(Barome 8:28-30)“Mpe toyebi malamu ete kati na makambo nyonso, Nzambe asalaka mpo na bolamu ya bato oyo balingaka Ye, ba-oyo babengama kolanda mabongisi na Ye. Pamba te bato oyo Nzambe ayeba wuta kala, abongisa mpe bango wuta kala mpo ete bakokana na Mwana na Ye, mpo ete azala Mwana ya liboso kati na bandeko ebele. Mpe ba-oyo abongisa wuta kala, abenga mpe bango; ba-oyo abenga, akomisa bango bato ya sembo; mpe ba-oyo akomisa bato ya sembo, apesa bango mpe nkembo na Ye.”
Nzambe aponaki kaka Bato moke kati na biso?
Te. Aponaki biso banso na kati Na Yesu-Klisto.
Mabongisi ma Nzambe na boponami bwa Ye kolandisama na mateya ma kelasi ya makambo ma Nzambe, oyo ezali moko na efandelo ya malongi na kati ya malaki ma Bo-Klisto, makumbaki bato ebele baye balingaki kondimela Yesu na bozangi boyokani bwa liloba lia Nzambe. Mateya mana mamemaki mobulu mingi.
Malakisi mana mazali koloba ete na kati ya mabongisi ma Nzambe Aponaki baye Ye alingaki mpe Akatelaki etumbo baye Alingaki te. Elingi koloba ete baye baponami babotami mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo mpe bandimelami kokota Lola tango oyo baye baponami te babongisami pona kosuka na lifelo.
Soki Nzambe aponaki kaka bato moke kati-kati na biso, tokoki kozanga komitungisa te na motuna oyo, “Toponamaki pona lobiko?” Soki toponamaki te, ezali mosala mwa mpunda kondimela Yesu. Bongo mateya maye matiye bato na kati na komituna soki baponami na Nzambe kaka na kondima yango moko.
Soki tondimeli yango ndenge nini tokoki kokangolama na tembe mpe kondimela kaka Nzambe? Ndenge nini tokofandisa ete Nzambe aponaki biso solo-solo? Akozala Nzambe kaka pona baponami, ata Alobi ete, “Nzambe azali kaka ya Na-Juda? Azali mpe te Nzambe na biko mosusu? Boye, Azali mpe Nzambe ya bikolo mosusus.” (Barome 3:29).
Pwete bato ebele bazangi bososoli malamu ya mabongisi mpe boponami bwa Nzambe, yango nde bazali kobanga bakobebisama ata bandimeli Yesu.
Ba-Efeso 1:3-5 elobi, “Tika ete lokumu epesamela Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo apesi biso kati na bisika ya Likolo, mapamboli nyonso ya Molimo kati na Klisto. Pamba te, kati na Klisto, apona biso liboso ete akela mokili, mpo ete tozala bato ya bule mpe bazanga pamela na miso na Ye. Kati na bolingo na Ye, abongisa biso wuta kala mpo ete tozwa makoki ya kokoma bana na Ye na nzela ya Yesu-Klisto, kolanda bolamu mpe mokano na Ye moko.”
Bongo tosengeli kotala mbala ya mibale mayebisi ma kelasi na botangi bonzambe likolo na mabongisi mpe boponami bwa Nzambe. Tobengami yambo kososola oyo Mokanda mwa Nzambe molobi pona mabongisi mpe boponami bwa Nzambe na kokolisa kondima na biso kati na lobiko na nzela ya mayi mpe na Molimo.
Mokanda mwa Barome moyebisi biso nini? Balakisi mosusu ba makambo ma Nzambe bazali kobimisa mayebisi mosusu ezanga moboko likolo na “boponami ezangi bomipesi.” Botangi na makambo ma Nzambe ezali Nzambe oyo asali yango. Bongo, botangi makambo ma Nzambe yango moko na mayele ya bomoto ezali te likambo ya Nzambe.
Ata liboso ya bokelami bwa mokili, Nzambe aponaki bato banso kati na Yesu-Klisto mpe abongisaki makanisi ma Ye pona kobikisa biso banso na nzela ya kokomisa biso bayengebene. Yesu alingi biso banso na bokeseni ata moke te. Kosala Nzambe na biso, Nzambe moponi ya bilongi mibale te. Baye baboyi kondima be batiye kondima na bango na makanisi na bango, kasi bandimi batiye kondima na bango kati na liloba lia Nzambe.
BOPONAMI NA NZAMBE KATI NA BOYOKANI BWA KALA
Mayebisi na boponami ezanga Bomipesi ezali ya solo?
Te. Nzambe na biso azali na makanisi ya kokangama te. Aboni basumiki banso kati na Yesu, Kaka te baponami moke.
Na Ebandeli 25:21-26, tokoki to tanga lisolo lia bana mibale ba Izak, Ezau na Jacob. Nzambe aponaki Jacob tango oyo bana mibale wana bazali na kati na libumu na mama na bango.
Baye bazangi bososoli bwa liloba lia Nzambe, bazuwaki oyo lokola moboko mwa mayebisi ma boponami bozangi bomipesi. Ezali lokola kosangisa Nzambe moko ya pwasa kati na Bo-Klisto.
Soki tondimi ete Nzambe abopanaki biso na moboko mwa “boponami bozangi bomipesi” mpe libanda na Yesu-Klisto, bongo ezali ndenge moko tofukamela Nzambe moko ya pwasa mpe bikeko. Soki tokoki kondimela Nzambe moko ya pwasa, tokoboya libongisi lia Nzambe pona biso mpe tokokweya na motambo mwa Satana.
Soki bato batosi te mokano mwa Nzambe, bongo bazali eloko moko te. Bakomi kaka lokola banyama babongisami pona kufa. Lokola biso bandimi tozali te ndenge ya banyama, tobengami kozala bandimi ya solo mpe kondimela bosolo oyo ekomami na Mokanda mwa Nzambe. Koboya kokanisa liboso makomi ya masolo ma Mokanda mwa Nzambe ezali komikaba na Satana.
Pona kozala na kondima ya solo, tosengeli yambo kokanisa bosolo oyo ekomami na kati na Mokanda mwa Nzambe mpe kolanda kondima ya baye babotami mbala ya mibale kati na Klisto.
Balandi ba Calvin bazali kotiya sete na lobiko ya ndelo. Yango elingi koloba ete bolingo bwa Nzambe mpe lobiko na Nkolo ezali pona bato mosusu te. Likambo lina likoki kozala ya solo?
Mokanda mwa Nzambe molobi, “Posa na Nzambe ezali ete bato banso babika” (1 Timote 2:4). Soki lipamboli lia lobiko ekoki kosalema kaka pona na bato moko boye, bandimi ebele bakotika kondimela Yesu. Nasima na nyonso, nani akolinga kondimela Nzambe ya kopona bilongi na ndenge wana?
Tosengeli kosala na elikia ete Nzambe na biso aponaka bilongi te. Azali Nzambe na Bosolo, Bolingo, mpe Boyengebene. Tobengami kondimela Yesu mpe na sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo mpe na ndenge wana tobikisama na masumu ma biso manso. Yesu azali Mobikisi ya baye banso babotami mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo.
Kolandisama na balandi ba Calvin, soki ezalaki na bato zomi, ezali kaka bango oyo babikisama na Nzambe mpe bamosusu bakotikala pona kotumbama na moto ya lifelo. Oyo ezali solo te.
Ezangi moyebi koloba ete Nzambe alingi bato mosusu mpe ayini bamosusu. Kanisa Nzambe azali na esika oyo lelo na biso. Soki azuwi mokano mwa kopona baye bazali na loboko na Ye ya mobali mpe na kuzuwa mokano mwa Ye pona kobwaka baye banso bafandi na loboko na Ye ya mwasi na lifelo, tokoki komona Ye lisusu lokola Nzambe?
Baye babwakami bakotika kokanga mpe kobundisa likambo wana te? Bato banso bakoganga, “Ndenge nini Nzambe akoki kopona bilongi boye?” Boponami bozangi bomipesi ezali ya solo te pwete Nzambe aponaki bato banso kati na Yesu-Klisto.
Pona yango, moto nyonso oyo abengami na Nzambe na nkombo na Klisto azali moponami. Ndenge wana, nani oyo Nzambe abengi te epayi na Ye? Abengi masumuki, bayengebene te. Nzambe abengi te baye bazali komimona bango moko bayengebene. Lipamboli lia Nzambe lizali pona basumuki mpe pona baye bazali na etumbo ya lifelo.
Boponami elingi koloba ete Nzambe abengi basumuki pwete Akomisi bango bana ba Ye bayengebene.
NZAMBE AZALI MOYENGEBENE
Nzambe alingi kaka Baponami moke?
Te, Nkolo azali kopona bilongi te. Nzambe azali Moyengebene.
Nzambe azali Moyengebene. Azali te Nzambe oyo alingi kaka baponami bazangi bomipesi wana. Abengi basumuki na nkombo na Klisto. Libanda ya lobiko na nzela ya Yesu Kristu mpe na bolimbisi na Ye ya masumu, ndenge nini tokoki koyeba bolingo ya Nzambe mpe lobiko? Komeka te kosala Ye Nzambe moponi ya bilongi te.
Meka komona oyo ezangi tango ozali kotanga Ba-Efeso 1:3-5. “Tika ete lokumu epesamela Nzambe mpe Tata ya Yesu Klisto, Nkolo na biso, oyo apesi biso kati na bisika ya Likolo mapamboli nyonso ya Molimo kati na Klisto. Pamba te, kati na Klisto, apona biso liboso ete akela mokili, mpo ete tozala bato ya bule mpe bazanga pamela na miso na Ye. Kati na bolingo na Ye, abongisa biso wuta kala mpo ete tozwa makoki ya kokoma bana na Ye na nzela ya Yesu-Klisto, kolanda bolamu mpe mokano na Ye moko” Eloko nini ezangi? Oyo ezangi ezali “na kati na Yesu-Klisto.”
Boponami bozangi bomipesi na malakisi ma balandi ba Calvin ekokani te na maloba ma Mokanda mwa Nzambe. Mokanda mwa Nzambe molobi, “Aponaki biso kati na Yesu yambo mokili esalema.”
Nzambe aponaki bato banso kati na Klisto babotama mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Baye bakoki te, kasi babotami basumuki bapesalemi nzela ya kobikisama na masumu ma bango mpe kokoma bana ba Ye. Atiyaki bato banso na mokanda mwa baye babengami kobikisama mpe Aponaki bango kati na Yesu-Klisto.
Pwete balakisi ba makambo ma Nzambe baye bazali kobeta sete na boponami bozangi bomipesi, balobi ete kaka etani moke ya bato nde eponami, bato ebele bakoti na botungisami makanisi ya malakisi mana ya libungi. Balakisi wana ya lokuta balobi ete Nzambe aponi bamosusu mpe asondoli bamosusu na nzela ya boponami bozangi bomipesi, tango oyo liloba lia solo lia Nzambe lizali ete Aponi basumuki banso kati na Yesu. Bato ebele bazali kokweya na motambo mwa malakisi ma lokuta na makanisi na bango ya libungi na ndoto.
