• All e-books and audiobooks on The New Life Mission website are free
  • Explore multilingual sermons in global languages
  • Two new revised editions in English have been released
  • Check out our website translated into 27 languages
Search

Sermons

Liteya lia 3: Sango Malamu ya Mayi mpe na Molimo

[3-3] Yesu Kristo ayaki na Mayi, Makila na Molimo (1 Yoane 5:1-12)

2021.07.11 140
Yesu Kristo ayaki na Mayi, Makila na Molimo(1 Yoane 5:1-12)
“Motò nyonso oyo andimi ète Yesu azali Masia, azali “Mwana ya Nzambe, pe motò nyonso oyo alingi Ye, alingi pe bana na Ye. Toyebaka ète tozali bana ya Nzambe, bobele soki tozali kolinga Nzambe pe kobatela mibeko mia Ye. Yango nde bolingo bwa Nzambe, ète tobatela mibeko mia Ye. Pe mibeko mia Ye mizali pasi té kosalela. Pwète oyo nyonso abotami na Nzambe alongi mokili na nyonso. Pe yango nde elonga oyo elongi mokili—kondima na biso. Nani alongi mokili, kasi oyo andimi Yesu azali Mwana na Nzambe? Oyo nde Ayaki na mayi pe na makila— Yesu Kristo; kaka té na nzela na mayi, kasi na nzela ya mayi na makila. Pe ezali nde Molimo moyè mozali komema litatoli lina, pwète Molimo mozali solo. Pwète bazali misatu baye bazali komema litatoli na lola: Tata, Liloba, pe Molimo Mosantu; pe bazali misato na kati na moko. Pe ezali na misato baye bamemi litatoli na mabele: Molimo, mayi, pe na makila; pe bango misato bayokani lokola moko. Soki toyambi litatoli lia batò, litatoli lia Nzambe lizali linene koleka; pwète yango nde litatoli lia Nzambe oyo atatoli likolo na Mwana na Ye. Oyo andimi Mwana na Nzambe azali na litoli na kati na ye moko; oyo andimi té akomisi Nzambe mokosi, pwète andimi té litatoli ète Nzambe apesaki Mwana mwa Ye. Pe oyo nde litatoli: ète Nzambe apesaki biso bomoyi bwa seko, pe bomoyi wana ezali kati na Mwana mwa Ye. Oyo azali na Mwana, azali na bomoyi; ozali na Mwana na Nzambe té, azali na bomoyi té.”
 

Yesu ayaki na nini?
Mayi, makila na Molimo

Yesu ayaki na mayi? Boye, Ayaki nayango. Ayaki na libatisi. Mayi ezali elembo na libatisi lia Yesu na nzela na Yoane Mobatisi na Mayi na Yordané. Ezalaki libatisi lia bosomi na nzela ya nini Alongolaki masumu manso ma mokili mosika.
Yesu ayaki na makila? Boye, ayaki na yango. Ayaki na nzoto na motò, pe abatisama pona kolongola masumu manso ma mokili, bongo afutaki nyongo ya lisumu na lilwa lia Ye na Kuruze. Yesu ayaki na makila.
Yesu ayaki na Molimo? Boye, ayaki na yango. Yesu azalaki Nzambe, kasi Ayaki na Molimo kati na nzoto kozala Mobikisi mwa basumuki.
Batò ebele bandimi té, ète Yesu ayaki na mayi, makila, pena Molimo. Lisanga lia batò moke, nde endimeli ète Yesu azali solo-solo Mokonzi na bakonzi, pe Nzambe na ba-nzambe. Ebele na batò mazali kokamwa, ‘Yesu azali solo Mwana na Nzambe, tope azali mwana na motò?’ Pe ebele na batò, elongo na baye bayekola makambo ma Nzambe na kelasi, na basali na Nzambe, bandimi Yesu lokola motò, kasi lokola Nzambe té, Mobikisi Oyo azali likolo na nyonso.
Kasi Nzambe alobi ète oyo nyonso akondima, ète Yesu azali Mokonzi na bakonzi, Nzambe ya solo pe Mobikisi ya solo akobotama na Ye. Baye bandimi Nzambe bandimi ndenge moko Yesu.
Batò bakoki kolonga mokili soki babotami mbala ya mibale té. Bongo, Ntoma Yoane ayebisa biso, ète kaka Ba-Kristo ya solo nde bakolonga mokili. Eloko pona nini moyengebene akoki kolonga mokili, ezali ète bandimeli mayi, makila pe na Mokimo. Molimo yakolonga mokili ekoki ekowuta té na posa, mayele tope makinisi ma motò.
“Ata na lobi na minoko mia batò pe na bangelo, kasi soki nazali na bolingo té, nazali lokola mongongo ya mbunda tope ya lidanda ya pamba. Ata nazali na likabu lia kosakola, kososola makambo maye mazali na boyebi nyonso, pe nakozala na kondima yakotonda mingi, bongo nakoki kolongola ngomba, kasi soki na zangi bolingo, nazali ekoko moko té. Ata nazali kosala lolendo pona kolesa babola, ata napesi nzoto nangai kotumbama na mótó, kasi, soki nazangi bolingo, esali na motoya ata moko té” (1 Ba-Korinté 13:1-3).
‘Bolingo’ ezali kolobela biloko misato oyo eyaki na Yesu: mayi, makila na Molimo. Nakati na Biblia, eloko oyo ‘bolingo’ ezali kolebela tango nyonso ‘bolingo ya solo’ (2 Ba-Tésaloniké 2:10). Sik’oyo, bolingo na Nzambe emimonisa na nzela ya Mwana na Ye moko (1 Yoane 4:9).
 

Kaka Oyo Andimi Mayi na Makila nde Oyo Akolonga Mokili

Nani oyo akolonga mokili?
Baye bandimeli bosomi bwa libatisi lia Yesu, makila ma Ye pena Molimo
 
1 Yoane 5:5-6 elobi ète, “Oyo alongi mokili, ezali oyo andimeli, ète Yesu azali Mwana na Nzambe? Ezali Ye, oyo Ayaki na mayi na makila—Yesu Kristo.”
Bandeko Ba-Kristo, Oyo alongaki Satana pena na mokili azalaki Yesu Kristo. Baye bandimi na liloba lia mayi, makila pena Molimo ya Yesu alongi mokili. Ndenge nini Yesu alongaki mokili? Na nzela ya bosomi ya mayi, makila pe Molimo.
Na Biblia, ‘mayi’ ezali elili ya ‘libatisi lia Yesu’ (1 Piere 3:21). Yesu ayaki na mokili na nzoto ya motò. Ayaki kobikisa basumuki ya mokili; Abatisama, pona kolongola mosika, masumu manso ya basumuki ba mokili mobimba, pe Akufaki na Kuruze pona kopetola biso na masumu mana.
Makila na Kuruze mazali kolobela ndege nini Ayaki na mokili na nzoto ya motò. Ayaki na ndenge ya nzoto ya bosumuki pona kobikisa basumuki pe Abatisama na mayi. Bongo, Yesu ayaki epayi na bison a mayi na makili. Elingi koloba ète, Alongolaki mosika masumu manso ma mokili na mayi ya libatisi l na makila ma liwa lia ye.
Ndenge nini Satana azali kokonza likolo na mokili? Satana azali kopusa batò nazala na tembe likolo na liloba lia Nzambe pe azali kolona bozangi botosi na mitema mia bango. Satana azali komeka kobalukisa batò na mosala na ye na kokosa bango bazanga botosi bwa liloba lia Nzambe.
Yesu ayaki na mokili oyo pe alongolaki masumu mabango manso na mayi ya libatisi lia Ye, na makila ma Ye na Kuruze: Alongaki Satana, pe alongolaki masumu manso ma mokili.
Oyo esalama pwète Yesu Kristo azalaki Mobikisi na basumuki. Akomaki Mobikisi mwa biso pwète ayaki na mayi pena makila.
 
 

Yesu alongolaki Masumu Manso ma Mokili nazela na Libatisi lia Bosomi


Ye alongolaki masumu ma mokili elingi koloba nini?
Elingi koloba ète Alongolaki masumu manso ma mokili.

Banda Yesu abatisama pona kolongola masumu ma mokili, pe akufaki pona kofuta nyongo na yango, Azalaki na makoki ya kobikisa biso, na masumu mana manso. Pwète Yesu abatisama na Mayi ma Yordané na nzela na Yoane Mobatisi, molakisi-elongi na batò banso, masumu manso ma mokili malekaki na nzoto na Ye. Yesu apesa moboyi na Ye na Kuruze pona kofuta nyongo ya masumu mabiso. Alongaki nguya ya Satana na liwa pe lisekwi lia Ye. Yesu afuta nyongo ya masumu mabiso manso na nzela ya liwa lia Ye.
 
