• All e-books and audiobooks on The New Life Mission website are free
  • Explore multilingual sermons in global languages
  • Two new revised editions in English have been released
  • Check out our website translated into 27 languages
Search

Sermons

Liteya lia 3: Sango Malamu ya Mayi mpe na Molimo

[3-5] Nzela ya Sango Malamu ya Ebandeli ya Botama ya Mbala ya Mibale (Yoane 3:1-6)

2021.07.11 153
Nzela ya Sango Malamu ya Ebandeli ya Botama ya Mbala ya Mibale(Yoane 3:1-6)
“Moto moko, azalaki moko nakati ya Bafarizao, kombo naye Nikodeme, azalaki mokonzi ya Bayuda. Ayaki epai ya Yesu na butu, mpe alobaki na ye: ‘Rabi, toyebi ete ozali moteyi oyo awuta epai na Nzambe; pamba te, moto moko te akoki kosala makamwisi oyo ozali kosala soki Nzambe azali elongo naye te!’ Yesu azongisaki mpe alobi na ye: ‘Nalobi nayo ya solo, moto moko te akoki komona Bokonzi ya Nzambe soki abotami mbotama ya sika te! Nikodeme atunaki ye: ‘Ndenge nini moto oyo asi akomi mobange akoki lisusu kobotama? Akoki kokota na libumu ya mama naye mpo na mbala ya mibale mpe kobotama? Yesu azongiselaki ye: Nalobi nayo ya solo: soki moto abotami na mayi mpe na Molimo te, akoki te kokota na Bokonzi ya Nzambe. Oyo abotami na mosuni azali mosuni, mpe oyo abotami na Molimo azali Molimo.” 
 
 

BOTAMA YA MBALA YA MIBALA ELOBI NINI KOLANDISAMA NA MOKANDA MWA NZAMBE?


Na mokili oyo, ezali na bato mingi balingi ko botama mbala ya mibale na nzela kaka ya kondimela Yesu. Kasi nalingi koyebisa bino ya yambo ete botama ya mbala ya mibale ezali kowuta na biso moko te, elingi koloba, ezali eloko moko oyo ekoki kowuta kolandisama na misala miabiso te. 

Botama ya mbalaya mibale Elandaka bizaleli na mbongwana?
Te. Botama ya mbala ya mibale Elandaka botama ya Molimo. Esengeli mosumuki abotama sika Lokola moyengebene.

Ba Klisto ebele bazangi bososoli ya solo. Bakanisi ete bazi babotami mbala ya mibale pona batina ebele. Bamosusu bazali komeka kotalisa botama ya mbala ya mibale na kotonga bandako na Nzambe ebele. Basusu bazali komeka komikotisa na koteya Kristu lokola batindami kati na batu baye nano bakutani na Liboba lia Ye bisika na bisika. Bamosusu baboyi kobala mpe bazali kosalela makasi na bango oyo bango bakanisi kozala mosala mwa Nzambe. 
Elisi te. Ezali mpe na bato mosusu baye bapesaka mbongo ebele na bango na bisika babondeleka, tope bamosusu bazali kokombola ndako na Nzambe mikolo nyonso na kobongisa yango. Na nyonso wana, bamipesi tango nyonso na misala mia Ndako na Nzambe na bango. Mpe bandimeli ete na makasi nyonso wana bakozuwa ekoti ya bomoyi. Bakanisi ete, Nzambe akondima misala mia bango ete akopesa bango nzele ya kobotama mbala ya mibale. 
Likambo ya motuya ezali ete bato ebele bamipesi na makambo ma Nzambe mpe balingi kobotama mbala ya mibale. Tokoki kozua bango bisika ebale. Bazali kosala makisi, na elikia ete Nzambe, mokolo moko, akopambola bango mpe akopesa bango nzela ya kobotama mbala ya mibale. Batondisi mangomba ebele ya losambo kati na mayangani ya ndenge na ndenge. Ezali pasi mingi pwete bayebi te bosolo ya kobotama mbala ya mibale. 
Bazali kotiya elikia na bango banzo na misala mia bango, “Soki na sali malamu, nakobotama mbala ya mibale.” Pona yango batie makasi mabango manso na misala yango, bazali kokanisa ete bazali kotonga moboku mwa botama ya mbala ya mibale, mpe bazali kukanisa moko na moko ete, “Ngai, mpe, esengeli nabotama mbala ya mibale mokolo moko, lokola Mosali na Nzambe Wesley!” Na kotanga Yoane 3:8, bazali kosalela molongo oyo moto moko te akoki koyebesa biso wapi libamboli lia botama ya mbala ya mibale ekoki kowuta tope wapi ezalikokende. 
Naboye, bakoki kaka kosala mosala makasi na elikia ete Yesu akopesa bango nzela babotama mbala ya mibale mokolo moko. Mingi bazali kokanisa ete, “Soki na kobi kosala boye, Yesu akopesa ngai nzela nabotama mbala ya mibale mokolo moko. Nakobotama mbala ya mibale na pwasa. Nakolamoka mokolo moko nasi nabotami mbala ya mibale mpe nakoyeba ete nzela ya Loba epeselami ngai.” Ezali mawa mingi pona baye bazali kondima bongo! 
Tozali kobotama mbala ya mibale na nzela wana ata moke! Tokoki kobotama te mbala ya mibale na kokima masanga ya makasi na makaya, tope nakolanda nzela na losambo nakati na etonga na biso nabotosi nyonso. Yesu alobaki, esengeli “tobotama mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo” pwete tokota na Bokonzi bwa Nzambe. Likolo na nyonso, mayi na Molimo ezali bosenga mibale ya Nzambe pona botama ya mbala ya mibale.
Soki moto nano abotami te mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo, makasi manso maye azali kosalela Yesu mazali mosala ya mpunda. Komipesa, mabonza na makabo ekoki kopesa te nzela ya kobotama mbala ya mibale. Moto moko akoki kokanisa ete lokola Nzambe ye moko nde akoki koyeba nani asili kobotama mbala ya mibale, ndenge wana moko te akoki koyeba soki asi abotami mbala ya mibale tope te. 
Ekoki kosepelisa bamosusu likanisi lina, kasi botama ya mbala ya mibale ekoki te kobatamisana nase na mesa. Nkolo na yango akoki koyeba ye moko mpe bamosusu bakoki koyoka yango mpe. 
Tokoki koyoka yango na nzoto, kasi mingi-mingi na molimo. Babotami ya mbala ya mibale bazali baye babotami lisusu na nzela ya liloba lia Nzambe, na maloba ma mayi, makila mpe Molimo. Kasi, baye babotami te mbala ya mibale bakoki te kososola yango kaka lokola Nikodeme akokaki te. 
Nasima na yango, toyokaki maloba mabosolo, bobikisami na nzela ya libatisi na makila ma Yesu. Tango tozali koyoka na kotanga liloba lia Nzambe, tokoki komona bosolo na kati na yango. Pona yango ezali ya motuya mingi kofongola mayele mabiso pona na kososola malamu. 
“Mopepe ebetaka esika nini elingi, okoki koyoka yango, kasi okoki koloba ewuti wapi pe ezali kokende wapi. Ezali bongo pona oyo nyonso abotami na Molimo.” (Yoane 3:8).
Tango oyo nano abotami te mbala ya mibale akotanga makomi oyo, akokanisa, “Ah! Yesu alobaki ete nakoki te koyeba tango kani nabotami mbala ya mibale! Moko te ayebi!” Mpe makanisi maye masepeli. Kasi wana bosolo te. Tokoki koyeba te wapi mopepe ewuti tope esika wapi ezali kokende, kasi Nzambe ayebi nyonso. 
Ata kati yabaye basi babotami mbala ya mibale, bakososola te na ebandeli. Ekoyokana. Kasi na kati ya motema na moko na moko, liloba lizali kosala: Malabo ma libikisi na nzela ya libatisi na mayi naYesu. 
Yango nde litatoli lia botama ya mbala ya mibale. Baye bakoyoka liloba bako sosola yango mpe bakoloba ete: “Oh, bongo naza lisusu na masumu te. Na bikisami mpe na botami mbala ya mibale.” Tango bandimi pe babateli liloba lia mayi na Molimo nakati na mitema mia bango, bakomi bayengebene, bana na Nzambe. 
Bamosusu bakoki kotuna bango, “Osi obotami mbala ya mibale?” Mpe bakoki koyanola, “Nano te.” “Sikoyo, bosi bobikisami?” “Boye, tondimi ete tobikisami.” Kasi esali botutani bwa maloba, boye te? Basali boye pwete bakanisi ete tango moto abotami mabala ya mibale, akoki mpe kobongwana na nzoto naye. 
Bato ya boye bazali ya kobotama mbala ya mibale lokola bomoyi na bango ebongwani na ndenge na bango yako bika mokolo na mokolo. Kasi bazali kososola te sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. 
Bato ebele bayebi te nzela ya botama ya mbala ya mibale. Ezali kosala mawa mingi. Ezali te kaka basali na Nzambe, kazi bakambi mingi na kati na Ndako na Nzambe baye bazali kosala na kati ya bozangi ya boyebi wana. Mitema yabaye babotama mbala ya mibale katikati nabiso ezali kolela pona na bango.
Tango toyoki ndenge wana, ezali kosala mawa mingi na motema mwa Yesu, Nzambe na biso na Lola. Esengeli bato banso babotama mbala ya mibale na libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye na Kuruse. 
Kobotama mbala ya mibale na kobikisama ezali eloko moko. Kasi bato ebela bayebi te bosolo wana. Kobotama mbala ya mibale elingi koloba ete lisumu na kati na motema esokolami na nzela ya kondima sango malamu ya mayi na Molimo. Elingi koloba ete okomi moyengebene na nzela ya kondima kati na libatisi lia Yesu mpe na bomipesi bwa Ye na Kuruse.
Liboso bato babotama mbala ya mibale, bazalaki basumuki, kasi na sima na yango, bapetwami mpe bakomi na lisumu lisusu te, lokolo moto abotami ya sika. Mpe akomi mwana na Nzambe na kondima kati na sango malamu ya lobiko. 
Botama ya mbala ya mibale elingi koloba ete kolata bilamba bia libatisi lia Yesu, kokufa na Yesu na Kuruse, mpe kosekwa elongo na Ye. Elingi koloba ete moto moko akomi moyengebene na nzela ya maloba ma libatisi na Kuruse na Yesu. 
Moto nyonso abotama wuta na libumu lia mama naye mosumuki. Kasi tango ayokaki bosolo bwa botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo, apetolami.
Nalibanda, moto ya ndenge wana azali kotalisa bokeseni te, kasi abotami mbala ya mibale nakati. Yango nde kobotama mbala ya mibale. Kasi ezali na bato moke baye bayebi bosolo wana; eleki te ata moko na kati na nkoto moko. Okoki kondima nangai ete ezali na bato moke kaka baye basosoli nzela ya bosolo bwa botama ya mbala ya mibale? 
Baye bandimi sango ya mayi na Molimo mpe babotami mbala ya mibale bakoki kokabola mobotami ya solo ya mbala ya mibale na Moklisto ya bomesani.
 

