaki Galilé kokende epayi na Yoane na Yordané kobatisama na ye. Yoane amekaki topekisa Ye, nakoloba, ‘Ngai nde asengeli kobatisama nayo, pe ozali koya epanyi na nangai?’ Kasi Yesu ayanolaki ye, ‘Tika ète ezala bongo sikoyo, pwète yango nde ezali malamu pona kokokisa boyengebene nyonso.’ Nasima apesaki Ye nzela. Boye Yesu, Tango abatisamaki, abimaki mbala moko na mayi; pe tala, lola efongwami na Ye, pe Amoki Molimo mwa Nzambe kokita lokola ndenke ya pembe kotema likolo na Ye. Pe mbala moko mongongo wuta lola, eyokami, ‘Oyo nde Mwana molingami mwa Ngai, oyo Nasepeli na Ye mingi koleka.’”
 

Ezali na Motò Azali Kokoba Komona Pasi Pona Lisumu?

Mikumba mia masumu mabiso misili?
Boye.

Nkolo Nzambe ba biso alongolaki masumu ma batò banso. Baye banso bazalaki na pasi sè na lisumu bazali bawumbu ba lisumu, kasi na bosomi bwa Ye, Nkolo na biso alongolaki yango nyonso. Alongolaki masumu mabiso manso. Motò moko azali na pasi nasè ya lisumu té, kaka soki oboyi kondimela Yesu.
Tosengeli kososola ète bitumba biabiso na lisumu esila kala. Tokoki kokemba lisusu na lisumu té. Bowumbu bwa biso na lisumu esilaki tango Yesu apesaki biso bosomi na libatisi lia mayi pena na makila ma Ye. Masumu mabiso manso masilaki wana pena sima na yango. Mwana na Nzambe alonglaki masumu manso mabiso. Nzambe afutaki pona masumu mabiso na nzela na Yesu, oyo akangalaki biso, libela.
Oyebi batò boni bazali kokemba na masumu? Ebadaki na tango oyo ya Adam na Eva. Batò banso bazali kokemba na masumu wuta na Adam.
Kasi Nzambe na biso asalaki boyokani oyo ekomami na Ebandeli 3:15, pe boyokani ezalaki ète Abikisa basumuki banso. Alobaki ète batò bakozwa bosomi na masumu na bango na mbeka na Yesu Kristo na mayi pena na Molimo. Natango na yango, Nzambe atindaki Mobikisi mwa biso, Yesu, bona kobika katikati na biso.
Ayaki pe kotinda Yoane Mobatisi libosa na Yesu pe Abatelaki elaka na Ye.
Mark 1:1-8 elobi ète, “Ebandeli na sango-malamu na Yesu Kristo, Mwana na Nzambe. Lokola ekomami na Basakoli: ‘Botala, Natindi Molobeli mwangai liboso na elongi na Yo, oyo akobongisa nzela liboso na Yo.’ Mongongo mozali koganga na esobe: ‘Bobongiza nzela na Nkolo, bozala nzela na Ye sembo.’ Yoane ayaki kobatisa na esobe pe koteya libatisi lia bolimbisi bwa masumu. Mboka nyono na Ba-Yuda, naya baye wuta Yéluzalémé, bayaki kokutana naye, babatisamaki naye kati na Mayi ma Yordané, nakotubela masumu mabango. Sikoyo Yoane alataki bilamba bia suki ya nyama na esobe pena mokaba na loketo pe azalaki kolia mabanki na mafuta ma nzoyi.” Azalaki koteya ète, ‘Oyo azali koya na sima na Ngai azali na nguya koleka ngai, nakoki kosimba té pe kofongola té singa na sapato na Ye. Nazali solo kobatisa na mayi, kazi Ye oyo akoya akobatisa bino na Molimo Mosantu.’”
 
 

Yoane Mobatisi, Motatoli pe Momemi Sango-Malamu, Yoane Mobatisi


Yoane Mobatisi azali nani?
Nganga-Nzambe Monene ya suka pe motalisi- elongi na batò banso

Libatisi na monoko mwa Ba-Kéléké, ‘baptizo,’ elingi koloba ète ‘kokotisa kati na’, kasi elobe pe ‘kosokwama, kokundama, kokotisama na mayi, tope kolekisama na.’ Tango Yesu abatisami, boyengebene bwa Nzambe bokokisamaki. ‘Boyengebene’ ezali ‘dikaiosune’ na monoko mwa Ba-Kéléké elingi koloba ‘kozala zembo,’ pe elingi koloba ète ‘peto koleka,’ ‘yakokoka malamu,’ tope ‘ndenge ya malumu mingi’
Yesu abatisama pwète Akoma Mobokisi na bolamu pena bopeto nyonso. Nasima, baye bandimi libatisi na Kuruze na Yesu, bakozuwa likabo lia bosomi bwa Nzambe.
Na Boyokani bwa Sika, Yoane Mobatisi azali Nganga-Nzambe Monene ya suka ya Mokano mwa Kala. Totala Matié 11:10-11. Makomi malobi ète Yoane Mobatisi azali molakisi-elongi na batò banso pe Nganga-Nzambe Monene kati na ekeke na Boyokani bwa Sika. Alekisaki masumu manso ma mokili na nzoto na Yesu; nayango asalaki nakati na bonganga-nzambe ya monene ya Mokano mwa Kala.
Yesu Ye moko amemaki litatoli lia Yoane. Alobaki, na Matié 11:13-14, “Pwète basakoli na mobeko basalaki mosala tii Yoane. Pe soki bolingi koyeba yango, ye nde Eli oyo asengelaki koya.” Ponayango, Yoane Mobatisi, oyo abatisaki Yesu, azalaki mokitani na Nganga-Nzambe Monene Aaloné pe nganga-nzambe ya suka. Biblia etatoli pe Yoane azalaki mokitani na Aaloné na Boyonani bwa Kala (Luka 1:5, 1 Makambo ma Bakonzi 24:10).
Bongo pona nini Yoane abikaki na esobe ye moko, na elemba ya suki na nyama na esobe? Esalaki pona kosala bonganga-nzambe ya monene. Lokola motalisi-elongi ya batò banso, Yoane Mobatisi akokaki kobika kati-kati na batò té. Boye, agangaki na batò, “Boyanolama, bino libota lia nyoka!” pe abatisa bango bolimbisami bwa masumu na kosongisa bango epayi na Yesu, oyo Akolongola mosika masumu manso mabango. Bango nyonso, Yoane alekisaki masumu ma mokili na nzoto na Yesu pona lobiko na bango tango atiyaki maboko maye na mutu na Yesu.
 

Lolenge Mibale mia Libatisi

Pona nini Yoane Mobatisi abatisaki batò?
Bona kokumba bango na kosenga bolimbisi bwa masumu na bango banso pena kondima libatisi lia Yesu pona kobikisama.

Yoane Mobatisi abatisaki batò pe abatisaki Yesu. Ya yambo ezalaki ‘libatisi lia bolimbisami,’ oyo azali kobenga basumuki kozongela Nzambe. Batò mingi baye bayokaki maloba ma Nzambe na nzela na Yoane batikaki bikeko na bango pe bazongelaki Ye.
Libatisi lia mbala ya mibale ezalaki oyo na Yesu, libatisi oyo ya kolekisa masumu manso ma mokili na nzoto na Yesu. Yoane Mobatisi abatisaki Yesu pona kokokisa boyengebene bwa Nzambe. Kolobela yango na ndenge mosusu, Yesu abatisama na Yoane Mobatisi pona kobikisa batò banso na masumu mabango (Matié 3:15).
Pona nini Yoane abatisaki Yesu? Pona kolongola masumu ma mokili, Nzambe apesaki Yoané nzela ya kolekisela masumu manso na nzoto na Yesu pwète batò baye bakondima Ye babikisama.
Yoane Mobatisi azalaki mosali na Nzambe oyo mosala mwaye mozalaki kolekisa masumu ma mokili na nzoto na Yesu na nzela na libatisi, pe komema litatoli lia Yesu po batò banso kosenga bolimbisi na kopetolama na masumu mabango na kondima sango-malamu ya bosomi. Ponango, Yoane asengelaki kobika na esobe ye moko. Natango wana ya Yoane Mobatisi, Bana-Izraélé babungaki nzela na Nzambe.
Boye Nzambe alobaki na Boyokani bwa Kala, Malaki 4:5-6, “Botala, Nakotinda yo Eli mosakoli liboso na boyei ya mokolo monene ya somo ya Nkolo. Pe akobalokisa mitema mia baboti na bana, pe mitema mia bana na baboti, bamba té Nakoya boketa mokili na elakeli mabe.”
Namiso na Nzambe, Bana-Izraélé banso baye babumamelaki Yehovah libosa babungaki nzela. Moko té azalaki moyengebeni liboso na Ye. Bakambi na bandimi nakati na etonga, lokola, banganga-nzambe, banganga-mibeko na bakomi-mikanda babungaki bango banso nzela. Bana-Izraélé na banganaga-nzambe na bango babonzaki té mbeka oyo esengelamaki elongo na mobeko mwa Nzambe.
Banganga-Nzambe batikaki kotiya maboko na mbeka ya mikolo nyonso ya makila ya masumu, oyo Nzambe apesaki bango pona bolongoli bwa masumu mabango. Ekomama ète banganga-nzambe na mikolo mia Malaki bakosala lolenge ya mbeka ya solo, kotiya maboko na mitu pena libonza lia makila ya mbeka.
Ponayango, Yoane Mobatisi akokaki kobika elongo na bango té. Akendaki kofanda na esobe pena konganga na mongongo makasi.
Ekomami na Mark 1:2-3, kolandisama na maloba ma mosakoli Ezayi, “Botala, Natindaki motindami na Ngai liboso na elongi na Yo, oyo ako bongiza nzela liboso na Yo. Mongongo oyo mozali koganga na esoke: ‘Bobongiza nzela na Nkolo, bozala etamboleli malamu.’”
Mongongo na kati na esobe mozalaki koganga na batò pona libatisi lia bolimbisami. ‘Libatisi lia bolimbisami’ ezali nini na kati na Biblia? Ezali libatisi oyo Yoane Mobatisi azalaki kogangela; libatisi ebengaki batò kozongela Yesu pwète bandimela Ye, oyo akolongwa masumu manso mabango pe babikisama. Libatisi lia bolimbisami lizalaki tokumba bango na lobiko.
“Botubela pe bobatisama. Mobikisi mwa biso Yesu akobatisa biso pona kolongola elongo masumu mabino manso.” Kokanga na Yoane Mobatisi ezali ète Yesu akolongola masumu mamokili pena kosambisama na Kuruze pona kobikisa batò banso, pwète bazongela Nzambe.
“Nzali solso-solo kobatisa bino na mayi, kasi Ye akobatisa bino na Molimo Mosantu.” ‘Kobatisa na Molimo Mosanto’ ezali kosokwama na masumu manso mabino. Kobatisa elobi ‘kosokola.’ Libatisi lia Yesu na Mayi na Yordané mozali kotalisa biso ète Mwana na Nzambe abatisamaki pe alongolaki masumu manso mabiso pona kobikisa biso.
Panayango, tosengeli koboya bomoyi bwa biso bwa masumu pe kondimela Ye. Azali Mwana-Mpate na Nzambe, oyo alongwe masumu manso ma mokili. Yango nde sango-malamu ya bosomi oyo etatolama na Yoane Mobatisi.
 

