• All e-books and audiobooks on The New Life Mission website are free
  • Explore multilingual sermons in global languages
  • Two new revised editions in English have been released
  • Check out our website translated into 27 languages
Search

Sermons

Liteya lia 3: Sango Malamu ya Mayi mpe na Molimo

[3-4] Libatisi lia Yesu Lizali Bomimosi Nzoto ya Lobiko Pona Basumuki (1 Piere 3:20-22)

Libatisi lia Yesu Lizali Bomimosi Nzoto ya Lobiko Pona Basumuki(1 Piere 3:20-22)
“Batò moke kaka, toloba, milimo mwamba, babikaka na kati ya mayi. Ezali na bomimonisi nzoto oyo, ezali kobikisa biso, na nkombo libatisi (kaka bolongoli ya pamba ya mabe ma nzoto té, kasi eyano pona na motema malamu mofongwami pona Nzambe), koleka na lisekwi na Yesu Kristo, oyo akendaki na lola pe azali na loboko ya mobali na Nzambe, likolo na bangelo, na bakonzi pona nguya epesamela Ye.”
 

Na nzela nini tokoki kozala sembo?
Na nzela ya ngolu na Nzambe

Nzambe ayebaki libela ète tobotama na mabele. Ayebi ète tobotama basumuki, pe Abikisaki biso banso baye bandimeli kati na libatisi, oyo elongolaki mosika masumu manso ma mokili. Abikisaki bandimi banso pe azalaki bango bana ba Ye.
Oyo nyonso ezali kowuta na ngolu na Nzambe. Lokola ekomamai na Nzembo 8:4, “Motò azali nana pwète okanisaka biso?” baye bazuwi bosomi bwa Ye bazali bakopo yabomoko ya bolingo bwa Ye. Bazali bana ba Ye.
Tozalaki wapi, biso baye bandemelaki kaka makila ma Ye na Molimo, liboso tokoma bana na Nzambe, liboso tokoma bayengebeni pe tobikisama, pe tokomisama baye bakobenga Ye Tata? Tozalaki basumuki, basumuki ya pamba baye babotama na mokili pona bomoyi ya mbula 70 tope 80 pona maye bamakasi mingi.
Nayambo, pwète tosokwama na masuma mabiso, liboso tondimela kati na sango-malamu ya libatisi lia Yesu pena makila ma Ye, pamba té, tozali kaka bazangi boyengebene, batò baye bazali kozela kufa.
Ntoma Polo alobaki ète ezalaki pona ngolu na Ye ète azalaki oyo azalaki. Ndenge moko, ezali kaka pona ngolu na Ye ète tozali oyo tozali sik’oyo. Tozali kontonda Ye matondi pona ngolu na Ye. Mokeli na biso ayaki awa nasè kati na mokili oyo abikisaki biso, asalaki biso bana ba Ye, libota lia Ye. Totondi Ye matondo pona ngolu ya lobiko lia mayi na Molimo.
Nini azali kopese biso nzela kozala bana ba Ye, bayengebene? Pwète tozali kitoko kotala? Pwète tokoki na yango? Tope pwète tozali malamu? Tokanisa yango pe topesa matondi esika esengeli.
Nzambe akelaki biso pona kosala biso libota lia Ye pe kokotisa biso, na bokonzi bwa Lola elongo na Ye. Nzambe asalaki batò ba Ye kopesa biso nzela kobika seko na seko na Ye. Nde eloko moko po nani Nzambe apambolaki biso pona bomoyi ya seko na seko. Asalaki biso té pwète tozalaki kitoko, tope tokokaki koleka basusu, tope batò ya mayele na bwania koleka basusu tope biloko mosusu Akelaki. Nyonso wana ezali kaka pona Alingaki biso mingi na nzela ya ngolu na Ye.
“ezali pena bomimonisi bwa nzoto sik’oyo oyo ezali kobikisa biso, na nkombo na libatisi” (1 Piere 3:21). “Batò moke, toloba, milimo mwambe, babikisami na nzela na mayi” (1 Piere 3:20).
Kaka batò moko, nakati na mboka, tope mibale kati na libota babikisama. Bongo, tozali malamu koleka basusu? Ata moke té. Tozali baye baleki basusu té, kasi tobikisami na nzela ya kondima na biso, na mayi pena Molimo.
Ezali bikamwa kati-kati na bikamwa tobisikami, pe ezali likabo pe libamboli wuta epayi na Nzambe ète tokoki kobenga Ye Tata nabiso. Tokoki koboya yango té. Ndenge nini tokoki kobenga Ye Tata nabiso tope Nkolo nabiso soki tozali nano basumuki?
Tango tokanisi ndenge nini tobikisami, tomoni, ète Nzambe alingaki biso, na ngolu na Ye moko. Pona nini totonda Ye té? Tokokaki kobotama pe kokufa sima na kobika bomoyi ezanga elikia, kosuka na lifelo, soki té pona bolingo bwa Ye pena mapamboli ma Ye. Totondi matondi Nzambe lisusu pona mapamboli ma Ye pena bolingo asalelaki biso tokoma bana ba Ye na miso ma Ye.
 