YESU NDE AZALI KOPESA MIBEKO NA MOPEPE

Nani akoki koyeba Oyo abikisami?
Kaka mobikisami mpe

“Mopepe ebetaka esika nini elingi, okoki koyoka yango, kasi okoki koloba ewuti wapi pe ezali kokende wapi. Ezali bongo pona oyo nyonso abotami na Molimo.” Yesu azalaki koloba pona oyo nano abotami mbala ya mibale te. Mobotami ya mbala ya mibale ayebi lisolo lia botama ya sika, kasi Nikodeme ayebaki te. Nzambe ayebi oyo abotami mbala ya mibale, ye mpe ayebi yango. 
Na loboko mosusu, baye babotami nano te mbala ya mibale bayebi te ndenge nini moto akoki kobotama sika pwete bayebi te esika wapi mopepe ewutaka mpe esika nini ekendaka. 
Okoki kososola yango? Mopepe etambolaka ndenge nini? Nzambe ayebi yango. Nani akela mopepe? Ezali Nzambe asalaki yango. Nani apesaka mibeko na mbula, na elanga, na mabele, nzela ya mopepe naya mayi? Mpe nani oyo atiyaka pema ya bomoyi nakati yabikelamu biabomoyi? Na ndenge mosusu yakoloba, nani asalaki bomoyi kati na mokili oyo mpe na kofulukisa yango? Moko te, kaka Yesu Klisto. Mpe Yesu azali Nzambe. 
Tango tozangi maloba ma sango ya mayi, makila na Molimo, tokoki te kobotama mbala ya mibale mpe tokoki te kotangisa bamosusu makambo ma molimo ata moke te. Yesu alobaki na biso ete soki moto abotami na mayi mpe na Molimo te, akoki kobotama mbala ya mbibale te. 
Esengeli tondima kati na sango ya mayi na Molimo, sango na nguya oyo ezali kosala ete tobotama mbala ya mibale. Molimo akotaka mpe afandaka kati na makanisi mabaye banso bandimi sango malamu ya mayi mpe na ya Molimo. 
Yesu-Klisto abatisamaki pona kolongola mosika masumu manso mabato, mpe azokisamaki na Kuruse pona kofuta masumu mana. Abongisaki lobiko ya bato pona kobotama mbala ya mibale na mitema miabango banso. Tango tozali kondima sango oyo, Molimo mozali kokota na kati ya molemo mwabiso. Yango nde lobiko ya botama ya mbala ya mibale. Natango tondimi kati na bosokolami bwa masumu mabiso na nzela ya libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye, tobotami solo-solo mbala ya mibale. 
Na Ebandeli 1:2, ekomami, “Mokili ezalaki na lolenge te mpe ezalaki pamba. Molili ezalaki na likolo ya mozindo ; mpe Molimo ya Nzambe azalaki kopepa na likolo ya mayi.” Ekomami ete Molimo na Nzambe mozalaki kotambola na likolo ya mayi. Molimo mwa Nzambe mozalaki kolela likolo na mabele. 
Elingi koloba ete Molimo mokoki kokota te kati na mitema mia basumuki. Motema ya oyo abotami nano te mbala ya mibale ezali na pasi mingi ponana koyamba Molimo mwa Nzambe, mpe etondami na molili ya masumu. Ezali pona yango ete Molimo mwa Nzambe mokoki te kofanda na kati na moto ya ndenge wana.
Nzambe atindaki moyi na Ye awa nase pona kongengisa mitema mia basumuki. Nzambe alobaki, “Tika ete mwinda ezala!” (Ebandeli 1:3), mpe esalamaki bongo. Nayango, likolo nayango, mpe kaka ndenge wana, nde Molimo na Nzambe efandaka katikati na mitema mia bato banso. 
Na moboko wana, katikati na mitema mia baye babotami mbala ya mibale, baye bandimi sango ya mayi na Molimo. Mpe Molimo mwa Nzambe mofandi kuna na kati. Yango nde nzela ya “botama na sika nabango.” Babotami mbala ya mibale na mitema miabango pwete bakomami na maloba ma lobiko ya mayi na Molimo mpe bandimeli yango! 
Ndenge nini moto akoki kobotama mbala ya mibale? Yesu alobaki yango na Nikodeme, Mofarizao, ndenge oyo, “Moto moko te akoki komona Bokonzi ya Nzambe soki abotami mbotama ya sika te!” Nikodeme alobaki, “Ndenge nini tokoki kobotama mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo? Tokoki kokota na libumu ya mama lisusu mpe kobotama mbala mosusu?” Nakolanda maloba maye, azuwaki yango na ndenge na bomoto mpe akokaki kososola ndenge nini moto akoki kobotama mbala ya mibale. 
Yesu alobela ye ete, “Ozali molakisi ya Isalayele, mpe oyebi makambo oyo te?” Yesu ayebisi ye ete soki moto abotami te mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo, akoki kokota na bokonzi bwa Lola te mpe akoki komona yango te. Yesu alobaki na Nikodeme bosolo bwa botama ya mbala ya mibale. 
Ezali ya solo ete mingi ya bato baye bandimeli Yesu nano babotama mbala ya mibale te. Ba-Klisto lokola Nikodeme nano babotama mbala ya mibale te.
Nikodeme azalaki mokambi ya Molimo ya Isalayele na tango wana, lolenge moko na bakambi na mangomba lelo. Na tango ya lelo bakoki kotalisa ye lokola moto monene na makambo mamboka. Na bonzambe azalaki mokambi, moto monene kati na Bajuda mpe molakisi. Atanga mpe mingi kelasi. 
Na kati na Isalayele na mikolo wana, ezalaki te nakelasi lokola oyo yamikolo oyo ya lelo, bongo bato banso bazalaki kokende na etonga na Nzambe pona kotanga nase nabaye bazalaki na boyebi ya makasi. Bango, nde bazalaki balakisi ya bato. Kaka lokola mikolo oyo ya lelo, ezali na balakisi ya mabe mingi mpe. Bazalaki kotangisa bato nano babotami mbala ya mibale te bango moko. 
Mikolo ya lelo oyo ezali nabakambi ebele ya makambo ma Nzambe, bazali nakati na ndako na Nzambe, balakisi, bateyi, bampaka na balobeli baye nano babotami te mbala ya mibale. Lokola Nikodeme, bayebi te bosolo bwa botama ya mbala ya mibale. Bato ebele bakanisaka ete esengeli kozonga na libumu ya mama mbala ya mibale bona kobotama sika. Beyebi ete babotami mbala ya mibale, kasi bayebi nano te ndenge nini ezalamaki? 
Mpe, pona bozangi koyeba nabango, lokola mokufi miso akoki kosimba nzoko kaka pona bozangi miso, mitindo mia bango etongami na ndenge na bango ya kosalela makambo na boyebi bwa bango. Bazali koteya na maloba ma mokili makambo ma Nzambe kati na etonga na Nzambe. Nasuka, bato ebele bazangi botama ya mbala ya mibale. 
Botama ya mbala ya mibale ezali na eloko moko te na misala miabiso mia malamu. Tobotami mbala ya mibale na nzela ya kondima maloba ma mayi, makila mpe na Molimo oyo Nzambe apesi biso. Ezali sango na Nzambe oyo ezali kobonganisa biso wuta bosumuki pona kokoma bayengebene. 
Yesu alobaki maloba oyo, “Soki bozalaki kondima te tango nazali koyebisa bino makambo ya likolo?” (Yoane 3:12) Ya solo, bato bandimaki te tango oyo Yesu azalaki koyebisa bango na bosolo ete bolongolami bwa masumu bozalaki katikati na libatisi lia Ye. Pona nini bandimaki te? Bandimaki te ete, bobikisami na bango bokokaki kosalema na nzela ya libatisi lia Yesu na liwa lia Ye na Kuruse. Nde eloko Alingaki kolobela tango Ayebisaki bango ete bakoki kondima Ye te soki ayebisi bango “makambo ma Lola”.
Pona kosokola biso na kolongola masumu mabiso, Yesu abatisamaki na Yoane Mobatisi mpe akufaki na Kuruse, mpe asekwaki wuta baweyi pona kobongisa nzela pona na basumuki babotama mbala ya mibale. 
Nayango, Yesu ayebisaki yango na Nikodeme ndenge ezali na Boyokani Bwa Kala. “Moto ata moko te asi awuta na lola, lokola kaka ye oyo akita kowuta na lola: Mwana na moto oyo azali na lola. Mpe lokola Moize anyetolaki nyoka na kati na esobe, ndenge moko Mwana ya Moto akonyetolama, pwete oyo nyonso akondima Ye akufa te kasi azuwa bomoyi na seko” (Yoane 3:13-15). Lokola Moize anyetolaki nyoka na kati na esobe, ndenge moko Mwana ya Moto akonyetolama, pwete oyo nyonso akondima Ye akufa te kasi azuwa bomoyi na seko. 
Yesu alingaki koloba nini tango alobaki, “Lokola Moize anyetolaki nyoka na kati na esobe, ndenge moko Mwana ya Moto akonyetolama?”(Yoane 3:14) Azuwaki molongo oyo ya Boyokani Bwa Kala pona kotalisa libatisi lia Ye na makila maye mapesi bolongoli bwa masumu manso ma bato banso. 
Pwete Yesu akufa na Kuruse, Anyetolama likolo, Alongolaki yambo lisumu lia mokili na nzela ya libatisi na Yoane Mobatisi. Pwete Yesu azalaki na lisumu te, mpe Akokaki kokufa te na Kuruse. Po Akende na Kuruse kokufa pona biso banso, esengelaki abatisama na Yoane Mobatisi mpe azuwa masumu mamokili mobimba na nzoto na Ye. 
Kaka na kuzuwa masumu mabiso manso mpe na kondima kofuta pona yango na makila ma Ye, yango nde ekokaki pona kobikisa basumuki banso na etumbo. Yesu apesaki biso lobiko ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. 
Namoboko wana, baye bandimi Yesu lokola Mobikisi na bango balati bilamba bia libatisi lia Ye, bakufi na Ye, mpe babotami mbala ya mibale na Ye. Nasuka, Nikodeme ayaki kososola yango. 
 