Mosala Mwa Nganga-Nzambe Monene pona Bolongwami bwa Masumu

Nani abongisaki nzela na lobiko?
Yoane Mobatisi

Mosakoli Ezayi asakolaki ète, “Lobela Yéluzalémé bopemi, ganga makasi pona ye, ète bitumba bia ye bisili, ète masumu maye balimbisami; pwète azuwi wuta loboko na Nkolo mbala mibala pona na masumu maye” (Ezayi 40:2).
Yesu alongolaki masumu mabiso atiki ata moko té; masumu ma botama, masumu malelo, pene na masumu ma lobi kuna, manso masokolama na nzela ya libatisi lia Ye. Apesi biso banso bosomi. Tosengeli biso banso koyeba bosomi bwa Nzambe.
Kobikisama na masumu mabiso manso, tosengeli kondima sango-malamu oyo elobeli Yoane Mobatisi alekisaki masumu manso na nzoto na Yesu na nzela ya libatisi.
Tomikosa té, nakokanisa, “lokola Nzambe azali bolingo, tokoki kokota na Bokonzi bwa Lola kaka pona na kondima Yesu, ata tozali na masumu nakati na mitema mia biso.”
Pona kozuwa bosomi bwa masumu mabiso manso, tosengeli kondima kati na libatisi lia Ye, kati ndenge oyo Yoane Mobatisi alekisaki masumu manso ma mokili na nzoto na Yesu pena Kuruze. Ezali na ‘mayi’ ète Yoane Mobatisi alekisaki masumu mabatò na nzoto na Yesu.
Eloko nayambo Nzambe asalaki pona kobisa biso ezalaki kotinda Yoane Mobatisi na mokili oyo. Lokola motindami na Nzambe, Yoane Mobatisi atindama lokola molobeli na Mokonzi, oyo alekisaki masumu manso ma mokili na nzoto na Yesu, na nzela na libatisi. Asalaki bonganga-nzambe ya likolo pona bantò banso.
Nzambe ayebisaki biso ète Akotinda Motindami mwa Ye, Yoane Mobatisi, epayi na biso. “natindaki motindami mwa ngai liboso na elongi na Yo.” Liboso na elongi na Yo elobi liboso na Yesu. Pona nini Nzambe atindaki Yoane liboso na Yesu? Ezalaki pona kolekisa masumu manso ma mokili na nzoto na Yesu, Mwana na Nzambe, na nzela na libalitisi. “Ako bongisa nzela na Yo liboso na Yo.”
Oyo nde eteni ya liboba oyo elongi ko talisa biso solo-solo. Nani oyo abongisani nzela pwète tozuwa bosomi ya kokende Lola? Yoane Mobatisi. ‘Na Yo’ ezali liboso na Yesu ‘Nangai’ ezali ya Nzambe Ye moko. Nayango tango Alobi, “Nakotinda motindami na Ngai liboso na elongi na Yo, oyo akobongiza nzela na Yo libosa na Yo,” elingi koloba nini?
Nani abengami kobongisa nzela na biso pwète tokende Lola? Yoane nde abengami kolekisa masumu mabiso na nzoto na Yesu pwète tondima ète Alongolaki yango nyonso mosika na biso; Mosala mwaye mozalaki ya kolekisa masumu na libatisi lia Yesu Klisto. Ezalaki Yesu na Yoane bakomisa yango eloko ya solo pona biso kondima na bosolo pe kozuwa bosomi.
Lobiko na biso etalemi likolo na nini? Etelemi likolo na kondima na boyengebene bwa misala mia Yesu, Mwana na Nzambe, pena ndenge motindami mwa Nzambe, Yoane Mobatisi, alekisaki masumu ma mokili na nzoto na Ye. Tosengeli koyeba biso banso sango-malamu ya bolimbisi bwa masumu. Nzambe Tata atindaki motindami mwa Ye liboso, oyo asengelaki kobatisa Mwana na Ye, pe Asalaki ye motalisi-elongi na batò banso. Boye, Akokisaki mosala mwa bosomi pona biso.
Nzambe atindaki mosali mwa Ye Yoane Mobatisi kobatisa Mwana na Ye, pwète abongisa nzela pona lobiko ya baye bakondimela Yesu. Ezali pona nini Yoane abitisaki Yesu. Libatisi lia Yesu na Yoane Mobatisi ezalaki bokokisami na bosomi na Nzambe, na kati yango, masumu manso ma batò malekaki na nzoto na Ye pwète batò banso bandimela Yesu pe bakota Lola.
Ata masumu ma mikolo ekoya na batò malekaki libela na nzoto na Yesu na nzela na libatisi. Yesu na Yoane Mobatisi bango banso mibale babongizama lokola nzela pona biso banso kokota Lola. Na nzela wana, Nzambe Atalisi sékélé ya bosomi na nzela na Yoane Mobatisi.
Lokola motalisi-elongi ya batò banso, Yoane Mobatisi abatisaki Yesu, pwète tondima bosomi bwa biso pe tokende na Lola. Alekisaki masumu manso na nzoto na Yesu na nzela na libatisi. Oyo nde sango-malamu ya esengo pona bosomi.
 

Pona Nini Yoane Mobatisi Abotama?

Na nzela na nani tokoki kondima Yesu?
Yoane Mobatisi

Nakati na mokanda mwa Malaki 3:1, ekomami, “Botala, Natindaki motindami na Nangai, pe akobongiza nzela liboso na Ngai.” Esengeli botangaka Biblia na bokebi mingi. Pona nini Nzambe atindaki motindami mwa Ye liboso na Yesu? Pona nini Yoane Mobatisi abotama sanza motoba liboso na Yesu?
Tosengeli to sosolola eloko nini ezali na Biblia. Boyokani bwa Kala epesi biso mosala mwa Nganga-Nzambe Monene Aaloné. Aaloné azalaki ndeko mobali na Moize. Nzambe apakolaki mafuta na bana baye lokola banganga-nzambe. Ba-Levi basusu bazalaki kosala nasè na bango, komemela bango biloko bia mosala, kobongiza bolambi ya mapa na misala yabongo, tango oyo bana na Aaloné bazalaki kobonza mbeka nakati na Mongombo esantu.
Bana na Aaloné bapakwama mafuta pona kokabola motuya ya mosala kati-kati na bango, kasi na Mokolo mwa Bolongoli Masumu, mokolo mwa zomi ya sanza ya sambo, Nganga-Nzambe Monene ye moko ako bonza mbeka ya bolongoli masumu ma mbula pona batò.
Namokanda na Luka 1:5, ezali na lisolo moko na libota lia Yoane Mobatisi. Tomoni solo-solo motindami oyo na Nzambe, pe tososoli Yesu malamu. Tozali kokanisa mingi likolo na Yesu, kasi tozangi koyeba Yoane Mobatisi, oyo ayaki liboso na Ye. Nalingi kosunga yo kososola yango.
“Ebandeli na sango-malamu na Yesu Kristo, Mwana na Nzambe. Lokola ekomami na Basakoli: Botala Natindi liboso na elongi na Yo, oyo akobongiza nzela na Yo liboso na Yo” (Mark 1:1-2). Sango-malamu ya Lola ebandaka tango nyonso na Yoane Mobatisi.
Tango tosilisi kotanga mobimba ya makambo ma Yoane Mobatisi, tokoki polele-polele kososola pe kondima sango-malamu ya bosomi bwa Yesu. Ezali ndenge moko koyoka malamu batindami ya bamboka bapanzani na mokili mobimba yambo tososola makambo ya bamboka nyonso. Tango tosololi lisolo lia Yoane Mobatisi, tokoki kososola malamu bosomi bwa Nzambe malamu mingi.
Mawa mingi, nagambo mosusu, bakristo mingi mikolo oyo, bazangi boyebi bwa motuya na Yoane. Nzambe atindaki té Yoane Mobatisi pwète abotama pe asala eloko moko té. Mikanda minso minei mia sango-malamu kati na Boyokani bwa Sika mizali kobeta lisolo lia Yoane Mobatisi liboso na kolobela bosomi bwa Yesu.
Kasi bateyi bamikolo oyo bazangi koyeba ye na bozindo pe bazali koyebisa batò ète bandemela Yesu ekoki pona kobikisama. Bazali kokamba batò babika lokola basumuki bomoyi na bango nyonso pona kosuka na lifelo. Soki Bakristo bandimi kaka Yesu pebatiki kososola motuya na Yoane Mobatisi, bokristo ekokweya pona kotikala lokola mangomba ma mokili. Ndenge nini okoki kozuwa bosomi bwa masumu mayo soki yoyebi té bosolo? Nzela ezali té.
Liteya lia bosomi ezali te lisolo lia pete tope lia likolo-likolo. Batò mingi bakanisaka ète bosomi efandi likolo na kondima na biso na Kuruze pwète Yesu akufaki na Kuruze pona biso. Ndenge wana, soki tondimi kaka liwa lia Ye na Ruruze na kozanga koyeba bolongoli masumu manso, kondima ya ndenge oyo ekomema biso té na botondi bwa bosomi, ata kondima na biso ezali monene ndenge nini.
Nzambe atindaki Yoane Mobatisi po mokili eyeba ndenge nini bosomi ekokisami pe ndenge nini Yesu alongolaki masumu ma mokili. Kaka tango toyebi bosolo nyonso nde tososoli ète Yesu azali Mwana na Nzambe, oyo Alogolaki masumu mabiso na nzoto na Ye moko.
Yoane Mobatisi ayebisi biso lisolo lia bosolo bwa bosomi. Ayebisi biso ndenge nini ayaki kotatola ète Yesu azalaki Nzambe pe Mwinda ya solo. Alobaki yango polele ète azalaki té Mwinda wana, kazi motatoli na Mwinda. Atatolaki lisusu na Yoane 1 ète ezalaki ye oyo abongisaki sango-malamu ya bosomi na kobatisa Yesu Kristo.
Soki tozuwaki té litatoli lia bosomi epayi na Yoane Mobatisi, ndenge nini tokokaki kondima Yesu? Nano tomona Yesu, pena ndenge towuti na mangomba yabizaleli na kondima ekeseni, ekosalema ndenge nini to ndimela Yehovah lokola Nzambe na biso?
Nabizaleli pe kondima ekeseni na mokili, ndenge nini tokokaki koyeba Yesu? Ndenge nini tokokaki koyeba ète Yesu azalaki Mwana na Nzambe, oyo apesa biso bosomi na bolongoli masumu manso ma mokili na nzoto na Ye?
Tozali na bosenga bwa kotala malamu na Boyokani bwa Kala pona kozuwa maloba ma bosomi banda ebandeli pena koyeba ète Yesu azali Mobikisi mwabiso. Tosegami tozala na boyebi bwa solo bwa kondima. Ezali na eloko moko té tokoki kosala na bozangi boyebi. Pona kondima Yesu pe kobikisama, tosengeli koyeba sango-malamu ya bosomi oyo Yoane Mobatisi atatolaki pena mutuya na yango. Pona kozala na kondima yakotonda pona Kristo, tosengami koyeba bosolo bwa bosomi.
Ponayango, lokola Yesu alobaki, “Pe bokoyeba bosolo, pe bosolo ekokangola bino,” (Yoane 8:32) Tosengeli koyeba bosolo ya bosomi kati na Yesu.
 

Bilembo nakati ya Biblia

Mikanda minei mia sango-malamu ebandi na moboku nini?
Na lisolo lia Yoane Mobatisi
 
Tika ète tokende liboso koluka bilembo ya bosomi nakati na Biblia. Tofongola oyo ebatami na kati na mikanda minei mia sango-malamu. Nini elobami likolo na Yoane Mobatisi. Asalaki nani? Ponanini abengama ‘motalisi-elongi ya batò banso’ tope ‘Nganga-Nzambe Monene ya suka.’ Ndenge nini masumu manso ma kokili malekaki na nzoto na Yesu na nzela na ye, pena ndenge Yesu alongolaki masumu mabiso manso mosika na kati na Ye moko, tope esalama bongo té.
Tosengeli kotala malamu na likambo lie mikanda minei mia sango malamu mizali kobandele na yango na lisolo lia Yoane Mobatisi. Yoane 1:6 ebeti sété na likambo moko ya motuya pona sango-malamu. Etalisi biso nani asalaki mosala mwa kolekisa masumu manso ma mokili na nzoto na Yesu. “Ezalaki na motò moko atindama na Nzambe, nkombo na ye ezalaki Yoane. Motò oyo azali lokola motatoli, komema botatoli bwa Mwinda, pwète batò banso bandima koleka na nzela naye” (Yoane 1:6-7).
Ekomami, ‘batò banso bakondima koleka na nzela naye,’ pe ayaki pona ‘komema litatoli lia Mwinda.’ Mwinda mozali Yesu Kristo. Elingi koloba ète Yoane azalaki motatoli na Yesu pwète batò banso bandima na nzela na Ye. Sik’oyo, topusa pene na Matié, elongi ya 3.
Nakati na Matié 3:13-17, “Boye Yesu ayaki wuta Galilé epayi na Yéoané na Yordané pona kobatisama naye. Pe Yoane amekaki kopekisa Ye, pe alokaki ète, ‘Ngai nazali na bosengi kobatisama na Yo, pe, Yo nde ozali koya epayi na nangai?’ Kasi Yesu ayanoli ye ète, ‘Tika ète ezala bongo sik’oyo, pona yango nde ekoki pona na biso kokokisa boyengebene nyonso.’ Naboye, apesaki Ye nzela. Nasima Yesu, tango Abatisama, alongwa mbala moko na mayi, pe botala, lola efongwami na Ye, pe Amoni Molimo na Nzambe kokita lokola ndeke ya pembe kotelema likolo na Ye. Pena pwasa, mongongo mowuta na lola, kola ète,, ‘Oyo nde Mwana na Ngai molingami, oyo na sepeli na Ye mingi koleka.’”

Pona nini esengeli kososola kintani na Yoane?
Pwète Biblia ayebisi biso ète Yoane azali Nganga-Nzambe Monene ya batò banso.