Yeba ete soki tososoli ete Nzambe azuwaki mokano mwa kobikisa bato banso na kati na Yesu, mpe bokangolami na masumu bozali pona bato banso baye bandimeli Yesu. Na kosala ndenge wana, tokoki kobikisama na masumu mabiso, kokoma bana ba Nzambe, kokoma bato na bosembo, kozuwa bomoyi bwa seko, mpe kotiya elikia ete Nzambe oyo azali Moyengebene.
BOPONAMI BWA NZAMBE NA LISOLO LIA JACOB NA EZAU
Nzambe aponaki nani? Kaka baponami wana?
Te. Nzambe aponaki bato banso kati na Klisto. Bongo, oyo nyonso andimeli Klisto azali na Masumu te na nzela ya libatisi lia Yesu Mpe azali moponami.
Na Ebandeli, 25:19-28, Esau na Jacob bazali kobunda kati na libumu lia mama na bango Rebeka. Nzambe alobaki na Ebandeli 25:23, “Yawe alobaki naye: ‘Bikolo mibale ezali kati na libumu na yo; ekolo moko ekoleka ekolo mosusu na makasi, mpe kulutu akosalela leki.’”
Basumuki babalukisaka maloba oyo na boyebi ya mabongisi mpe boponami bozangi bomipesi na Nzambe, na kotika baye bandimeli Yesu na kati na mobulu ya koyeba soki baponami tope te! Tango bamikanisi baponami, bazali kokanisa ete babikisami te mpe babungisi tina ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo.
Malakisi ma boponami bozangi bomipesi ememi bato ebele baye bandimeli Yesu mosika na lobiko mpe ekateli bango etumbo ya lifelo. Ezali mpe kotalisa Nzambe lokola moponi bilongi.
Pwete bateyi ebele balakisaka mayebisi ma lokuta maye mawuti na makanisi ma bango moko. Ebele ya bato bandimeli Yesu bakomi na tembe ya koyeba soki baponami tope soki lobiko na bango ebongisami libanda na bomipesi na bango.
Kati na Jacob na Esau, nani Nzambe aponaki? Aponaki Jacob kati na Yesu-Klisto. Na Barome 9:10-11, ekomami ete Nzambe abengaki Jacob esika na ndeko naye ya mobali ata bawutaki na moto moko, lokola nano babotami te, mpe nano basali eloko moko te ya malamu tope ya mabe.
Pona Nzambe alingaki kopona, pona misala mia ye malamu te, kasi pona boponami bwa Ye. Mokanda mwa Nzambe motalisi biso ete Yesu ayaki kobenga basumuki, pona ndenge oyo bazali na bomoyi ya malamu te.
Bato banso, lokola bana na Adam, babotama basumuki. David alobaki ete azali mosumuki oyo abotama wuta na libumu lia mama na ye na kati ya lisumu. “Nabotama na kati na lisumu, mpe na lisumu mama nagai ayambaki nagai kati na ye” (Bazembo 51:5).
Bato banso babotami lokola basumuki pona masumu ma bakoko na bango. Na ndenge wana, oyo nyonso abotami na mokili oyo libanda na kolinga na ye, azali mosumuki, azali kosala masumu, mpe amemi mbuma ya lisumu.
Mwana oyo nano asali nano masumu te azali mosumuki pwete abotami na mboto ya lisumu. Azali na makanisi ya mabe, ekobo, kindumba mpe koboma kati na motema mwa ye. Abotami na msumu ma bakoko baye. Bato banso bazali basumuki ata yambo babotama.
Tina oyo Nzambe asala biso na bolembu wana ezali boye. Bato bazali bikelamu bia Nzambe, kasi Nkolo abongisaki kosala biso bana ba Ye na nzela ya kobikisa biso na lisumu. Ezali pona yango Apesaki Adam na Eva nzela ya kosumuka.
Tango tokomi na suka basumuki, Nzambe atindaki Yesu na mokili, Apesaki Mwana na Ye moko nzela ya kolongola mosika masumu mabiso banso na nzela ya libatisi lia Ye.
Posa na Nzambe ezalaki ya kobikisa bato banso na nzela ya libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye na Kuruse mpe kopesa bango nguya ya kokoma bana ba Ye na nzela ya kondimela Yesu. Atikaki Adam kosumuka na elaka ya bolongoli masumu kati na Klisto.
Basumuki baye bandimeli malakisi ma lokuta balobaka, “Tala Jacob na Ezau. Aponaki moko mpe asundulaki mosusu pamba.” Nzambe abonaki biso na kotala bilongi te, kasi Aponaki biso kati na Yesu-Klisto. Tosengeli kaka kotala makomi na kati na Mokanda mwa Nzambe. Barome 9:10-12 elobi ete, “Esukaki kaka wana te: Rebeka mpe abotaki bana mibali mibale na nzela ya tata moko, Izaki, koko na biso. Nzokande, liboso ete mapasa yango babotama mpe basala likambo moko ya malamu to ya mabe, mpo ete mabongisi ya lolenge Nzambe aponaka ekokisama, kolanda misala ya bato te kasi kolanda mokano ya Ye oyo abengaka, Nzambe alobaki na Rebeka: ‘Kulutu akosalela leki.’”
Nzambe aponaki Jacob na kati na Yesu. Jacob azalaki elembo ya basumuki baye bakokaki te kobikisama na nzela ya boyengebene na bango. Ba-Efeso 1:4 elobi ete Nzambe aponaki biso na kati na Ye.
Nani abengani na Nzambe? Abengaki Jacob pwete Jacob ayebaki ete azalaki mosumuki mpe mobungi liboso na Nzambe mpe atiyaki elikia na ye na Nzambe. Abenga Jacob na nkombo ya Mwana na Ye moko Yesu mpe abikisaki ye na sango malamu ya mayi mpe na makila pona kosala ye mwana na Ye. Bongo, Nzambe abengaki Jacob mpe apambolaki ye na lobiko.
Abengaki basumuki pona kozala bango bayengemene na nzela na Yesu. Yango nde mabongisi ma Nzambe.
MAYEBESI MA LOKUTA MA BOPONAMI BOZANGI BOMIPESI
Pona nini Nzambe Alingaki Jacob?
Pwete Jacob ayebaki na Mabe ma ye.
Nawuti kotanga mokanda moko efandi na boponami bozangi bomipesi. Elenge mobali moko asalaki ndoto. Mwasi moko ya mokolo abimelaki ye na kati na ndoto mpe ayebisaki ye akenda esika moko, mpe akeyi. Na sima mwasi ya mokolo wana ayebisaki ye ete aponami na Nzambe.
Atunaki mwasi ya mokolo wana, ndenge nini Nzambe akoki kopona ye, andimeli Ye nano te? Ayebisaki ye ete Nzambe aponaka bato libanda na bomipesi bwa bango na bolembu na bango.
Oyo ezali solo te. Ndenge nini Nzambe akoki kokatela bato etumbo kaka boye mpe bakende na lifelo mpe kopona bamosusu pona lobiko? Nzambe aponaki bato banso na kati na Yesu.
Boponami bwa bato ya kelasi ya mayele ya boluki Nzambe oyo ezali kolongola Yesu ezali ya lokuta. Ezali ya solo te. Kasi batangisi ebele bazali kobeta sete ete Nzambe aponi bamosusu kati na biso. Oyo ezali solo te. Nzambe alingi kobikisa bato banso kati na Yesu. Kaka baye baboyi kondimela lobiko ya mayi mpe na Molimo kati na Yesu, bango nde bakobikisama te.
Nzambe abongiselaki bato banso lobiko kati na Mwana mwa Ye, Yesu mpe asalaki biso tokoma bana ba Ye liboso Akela mokili. Abongisaki kobikisa bato banso na masumu ma mokili na nzela ya lobiko na Yesu-Klisto. Yango nde bosolo ndenge ekomami na Mokanda mwa Nzambe.
Bayengebene baye babotami mbala ya mibale kati na Klisto bazali baponami. Kasi balakisi ya lokuta bazali kobeta sete ete Nzambe aponaka kaka bato moke kati-kati na biso. Balobi ete, lokola ndakisa, Ba-Budiste bazali kati-kati na baye Nzambe aponaki te. Kasi Nzambe aponaki bango mpe kati na Yesu.
Soki Nzambe aponi na bozangi bomipesi kaka bato moke libanda ya Yesu, tosengeli te koteya sango malamu. Soki Nzambe abongisaki kopona moto moko libanda na Yesu, basumuki bakozala te na posa ya kondimela Yesu. Ndenge nini bongo liloba lia Ye lia Bolingo, Bosolo, mpe bokangolami likokaki kokokisama?
Ekokaki kozala lisusu na tina basali ba Nzambe bateya sango malamu na mokili oyo? Ezali solo-solo na nzela koloba ete Nzambe asi aponi na bozangi bomipesi baye bakobikisama mpe abateli bamosusu pona etumbo libanda na Yesu?
Tina ya Nzambe kopona Jacob kati na Yesu, Alingaki Jacob mpe Ayinaki Ezau ezali ete Ayebeka liboso bakelama ete Jacob akondimela Yesu mpe Ezau akondimela Ye te.
Ezali na basumuki ebele kati na mokili oyo baye bandimeli Yesu. Bamosusu bazali lokola Ezau, mpe bamosusu bazali lokola Jacob.
Pona nini Nzambe alingaki Jacob? Jacob azalaki moto ya mabe mpe ayebaki mabe ma ye. Pona yango andimaki ete azalaki moto mabe liboso na Nzambe mpe asengaki mawa ma Ye. Ezali pona yango Nzambe abikisaki Jacob.
Kazi Ezau amikangaki mingi na ye moko koleka na Nkolo mpe azalaki te na posa ya ngolu na Nzambe. Bongo Nzambe alobaki ete Alingaki Jacob mpe ayinaki Ezau.
Yango nde liloba lia bosolo. Nzambe abongisaki biso banso pona lobiko kati na Yesu. Basumuki banso basengeli kondimela Yesu. Bongo, Bosolo mpe boyengebene bwa Nzambe bokofandisama kati na mitema mia bango. Biso basumuki tokoki kosala eloko te kasi kondimela na mitema nyonso kobikisama na kati na Yesu. Oyo tokoki kosala ezali kondimela na nzela na Yesu.
MALAKISI MA KOMISANTISA MOKE-MOKE YA LOKUTA
Ezali solo mosumuki akoki Komisantisa moke-moke?
Te. Ekoki kosalema te. Mbala moko, Nzambe abongoli basumuki bakomi bayengebene Na nzela ya lobiko lia libatisi lia Ye Mpe na liwa lia Ye na Kuruse.
Satana akosi basumuki na malakisi ma komisantisa moke-moke pwete bakangolama te na masumu ma bango. Komisantisa ya moke-moke elingi koloba ete basumuki bakoma moke-moke basantu na sima ya kondimela Yesu.