LOKOLA NYOKA ANYETOLAMAKI

Pona nini Yesu Akufaki?
Pona kolongola lisumu nyonso Na nzela na libatisi lia Ye.

Oyebi lisolo lia nyoka ya ebende oyo Moize anyetolaki na esobe? Lisolo wana ekomami na Mitango elongi nayango 21. Ezali koloba ete milemo mia Ba-Isalayele ekomaki ya kolemba na sima ya bobimi wuta Ejipte, mpe epesaki bango nzela yakoloba mabe na Nzambe mpe na Moize. 
Likolo nayango, Nkolo atindaki banyoka ya makali mingi katikati na bato baya baswaki bango mpe mingi katikati na bango bakufaki. Sima nayango, banzonto nabango ebandaki bobimisa solo ya mabe pe mingi bakufaki. 
Tango bato babandi kokufa, Moize, mokambi na bango, abondelaki Nzambe. “Nkolo, nabeleli yo, bikisa biso.” Nzambe ayebisaki ye kosala nyoka ya ndenge wana na ebende, mpe amatisaki yango na nzete. Ayebisaki ye ete, oyo nyonso akotala yango akobika. Moize asalaki lokola Nzambe ayebisaki ye mpe atatolaki maloba ma Nzambe na Bana-Isalayele. 
Oyo nyonso andimaki na maloba naye mpe atalaki na nyoka ya ebende abisamaki. Nandenge moko, esengeli tobikisama na mbuma mabe ya Satana oyo asuwaki biso. 
Bana-Isalayele bayokaki Moize mpe batalaki na nyoka na ebende na nzete, mpe babikaki. Emoneseli ya nyoka na nzete ezalaki etumbo ya masumu mabato banso oyo Yesu-Klisto amemaki na nzoto na Ye na nzela ya libatisi lia Ye mpe na liwa lia Ye na Kuruse. Azuwaki yango na nzoto na Ye pona kofuta etumbo ya masumu manso kati na mokili. Na nzela wana, Asilisaki etumbo ya masumu mabiso. 
Yesu-Klisto ayaki na mokili oyo pona kobikisa bato banso, baye babongisami kokufa na “ngenge ya nyoka,” momekano ya Satana. Pona kofuta masumu mabiso banso, esengelaki Abatisama mpe Akufa na Kuruse yambo Asekwa pona kobikisa baye bandimeli Ye. 
Kaka lokola Bana-Isalayele na kati na Boyokani bwa Kala babikisamaki tango batalaki nyoka na nzete, lelo baye banso bakondimela Yesu na kososola ete Afutaki pona masumu mabiso manso na nzela ya libatisi lia Ye mpe na makila bakoki kobikisama mpe kobotama mbala ya mibale. 
Yesu afutaki pona masumu manso ma mokili na nzela ya libatisi lia Ye na Yoane Mobatisi na Yordane, liwa lia Ye na Kuruse, mpe na bosekwi bwa Ye wuta baweyi. Sikoyo, baye banso bandimeli Ye bakoki kopambolama na lobiko na nzela ya Ye. 
“Ezali na moto moko te oyo asila komata na Likolo, longola kaka Ye oyo akita wuta na Likolo: Mwana na Moto.” (Yoane 3:13). Pona kofuta nyongo ya masumu mabiso, Yesu abatisama mpe Azokisama na Kuruse pona kofongola bikuke bia Lola pona biso. “Ngai, nazali nzela, solo mpe bomoi. Moto moko te akoki koya epai ya Tata, soki na nzela na Ngai te.” Elobi Yesu na Yoane 14:6. 
Pwete Yesu abatisamaki pe Akufaki na Kuruse pona kofongola bikuke bia Lola pona biso, baye banso bakondimela lobiko na nzela na Ye babikisami. Yesu afutaki libela pona masumu mabiso, nayango oyo nyonso andimi bosolo bwa mayi, makila mpe na Molimo akoki kokota na bokonzi bwa Lola. 
Yesu abikisaki biso na sango malamu ya mayi mpe na Molimo. Botama ya mbala ya mibale ewutaki na kozala na kondima kati na libatisi na makila ma Yesu mpe na ndenge Azali Nzambe. 
“Ndenge kaka Moize atelemisaki na nzete, ekeko ya nyoka kati na esobe, ndenge wana mpe Mwana na Moto asengeli kotombolama.” (Yoane 3:14). Elingi koloba nini? Pona nini esengelaki koboma Yesu na Kuruse? Asalaki masumu lokola biso? Azalaki na bolembu lokola biso? Azalaki ya kotonda te lokola biso? Te, Azalaki ndenge wana te. 
Ponayango, pona nini babomaki ye na Kuruse? Ezalaki pona kobikisa biso na kofuta nyongo na biso banso. Abatisama mpe Akufaki pona kobikisa biso mpe na kofuta nyongo na biso nyonso. 
Yango nde bosolo ya lobiko, ya botama ya mbala ya mibale ya mayi mpe na Molimo. Yesu apesi bomoyi ya sika nabaye banso bandimeli libatisi lia Ye mpe na liwa lia Ye na Kuruse, oyo ezalaki lifuti lia nyongo yamasumu mabiso. 
 
 

NZELA YA MAYI MPE NA MOLIMO


Ezalikoloba nini na Nzela ya mayi na Molimo?
Mayi ezali libatisi lia Yesu Mpe Molimo Bo-Nzambe bwa Ye.