 

Lobiko ya Talo Epesami na Biso na Nzela na Libatisi lia Yesu


Pona nini batò na tango na Nowa bafufaki na kati na mayi?
Pwète bandimeli mayi té (libatisi lia Yesu).

“Ezali pena bomonisi nzoto mosusu, bozali kobisa biso sik’oyo, na nkombo libatisi” Ekomami na 1 Piere ète kaka batò mwambe babikisami na mayi. Batò boni bazalaki na tango na Nowa? Tokoki kozuwa motuya ya batò bana, kasi tokanisa ète bazali miliyo moko. Kaka batò mwambe na libota lia Nowa na kati na miliyo moko.
Eteni na yango ekoki kozala bongo mokolo mwa lelo. Balobaka ète tozali na batò miliare motoba na mokili oyo na tango oyo. Batò mingi basokolami na masumu kati-kati na baye bandimeli Yesu lelo? Soki otali kaka na mboka moko, okomona ète batò moke nde basi kondimela Yesu.
Na mboka na ngai, oyo ezali na batò lokola 250.000, batò boni basomami na masumu nabango? Mbala mosusu kaka batò 200? Bongo, eteni na yango ekozali boni? Toloba kaka nasè na motò kati-kati na nkoto moko ya batò nde bazuwi bosomi.
Toloba kaka tozali na Ba-Kristo lokola miliyo mibale na mboka na Koré, na Ba-Katoliké na kati. Nakati nabango, batò boni basi babotami solo-solo mbala ya mibale na mayi pena Molimo? Tokanga na mayele mabiso ète kaka batò mwambe nde babikaki na mokili mobimba na tango na Nowa. Tosengele koyeba na kondima ète Yesu alongolaki mosika masumu mabaye bandimela libatisi lia Ye, na nzela nini Alongolaki mosika masumu manso.
Ezali té na batò mingi baye bandimeli Yesu apesaki biso bosomi na biso banso na libatis lia Ye pena makila ma Ye na Kuruze. Tala elembo ya ‘Lisekwa lia Yesu.’ Basekwaki boni batalisami wana? Okoki komona bango kokita na ndako ya Yeluzalémé na elongi na Yesu, oyo maboko ma Ye mafungwami makasi. Kanisa boni kati-kati na bango bazali baye batanga makambo ma Nzambe na Kelasi tope basali na Nzambe.
Lelo, ezali na mingi yabaye batanga makambo ma Nzambe na kelasi na kati na mokili, kasi na kati-kati na bango, ezali kaka na moke baye bayebi pe bandimeli libatisi lia Yesu lokola mobuku ya bosolo, pena bosomi. Basusu baye batanga makambo ma Nzambe balobi ète mutu ya likambo ya libatisi lia Yesu lizalaki pwète azalaki Motò ya komikitisa mingi, pe basusu bazali koloba ète Abatisama po Akomaki mingi, lokola biso, batò ya mokili oyo.
Kasi ekomami na Biblia ète Ba-Ntoma, na Piere na kati nabango, elongo na Polo, na Yoane, batatolaki libatisi lia Yesu lokola bolongoli bwa masumu ma biso, na nzoto na Ye, pe tondimeli yango elongo nabango.
Ba-Ntoma batatolaki na Makomi ète masumu mabiso malelakaki na nzoto na Yesu na libatisi lia Ye. Yango nde litatoli lia kokamwisa lia ngolu na Nzambe ète tokoki kobikisama kaka na kondimela yango.
 