Yoane Mobatisi abatisaki Yesu pona kokokisa bolimbisi ma masumu manso ma mokili. Libatisi liye Yesu azuwaki na Yoane ezalaki likombo moko ya motuya mingi pona lobiko nabiso. Kasi pona kososola na kondima bosolo banso na biteni mike-mike, tosengeli yambo kokota na bozindo yakoyekola Yoane Mobatisi.
Na mukanda mwa Luka 1:1-14, “Lokola ebele ya batò bazuwaki mosala mwa kobongisa lisolo lia makambo maye mandimami na kati-kati nabiso, kaka lokola baye banda ebandeli bazalaki matatoli ya miso pena liloba bamipesa pona biso, namonaki malamu ngai pe, kozala na bososoli yasolo ya makambo manso banda ebandeli, kokomela yo ndenge esengeli, makambo mana, molingami Téofilé, pwète oyeba, ète bosolo ya makambo mana nakomeli yo. Ezalaki na tango na mikolo mia Hérodé, mokonzi ya Yuda, nganga-nzambe na nkombo na Zakaliya, ya bosangani bwa Abiya. Mwasi mwa ye azalaki moko na bana basi ba Aaloné, pe nkombo naye ezalaki Elizabété. Pebazalaki banso bayengeni liboso na Nzambe, batambolaki na botosi bwa mibeko mia Nkolo na bobangi nyonso. Kasi bazalaki na mwana té, pwète Elizabété azalaki kobota té, pebazalaki basi kokola mingi. Natango oyo azalaki kosala lokola nganga-nzambe liboso na Nzambe, na molongo ya lisanga liaye, libongisami lia bonganga-nzambe, moponami bwaye kotumba malasi ekokaki, tango akotaki na ndako na NKolo. Pe ebele na batò bazalaki kobondela libanda tango ya kotumba malasi. Nde angelo na Nkolo abimelaki ye, yakotelema na loboko na mobali ya etumbelo ya malasi. Pe tango Zakaliya amonaki ye, azangaki kimiya, pe bobangi bokweyelaki ye. Kasi angelo alobelaki ye, ‘Kobanga té, Zakaliya, pwète losambo liayo eyokani; pe mwasi mwayo Elizabété akobota mwana moko yamobali, peokobenga ye na nkombo na Yoane. Pe okozala na esengo pe nakosepela, pe batò mingi bakosepela na botama naye.’”
Esik’oyo, Luka, moyekoli moko mwa Yesu, ayebisi polele-polele kintani na Yoane. Luka, moyekoli mwa Yesu, azali kotalisa biso kintani ya Yoane banda ebandeli. Luka atangisaki sango-malamu na moko na nkombo na Téofilé, oyo azalaki motò ya libanda na bofandi elongo pe ayebaki Nkolo.
Boye, pona kotangisa ye lisolo lia Yesu, Mbiki na basumuki, Luka akanisaki ète esengelaki abeta lisolo lia kintani ya Yéoné Mobatisi na bozindo. Lokola tozali batò yalibanda uta batò bakeseni, tokoki kososola te lobiko lia Yesu soki etengisamaki te, etani na eteni. Tika ète totala yango etani na eteni.
Nakati na Luka 1:5-9, abeteli biso lisolo boye, “Ezalaki na tango na mikolo mia Hérodé, mokonzi ya Yuda, nganga-nzambe na nkombo na Zakali, ya bosangani ya Abiya. Mwasi mwa ye azalaki moko na bana basi ba Aaloné, pe nkombo na ye ezalaki Elizabété. Pebazalaki banzo bayengeni liboso na Nzambe, batambolaki na botosi bwa mibeko mia Nkolo na bobangi nyonso. Kasi bazalaki na mwana té, pwète Elizabété azalaki kobota té, pe bazalaki bango banso mikolo mingi. Natango oyo azalaki kosala lokola nganga-nzambe liboso na Nzambe, na molongo ya lisanga liaye, libongisami lia bonganga-nzambe.”
Awa, likambo moko ekomelaki Zakaliya na pwasa tango azalaki kosalela Nzambe, kolandisama na mobongisami mwa bonganga-nzambe. Luka atatolaki polele-polele ète Zakaliya azalaki kintani ya Aaloné. Nayango, na lisanga lia libota nini Zakaliya awutaki? Oyo ezali na motuya mingi.
Ayatalisaki polele-polele, “Tango oyo Zakaliya azalaki kosala lokola nganga-nzambe liboso na Nzambe liboso na Nzambe nasè ya libongisi lia lisanga lia botama naye.” Tokoki komona ète Luka ayebaki lisolo lia Zakaliya malamu pe alobeli yango na kotalisa biso sango-malamu ya bosomi na kobeta sété na Zakaliya na Elizabété.
Yoane abotami na Zakaliya na mwasi naye Elizabété, oyo azalaki moko na bana basi na Aaloné. Sik’oyo, tika ète tokala kintani na Zakaliya, tata na Yoane.
 

Kintani na Yoane Mobatisi

Yoane Mobatisi azali mokitani mwa nani?
Aalone, Nganga-Nzambe Monene

Pona kososola kintani ya Yoane Mobatisi, tosengeli kotanga Boyokani bwa Kala, 1 Makamba ma Bakonzi 24:1-19.
“Sik’oyo, oyo nde masanga ma botama na bana ba Aaloné. Bana na Aaloné bazalaki Nadab, Abihu, Eleazar, na Ithamar. Pe Nadab na Abihu bakufaki liboso na tata na bango, pe bazalaki na bana té; bongo Eleazar na Ithamar basalaki mosala lokola banganga-nzambe. Mosika, David na Zadok ya bana mibali ya Eleazar, pe Ahimelek ya bana mibali ya Ithamar, bakabolaki bango na lisanga lia mobongisi mwa mosala na bango. Sik’oyo, ezalaki na bakambi mingi katikati na bana mibali ya Eleazar koleka bana mibali ya Ithamar, pe ponayango bakabolanaki. Kati-kati na bana mibali ya Eleazar ezalaki na mitu zomi na motoba ya bandako ya batata na bango, pena mitu mwambe (8) ya bandako na batata na bango kati-kati na bana na Ithamar. Bongo bakabolama na boponami, lisanga moko lokola lisanga mosusu, pwète basalaki mosala ya kati na ndako na Nzambe pena lisanga lia Nzambe, kati-kati na bana mibali ya Eleazar na kati-kati na bana mibali ya Ithamar. Pe mokomi-mikanda, Shemayah mwana ya Natanael, moko na Ba-Lévi, akomaki yango liboso na mokonzi, bakambi, ngana-nzambe Zadok, Ahimelech mwana ya Abiathar, pena mitu ya bandako ya batata ya banganga-nzambe na Ba-Lévi, moko ya ndako ya tata na libota na Eleazar pe moko na Ithamar. Sik’oyo moponami ya liboso ekweyaki na Yehoiarib, yamibale na Yedaiah, ya misatu na Harim, ya minei na Seorim, yamitano nao Malchiyah, ya motoba na Mijamin, ya sambo na Hakkoz, ya mwambe na Abijah, ya libwa na Yeshua, ya zomi na Shecaniah, ya zomi na moko na Eliashib, ya zomi na mibale na Yakim, ya zomi na misatu na Huppah, ya zomi na minei na Yeshebeab, ya zomi na mitano na Bilgah, ya zomi na motoba na Immer, ya zomi na sambo Hezir, ya zomi na mwambena Happizzez, ya zomi na libwa Pethahiah, ya zomi mibale na Yehezekel, ya zomi mibale na moko na Yachin, ya zomi mibale na mibale na Gamul, ya zomi mibale na misatu na Delayah, ya zomi mibale na minei na Maaziah. Oyo nde mabongisi ya misala mia bango mia kokota na kati na Ndako na Nkolo kolandisama na mokano bwa bango na loboko ya Aaloné tata na bango, ndenge Nkolo Nzambe na Izraélé apesaki ye mitindo.”
Totanga molongo mwa 10 lisusu. “Ya sambo na Hakkoz, ya mwambe na Abiyah.” Tango na Mokonzi David, ezalaki na banganga-nzambe ebele, ponayango, esengelaki kosala mobongisami mwa mosala. Bongo, David abongisaki pona mwana nyonso ya Aaloné, pwète mbeka epesama na alima. (Lokola boyebi bino banso, Aaloné azalaki yaya ya mobali ya Moize. Nzambe Apesaki Moize mitindo lokola mosali mwa Ye, pe Aaloné lokola Nganga-Nzambe Monene ya Mongombo Esantu liboso na Bana-Izraélé.)
Ba-Lévi mosusu nasè na banganga-nzambe pe Aaloné na banganga-nzambe, bana mibali baye, azuwaki mokumba myonso ya mbeka liboso na Nzambe. Liboso na David kokabola misala mia bango, banganga-nzambe, kintana ya Aaloné, basengelaki ko bwaka libanga likolo tango nyonso pe yango ezalaki kopesa mobulu mingi.
Ponango, Divid abongisaki bosaleli ya lisanga na lisanga. Ezalaki na masanga 24 ebongisamaki na alima, banda bakoko ba Aaloné, pe ya mwambe ezalaki Abiyah. Ekomami ète, “Nganga-nzambe moko na nkombo ya Zalaliya, ya lisanga lia botama ya Abiyah.” Boye Zakaliya azalaki naga-nzambe ya lisanga lia botama ya Abiyah, pe bazalaki bango banso kitana na Aaloné, Nganga-Nzambe Monene.
Ezalaki Zakaliya, ngana-nzambe ya lisanga lia botama ya Abiyah, oyo azalaki tata na Yoane Mobatisi. Toyebi wuta Biblia ète batò bazalaki kobalana kati-kati na mabota.
Bongo, Yakobo abalaki mwana mwasi ya noko na epayi na mama naye. Oyo nde bolimboli ya kitani na mutuya na yango. Elobami ète, “Nganga-nzambe moko na nkombo na Zakaliya, ya lisanga lia botama ya Abiyah.”
Boye, azalaki solo-solo kintani na Aaloné. Nani? Zakaliya, tata na Yoaone Mobatisi. Oyo ezali bolimboli ya mutuya mingi ya bosomi bwa Yesu, pe mosala mwa Yoane Mobatisi, elongo na bolekisi bwa masumu ma mokili na nzoto na Yesu.
 

Kaka Bana mibali ya Aaloné Bakosala lokola Banganga-Nzambe

Nani akokaki kosala bonganga-nzambe na tango ya Boyokani bwa Kala?
Aaloné na kintani naye oyo bapesamela nzela

Bongo, esika nini na Biblia elobami polele-polele ète bana mibali ya Aaloné bakokaki kosala lokola banga-nzambe? Tika ète toluka yango.
Nakati na Botangi 20:22-29, “Bongo Bana-Izraélé, lingomba mobimba, bakendaki wuta Kadesh pe bakomaki na Ngomba na Hor. Pe Nkolo abolelaki Moize na Aaloné na Ngomba na Hor pembeni ya ndelo ya Edom, boye: ‘Aaloné akosangisa libota liaye, pwète akokota na mboka oyo Ngai na pesaki na Bana-Izarélé, pwète botombokelaki liloba lia Ngai na mayi ma Meriba. Zuwa Aaloné na Eleazar mwana mwaye, pe bokumba bango na Ngomba ya Hor; pe longola Aaloné bilamba biaye pe latisa yango na Eleazar mwana mwaye ya mobali; pwète Aaloné akosangisa batò baye pe akokokufa wana.’ Bongo Moize asalaki kaka ndenge Nkolo apesaki ye mitindo, pa bakendaki na Ngomba na Hor liboso na ligomba mobimba. Moize alongolaki Aaloné bilamba biaye pe alatisaki biango Eleazar mwana mwaye ya mobali; pe Aaloné akufaki wana na mutu ya ngomba. Nasima nde Moize na Eleazar bakitaki na ngomba. Sik’oyo tango lingomba mobimba bamonaki ète Aaloné akufaki, ndako na Izraélé mobimba balelaki Aaloné mikolo zomi misatu.”
Na Kobima, mobeko mwa Nzambe mokomama, ète bana mibali ya Aaloné, Nganga-Nzambe Monene, bakoki kosala bonganga-nzambe, pe mwana mobali moko akoponama kozala Nganga-Nzambe Monene, lokola tata na ye asalaki, tango akokoima na mbula ya botama 30.
Na Kobima 28:1-5, “Sik’oyo, zuwa ndeko nayo Aaloné, na bana baye mibali na ye, kati-kati na Ba-Izraélé, pwète asala pona Ngai lokola nganga-nzambe, Aaloné na bana baye; Nadab, Abihu, Eleazar, na Ithamar. Pe okosala bilamba bisantu pona Aaloné, ndeko nayo, pona kembo pe pona kitoko. Boye okoloba nabaye basalaka misala mia maboko, baye batodisama na molimo mwa bwania, basalela Aaloné bilamba, pona kosantisa ye, po asala mosala liboso na Ngai lokola nganga-nzambe. Pe oyo nde bilamba bakosala: Esipelo ya tolo, mokaba ya tolo, kansu ya molayi, kazaka ya molayi ya elamba ya talo, elamba ya likolo na kingo. Boye bakosala bilamba bisantu pona Aaloné ndeko nayo pena na bana baye, baye bakosala pona Ngai lokola banganga-nzambe. Bako zuwa singa ya olo, ya bulé naya motané na motané makasi, na elamba ya talo.”
Nzambe atiyaki Aaloné, ndeko na Moize, nakati ya bonganga-nzambe ya monene. Bonganga-nzambe epesamelani té na motò mosusu té. Nzambe apesaki Moize mitindo kobulisa Aaloné lokola Nganga-Nzambe Monene, pena kokomisa ye lolenge Apesaki mitindo pona ye. Tokoki kobosana té maloba ma Nzambe.
Lisusu na Kobima 29:1-9, “Pe oyo nde esengeli osala pona kobulisa bango pona mosala libosa na Ngai lokola banganga-nzambe: Zuwa elenge na ngobe moko naba meme mibale ezangi mbeba, na mapa ezanga kisi ya kovimbisa, na keké ezangi kisi ya kovimbisa na mafuta, mikaté esangi kisi ya kovimbisa, salami na mafuta (okosala yango na poudré ya mapa). Okotiya yango na kitunga pe oko mema yango na kati ya kitunga, na ngombe na meme mibale. Pe Aaloné na bana mibale baye, oko mema bango na ekoteli ya mongombo ya bokutani, pe okosukola bango na mayi. Nasima, okozuwa bilamba, okotia na Aaloné, pe elamba ya molayi na oyo mokaba mwa tolo, na oyo ya kingo, na ezipelo ya tolo, okosipa ye na elambe mosusu ya likolo. Okotia pe elamba ya mutu, pe okotia ekoti esantu na elamba ya mutu wana. Pe oko zuwa mafuta masantu, okotia na mutu naye, pe okopakola ye na mafuta, zopa yango na mutu naye, pe kopakola ye mafuta. Boye oko zuwa bana baye pe okolatisa bango bilamba. Pe okozipa bango na bilamba bia likolo, Aaloné na bana baye, pe okolatisa bango ekoti. Bonganga-nzambe ekozala ya bango bikeke na bikeke. Ezali bongo nde okobulisa Aaloné na bana baye.”
Zipa bango bilamba bia likolo, Aaloné na bana mibali baye, pe tiya bango bikoti na mitu mia bango.... Bonganga-nzambe bokozala pona bango, pona bobongisami bwa bikeke na bikeke. Bongo, oko kaba ebayi na Nzambe, Aaloné na bana baye.... Nzambe apesaki mitindo ète kaka Aaloné na bana mibali baye babulisama pona mosala ya bonganga-nzambe. Tango alobaki ète, “ekozala ya bango bikeke na bikeke,” elingi koloba ète bonganga-nzambe bozalaki na mosala, ata na sima boyeyi na Yesu na mokili oyo.
Luka azaliki kotalisa biso na bozindo ète Zakaliya azalaki kintani na Aaloné, Nganga-Nzambe Monene. Tango Zakaliya azalaki kosala lokola nganga-nzambe oyo aponama kozala liboso na Nzambe na Ndako na Nkolo, angelu moko abimelaki ye pe ayebisaki ye ète mabondeli maye mayokani; ète mwasi naye Elizabété akozuwa mwana mobali.
Zakaliya akokaki kondima yango pe alobaki ète, “Mwasi na ngai asi kokoma mobange mingi, ndenge nini akomema mwana?” Lokola otiye ngai ntembe, Nzambe akokomisa yo ba-ba pona tango moke pona kotalisa yo ète likambo lina lizali lia solo.
Tango mikolo mikokaki, mwasi mwaye azuwaki zemi pena sima mikolo mike, Moseka Maliya, azuwaki pe zemi. Bango babale babongisama kosala misala mia Nzambe pona lobiko liabiso. Pona kobikisa babunga nzela banso, Atinda mosali mwa Ye Yoane na Mwana mwa ye moko Yesu, nakati na mokili oyo.
Bongo, Nzambe apesaki nzela Mwana mwa Ye abatisama na Yoane pona kolelisa masumu manso ma mokili na nzoto na Ye, pwète oyo nyonso akondima abikisama.
 