Mokanda mwa Nzambe motalisi biso ete tango tondimi libatisi lia Yesu na makila ma Ye na Kuruse, tobotami mbala ya sika. Kokoma bana na Nzambe, kobotama mbala ya mibale, ezali kokokisama na maloba ma Nzambe, na sango ya mayi, makila, mpe na Molimo oyo ezali lifuti lia masumu mabiso. 
Kolandisama na Mokanda mwa Nzambe, “mayi” ezali libatisi lia Yesu (1 Piere 3:21), mpe “Molimo” mozali Yesu oyo Azali Nzambe. Mpe ezali pona bosolo yakobotama mbala ya mibale, oyo Yesu ayaki na mokili na nzoto ya bomoto kofuta masumu mabiso na nzela ya libatisi lia Ye na makila. 
Alongolaki mosika masumu mabiso na nzela ya libatisi lia Ye mpe afutaki nyongo ya masumu mabiso na nzela ya kokufa na Kuruse. Na libatisi lia Ye mpe na kotangisa makila ma Ye na Kuruse, Abikisi baye banso bandimeli Ye. 
Esengeli tososola ete libatisi na makila ma Yesu ezali kotalisa lobiko nabiso kati ya nini tobikisami na masumu mabiso. Kaka baye babotami mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo nde bakoki komona na kokota na Bokonzi ya Lola. Yesu abikisaki biso na mayi ya libatisi lia Ye, makila ma Ye mpe na Molimo. Ondimeli yango? 
Yesu azali Nganga Nzambe ya lola oyo ayaki na mokili oyo kofuta masumu ma mokili. Abatisamaki, Azokisamaki na Kuruse mpe Asekwaki, yambo Akoma Nkolo pona baye banso bandimeli Ye. 
Yesu alobi na Yoane 10:7, “Nazali ekuke ya bameme.” Yesu atelemi na ekuke ya lola. Nani afongolaka ekuke pona biso? Ezali Yesu-Klisto. 
Akimisi elongi na Ye mosika na baye bandimeli Ye na bozangi boyebi ya bosolo ya lobiko na nzela ya Ye. Azali kopesa nzela te na baye bandimeli te libatisi lia Ye, makila, mpe na Molimo pona kobotama mbala ya mibale. Akimisi elongi na Ye mosika na oyo nyonso andimeli te makomi ma Ye, oyo aboyi kondima bosantu bwa Ye, mpe oyo aboyi kondima Ye lokola Nzambe. 
Bosolo ekomami ezali ete Ayaki na mokili oyo na nzoto, Abatisamaki, mpe Akufaki na Kuruse pona kofuta masumu ma mokili, Akufaki na Kuruse pona koyamba etumbo na bisika bia biso, mpe Asekwaki mokolo ya misato na sima na liwa lia Ye. Oyo nyonso akoboya kondimela bosolo oyo abengani mosika na Ye mpe akokufa, lokola ekomami, “Lifuti lia lisumu ezali liwa.”(Barome 6:23). 
Baye bandimeli lipamboli lia lobiko na nzela ya libatisi lia Ye, mpe na makila, bango bakomi basantu na mitema mia bango, bapesemeli nzela ya kokota na Bokonzi ya Lola. Yango nde bosolo bwa sango ya botama ya mbala ya mibale, sango oyo eyeli biso na nzela na mayi, makila, mpe na Molimo. Kobotama mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo ezali sango ya lola. Kaka baye bandimeli libatisi na makila ma Yesu nde bakoki kobotama mbala ya mibale. Baye bandimeli sango ya mayi, makila, mpe na Molimo bazali na masumu lisusu te; bango nde babotami solo-solo mbala ya mibale. 
Lelo, kaka lokola Nikodeme ayebaki te bosolo, bato ebele bandimeli Yesu kasi bazali te na koyebi bwa sango ya solo. Azalaki kutu moto monene mingi na kati na mboka! Nasima ya koyoka sango ya solo epayi ya Yesu. Na suka, tango Yesu akufaki, ayaki kokunda nzoto na Ye. Tango wana, Nikodeme akomaki na kondima ya solo-solo.
Mikolo oyo, ezali na bato mingi katikati na biso baye bayebi nano te bosolo ya mayi na Molimo mwa Yesu. Mpe ezali na bato ebele baye bandimeli te bosolo tango nzela epesemeli bango ya koyoka sango ya solo. Ezali mawa mingi. 
Yesu asalaki yango polele pona na bato banso babotama mbala ya mibale. Nini ezali kobotamisa biso mbala ya mibale? Ezali mayi, makila na Molimo. Yesu alongolaki mosika masumu ma biso tango Abatisamaki. Akufaki na Kuruse mpe Asekwaki wutu baweyi. 
Mpe Apesi naba oyo nyonso bandimeli Ye lipamboli lia kobotama mbala ya mibale. Yesu azali Mobikisi oyo apesi nzela na baye banso bandimeli Ye babotama mabala ya mibale. Bondela pwete yo mpe ozala na Yesu mikolo nyonso, Ye oyo akela Lola na mokili mpe na biloko nyonso nakati. 
Yoane 3:16 elobi, “Mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.” Tozuwi bomoyi ya seko na nzela ya kondimela Yesu. Tobotami mbala ya mibale na nzela ya kondima sango ya mayi na Molimo. Ezali ya solo soki tondimeli sango ya lobiko, libatisi na makila ma Yesu, mpe Yesu azali Mobikisi mpe Nzambe, tokobikisama. 
Kasi soki tondimeli te kati na bosolo oyo, tokobwakama na lifelo libela na libela. Ezali pona yango Yesu ayebisaki Nikodeme, “Soki na yebisi yo makambo ya mokili mpe yo ozali kondima te, ndenge nini okondima soki na yebisi yo makambo ya lola?”
Nzambe asalaki nini pona biso? Lobiko kati na Yesu epesi biso nzela ya kobotama mbala ya mibale. Yesu abikisaki biso na makambo ma mokili, na Satana mpe na masumu ma mokili. Pona kobikisa basumuki ya mokili oyo na etumbo ya lisumu, Alongolaki mosika masumu mabiso na nzela ya libatisi lia Ye, Andimaki kokufa na Kuruse mpe Asekwaki wutu baweyi. 
Ezali likambo na biso moko soki tokondima tope soki tokondima te. Lobiko ya botama ya mbala ya mibale ewutaka na kondima lobiko na nzela ya libatisi mpe na makila ma Yesu.
Ekomami ete ezali na biloko mibale Nzambe atiyi liboso na biso. Yaliboso ezali lipamboli ya liboke, elongo na biloko nyonso ya mokili, na moyi mpe na mopepe. Oyo epesamela bato banso, basumuki mpe na bayengebene. Yamibale, ezali lipamboli yabomoko. 
Yango ezali kobotama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo, oyo ezali kobikisa basumuki banso na liwa lia masumu mabango. 
 

LIPAMBOLI LIA BOMOKO

Lipamboli lia bomoko eza nini?
Kobotama mbala ya mibale na nzela Ya libatisi na Yesu, Liwa lia Ye Mpe na Lisekwi lia Ye.
 
Ekomami na Yoane 3:16, “Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.” Oyo ezali kotalisa lipamboli lia bomoko lia Nzambe: Yesu ayaki nase na mokili na nzoto ya moto mpe asokolaki masumu na biso na nzela ya libatisi lia Ye mpe Andimaki kokufa na esika na biso. Yango nde lipamboli lia bomoko lia Nzambe, lia solo, kati ya nini tobikisami na masumu manso. 
Ezali esika wapi Yesu abikisaki biso mpe abongolaki biso nabosumuki po tokoma bayengebene. Bokoki kozuwa lipamboli lia bomoko lia Nzambe na nzela yakondima bosolo oyo. Bondimi yango bino banso? 
Kondima na biso banso ekozala ya pamba soki toboyi lipamboli lia bomoko lia Nzambe ata tozali na kondima mpe na botosi yakotonda na bomoyi na biso. 
Na teyaka tango nyonso mpe na bosanaka te kolobela sango ya kondimela libatisi lia Yesu mpe na Kuruse na Ye. Pwete yango nde nzela ya botama ya mbala ya mibale. Mokanda nyonso ya Bible ezali kotalisa lipamboli lia botama ya mbala ya mibale na nzela ya Yesu lokola “lipamboli lia bomoko lia Nzambe” oyo tozali kosolola likolo na yango. Eloko moko te ekoki kotalisa lipamboli lia Nzambe koleka lobiko ya basumuki na nzela ya libatisi lia Yesu mpe na liwa lia Ye. 
Libatisi lia Yesu na Liwa lia Ye na Kuruse ezali lipamboli lia bomoko lia Nzambe. Bateyi balukuta ya mokili oyo bakoki kobundisa sango oyo ata moke te. Bateyi ya lukuta bazali kolata bilamba bia bangelo ya mwinda, bazali kosalela mayele ya Bo-Klisto na ya bomoto. Boye, ezali ya solo. Bikamwa bazali kosala, kobikisa baton a malady ezali bikolo ya bindu soki bazali na kati na lipamboli lia bomoko lia Nzambe te.
Oyo nde lipamboli lia bomoko lia Nzambe oyo ezali kopesa biso basumuki sango malamu ya lobiko ya solo. Na lipamboli oyo lia bomoko lia Ye, Nzambe apesi biso nzela ya kobotama mbala ya mibale. Akomisi biso banto ya sika na nzela ya libatisi lia Ye, makila, liwa mpe lisekwi lia Ye. Asali biso bana ba Ye, Akangoli biso na bowumbu bwa lisumu. 
Ondimeli yango? ― Boye. ― Opambolami solosolo? ― Boye. ― Libatisi lia Yesu na makila ma Ye, liwa na lisekwa ezali lipamboli lia bomoko oyo Nzambe apesa biso na nzela ya mayi na Molimo. Yango nde sango ya lipamboli lia bomoko. Nkolo akumisama pona kobikisa biso na nzela ya lipamboli lia bomoko lia Ye. 
Ezali mawa mingi pwete na mikolo oyo Ba-Klisto ebele baye batondi na kondima, bayebi te lisolo lia lipamboli lia bomoko lia Nzambe, sango ya libatisi na makila, ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Bazali koluka banzela ya kosunga bobungi na bango kati na mayele ya kelasi ya makambo ma Nzambe mpe na ya bomoto. Bazali kati na bosangi boyebi! 
Bo-Klisto etambili nzela molayi. Ezali lokola mbulu kama mitano wuta Bozongisi Makambo. Kasi tii lelo, ezali na Bana na Kore naba oyo ya mokili baye bazangi boyebi bwa bosolo ya botama ya mbala ya mibale mpe na lipamboli lia bomoko lia Nzambe. 
Na kanisi mpe nandimi ete Akobesa bango tango ya koyeba bosolo sikoyo pwete tozali na ekeke ya suka na mokili oyo.
Esengeli basumuki babotama mbala ya mibale mpe bandimela bosolo bwa mayi na Molimo pwete bakoma bayengebene mpe bakota na bokonzi bwa Lola. Ba-Klisto ebele bazali komeka na pasi mingi kobotama mbala ya mibale. 
Likolo nayango, soki bameki kati na bozangi boyebi ya tina ya solo ya botama ya mbala ya mibale, kondima na bango ezali ya pamba. Bazali koloba ete esengele babotama mbala ya mibale mpe bakota na bokonzi bwa Lola, kasi bazangi bosolo ya botama ya mbala ya mibale. 
Mokumba wana mozali na mokongo mwa bango moko ndenge bandimi na botosi nyonso mpe na koyoka moto kati na mitema mia bango ete bakoki kobotama mbala ya mibale. Kasi botama ya sika efandi na makasi ya bomoko te mpe na misala kati na etongo te. Yango ezali kokumba bango na libungi lia kondima. 
 
 

LILOBA LIA NZAMBE OYO EZALI KOKUMBA NA BOTAMA YA SIKA YA SOLO


Bokabwani kati na Kondima Na kosambela?
Kondima ezali kotia elikia na oyo Yesu asala pona, Kobisa biso, kobondela ezali kotia motema Na makanisa mpe na misala.