Ezali na ‘Tango Mosusu Té’ Likolo na Libatisi lia Bosomi

Nani azuwi bolingo ezangi ndelo ya Nzambe?
Motò oyo andimeli libatisi lia Yesu na makila ma Ye

Batò bazali na makoki ma kondima ète na nzela ya kondima Yesu, pe bakobikisama elongo. Mangomba manso mazali na elikia ète na kondima na ndenge nabango bakobikisama, Pe batò ebele bakanisi ète libatisi lia Yesu azali kaka lisolo lia pamba-pamba boye pe lisolo lia ligomba lia Ba-Kristo bango moko. Kasi ezali solo té. Kati-kati na mikanda ebele na ebele natangaki, nokutani té na mokanda molobeli malamu-malamu singa oyo ezali kati-kati na bosomi kati na libatisi na makila ma Yesu pona lobiko na Nzambe.
Kaka batò mwambe nde babikisama tango na Nowa. Nayebi té boni babikisami lelo oyo, kasi bazali mingi té. Baye babikisami bazali baye bandimeli libatisi na makila ma Yesu. Tango tozali koleka na masanga ma bana na Nzambe mingi, naye komona ète ezali kaka batò moke bazali koteya liteya lia libatisi na Yesu, oyo ezali sango-malamu ya solo.
Soki tondimeli té bosomi ya libatisi na makila ma Yesu, tozali nano basumuki pe tobikisami nano té, ata tozali kondima pe kokende na Ndako na Nzambe ndenge nini. Tokoki koyaka na Ndako na Nzambe bomoyi na biso mobimba, kasi tozali na lisumu na Katina motema na biso, bongo, tozali nano basumuki.
Soki tozali kolenda makambo na Nzambe na etonga mbula 50, kasi tozali nano na lisumu na kati na motema, kondima na biso ya mbula 50 ezali eloko moko té, soki té kaka na miso miabiso moko. Ekoki komekana té na kondima ya solo. Kati-kati nabaye bandimeli Yesu, kaka baye bazali na kondima ya solo kati na libatisi lia Yesu na makila ma Ye, bango nde bakokota na Bokonzi bwa Lola.
Kondima yasolo ezali oyo ya kondimela Yesu lokola Mwana na Nzambe, oyo Akitaki na mokili oyo pe abatisama pona kolongola mosika na biso, masumu manso ma mokili. Ezali kondima wana ezali kokumba biso, na Bokonzi bwa Lola. Tosengeli pe kondima ète Yesu asopaki makila ma Ye na Kuruze pona yo, nangai. Tosengeli pe koyeba yango pwète totonda Ye matondo.
Tozali banani? Tozali bana na batò mibali na basi baye babikisama na libatisi lia Yesu, pena makila ma Ye. Ndenge nini tokoki kokanisa Ye té? Yesu abatisama na Yordané tango azalaki na mbula ya botama 30, pona kobikisa biso. Bongo, alongolaki masumu mabiso pe azuwaki etumbu pona biso na Kuruze.
Tango tokanisi yango, tokoki kozala kilo lisusu, tomikitisa pe totonda Ye. Tosengeli koyeba ète makambo manso Yesu asalaki ezalaki pona lobiko nabiso. Yambo, Ayaki nasè kati na mokili oyo. Abatisama, akufa na Kuruze, asekwaki wuta baweyi na mokolo mwa misato pe sik’oyo afandi na loboko ya mobali ya Nzambe.
Bosomi bwa Nzambe bozali pona motò nyonso kati-kati nabiso ata moko azanga té. Lobiko na Yesu ezali pona batò banso, pona yo, pe ponangai na kati. Tokumisi Nzambe pona bolingo bwa Ye pe, na mapamboli ma Ye.
Toyebi nzembo moko toyembaka boye. “♪Ezali na lisolo kitoko. Kati-kati ba batò ebele na mokili, ngai nazuwi ngolu ya kozuwa bolingo bwa Ye pe lobiko. O bolingo bwa Ye bokamwisi ngai mingi! Bolingo bwa Ye pona ngai. Ezali na lisolo moko kitoko. Kati-kati na batò mingi na mokili, tozali baye babikisami, baye bakomi libota lia Ye. Tozali komema bolingo bwa Ye. O bolingo bwa Nzambe, ngolu na Nzambe. O bolingo bwa Ye ekamwisi ngai mingi. ♪”
Yesu ayaki nasè pona kobikisa yo nangai, pe bosomi ya libatisi lia Ye ezali pe pona biso. Sango-malamu ezali lisolo lia pamba-pamba té; ezali bosolo ezali konyetola biso libanda na bomoyi bwa biso ya libungi pona kokotisa biso, na Bokonzi kitoko ya Nzambe. Kanga na mutu nayo, ète kondima ezali singa ya bomoko kati-kati nayo na Nzambe nayo.
Akitaki awa nasè pona kobikisa biso. Abatisama pe etumbu na biso ekwelaki Ye na Kuruze pona kosokola masumu mabiso manso.
Lipamboli monene ya ndenge nini soki bandimi bakoki kobenga Nzambe Tata na bango! Ndenge nini tokoki kondimela Yesu lokola mobikisi na biso pe kobikisama na, masumu na nzela ya kondima nabiso? Nzela ezali pwète bolingo bwa Nzambe pona biso ezangi ndelo. Tobikisami pwète Alingaki biso yambo.
 