 

Yesu Ayaki Epayi na Basumuki na Mayi ya Libatisi lia Ye pena Makila na Kuruze


Ndenge nini Alongaki nguya na Satana?
Na nzela na Libatisi lia Ye, makila pe Molimo

Ntoma Yoane alobaki ète bosomi ezali kaka ya mayi, kasi mayi na makila. Bongo, lokola Yesu alongolaki mosika na biso masumu manso pe pona libela na libela, basumuki banso bakobikisama na lisumu na nzela ya kondimela ye, pe la kolanda na botosi Maloba lia Ye.
Tango Yesu akitaki na mokili oyo, Alongolaki kaka masumu té, kasi Afutaki pona yango na kosopa makila ma Ye na liwa na Kuruze. Alongolaki mosika, masumu manso mabiso na libatisi kati na Yordané pe Afutaki nyongo na yango na Kuruze; Afutaki pona masumu mabiso na liwa lia Ye. Mobeko mwa solo mwa nzambe molobi ète ‘lifuti lia lisumu lizali kufa’ (Ba-Romén 6:23) ekomama.
Yesu alongi mokili, elobi nini? Kondima oyo elongi mokili ezali kondima oyo ya kati na sango-malamu ya bosomi, kati na yango Yesu anyetoli biso, na mayi, pena makila. Ayaki na lolenge na nzoto ya motò pe atotalaki lobiko na libatisi lia Ye na mayi pena liwa lia Ye na Kuruze.
Yesu alongaki mokili oyo ebengwamisama na Satana. Bayekoli ba eklézia nayambo batelemaki ngwi, nata liboso na kobomama; pe babangaki té bokonzi bwa Ba-Romén, tope bomekano bwa mokili oyo.
Oyo ezalaki buma ya kondima na bango, na Yesu oyo ayaki na mayi (Abatisama pona kolongola masumu mabiso manso), pena makila ma Ye na Kuruze (Afutaki nyongo ya masumu mabiso na liwa lia Ye).
Yesu ayaki na Molimo (Ayaki na nzoto ya motò), pe alongolaki masumu ma basumuki, na libatisi lia Ye, pena makila ma Ye na kuruze pwète biso banso pazuwa bosomi tolonga mokili.
 

Ezali pe na Bomimonisi bwa Nzoto Bozali Kobikisa Biso, na kati na Nkombo na Libatisi, Koleka na Nzela ya Lisekwa lia Yesu Kristo <1 Piere 3:21>

Bomimonisi bwa nzoto ya lobiko ezali nini?
Libatisi lia Yesu

Ekomami na 1 Piere 3:21, “Ezali pena bomimonisi nzoto oyo bozali kobikisa biso sik’oyo, na nkombo na libatisi (bolongoli na bolembu bwanzoto té, kasi eyano ya motema malamu epayi na Nzambe), koleka na nzela ya lisekwa lia Yesu Kristo.” Ntoma Piere atatolaki ète Yesu azalaki Mobikisi, pe Akayi na mayi na libatisi pena makila.
Nasuka na likambo, tosengeli kondimela Yesu, oyo ayaki na mayi pena makila. Tosengeli pe koyeba ète mayi ya libatisi lia Yesu ezali bomimoni bwa nzoto bwa bosomi nabiso. Ntoma Piere ayebisaki biso ète ‘mayi’ ya libatisi, ‘makila,’ pena ‘Molimo’ ezali ‘biloko ya motuya mingi koleka’ na kati na bosomi.
Bayekoli na Yesu bandimaki na makila na Kuruze, na nzela na libatisi lia Yesu. Kondima kaka makila ezali kosimba kaka eteni ya ndambu ya kondima ya solo. Kondima likolo na etani ya ndambu tope eteni ya bosolo esilaka na tango. Nanganbo mosusu, kondima ya baye bandimeli sango-malamu ya mayi, makila na Molimo ekokola makasi na tango.
Mongongo ya sango-malamu ya makila kaka ezali kokola na kati na mokili mikolo oyo mwa lelo. Ponanini boye? Batò bayebi té Liloba lia solo, bosomi ya mayi pena Molimo, bongo bakoki kobotama mbala ya mibale té.
Ntango moko, mangomba ya ngambo ekwayaki na kati na bozangi bososoli. Namiso na batò, bafulukaki, kasi basali na Satana babalusaki kondima na bango kati na bozangi bososoli.
Bozangi bososoli bozali kondimela kati na kuruze ya libaya ya moke, tope na kuruze ezalami na ekomeli tope na libaya, pe Satana akokima soki motò moko atatoli ète kondima na Ye kozali nakati na makila ma Yesu. Na nzela na biloko ya ndenge wana na biloko mosusu ya bondimi ya bozangi bososoli, Satana akosaki batò nakondima ète bakoki kondima kaka kati na makila ma Yesu. Satana azali kolakisa biso lokola abangaka makila, nakoloba ète eloko moko kaka oyo Yesu asalaki ezali kosopa makila ma Ye na Kuruze.
Nzonkande, Piere na bayekoli mosusu batatolaki sango-malamu ya solo ya libatisi lia Yesu, na makila na Kuruze. Kasi, eloko nini Ba-Kristo ya mikolo oyo bazali kotatola? Bazali kotatola kaka makila ma Yesu.
Tosengeli kondimela, na maloba manso, bakomami na Biblia, pe kozala na kondima na Molimo, na libatisi lia Yesu, pena makila ma Ye. Soki yobosani libatisi lia Yesu, pe tozali kaka kotatola ète Yesu akufaki pona biso, na Kuruze, lobiko na biso ekoki kozala mobimba té.
 

‘Liloba lia Litatoli’ pona Lobiko ya Mayi ya Nzambe

Elembo nini etalisi ète Nzambe abikisa biso solso-solo?
Mayi, Makila, pena Molimo

Na kati na 1 Yoane 5:8, Nkolo alobi ète, “ezali misato oyo ezali kotatola na mabela.” Ya yambo ezali Molimo, ya mibale ezali mayi ya libatisi lia Yesu, pe ya misato ezali makila ma Ye na Kuruze. Yango misatu ezali eloko moko. Yesu ayaki na mokili pona kobikisa bison a masumu mabiso manso. Ye moko asalaki bikolo oyo nyonso misato, libatisi, makila, na Molimo.
‘Ezali misatu oyo ezali kotatola.’ Ezali biloko misato oyo ezali kotalisa ète Nzambe abikisaki biso. Biloko oyo misatu ya botatoli bizali mayi ya libatisi lia Yesu, makila ma Ye, pena Molimo. Biloko oyo misato ezali oyo Yesu asalaki pona biso kati na mokili oyo.
Soki moko ya biloko misato oyo ekokisamaki té, lobiko na biso ekokaki kozala ya mobimba té. Ezali na misatu oyo ezali kotatola na mokili: Molimo, mayi na makila.
Yesu Kristo, oyo ayaki na nzoto, azali Nzambe, Molimo pe Mwana. Ayaki nasè awa na mokili lokola Molimo na kati na nzoto ya motò pe abatisamaki na mayi kolongola masumu manso ma mokili. Amemaki masumu manso na nzoto na Ye pe abikisaki biso masumuki, asopaki makila maye naliwa na Kuruze. Afutaki nyongo ya masumu mabiso. Ezali nde sango malamu ya bosomi ya mayi, makila na Molimo.
Soki kaka, moko nayango mozangaki, ekokaki kozala lokola koboya lobiko lia Nzambe, oyo libikisi biso, na lisumu nyonso. Soki tokoki koyokana na mingi ya bandimi ba lelo, tosengeli koloba ète ‘ezali mibale oyo ezali komema litatoli na mokili: makila na Molimo.’
Kasi Ntoma Yoane alobi ète ezali misato oyo ezali komema litatoli: mayi ma libatisi lia Yesu, makila na Kuruze pena Molimo. Ntoma Yoane azalaki polele-polele mingi na litatoli lia ye.
Kondima oyo ezali kopesa bosomi na mosumuki ezali kondima ya kati ya Molimo, mayi pena makila. Kondima na ndenge nini ekokomisa motò moko na kolonga mokili? Pe esika nini kondima ya ndenge wana ekoki komonana? Ezali kaka awa na kati na Biblia. Ezali kondima Yesu, oyo Ayaki na mayi, makila na Molimo. Ndimela biloko oyo misato pe okobikisama libela na libela.

Lobiko na Nzambe ezalaki ya kokokisama soki libatisi lia Yesu lizangi?