Malakisi mana matambolaka boye. Basumuki bakoki te kokoma bayengebene mbala moko pona libela kasi babikisami kaka na lisumu lia ebandeli tango bandimeli Yesu. Masumu ma mokolo na mokolo mazali kolongwama mosika na mabondeli ya kotubela mpe bato bazali kosantisama moke-moke.
Moto ya likambo ya malakisi mana ezali komisantisa moke-moke. Ezali likambo ya monene mpe ya pasi ete moto akoki kondimela Yesu, mpe kokoma Mo-Klisto mosantu moke-moke. Malakisi mana makotisi Ba-Klisto ebele na kati na lokuta ba mbula ebele, nako sala bango batikala na elikia wana. Ezali pona nini tozali na Ba-Klisto ya bosanto-koleka-yo kati na Bo-Klisto.
Bazali kokanisa ete mokolo moko bakobongwama mpe bakosumuka lisusu te. Kasi bazali kobika bomoyi lokola basumuki mpe bako sambisama liboso na Nzambe sima na liwa na bango.
Tanga bosolo kati na Mokanda mwa Nzambe. Na Barome 8:30, “Mpe ba-oyo Abongisa wuta kala, Abenga mpe bango; ba-oyo Abenga, Akomisa bango bato ya sembo; mpe ba-oyo Akomisa bato ya sembo, Apesa bango mpe nkembo na Ye.”
Mpe na molongo mwa 29, “Pamba te bato oyo Nzambe ayeba wuta kala, Abongisa mpe bango wuta kala mpo ete bakokana na Mwana na Ye, mpo ete Azala Mwana ya liboso kati na bandeko ebele.” Na kotala ya liboso, ezali lokola ezalaka na biteni pona kokoma moyengebene. Kasi Liloba litalisi biso ete boyengebene bopesamelaki biso mbala moko pona libela.
“Baye Abenga, Akomisabango sembo mpe.” Yesu abengi basumuki pona kokomisa bango bato na bosembo na nzela na libatisi lia Ye na Yordani mpe liwa lia Ye na Kuruse.
Pona yango, oyo nyonso andimeli lobiko kati na Yesu akomi mwana na Nzambe ya kembo. Ezali ngolu na Nzambe kobikisa basumuki mpe kopesa bango kembo na nkombo na Ye.
Yango nde Nzambe ayebisi biso. Kasi Ba-Klisto mosusu bayebisi biso Barome 8:30. “Ezali na miteni pona kokoma mosantu. Ezali kotalisi te tokobongwama moke-moke?” Ezali ndenge wana bazali kokosa. Bazali koyebisa bato ete na mikolo mikoya mosumuki wana akoma moyengebene.
Kasi Mokanda mwa Nzambe motalisi biso ete ezali na mikolo ekoya te, kazi na mikolo elekaki tokomisamaki bayengebene mbala moko pona libela. Ezali na bokesani mingi kati na mikolo mikoya na mikolo mileka.
Tosengeli kotosa Mokanda mwa Nzambe mobimba. Kolandisa na oyo ekomami, tokoki kokoma bana na Nzambe mbala moko pona libela. Ezali na bokesene mingi na malakisi ma kosantisama ya moke-moke.
Malakisi ma kosantisama ya moke-moke elobi ete kaka lisumu lia ebandeli nde bolimbisami tango tondimeli Yesu. Oyo elingi koloba ete tokoki kokoba na bomoyi ya losambo mpe kotubela masumu mabiso mokolo na mokolo, pwete tango tokotema liboso na Nzambe, tokoma bayengebene.
Pwete bato ebele bandimeli malakisi mana, batelemi mpe batikali basumuki, ata sima yakondimela Yesu. Ezali pona yango malakisi ma kosantisama moke-moke ezali ya solo ata moke te.
Mokanda mwa Nzambe motalisi biso polele ete tokomi bayengebene mpe bana na Nzambe na nzela na kondima. Kaka lokola bana mike bayaka na mokili, bana na Nzambe babulisami tango basosoli mpe bandimeli lobiko kati na Yesu. Malakisi ma lokuta ma komisantisa moke-moke mawutaki na lokuta.
BOKANGOLAMI YA MOBIMBA NA MASUMU MANSO
Tosengeli kosala nini Tokangolama ya mobimba?
Tosengeli kondima kati na lisiko lia Mayi na Molimo.
Barome 8:1-2 elobi ete, “Yango wana sik’oyo, etumbu ezali lisusu te mpo na bato oyo bazali kati na Yesu-Klisto. Pamba te kati na Yesu-Klisto, Mobeko ya Molimo oyo apesaka bomoi ekangoli ngai na bowumbu ya mobeko ya lisumu mpe ya kufa.” Oyo etalisi biso ete Nzambe asalaki basumuki banso bayengebene mpe Abisaki bango banso baye bayaki na Yesu wuta mobeko mpe liwa.
Mokanda mwa Nzambe motalisi biso lisolo lia lisiko lia mobimba na Ba-Ebre 9:12. “Akotaki mbala moko mpo na libela kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpe Abonzaki kuna makila ya bantaba te mpe ya bana ngombe te, kasi Abonzaki nde makila na Ye moko. Ezali ndenge wana nde Azwelaki biso lisiko ya libela.” Oyo elingi koloba ete biso baye tondimeli Yesu tokangolami mpe tozuwi nzela ya kokota Lola.
Toyokaki mpe tondimeli sango malamu ya lisiko na mayi mpe na Molimo kati na Yesu-Klisto mpe tolimbisami na masumu mabiso manso. Kasi basumuki baye bandimi ete balimbisami kaka lisumu lia ebandeli babikisami nano te ya mobimba. Pona kosantisama na masumu maye bazali kosala sima bandimeli Yesu, bazali kokanisa ete basengeli kotubela mokolo na mokolo.
Bozangi boyebi ya kondima na bango ya libungi ekomema bango na lifelo. Kondima na bango ya libungi ezali kotindika bango kotubela mokolo na mokolo pona kokangolama na masumu mabango manso. Ezali kondima ya solo oyo eko bikisa bango na lifelo.
Soki bandimaki kati na Yesu mpe basikolami mbala moko pona libela, bakokaki kokoma bayengene mpe bana na Nzambe. Lisiko lia solo lisalaka bandimi bayengebene mpe ekomisi bango bana na Nzambe mbala moko pona libela.
Ata bandimi bakangolami na masumu manso ma mokili, nzoto na bango ebaluki nano te tii liwa na bango. Kasi mitema mia bango mitondi na boyengebene bwa Nzambe. Tosengeli kozanga te kososola likambo lina.
Mokanda mwa Nzambe motalisi biso ete tosantisami mpe tokomi bayengebene tango tondimeli sango malamu.
Tozuwa mpe Ba-Ebre 10:9-14 pona kotala sango malamu ya solo. “Alobaki lisusu: ‘Tala nagai, nayei mpo na kosala mokano na Yo.’ Boye, alogolaki losambo ya liboso mpo na kotia losambo ya mibale. Mpe ezali mpo na mokano yango na Nzambe nde topetolamaka na masumu, na nzela ya mbeka ya nzoto na Ye moko Yesu-Klisto, oyo akabaki mbala moko mpo na libela. Mpo na kosala mosala naye ya banganga. Nganga-Nzambe nyonso azalaki kokende na esika na ye na mosala mokolo na mokolo, mpe azalaki kopesa mbala na mbala bambeka ya ndenge na ndenge moko oyo ezalaki kutu na makoki te ya kolongola masumu ya bato. Kasi sima na Klisto kobonza mbeka moko kaka mpo na masumu, avandi mpo na libela na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe. Wuta tango wana, azali kozela ete Nzambe akomisa banguna na Ye enyatelo makolo na Ye. Pamba te, na nzela ya likabo moko akomisaki bato ya kokoka mpo na libela, ba-oyo apetolaki na masumu.”
“Na mokano mwa ye tosantisamaki na nzela ya kobonza mbeka ya nzoto na Yesu-Klisto mbala moko pona libela.” Tala malamu ete molongo oyo mozali na tango elaka, ezali te na tango ekoya.
Pona kobulisama mobimba, biso banso tosengeli kondimela lisiko lia mayi mpe na Molimo oyo Yesu apesaki biso.
YESU APESAKI BISO LISIKO LIA SEKO MBALA MOKO PONA LIBELA
Pona nini moto asengeli kozala na esengo Tango nyonso? (1 Batesalonika 5:16)
Pwete Yesu alongolaki masumu manso maye, Akoki te kasi amikitisi liboso na Ye Mpe atondi Ye pona ngolu na Ye.
Soki tondimeli na lisiko lia libela kati na Yesu, tokomi bayengebene mbala moko pona libela. Mokanda mwa Nzambe molobi ete, “Bosepela tango nyonso, bobondela tango nyonso, na makambo nyonso botonda Nzambe” (1 Batesalonika 5:16-18).
Bosepela tango nyonso. Tokoki kosepela tango nyonso ndenge nini? Baye bazuwi bomoyi ya seko pona libela bakoki kosepela tango nyonso pwete bakangolami na masumu mabango. Bazali na kimia na koyeba ete Yesu alongolaki mosika masumu mabango kati na Yordani. Bamikitisi liboso na Ye pona ngolu na Ye mpe bakoki kaka kosepela tango nyonso.
“Bapambolama baye masumu mabango malimbisami, mpe baye masumu masipami” (Barome 4:7). Ezali koloba te masumu mabiso masipami ata mazali na kati ya mitema mia biso. Mitema mia biso misengeli kozala peto. Yesu asokolaki mosika na biso masumu mabiso mpe abikisaki biso mbala moko pona libela.
Lisiko liye lia libela ezali na Mokano mwa Sika. Tango Yesu abatisamaki, Alobaki, “Tika ete ezala bongo sikoyo, pwete yango ezali malamu pona biso kokokisa boyengebene nyonso.” (Matie 3:15).
Kaka lokola bantaba tope bameme balongolaki mosika masumu ma bato na kotiya maboko kati na Mokano mwa Kala, Yesu alongolaki masumu manso ma mokili mpe abulisa biso banso na ndenge ya malamu koleka.
“Ezali malamu pona biso kokokisa boyengebene nyonso,” elobi Yesu. Yesu abatisamaki na nzela ya malamu koleka pona kolongola mosika na nzela na Ye masumu manso ma biso, mpe kobikisa biso.
Na Matie 3:15, ekomami ete Yesu alongolaki mosika masumu manso ma mokili. Boyengeni bwa Nzambe botondaki. Tokoki te komeka kososola lisiko oyo lia seko. Tosengeli kozuwa yango lokola liloba lia lobiko. “Apambolama oyo masumu maye malimbisami, oyo masumu masipami” (Bazembo 32:1).
Masumu manso ma motema mpe ma nzoto, Yesu alongolaki yango mosika tango Abatisama na Yoane-Mobatasi na Mayi ma Yordani. Azambisamaki pona masumu tosalaki kati ya mokili oyo ya libungi na botomboki.