 

Yesu alongolaki Mosika Masumu Mabiso Manso Mbala Moko Pona Na Libela

 
Tobikisami mbala moko tope malembe-malembe?
Mbala moko pona nyonso
 
“Pwète Kristo amonaki pasi mbala moko kaka pona masumu, Ye motò malamu pona batò mabe, pwète Amema biso epayi na Nzambe” (1 Piere 3:18). Yesu Kristo abatisama pona bosomi bwabiso, pe akufaki mbala moko na Kuruse pona kobikisa yo nangai, batò mabe.
Akufaki mbala moko na mokili pona kolongola biso, na etumbu na Nzambe. Pwète tokota na Bokonzi bwa Lola pe tobika libela na libela liboso na Nzambe. Ayaki nasè na mokili na nzoto pe alongolaki mosika masumu manso mbala moko kati na libatisi lia Ye, liwa lia Ye na Kuruze, pe lisekwa lia Ye.
Ondimi ète Yesu Kristo abikisaki biso kati na libatisi lia Ye pena makila ma Ye? Soki ondimeli té sango-malamu ya libatisi lia Ye pena makila, okoki té kobisama. Tozangi makasi ya botama mbala ya mibale soki tondimeli té, ète Yesu alongolaki mosika nabiso masumu mabiso manso mbala moko pona libela na libatisi lia Ye pena makila.
Abatisama pona kolongola masumu mabiso manso mosika pe asambisama pe etumbu ya masumu mabiso ekweyelaki Ye na Kuruze pona biso. Yesu alongolaki mosika na biso masumu ma basumuki mbala moko libela na bosomi ya libatisi lia Ye pena makila ma Ye.
Nzela ezalaki té pona biso lokola batò kozuwa bosomi soki tosengelaki kotubela mbala na mbala. Yango eazali kaka lokola tozalaki kosumuka, pona komibulisa tango nyonso, tobonza biloko mingi na ndako ya Nzambe pe.
Ponayango, kondima libatisi lia Yesu na makila na Kuruze ezali nzela pona lobiko. Tosengeli kondima kati na mayi pena makila. Bosali bwa makambo malamu bozali eloko té pona bolimbisami bwa masumu mabiso.
Ekopesa yo lobiko ya solo kosombela mobola biloko bia mutuya mingi, tope kolambela basali na Nzambe biloko kitoko ya kolia. Yesu azali kobikisa kaka baye bandimeli na libatisi lia Ye pena makila ma Ye. Soki tondimi ète Nzambe abikisi biso na nzela na Yesu na libatisi lia Ye pena makila ma Ye mabala moko pona libela, tokobikisa solo-solo.
Batò mosusu bakoki kokanisa ète ata Nzambe alobaki bongo na Biblia, basengeli kokanisa yango na bonzindo. Wana ezali bongo pona bango, kasi tokoki kondima liloba na Ye lokola ekomama.
Na mokanda na ba-Ebré 10:1-10, ekomami ète Abikisaki biso banso mbala moko pona libela kati na libatisi lia Ye pa makila ma Ye. Tosengeli kondimela yango boye. “♪Akufa mbala moko, abikisaki biso mbala moko. O bandeko, bondima pe bozuwa bosomi. Botiya mikumba mia bino nasè ya libatisi lia Yesu.” Yesu abikisaki biso, na mabunga na masumu mabiso manso mbala moko pona libela, pe asopaki makila maye mbala moko pona libela.
“Motò ya sembo pona batò mabe” (1 Piere 3:18) Yesu azali Nzambe ya sembo, pe nano Asumuka té. Ayaki nasè epayi na biso, na nzoto pona kobikisa batò, na masumu mabango. Abatisima, pe alongola mosika masumu manso. Abikisa biso, na masumu pena bozangi boyengebene.
Masumu manso ma batò banda botama na bango tii liwa nabango malekaki na nzoto na Yesu tango Abatisama, pe bango banso babikisama na etumbu, tango Asopaki makila ma Ye pe akufaki na Kuruze. Abatisama pona basumuki pe akufaki lokola mbeka na esika nabango.
Yango nde bosomi ya libatisi lia Ye. Yesu abikisaki biso banso, baye bazalaki basumuki, mbala moko pona nyonso. Biso banso tozangaki makasi! Yesu apesaki biso bosomi banda botama na biso tii liwa lia biso pe amipesaki lokola mbeka Ye moko, pona etumu na Kuruse. Biso baye tondimeli Yesu, esengele tondimela ète, Abikisaki biso mbala moko pona libela na kati na libatisi lia Ye pena makila ma Ye.
Tozali na nguya té, kasi Yesu atondi na nguya. Tozangi bondimi, kasi Yesu atonda bondimi. Nzambe abikisa biso mbala moko pona libela. “Pwète Nzambe alingaki mokili, ète Apesaki Mwana na Ye moko, pwète oyo andimeli Ye akufa té, kasi azala na bomoyi bwa seko” (Yoane 3:16). Nzambe apesaki biso Mwana mwa Ye. Asala ète Mwana mwa Ye abatisama, pwète alekisa masumu manso ma mokili na nzoto na Ye, bongo Amema etumbi pona na batò banso.
Lobiko lia ndenge oyo lizali kokamwisa! Tozali kotonda matondo na Nzambe pona bolingo bwa Ye pe pona lobiko. Nzambe abikisi baye bandimeli kati na mayi, pena makila ma Yesu: libatisi, na bosopi makila ma Yesu, pe ndenge Yesu Azali Mwana na Nzambe.
Baye bandimeli Yesu bakoki kobikisama, na nzela ya kondimela bosolo ya libatisi, na makila ma Yesu pe bakozuwa bomoyi ya seko lokola bayengebene. Tosengeli biso banso tondimela yango.
Nani abikisaki biso? Ezalaki Nzambe oyo abikisaki biso, tope moko na bikelamu bia Ye esalaki yango? Ezalaki Yesu, oyo azali Nzambe, oyo abikisaki biso. Tobikisami pwète tondimelaki na bosomi na Nzambe, pe yango nde lobiko lia bosomi.
 