Eleki tango molayi, yambo nabotama mbala ya mibale, ngai, pe, nazalaki Mo-Kristo oyo andimela kaka makila na Kuruze pena Molimo. Nandimaki ète Ayaki awa nasè lokola Molimo, pe Akufaki pona ngai na Kuruze, pona kobikisa ngai na masumu manso. Nandimaki kaka na biloko mibale pe nakanisa, nazalaki koteya pe malamu batò mosusu.
Nabongisaki kotanga makambo na Nzambe na kelasi po nakoma mopanzi sango malamu na sala pena kofa pona milimu mibunga nzela, lokola Yesu asalaki. Nabongisaki makambo minene ebele.
Kasi, lokola nandimaki kaka biloko mibale, ezalaki kaka na lisumu etikalaki na kati na motema na ngai. Wuta nayango, nakokaki té kolonga mokili. Nakangolama té na lisumu. Lokola nandimaki kaka na makila pena Molimo, nazalaki kosumuka nakati na motema nangai.
Mutu ya likambo pona nini nazalaki kaka na lisumu na motema nangai, ata ndenge na ndimelaki Yesu, ezalaki ète, nayebaki té lisolo lia mayi, naya libatisi lia Yesu. Lobiko nangai ezalaki ya ndambu tii na tango naye kokangolama mobimba na kondima na mayi ya libatisi, na makila, pena Molimo.
Nazalaki na makasi té ya kolonga masumu ya nzoto pwète nayabaki té kososoka libatisi lia Yesu. Ata sik’oyo, batò ebele bandimi Yesu, kasi mazali kosala mausmu kaka na nzoto. Bazali kosumuka na kati na mitema na bango nakomeka kolamosa bolingo ya yambo oyo bazalaki na yango pona Yesu.
Bakoki té kolamusa bolingo na bango ya posa ya kosala mosala Pwète, nano basokolami té mobimba na masumu mabango na mayi. Bazali kososola té masumu mabango manso malekaki na nzoto na Yesu, tango bapatisama, pe bakoki té kozongola kondima na bango sima na kokweya na bango.
Nalingaki koloba polele-polele pona bino banso. Tokoki ko bika nakati na kondima pena kolonga mokili tango tondimi Yesu. Ata tozali na makasi mingi te, ezali tolanda molayi ya tango tosali masumu na mokili té, tope molayi ya tango tondimeli Yesu lokola Mobikisi nabiso, oyo akangola biso, na lisumu na libatisi, na makila masopama, pwète tozala balongi.
Soki todimeli Yesu nakozanga mayi ya libatisi lia Ye, tokoki kokangwama té na mobimba. Ntoma Yoane alobaki na biso ète kondima oyo elongaka mokili ezali kondima kati na Yesu Kristo, oyo ayaki na mayi ya libatisi, makila na Molimo.
Nzambe atindaki Mwana na Ye pona kopesa bosomi na baye bandimeli Ye na libatisi pena na makila ma Ye. Yesu alongolaki masumu manso mosika na nzela ya libatisi lia Ye. Yesu, Mwana na Nzambe, ayaki epayi na biso, na Molimo (kati na nzoto ya motò). Bongo, asopaki makila na Kuruze pona kofuta nyongo ya lisumu. Nayango, Yesu abikisaki batò banso na masumu.
Kondima oyo akumbaka na kolonga mokili ewuti na kondima bosolo ète Yesu ayaki na mayi, makila, pena Molimo, oyo ezali kokangola biso, na masumu manso.
Soki mayi ya libatisi ezalaki té, elongo na makila na Kuruze, lobiko ekokaki kozala té. Ezanga moko tope ezala mibale kaka ya misato wana, tokoki kobisama té. Lobiko ya solo ekoki kosalama te libanda na mayi, makila na Molimo. Ponayango, esengeli rondima na mayi, makila na Molimo. Yeba makambo maye pe okozuwa kondima ya solo.
 

Nayebisi Bino, ète Ezali solo té Lobiko libanda na Mayi, Makila pena Molimo

Biloko nini bizali na motuya pona komema litatoli lia lobiko?
Mayi, makila na Molimo

Moko akoki kokanisa ète, likola na motuna oyo ezali likolo boye. “Yesu azali Mobikisi nangai. Nadimi na kati ya makila esopama na Kuruze pe nalingi kokufa lokola libonza. Nadimi Yesu ata lisumu ezali na kati na motema nangai. Natubelaki malamu pe nazali kosala makasi ndege esengeli, lokola kaka na ndenge ya malamu mokolo na mokolo. Napesaki moboyi nangai na biloko nangai nyonso pona Yo. Naboyaki pe kobala. Ndenge nini Nzambe akoki kozanga koyeba ngai? Yesu akufaki pona ngai na Kuruze. Nzambe na biso Mosantu ayaki nasè lokola motò, pe akufaki pona biso, na Kuruze. Nadimeli Yo, namikabaki pona mosala mwa Yo, pe nasalaki mosala mwangai malamu pona Yo. Ata nazali peto té pena masumu moke na kati na motema nangai, Yesu akotinda ngai na lifelo pona yango? Té, akosala bongo té.”
Ezali na batò ebela bazali kokanisa ndenge wana. Bandimi té Yesu abatisama pona kolongola masumu mamokili manso mosika. Tango Ba-Kristo ya ndenge wana, baye bandimi Yesu kasi bazali kosala masumu, bakufi, bakokende wapi? Bakokende lifelo. Bazali basumuki ya bamba-bamba!
Baye, bazali kokanisa ète bazali kosepelisa Nzambe bako kanisa pe boye, bakokende na lifelo. Nasima, basusu malobi ète lokola Yesu alongolaki masumu manso tango akufaki na Kuruze, lisumu moko te lizali na mokili lisusu. Ata, ezali kolobela makila na Molimo; oyo ezali té kondima oyo ekokumba batò na bosomi bwa solo-solo.
Esengele tondima ète Yesu alongolaki masumu mabiso na libatisi lia Ye, asambisama, pe Akufa na Kuruze pona biso, pe Asekwaki lisus mokolo na misatu sima na lilwa lia Ye.
Kozanga kondima ya ndenge wana, bosomi bwa solo-solo bokosala ma té. Yesu Kristo abatisama, akufaki na Kuruze, pe asekwaki. Yesu Kristo ayaki epayi na bison a mayi, makila, pena Molimo. Alongolaki mosika masumu manso ma mokili.
Ezali na bikolo misato ya motuya oyo ezali komeme litatoli na lobiko na Ye na mabele: Molimo, mayi na makila.
Yambo, Molimo Mosantu motatoli ète Yesu azali Nzambe pe Ayaki awa nasè na nzoto ya motò.
Eloko ya mibale ezali litatoli lia ‘mayi.’ Mayi ezali libatisi lia Yesu na Yordané na nzela na Yoane Mobatisi, pona kolekisa masumu pekolekisa yango na nzoto na Yesu. Masumu manso malekaki na nzoto na Ye tango Abatisama (Matié 3:15).
Motatoli ya misato ezali ‘makila’ eyo esopami pwète Yesu Andimaki kokumba mokumba mwa etumbu ya masumu mabiso. Yesu akufaki, andimaki etumbu ya Tata na Ye pna biso pe Asekwaki mokolo ya misato pona kopesa biso bomoyi ya sika.
Nzambe Tata atinda Molimo kati na mitema mia baye bandimi na libatisi na makila ya Mwana mwaona kotatola bosmomi bwa biso.
Baye babotami mabala ya mibale bazali na Liloba, oyo bakolongi na yango mokili. Basomi mako longa Satana, basali ya lokuta na bakosi, na mikakatano, tope makambo ya mabe naya makasi ya mokili oyo mazali tango na tango kobundisa bango. Tozali na nguya wana pwète tozali na botatoli misatu kati namitema mia biso: mayi ma Yesu, makila ma Ye, pe Molimo.