Bobongisami Yabomoko ya Nzambe!

Nani Nzambe abongisaki liboso na Yesu pona mosala mwa bosomi bwa Ye?
Yoane Mobitasi

Yesu Kristo azalaki Mobisi mwa batò banso, oyo abotama na nzoto ya Moseka Maliya. Maliya azalaki mwasi Yésofé, oyo azalaki moko na kintani na Yuda. Esengelaki Yesu abotama na kati na kitana na Yuda pona kokokisa Boyokani bwa Nzambe, kaka lokola Yoane Mobatisi asengelaki kobotama na ndako na Aaloné, Nganga-Nzambe Monene.
Nzambe abongisaki batò babale kobotama na mokili oyo, pwète, Yoane azali liboso na Yesu. Yoane abotama pwète akoka kobatisa Yesu pena kolekisa masumu ma mokili na nzoto na Ye. Mokitani ya Nganga-Nzambe Monene asengelaki kopesa mbeka ya bolongoli masumu pona kokokisa Mokano mwa Nzambe, mosalamaki na Boyokani bwa kala; sango-malamu ya bosomi bwa Yesu, esengele ekokisama malamu pwète batò banso bakisama.
Na mokanda ya Kobima, Nzambe apesaki Izraélé Mobeko mwa Ye maloba ma boyokani bwa Ye na bango; mibeko mia Nzambe pe bobongisami bwa bopesi mbeka na Mongombo, Apesaki yango pona koteya bangana-nzambe, mikano mia bopesi mbeka, pe bopesameli bwa bonganga-nzambe na bana mibali na banganga-nzambe. Nzambe atiyaki Aaloné elongo na bana mibale baye nakita na mosala mwa bonganga-nzambe pona bikeke na bikeke.
Bongo, bana banso ba Aaloné bapesamela nzela ya kopesa mbeka pe bangana-nzambe ya minene bakoki towuta kaka na ndako na Aaloné. Omoni pona nini bongo?
Nabana mibali mingi na Aaloné, Nzambe aponaki nganga-nzambe na nkombo na Zakaliya na mwasi naye Elizabété. Alobaki, “Botala, Na tindaki motindami na Ngai liboso na elongi na Yo.” Tango Nzambe ayebisaki Zakaliya ète Akokomisa Elizabété kozuwa mwana mobali, akobengama Yoane, akamwaki mingi pe akomaki ba-ba na mokano mwa Ye tii mwana mobali abotamaki pe apesamaki nkombo ina.
Nabosolo, mwana mobali abotamaki na ndako naye. Na tango ya kopesa mwana mobali nkombo kolandisama na bokoko bwa Izraélé, mwana mobali asengelaki kozuwa nkombo na tata naye, tope na moko nakati na libota.
“Sik’oyo Elizabété, tango naye ya kobota ekomaki, pe abotaki mwana mobali. Tango bandeko naye balupango na bandeko na libota bayokaki ndenge nini Nkolo atalisaki ngulu monene epayi naye, basepalaki elongo naye. Sik’oyo ezali bongo, na mokolo ya mwambe, bayaki pona kobongisa kimobali na mwana; pe bakoki kobenga ye na nkombo na tata naye, Zakaliya. Pe mama naye ayanolaki bango ète, ‘Té; akobengama na nkombo Yoane.’ Kasi balobelaki ye ète, ‘Ezali kati-kati na bandeko babiso ata moko, abangami na nkombo oyo, azali té.’ Nasima, basalaki elembo na tata naye—ndenge nini akokaki kobenge ye. Pe asengaki libaya, pe akomaki, ète, ‘Nkombo na ye ezali Yoane.’ Pe bango banso bakamwaki. Mbala moko na pwasa, monoko mwaye mofongwamaki pe lolemo naye ezongela koloba, pe apandi koloba, na kokumisa Nzambe. Nasima, kobanga ekomelaki bango banso bazalaki zinga-zinga na bango; pe maloba manso mana makotaki nakati ya masolo na ngomba ya mboka na Yudéya. Pe baye banso bazalaki koyoka bango bazalaki koloba na mitema miango ète, ‘Mwana oyo akozala ya ndenge nini?’ Pe loboko na Nkolo ezalaki likolo naye” (Luka 1:57-66).
Zakaliya azalaki kaka ba-ba tango mwana abotamaki. Na tango yakopesa mwana nkombo, nbandeko balingaki kopesa mwana nkombo ya tata naye Zakaliya. Kasi mama naye alobaki ète ezala kaka Yoane. Nayango, bandeko balobaki ète nkombo wana ezali na motò té nakati na libota lia bango pe mwana esengeli akengama na nkombo na tata naye.
Tango Elizabété akobaki kolobela bango boye likolo na nkombo, bandeko bakendaki epayi na Zakaliya pe batunaki ye nkombo ya mawana ezali nani. Zakaliya, lokola akokaki koloba té, asengaki ekomelo pe akomaki ‘Yoane’. Bandeko banso bamitunaki na nkombo wana na ndenge mosusu.
Kasi, nasima kopesa nkombo, monoko mwa Zakaliya mofongwamaki mbala moko. Akumisaki Nzambe pe atondisama na Molimo Mosantu pe asakolaki.
Boye, Luka abeteli biso lisolo likolo na botama na Yoane Mobatisi na ndako na Zakaliya. “Ezalaki na nganga-nzambe moko na nkombo na Zakaliya, moko na lisanga lia botama na Abiyah.” Na libogisi lia bokeseni lia Nzambe, Yoane Mobatis,; motalisi-elongi na batò banso oyo abotaoma na Zakaliya, moko na kintani na Aaloné.
Na nzela na Yoane Mobatisi na Yesu Kristo, Nzambe akokisaki lobiko na batò banso. Tobikisami na masumu mabiso manso na nzela ya kondima kati ya mosala ya bosomi, oyo ememami na nzela na Yoane na Yesu Kristo.
 
 

Libatisi lia Yesu


Pona nini Yesu abatisama na Yoane?
Pona kolongola masumu manso ma mokili

Yoane Mobatisi atatolaki ète Yesu azalaki Mwana na Nzambe pe alogolaki masumu mabiso manso mosika na biso. Ezalaki nde Yoane Mobatisi, mosali na Nzambe oyo atindama komeme litaloli lia lobiko na Nzambe. Elingi koloba té Nzambe ayebisaki biso té Ye moko, Azali Mobikisi mwabiso. Nzambe azalaki koleka na basali ba Ye na kati na eklézia, pwète na nzela ya batò banso babikisami.
Nzambe alobi ète, “Lobela tango na kimia pona Yéluzalémé, pe ngangele ye ète, tango na bitumba isili kosila, ète masumu maye malimbisami; pwète azuwa wutu epayi na loboko na Nkolo mbala mibale pona masumu maye manso…matiti makokawuka, fololo ekonuna, kasi liloba lia Nzambe lifandi libela na libela” (Ezayi 40:2, 8).
Nzambe alakaki libela toloba lokola mbula 700 liboso lisolo lia botama na Kristo, “Bozali lisusu basumuki té. Nalogolaki masumu mabino manso pe bitumba bisilaki libela.” Yango nde, mongongo wa sango-malamu ya bosomi mozali konganga pona biso. Yango nde sango-malamu ebongisama.
Tango toyoki misala mia Yoane Mobatisi pe kososola ète masumu mabiso manso malekekaki na nzoto na Yesu na nzela na Yoane Mobatisi, tokoki kokangwama biso banso wuta bowumbu bwa masumu mabiso.
Mikanda minei manso mia sango-malamu mizali kotalisa biso lisolo lia Yoane Mobatisi, pe Malaki, mosakoli mwa suka mwa Boyokani bwa Kala pe atatoli ète Yoane Mobatisi azali mosali mobongisami ya Nzambe. Boyokani bwa Sika bobandi na botama na Yoane Mobatisi pena bolekisami bwa masumu na nzela naye.
Boye, pona nini tobengaka ye Yoane Mobatisi? Ezali pwète abatisaki Yesu. Elingi koloba nini? Elingi koloba ète ‘kolekisa na, kokundama, kosokolama’—ndenge moko lokola ‘kotia maboko na mutu na’ kati na Boyokani bwa Kala.
Nakati na Boyokani bwa Kala, tango motò asumuki, akolekisa masumu maye na nzoto ya mbeka ya kobonza oyo azanga mbeba, na nzela ya kotia maboko na mutu nayango, pe mbeka akokufa na masumu mana. ‘Kotiya maboko na mutu na’ elingi koloba ète ‘kolekisa na.’ Nayango, ‘kotiya maboko likobo na mutu na’ pena ‘libatisi’ ezali na mosala moko, ata ekeseni na miso na batò.
Boye, libatisi lia Yesu ezalaki koloba nini? Libasi lia Yesu lizalaki kaka nzela ya kozuwa bolimbisi bwa masumu. Nzambe atiyaki mobeko ya kolekisa lisumu na nzela na kobonza mbeka na ‘kotia maboko na mutu.’ Bongo, na mikolo mia Boyokani bwa Kala, basumuki bazalaki kolongwa masumu mabango na botiyi maboko mabango na mutu ya mbeka pona kolekisa masumu mabango na mutu na yango. Nasima na yango, bazalaki
zalaki kokata kingo na nyama yango pe banganga-nzambe bazalaki kokitiya makila mayango na maseke ya etumbelo ya mbeka ya kutumba na moto. Ezalaki nde lolenge oyo masumu ma mokolo na mokolo mazalaki kolongwama.
Sik’oyo, ndenge nini bazalaki kolongola masumu ma mbula na mbula?
Awa, Aaloné, Ngana-Nzambe Monene azalaki kobonza pona bana banso ba Izraélé. Pwète Yoane Mobatisi abotama na ndako na Aaloné, ezalaki malamu pona ye kozala nganga-nzambe monene, pe Nzambe abongisaki ye kozala Nganga-Nzambe Monene ya suka, kolandisama na elaka na Ye ya bosomi.
Yoane azalaki motalisi-elongi ya batò banso pe nganga-Nzambe monene ya suka lokola Boyokani bwa Kala, motò ya suka liboso Yesu kristo kobotama. Nani mosusu, soki Yoane Mobatisi té, akokaki kolekisa masumu ma mokili na nzoto na Yesu na Boyokani bwa Sika, kaka lokola Aaloné alongolaki masumu ma batò baye nakati na Boyokani bwa Kala? Lokola nganga-nzambe ya suka na Boyokani bwa Kala pe motalisi-elongi na batò manso, Yoane Mobatisi alekisaki masumu ma mokili mobimba na nzoto na Yesu tango abatisaki Ye.
Lokola Yoane alekisaki masumu manso ma mokili na nzoto na Yesu, kondima na sango-malamu ya mayi na Molimo ekoki kopesa biso bosomi. Yesu akomaki Mwana-Mpate pona kobikisa basumuki banso, nayango asalaki mosala mwa bosomi lokola ebongisama na Nzambe. Yesu ayebisaki biso ète Yoane Mobatisi azalaki mosakoli na suka, ngana-nzambe monene ya suka oyo alekisaki masumu manso ma mokili na nzoto na Ye.
Pona nini Yesu azakokaki kozala yango Ye moko té? Pona nini Asengelaki kaka Yoane Mobatisi? Ezalaki na mutu ya likamo pwète Yoane Mobatisi abotama sanza motoba liboso na Yesu; ezalaki pona kokokisa mobeko mwa Boyokani bwa Kala, pena kokokisa bilaka na yango.
Yesu abotama na Moseka Maliya, pe Yoane Mobatisa abotama na mwasi mobange na nkombo na Elizabété.
Oyo nde ezalaki misala mia Nzambe pe Abongisaki yango pona kobisa basumuki banso. Kobikisa biso na bitumba ya mikolo na mikolo na lisumu, elongo na bapasi na biso ya bomoyi na masumu, Atindaki mosali mwa Ye Yoane, pena Mwana mwa Ye, Yesu. Yoane Mobatisi azalaki motalisi-elongi ya batò banso, Ngana-Nzambe Monene ya suka.
 