Ekomami polele na 1 Yoane 5:4-8 ete tokoki kobotama mbala ya mibale kaka na nzela ya kondima sango ya mayi, makila mpe na Molimo. Soki tobotami mbala ya mibale, esengeli tokanga na makanisi mabiso ete tokoki kobotama mbala ya mible kaka na nzela ya liloba lia Nzambe, liloba ya bosolo. Esengeli toyeba ete komona mosika, koloba na minoko misusu mpe kozala na likabo songolo mpe na kowumela na mosala mwa Nzambe ekoki te kopesa biso nzela ya botama ya mbala ya mibale.
Ekomani na Yoane, elongi ya 3 ete, moko te akoki kokotala na bokonzi bwa Lola soki abotamai mbala ya mibale te na mayi mpe na Molimo. Soki moto moko alingi ko botama mbala ya mibale, esengeli andimela Yesu na nzela mibale. Yaliboso, oyo alingi kondimela Yesu na nzela ya kobondela, kososola masumu na nzela ya mobeko mwa Nzambe. Mbala ya liboso moto andimeli Yesu, ezali na nzela ya mobeko mwa Nzambe na kososola bomoyi ya masumu ndenge kani ezale mabe. 
Tokoki kondimela Yesu kolandisama na lolenge ya mangoma ya mokili oyo. Bo-Klisto ezali kaka losambo ya bomoko te. 
Kasi ezali nzela ya kozuwa bomoyi na seko na nzela ya kondima. Oyo nyonso andimeli Yesu lokola na libondeli kaka, akosuka maboko pamba. Akotikala na bomoyi bwa masumu, kati na pasi na bozangi. Yango bosolo wana te? Olingi kosilisa lokola moto na bilongi mibale lokole Mofarizao na Mokanda mwa Nzambe. 
Moto nyonso alingi kokoma mobotami mwa mbala ya mibale lokola Mo-Klisto. Tango oyo moto moko andimeli na nzela ya Bo-Klisto pe ayebi te botama ya sika akotikala lokola moto ya bilongi bibale na masumu maye. Esengeli toyeba bosolo bwa mbotama ya mbala ya mibale. 
Oyo nyonso andimeli Bo-Klisto lokola nzela kaka ya losambo na kozanga botama ya mbala ya mibale ayeba ete akosuka kati ya mikakatano na bozangi kati na motema naye. Soki moto andimeli Yesu, kasi abotami mbala ya mibale te, kondima naye ezali ya malamu te. Suka-suka akomi moto na bilongi bibale, azali komonana mosantu liboso na bato kazi azali kozela suka ya mabe. 
Tango otikali kondimela Bo-Klisto lokola losambo ya pamba, okotikala mosumuki, moto ya bilongi bibale, na bomoyi ya mawa na pasi kati na masumu. Soki olingi kokangolama na masumu mayo, esengeli ondimela bosolo oyo ekomami, sango ya mayi, makila mpe na Molimo. 
 
 

SEKELE YA BOKANGOLAMI NA NZELA YA LIBATISI LIA YESU


Botama ya sika Elobi nini?
Libatisi lia Yesu, Liwa lia Ye na Kuruse Mpe lisekwi lia Ye

Mokanda mwa Nzambe mozali koyebisa biso ete moto nyonso akoki kobotama mbala ya mibale na liloba lia Nzambe, oyo ebongwanaka te. Sikoyo tika ete totala maloba ma ntoma Piere kati na 1 Piere 3:21. “Ezali mpe na elilingi oyo ezali kobikisa biso, na nkombo na libatisi.”
Kati na Mokanda mwa Nzambe, ekomami ete libatisi lia Yesu ezali elilingi oyo ebikisi biso. Oyo nyonso andimeli Yesu esengeli te ayeba, kaka pona libatisi lia biso, kasi ayeba mpe libatisi lia Yesu. Libatisi lia Yesu epesaka basumuki bomoyi ya sika. Ndima yango, mpe okobotama mbala ya mibale mpe okozuwa lipamboli lia kobikisama.
Elingi koloba ete lobiko wana ezali kozwama na nzela ya kondimela libatisi lia Yesu. Tokobikisama, pona kokoma bayengebene mpe kozuwa bomoyi ya seko. Na maloba mosusu, tango tondimeli bosolo bwa bokangolami na nzela na maloba ma Nzambe, masumu mabiso malongolami mosika nabiso pona tango nyonso. 
Botama ya sika ezali botama ya mbala ya mibale. Mingi katikati na biso babandaka kondimela Yesu lokola na bomesano ya losambo, mpe tobotami mabala ya mibale kati na kondima tango tososoli bosolo. Nkombo na Yesu elingi koloba “Pwete Akobikisa bato ba Ye na masumu ma bango.” (Matie 1:21).
Tango tondimeli Yesu mpe toyebi malamu oyo Asalaki pona bato banso, tokangolami na masumu mabiso mpe tobotami mbala ya mibale lokola bato ya sika. Yambo tondimeli Yesu lokola losambo ya pamba, mpe sima nayango, tango toyoki mpe tondimeli sango malamu ya libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye, tobotami mbala ya sika. 
Bosolo nini bozali kopesa biso nzela ya botama ya mbala ya mibale? Yambo, ezali libatisi lia Yesu, kolanda makila Asopaki na Kuruse, na suka lisekwisi lia Ye wuta baweyi. Botama ya sika elingi koloba kondima Yesu lokola Nzambe, Mobikisi mwa biso. Totala ndenge nini bato ba Boyokani bwa Kala babotamaki mbala ya mibale. 
 
 

BOFUTI BWA NYONGO YA LISUMU NA MOKANO MWA KALA: BOTIYE MABOKO MPE NA MBEKA YA MAKILA 


Sango ya botama ya sika na Mokano mwa Kala ezali nini? Yambo, totanga Levitike, elongi 1 mpe totala nini ezali kolobela likolo na botama ya mbala ya mibale. 
Na Levitike 1:1-5, “Yawe abengaki Moize mpe ayebisaki ye, wuta na Ndako ya kapo ya Bokutani: «Yebisa bana ya Isalayele: Soki moko kati na bino alingi kobonza nyama lokola mbeka epai na Yawe, asengeli komema nyama oyo azwi kati na bangombe, bantaba mpe bameme. Soki azali kobonza ngombe lokola mbeka ya kotumba, amema nde oyo ezangi mbeba. Bongo akobonza yango na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo ete Yawe andima Yango. Moto oyo akobonza yango akotia loboko na ye na moto ya mbeka. Mbeka yango ekondimama lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu ya moto oyo abonzi yango. Akokata kingo ya ngombe liboso ya Yawe, bongo bakitani ya Aron, Banganga-Nzambe, bakozwa makila na yango mpe bakosopa yango na bangambo nyonso ya etumbelo oyo ezali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.»”
Nzambe atalisi biso na Levitike ndenge nini Ba-Isalayele bakokaki kokangama na Nzambe na lolenge ya kopesa mbeka. Ezali bosolo oyo esengeli biso banso toyeba mpe tososola yango. Bongo, tika ete totala maloba mana. 
Nzambe abengaki Moize mpe alobaki na ye wuta Ndako ya bokutani. Ezalaki likolo na bokangolami na nyongo ya masumu ya Ba-Isalayele. Tango Ba-Isayalele bazalaki kosala masumu na bozangi kotosa ya mobeko mwa Nzambe, bakokaki kofuta nyongo pona masumu mabango na nzela ya kopesa mbeka pwete Nzambe alimbisa bango. 
Mbeka ya kopesa ezalaki oyo esengamaki na Nzambe mpe ekokaki kosalama na mbeba ata moko te na nzoto na yango. Esengelaki epesama kolandisama na mobeko mwa Nzambe likolo na yango. Ezalaki lolenge oyo.
Soki moto asumuki na tango ya Mokano mwa Kala, esengelaki apesa mbeka liboso na Nzambe pona bolimisi bwa lisumu lina. Na yambo, esengelaki mbeka ezala na mbeba ata moke te, mpe esengelaki mosumuki atiya maboko maye na mbeka pona kolekisa masumu mawe na moto na yango. 
Nasima, mbeka wana akobomama, makila maye ekotiyama na maseke ya mesa ya etumbelo, mpe oyo ekotikala ekosopama zinga-zinga na mabele. Oyo nde bomesano bwa Ndako esantu ya bokutani na Nzambe oyo epesamelaki bato na Ye pona lipamboli lia bokangolami. 
Mobeko mpe na mitindo mia Nzambe misangisamaki na maloba ya botosi 613 oyo ezalaki kolobela “yakozala” na loboko oyo mpe na “yakozala te” na loboko mosusu. Nzambe apesaki mobeko na mikano mia Ye na Ba-Isalayele. Ata ndenge bayebaki ete mobeko na mitindo mia Nzambe mizalaki malamu, bakokaki te kobika malamu pwete moko na moko abotamaki na mbuma ya masumu wuta Adam.
Pona yango, babungisaki makasi makosala malamu liboso na Nzambe. Ba-Isalayele babungisaki makasi ya kokoma bayengebene. Bongo, bakokaki te kotika kosumuka, ata tango bazalaki kosala makasi pona kofanda mosika na masumu. Yango nde nzela ya moto nyonso ya kobotama mpe na kufa lokola mosumuki. 
Kasi Nzambe, na mawa maye mazanga ndelo, apesaki bato ba Ye nzela ya kobonza mbeka pona bopetolami bwa masumu mabango. Abongisaki momesano mwa Ndako ya Bokutani pwete Ba-Isalayele elongo na bato ya mokili bakoka kofuta nyongo ya masumu mabango. Atalisaki na nzela ya bopesi bwa mbeka boyengebene bwa Ye na bato banso. Atalisaki mokili nzela ya lobiko. 
Nzambe apesaki bato bomesano bwa mbeka ya masumu mpe aponaki ndako ya Levi pona kokamba mosala oyo ya kopesa mbeka. Katikati ya mabota 12 ya Ba-Isalayele, kaka ndako ya Levi nde eponamaki kokamba bopesi mbeka ya Ba-Isalayele. 
Moize na Aron bazalaki ya ndako ya Levi. Mpe Mokanda na Nzambe ezali na mibeko mpe na mikano ya kokamba mosala mwa bopesi mbeka ya Ndako esantu na Nzambe, mpe na ya sango ya bokangolami na nzela ya kotiya maboko. 
Ponayango, tango tososoli malamu momesano mwa bopesi mbeka ya kufuta nyongo ya masumu ya Ba-Levi, tokoki kobotama mbala ya mibale biso moko. Ezali pona yango esengeli to tangaka liloba lia Nzambe likolo na momesano mwa bopesi mbeka ya kufuta nyongo ya masumu nakati na Ndako esantu na Nzambe. Oyo nde eteni ya motuya ya Boyokani bwa Kala. Nasuka, tango tokomi na Boyokani bwa Sika, tozali na mapamboli ma botama ya mbala ya mibale na nzela ya mayi mpe na Molimo.
 