Ndenge nini tolongi mokili na Satana?
Na nzela ya kondima kati na botatoli misato

Tokoki kolonga Satana elongo na mokili pwète tondimi kati na Molimo, mayi, pena makila. Baye bandimi na libatisi pena makila ma Yesu bazali na makoki ma kolonga lukuta nyonso ya basakoli ya lokuta. Kondima nabiso, na makoki ma kolonga, ezali na kati na mayi, makila, pe Molimo. Ondimi yango?
Okoki kobotama mbala ya sika, tope kolonga mokili soki ondimi té bosomi kati na libatisi lia Yesu, Makila ma Ye, pe kondima ète Yesu azali Mwana na Nzambe Mobikisi nabiso. Kondima ya ndenge wana ezali nakati na motema nayo?
Ozali na Molimo pe, na mayi na kati na motema nayo? Ondimi ète masumu mayo manso malekaki na nzoto na Yesu? Ozali na makila ma Kuruze na kati na motema nayo?
Okolonga mokili soki ozali na kondima kati na mayi pena makila ma Yesu kati na motema na yo. Soki ondimi ète Yesu akufaki na Kuruze pona yo pe amemaki etumbu nayo, okolonga.
Ntoma Yoane alongaki mokili pwète azalaki na bikolo misato oyo ya motuya na kati na motema mwaye. Ayebisaki biso pe likolo na bosomi bwa bandeko banso kati na kondima baye basali kokoba na kokanga motema na kati na mikakatano na misala makasi. Atatolaki ète, “Ezali bongo nde okoki kologa mokili. Yesu ayaki na nzela na Molimo, mayi pena makila. Lokola alogaki mokili, boye akolongisa mondimi likolo na mokili. Yango nde nzela moko kaka epesameli na mondimi pona kolonga mokili.”
Nakati na 1 Yoane 5:8, ekomami ète, “Pe ezali na misato baye bamemi litatoli na mokili: Molimo, mayi, pena makili; pe bango misato bayokani lokola moko.” Ebele na batò bazali nano kobta lisolo lia makila na Molimo pe babosani mayi ya libatisi lia Yesu. Soki balongoli ‘mayi,’ bakosami nano na Satana. Basengeli kobima na lukuta na bango moko wana pe kotubela; basengeli kondima kati na ‘mayi’ ya libatisi, ya botama ya mbala ya mibale.
Moko té akoki kolonga mokili libanda na mayi pena makila ma Yesu. Nalobi yango lisusu, moko té! Tosengeli kobunda na kosalela mayi na makila ma Yesu lokola bibundeli bia biso bia nguya. Liloba lia Ye lizali mopanga ya Molimo, Mwinga.
Ezali nano na ebele ya batò baye bandimi té na libatisi lia Yesu, oyo elongoli mosika masumu manso mabiso. Ezali na batò ebele baye bandimi kaka biloko mibale. Bongo, Yesu ayebisi biso ‘toteleme pe togenga,’ bakoki kogenga te ata moke. Bazali na lisumu na Katina mitema miabango. Ata basi kondimeli Yesu, suka na bango ezali lifelo.
 

Sango Malamu ya Libatisi pena Makila ma Yesu Esengeli Etatolama Pwète Batò Bayoka, Bandima, pe Babikisama

Kondima kati na libatisi lia Ye ezali masoilo kaka ya pamba?
Té, lisolo ya pamba té. Esali lisolo ya solo-solo.
 
Tano tozali totatola sango-malamu, esengeli emonisama polele-polele. Yesu ayaki na Molimo, libatisi (liye lizali kolongola mosika masumu manso mabiso), pena makila (maye mafutaki masumu manso mabiso). Tosengeli kondima bikolo oyo nyonso misato.
Pamba té, tozali toteya sango-malamu té, kasi basolo yabozambe kaka. Ebele na Ba-Kristo bazali kotala bokristo ya lelo lokola masolo ya bonzambe ya pamba tope ya ligomba, kasi bokristo ekoki kozale té lokola bozambe ya ligomba té. Ezali kondima ya bosomi etogami na bosolo, kondima ya kotalela Nzambe. Ezali té bonzambe ya ligomba tope ya bokoko.
Bozambe ya lingo tope ya bokoko ezalama na batò ya mokili oyo, kasi kondima ezali koluka lobiko epesamelami biso na Nzambe. Bokeseni yango wana. Soki ozangi koyeba bosolo, ozali kosalela bokristo lokola bonzambe ya lingola tope ya bokoko oyo azali koteya na bwania na batò pen a mabongisi ya kelasi.
Yesu Kristo ayaki té tosala bonzambe ya bakoko na kati na mokili oyo. Atikaki té lisanga lia book libangani bokristo. Poa nini tozali kondima ète ezali bonzambe ya bokoko? Soki kak ezali ndege wana, pona nini té kondima kati na Ki-Buddah? Okanisi ète nazali té na nzela tango nazali kola bongo?
Batò mosusu bandimi Yesu lokola lisanga lia bozambe na bokoko tope ya kobika na yango, pe bazali koloba ète, “Bokeseni bozali té? Lola, nirvana, paradizo.... Ezali eloko moko, ezali kaka bankombo nde ekeseni. Tokosuka biso banso esika moko mokolo moko.”
Baninga Ba-Kristo, tosengeli kotelema na makasi manso likolo ya bosolo. Tosengeli ‘koteleme pe kongenga.’ Tosengeli kozala na makasi ma kolobela bosolo na kozanga tembe ata moke kati nabiso.
Tango motò alobi ète, “Wana ekoki kozala té nzela na Lola,” okotala ye na miso makasi pe kolobela ète, “Boye! Ezali nzela moko kaka oyo etikali pona kokende Lola. Okoki kokende Lola kaka soki ondimi Yesu Kristo, oyo Ayaki na mayi, makila, pena Molimo.” Osengeli kongenga makasi pwète milimo misusu mizala na posa ya koyoka Liloba lia bosomi, kobotama mabala ya mibale, pe, kokende Lola.
 

Zala na Kondima ya Solo: Baye Bazali na Bolingo ya Makasi Pona Yesu, Soki Bayebi té Bosomi bwa Libatisi lia Yesu pe Makila ma Ye, Bakokufa

Nani akokufa ata andimeli Yesu?
Baye bandimeli té Libatisi lia Yesu

Ezali té likambo lia koloba na monoko kaka ète kondimela Yesu ezali kozala na bolingi ya makasi pona Ye, pe yango nde nzela ya mokuse ya kozala mokristo. Wana bo-kristo té, kasi bondimi bwa likolo-likolo.
Masuwa ya mayi esindaki na mayi monene ya Pasifiké, pe batò babikaki batikelaki likolo na bwato ya moke ya bobikisi. Batindaki elembo ya kobenga lisungi, kasi mayi mazalaki mabe pe masuwa mosusu ya mayi ekokaki koya kosunga bango. Bongo, pepo moko eyaki pe ekweyiselaki bango singa. Soki motò asimbi singa wana na maboko maye na esika ya komisinga yango na nzoto naye, ezali lokola kokweya nakati na bolingo ya makasi ya Yesu; nakondima Nzambe lokola alingi yango. Azali nano libanda na likama té, kasi alobi ète, “Nandimi. Bikisa ngai, nandimi, bongo, nakobikisama.”
Motò oyo asosoli nano té bosolo ya libatisi lia Yesu na makila ma Ye andimi ète akobikisama kaka na kosimba singa.
Kasi, tango akonyetolama, maboko maye makolemba. Akosalela makasi maye. Ekosala pasi mingi pona ye kokoba tii suka. Tango makasi makosila ye, akokweya na kati na mayi monene.
Kondima na bolingo ya pwasa kati na Yesu ezali ndenge wana. Ebele ya batò bandimeli Nzambe pena Yesu; bandimeli Yesu oyo ayaki na Molimo, kasi yango ezali kaka eteni ya likambo. Bakoki kokota na bosindo té, pe kofanda na kati na sango-malamu ya solo, bongo, bazali komitindika na koloba-loba ète ‘bandimeli’ Ye.
Kondima na komeka kondima ezali eloko moko té. Balobi ète bakolanda Yesu tii na suka, kasi bakobwaka bango libanda mokolo mwa suka, pwète masumu matikalaki kati na mitema miabango. Balingi Yesu na pwasa, bayeyebi té Ayaki na libatisi lia Ye, makila, pena Molimo. Soki Yesu ayaki kaka na makila ma Ye, bakokende lifelo.
Kanga molimo nayo na singa ya sango-malamu yasolo, sango-malamu ya mayi, na makila. Tango Yesu akitisi singa ya lobiko, baye bamisingi na mayi, makila pena Molimo, bakobikisama.
Mobikisi na kati na pepo azali koganga na megafoné ète, “Boyoka ngai malamu. Tango na kokweyisa singa, kanga yango malamu na tolo nayo, nasè na maboko mayo. Bongo, fanda ndenge ozali. Kojembela na maboko mayo té. Kanga kaka singa na tolo nayo pe mipemisa. Sima na yango, okobikisama.”
Motò yaliboso alandaki mitindo pe akangaki singa, pe abikisamaki. Kasi mosusu alobaki ète, “Likambo ezali té. Nazali makasi. Nasali mbula mingi bakalasisi ya nzoto. Tala! Okoki komona monene na nzoto nangai? Nazali na makasi mingi.” Azuwaki singa na maboko maye tango bakweselaki ye yango.
Bango banso mibale banyetolama na ebandeli. Kasi bokeseni bozalaki ète moko ayokaki mitindo, pe akangaki singa na tolo naye, pe amitiki naye. Abosanaki ète azali kokende likolo, pe akoma malamu.
Mosusu oyo azalaki na lolendo ya makasi maye akweyaki pwète makasi ekimaki ye. Akufaki pwète aboyaki koyoka, pwète akotalaki pamba mitindi.
Pona kozuwa bosomi na botondi nyonso, moko na moko asengeli kondima kati na bosomi bwa mayi ya libatisi, pena makila maye makobikisa milimo na lisumu. Lobiko ezala pona baye bandimeli Liboba na motema nyonso: “Nabikisaki bino na mobimba, na libatisi lia Ngai na nzela na Yoane Mobatisi na kosopa makila, na liwa na Ngai na Kuruze.”
Baye bandimeli kaka kati na makila balobi ète, “Kobange té, nandimi. Nakozuwa lifuti na suka ya bomoyi nangai, pona makila na Yesu. Nakolanda Yesu tii na suka pe kondima nangai kaka na makila ekoki, pona kolonga mokili pena masumu manso pona tango oyo etikali na bomoyi na ngai.”
Nangambo mosusu, oyo ezali kokoka té. Baye Nzambe andimi kozala libota lia Ye, bazali baye bandimeli kati na biloko misatu tobotatolaki, ète: Yesu ayaki na Molimo, Abatisama (Yesu alongolaki mosika masumu manso na libatisi lia Ye na Yordané), Akofaki na Kuruze pona kofuta nyongo ya masumu manso, pe Asekwaki mokolo mwa misato wuta maweyi.
Molimo moyakaka kaka nabaye bandemeli kati na nyonso misato pe, bazali kokoba kotatola yango. “Boye, Nazali Mobikisi mwayo. Nabikisaki yo, na mayi, na makila. Nazali Nzambe nayo.”
Na baye bandimeli té nyonso misato, Nzambe akopesa té lobiko. Ata moko kaka esangi, Nzambe alobi, “Té, obikisami té.” Bayekoli banso bandimaki na nyonso misato. Yesu alobi ète libatisi lia Ye lizali elili ya lobiko, pe makila ma Ye ezali etumbu.
 