Motò Monene Koleka Baye Banso Batotama na Basi

Nani azalaki motò monene koleya batò banso na mokili?
Yoane Mobatisi
 
Totala kati na Matié 1:7-14. “Lokola babimaki, Yesu abandi koloba na ebele na batò likolo na Yoane: Nini bokendaki kotala na esobe? Nzete ya zumbe ebetama na mopepe? Kasi nini bokendaki kotala? Motò alata bilamba ya kitoko? Yasolo, baye balati bilamba kitoko bazalaka na ndako ya mokonzi. Kasi bokendaki to tala nini? Mosakoli? Solo, Nalobeli bino, pe koleka na mosakoli. Pwète ye nde bakomelaki boye: ‘Botala, Na tindaki motindami mwa Ngai liboso na elongi na Yo, oyo akobongisa nzela liboso na Yo.’ Solo-solo, Nayebisi bino, nabaye banso babotama na basi ezali na moko té oyo azali monene koleka Yoane Mobatisi; kasi oyo azali moke na bokonzi bwa lola azali monene koleka ye. Pe banda mikolo na Yoane Mobatis tii sik’oyo bokonzi bwa lola botungisami na bitumba, pe balongi bazali kozuwa yango na makasi. Pwète basakoli banso na mobeko bazakolaki tii Yoane. Pe soki bolingi koyeba yango, azali Eli oyo asengelaki koya.”
Batò bakendaki wuta esobe pona kotala Yoane Mobatisi, oyo azalaki konganga, “Botubela, bino libota na nyoka!” Pe Yesu alobaki, “Kasi nini bokendaki kotala? Motò alata bilamba ya kitoko? Yasolo, baye balati bilamba kitoko bazalaka na ndako ya mokonzi.”
Yesu Ye moko atatolaki monene koleka na Yoane. “Bokendaki kotala nini? Motò moko boye alata bilamba ya suki na nyama ya esobe pe azoganga makasi? Alataki bilamba na suki ya nyama na esobe. Bokendaki kotala nini? Motò na bilamba kitoko? Baye balataka kitoko bazalaka na ndako na mokonzi. Kasi ye azali monene koleka mokonzi,” Yesu nde atatolaki boye. “Yasolo, baye balati bilamba kitoko bazalaka na ndako ya mokonzi. Kasi bokendaki to tala nini? Mosakoli? Solo, Nalobeli bino, pe koleka na mosakoli.”
Na tango na kala, basakoli bazalaki batò na lokumu koleka bakonzi. Yoane Mobatisi azalaki na lokumu koleka mokonzi, pe koleka, basakoli banso ba Boyokani bwa Kala. Solo-solo, Yoane, Nganga-Nzambe monene ya suka pe motalisi-elongi na batò banso, azalaki na lokumu koleka Aaloné, Nganga-Nzambe Monene, ya yambo. Yesu Ye moko atatolaki ète Yoane azalaki bongo.
Nani motalisi-elongi na batò banso? Kolongola kaka Kristo Ye moko, motò nani azali monene koleka nakati na mokili? Yoane Mobatisi. “Solo, Nalobeli bino, pe koleka na mosakoli. ‘Botala, Na tindaki motindami mwa Ngai liboso na elongi na Yo, oyo akobongisa nzela liboso na Yo.’”
Yoane Mobatisi atatolaki ète bitumba na lisumu esili libela. “Botala, Mwana-Mpate na Nzambe? oyo azali kolongola lisumu lia mokili!” Ezalaki YoanE Mobatisi oyo atatolaki ète Yesu alongolaki libele masumu ma mokili.
Na mokanda na Matié 11:11, “Solo-solo, Nayebisi bino ète, na baye banso batotama na basi, moko koleka Yoane Mobatisi nano atelemisama té.” Lokola moko koleka Yoane Mobatisi nano azala té kati-kati na baye banso babotama na basi?
Elingi koloba nini kozala ‘baye babotama na basi?’ Ezali kolobela batò banso. Kolongola Adam na Eva, batò banso baye babotama na basi. Solo, kati-kati na baye banso babotami na basi, moko té atelemisama koleka Yoane Mobatisi. Nayango, azali Nganga-Nzambe Monene ya suka pe motalisi-elongi na batò banso. Yoane Mobatisi azalaki Nganga-Nzambe Monene, mosakoli pe motalisi-elongi na batò banso.
Na Boyokani bwa Kala, Aaloné elongo na bana baye mibali bapesamela nzela na Nzambe kosala ekeke na ekeke. Masumu manso masengeli kosokolama mosika na nzela na Aaloné pena bana baye mibali. Ezalaki Nzambe Oyo Apesaki bango nzela.
Soki Ba-Lévi mosusu bayaki kotiya pe lokolo na mosala na bonganga-nzambe, bakokaki kokufa solo-solo. Oyo bakokaki bango banso kosala ezalaki kaka tosangisa koni pona mótó na etumbelo, poso ya banyama, kolongola mafuta na mosuni, kosokola biloko na kati ya banyama na kolongola bosoto libanda na ndako na bosangani. Soki kaka bameki komikotisa na kati na mosala na bonganga-nzambe, bakokufa. Ezalaki mobeko mwa Nzambe. Bakokaki té kokatisa molongo wana.
Na mokili oyo, nano motò atelemisama, monene koleka Yoane Mobatisi. Azalaki monene koleka baye banso bakoki kokufa. “Pe banda mikolo mia Yoane Mobatisi tii sik’oyo bokonzi bwa lola bozali konyokwana na pasi, pe balongi nde bazali kozuwa yango na makasi.”
Bosomi bwa batò banso bokokisama tango Yaone Mobatisi abatisaki Yesu, pe baye banso bandimela Yesu bakoki kokota na Bokonzi bwa Lola pwète tobulisami na kondima.
Sik’oyo, tika ète totala ndenge nini tata na Yoane atatolaki mwana mwaye.
 

Litatoli lia zakaliya, tata na Yoane

Eloko nini Zakaliya asakolaki na mutu pona mwana mwaye?
Yoane ayaki kobongisa nzela oyo ekopesa boyebi bwa lobiko na batò ba Ye.

Totanga mokanda mwa Luka 1:67-80. “Sik’oyo tata naye zakaliya atondisama na Molimo Mosantu, pa asakolaki ète: ‘Apambolama Nkolo Nzambe na Izraélé, pwète Ayaki kotala biso pe apesaki bosomi na batò ba Ye, pe Atelemisaki liseke lia lobiko pona biso nakati na ndako na mosali mwa Ye David, lokola Alobaki na monoko mwa basakoli ba Ye, banda ebandeli na mokili oyo, ète tokobikisama wuta banguna babiso pe wuta loboka ya baye banso bayinaka biso, pona kotalisa ngolu elakama na batata ba biso pena kokanisa boyokani esantu bwa Ye, elaka Akatela ndayi na tata nabiso Abraham: kopesa biso yango, kobikisa biso na loboko na bayini babiso, pwète tosalela Ye nabobangi té, kati na bosantu pena boyengebene liboso na Ye mikolo, minso mia bomoyi bwa biso. Pe yo, mwana, okobengama mosakoli ya Oyo azali likolo na nyonso; pwète okokende liboso na elongi na Nkolo kobongisa nzela na Ye, kopesa boyebi ya lokibo na batò na Ye na bolimbisami bwa masumu nabango, na nzela na ngolu na Nzambe na biso, oyo ayeli biso Mwinda mwa Ye; pona kobesa mwinda na baye bafandaki nakati na elili na liwa, pona kokamba makolo mabiso na bisika bwa kimia.’ Boye mwana akolaki pe akomaki na makasi na molimo, pe azalaki na esobe tii mokolo mwa komimonisa na Izraélé.”
Zalaliya asakolaki makambo mabale. Asakolaki ète Mokonzi na batò banso akoya. Banda molonga na 8 tii 73, pe asakolaki na esengo ète Nzambe abosanaki té malaka ma Ye pe Yesu, lokola Nzambe alakaki Abraham, abotama na Moseka Maliya pona kobikisa kintani na Ye na bowumbu kati na maboko na banguna nabango.
Uta molongo mwa 74, “Kobesa biso lokibo na loboko na bayini babiso, pwète tosalela Ye nakobanga té.” Oyo ezali bokanisi bwa Elaka na Nzambe na Abraham pena Bana-Izraélé, pe asakolaki ète, “kopesa biso nzela ya kosalela Ye nakobanga té.”
Wuta molongo mwa 76, asakolaki na mwana mwaye. “Pe yo, mwana, okobengama mosakoli ya Oyo azali likolo na nyonso; pwète okokende liboso na elongi na Nkolo kobongisa nzela na Ye, kopesa boyebi ya lokibo na batò na Ye na bolimbisami bwa masumu nabango, na nzela na ngolu na Nzambe na biso, oyo ayeli biso Mwinda mwa Ye; pona kobesa mwinda na baye bafandaki nakati na elili na liwa, pona kokamba makolo mabiso na bisika bwa kimia.”
Awa alobi ète, “Pona kobesa boyebi bwa lobiko na batò baye na nzela na bolimbisami bwa masumu na bango.” Na nzela na nani elobama ète boyebi bwa lobiko ekopesamela? Yoane Mobatisi. 
Bokoki kotala yango? Yoane Mobatisi, na maloba ma Nzambe, asengelaki kopesa biso boyebi, ète Yesu azali Mwana na Nzambe, oyo alongolaki masumu ma mokili.
Sik’oyo, totala na Mark 1. “Ebandeli na sango-malamu na Yesu Kristo, Mwana na Nzambe. Lokoka ekomami na Ba-Sakoli ète: ‘“Botala, Natindaki motindami na Ngai liboso na elongi na Yo, oyo ako bongiza nzela liboso na Yo. Mongongo oyo mozali koganga na esoke: ‘Bobongiza nzela na Nkolo, bozala etamboleli malamu.’ Yoane ayaki kobatisa na esobe pena koteya libatisi lia bolimbisi bwa masumu. Pe mboka nyonso ya Ba-Yuda, na baye bawuta na Yéluzalémé, bayaki bango banso kobatisama na Mayi na Yordané, na kotibela masumu mabango” (Mark 1:1-5).
Tango Bana Iszraélé bayokaki epayi na Yoane Mobatisi, batikaki kongumamela bikeko bia batò, bayebi Nzambe té, pe babatisama na Yoane Mobatisi. Kasi Yoane atatolaki ète, “Nazobatisa bino na mayi pwète bozonga na Nzambe. Kasi Mwana na Nzambe akoya pe bobatisama nangai pwète masumu mabino manso maleka na nzoto na Ye na nzela oyo. Pe soki bondimi na libatisi lia Ye lokola bozali kobatisama na ngai, masumu mabino manso makoleka na nzoto na Ye, kaka lokola masumu mazalaki koleka na kotiya maboko na mutu na Boyokani bwa Kala.” Yango, nde oyo Yoane atatolaki.
Libatisi lia Yesu na Yordané elingi koloba ète Abatisama na mayi na liwa. Toyembaka zembo moko na matanga boye, “♪Na bolamu na bolamu, tokokutana pembeni na mayi kitoko. Tokokutana pembeni na mayi kitoko mana.♪” tango tokufi, tokokatisa Mayi ma Yordané. Mayi na Yordané ezali mayi ma liwa. Yesu abatisama na mayi mana ma liwa, pwète alongolaki masumu manso ma mokili nakati na mayi mana pe “lifuti lia lisumu lizali liwa.”
 