Sima Alongolaki mosika masumu mabiso manso, Akufaki na Kuruse. Oyo nyonso andimeli lisiko lia lisumu akoki kokoma moyengebene mpe na mabe lisusu te mbala moko pona libela. Pwete Yesu abikisi pona seko, oyo nyonso andimeli na lisiko lia Klisto atikali moyengebene.
Tokoki sikoyo kotema liboso na Nzambe na elikia nyonso mpe koloba ete, “Sango nini Nkolo? Nandimeli Mwana na Yo ya bomoko, Yesu-Klisto mpe nazali mpe mwana na Yo. Matondi Tata. Matondi pona kondima ngai lokola mwana na Yo. Ezali te pona misala mia ngai, kasi kaka na nzela ya kondima botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo kati na Yesu. Nabikisami na masumu manso ma mokili oyo. Nandimeli maye Olobaki, ‘Pwete ezali malamu pona biso kokokisa boyengebene nyonso,’ (Matie 3:15). “Na nzela ya libatisi lia Yesu mpe na Kuruse na Ye, nakomi mwana na Yo. Pona yango nazongiseli Yo matondo.”
Olekisaki masumu mayo na Yesu? Masumu mayo manso malongolama mosika na nzela na Ye? Mokanda mwa Nzambe molobi totonda Nzambe pona libatisi lia Yesu mpe liwa na Ye na Kuruse, oyo epesi basumuki nzela ya kosantisama na kondima na bango.
BOYOKANI KATI NA LIBATISI LIA YESU NA LISIKO
Boyokani nini katika ya libatisi lia Yesu na lisiko?
Libatisi lia Yesu ezali elili ya lisiko esakolamaki Na kotiya maboko kati na Boyakani bwa Kala.
Kanisa moto moko oyo azali kobika lokola mosumuki ata andimeli Yesu mpe azali kosambela kati na etonga, “Nzambe, nabeleli yo limbisa ngai pona masumu maye na salaki mposo eleki. Limbisa ngai pona masumu ma mikolo misatu oyo ewuti koleka. O Nkolo, limpisa ngai pona masumu ma lelo. Nandimeli Yesu.”
Tondima ete moto oyo alimbisami pona masumu maye ma mokolo na mokolo na nzela ya losambo. Kasi na sima nayango, azongi na bomoyi bwa ye bwa mokolo na mokolo mpe asumuki lisusu. Mpe, akokoma mosuki lisoso.
Yesu akomaki Mpate na Nzambe mpe alongolaki mosika masumu manso na nzela ya libatisi lia Ye mpe Akangolaki bato banso na liwa na Ye na Kuruse. Pona kokangolama, basumuki basengeli kondimela oyo elandi pona kobikisama.
Lisumu nyonso elongolamaki mosika na nzela ya Yesu tango Abatisamaki na Yoane-Mobatisi, bongo boyengebene bwa Nzambe bokokisami. Masumu manso ma mokili malongolamaki mosika. Oyo nyonso andimeli bosolo oyo abikisamai. Lokola ekomami na Matie 3:13-17, “pona yango” Yesu abatisamaki na Yoane-Mobatisi mpe Abikisi bandimi banso.
Sango malamu ya bosolo etalisi biso ete Yesu alongolaki mosika masumu manso ma mokili mbala moko pona libela. Kasi mayebisi ma lokuta mazali loboba ete tobikisakama mokolo na mokolo. Tondimela nini? Tobikisami mbala moko pona libela, tope mokolo na mokolo?
Ezali ya solo ete Yesu abikisaki biso mbala moko pona libela. Kondima ya solo ezali kondimela lisiko lia mayi mpe na Molimo mbala moko pona libela. Baye bandimeli ete tosengeli kobikisama mokolo na mokolo bakobikisama te.
Basengeli koyeba ete lisiko lia solo ewuti na kondimela ete Yesu abikisaki biso mbala moko pona libela na nzela ya libatisi lia Ye mpe liwa lia Ye na Kuruse. Oyo nyonso tosengeli kosala ezali kotonda Nzambe mpe kondimela sango malamu ya solo.
Kasi baye babungisami na kondima na bango bazali koloba ete tokangolami kaka na lisumu lia ebandeli, mpe tosengeli kobikisama mokolo na mokolo na masumu ma mikolo oyo, pwete tokoma “moke-moke” bayengebene. Oyo ezali lokuta.
Libatisi lia Yesu mpe liwa lia Ye na Kuruse ekokisaki bolimbisami bwa lisumu mbala moko pona libela. Yango nde bosolo. Masumu mabiso malekaki na nzoto na Yesu na nzela na Yoane-Mobatisi mpe Yesu akufaki na Kuruse pona biso kobikisama.
Koloba “limbisa ngai” na sima ya kosumuka ezali kokoka te na Boyengebene bwa Nzambe. Mobeko mwa Nzambe molobi ete lifuti lia lisumu lizali liwa. Tosengeli koyeba ete Nzambe azali Moyengebene mpe Mosantu.
Baye bazali kobondela Nzambe, “Nazali na mawa mingi, nabeleli Yo, limbisa ngai” na sima na yango, bayebi te Boyengebene bwa Nzambe. Bazali kosenga bolimbisi, kasi kaka bona kokitisa mitema mia bango moko. Ezali ya solo ete bato bakoki kosumuka mokolo na mokolo mpe pona komikitisa motema na bango basengi bolimbisi ya mabala na mbala pona masumu maye? Nzela moko ya kobikisama ezali na nzela ya kondimela libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye na Kuruse. Tosengeli kondimela yango na kati na mitema mia biso. Yango nde nzela ya bomoko ya kokende mosika na etumbo na Nzambe.
Tika ete tokanisa lobiko na masumu. Ba-Ebre 9:22 elobi, “Pamba te, kolanda Mibeko, nyonso epetolamaka na makila; mpe soki makila etangi te, bolimbisi masumu ezali te.”
Kolandisama na mobeko mwa boyengebene bwa Nzambe, masumu makolongolama na makila, mpe soki makila masopami te, bolimpisi bwa masumu bozali te. Yango nde mobeko mwa Nzambe. Soki lifuti lia lisumu lifutami te, bolimpisi bozali te.
Mobeko mwa Nzambe mosali bule. Yesu abatisamaki na Yoane-Mobatisi mpe makila ma ye makangolaki basumuki. Alongolaki mosika masumu manso na nzela ya libatisi lia Ye mpe Asopaki makila ma Ye na Kuruse pona kofuta masumu manso mabiso. Afutaki nyongo ya lisumu lia biso.
Lisiko lipesama mbala moko Mpe libela, tope mokolo nyonso?
Mbala moko pona libela. Yesu alongolaki Masumu ma basumuki banso na nzela na Libatisi lia Ye.
Kati na Matie 3:15, tango Yesu abatisamaki na nzela ya malamu koleka, Alongolaki lisumu nyonso na nzela na libatisi lia Ye mpe liwa lia Ye na Kuruse pona ma masumu ma biso ma mokili.
Kosenga bolimbisi mokolo na mokolo ekozala lokola kosenga Ye kolongola masumu mpe kokufa mbala na mabala lisusu. Tosengeli kososola boyengebene bwa mobeko mwa Nzambe. Yesu asengeli te kokufa mbala na mbala pona kobikisa biso na masumu mabiso.
Nzambe atalaka yango na liso ya mabe pona baye bandimeli Yesu kosengaka mbala na mbala bolimbisi lisusu na masumu ma mokolo na mokolo. “Bato na liboma mpe na bobungi! Bazali kosenga Mwana na Ngai, Yesu, Abatisama lisusu mpe Akufa lisusu na Kuruse! Bandimeli lisiko lia Yesu mpe bazali komibenga bango moko basumuki! Nakosambisa bango na mobeko mwa Ngai mwa bosembo mpe kotinda bango na moto ya lifelo. Okoki koboma mwana na yo mbala mibale? Ozali kosenga ngai na boma Mwana mwa Ngai mbala ya mibale pwete ozali kokoba kosumuka. Nasi nabomaki Mwana na Ngai pona kobikisa yo mbala moko pona libela na masumu manso ma mokili. Sikoyo kolamosa te kanda na Ngai na kosenga Ngai na limpisa yo pona masumu malelo mbala na mbala. Ndima kaka sango malamu ya lisiko na mayi mpe na Molimo.”
Yesu ayebisi baye batikali basumuki ete basengeli bakende na etonga esika wapi sango malamu ya solo ezali koteyama, batika kondima ya lokuta mpe bayamba lisiko na kolonga kondima ya libungi.
Sikoyo ezali tango pona yo yako bikisama na nzela ya kondima kati na motema mwa yo. Ondimi yango?
MOBOKU YA KONDIMA EZANGI BOSOLO, KASI NA MISALA
Pona nini Ba-Klisto mingi bakweyaka Kokamba bomoyi ya kondima makasi?
Pwete bavandeli likolo na misala Mia bango.
Ata basumuki baye bandimeli Yesu kasi nano bakangolami te bakoki kongenga pona mbula misato tope mitano. Bazali na bomikotisi mingi na ebandeli, kasi kondima na bango ekitaka na sima. Soki ondimeli Yesu na misala mia yo, soki ondimeli Yesu na nzela ya misala, makasi mayo makosila na nzela, mpe.
Mokufi miso akoki te komona, bongo bavandeli likolo na makanisi na bango mpe babakisi koyeba na nzela wana. Tango bayoki pinzoli ya miso kobima, bamikosi ete ezali elembo ya bolimbisi masumu. Bolimbisi masumu ezali na kati na oyo ozali koyokana te.
Na molimo, mokufi miso azali nano koluka lisusu bolingo naye ya yambo na nzela ya kokende kaka ndenge wana na makutani ma bolamoki, kasi bakoki te kozongela makasi na bango ya kati oyo ya kala te. Bolimbisi bwa masumu bokomi pasi mingi pona kokokisama. Soki bandimaki solo-solo banda ebandeli, bolimbisi na ngolu na Ye ekokaki kongenga makasi lokola mikolo oyo eleka.
Kasi bolimbisi bwa masumu ya lokutu yango nde engengaka na ebandeli mpe esili makasi malembe-malembe. Makasi ya kongenga ekiti na tango pwete mokufi miso ya molimo ayokaka te sango malamu ya solo banda ebandeli.
Bakomi mikanda ya bilongi mibale mpe na Ba-falizao batambolaka na Mokanda mwa Nzambe na se ya lipeka, bakangi Mabondeli ma Nkolo mpe bomipesi bwa Bantoma, mpe kobondela tango nyonso. Bazali kozuwa pete ya sika na etonga mpe bamatisi makasi ya mosala. Kasi botondisami bwa masumu ma bango bobimisi bango polele liboso na Nzambe. Libanda bazali na bilamba bia mpembe bia basali ba Nzambe, kasi na kati ya makanisi ma bango batondi na mokokoli ya lisumu. Yango nde suka na kondima ya lokuta kasi na bonzambe oyo evandi likolo na misala.