Ntoma Polo na Pier, Bango pe Bamemaki Litatoli lia Libatisi na Makila ma Yesu

Bayekoli na Yesu bamemaki litatoli nini?
Libatisi lia Yesu pena makila ma Ye

Ntoma Polo alobelaki libatisi lia Yesu? Tika ète totala mbala boni alobelaki likolo na libatisi lia Yesu. Alobaki na Ba-Romén 6:3, “Pwète, boyebi té mingi na biso babatisama kati na Yesu Kristo, babatisama kati na liwa na Ye?” Pe na 6:5, “Pwète soki tosangisami na elongi ya liwa lia Ye, solo-solo tosengeli kozala na kati ya elongi ya lisikwa lia Ye.”
Alobi lisusu na Ba-Galaté 3:27, “Pwète mingi katikati na bino ète lokola tobatisama kati na Kristo, tolaki Kristo.” Bantoma manso na Yesu batatolaki likolo lia ‘mayi,’ libatisi lia Yesu. “Ezali lisoso na bomonisi nzoto oyo ezali kobikisa biso sik’oyo, na nkombo na libatisi” (1 Piere 3:21).
 
 

Lobiko ya Bosomi na Nkolo Eyaki na Mayi pena Makila ma Yesu


Nani Nzambe akobenga moyengebeni?
Maye bazali na masumu ata moke té, na mitema mia bango

Bosomi epesami na Yesu pona motò ezali na boyebi bwa mayi ya libatisi lia Yesu pena makili na Kuruze. Na nzela ya bosomi, tokoki koteleme pe kongenga. Ndenge nini? Nakotatola makambo misato mana.
“Telema, ngenga; Pwète mwinda nayo eyè! Pe kembo na NKOLO elamoki likolo nayo” (Ezayi 60:1). Nzambe angengisi mwinda likolo na biso, pe ayebisi biso tongenga pe. Esengeli totoza mobeko mwa Ye.
Tozalaki koteya sango-malamu na kati mabiso. Pe, batò bingi bazali koyoka té. Ndima Yesu pe okobisama. okobulisama. Soki masumu matikali nano nakati na motema, ozali nano té moyengebeni. Nano olongi masumu ma mokili.
Okoki ata moke té kotika masumu kati na motema mwayo, soki ondimeli, nano té mayi ma Yesu (libatisi lia Yesu). Okoki kokima té mosika na bosambisami soki ondimelii té makila ma Yesu. Okoki kobikisama ata moke, soki ondimi té Kristo, oyo Ayaki na nzela ya Molimo. Okoki kozala na botondi bwa bosembo, kaka soki ondimeli kati na matatoli misato mana.
Boyengebene ezangi botondisami, ekomema na ‘boyengebene ya ndege moko boye.’ Soko motò alobi ète, azali na lisumu, kasi azali komimona motò moyengebeni, motò ya ndenge wana azali nano té kati na Yesu. Batò mosusu mikolo miye bazali komeka kojembela na bosomi koleka na ‘boyengebene ya ndege moko boye.’ Bakomaki mikanda mingi ezanga tina na likambo oyo.
Nzambe abengaki motò moko, motò na bule tango masumu mazali nano na kati ya motema ne ye? Té. Abenga yango ndenge amonaka yango. Atonda na ngulu, na mawa, kasi akosaka té. Batò bazali kososola té nini ezali boyengebene. Tobengaka eloko moko ‘peto’ kaka esokwami. Tokoki koloba ‘moyengebene’ esika wapi ezali na masumu.
Okokanisa ète obengani moyengebene na Yesu ata lisumu lizali na motema, kasi yango ezali bongo té.
Yesu abengaka biso bayengebene tango tondimeli Ye lokola Oyo ayaki na Molimo, mayi (maye malongoli masumu mabiso tango abatisamaki), pena makila (Ayaki na nzoto pwète akufela biso).
Bandeko Ba-Kristo, ‘boyenbene ya ndege moko boye’ ezali na eloko moko, ebompami na kati na sango-malamu ya mayi na makila. ‘boyenbene ya ndege moko boye,’ tope ‘komibenga moyengebene’ ezali lisolo moko boye esalama na batò. Nzambe akobenga yo moyengebeni, tango ozali na lisumu na kati na motema mwayo? Nzambe abengaki motò té moyengebeni tango azali, nano na lisumu na motema mwaye, ata azali motò ya kondima makasi kati na Yesu. Yesu akoki kokosa té ata moke.
Tii tango oyo, ozali kokanisa ète Akobenga moyengebeni, tango lisumu lizali na motema mwaye? Oyo nde batò bazali kokanisa; Nzambe té. Nzambe alingi té kokosa. Akobenga moyengebeni, tango kaka ondimeli kati na ‘Molimo’ na ‘makila?’ Ata moke té.
Ezali kaka na lolenge moko ya batò baye Nzambe abengaka bayengebeni. Baye bazali na masumu na kati na mitema mia bango té. Azali koyeba kaka baye bandimeli biloko oyo misato: ète Yesu azali Nzambe, ayaki nasè na mokili na nzoto, abatisama nakati na Yordané, pe asopaki makila maye na Kuruze pona masumu mabiso.
Kaka baye bandimeli kati na sango-malamu ya bosomi nde baye Nzambe ayebi lokola mayengenbeni ba Ye. Bango nde bazali na kondima ya solo. Bandimeli na botondisami nyonso makambo manso misato Asalela bango. Bandimeli ète Yesu ayaki, abatisama pona kolongola masumu manso, akumbaki etumbu pona biso, pe akufaki na Kuruze, pe asekwaki wuta baweyi.
Makambo maye manso masalama na bolinga bwa Nzambe. Yesu ayaki nasè wuta Lola pe Alobi ète, “Boya epayi na Ngai, bino banso baye bazali komema pasi, po bolembi na mikumba, Nakopesa bino kimia” (Matié 11:28).Azalaki oyo abongisaki nzela ya kolongola masumu mabiso mosika.
Nzambe azali koyeba té kaka baye bandimeli makila ma Yesu. Baye bandimeli kaka makila ma Yesu, bazali nano na lisumu na mitema mia bango. Yesu ayebi ète, bango kozuwa té bosomi?
Kondima na libatisi lia Yesu, makila ma Ye, pe, na ndenge Azali Nzambe, yango nyonso esengeli kozala pona lobiko. “Nalongolaki masumu mayo manso tango nayaki nasè na mokili oyo pena batisama na Yoane Mobatisi. Nazali kotatola ète masumu manso ma mokili malekaki na nzoto na Ngai. Nafutaki nyongo na Kuruze. Nabikisaki yo, bongo.”
Nabaye bandimeli makambo manso misato, Yesu alobi ète, “Boye, bobikisami. Bozali bayengebene pe bana na Nzambe.” Yo, pe, okoki kobisama soki ondimeli libatisi lia Yesu, makila ma Ye, pena molimo yango nyonso misato. Baye bandimeli kaka makila pamba pena Molimo bazali nano na lisumu na Katina mitema mia bango.
Na kati na bokonzi bwa Nzambe, ezali kaka na bosolo moko kaka. Ezali boyengebene, bosolo, bolingo, na molamu. Litanga lia lokuta lizali, ata moke té. Kokosa ezali na esika té na Lola.