Libatisi Liye Lilekisi mosika Masumu Mabiso

Bonzoto ya elili na botiyi maboko na mutu ezali nini na Boyokani bwa Sika?
Libatisi lia Yesu

Ma Matié 3:13-17, tozali kotaga ète, “Boye Yesu awutaki Galilé kokende epayi na Yoane na Yordané kobatisama naye. Yoane amekaki topekisa Ye, nakoloba, ‘Ngai nde asengeli kobatisama na Yo, pe ozali koya epanyi na nangai?’ Kasi Yesu ayanolaki ye, ‘Tika ète ezala bongo sik’oyo, pwète yango nde ezali malamu pona kokokisa boyengemene nyonso.’ Nasima apesaki Ye nzela. Boye Yesu, Tango abatisamaki, abimaki mbala moko na mayi; pe tala, lola efongwami na Ye, pe Amoki Molimo mwa Nzambe kokita lokola ndenke ya pembe pona kotema likolo na Ye. Pe napwasa mongo kowuta lola, eyokami, ‘Oyo nde Mwana molingami mwa Ngai, oyo Nasepeli na Ye mingi koleka.’’”
Yesu akendaki na Yordané pe abatisama na Yoane Mobatisi. Apesaki Yoane mitindo ète, “Batisa Ngai.” Yoane ayanolaki ète, “Kasi ngai nasengeli kobatisama na Yo, pe Yo ozali koya epayi nangai?” Banganga-Nzambe moko ya Lola na moko ya mabele bakutani elongo. Lokola ekomami na mokanda mwa Ba-Ebré, Yesu Kristo azali
Nganga-Nzambe Monene pona libela kolandisama na mokano mwa Melkizédéké. Yango elingi koloba ète Yesu azangi kitani ya bomotò. Azali té mwana na Aaloné, tope motò moko boye na mokili. Azali Mwana na Nzambe, Mokeli mwa biso. Azali Oyo azali; ponayango, Azali na kintani té. Yesu akitaki nkembo na lola pe Ayaki nasè kobikisa batò ba Ye.
Mutu na likambo na boyeyi bwa Ye, nakati na mokili oyo ezalaki pona kobikisa basumuki banso, baye banyokama na bokosi, na lokuta na Satana. Pe, Alongolaki masumu manso ma mokili na kobatisama na Yoane Mobatisi. “Kasi Yesu ayanolaki ye ète, ‘Tika ète ezala bongo sik’oyo, pwète yango ekoki boye pona biso pona kokokisa boyengemene nyonso.’ Nasima apesaki Ye nzela.”
“Tika ète ezala bongo sik’oyo.” Tika ète ezala bongo! Yesu abesaki mitindo na motalisi-elongi na batò banso pe akitisaki mutu mwa Ye kobatisama. Na Boyokani bwa Kala, tango mbeka epesami na Nzambe, ekozala mosumuki tope nganga-nzambe monene oyo akotiya maboko maye na mutu na yango pe kolekisa masumu na nzoto na yango. ‘Kotiya maboko na mutu ya motò’ elingi koloba ète ‘kolekisa na.’
Yoane Mobatisi abatisaki Yesu. Ezalaki ndenge bazalaki kotiya maboko na mutu na kati na Boyokani bwa Kala. ‘Kolekisa na,’ ‘kokundama,’ ‘kosokwama,’ pe ‘kokufela’ ezali pe ndenge ya komonela yango. Boyokani bwa Sika bozali nzoto na makambo tango oyo Boyokani bwa Kala bozali elili na makambo.
Tango mosumuki azalaki kotiya maboko maye na mwana-mpate na kati na Boyokani bwa Kala, lisumu liaye lizalaki koleka na nzoto na mwana-mpate pe mbeka wana esengelaki ebomama. Tango mwana-mpate abomama, akondami, nasima; masumu ma musumuki oyo ekiyaki na nzela ya kotiya maboko na mutu ya mbeka, malekama na nzoto na mbeka wana. Boye, mwana-mpate wana akobomama likolo na masumu mana! Soki masumu malekisama na nzoto na mwana-mpate, esengeli oyo apesi mbeka kolandisama na mabongisi ma mbeka ya masumu azala lisusu na masumu té? Boye.
Toloba ète eteni ya elamba oyo ezali lisumu pe mikro oyo ezali mwana-mpate. Tango natiyè maboko na mikro oyo, lisumu oyo eliki na yango, mwana-pate. Nzambe Ye moko abongisaki yango ezala bongo. “Tiya maboko mayo liko na yango.” Pwète ozuwa bosomi bwa masumu na kati na Boyokani bwa Kala, motò moko asengelaki kotiya maboko na mutu ya mbeka. Nasima na yango, akozala na lisumu lisusu té. Ndenge moko, libatisi lia Yesu lizalaki nzela ya kokunda pe kolekisa masumu ma mokili na nzoto na Ye. Yango nde oyo eloko ezali na kati na libatisi lia Ye.

Kokokisa boyengebene nyonso elingi koloba nini?
Ezali kosokola masumu na nzela ya kolekisa yango na nzoto na Yesu.

Bongo, tango Yesu abatisamaki pona kolongola mosiki, masumu ma mokili manso, masumu manso malekaki na nzoto na Ye solo-solo? Masumu manso malekaki na nzoto na Yesu pe batò banso bazuwaki bosomi. Ezali ndenge moko, masumu mazalaki kolekisama na nzela ya mbeka na Boyokani bwa Kala. Yesu ayaki wuta Galilé pona kokende na Yordané pe alobali na Yoane, “Tika ète ezala bongo sik’oyo, pwète ekokisami bongo pona biso pona kokokisa boyengebene nyonso” (Matié 3:15).
Boye, Yoane abatisaki Yesu. Ayebisaki Yoane ète ekoki ezala bongo pona kokokisa boyengebene nyonso na nzela na libatisi lia Ye. ‘Boyengebene nyonso’ elingi koloba ète ‘ya malamu koleka pe oyo ekokisami.’ ‘Ponayango,’ na maloba mosusu, na nzela na libatisi, boyengebene nyonso bokokisamaki. Elingi koloba ète ezalaki sembo pona Yoane kobatisa Yesu, pe Yesu kobatisama na Yoane, pwète masumu manso ma mokili ma leka na nzoto na Ye.
Nzambe apesi biso bosomi likolo na libatisi lia Yesu, mbeka na Ye na Kuruze pena kondima nabiso. “Batò banyokwami na masumu pena koyokisama pasi na Satana pona masumu nabango. Nayango, pwète bakangwama, pe bakota na Lola, yo, lokola motalisi-elongi na batò pe kintani na Aaloné, esengeli obatisa Ngai pona batò banso. Nasengeli kobatisama nayo, Yoane. Bongo, mosala mwa bosomi mokokokisama.”
“Nayoki,” Yéoané ayanolaki.
Boye Yoane abatisaki Yesu. Atiyaki maboko maye na mutu na Yesu pe alekisaki masumu ma mokili na nzoto na Ye. Ponayango, Yesu akomaki Mobikisi oyo alongolaki masumu mabiso manso. Sik’oyo, kondima bosomi bwa Ye ekoki kobikisa biso. Ondimi yango?
Nasima na libatisi lia Ye na Yordané, na nzela na maboko ma motalisi-elongi na batò banso, Yesu kenda bisika na bisika na koteya sango-malamu pona mbula misatu na ndambu na masumu ma mokili na nzoto na Ye lokola misala mia bozali bwa Ye liboso na batò.
Ayebisaki mwasi oyo akangama na ekobo ète:
“Ngai pe nakateli yo etumbu té.” Akokaki kotatela ye etumbu té pwète Amemaki masumu maye na nzoto na Ye pe azalaki na nzela ya kokende kokufa pona yango na Kuruze. Tango azalaki kobondela na esika na nkombo na Gestémané, Abondelaki mbala misatu, nakosenga Tata ète kopo na kanda na Nzambe elongwa mosika na Ye, kasi té, atikaki pe alobaki ète, “Na mokano mwa Ngai té, kasi na oyo ya Yo.”
 

“Botala! Mwana-Mpate na Nzambe Oyo Alongoli Lisumu na Mokili!”

Masumu motuya boni Yesu alongolaki?
Masumu manso ma mokili.

Yoane 1:29 elobi ète, “Lobi nayango Yoane amonaki Yesu koya epayi naye, pe alobaki ète, ‘Botala! Mwana-Mpate na Nzambe oyo Alongoli lisumu lia mokili!’” Yoane Mobatisi abatisaki Yesu pe mokolo ya lobi na yango, Yesu ayaki epayi naye, pe ayebisaki batò ète: “Botala! Mwana-Mpate na Nzambe oyo Alongoli lisumu lia mokili!’” Yano ezalaki litatoli liaye.
Mwana na Nzambe ayaki na mokili oyo pona kolongola masumu ma yango. Yoane Mobatisi atatolaki lisusu ète. Na Yoane 1:35-36, “Lisusu, lobi na yango, Yoane atelemaki na bayekoli baye babale. Pe azalaki kotala Yesu tango Azalaki koya, alobi ète, ‘Botala, Mwana-Mpate na Nzambe!’”
Mwana-Mpate ezali kowuta na ndenge Yesu azali mbeka yasolo pe oyo ekoki na nyonso lokola ekomami na Boyokani bwa Kala, oyo akufaki pona masumu ma Izraélé. Likolo nayo nangai, Mwana na Nzambe pe Mokeli mwabiso, ayaki awa nasè na mokili kolongola mosika na biso masumu mabiso manso; masumu manso banda ebandeli na mokili tii mokolo mwa suka mwa yango, banda kaka lisumu lia yambo tii masumu pena botomboki bwabiso banso, na bambeba babiso banso. Apesi biso banso bosomi na nzela na libatisi lia Ye pena makila na Kuruze.
Yesu alongolaki masumu mabiso manso pe apesaki, biso bandimi, bosomi etonda bopeto. Ososoli yango? “Mwana-Mpate oyo alongoli mosika, lisumu lia mokili.”
Pene na mbula 2000 eleki banda Abotama na kati na mokili oyo pena mbula 30, sima na botama na Yesu, Alongolaki masumu mabiso. Mbula moko sima na botama na Yesu, ezalaki mbula oyo Abotama. Tozalikotanga yango, tango na sima na Kristo: ezali pene na mbula 2000, Yesu ayaki na mokili oyo.
Na mbula 30 sima na Yesu, Yoane Mobatisi abatisaki Yesu pe mokolo elandi, Yoane agangaki na batò ète, “Botala! Mwana-Mpate na Nzambe oyo alokongoli mosika, lisumu lia mokili!” “Botala!” Ayebisaki batò kondima Yesu, oyo alongwaki masumu manso mabango mosika. Atatolaki ète Yesu azalaki Mwana-Mpate na Nzambe, Moko oyo akobikisa biso na masumu mabiso.
Yesu amemaki masumu mabiso pe asilisaki bitumba bia mokolo na mokolo bia lisumu. Tozali na lisumu lisusu té banda kaka Mwana na Nzambe alongolaki yango. Yoane Mobatisi atatolaki, ète Yesu alongolaki masumu mabiso, masumu mayo na mangai. “Motò oyo (Yoane) ayaki kosakola sango ya bomoyi, po batò banso bándima Ye” (Yoane 1:7).
Soki litatoli lia Yoane lizalaki té, ndenge nini tokokaki koyeba ète Yesu alongolaki masumu mabiso mosika mabiso? Biblia eyebisi biso ète akufaki pona biso, kasi ezalaki kaka Yoane Mobatisi nde oyo ayekolisi biso pole-pole ète Alongolaki masumu mabiso banso, mosika na biso.
 
Motuya boni ya masumu ezali kati na lisumu lia mokili?
Masumu manso ma batò banda ebandeli tii suka na mokili

Ebele ya batò batatoli likambo oyo na sima ya liwa na Yesu, kasi Yoane nde oyo atatolaki yango tango Azalaki mano na bomoyi. Solo-solo, bayekoli ba Yesu pe, batatolaki bosomi bwa Yesu. Batatolaki ète Yesu alongolaki masumu mabiso mosika na biso, ète Azali Mobikisi mwa biso.
Yesu alongolaki masumu ma mokili manso. Sik’oyo soki totali malamu, nani oyo azali, ata na mbula 100 ya botama? Yesu alongolaki masumu ma mokili tango azalaki na mbula 30 ya botama. Tala malamu singa ya likambo lina.
 
 
Toloba ète ezalaki mbula 4.000 yambo Yesu koya ète motò yaliboso akelama. Pe lelo oyo ezali koleka moke mbula 2000 banda Yesu ayaki. Toyebi té mbula boni mokili oyo ekowumela lisusu, kasi suka ezali solo-solo pene koya. Alobi ète, “Ngai nazali motò ya liboso pe ya suka, Ebandeli pena Suka, Oyo ya liboso pe Ya suka penza” (Koyebisa ba sékélé 22:13).
Bongo, suka ekozala solo-solo. Tozali na tango oyo mokanda oyo Mokanda oyo ekomami na mbula 2002. Kristo alongolaki masumu mabiso na mbula 30 sima na Yesu, pe sima mbula misatu Akufaki na Kuruze.
“Botala! Mwana-Mpate na Nzambi oyo alongolaki mosika, lisumu lia mokili.” Alongolaki masumu ma mokili, masumu mayo na mangai. Tozali koleka mbula 2000 sima na botama na Yesu, pe, tozali kobika pene na mbula 2000, sima alongolaki masumu mabiso mosika. Tozali kokoba kobika pe kosumuka mokolo na mokolo, nzonkande, Yesu azali Mwana-Mpate na Nzambe, Oyo alongola libela masumu ma mokili manso.
Tobandi kobika na kosumuka na mokili oyo banda tango na botama nabiso. Tozali kosumuka banda botama nabiso, tope té? —Tozalaka yango.— Tokenda na kati na nzela wana. Banda botama na biso tii mbula 10, tosumukaka, tope té?    —Tosumukaka.— Bongo, masumu mana malelekaki na nzoto na Yesu, tope té? —Malekaki pe.— Lokola masumu manso malekaki na nzoto na Yesu, Azali Mobikisi na biso. Soki té, ndenge nini akokaki kozala Mobikisi mwa biso? Masumu manso malekaki na nzoto na Yesu.
Wuta mbula 11 tii mbula 20, tosumukaka, tope té? Tosumukaka na kati na mitema miabiso pena misala miabiso.... Tosalaka yango boye. Tokoki komikosa ète kosumuka té, kasi bosumuki ezali likambo lia banda kobotama.
Nzambe ayebisi biso ète masumu manso mana malekisama na nzoto na Yesu. Ayebaki ète tozali basumuki, nayango, alongolaki masumu manso liboso na tango.
Tobikaka na mokili oyo tango molayi ndenge nini? Toloba ète mbula 70 ya bomoyi ezali mingi. Soki tosangisi elongo masumu manso masalami na mbula 70 wana, mutuya pe mokumba monene ya ndenge nini ekozala? Soki totiyè yango na mutuka ya monene ya toni 8, tokozala ata mituka koleka 100 pona kumema yango.
Meka kokanisa motuya ya masumu boni tokosala na tango ya bomoyi bwabiso mobimba. Ezali masumu ma mokili tope té? Ezali eteni kaka na masumu ma mokili. Tosumukaka banda botama tii mbula 10, mbula10 tii mbula 20, mbula 20 tii mbula 30... tii mokolo mwa liwa, kasi masumu mana mazali na kati na masumu ma mokili maye malekisama libela na nzoto na Yesu na nzela na libatisi.
 