BOKANGOLAMI NA LISUMU NA BOYOKANI BWA KALA 

Nzambe azali kati na nini? 
Bosolo mpe na Bolingo

Nzambe abengaki Moize, oyo ya ndako na Levi, na Ndako esantu ya bokutani bwa Nzambe mpe Apesaki mibeko na ndeko naye Aron lokola Nganga-Nzambe Monene. Aron azalaki kolekisa masumu ma bato likolo na mbeka ya masumu. 
Yango nde oyo Nzambe ayebisaki Moize lokola ekomami na Levitike 1:2. “Yebisa Bana-Isalayele, mpe lobela bango: ‘Soki moko kati na bino alingi kobonza nyama lokola mbeka epai na Yawe, asengeli komema nyama oyo azwi kati na bangombe-bantaba mpe bameme.” Nzambe apesaki nzela ya kolanda kati na bopesi mbeka ya bolongoli masumu. Soki moto moko alingi bokangolami bwa masuma maye, esengeli abonza ngombe tope ntaba ya kati na bibwele naye. 
Nzambe ayebisi bango, “Soki moto moko azali kobonza ngombe lokola mbeka ya kotumba, amema nde oyo ezangi mbeba. Bongo akobonza yango na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo ete Yawe andima yango.” (Levitike 1:3).
Nzambe azalaki kondima mbeka na esika ya bomoyi bwa moto oyo esengelaki akufa pona masumu maye. Ba-Isalayele bakokaki kolekisa masumu mabango na kotiya maboko mabango na moto ya nyama. Mbeka ezalaki kopesamela na kolinga ya moto ye moko. Sikoyo, tika ete to tala molongo mwa 4.
“Moto oyo akobonza yango akotia loboko na ye na moto ya mbeka. Mbeka yango ekondimama lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu ya moto oyo abonzi yango.” Nde mbeka wana ekondimama na Nzambe. Tango mosumuki atiye loboko naye na moto ya mbeka, masumu makoleka na moto ya mbeka. Pona yango, mosumuki esengelaki atiya maboko maye na moto ya mbeka liboso na Nzambe, pwete Andima yango mpe Apesa bokangolami bwa masumu maye. 
Oyo azali kosala libonza ako boma nyama mpe atiye makila na maseke na mesa ya etumbelo, mpe akosopa oyo etikali na mabele liboso na mesa ya etumbelo. Pona kofuta masumu maye mpe kokangolama na yango, moto wana esengelaki kobonza mbeka kolandisama na mibeko mia Nzambe.
Ekomama boye na Levitike 1:5, “Akokata kingo ya ngombe liboso ya Yawe, bongo bakitani ya Aron, Banganga-Nzambe, bakozwa makila na yango mpe bakosopa yango na bangambo nyonso ya etumbelo oyo ezali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.” Na kati na Ndako ya bokutani ya Nzambe, na ekuke, ezalaki na mesa ya etumbelo ya mbeka na maseke na songe mineyi. 
Sima kotiya maboko maye na moto ya mbeka ya kotumba pona kolekisela ye masumu maye, mosumuki abengami koboma mbeka, mpe Nganga-Nzambe kotiya makila na maseke. Maseke ma mesa ya etumbelo mazali ndakisa ya etumbo ya masumu. Bongo, kotiya makila na maseke mana mazali koloba ete mbeka asopi makila pona kofuta masumu esika ya mosumuki. Tango Nzambe amoni yango nakati ya maseke ya mesa ya etumbelo, Alongoli masumu ma mosumuki. 
Pona nini mbeka ya masumu ya kopesa ebengami kozala na makila? Pwete “lifuti lia lisumu lizali liwa.” (Barome 6:23) Mpe pwete bomoyi ya nzoto ezali nakati ya makila. Bongo ekomami na Ba-Ebre, “Soki makila matangami te bolimbisi bwa masumu bozali te” (Ba-Ebre 9:22). Boye, bosopami bwa makila ma mbeka ya masumu bozali kokokisa mobeko mwa Nzambe, oyo elobi lifuti lia lisumu lizali liwa. 
Ndenge esengeli, makila ma kopesa esengeli ewuta na mosumuki, kasi mbeka ya makila ya lisumu nde ekozuwa esika ya mosumuki pona bokangolami bwaye. Nganga-Nzambe akotiya makila na maseke ya mesa ya etumbelo. Elingi koloba ete etumbo ya liwa efutamaki. 
Soki totangi Emoniseli 20:11-15 kati na Boyokani bwa Sika, tokoki komona ete maseke elingi koloba Mokanda mwa Etumbo. Ndenge wana, kotiya makila kati na maseke ezali kotiya makila na Mokanda mwa Etumbo. Ezali kotatola ete etumbo ya masumu ekokisamaki nakotiya maboko mpe na mbeka ya makila ya lisumu.
 

MASUMU MATANGAMI NA BISIKA MIBALE

Masumu manso mabato liboso na Nzambe makoma na bisika bibale. Namitema mia biso, mpe na kati na Mokanda mwa Etumbo oyo ezali polele liboso na Nzambe. 
Ekomamai na mokanda mwa Jeremi 17:1, “Masumu ya Yuda ezali lokola makomi oyo bakoma na ekomeli ya ebende oyo ezali na songe ya diama; bakoma yango na bitando ya mitema na bango mpe na maseke ya bitumbelo na bango.”
Levitike 17:11, elobi, “Pwete bomoyi ya nzoto ezali na kati na makila.” Makila ezali nde bomoyi bwa nzoto, mpe masumu mabiso makoki kofutama kaka na makila. Pona yango, makila etiyamaki na maseke ya mesa ya etumbelo. Kolandisama na mobeko, oyo nyonso ezali na mpema ezali na makila, mpe na bozangi bwa makila kosopama, bolimbisi bwa masumu bozali te (Ba-Ebre 9:22).
“Bakolongola poso ya mbeka yango mpe bakokata yango na biteni. Sima, bakitani ya Nganga-Nzambe Aron bakopelisa moto na etumbelo mpe bakotanda bakoni likolo ya moto. Bana mibali ya Aron, Banganga-Nzambe, bakotia lisusu biteni ya ngombe, moto mpe biteni ya mafuta, na likolo ya bakoni oyo ezali kopela na etumbelo. Bakosukola na mayi biloko na yango ya kati mpe makolo na yango; sima, Nganga-Nzambe akotumba nyonso na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.” (Levitike 1:6-9).
Bongo, Banganga-Nzambe bakokata mbeka nabiteni mpe bakotiya yango na moto ya etumbelo. Bomezano wana ezalaki koloba ete tango bato basumuki liboso na Nzambe, esengelei bakufa na ndenge wana mpe bazokisama na kotiyama kati na moto ya lifelo. Pona yango, etumbo ememaki biso na kati ya mbeka ya masumu, na boye, bato bakokaki kokangolama na masumu mabango.
Mbeka yakotumba ezalaki momesano mwa etumbo ya boyengebene bwa mobeko mwa Nzambe. Nzambe asangisaki mibeko mia Ye, mobeko mwa boyengebene mpe na mobeko mwa bolingo, kati na momesano mwa bokangolami pona bato banso.
Pwete Nzambe azali mosembo, esengelaki Asambisa pe Afutisa basumuki na liwa. Kasi, lokola Alingi bato ba Ye, Apesaki bango nzela ya kolekisa masumu mabango ekweya na mbeka. Na Boyokani bwa Sika, lokola Nzambe na biso alingi biso mingi, Amipesaki mpe Akufaki pona kozala mbeka ya lisumu pona biso basumuki. Libatisi lia Yesu mpe na liwa lia Ye na Kuruse elongolaki masumu ma mokili.
 