Nani oyo azali kosala oyo episama na mobeko?
Oyo nyonso andimeli té kati na libatisi lia Yesu

“Mingi bakoloba na mokolo wana. ‘Nkolo, Nkolo, tosakolaki na nkombo na Yo, tobenganaki milimo mabe na nkombo na Yo, pe tozalaki bikamwa na nkombo na Yo?” (Matié 7:22).
Nzambe akotala té misala miabaye bakokota té na Bokonzi bwa Ye. “Pe Akoyebisa bango, ‘Nayebi bino ata moke té: bokende mosika na Ngai, bino batò na misala mabe!’” (Matié 7:23).
“Napesaki bandako mibale pona Yo. Napesaki bomoyi bwangai pona Yo. Omonaki ngai? Nano nawagana Yo tii na pema na nangai ya suka. Omonaki ngai té?”
“Bongo, ozali na lisumu na kati na motema nayo?” 
“Boye, Nkolo. Nasalaki moke kaka.”
“Bongo, kende mosika na Ngai! Mosumuki moko té apesamela koya awa.”
“Kasi nakufaki lokola mbeka pona kondima kati na Yo Nkolo!”
“Kokufa pona mosala mwa Nzambe, ezali nini? Yo moko okufaki pona motema mwayo makasi. Ondimelaki libatisi lia Ngai, na makila? Natatolaki na kati na motema nayo ète ozali mwana na Ngai? Yo ndimeli té libatisi lia Ngai pena Na tatola yo ata moke té, ète ozali mwana na Ngai, ojembeli kaka na kondima nayo pona yango. Tango nini natatolaki pona yo? Omemi yango na ndenge yayo moko. Olingaki, pe omekaki yomoko bosomi bwayo. Oyoki sik’oyo? Ozalaki na ndenge nayo moko.”
Yesu ayebisi biso, totelema pe tongenga. Batò na bosomi mingi bakoki kokweya liboso ya Ba-Kristo na masanga ya bankombo ya ndenge na ndenge, na basakoli ya lokuta, pe kokweya kongenga makasi! Kasi bató moke kaka bango nde bakoki bokoma binene. Soki kaka motò moko, abandi na nguya kotatola bosolo, mokili mobimba mokogenga.
Na Mokanda mwa Ezaya 60:1-2, ekomami, “Telema, ngenga makasi, pamba té, tongo etaneli yo! Kembo na Nkolo motelemi likolo nayo. Pwète, tala, molili mokozala na mokili mobimba, pe molili ya makasi likolo na batò; kasi Nkolo akotelema likolo nayo, pe kembo na Ye ekomonana likolo nayo.”
Nzambe apesaki mitindo na biso kotelema, pe kongenga, pwète molili ya lokuta, oyo ezali sango-malamu ya lokuta, etondi mokili mobimba. Kaka baye bandimeli Yesu nde baye kolinga Ye solso-solo. Baye nano bazuwi bosomi, bakoki té kolinga Yesu solso-solo. Ekosalama ndenge nini? Bazali koloba bolingo na monoko, kasi na kati na bango nano balingi solo-solo Ye; kaka tango bakondimela ka kati na bosolo nyonso, nde ekosalema.
 

Ezali na Biloko Misato Oyo Ezali Komeme Litatoli lia Lobiko lia basumuki

Litatoli lia lokibo kati na mitema mia biso ezali nini?
Libatisi lia Yesu

“Pe ezali na misato oyo ezali komema litatoli na mabele: Molimo, mayi, na makila bayokani lokola moko.” Yesu ayaki na mokili pe asalaki mosala mwa Ye, na mayi na makila. Asalaki yango pona kobisa biso.
“Soki toyambi litatoli lia batò misato, litatoli lia Nzambe lizali monene koleka; pwète oyo ezali litatoli lia Nzambe oyo ezali kotatola likolo na Mwana na Ye. Oyo andimeli Mwana na Nzambe azali na litatoli kati na yemoko; oyo andimeli té Nzambe akomisi Ye mokosi, pwète andimeli té litatoli ète Nzambe apesaki pona Mwana na Ye. Pe litatoli liango oyo; Nzambe apesaki biso bomoyi ya seko, pe bomoyi wana ezali Mwana na Ye. Oyo azali na Mwana azali na bomoyi; oyo azangi Mwana na Nzambe, azangi pe bomoyi” (1 Yoane 5:9-12).
Oyo abatomi mbala ya mibale ayambi litatoli ya batò. Tozali koyeba ye lokola moyengebeni. Tango motò oyo abotami mbala ya mibale, oyo azuwi bosomi, alobi bosolo bwa bosomi, batò bakoki kowangana yango té. Bakondima yango. Bazali koloba ète tondimeli solo-solo, tozali sembo na kondima ya solo. Soki toyebisi bango ète tobotama mbala ya mibale, moko té akotiya tembe na sango-malamu yasolo oyo tozali komema litatoli na yango. Balobi ète tolobi yasolo. Toyambi litatoli lia batò.
Kasi molongo oyo molobi ète, “Litatoli lia Nzambe lizali linene koleka; pwète lizali litatoli lia Nzambe.” Elobami ète litatoli lia Nzambe lizali lia Mwana na Ye. Boye té? Litatoli lia Mwana lizali nini? Litatoli oyo Nzambe abikisaki biso lizali ète Yesu ayaki na Molimo, mayi na bosomi, pena makila ma Kuruze. Nzambe atolaki ète oyo nde nzela Abikisaki biso, pe tozali batò ba Ye pwète tondimeli yango.
“Oyo andimeli mwana na Nzambe azali na litatoli lia yemoko; oyo andimeli té Nzambe akomisi Ye mokosi, pwète andimeli té litatoli ète Nzambe apesaki Mwana mwa Ye.”
Milongo miye mitalisi biso polele babikisami bazali ba nani. Ekomami ète oyo andimeli Mwana na Nzambe azali na litatoli Katina na yemoko. Bazali na litatoli kati na mitema miabango? Ezali kati nayo pe ezali kati nangai. Yesu ayaki na mokili pona biso. (Ayaki na nzoto koleka na nzoto na Maliya na nzela ya Molimo Mosantu.) tango azalaki na mbula 30, Abatisama pona kolongola masumu manso na nzoto na Ye. Pena masumu manso mabiso, Asambisama na Kuruze. Asekwaki mokolo mwa misatu pona kobesa biso bomoyi bwa seko na seko. Yesu abikisaki biso bongo.
Nini ekokaki kosalama soki Asekwaki té? Ndenge nini akokaki kotatola pona ngai kati na kunda? Ezali pona nayango, Azali Mobikisi nangai. Yango nde tondimeli.
Kaka lokola Alobaki, Abikisaki biso, na libatisi lia Ye pena makila. Pe pwète tondimeli, yo, nangai, tobikisami. Litatoli lizali kati nangai pe lizali kati nayo. Mosomi akoki kobosana ata moke té ‘mayi’ ma libatis lia Ye. Tokobosana aka moke té makambo maye Asala pona kobikisa biso.
“Pwète wana nde ekoki kosalama pona kokokisa boyengebene nyonso” (Matié 3:15). Tokoboya ata moke té, ète Yesu alongola mosika masumu manso mabiso na Yordané tango Yoane Mobatisi abatisaki Ye. Mosomi akoki kobosana ata moke té ‘mayi,’ libatisi lia Yesu.
 