Yesu Azali Nkolo ya Lobiko

‘Kristo’ elingi koloba nini?
Nganga-Nzambe, Mokonzi pe Mosakoli

Yesu Kristo Azali Nzambe. Yesu elingi koloba Mobikisi, pe Kristo elingi koloba ‘mopakolami.’ Lokola Samuel apakolaki Saul na Boyokani bwa Kala, bakonzi bazalaki kopakolama, banganga-nzambe bazalaki kopakolama, pe pona mosakoli kobanda kosala mosala mwaye, esengelaki apakolama.
Yesu ayaki na mokili oyo pe apakolama pona misala minene misato: ya bonganga-nzambe, ya bokonzi, pe ya bosakoli. Lokola Nganga-Nzambe ya Lola, Abatisama pona kolongola mosika masumu na batò banso.
Na botosi bwa mokano mwa Tata, Amipesaki Ye moko lokola mbeka ya lisumu liboso na Tata. “Nzali nzela, solo, pe bomoyi. Moko té akoya na Tata soki na nzela na Ngai té” (Yoane 14:6). Yesu abikisaki biso, baye bandimeli Ye na kolongola mosika masumu mabiso na nzela na libatisi pena liwa lia Ye na Kuruze.
“Pwète bomoyi bwa nzoto ezali na kati na makila” (Ba-Levi 17:11). Yesu asopaki makila ma Ye na Kuruze sima na libatisi lia Ye; bongo, abonzaki bomoyi bwa Ye liboso na Nzambe lokola lifuti lia masumu ma biso pwète biso bandimi tobikisama.
Asekwaki mokolo ya misato sima Akufaki na Kuruze pe ateyaki sango-malamu na milimo mikangama kaki na boloko. Baye nano bazuwi bosomi bazali lokola bakangami ya molimo kati na boloko ya lisumu, pena bango, Yesu azali koteye sango-malamu ya mayi na makila. Nzambe apesaki biso sango-malamu ya mayi na molimo pona kobikisa biso. Oyo nyonso andimeli yango ako botama mbala ya mibale.
 