TOBULISAMI NA NZELA YA KONDIMA
Bosikoli bwa masumu manso ma mokili Bosi bokokisami?
Boye. Bokokizamaki kati na libatisi lia Yesu Mpe na liwa lia Ye na Kuruse.
Totanga Ba-Ebre 10:16-18. “Tala boyokani oyo nakosala elongo na bango sima na mikolo wana, elobi Nkolo: Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, mpe nakokoma yango kati na mitema na bango. Bongo na sima, abakisaki: ‘Nakokanisa lisusu te, ezala masumu na bango to mabe na bango.’ Nzokande, soki Nzambe alimbisi moto masumu, ezalaka lisusu te na likabo ya kopesa mpo na masumu. Bongo na sima, abakisaki: ‘Nakokanisa lisusu te, ezala masumu na bango to mabe na bango. Nzokande, soki Nzambe alimbisi moto masumu, ezalaka lisusu te na likabo ya kopesa mpo na masumu.’”
Sikoyo tobikisami na nzela ya mayi ya libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye na Kuruse, tosengeli lisusu te bolongwami bwa masumu. Ekoki kozala somo pona yo mbala ya liboso koyoka yango, kasi ezali kolandisama na maloba ma Mokanda mwa Nzambe. Maloba mana mazali ma bato? Mokanda mwa Nzambe mozali epimelo mpe moboku mwa makambo manso.
“Tala boyokani oyo nakosala elongo na bango sima na mikolo wana, elobi Nkolo: Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, mpe nakokoma yango kati na mitema na bango.” (Ba-Ebre 10:16). Ndenge nini ozali koyoka sima na lisiko lia yo? Sikoyo motema mwa yo mokangolami na masumu, motema mokiti. Okomi moyengebene mpe okoki kobika kati na mwinda.
Mpe Nkolo alobi na Ba-Ebre 10:17 “Nakokanisa lisusu te masumu na bango.” Ayebisi biso ete Akokanisa lisusu te masumu mpe na bozangi botosi ya misala mia biso. Pona nini? Pwete Yesu abatisama na ndenge ekokani, “pona yango.” Sima na kolongola masumu mabizo manso mosika, Yesu asambisama na esika na biso baye bandimeli Ye.
Sikoyo Asi asilisi kofuta nyongo ya masumu mabiso manso, tokoki kokanisa yango kasi tosengeli komimona na nyongo na yango lisusu te. Tosengeli lisusu te kokufa pona masumu mabiso pwete Yesu alongolaki yango nyonso mosika na biso mpe Asopaki makila ma Ye na Kuruse pona biso.
Ba-Ebre 10:18 elobi, “Sikoyo esika ezali bolimbisi, ezalaka lisusu te na likabo ya kopesa mpo na masumu.” Elingi koloba Alongolaki mosika masumu manso ma mokili. Elingi lisusu koloba ete tobotami mbala ya mibale kati na Yesu, mpe tosengeli lisusu kobesa mbeka pona lisumu.
“O Nzambe, nabeleli Yo, limbisa ngai. Tina na ndimelaki Yesu mpe nazali kobika kati na pasi ezali ete nano nabotamaki te mbala ya mibale. Nazali Mo-Klisto, kasi makanisi mangai matondi na lisumu.” Tosengeli te kobondela ndenge wana te.
Basumuki basalaka masumu nabozangi koyeba yango ndenge ezali. Bayebi te lisumu ezali nini pwete bayebi te Mobeko mwa Solo mwa Nzambe. Bayebi kaka bakoki kosumuka te na mitema mia bango kasi bayebi te lisumu ezali nini liboso na Nzambe. Nzambe atalisi biso ete ezali lisumu koboya kondimela Yesu.
Na Yoane 16:9 Alobi ete ezali lisumu liboso na Nzambe. “Ya lisumu, pwete baboyi kondimela Ngai.” Ezali lisumu liboso na Nzambe koboya kondimela Ye. Yoane 16:10 elobi boyengebene bozali nini. “Ya boyengebene pwete Nazali kokende epayi na Tata mpe bokomona ngai lisusu te.” Elingi koloba ete Yesu asi akangoli mokili na masumu manso, mpe bongo Akobikisa te biso lisusu na libatisi lia mbala ya mibale mpe na liwa na Kuruse.
Abengaki baye bandimelaki lisiko kosantisama mpe Akomisi bango bayengebene. Bosikoli na mokili oyo ekokisama na nzela ya libatisi lia Ye na Kuruse. Bokangolami mosusu ezali na esika te pona kobisa basumuki.
“Lobiko ekoki kozwama na moto mosusu te, pamba te kombo mosusu ezali te na mokili, oyo epesama na bato, oyo ekoki kobikisa biso.” (Misala ya Bantoma 4:12). Yesu ayaki na mokili oyo, Abatisima na Yoane-Mobatisi, mpe Asopaki makila na Kuruse pona kobikisa basumuki banso. Ndimela yango na motema mwa yo mpe bikisama. Yesu abulisa yo na mayi mpe na Molimo.
Yesu alongolaki mosika masumu manso na nzoto na nzela ya mayi mpe na Mokili. Tobikisami na kondima. Soki tondimeli kati na bosolo, soki tondimeli sango malamu na nzela na Yesu-Klisto, tokomi bayengebene mbala moko pona libele. Libatisi lia Yesu mpe liwa lia Ye na Kuruse; biloko oyo mibale ezali bokolo ya moboku.
MILONGO OYO BASUMUKI BASALELAKA LOKOLA ETELEMELI NA BANGO
Tokoki solo kobikisama na Kotubela masumu mabiso, tope Tosi topetolami libela?
Nzambe abongisaki lisiko wuta lisumu Mbala moko pona libela.
1 Yoane 1:9 elobi, “Soki toyamboli masumu na biso, Nzambe akolimbisa biso mpe akopetola biso na mabe nyonso, pamba te azali Sembo mpe Moyengebene.”
Ekozala malamu soki tosengeli kaka kotubela masumu ma biso pona kolimbisama. Na likanisi lina, balakisi mosusu ba makambo ma Nzambe baye bazali na mayele monene ya malakisi ma sika, bazali kobeta sete ete tango nyonso moto moko atubeli masumu ma ye akoki kolimbisama. Ezali malamu te? Kasi Yesu alobaki te tokolimbisama tango nyonso tokotubela liboso na Nzambe.
Tokoki kolimbisama kaka na kotubela masumu ma biso, tope tosi tokangolami? Ondimeli nini? Bato baye bakangama na malakisi ma libungi mana mazali koloba ete balimbisami tango nyonso batubeli masumu ma bango, kasi na bosolo, masumu matikali kati na mitema mia bango, pwete bayebi te maloba ya masolo ma lisiko. Ezangi boyebi ete basumuki baye bandimeli Yesu balimbisami tango nyonso bazali kotubela pona bolimbisi bwa masumu ma mokolo na mokolo.
Pona yango, tosengeli kokotisa maloba ma Ye ma lisiko mpe ma kolongola mobulu kati na bosolo mpe na libungi, likolo na maye bayebisi biso.
Basumuki bazali kososola malamu 1 Yoane 1:9. Bakoti na libungi mpe bakanisi ete ezali bolimbisi bwa masumu ma mokolo na mokolo. Totanga yango na bokebi nyonso. “Soki toyamboli masumu na biso, Nzambe akolimbisa biso mpe akopetola biso na mabe nyonso, pamba te azali Sembo mpe Moyengebene.” Ondimi ete tokangolami kaka pona lisumu lia ebandeli mpe tosengeli kotubela masumu ma mokolo na mokolo pona Ye kozala Nzambe atonda na kondima mpe moyengebene mpe Alimbisa bango? Oyo ezali makanisi ya libungi oyo ewuti na bolembu ya nzoto na biso.
Tososoli ete ezali te ya solo tango tondimeli libatisi mpe makila ma Yesu. Masumu manso malongolami mosika na nzela ya libatisi lia Ye mpe makila ma Ye masopami na Kuruse, eleki tango molayi.
Kondima kolandisama na Molimo mpe kondima kolandisama na makanisi ma libungi ezali biloko mibale ekesani. Baye bandimi kolandisama na makanisi ma bango bazali na posa ya kolongola mosika na bango masumu mabango ma mokolo na mokolo. Kasi baye bandimeli lisiko lia mayi mpe makila bayebi ete bakangolami mbala moko mpe pona libela na nzela ya libatisi mpe makila maYesu-Klisto.
Baye bandimi ete basengeli kotubela mokolo na mokolo pona kobikisama bazali kosala lisumu ya koboya kondimela lisiko lia libatisi mpe makila ma Yesu.
Osi osikolami mbala moko pona libela na nzela ya libatisi mpe makila ma Yesu? Baye nano basikolami te bazali komeka kozuwa lobiko na kotubela masumu ma bango mokolo na mokolo. Yango ezali kaka kotika likambo moko ya koyeba nini esengeli kosala pona masumu ma mokolo na mokolo na maye bakosala mikolo ekoya.
Bakoki komeka kotubela masumu mabango ma mikolo mikoya. Kasi na kosala ndenge wana bazali kotalisa kozanga kondimela Yesu. Bato bana bazali bakufi miso na sango malamu ya lisiko. Yesu asikola biso na lisumu mbala moko pona libela na libatisi mpe makila ma Ye, etumbo ya masumu ekweyela Ye. Tobikisami kaka na nzela ya kondimela Ye.
Soki ozali kokanisa ete esengeli kotubela ata masumu mayo ma mikolo mikoya pona kobikisama, okeseni te na bandimi baye bayebi te eloko moko na botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Basumuki bakoki te kobikisama na nzela ya kotubela.
Bongo soki otubeli malamu, “Nazali mosumuki oyo nano akangolami te,” mpe na yango soki oyoki mpe ondimeli sango malamu ya libatisi lia Ye mpe liwa na Ye na Kuruse, Nzambe akokangola yo wuta masumu ma yo manso.
Kasi soki ondimi te sango malamu ya lisiko mpe obatami kaka sima na mabondeli ma kotubela, okokutana na etumbo monene tango Yesu akoya lisusu na mokili oyo lokola Mosambisi.
Baye bandimeli te sango malamu ya lisiko lia mayi mpe na Molimo bakosambisama. Soki babatami sima na kotubela, bakokutana na kosambisama. Boye, kozela te mokolo mwa kosambisama. Ndima sikoyo sango malamu ya libampoli ya mayi mpe na Molimo.
KOTUBELA YA SOLO MPE KONDIMA YA SOLO
Kotubela ya malamu pona Mosumuki ezali nini?
Kotatola ete azali kaka na lisumu mpe Akokende lifelo soki andimi te sango Malamu ya solo.