Baye Bandimeli, Kasi nano Bazuwi Bosomi té, Bawangani Libatisi lia Yesu Nasuka

Nani akomosi Nzambe mokosi?
Oyo andimeli té libatisi lia Yesu

Nabokokisami nyonso Ntoma Yoane alobaki ète, “Oyo andimeli té Nzambe akomisi Ye mokosi.” Soki Ntoma Yoane azali kobika sik’oyo, eloko nini akokaki koyebisa biso, biso Ba-Kristo ba mikolo oyo? Akokaki kotuna soki ‘Yesu alongolaki masumu mabiso manso tango abatisama tope té.’
Yoane Mobatisi pe akokaki kotatola na sango-malamu ète Yesu apesaki biso bosomi na libatisi lia Ye? “Masumu mayo malekaki té na mutu na Yesu, pe amemaki yango té na mokongo na Ye tango abatisama nangai?” Bongo, akokaki kotalisa biso polele ète Yesu abatisama pona kobikisa biso manso (Yoane 1:29. 1 Yoane 5:4-8).
Baye bandimeli té Nzambe, na maloba mosusu, oyo andimeli té na makambo manso Asalaki pona kobikisi biso, asali Ye mokosi. Tango tolobi ète Yesu alongolaki masumu mabiso manso mosiki tango Abatisama, balobi, “O, ndeko! Akokaki kolongola masumu mabiso manso mosika! Alongolaki kaka oyo ya botama, boye masumu mabiso ma mikolo na mikolo matikali”
Boye, bazali koloba ète esengeli kosala mabondeli ya bolimbisi na masumu na bango ya mikolo na mikolo pona bosomi bwa bango. Yango nde bandimeli. Yo pe ondimeli yango bongo? Baye bandimi té, ète masumu mabiso malologwama mosiki na libatisi lia Yesu, basali bango banso Nzambe mokosi.
 

Yesu Apesaki Biso Bosomi Mbala Moko pona Nyonso Tango Abatisama pe Asopaki Makila na Kuruze

Nani azali kokosa?
Motò andimeli té libatisi lia Yesu

Yesu abatisama pe alongolaki mosika masumu manso mbala moko pona libela. Nzambe abikisi baye bandimeli libatisi na makila ma Yesu, kasi azali kotika epayi baye bandimeli té. Bakokende lifelo. Ponayango, kobikisama tope té, ezali likambo ya ndenge nini tondimeli. Yesu abikisaki mokili na masumu manso. Baye bandimeli babikisami, pe baye bandimi té bakobikisama té pwète basali Nzambe mokosi.
Bato bakokende lifelo pona kozanga makasi té, kasi pona kozanga kondima. “Oyo andimeli Nzambe té azali Nzambe mokosi” (1 Yoane 5:10). Baye bazangi kondima ète masumu mabango manso malongwami na nzoto na Yesu bazali nano na lisumu na kati na mitema mia bango. Bakoki koloba ète bazangi masumu.
Mbala moko, nakutana na mosali nakati na etonga moko pe natunaki ye, “Mosali, masumu manso malongwaki tango ondimela Yesu?”
“Yasolo malongwama.”
“Bongo, lokola Yesu alongolaki masumu ma mokili pe alobaki ète ‘ekokisami,’ obikisami. Boye té?”
“Boye, Nabikisami.” 
“Pe ozali na lisumu lisusu té?” 
“Boye, ezali ndenge wana.”
“Nini ekosalama soki nasumuki lisusu?”
“Tozali batò. Ndenge nini tokoki kozanga kosumuka lisusu? Bongo esengeli kosenga bolimbisi pe komipetola na masumu mabiso mokolo na mokolo.”
Mosali oyo azali kaka na lisumu nakati na motema mwa ye pwète ayebi té botondisami bwa bosomi ya solo.
Kotalela likambo ndenge oyo ezali lokola baye bazali koseka Nzambe pe kosala Ye mokosi. Yesu, Oyo azali Nzambe, akweyaki kolongola masumu ma mokili? Ezali basi mingi. Soki Yesu atikaki masumu mosusu mabiso, ndenge nini Akoki kozala Nzambe Mobikisi? Ndenge nini akoki koyebisa biso tondimela Ye? Okosala Ye mokosi? Nakobisi yo kosala yango té!
Biblia eyebisi biso koseka Nzambe ata moke té. Elingi koloba, kozala Ye té mokosi pe komeka kokosa Ye té. Azali té lokola biso.
Ntoma Yoane ayebisi biso na polelele sango-malamu ya bosomi. Batò ebele baling té kondimela makambo maye Nzambe asalaki pona biso—ndenge Yesu Kristo ayaki na mayi, makila, pe Molimo.
Ezali na mintindo mibale mia Ba-Kristo: baye bandimeli té lolenge Biblia elobi pe etatoli, “Nazali mosumuki,” pe baye bandimeli na makambo manso maye Nzambe asala pona bango pe bazali kotatola na kondima, “Nazali moyengebeni.” Lisanga nini lizali koloba solo?
Baye bandimeli té makambo maye Nzambe asali, na maloba mosusu, baya bandimeli té litatoli lia mayi, makila, pena Molimo, bango nde bazali kokosa. Kondima na bango ezali ya lokuta. Baye bandimi té, bazali kokomisa Nzambe mokosi.
Kokomisa Ye mokosi. Yesu ayaki na Mayi ma Yordané pe, ponayango, (nakobatisama) kokokisa boyengemene nyonso (alongolaki masumu ma mokili).
 

Baye Bazangi Kondima Baboyi Libatisi lia Yesu pe Bosanto bwa Ye

Satana na moyini baboyi nini?
Libatisi lia Yesu

Oyo nyonso andimeli Mwana mwa Ye azali na litatoli kati naye. Oyo abotami mbala ya mibale andimeli ète masumu maye malongwama tango Yesu abatisama, pe abikisama na mayi pe makila ma Yesu. Ba-Kristo babotami mbala ya mibale, bandimeli ète, Yesu abotama na mokili oyo na nzela na nzoto na Moseka Maliya, ète abatisama na Yordané liboso kokufa na Kuruze, pe asekwakaki.
Bayengebene bazali na litatoli kati na mitema mia bango. Elembo ya lobiko bwabiso ezali kati na kondima na biso kati na Yesu, oyo Ayaki na mayi, makila na Molimo. Litatoli lizali kati nayo. Nasengi yo ozaIa na litatoli kati nayo moko. Nalobeli yo yango. Ezali na lobiko té soki litatoli lizali té, soki ezangi elembo ya lobiko, kati nayo.
Ntoma Yoane alobaki ète, “Oyo andimeli kati na Mwana na Nzambe azali na litatoli kati naye” (1 Yoane 5:10). Ezali kozala na litatoli ya kondima kaka kati na makila na Kuruze? Tope, kondima na mayi, kasi té na makila? Osengeli kondimela nyonso misato pona koyebana na Nzambe.
Kaka bongo nde Yesu akotatola pona yo ète ‘obikisami.’ Okanisi ète okozala na litatoli soki ondimeli kaka na mibale ya misato? Osengeli kondimela Nzambe na ndenge nayo moko. Kondima nayo yango moko nde eko ‘tatola pona yomoko.’
Batò ebele na katina mokili bazali bongo. Mingi bandimeli nakati na mokili oyo kaka na bikolo mibale kati ya misato wana. Batotali ète babikisami pe bakomi mikanda likolo na yango. Bazali koloba mingi pamba! Ezali kosala mabe. Bamibengi ‘bapanzi sango-malamu .’ Toloba kaka bazali té kaka ‘bapanzi sango-malamu,’ kasi bazali pe ‘batò ya bindima-ndima.’ Bandimeli té kati na ‘mayi,’ kasi batondi na lolendo ya lobiko na bango! Bakoki kozala lokala batò ya bosolo libanda, kasi na kati nabango litatoli lia Nzambe lizali na ndenge na makanisi mabango. Ezali pe ndenge ya kotalela likambo liye na ndenge esengeli!
Ndenge nini okoki kobenga yango lobiko? Kaka baye bandimeli Yesu, oyo Ayaki na Molimo, mayi na makila, bango nde bazali na litatoli lia Nzambe na kati na batò.
Ntoma Polo alobaki ète, “Pwète sango-malamu nabiso eyaki té epayi nayo, na maloba ya pamba, kasi na nguya, pena Molimo Mosanto pena, na elikia mingi” (1 Ba-Tésalonika 1:5). Satana asepelaka tango batò bandimela kaka makila ma Yesu. “O, bino batò na liboma, bokosama, ha-ha!” Ezali na ebele ya batò bandimeli ète tango banyetolaka makila ma Yesu, Satana akima mosika. Bakanisi ète Satana akoki kobanga bona Kuruse. Kasi, tiya na kati na mutu nayo ète Satana azali kaka kotala yo. Tomikosama té nayango.
Tango molimo mabe mokangi motò, akoki kokoma zoba pe abimisi soyi na monoko. Ekamwisa yo té pwète, molimo mabe ezali na nguya na kosalisa motò makambo kili-kili, ndenge elingi. Molimo mabe ekoki kosalela pe mayele naye. Nzambe apesaki Satana nguya nyonso ya ndenge na ndenge, kasi ya koboma té. Satana akoki kosala motò kolenga lokola litili, pena kobimisa ye soyi na moko.
Tango esalemaka bongo, bandimi bagangaka, “Bima, bima na nkombo na Yesu! Bima!” nasima tango motò azongeli na bomotò bwaye, bayebisi ye ète ezalaki makila ma Yesu mazalaki na nguya ebikisa ye. Kasi ezalaki té nguya ya makila ma Ye. Ezali kaka Satana azali komilakisa.
Satana abangaka mingi baye bandimeli Yesu, baye basokwami kati na libatisi lia Ye, oyo azuwaki etumu esika na biso, na makila ma Ye pena mokolo ya misato, asekwaki. Satana akoki té kotelema liboso na litatoli lia libatisi na Yesu pena lobiko na makila ma Ye.
Lokola oyebi yango, basango ya Eklézia Katolika basala bolobelesi milimo mabe. Totala yango na bilili. Na kati na bilili na nkombo, ‘Elembo,’ sango moko asimbaki kuruze ya libaya pe azalaki koningisa yango, kasi sango wana akufaki na suka. Motò oyo abotama mbala ya mibale akoki kobundisama pe kolongwama ndenge wana té.
Mondimi oyo abotami mbala ya mibale alobelaka na elikia nyonso lisolo ya makila pe ya mayi na Yesu. Tango Satana azali komeka kotungisa ye, akoyebisa ye, “Oyebi té ète Yesu alongola masumu mangai manso mosika na ngai?” Satana akokima mosika naye. Satana ayini baye ‘babotama mabala ya mibale.’ Soki motò oyo ‘abotama mbala ya mibale’ afandi kaka awa, Satana akokima yemoko. Ekomona ète baye bandimeli Nzambe té, bazali kosala Ye mokosi. Bazali kondima té litatoli lia Mwana na Ye, litatoli lia mayi na makila.