Mobikisi na Batò Banso, Yesu Kristo

Masumu boni Yesu alongolaki?
Masumu manso mabakoko babiso ya liboso, mabiso, pe maba koko sima nabiso tii suka mokili

Yesu ayebisaki biso ète Ayaki kopetola biso na masumu manso mana. Kasi Yesu amibatisaki Ye moke té, boye Nzambe atindaki mosali mwa Ye Yoane liboso, moponami, motali-elongi na batò. Ndenge ekomama, ‘Nkombo na Ye ekobengama Mokamwisi, Mopesi toli, Nzambe na nguya.’ Na nzela na Ye moko, na bwanya bwa Ye moko pena toli na Ye moko, Atindaki motalisi-elongi na batò liboso, pe Yesu Ye moko, Mwana na Nzambe, ayaki na nzoto kolongola masumu manso ma mokili. Ezali té lobiko ya kokamwisa wuta epayi na Nzambe mobikisi na makambo manso?
Ezali kokamwisa, boye té? Bongo, kaka na kobatisama na Yoane Mobatisi, Apetolaki batò banso na masumu katikati na mokili mobimba pe akangolaki moko na moko na lisumu na nzela na liwa na Kuruze, mbala moko pona libela. Akangolaki biso banso. Kanisa yango. Tika ète totala masumu mayo, banda mbula 20 tii mbula 30, banda mbula 30 tii mbula 40, banda mbula 40 tii mbula 60, banda mbula 70, tii mbula 100, elongo na oyo ya bana bayo. Masumu mana malogwama tope té? Boye, malongwama. Azali Yesu Kristo, Mobikisi na batò banso.
Lokola Yoane Mobatisi alekisaki masumu mabiso na Yesu, pe pwète Nzambe abongisaki boye, tokoki kokangwama kaka na nzela ya kondima Ye. Yo, nangai, tozali basumuki? Masumu mabiso manso malekaki na nzoto na Yesu tope té? —Tozali lisusu basumuki té, ata moke pwète masumu mabiso malongwama libela na Yesu.—
Nani akomeka koloba ète masumu mazali na kati na mokili oyo? Yesu alongola mosika na biso masumu manso ma mokili. Ayebaki ète, tokokaki kosumuka, pe pona yango, azuwaki masumu ma mikolo mikoya. Basusu kati-kati na biso nano bakokisi mbula 50 pe basusu nano babiki ata eteni ya kati-kati ya bomoyi na biso, kasi basusu kati-kati na biso bazali kobeta lisolo lia biso banso, ngai na kati, lokola tokobika pona libela na mokili oyo té. Ebele na batò kati-kati na biso bazali kobika bomoyi ezanga alima. Tika ète natalisa bino nzela oyo. Oyo ezali ndambo ya kati-kati ya molayi ya bomoyi na nyama moke oyo apumbwaka ezali nini? Ezali kaka ngonga 12 ya pamba.
“Nzambe na ngai! Nakutana na motò songol, pena motò pakala, pe alingaki koboma ngai! Nazalaki pene na liwa, pe esengeli oyeba, nano nakutana na motò ya mabe lokolo ye té na bomoyi bwa ngai.” Nyama ya moke oyo azalaki kaka na ngonga 12 ya bomoyi pe atikaka té kolobela lisolo lia bomoyi naye. Kasi tala kaka, asi kolekisa kati-kati ya molayi na bomoyi bwaye.
Na ngonga 7 tope 8 na bokwa, akomi na bokwa na bomoyi bwaye, pe tango moke kaka na sima, akufi naye. Banyamba ya mike mike bana basusu babika tii na molayi ya bomoyi ya ngonga 20, basusu ngonga 21, pe basusu, na ngambo, bakoma na ngonga 24, ya bomoyi na bango. Bazali kobeta lisolo lia bomoyi na bango ya molayi liboso na miso nabango, kasi ezali komonana lokola nini pona biso? Lokola tobikaka tii mbula 70, tope mbula 80, tokoki koloba ète, “Tika kosekisa ngai.” Bomoyi na bango ezali eloko té liboso miso na biso.
Tika ète tosala eloko moko-moko wana, na bofandi elongo bwabiso na Nzambe. Nzambe azali Ya seko na seko. Abika pona libela na libela. Akatalaka ndelo ya ebandeli pena ya suka ya mokili. Lokola abikaka libeka na libela, Abikaka pona seko na seko, likolo na tango ya libela na libela. Atalaka biso na esika na Ye ya likolo, ya libela na libela.
Mbala moko, Alongolaki masumu manso ma mokili, akufaki na Kuruze, pe alobaki, “Ekokisami.” Asekwaki na mokolo mwa misatu pe amataki na Lola. Siko’oyo afandi pona seko na seko. Sik’oyo azali kotala nasè pona komona moko na moko na biso.
Motò moko akoki koloba ète, “O, molingami, nasumukaki mingi. Ata nabikaki kaka mbula 20 pamba, nasumukaki mingi koleka.” “Nabikaki mbula 30, pe nasumukaki mingi. Ezali mingi koleka. Ndenge nini nakoki kosala peto?”
Kasi Nkolo na kati bozaleli bwa seko na seko akoki koloba ète, “Tika kosekisa ngai. Napesaki yo bosomi bwa masumu mayo tii sik’oyo, kasi pe masumu ma bakoko bayo liboso obotama, pena na masumu ma bikeke na bikeke ya bana na bana nayo bakobika, sima na liwa nayo.” Alobeli yo boye wuta kiti na Ye ya seko na seko. Ondimi yango? Ndima sè kondima pe okozuwa likabo lia lobiko ofele. Kota na kati na bokonzi bwa Lola.
Komikanga té na makanisi mayo, kasi ndima maloba ma Nzambe. ‘Esengeli pona biso tokokisa boyengembene nyonso.’ Mwana-Mpate na Nzambe oyo alongola mosiki, masumu ma mokili, akokisaki boyengembene nyonso. Yesu alongolaki masumu manso ma mokili. Asalaki yango, tope té? Asalaki yango.

Yesu alobaki nini liboso Na kokata pema na Ye na Kuruze?
“Ekokisami.”

Yesu Kristo alongolaki masumu manso ma mokili na nzela ya libatisi lia Ye, bakatelaki Ye etumbu ya liwa na katina na esambiselo ya Pontius Pilate pe akufaki na Kuruze.
“Ye moko amemaki kuruse na Ye, abimi na mboka pona kokende na esika ebengani “Mokuwa na Mutu”, oyo ebengani na monoko na Ba-Yuda, “Golgotha”, kuna nde esika basoda batiaki Ye na kuruze, elongo na batò mibale, moko ngambo na ngambo, pe Yesu kati-kati. Sik’oyo Pilate akomaki libaya pe atiyaki yango na Kuruze. Pe makomi ezalaki: YESU WA NAZARETE, MOKINZI YA BA-YUDA. Ba-Yuda mingi batangaki libaya lina, pwète bisika bamaki Ye, ezalaki pene na mboka; pe ekomama na monoko na Ba-Yuda, Ba-Kéléké, na Ba-Romén” (Yoane 19:17-20).
Totala nini elekaki na sima koboma Ye na Kuruze. “Sima na yango, lokola Yesu ayebaki ète makambo manso makokisami, ète Makomi makokisama.” Alongolaki mosika na biso masumu manso kolandisama na Makomi. “Alobaki, ‘Nayoki posa ya bomela mayi!’ Sik’oyo, kopo moko ezalaki wana etonda na vinu ya ngayi; basoda bazuwaki linuka na vinu ya ngayi, bakangi yango na na mwa-nzete ya izope, pe batiyi yango na monoko na Ye. Bongo tango Yesu azuki vinu ya ngayi, Alobi, ‘Ekokisami!’ pe alalisi mutu na Ye, Asongisi molimo mwa Ye” (Yoane 19:28-30).
Nasima kozuwa vinu ya ngayi, Agangaki na mongongo makasi ète, “Ekokisami!” pe Alalisi mutu na Ye pe Akufaki. Natango oyo Akufaki. Yesu Kristo Asekwaki na mokolo ya misatu pe, Amataki Lola.
Totala nano na mokanda na Ba-Ebré 10:1-9. “Mobeko ya Moize ememelaki batò makambo ya solo benza té, kasi ezalaki kaka kolaki elili ya bolamu oyo esengelaki koya. Mibeko ekoki té kobongiza batò oyo balingi kopusana pene-pene na Nzambe. Yango wana mbula na mbula bapesaka kaka mabonza ya ndenge moko. Soki batò oyo basambelaka Nzambe ndenge wana bazwaki bolimbisi ya solo, mbele balingaki koyeba ète, bazalaki na masumu lisusu té, pe bakokaki kotika libela kopesa mbeka. Kasi mbula na mbula bango basengelaki kopesa mabonza mana, po bakanisaka masumu na bango. Pamba té, makila ya bangombe to ya bataba, ekoki kolongola masumu ata moke té. Yango wana, tango Kristo ayaki awa nasè, alobaki na Nzambe boye: Mabonza nyonso oyo bapesaka yo, olingaka yango té; kasi opesaki Ngai nzoto. Osepelaki té na banyama oyo bazikiselaka Yo, to oyo bapesaka pona masumu. Bongo nalobi: ‘Tala nayè pona kosala makambo oyo yo olingi, ndenge ekomama pona Ngai na mokanda ya Mibeko. Libozo Alobi:”Mabonza nyonso oyo bapesaka Yo, ezala banyama oyo bazikiselaka Yo, tope, oyo bapesaka pona masumu, olingi yango té; atako bapesaka yango ndenge Mibeko ezali kotinda, bongo Abakisi, ‘Tala nayé, pona kosala oyo Olingi, o Nzambe nangai.’ Yango elakisi ète Kristo alongoli ndenge yakala ya kosambela, pe Abandi ndenge yasika.”
 

Bosomi Bwa Seko na Seko

Ndenge nini tokoki tosilisa likambo lia lisumu lia mokolo na mokolo, sima kondimela Yesu?
Nakotatola ète Yesu alongolaki masumu manso libela na nzela na libatisi lia Ye

Mobeko, na maloba mosusu, mabongisi ma mbeka, mazalaki elili ya makambo kitoko yakoya. Mbeka ya Boyokani bwa Kala, ya bameme, na bataba, ezali kotalisa biso ète Yesu Kristo alongolaki mosiki na biso, masumu mabiso manso ndenge moko pona kolimwisa yango libela.
Batò banso na Boyokani bwa Kala, David, Abraham, na bamosusu, bayebaki pe bandimaki oyo libongisi lia mbeka elingaki koloba bona bango. Etalisi ète Masiya, Kristo (Kristo elingi koloba ‘Mokonzi Mopakolami’) akoya mokolo moko kolongola mosika, masumu mabango manso. Bandimaki bosomi bwabango, pe babikisama na kondima nabango.
Mobeko mozalaki elili ya makambo kitoko yakoya. Bopesi bwa mbeka, pona masumu mabango ma mikolo na mikolo, mbula na mbula, mokokaki ata moke té, kopesa bango bosomi bwa solo. Ponayango, Oyo atonda na bozaleli bwa seko na seko, Oyo azangi lisumu, Mwana na Nzambe ayaki na mokili.
Yesu alobaki ète, Ayaki pona kosala mokano mwa Tata na Ye, lokola ekomami na Mokanda, oyo molobela pona Ye. “Pe Alobi ète, ‘Tala, Nayè pona kosala mokano mwa Yo, O Nzambe.’ Alongolaki oyo yayambo pwète Atiya oyo yasika.” Tozuwi bosomi bwa masumu ma biso manso pwète Yesu Kristo alongolaki yango mosika, lokola ekomami na Boyokani bwa Kala, pe pwète tondimeli Ye.
Totanga nano Ba-Ebré 10:10. “Ya solo, Yesu Kristo akokisaki makambo oyo Nzambe alingaki; awa amipesaki mbala moko, akomisaki biso batò ya bosantu.” Na kolinga na Ye, tobulisami na nzela ya libonza lia nzoto na Yesu Kristo, mbala moko pona nyonso. Tosantima tope té?              —Tosantisami.—
Oyo elingi koloba nini? Nzambe Tata atindaki Mwana mwa Ye kolongola mosika, masumu na nzoto na Ye, na nzela na libatisi. Ayambaki Ye pe Asambisaki Ye mbala moko, pona masumu manso na Kuruze. Ezalaki mokano bwa Nzambe.
Pona kobikisa biso, Yesu amipesaki lokola mbeka ya seko, mbala moko pona nyonso, pwète tosantisama. Tobulisami pwète Yesu amipesaki mbeka pona masumu mabiso manso pe Akufaki pona biso, po tosambisama té.
Mbeka ya Mokano mwa Kala ezalaki ya mokolo na mokolo, pwète masumu manso ma mikolo na mikolo, masengelaki mbeka mosusu pona kolongwama mosika.
 
 

Bolimbolisi bwa Molimo bwa Yesu Kosokola Piere Makolo


Ezali na masumu mosusu oyo tosengeli kobelela bolimbisi na mbeka?