 

Libatisi lia Makila ma Yesu Lizali Kobikisa Basumuki


Ndenge nini tokoki kosala na mobotò ya kati malamu liboso na Nzambe?
Na nzela ya kondimela kati na libatisi lia mayi pe makila ma Yesu

Yesu Kristo azali Mobikisi na biso, pe etatolami na 1 Piere 3:21, “Ezalaki na bomimonisi moko sik’oyo bozali kobikisa biso, na nkombo libatisi (kaka té bolongoli bwa masumu ma nzoto, kasi eyano ya bomotò ya kati malamu liboso na Nzambe).” Mayi ma libatisi lia Yesu mazali nzela pona lobiko lia basumuki.
Yesu alongolaki mosika nabiso masumu ma basumuki banso, Amemaki masumu mana na nzoto na Ye na nzela ya libatisi lia Ye. Ondimeli libatisi lia Yesu? Ondimeli ète mitema miabiso misokolani na masumu manso na nzela ya libatisi lia Ye? Mitemamia biso misokoloma na masumu manso, kati nzoto nabiso ezali kaka kokoba na kosumuka.
Kobotama ‘mbala ya mibale’ elingi koloba ète motò akosumuka lisusu té. Biso, baye babotama mbala ya mibale, tosumukaka pe, kasi mitema mia biso mitikali ya kopetolama na masumu pwète tondimeli libatisi lia Ye. Yango, nde oyo elobami na molongo wana likolo, “Kaka té bolongoli bwa masumu ma nzoto, kasi eyano ya bomotò ya kati malamu liboso na Nzambe” (1 Piere 3:21).
Pamba té Yesu alongolaki mosika nangai masumu manso, pe lokola Nzambe andima etumbu pona ngai, ndenge nini naboya kondimela Ye? Pe nayebi ète Yesu, oyo azali Nzambe, abikisaki ngai na nzela ya libatisi na makila, ndenge nini nakoki té kondimela Ye? Tobikisama liboso na Nzambe pe sik’oyo, bomotò na biso ya kati epetolami. Tokoki koloba lisusu liboso na Nzambe ète Yesu alongolaki masumu mabiso pe kobakisa ète Nzambe Alingaki biso mingi, solo-solo.
Bomotò nabiso ya kati ekomi mingi koyoka mabe, na bofandi elongo na masumu pe sima ya botama ya sika, bomotò na biso ya kati ezali koyebisa biso tango nyonso oyo tobungi nzela. Soki bomotò na biso ya kati etiki kokebisa biso ata moke, nano tokangolami mobimba té na lisumu soki kaka totikali na nguya ya libatisi lia Yesu. Ezali nzela oyo moko etikali pona kozala na bomotò ya kati malamu pe ya kimia.
Tango bomotò nabiso ya kati etungisi biso, elingi koloba ezali na eloko moko ya mabe singa-singa. Mayi ma libatisi lia Yesu masokolaki bosoto nyonso ya lisumu. Yesu alongolaki masumu manso mabiso mosika na nzela ya libatisi lia Ye pe apetolaki biso, elongo na bomotò na biso ya kati. Tango tondimeli solo-solo yango, bomotò bwa biso bwa kati bokoki solo-solo kozala peto. Ndenge nini bomotò nabiso ya kati ekoki kopetolama? Na nzela ya kondimela libatisi lia Yesu na makila ma Ye.
Moko na moko azali na bomotò ya kati ya mabe pe ya bosoto wuta botama, kasi soki tondimi ète masumu mabiso manso malekaki na nzoto na Yesu, tokoki kolongola tembe wana.
Yango, nde kondima ya oyo abotama mbala ya mibale. Ezali kondima ya liko-liko té, kasi eloko oyo ondimeli na motema mwayo mobimba. Bomotò bwayo ya kati ezali peto? Ezali peto pwète obikaki bomoyi moko ya malamu, tope pwète masumu mayo manso malekaki na nzoto ya Yesu pe ondimeli Ye? Ezali kaka na nzela ya kondima oyo, nde okozuwa bomotò ya kati ya peto.
Ezali maloba mazali na bomoyi na maye mazangi bomoyi. Ndenge nini bomotò na kati na batò ekoki kopetolama? Nzela moko kaka pona biso kozala bayengebeni na bomotò na kati ya peto ezali kondimela na mobimba nyonso bosomi bwa Yesu.
Tango kondima kati na libatisi lia Ye ezali kopetola biso, elingi koloba té bolembo bwa nzoto pona masumu elongwe, kasi bomotò bwa biso ya kati ezali peto liboso na Nzambe. Pona yango, Ayaki, Abatisama, Akufa na Kuruze pe Asekwa wuta baweyi pe sik’oyo afandi na loboko ya mobali na Nzambe.
Natango na Ye, Akoya lisusu na mokili oyo. “Pona baye bazali kozela Ye na motema mobimba, Akomimosisa mbala ya mibale, libanda na lisumu, pona lobiko” (Ba-Ebré 9:28). Tondimi ète akoya kozuwa biso, tozali kozela Ye na motema nyonso, pe topetolama na kondimela libatisi lia Ye lia mayi na makila.
 