BOKANGOLAMI BWA MOKOLO MWA LISUMU NA BOYOKANI BWA KALA

Elembo ya mbeka ezanga mbeba Ya Boyokani bwa Kala elingi Kolaba nini?
Yesu Klisto

Totanga Levitike 4:27. “Soki moto moko kati na lisanga asali masumu na nko te, mpo ete asali likambo moko oyo epekisami na mibeko ya Yawe; amemi solo ngambo. Tango kaka akososola masumu na ye oyo asali, asengeli kobonza lokola mbeka, ntaba ya mwasi ezanga mbeba. Akotia loboko na ye na moto ya mbeka mpo na masumu na esika oyo bakataka kingo ya bambeka ya kotumba. Nganga-Nzambe akozwa na mosapi na ye ndambo ya makila ya mbeka mpo na masumu, akotia yango na maseke ya etumbelo ya mbeka ya kotumba, mpe akosopa makila nyonso oyo etikali na makolo ya etumbelo. Akolongola mafuta nyonso ndenge kaka balongolaka mafuta na mbeka ya boyokani; bongo Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo lokola likabo oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana; mpe moto yango akolimbisama.” (Levitike 4:27-31).
Bana ba Adam, bana ya Isalayele, mpe na bato ya mokili babotami na mokili oyo etondi masumu. Ndenge wana mitema mia biso mitondami na lisumu. Ezali na mitindo nyonso ya masumu kati na motema ya moto: makanisi mabe, ekobo, kindumba, koboma, moyibi, kolula, mpe bozoba. 
Tango musumuki alingi kokangolama pona mokolo ya masumu, esengeli amema nyama moko azanga mbeba na Ndako esantu ya bokutani ya Nzambe. Akotiya maboko maye na moto ya nyama yakolekisela masumu maye, akoboma ye lokola mbeka mpe akopesa makila maye na Nganga-Nzambe pona kobonza yango liboso na Nzambe. Nganga-Nzambe akomema libanda oyo ekotikala na mbeka pwete mosumuki alimbisama masumu maye. 
Nabozangi bwa mobeko na mitindo mia Nzambe, bato bakokaki te koyeba soki basumuki tope te. Tango tomitali na mobeko mpe na mitindo mia Nzambe, tosali kososola masumu mabiso. Masumu mabiso makosambisama te na mayele ya bato, kasi na mobeko mpe na mitindo mia Nzambe.
Bato nyonso ya Isalayele basumukaki, ezalaki te po balingaki yango ezala bongo, kasi pwete babotama na ndenge nyonso ya masumu na mitema mia bango. Moto asumukaka pona motema mwa ye ezali na makasi yakoboya masumu te.
Lisumu ezali kolobela botomboki nyonso na bozangi botosi ya bato. Bato banso bakoki kokweya na lisumu. Lokola Ba-Isalayele bazalaki te na makasi yakoboya masumu, bazalaki basumuki mpe basalaka masumu. Masumu na botomboki mpe na bozangi botosi ekoki kotiama na nzela oyo. Tango tozali na makanisi ya mabe kati na biso, tozali kobenga masumu, mpe tango tosali yango, ekomi botomboki na bozangi botosi. Masumu ya mokili ezali kati naba nzela nyonso mibale. 
Na Mokano mwa Kala, masumu mazalaki koleka na moto ya mbeka na kotiya maboko. Nasima na yango, musumuki apetolami mpe akoki kokufa te pona masumu maye. Libongisi lia mbeka ezali elili ya esambisi mpe na bolingo ya Nzambe. 
Pwete Nzambe akela biso wuta na mabele, tozalaki mabele ya pamba na ebandeli. Kotiya makila kati na maseke ya etumbelo mpe na kosopa oyo etikali nase ya etumbelo elingi koloba ete Ba-Isalayele bazuwi nzela ya kofuta nyongo ya masumu nabango mpe na koboma yango na mesa ya mitema miabango. 
Nganga-Nzambe akotumba musuni ya mafuta na etumbelo pona solo ya malamu pona Nkolo. Musuni oyo ya kitoko na Mukanda mwa Nzambe elingi koloba Molimo Mosantu. Bongo, pona na kolongola masumu mabiso, esengeli tosala yango kolandisama na nzela oyo Nzambe apesaki biso. Esengeli lisusu koyeba na mitema mia biso ete bokangolami ya masumu mabiso ekolanda na nzela oyo Nzambe apesaki. 
Nzambe alobaki na Ba-Isalayele ete mbeka ya lisumu esengeli ezala meme, ntaba mpe ngombe. Mbeka oyo ya masumu ya Mokano mwa Kala ezalaki yango wana. Mwana ngombe ezali nyama ya peto. Tina ya mbeka ya lisumu ezangi mbeba ezalaki ete bazalaki kotala na mosika emoniseli ya Yesu-Klisto oyo ayaki na nzela ya Molimo Mosantu pona kokoma mbeka pona bato banso. 
Bato ya Boyokani bwa Kala bazalaki kolekisa masumu mabango na kotiya maboko na moto ya mbeka ezanga mbeba. Ba-Nganga-Nzambe bazalaki kobonza mbeka pona kofuta masumu mabango. Ezalaki ndege wana Ba-Isalayele bazalaki kolongola masumu mabango.
 
 

BOMESANO BWA MOKOLO MWA BOKANGOLAMI


Pona nini Ba-Isalayele Bazalaki na bosenga bwa mbeka Mokolo ya Bokangolami?
Pwete bakobaki kosumuka tii liwa. Mbeka ya masumu ekokaki kosantisa Bango liboso na Nzambe.

Lokola esengelaki kosala mbeka tango nyonso sima na kosumuka, ezalaki pasi mingi kopesa mbeka nyonso pona bokangolami bwa masumu mabango. Bongo, malembe-malembe, balembaki kosalele yango. Ezalaki lokola mosala ezanga ndelo na suka pona bokangolami bwa masumu mabango mokolo na mokolo mpe bayaki komona ete bakokaki kotika momesano wana. 
Ata tosali makasi mabiso manso, tokokoka ata moke te kobonza mbeka pona masumu mabiso manso. Pona yango, kofuta nyongo ya masumu mabiso esengelaki esalama na nzela ya kondima wuta na kati na mitema mia biso koleka na mobeko ya lobiko oyo Nzambe abongisaki pona biso. 
Pona bolembu bwa biso, ata tosalaki makasi mabiso ndege na ndege pona kobika na nzela ya mobeko mwa Nzambe, tozali kososola bozangi makasi mabiso. Ezali pona yango ete Nzambe apesaki Ba-Isalayele nzela moko ya bokangolami bwa masumu pona na mbula na mbula mbala moko (Levitike 16:17-22).
Ekomami na Levitike, “Tala malako oyo bosengeli kosalela mpo na libela: na mokolo ya zomi ya sanza ya sambo, ezala mwana mboka to mopaya oyo avandi kati na bino, bosengeli komikitisa mpe bokosala mosala ata moko te, pamba te na mokolo wana nde bokosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino mpe kopetolama bino. Boye bokopetolama na masumu na bino nyonso liboso ya Yawe. Ekozala mpo na bino mokolo ya Saba, mokolo ya bopemi, mpe bosengeli komikitisa. Ezali malako ya libela.” (Levitike 16:29-31).
Bongo, Ba-Isalayele bazalaki kozuwa kimia na kati na bango mbala moko na mbula tango Nganga-Nzambe azalaki kosala mosala esantu ya bokangolami na mokolo mwa zomi ya sanza ya sambo pona masumu manso mabato oyo basalaki mbula mobimba. Na masumu mabango oyo elongolamaki mosika, makanisi mabango mazalaki kimia mokolo wana. 
Na mokolo ya zomi ya sanza ya sambo, Nganga-Nzambe Aron, lokola motalisi elongi ya Isalayele mobimba, azalaki kosala mosala esantu ya mbeka ya bolongoli masumu. Na tango wana, Banganga-Nzambe mosusu bakokaki te kokota na Ndako esantu ya bokutani ya Nzambe. Yambo na nyonso, Aron azalaki kosala mosala esantu ya bolongoli masumu maye moko mpe na ndako naye liboso asala yango pona Isalayele mobimba pwete ye na libota lia ye basumukaki mpe.
Asalaki mosala esantu pona bato lokola boye. “Akozwa bantaba ya mibali nyonso mibale mpe akotia yango liboso ya Yawe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Aron akobeta zeke mpo na bantaba ya mibali nyonso mibale: moko mpo na Yawe, mpe mosusu, mpo na Azazeli.Bongo Aron akomema ntaba oyo zeke ekolakisa ete ezali mpo na Yawe, mpe akobonza yango lokola mbeka mpo na masumu. Kasi ntaba ya mobali oyo zeke ekolakisa ete ezali mpo na Azazeli, akomema yango ya bomoi liboso ya Yawe mpo ete basala na yango mosala ya bolimbisi masumu, bongo bakotinda yango na esobe mpo na Azazeli.” (Levitike 16:7-10).
Na sima ya kosala mosala esantu ya bolongoli bwa masumu pona na ndako na ye moko, Aron “akobwaka libanga likolo pona ntaba mibale.” Moko pona Nkolo mpe mosusu pona ntaba ya kotinda na esobe, “Azazel.”
Yambo, moko ya ntaba mibale azalaki ya kobonzela Nkolo. Esikoyo, Nganga-Nzambe azalaki kotiya maboko maye na moto ya ntaba na esika ya bato pona kolekisa masumu basalaki mbula moko na mbeka. 
Akomema makila na kiti ya Esika ya Bosantu Mingi mpe akotiya yango mbala sambo. Ba-Isalayele balimbisami bongo pona masumu basalaki mbula eleki. Esika ya liwa lia Ba-Isalayele pona masumu mabango, Nganga-Nzambe Aron alekesaki masumu mabango na moto ya mbeka ya bolongoli masumu mpe atiki nyama wana kozuwa etumbo ya masumu mabango. Nasima na yango akobonza bomoyi ya ntaba mosusu liboso na Nzambe. Ezalaki mbeka pona bokangolami ya bato.
 