Nzambe akangolaki biso mbala moko pona libela. Awa nde ndakisa ya bomoyi ya solo ezali kolakisa oyo tolingi kolobela. Toloba ete motindami ya mabe ya Kore ya Likolo akiti na Kore ya se. Amoni ndenge nini tofuluki, asosoli ete akosamaki, mpe azuwi mokano amibesa yemoko.
Sima ya kokende na ndako moke ya babolobolo akoki kotubela ete, “Nazali motindami ya mabe ya Likolo,” tope “Nayaki na Kore ya se pona koboma boye na boye, mpe nabobaki oyo na wana, mpe nasi koboma oyo, kasi sikoyo nazali komipesa ngai moko. Pona boye, nazali te ya solo motindami ya mabe lisusu te.”
Ezali kotubela ya malamu? Soki solo alingaki kotubela, oyo nyonso asengelaki koloba ezali “Nazali motindami ya mabe.” Ndakisa oyo elobeli makambo manso: azali moto mabe mpe asengeli kosambisama. Na maloba ma ndakisa wana, bakotala te mosala bapesaki ye te, mpe akoki kolimbisama.
Kaka lokola boye, soki mosumuki atubeli liboso na Nzambe, “Nazali mosumuki oyo nano nabikisami te. Nazali kokende na nzela ya kobwakama na lifelo mpe kosambisama. Nabeleli Yo, ‘bikisa ngai’ mpe nandimeli Yesu, akobikisama. Yesu abatisamaki mpe asopaki makila maye pona biso, mpe oyo tosengeli kozala ezali kondimela lobiko na nzela na Ye pona kobikisama.
Emoliseli 2:17 elobi, “Nakopesa ye lisusu libanga moko ya pembe oyo bakoma kombo moko ya sika na likolo na yango, kombo oyo eyebani kaka na moto oyo akozwa yango.” Mokanda mwa Nzambe elobi ete kaka oyo akozuwa sango malamu ya solo nde akoyeba kombo na Yesu. Kaka oyo abikisami mbala moko mpe pona libela, nde ayebi basekele ya kokoma moyengebene.
Baye bayebi te yango bakotikala kaka basumuki ata bazali kotubela mokolo na mokolo. Kotubela ezali koloba te kobondela pona bolimbisi ya mokolo na mokolo. Ata moto asali mbula zomi kati na Bo-Klisto, akozala kaka mosumuki soki azali kosenga Nzambe bolimbisi mokolo na mokolo. Akokoma te mwana na Nzambe.
Bona kobikisama, esengeli batatole ete bazali basumuki mpe bandimeli lisiko lia Yesy. Yango nde kondima ya solo.
KOTATOLA KAKA MASUMU MAYO EZALI TE OYO 1 YOANE 1:9 AYEBISI BISO PONA KOTUBELA
Tosengeli kotubela masumu mabiso Mokolo na moko, tope kaka tango Obikisami?
Mbala moko kaka.
Moyibi mpe na mobomi, bakoki kotubela misala mia bango mpe bakangolami? Basumuki babikisami te pona kotatola masumu mabango. Bakoki kaka kobikisama na nzela ya sango malamu epambolami ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo kati na Yesu.
Ba-Klisto ya libungi batubelaka boye. “Nzambe, nabundaki na moto moko lisusu na maloba lelo. Nasumukaki. Nakosaki. Nayibaki biloko ya moto moko. Nayibayi eloko moko.”
Soki bakobi kaka ndenge wana, Nzambe akoloba, “Zala kimia, yo mosumuki! Mpe nini?”
“Malembe, yoka ngai. Nasalaki mabe, Oyebisi biso kotubela masumu mabiso. Nabeleli pona Mawa ma Yo.”
Motindo oyo ya kobondela ezali te oyo Nzambe alingi koyoka. Alingi koyoka mabondeli ya baye bandimi lisiko lia mayi mpe Molimo: Baye bandimi masumu mabango mpe bandimi sango malamu ya solo ya botama ya mbala ya mbila.
Augustine alobaki ete atubelaki pona komela mabele na tolo ya mama naye. Akanisaki ete lolenge oyo ya kotubela ekokumba ye na bokonzi bwa Lola. Tokoki koseka kaka boye. Kaka kotatola masumu mayo ekoki kotambola te.
Nzambe alobi, “Zala na kimia mpe yebisa Ngai soki osomukaki. Soki osilisi koloba yango, mpe tika lisolo na yango. Ondimelaki na ndenge ya mabe tii lelo, bongo kende na etonga esika wapi bosolo eteyami. Ndimela sango malamu ya lisiko na ndenge ya nzela ya malamu mpe bikisama. Soki te, Nakoya mpe Nakosambisa yo.”
Kotubela kati na mabondeli mpe misala mosusu pona kobikisama na nzela ya kotubela ezali kotalisa kondima ya mabe.
Ekomami na 1 Yoane 1:9 ete tango tondimeli masumu mabiso, sango malamu ya mayi mpe na makila ekobikisa biso na masumu manso.
“BIMA NA KATI NA NGAI”
Kosala libanda na Mobeko Ezali nini?
Elingi koloba ete Kondimela Yesu Na lisumu kati na motema.
Baklisto basumuki babebisi nzela ya kondima, nabizaleli bia libanda na mobeko mwa Nzambe liboso na Yesu. “Na mokoloya kosambisama, bato ebele bakoloba na Ngai: ‘Nkolo! Nkolo! Ezali te na Kombo na Yo nde tosakolaki, tobenganaki milimo mabe mpe tosalaki bikamwa ebele?’ Bongo Ngainakoyebisa bango: ‘Natikala koyeba bino te! Bolongwa liboso na Ngai, bino bato mabe!’” (Matie 7:22-23)
Kanisa ete moto moko oyo andimeli na libungi akufi, mpe aye kotelema liboso na Nzambe, mpe alobi, “Boni Nkolo? Namoni Ozalaki kitoko tango nazalaki kosalela Yo nase kuna, kasi Ozali kitoko koleka lisusu awa. Matondo Nkolo. Obikisaki ngai. Nandimi ete Otali nagi lokola moyengebene ata nazali na lisumu kati na motema mwa ngai. Nayaki awa banda Olakaki ngai kozuwa ngai na Lola. Sikoyo nakokende kuna esika fololo ezali mingi. Tikala malamu mpe nakani nako mona Yo bisika oyo.”
Abandi na elengi, kasi Yesu atelemisi ye. “Zela! Totala soki moto oyo azali na lisumu kati na motema mwa ye. Ozali mosumuki?”
“Boye, nazali na lisumu. Kasi nandimelaki Yo?”
“Ozali na lisumu ata ondimelaki Ngai?”
“Solo, nazali na lisumu.”
“Nini? Ozali na lisumu? Memela Ngai Mokanda mwa Bomoyi. Mpe memela Ngai Mokanda mwa Misala, mpe. Tala kombo na ye. Tala na mokanda nini kombo na ye ezali na kati.”
Pona koyeba ete kombo na ye ezali na Mokanda mwa Misala.
“Sikoyo, tubela masumu maye ozalaki nase.”
Moto wana akoki te, kasi Nzambe apusi ye kofongola monoko mwa ye mpe kotubela masumu ma ye.
“Boye, nasalaki masumu oyo na oyo...”
Akomi na kati na mbutu-mbutu mpe akoki te kokanga na monoko mwa ye.
“Malamu, ekoki! Asali oyo ekoki pona kokende lifelo. Abongisami pona yango! Tinda ye na esika ya moto.”
Atindama te na esika bafololo ezali ya mingi, kasi na esika na moto makasi. Azali kolia mino miaye tango bazali komema ye na lifelo.
“Nandimelaki Yo, nasakolaki na kombo na Yo, nateya na kombo na Yo, natekaki ndako na ngai pona kosalela Yo, nasungaki bana etike, nakobaki na mabondele na kombo na Yo, nabondelaki na kombo na Yo makasi, nabikisaki babeli... Nabongi na Lelo.”
Aliye mino mia ye mingi mpe azuwi eloko moko te. Tango akomi na lifelo, amoni Ba-Klisto baye bayebaki te tina ya lisiko lia Yesu. Baye basundolaki sango malamu ya lisiko babwakisami na Ye.
MASUMU MA BANDIMI YA LOKUTA EKOMAMI NA MOKANDA MWA MISALA
Esika wapi masumu ma bato Makomani?
Makomami na mitema mia bango Mpe na Mokanda mwa misala.
Tondimela Yesu tope te, Nzambe akobebisa baye bazali na masumu kati na mitema mia bango. Ata Awuti kaka lisumu ya moke na kati na motema ya moto moko, moto wana akoka te etumbo ya kokende na lifelo na Mokolo mwa Esambisami. Nzambe asengi na basumuki baye nano babikisami te kozala na posa ya kokokisa lisiko lia bango.
Masumu ya mosumuki ekomami na kati na motema mwa ye. Baye babotami mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo, bakoki kokasanisa masumu ma bango te, kasi elongolama na mitema mia bango. Bazali bayengebene.
Kasi baye babotami nano te mbala ya mibale bazali na masumu kati na mitema mia bango. Bongo bazali basumuki liboso na Nzambe. Tango nyonso bazali kofukama pona kobondela, masumu mabango makaboli bango na Nzambe mpe mapekisi Nzambe koyoka bango. Bazali kobondela pona oyo mpe pona wana, kasi masumu ma bango makangeli bango nzela. Basuki na kotatola masumu ma bango mpe kotubela pona botomboki na bango ya mbala eleki zomi, zomi na moko, ata ntuku mibale.
Esengeli bakoba kotubela mbala na mbala na mabondeli ma bango? Pona nini basalaka bongo? Balingaki te kosala bongo, kasi tango nyonso bazali kobanda kobondela, bakanisaka ete bazali na nyongo liboso na Nzambe. Mpe bayoki bazali na posa ya kokangolama pona masumu ma bango liboso ya kobondela.
Nzambe akomaki na ekomeli ya libende likolo na mabanga ma mitema mia bango masumu ma bango pwete elongwama te. Na suka, bamoni ete basengeli kotubela masumu ma bango tango nyonso bazali koya liboso na Nzambe. Na lolenge wana, baye bandimeli kaka ndambu ya sango malamu ya Yesu bakobika bomoyi ya pasi mingi lokola basumuki mpe bakosuka na lifelo.
Na Jeremi 17:1, ekomami, “Masumu ya Yuda ezali lokola makomi oyo bakoma na ekomeli ya ebende oyo ezali na songe ya diama; bakoma yango na bitando ya mitema na bango mpe na maseke ya bitumbelo na bango.”
Yuda ezali kombo na moko na bana Isalayele. Mokanda mwa Nzambe molobi ete Yuda azali elili na bato banso, bongo Yuda elingi koloba bato banso.
Lisumu lia Yuda likomami na songe ya libende mpe evandisami na songe ya diama oyo ekataka libende. Diama ezali libanda lia makasi koleka kati na mokili.
Na ekomeli ya songe ya diama masumu ma biso makomami. Tango makomami boye, nani akoya kolongola yango. Bakolongwama te, kaka tondimeli sango malamu ya solo ya mayi na Molimo.