Na Yoane 13, ezali na lisolo lia Yesu kosola Piere makolo maye. Asokolaki makolo ma Piere pona kotalisa ye ète, Piere akosumuka na mikolo yekoya pena kotangisa ye ète Asilisi kopesa ye bosomi pona masumu manso mana. Yesu ayebaki ète Piere akosumuka na mikolo mia sima, boye asopaki mayi na kati na sani, pe asokolaki ye makolo maye.
Piere amekaki koboya, kasi Yesu alobaki nay a ète, “Likambo lie nazali kosala, okoki kososola yango sik’oyo, kasi okoyeba yango, sima.” Molongo oyo elingi koloba ète, ‘Okosumuka lisusu, nasima yango. Okoboya Ngai, pena kosumuka lisusu sima Nasokoli masumu mayo manso. Okosumuka na sima na Ngai konyetolama. Bongo, nasokoli yo makolo, pona kokebisa yo na Satana akomeka yo, pwète Nalongoli libela masumu mayo mosika nayo, ata maye ya mikolo mikoya.’
Okanisi ète Asokolaki makolo ma Piere, pona koyebisa biso ète, esengeli tosengaka bolimbisi na mbeka mokolo na mokolo? Té. Soki tosengeli kosenga kotubela mokolo na mokolo, elingi koloba ète Yesu alongolaki masumu manso té mbala moko pona nyonso.
Kasi Yesu alobayi ète Asantisi biso libela na libela. Soki tosengama kotubela mokolo na mokolo, ekozala malamu pe tosonga na Boyokani bwa Kala. Boye, nani akoki kozala moyengembeni? Nani akoki kozuwa bosomi nyonso? Ata tondimeli Nzambe, nani akoki kobika na kozanga kosala masumu?
Nani akoki kosantisama na kotubela, na kopesa mbeka ya masumu? Tosumukaka napete mikolo nyonso, bongo ndenge nini tokoki kosenga bolimbisi pona lisumu moko na moko mokolo na mokolo? Ndenge nini tokoki kosimbama, pe kotungisa Ye mokolo na mokolo pona bosomi bwa biso? Tobosanaka masumu ma tongo na pokwa nyonso, pe oyo ya pokwa, tobosanaka yango na tongo ekoya. Nzela ezali té pona biso kotubela pona masumu mabiso manso.
Ponayango, Yesu abatisamaki mbala moko, pe Amibesaki na Kuruze mbala moko, pwète tosantisama mbala moko, pona nyonso. Tokoki kososola yango? Topesamela bosomi, pona masumu mabiso manso mbala moko pona nyonso. Bosomi ezali mbala moko, mbala myonso oyo tosali kotubela té.
Tobikisami na masumu mabiso nakondima ète Yesu alongolaki masumu mabiso manso, mayo na mangai.
“Mokolo na mokolo banganga-Nzambe nyonso bakokisaka mosala na bango, tango nyonso bapesaka bobele, mabonza ma ndenge moko, oyo ekoki kolongola masumu ya batò, ata moke té. Nzokande Kristo apesaki bobele libonza moko, pona kolongola masumu libela. Siko’oyo afandi na esika ya lokumu penepene ya Nzambe, azali kozela mokolo Nzambe akotia banguna Ba Ye nasè ya makolo na Ye. Boye, na nguya na libonza sè moko lina. Kristo akomisi batò na Ye bosantu, Akomisi bango libela batò yakokoka. Molimo Mosantu nde motò azali kolakisa biso yango, pamba té alobi boye, ‘Boyokani oyo nakosala na bango sima ya mikolo, elobi Nkolo: Nakotiya mibeko na ngai na mitu na bango. Masumu mabango pe mabe na bango Nakokanisa yango lisusu té.’ Bongo soki Nzambe alimbisi masumu ya batò libela, tina ya kopesa mabonza pona masumu ezali lisusu té” (Ba-Ebré 10:11-18).
Elingi koloba nini, “Sik’oyo esika bolimbisi masumu ezali” na molongo mwa18, likolo? Elingi koloba ète lisumu ata moko, moke té ezangi, manso malongwama. Nzambe alongolaki yango nyonso pe alimbisi biso banso. Ondimi yango? “Sik’oyo esika bolimbisi ezali, kopesa mbeka pona lisumu ezali lisusu té.”
Totala yango na nzela ya mokuse. Soki Yoane Mobatisi atiyaki maboko maye na Yesu, na maloba mosusu, soki abatisaki Yesu té, tokokaki kozuwa bosomi? Té, ata moke té! Tozonga sima, moke. Soki Yesu aponaki Yoane Mobatisi té, lokola motalisi-elongi ya batò banso pe kolongola masumu manso mosika na nzela naye, Akokaki kolongola masumu manso mabiso mosika? Akokaki té.
Mobeko mwa Nzambe mozali mwa solo. Mozali sembo. Akokaki koloba kaka Azali Mobikisi na biso, pe Alongoli mosika masumu mabiso. Akokaki kolongola masumu na nzela mosusu. Pona nini Yesu, Nzambe, Ayaki na nzoto? Ayaki pwète alongola masumu ma batò na nzela ya libatisi lia Ye. Yesu ayebaki malamu ète masumu ma mitema mia biso pe ma nzoto makokaki té kolongwama soki Ayaki té na nzoto, pona komipesa lokola mbeka ya seko na seko.
Soki Yesu abatimaki té, masumu mabiso matikala libela na biso moko. Akokaki kokufa na Kuruze, soki alongolaki té yambo masumu mabiso na nzoto na Ye, liwa lia Ye ekoka kosala mosala ya punda. Ekokaki kosalela biso eloko moko té. Ekokaki kozala mosala ya pamba.
Bongo, tango Abandaki mosala mwa Ye liboso na miso ya batò na Mbula ya botama 30, Akendaki epayi na Yoane Mobatisi, na Yordané kobatisama. Mosala mwa Ye katikati na batò, mobandaki na mbula ya botama 30 pe mosukaki na mbula 33. Tango Azalaki na 30, Akendaki kokutana na Yoane Mobatisi, pona kobatisama naye. “Tika ète ezala bongo sik’oyo, pwète ezali oyo esengeli pona biso kosalama pwète batò babikisama, pe bansantisama. Ezali ndenge ya malamu ya biso kosala makambo. Sik’oyo, batisa Ngai.” Boye, Yesu Kristo abatisama pona bosomi bwa batò banso.
Banda Yesu abatisama pe alongolaki masumu manso mabiso mosika, pe lokola masumu mabiso malekaki na nzoto na Ye na nzela na botiyè bwa maboko na mutu na Ye na Yoane Mobatisi, Nzambe Ye moko aboyaki kotala Ye tango Azalaki kokufa na Kuruze. Ata Yesu azalaki Mwana mwa Ye ya bomoko, Apesaki Mwana na Ye lokola mbeka.
Nzambe azali bolingo, kasi Atikaki Mwana mwa Ye kokufa. Boye, ngonga misato, butu akoma likolo na mboka mobimba. Yesu agangaki na mongongo makasi liboso kufa ète, “Eli, Eli, lama sabachthani?” oyo elingi kolaba, “Nzambe nangai, pona nini otiki Ngai?” Yesu amemaki na mapeka ma Ye masumu mabiso manso, pe etumbu na masumu mabiso manso makwayaki likolo na Ye na Kuruze, pona kobikasi biso banso. Soki libatisi lia Yesu té, liwa lia Ye likokaki kozala mosala ya punda.

Ozali mosumuki tope moyengembeni?
Moyengembene oyo azangi lisumu ata moko nakati na motema

Soki Yesu akufaki na Kuruze na kozanga kolongola mosika, masumu manso na nzela ya libatisi lia Ye, liwa lia Ye akokaki kokokisa bosomi té. Pona kokokisa bosomi bwabiso, Yesu abatisami na Yoane, motalisi-elongi na batò, pe etumbu ekweyelaki ye na Kuruze pwète baye banso bandimeli Ye babikisama.
Ponanyango, wuta mikolo mia Yoane Mobatisi tii sik’oyo, bokonzi bwa Lola bozali kokotama na makisi. Lokola Yoane Mobatisi alongolaki masumu ma mokili bobimba na nzoto na Yesu, masumu mabiso malongwama libela. Yo, nangai tokoki kobenga sik’oyo, Nzambe Tata na biso pe kokota na esengo nyonso na Lola.
Na mokanda mwa ya Ba-Ebré 10:18, “Sik’oyo bolimbisi bwa masumu bozali, mbeka ya bolimbisi esengami lisusu té.” Ozali kaka mosumuki? Sik’oyo Yesu afutaki libela, nyongo ya masumu ma biso, esengeli ofuta pona na yango lisusu?
Ezalaki na motò moko oyo komela masanga ekomisi ye na nyongo monene na batò mingi. Mokolo moko, mwana naye azuwaki mbongo ebele, pe afutelaki tata naye nyongo nyonso. Tata naye akozala lisusu na nyongo té aka monene mwa nyongo mwaye mozalaki na nzela yakosila té.
Oyo nde eloko Yesu asala pona biso. Afuta nyongo na biso kolela ndelo na yango liboso pe, pona libela, Afuta pona masumu mabiso manso. Kaka té masumu mabomoyi mwabiso, kasi masumu ma mokili mobimba, elongo. Masumu manso mana, nalekaki na nzoto na Yesu tango abatisamaki. Boye, ozali mosumuki lisusu té? Té, ozali mosumuki lisusu té.
Soki toyebaki sango-malamu oyo ya bosomi banda ebandeli, mbala boni ekokaki kozala pona biso esengo monene kondimela Yesu. Kasi lokala ezali, likambo oyo ezali ya sika, peya kokamwisa batò ebele likolo na yango, ezali pasi mingi pwète bandimela yango.
Kasi eloko ya sika ezali té. Ezali likambo esili kosalema kala banda kala pona lobiko lia batò awa nasè. Biso nde toyebaki yango, nano té. Sango-malamu ya mayi na Molimo, ekomami pena kati na Makomi Masantu, pe ezali bosolo. Ezalaki wana tango nyonso. Ezalaki na Biblia liboso, yo nangai kobotama. Ezalaki wana banda mokili oyo ekelama.
 
 
Sango-Malamu ya Bosomi bwa Seko na Seko

Nini tosengeli kosala biboso na Nzambe?
Tosengeli kondima sango-malamu ya bosomi bwa seko na seko.

Yesu Kristo, oyo apetolaki biso na masumu mabiso, Asalaki yango pona yo nangai, liboso na botama nabiso. Alongolaki yango nyonso mosika nabiso. Ozali lisusu mosumuki? —Té.— Sik’oyo ekozala ndenge nini pona masumu maye okosala lobi ekoya? Masumu mama mazali, pena kati ya lisumu lia mokili.
Tosilana na masumu ma lobi ekoya, sik’oyo. Masumu tosalaki tii mokolo mwa lelo, mazalaki kati-kati na lisumu lia mokili, boye té? Malekisama mosika na biso, na nzoto na Yesu, tope nano té? Boye, malekisama mosika na biso, lebela.
Bongo, masumu ma lobi ekoya, malekaki mango pena nzoto na Ye? Boye; Azuwa masumu manso, ata moke té etikalaki. Atikaki té lisumu moko té, na sima na Ye. Sango-malamu etalisi biso kondima na motema nyonso ète Yesu, Alongolaki mosika nabiso masumu manso, mbala moko, pe afuta nyongo nayango libela.
‘Ebandeli na sango-malamu ya Yesu Kristo, Mwana na Nzambe’ (Marko 1:1). Sango-malamu ya Lola ezali sango ya esengo mingi. Atuni biso, “Nalogola masumu mabino mosika. Nazali Mobikisi mwabino. Bondimeli Ngai?” Kati-kati na ebele ya batò, kaka moke nde bayanoli, “Boye, nandimi. Nadimi lokola Olobaki yango nabiso. Ezalaki pete mingi kososola yango mbala moko.” Baye batatoli kondima na bango boye bakomi bayengembeni lokola Abraham.
Kasi basusu balobaki ète, “Nakoki kondima yango té. Ezali lisolo lia sika pe ya ndenge mosusu pona ngai.”
Sima, atuni, yebisa Ngai kaka, “Yebisa Ngai kaka, Nalongolaki masumu manso tope té?”
“Bayebisa ngai ète Olongolaki kaka mausmu mabotama, kasi oyo ya mokolo na mokolo té.”
“Namoni ète ozali kondima nayo esuki na ndenge nayo ya komonela makambo ndenge bayebisaki yo. Okokende lifelo pwète Nazali na eloko moko té ya kosala nayo.”
Kondima na bosomi mobimba ebikisi biso. Baye banso bazali kokoba kokanisa kozala na masumu bakokende lifelo. Baponi bango moko nzela na bango moko.
Sango-malamu ya bosomi, ebandi na litatoli lia Yoane Mobatisi. Wuta Yesu alongolaki masumu manso mosiki na biso, na nzela na llibatisi na Yoane Mobatisi, tokomi basantu tango tondimeli Yesu.
Ntoma Polo alobaki likolo na libatisi lia Yesu, na mikanda miaye. Nakati na Ba-Galaté 3:27, “Pwète lokolo mingi na bino babatisamaki na kati na Kristo, bolataki Kristo.” ‘Kobatisama na kati na Kristo ezali kozala na bomoko na Kristo na nzela na kondima libatisi lia Ye. Tango Yesu abatisamaki, masumu manso mabiso malekaki na nzoto na Ye na nzela na Yoane Mobatisi, pe malongwamaki libela.
Na 1 Piere 3:21, “Ezali pe na botalisi nzoto moko bozali kobikisa biso sik’oyo, na nkombo na libatisi (ezali té bolongoli bwa mabe ma nzoto, kasi eyano na motema malamu ebayi na Nzambe), na nzela ya lisekwa lia Yesu Kristo.”
Kaka baye bandimeli litatoli lia Yoane Mobatisi, libatisi lia Yesu pe na makila na Kuruze bango nde bazali na ngolu ya bosomi bwa likolo.
Yambo libatisi lia Yesu lokola botalisi nzoto ya lobiko kati na mitema mayo pe okobikisama.