Litatoli lia Mwana na Nzambe lizali nini?
Libatisi lia Ye, makila ma Ye, pena Molimo
 
Litatoli lia Mwana na Nzambe lizali nini? Ezali ète ayaki na Molimo pe alongolaki masumu mabiso manso na mayi. Alongolaki masumu manso ma mokili kati na nzoto na Ye moko pe asopaki makila ma Ye na Kuruze pona biso banso. Yango, nde bosomi bwa mayi, makila na Molimo. Boye té?
Batò bakosaka liboso na Nzambe pwète bandimeli té sango-malamu ya solo, oyo ya mayi na makila, sango-malamu ya bosomi. Sango oyo nyonso mosusu ezali ya lukuta. Kondima na yango ezali ya lukuta, pe ezali kopanzama pamba.
Tozongela 1 Yoane 5. Molongo na yango ya 11, elobi ète, “Pe, yango nde litatoli: ète Nzambe apesaki biso bomoyi ya seko, pe bomoyi wana ezali na kati na Mwana mwa Ye.” Ezali ko yebiso biso ète Nzambe apesaki biso bomoyi ya seko, pe bomoyi ezali nakati na oyo ayambi yango.
Pe, yango, nde bomoyi oyo ezali na kati na Mwana na Ye. 
Baye bazuwi bomoyi bwa seko bango nde babikisami na nzela na kondima libatisi lia Yesu na makila ma Ye. Mosomi azuwi bomoyi bwa seko pe akobika libela na libela. Osi oyambi bomoyi bwa seko na seko?
Na molongo mwa 12, “Oyo azali na Mwana azali na bomoyi; oyo azali na Mwana té azangi bomoyi.” Namaloba mosusu, oyo andimeli makambo maye Mwana asalaki na mokili—libatisi lia Ye, liwa na Ye na Kuruze, pe lisekwa lia Ye—azali na bomoyi bwa seko. Kazi oyo atiki epayi moko kaka ya biloko oyo akozuwa té bomoyi, tope akozuwa bosomi.
Ntoma Yoane atalisi polele-polele batò na Nzambe likolo na kondima na bango kati na biloko biye Yesu asalaki: mayi, makila, pena Molimo. Biloko yango ezalali kotalisa biso soki bazali na Liloba kati na bango tope té. Ayebi basomi na kondima na bango katyi na mayi ya libatisi lia Yesu, makila ma Ye pena Molimo.
 

Baye Nano Babotami Mbala ya Mibale Bakoki té Kososola Meme na Ntaba

Nani akoki kososola mosomi na oyo azangi bosomi?
Oyo abotama mbala ya mibale

Ntoma Yoane atalisi polele-polele bayengemene baye bazuwi bosomi. Ntoma Polo pe asalaki yango. Ndenge nini basali na Nzambe bakoki kokabola meme na ntaba té? Ndenge nini bakoki kokabola basali ya solo na baye balukuta té? Baye basomami na kondima ya mayi na makila ma Yesu bazuwi nguya ya komona bokeseni.
Ezala motò azalali mokambi, topanzi sango malamu, tope mpaka, soki akoki kososola té masomi, tope kokabola meme na ntaba, nano abotama mbala ya mibale té, pe azali na bomoyi té kati-kati na ye. Kasi bayé babotami solo-solo mbala ya mibale bakoki totalisa malamu bokeseni. Baye bazangi bomoyi bakoki té ko mona bokeséni me kososola yango.
Kaka ndenge oyo tokoki kotalisa bokeseni ya langi kati na butu, oyo ezali ya mwindu ezali mwindu, ya mayi ya mpondu ezali mayi ya mpondu pe ya pembe ezali pembe. Kasi soki okangi miso, okoki té akabola pe kososola langi ya biloko.
Kasi baye bazali na miso bolele, bakoki kososola ata bokeseni ya moke kati-kati na langi ya biloko. Bakoki kolobi nini ezali mayi ya mpondu, pe ninin ezali pembe. Ndenge moko, bokeseni bozali kati-kati na mosomi na mozangi bosomi.
Tosengeli toteya sango malamu ya bosomi, sango malamu ya mayi, makila, pena Molimo. Tosengeli kotelema pe kongenga. Tango tosangisi batò singa-singa na biso pona kopanga kondima ya solo, tolobelaka té maloba ma batò. Kati na Biblia, 1 Yoane 5 atalisi biso malamu motuya na yango. Tosengeli toteya yango malembe-malembe pona koboya poto-poto.
Liloba liye tozali koteya, yango nde, Liloba lia Mayi, makila, pena Molimo na Yesu mozali mwinda mwa bosomi. kotalisa ‘mayi’ na Yesu na batò, to sengeli kongenga makasi mingi. Pona kotalisa batò ‘mayi’ na Yesu tosengeli kongenga makasi mingi. Tosengeli kosala yango bongo pwète moko té na mokili azanga koyeba bosolo wana.
Soki motò oyo abotami mbale ya mibale atelemi té pone kongenga, batò ebele bakokufa na bozangi bwa bosomi, pe Nzambe akosepela té. Akobenga biso basali na bolembu. Tosengeli kopanza sango-malamu ya mayi na makila ma Yesu.
Tina oyo nazali kokoba na kozongela lisolo liyè tango na tango, ezali pona libatisi lia Yesu lizali na motuya mingi pona lobiko nabiso. Tango tolobelaka bana, esengeli tozongela makambo mana mbala na mbala, malembe-malembe pwète totalisa bango yango malamu.
Soki tozali kotangisa motò oyo atanga té, toko banda na alfabé. Pe malembe-malembe tokotangisa ye ndenge ya kokoma makambo na alfabé wana. Tango akokoka kosangisa makambo esika moko lokola ‘etumbu,’ tokoki totalisa ye elingi koloba nini. Ezali ndenge moko tozali kolobela batò lisolo lia Yesu pwète tokoma na bososoli bwasolo.
Tosengeli kotangisa batò polele-polele libatisi lia Yesu. Ayaki na mokili na mayi, makila, pena Molimo. Libondeli liangai lizali ète okondima Yesu lokola Mobikisi pe okozuwa bosomi.
Bosomi bwa mayi na makila pena Molimo wuta kondima kati na libatisi lia Yesu, makila ma Ye na Kuruze, pena kondima ète Yesu azali Nzambe, Mobikisi na biso, wana nde sango-malamu ya solo-solo.