Ezali mosala ya pamba kobikisama na makanisi, kondimela malakisi na Bo-Klisto, kokanga na moto makambo ma kelasi ya koyeba Nzambe, mpe komipesa na etonga soki lisumu litikali kati na mitema mia biso.
Lokola masumu ma bango makoki te kolongwama libanda na libatisi lia Yesu, basumuki bakobi kokanisa yango, nakoloba, “Nkolo, nazali mosumuki,” tango nyonso bazali kobondela. Bazali kaka na lisumu kati na mitema mia bango ata bazali komeka kozala na kati na Bo-Nzambe, na kozuwa misala mingi na kati na etonga, mpe na kotanga malakisi ma makambo ma kelasi ya koyeba Nzambe.
Bongo bakendaka na ngomba, komeka kosolola na minoko mia sika na koluka bimoniseli ya moto, kasi eloko te. Soki lisumu litikali ka kati na motema na yo, okozala na kimia ata moke te.
Lisumu lia biso, lokola ekomami na Jeremi 17:1, ekomami na maseka ma mesa ma biso kati na motema. Na Lola, ezali na Mokanda mwa Bomoyi mpe na Mokanda mwa Misala. Masumu ma basumuki makomami na Mokanda mwa Misala mpe bakoki te kokima botomboki bwa bango. Nzambe akomaki yango na Mokanda mwa Misala mpe na mesa ya mitema mia bango mpe atalisi biso yango na nzela ya Mobeko mwaYe.
Tosengeli kolongola makomi mana na kondimela libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye oyo Asopaki na Kuruse pona biso tobikisama. Nde tokokoka pona bomoyi bwa seko, mpe ma kombo na biso maye makomama na Mokanda mwa Bomoyi.
KOMBO NAYO EZALI NA MOKANDA MWA BOMOYI?
Kombo ya nani ekomami Na Mokanda mwa Bomoyi?
Ba kombo ya baye bazali na lisumu Te na mitema mia bango nde Ekomami kuna.
Ezali na motuya mingi kombo na yo ekomama na Mokanda mwa Bomoyi. Soki kombo na yo ekomami te kuna na kati, kondimela Yesu ekosaleli yo nini? Pona kobikisama solo-solo esengeli ondimela botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo.
Yesu ayaki na mokilo oyo ya se, Abatisamaki tango Azalaki na mbula 30 years, Alongolaki masumu ma mokili mosika, mpe akufaki na Kuruse pona biso. Lokola ekomami na Matie 3:15, Yesu abatismaki “pona yango” mpe Akufaki na Kuruse. Tosengeli kondimela yango pona ba kombo ya biso ekomama na kati na Mokanda mwa Bomoyi.
Tango bato bakokufa mpe batelemi liboso na Nzambe, Akoloba ete, “Tala soki moto oyo kombo na ye ekomami na kati na Mokanda mwa Bomoyi.”
“Ezali, Nkolo.”
“Boye, omonaki pasi mpe olelaki mingi na mokili pona Ngai, sikoyo Nakosala ete esengo na yo ekoma na suka te.”
Nzambe akofuta moto ya ndenge wana mpe akopesa ye motole ya boyengebene.
“Matondo, Nkolo. Na zongisi matondo epayi na Yo pona libela.”
“Banzelu, boya na motole pona na moto oyo.”
“Nkolo, elekeli ngai pwete Obikisi ngai. Motole ezali mingi pona na ngai. Matondo. Nasepeli mingi pwete Obikisi ngai. Esengo etondi ngai na motema ndenge nazali kati na bozali bwa Yo.”
“Banzelu, bofukama mpe bosuwa mwana na ngai ya nkoto zomi na mokongo.”
Banzelu bayanoli, “Boye, Mokonzi.”
“Nabeleli yo, mata na mokongo mwa ngai.”
“Ezali kitoko mingi. Ezali ya solo? Tokende.”
Anzelu amibongosi pona kokende.
“Olingi to kende kotala moke?”
“Oh, ezali kitoko mingi awa. Ezali monene ndenge nini esika oyo?”
“Natamboli bisika na bisika eleki bambula nkoto ya nkoto na nkoto, kasi nano na koma na suka na yango.”
“Ezali ya solo? Nakomi motuya pona yo. Okoki kotiya ngai na se sikoyo”
“Totiki awa na makasi ma nzoto te.”
“Matondo, kasi nalingi komema mabele ma bokonzi bwa Lola. Sikoyo bayengebene manso bayaki liboso na ngai, bazali wapi?”
“Bazali kuna.”
“Kokende kuna.”
Alleluya! Basimbani bango nyonso mpe bazali koseka mpe na kobika na esengo mingi.
Sikoyo kanisa moto oyo andimeli Yesu mpe akobi lokola mosumuki akufi mpe azali liboso na Nzambe. Ye mpe alobi ete andimeli Yesu mpe andimi ete azali mosumuki.
Nzambe alobi ete, “Tala soki kombo na moto oyo ekomami na Mokanda mwa Bomoyi”
“Ezali te na kati na Mokanda, Nkolo.”
“Bongo, tala na Mokanda mwa Misala.”
“Kombo na ye na masumu ma ye makomami na kati.”
“Boye tinda moto oyo esika oko akoluka lisusu te mbongo ya kopelisa na yango moto, mpe tika ye kuna pona libela.”
“Oh, Nkolo, ezali kitoko te...”
Alobi kitoko te. Pona nini akotindama na lifelo ata andimelaki Yesu mpe asalelaki Ye mingi?
Tina ezali ete akosamaki na Satana mpe alandiki kaka eteni ya kati-kati ya sango malamu ya solo. Soki tososoli te tina ya lisiko lia Yesu, tokusuka na lifelo, mpe.
Moto oyo andimelaki Yesu, kasi akosamaki na Satana mpe akanisaki ete azalaki mosumuki. Soki ayokaki sango malamu ya solo, akokaki kososola ete kondima na ye ezalaki ya lokuta. Kasi akweyaki na kondima lokola amikangaki na kondimaya libungi.
Soki olingi kokende na bokonzi bwa Lola, osengeli kobotama mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Lokola ekomami na Matie 3:15, “pona yango” Yesu alongolaki mosika masumu manso ma mokili. Osengeli kondimala lisiko lia mayi na makila.
Bakombo ya ba nani ekomami Na kati na Mokanda mwa Misala?
Bakombo ya baye bazali na lisumu Kati na mitema na bango.
Soki oponi kondimala eloko moko, lokolo moto oyo asi akoli na moto makasi, okoki kosuka na lifelo. Ezali na bato mingi ya kokola bazali ya lifelo, kasi na Lola, ezali na babundi basolo baye babunda pona oyo bandimeli.
Baye bazali na Lola bayebaki ete bazalaki basumuki baye babongisama pona kokende na lifelo mpe na nzela ya kondima ete masumu mabango malongolamaki mosika na nzela ya libatisi mpe na makila ma Yesu.
Balobaka ete ezali na ngomba ya miso mpe matoyi ya mike-mike na Lola. Pwete bato mingi bandimeli kati na lisiko lia Yesu kaka na minoko mpe na matoyi mabango, Nzambe abwaki oyo etikalina na banzoto na bango kati ya moto ya makasi mingi ya lifelo.
Kanisa moto moko oyo andimeli Yesu kasi azali na lisumu kati na ye atelemi liboso na Nzambe mpe alobi, “Nkolo, bato babengaka ngai moyengebene pwete nandimeli Yesu, ata nakanisa nazalaka na lisumu na motema. Nakanisaki ete Yesu akokaki kotala ngai lokola moyengebene. Yango nde natangaki mpe nandimelaki. Nandimaki kaka lokola baye banso bandimaka. Ezalaki kondimela oyo eyebani na bato banso esika oyo na wuti.”
Nkolo ayanoli ete. “Nakoki te kolimbisa baye bazali na lisumu kati na motema na bango. Nalongolaki mosika masumu manso mayo na lipamboli lia botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Kasi oboyaki kondima yango. Banzelu! Bobwaka ye na moto ya lifelo.”
Oyo nyonso andimeli Yesu mpe akoki kokanisa ete azali na masumu akokende na lifelo. Yoka sango malamu ya solo ya lisiko mpe bokangolami wuta lisumu. Pamba te, okosuka na lifelo.
Koloba ete ozangi masumu tango ozali na lisumu kati na motema mwa yo ezali kokosa Nzambe. Tokoki komona ndenge nini bokeseni kati na basumuki mpe na bayengebene na suka. Okososola pona nini nazali kobelela yo obikisama.
Okomona bokeseni kati na baye bandimeli lisiko ya mobimba (libatisi lia Yesu mpeliwa lia Ye na Kuruse) mpe baye bakokoka te tango bakotema na bokutani bwa nzela ya Lola na ya lifelo. Ekopesa bokeseni monene. Bamosusu bakokotana na bokonzi bwa Nzambe kasi bamosusu na lifelo.
Ondimeli Yesu kasi otikaki kaka mosumuki? Bongo osengeli kososola ete obotama nano te mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Nzambe akotinda baye bazali na lisumu na motema na bango na lifelo. Kaka baye bandimeli na mobimba bolimbisi bwa masumu nde bakoki kokota na bokonzi bwa Lola.
Sala yango malamu sikoyo. Soki osundoli yango, ekoki kozala na sima. Nzala ekenge liboso na tango. Liboso osuka na lifelo, ndimela lisiko lia mayi mpe na Molimo mpe koma moyengebene.
Kembo esonga na Nkolo Yesu! Totondi Ye pona ngolu na Ye nakosala biso basumuki bayengebeneing. Alleluyah!
YESU: MOLOBELI MWA BAYENGEBENE
Masumu mabiso makokikolongwa Na mabondeli makotubela?
Te, ekoki kosalema ata moke te. Nde moko na nzela Satana Akosaka biso.
Totanga 1 Yoane 2:1-2. “Bana na ngai, nazali kokomela bino makambo oyo mpo ete bosala masumu te. Kasi soki esali ete moko kati na bino akweyi na lisumu, tozali na Molobeli moko epai ya Tata: Yesu-Klisto, Nkolo-Na-Bosembo. Amikabaki lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu na biso; mpo na masumu na biso kaka te, kasi mpe mpo na masumu ya mokili mobimba.”
Okoki komona oyo ekomami awa? Ezali na moko oyo andimeli kasi azali kaka na lisumu kati na motema na ye? Soki ozali kaka na lisumu kati na yo, kasi oyebisi Nzambe ete ozali na yango te, ozali kokoza Ye. Mpe ozali mpe komikosa.
Kasi soki ososoli malamu Yesu mpe ondimeli oyo asalaki pona kolongola masumu manso na Yordani, okokangolama na lisumu nyonso. Okoki koloba ete, “Nkolo, nabotami mbala ya mibale na mayi mpe na Molimokati na Yo. Nazali lisusu na lisumu te. Nakoki kotelema liboso na Yo na soni te.”