Litatoli lia Kolamosa Kondima 

Tokoki kobikisama soki tozangi libatisi lia Yesu?
Ata moke té

Tokutanaki na litatoli moko na kati na Eklézia na biso ya Daeyeoné.
Mosali na Nzambe na nkomba na Park, mokambi na Eklézia ya Daeyeoné, ayebisaki babalani mibale ète ezali na bosilisi masumu na mokili soki tozangi kososola bozindo bwa libatisi lia Yesu. Mobali azalaki na bizaleli ya kolala na kati ya etonga, tango ya mateya ya kozala na nzambe mosusu, lokola balaki koteya, na kotika epayi bosomi kati na libatisi lia Yesu, yango ezalaki kopusa ye, kotubela mokolo na mokolo.
Kasi awa, nakati na Eklézia nabiso ya mboka Taeyoné, ayokaki mateya mamiso mibale ya kofongwama makasi pwète ayebisama ète masumu maye manso malekaki na nzoto na Yesu. Esepelisaki mwasi na ye koya na etonga elongo naye.
Mokolo moko afandaki na etonga na Nzambe pe ayokaki Ba-Romén 8:1. “Etumbu moko té ezali lisusu pona baye bazali na kati na Yesu Kristo.” Bongo, akanisaki mbala moko, ‘Ah, soki motò andimeli Yesu, apetolami. Lokola nandimeli Yesu, nazali lisusu na masumu té.’
Boye, abengi ndeko mobali naye, mwasi naye, pe baninga baye moko na moko pe ayebisi bango, “Bozali na lisumu na motema na binot? Bongo, kondima na bino ezali malamu té.” Nayango, Mosali na Nzambe Park akweyisama. Mobali oyo ayebaki té libatisi lia Yesu, kasi azalaki koloba ète azali na lisumu té.
Bongo, nandako ya libala wana, ekomaki na mikakatano. Mwasi azalaki kokende na etonga mingi, kasi azalaki na lisumu kati na motema mwaye, kasi mobali ye alobeli ye ète azali na lisumu té. Mobali akendaki na etonga kaka tango mokuse pe azali koloba ète azali na lisumu té.
Mwasi akobaki kokanisa ète bango mibale bazalaki na lisumu na mitema miabango. Babandi kowela likambo lina. Mobali alobi ète tozali na lisumu lisusu té pwète ‘Etumbu moko ezali té pona baye bazali kati na Yesu Kristo.’ Pe mwasi azalaki kokoba koloba ète azalaki na lisumu na kati na motema naye.
Nasima, mwasi naye akobaki koloba ète akokende kokutana na Mosali na Nzambe Park pona kotuna ye nini alingaki koloba tango ateyaki ète masumu manso malekaki na nzoto ya Yesu.
Boye, mokolo moko sima na mayangani ma pokwa, atikaki mobali na ye sima pe, akendaki kotuna Mosali na Nzambe Park motuna mwana. Atunaki boye, “Nayebi ète ozali komeka koyebisa biso eloko moko moye, kasi nazali na tembe moke pe namoni ète eloko moko ebombami. Yebisa ngai malamu, ezali nini.” Nde, Mosali na Nzambe Park ayebisaki ye likolo na botama ya mbala ya mibale na mayi pena Molimo.
Aye kososola pona nini ekomama na Ba-Romén 8:1, “Etumbu moko ezali té pona baye bazali kati na Yesu Kristo.” Andemeli mbala moko pe abikisama. Ayekomana na sima ète masumu manso malekaki na nzoto na Yesu na nzela ya libatisi lina, baye bazali kati na Kristo, bazali na etumbu moko té lisusu.
Abandaki kososola Liloba oyo ekomami. Akutani na suka na fongola ya bosomi oyo ezalaki na kati na libatisi lia Yesu pe ayekoli ète tokoki kokoma bayengebeni na nzela ya bosomi bwa libatisi lia Ye.
Solo-solo, mobali naye akendaki na ndako té kasi azalaki kozela ye libanda. Ayokaki litatoli liaye ète masumu maye mapetolami, pe atuni ye, “Malamu, ozuwi bosomi sik’oyo?”
Kasi na sima ya koyoka maye manso Mosali na Nzambe ayebisaki mwasi naye, akomi nakati ya bozangi bososoli malamu ya likambo lina. Ayokaki té liboso liteya lia libatisi lia Yesu. Azalaki na elikia ète azali na lisumu té na motema naye ata azangaki koyebela libatisi lia Yesu. Bongo na ndako, bakokaki kobunda na maloba.
Tango oyo, likambo libaluki. Mwasi atuni na makasi mobali naye, soki azali na lisumu na motema tope té. Atunaki ye ète, ndenge nini okoki kozanga lisumu tango oyo ondimeli té kati na libatisi lia Yesu. Amatisa mongongo na kosenga ye amitala malamu kati na bomotò bwaye bwa kati. Sima na yango, asosolaki ète bomotò bwaye bwa kati bozalaki nano na lisumu na motema.
Bongo, akangaki nzela pe akayè kokutana na Mosali na Nzambe Park pe atubele ète azalaki na lisumu na motema mwaye. Atunaki, “Tango ba tiyaki maboko nabango na mutu ya ntaba ya mbeka ezalaki liboso ya koboma yango, tope sima?” Ayokaki nano té sango-malamu ya mayi na Molimo, bongo, mayele masilaki ye.
Oye nde litatoli lia bolamokisi bwa kondima naye. Yesu asengelaki kobatisama pwète lisumu lia mokili lileka na nzoto na Ye. Kaka bongo nde akokaki kokufa na Kuruze pwète lifuti lia lisumu lizala liwa.
“Batiyaki maboko na bango na mutu ya ntaba ya mbeka liboso ya koboma yango, tope sima?” Atunaki bongo pwète mayele mazilaki ye likolo na kotia maboko na mutu pena libatisi lia Yesu. Bongo, Mosali na Nzambe Park atalisi ye malembe-malembe bosomi ya libatisi lia Yesu.
Na mokolo wana, mobali ayoka pona mbala ya yambo sango-malamu ya mayi na Molimo pe azuwaki bosomi. Ayokaki sango-malamu kaka mbala moko pe abikisama.
Oyo ezalaki litatoli lia kozanga boyebi bwa libatisi lia Yesu. Tokoki koloba ète tozangi masumu, kasi solo-solo, ezali na kati na bomotò na biso ya kati soki libatisi lia Yesu lizali té. Batò bazali na ezaleli ya koloba ète Yesu apetola biso, na masumu mabiso manso na liwa lia Ye na Kuruze, kasi kaka baye bandimeli kati na libatisi lia Yesu na makila ma Ye, nde baye bakoki koloba ète bazangi solo masumu liboso na Nzambe.
Mosali na Nzambe Park atalisi babalani mibale oyo ète tokoki té kozuwa mobimba ya bosomi kaka na nzela ya kondimela libatisi lia Yesu.
 
 

Bomonisi Nzoto ya Lobiko: Libatisi lia Yesu


Bomimosi nzoto na lobiko bozali nini?
Libatisi lia Yesu

“Ezali na bomimonisi nzoto moko bozali kobikisa biso, na nkombo libatisi.” Yesu ayaki nasè awa na mokili mwabiso kolongola mosika na biso masumu mabiso, pe kopetole bomotò bwabiso bwa kati, na komisa yango pembe makasi. Topetolama na masumu manso pwète Yesu amemaki yango na nzoto na Ye na nzela ya libatisi. Abikisaki biso na libatisi lia Ye pena makila ma Ye. Bongo, bikelamu binso bibengami kofukamela Ye.
Kondima Yesu ezali kobikisa biso. Tokomi bana na Nzambe pe tokokende Lola na kondimela Yesu. Tokomi bayengebeni na kondimela Yesu. Tozali libota lia bokonzi bwa banganga-nzambe. Tokoki kobenga Nzambe Tata nabiso. Tozali kobika kati na liloba lia Ye, kasi tozali bakonzi.
Solo-solo ondimi ète Nzambe abikisaki baye kati-kati na biso bandimeli bosomi ya mayi pe ya Molimo? Bosomi bokoki té kotondisama libanda na litatisi lia Yesu. Kondima oyo endimama na Nzambe pena Yesu ezali oyo ekutani na kati na sango-malamu ya libatisi lia Ye, Kuruze na Ye, pe Molimo, oyo ebikisi biso mobimba. Oyo nde kondima ya solo penza.
Masumu mabiso masokolami tango Yesu alongolaki mango mosika na kati na libatisi lia Ye pe yango nyonso efutama na tango Asopaki makila ma Ye na Kuruze. Yesu abikisaki biso na mayi pena Molimo. Boye! Tondimi yango!