Bongo Nkolo akoyanola. “Boye, olobi solo. lokola Abraham andimelaki Ngai ye moko, akomaki moyengebene, ozali mpe moyengebene pwete Nalongolaki mosika masumu mayo.”
Kasi kanisa moto moko oyo azali na lisumu kati na motema mwa ye ata andimeli Yesu, akoki koloba, “Pwete nandimeli Yesu, nakokota Lola ata nazali na lisumu moke kati na motema nangai.”
Alingi mingi akota na Lola mpe azali koboya tango atelemi liboso na kiti ya kosambisa, kasi akosuka na lifelo. Pona nini? Ayebaki te lipamboli lia sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo.
Moto nyonso asengeli kotubela masumu maye ma mikolo mia ye na se. “Nazali mosumuki. Nakokende na lifelo. Nabeleli Yo, bikisa ngai.” Mosumuki akokangolama te pona na babondeli ma kotubela. Loba ete, andimi ete asali mosumuki mpe andimi lisiko lia mayi na Molimo nde akobikisama. Akoki kaka kokoma moyengebene na nzela ya lisiko lia mayi na Molimo.
Ezali sango malamu ya lokuta ya kobete sete kaka na lisumu lia ebandeli oyo elimbisami kati na Yesu mpe tosengeli kotubela masumu mabiso pona kozuwa lobiko na biso. Oyo ezali komema mbala moko na lifelo. Boye bandimi mingi bakosuka na lifelo na nzela ya kondimela sango malamu oyo ya lokuta mpe oyo ekomi na makelele mingi mikolo oyo.
Oyebi soki osi kokweya na libulu lia sango malamu oyo ya lokuta? Okoki kotikala moto ya nyongo sima nakofuta yango? Kanisa yango. Soki ozali komimona lisusu mosumuki sima ya kondimela Yesu, ekoki kolobelama ete ondimeli Ye malamu? Ozali mondimi mpe mosumuki, tope ozali mondimi mpe moyengebene?
Okoki kopona yo moko. Okoki kondima ete masumu mayo malimbisami, tope okoki kotubela mokolo na mokolo pona botomboki bwa yo. Kopona na yo ekopesa nzela ya Lola tope ya lifelo. Osengeli kokangama na bateyi baye bazali kotalisa yo nzela ya sango malamu ya solo.
Baye bandimeli sango malamu ya lokuta bazali kaka kobondela pona bolimbisi bwa masumu ma bango kati ya bokutani ya mabondeli ya mokolo ya misatu, na ya kobelela butu na mokolo ya mitano nyonso pona kolongola masumu mosika na bango.
“Nkolo, nasumukaki. Nasumukaki poso oyo.” Nde bakanisi masumu mamikolo mileki mpe babondeli bolimbisi epayi na Ye, pona masumu ma bango. Oyo ezali kobundisa limpamboli lia sango malamu ya botama ya mbala ya mibale ya mayi mpe na Molimo.
Masumu mabiso masengeli kofutama na makila. Ba-Ebre 9:22 eloki, “Libanda na makila masopami, bolimbisi masumu bozali te.” Soki okanisi ete ozali na lisumu, bongo ozali kosenga Ye lisusu Asopa yango mbala ya mibale pona yo? Baye bandimi te lisiko lia mobimba bazali kobalukisa lisiko lia Yesu kati na lokuta. Bazali kokoba koloba ete Yesu abikisaki bango te mbala moko pona libela mpe kokomisa Ye lokola mokosi.
Pona kobikisama kati na Yesu, osengeli kondima bosolo bwa lisiko lia mayi mpe na Molimo. Okoki solo-solo kolimbisama masumu mayo na kama, nkoto, na nkoto ya nkoto ya mabondeli mayo? Sango malamu ekangolaki biso mbala moko pona libela. Nzala moyengebene, kende na bokonzi bwa Lola, mpe bika bomoyi ya boyengebene tango nyonso.
“♪Nazali kobika bomoyi ya sika kati na Yesu. Makambo makala masi malekaki mpe nakomi ekelamu ya sika. Makambo makala malekaki mosika. O, Yesu azali bomoyi nangai ya solo. Nazali kobika bomoyi ya sika kati na Yesu.♪”
Ozali kobika bomoyi ya sika kati na Yesu. Kotala te kitoko ya nzoto ndenge olingaki kozala, kotala te mokuse, tope monenena kati ya bamosusu, baye bapambolami na sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Bika bomoyi ya esengo. Esali nini soki zolo na yo ezali na songe te, tope lokola ozali mokuse moke? Pwete tokokana biso na biso te, mpe tobikisami na kondima kati na botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo kati na Yesu. Kasi baye bakosami bakosuka na lifelo.
Matondo, Nkolo. Nazali kokoba na kopesa Yo matondo Nkolo tango nyonso. Pwete tondimeli botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Pona yango, bakoyamba biso na Lola.
BATO YA LOKUTA BAKOMEMA BISO NA LIFELO
Nani akozuwa motole mwa Boyengebene na suka?
Oyo akolonga likolo na lokuta
Bato ya lokuta bazali koyebisa biso ete tosengeli kotubela mokolo na mokolo pona kolimbisama, kasi sango malamu ya mayi mpe na Molimo ezali koyebisa biso ete tosi tolimbisami mpe oyo etikali kosala ezali kaka kondima yango.
Solo ezali nini? Tosengeli kotubela mokolo na mokolo? Tope, ezali ya solo kondima ete Yese abikisa biso tango Abatisamaki na nzela ya kokokana na nyonso pona kolongola mosika masumu mabiso manso? Solo ezali ete Yesu alongolaki mosika masumu mabiso manso mbala moko pona libela mpe na nzela ya Ye moko Apesaki biso lobiko.
Tosengeli kolonga likolo na bitumba bia molimo ya lokuta. Bato ebele bazali kolanda lokuta. “Komela anzelu ya Lingomba oyo ezali kati na Pergame: ‘Tala maloba ya Ye oyo asimbi mopanga bapelisa na bangambo nyonso mibale: Nayebi malamu esika oyo ovandaka. Ezali mpe kaka na esika yango nde Satana atie kiti na ye ya bokonzi. Okweyisaki te kondima na yo epai na Ngai, ezala na mikolo oyo babomaki Antipasi, motatoli na Ngai ya sembo, kati na engumba na bino epai wapi Satana avandaka.’” (Emoniseli 2:12-13).
“Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, nakopesa ye mana oyo ebombama ; nakopesa ye lisusu libanga moko ya pembe oyo bakoma kombo moko ya sika na likolo na yango, kombo oyo eyebani kaka na moto oyo akozwa yango.” (Emoniseli 2:17).
Bisika milimo ebele ya mabe evandi elongo na lokuta bazali kosala yango bosolo, Satana ayaka wana lokola anzelu ya mwinda. Nzambe akoki te kosunga lisusu moto oyo ayoki lobiko ya solo ya mayi na Molimo, kasi aboyi kondimela yango. Moto ya ndenge wana akosuka na lifelo.
Moko na moko asengeli kozuwa mokano soki andimi lisiko lia Yesu. Moto moko te akofukama liboso na yo mpe kobelela yo kondima mpe obikisama.
Soki olingi kolimbisama na lisumu liayo, bongo ndima lobiko ya mayi mpe na Molimo. Soki oyoki posa ya kozongisela Ye matondo pona bolingo bwa Ye kati na lobiko mpe na ngolo na Ye na kobikisa biso, boye ndimela yango. Soki ozali mosumuki obongisami pona kosuka na lifelo, bongo ndima kati na mayi mpe na Molimo, libatisi lia Yesu mpe liwa lia Ye na Kuruse. Boye nde okokoma moyengebene.
Soki okanisi ete ozali te mosumuki, osengeli kokangolama te na nzela ya kondimela Yesu. Kaka basumuki nde bazali kokangolama na sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Yesu azali Mobikisi ya basumiki mpe Molobeli ya baye bazali kati na pasi. Azali Mokeli. Azali Nkolo ya Bolingo.
Na motema mwangai mobimba, nabeleli yo ondima sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Ndima yango Okoki kozala na elikia ete Yesu akozala Mobikisi, Moninga, Mokambi mpe Nzambe na yo. Basumuki basengeli kondima Yesu. Soki olingi te okosuka na lifelo, osengeli kondima yango.
Nzambe akobelela te biso tondima sango malamu ya lobiko. Olingi kondimama na Lola? Boye, ndima sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Yesu alobi, “Nazali nzela, bosolo, mpe bomoyi. Ndima Ngai.” Ozali koloba ete olingi kobwakama na lifelo? Bongo, kondima te. Alobi ete Asi abongisi esika pona yo na lifelo.
Nzambe azali kobelela yo te. Moteki ayambaka bato ba ndenge na ndenge kaka pona koteka biloko bia ye, kasi Nzambe apesi bokonzi bwa Lola ya ofele kaka na baye babikisami. Nzambe azali Moyengebene.
Bato bazali koloba ete suka na mokili oyo ekomi pene. Boye, ngai mpe nakanisi bongo. Mpe ezali liboma kozanga kondima sango malamu ya solo ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo.
Ndima kati na lobiko ya lipamboli lia sango malamu ya mayi mpe ya Molimo. Tokende na bokonsi bwa Lola. Ozali kokende te na ngai na esika Yesu avandaka?
Ozali mosumuki tope Moyengebene?
Moyengebene oyo azali te Na lisumu na motema.
Totanga Barome 8:1-2. “Yango wana sik’oyo, etumbu ezali lisusu te mpo na bato oyo bazali kati na Yesu-Klisto. Pamba te kati na Yesu-Klisto, Mobeko ya Molimo oyo apesaka bomoi ekangoli ngai na bowumbu ya mobeko ya lisumu mpe ya kufa.”
Yesu alongolaki mosika masumu ma biso na nzela ya libatisi lia Yempe na liwa lia Ye na Kuruse. Abikisaki basumuki banso baye basengelaki kosambisama pona masumu ma bango.
Lobiko na Nzambe ezali kosala na biloko mibale. Moko ezali kondima mpe ya mibale ezali Bolingo bwa Ye. Mobeko ezali tokeya biso ete tozali basumuki. Kolandisama na Mobeko, lifuti lia lisumu lizali liwa. Tokoki te kobisama na Mobeko. Ezali kaka kotalisa biso bozaleli bwa biso bwa basumuki. Ezali koyebisa biso ete tozali basumuki.
Pona kofuta nyongo ya masumu, Yesu akitaki na se na mokili, pona kolongola mosika masumu mabiso mpe kofuta yango na bomoyi bwa Ye pona kobikisa biso banso na yango.
Tosengeli kolonga lokuta. Nzambe apesa biso lipamboli lie botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo na biso banso tolongi lokuta.
Tobikisami na kondima Yesu. Nakondima maloba ma Ye, tokokisi boyengebene mpe tososoli bosolo. Ndima bosolo ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo kati na motema na yo mpe okobikisama.