PONA BATO BANSO

Liboso na bato banso, Aron akotiya maboko maye na ntaba ya mibale mpe akosenga bolimbisi liboso na Nzambe. “Nkolo, libota lia Isalayele ebomaki, esalaki ekobo, kindumba, moyibi, kolula, kokosa…, mpe efukamaki liboso na bikeko. Esalelaki mokolo esantu ya Sabata te, etatolaki nkombo nayo pamba, ebukaki mikano minso mia mibeko mia Yo.” Nasima, akolongola maboko maye. Nayango, masumu manso mabato ma mbula mobimba makolela na mbeka ya bolongoli masumu.
Totanga Levitike 16:21. “Aron akotia maboko naye mibale na moto ya ntaba yango, akotubela mabe, botomboki mpe masumu nyonso ya bana ya Isalaele na moto ya ntaba yango. Na nzela wana akotia masumu nyonso na moto ya ntaba yango; sima akopona moto moko mpo na kobengana ntaba yango na esobe.” Ntaba ya bolongoli masumu akotikala kati na esobe tii na tango akokufa na masumu ma Ba-Isalayele na moto na ye. Ntaba na bolongoli masumu abengami, “Azazel” na monoka na Ba-Ebre, oyo elingi kolota “kolongola.” Elingi koloba ete mbeka ya masumu ebenganami liboso na Nkolo, na esika ya Ba-Isalayele nyonso.
Bongo, masumu ma Ba-Isalayele malekisama na ntaba ya bolongoli masumu na nzela ya kotiya maboko ya Aron. Na nzela wana, Ba-Isalayele balimbisami masumu mabango. Tango bamoni Nganga-Nzambe kotiya maboko na moto ya ntaba mpe bamoni ndenge nini bamemi ye na esobe, bato nyonso na Isalayele baye bandimeli momesano ya bolongoli masumu bandimaki solo-solo ete masumu mabango manso balongolami. Mabongisi manso ma Boyokani bwa Kala mazalaki elili ya ‘sango ya botama ya mbala ya mibale’ ya Boyokani bwa Sika. 
Na Boyokani bwa Kala, kotiya maboko mpe makila ya mbeka ezalaki sango ya bokangolami na lisumu. Moboko wana etikali ndenge moko na Boyokani bwa Sika. 
 

SANGO YA LOBIKO NA BOYOKANI BWA SIKA

Na Boyokani bwa Sika, ndenge nini masumu mabato banso mazalaki kolongolama mosika na bango? 
Ekomami na Matie 1:21-25, “Akobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo Yesu, pamba te akobikisa bato na Ye na masumu na bango. Makambo wana nyonso esalemaki mpo na kokokisa maloba oyo Nkolo alobaki na nzela ya mosakoli: Elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, bongo bakopesa Ye kombo Emanwele oyo elingi koloba: Nzambe elongo na biso. Tango Jozefi alamukaki, asalaki makambo oyo anjelu na Nkolo atindaki ye kosala mpe azwaki Mari lokola mwasi na ye. Kasi Jozefi asangisaki nzoto te na Mari kino tango Mari abotaki mwana mobali; mpe Jozefi apesaki Ye kombo Yesu.”
Nkolo na biso ayaki awa nase na mokili na nkombo ya Emmanwele kobikisa bato banso na lisumu. Nayango Abengama Yesu. Yesu ayaki kolongola mosika masumu manso ma mokili. Ayaki na nzoto ya moto pona kozala Mobikisi mwa bato banso. Akokisaki lobiko na biso mpe alongolaki biso na bowumbu bwa lisumu pona libela. 
 
 

SANGO YA BOTAMA YA MBALA YA MIBALE


Mpe ndenge nini Yesu alongolaki biso na masumu mabiso? Asalaki yango na nzela ya libatisi lia Ye. Totala yango na Matie 3:13-17. 
“Yesu alongwaki na Galile mpe akendeki na Yordani mpo ete Yoane abatisa Ye. Kasi Yoane aboyaki kobatisa Ye. Alobaki: — Ezali ngai nde nazali na posa ete Yo obatisa ngai; kasi ndenge nini Yo oyei epai na ngai ? Yesu azongiselaki ye: — Tika ete esalema bongo sik’oyo ! Ezali malamu mpo na biso kosala bongo mpo na kokokisa bosembo nyonso.Tango kaka Yesu azwaki libatisi mpe abimaki na mayi, Likolo efungwamaki; mpe Yesu amonaki Molimo ya Nzambe kokitela Ye lokola ebenga. Bongo, mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo mpe elobaki: ‘Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi.’” (Matie 3:13-17). 
Na Boyokani bwa Kala, tango Yesu azalaki na mbula 30, Ayaki epayi na Yoane-Mobatisi na Yordane. Abatisaki Ye mpe Azuwaki masumu ma bato banso mosika na bango. Ndenge wana, Akokisaki bosolo bwa Nzambe. 
 
 

PONA NINI YESU ABATISIMAKI NA YORDANE?


Nini esosolami na Kati na sango?
Bosolo bwa Nzambe

Totala nano oyo elekaki tango Nganga-Nzambe ya lola akutanaki na Nganga-Nzambe ya suka ya bato. Esikoyo, tokoki komona bosolo bwa Nzambe na nzela ya libatisi oyo epesaki nzela na bolongoli mosika masumu manso ma mokili. 
Yoane-Mobatisi, oyo abatisaki Yesu, azalaki monene koleka baye banso babotamaki na basi. Yesu atatolaki yango na Matie 11:11, “Kati nabaye babotami na basi ezali na moko te oyo aleki Yoane-Mobatisi.” Kaka lokola masumu ma bato mazalaki kolongolama na Nganga-Nzambe Aron na nzela ya kotiya maboko maye na moto ya mbeka ya bolongoli masumu Mokolo mwa Bolongoli masumu, na Boyokani bwa Sika, masumu manso ma mokili balogolami mosika tango oyo Yesu abatisamaki na Yoane-Mobatisi. 
Sango ya botama ya mbala ya mibale ezali sango ya mobimba ya bolongoli masumu mabiso manso yakala, ya lelo mpe ya lobi ekoya. Bongo sango ya bosikolami na nzela ya libatisi lia Yesu ezali sango oyo Nzambe abongisi pona bokokisama bwa bosolo bwa Ye, oyo ezali kobikisa bato banso na mokili. Yesu abatisamaki pona kolongola mosika masumu ma mokili. 
Kokokisa “bosolo” elingi koloba nini? Elingi koloba ete Nzambe alongoli mosika masumu ma mokili na nzela ya malamu koleka. Yesu abatisamaki pona kopetola batu banso na masumu mabango. “Pwete kati na yango bosolo bwa Nzambe emomani wuta kondima pona kondima” (Barome 1:17).
Bosolo bwa Nzambe bomonani na mobeko mwa Ye moko ya kotinda Mwana mwa Ye Yesu na mokili oyo pona kolongola mosika masumu manso ma mokili na nzela ya libatisi lia Ye na Yoane-Mobatisi mpe na liwa lia Ye na Kuruse. 
Na Boyokani bwa Sika, bosolo bwa Nzambe bomonani na nzela ya libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye. Topetolami pwete Yesu alongolaki mosika na biso masumu mabiso banso eleki mbula 2000 na Yordane. Tango tondimi lobiko na Nzambe na mitema mia biso, bosolo bwa Nzambe bokokisami solo-solo. 
“Yesu azongiselaki ye: — Tika ete esalema bongo sik’oyo! Ezali malamu mpo na biso kosala bongo mpo na kokokisa bosembo nyonso. Tango kaka Yesu azwaki libatisi mpe abimaki na mayi, Likolo efungwamaki; mpe Yesu amonaki Molimo ya Nzambe kokitela Ye lokola ebenga. Bongo, mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo mpe elobaki: ‘Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi.’” (Matie 3:15-17). 
Molongo oyo mozali kotaliza ete Nzambe Ye moko atatolaki ete libatisi lia Mwana mwa Ye ekokisaki bosolo nyonso ya lobiko. Ayebisaki biso ete, “Yesu, oyo abatisama na Yoane-Mobatisi, sikoyo azali solo-solo Mwana mwa Ye.” Nzambe atatolaki ete Mwana mwa Ye abatisamaki pona bolongoli bwa masumu manso ma mokili. Asalaki bongo, pwete mosala esantu ya Mwana mwa Ye, Yesu, moleka pamba te. 
Yesu azali Mwana na Nzambe mpe lisusu Mobikisi mwa basumuki na mokili. “Kati na Ye Nasepeli mingi,” alobi Nzambe. Ezali solo ete Yesu atosaki mokano mwa Tata mpe alongolaki mosika masumu manso ma bato banso na nzela ya libatisi lia Ye. 
Libatisi elobi “kosokolama, koleka na, kokundama.” Pwete masumu mabiso banso malekaki na Yesu tango Abatisamaki, oyo esengeli tosala ezali kondima sango ya lobiko mosika na masumu manso ma mokili oyo. 
Bokokisami bwa masakoli manso malobiko ya Boyokani bwa Kala ekokisamaki na nzela ya libatisi lia Yesu kati na Boyokani bwa Sika. Sikoyo masakoli ma Boyokani bwa Kala makutani na suka na bandoyi na bango na Boyokani bwa Sika. Kaka lokola Ba-Isalayele bazalaki kolongola masumu mabango mbula na mbula na Boyokani bwa Kala, masumu ma bato malekaki na Yesu mpe malongolamaki pona libela na Boyokani bwa Sika. 
Levitike 16:29 ezali elili ya Matie 3:15. Yesu abatisami pona kolongwa masumu manso ma mokili. Matondo pona libatisi lia Ye. Baye banso bandimi bolimbisi bwa Ye ya seko bwa masumu babikisami; masumu mabango manso balongolami na mesa ya mitema mia bango. 
Soki ozangi koyeba mpe ozangi kondima na motema nayo bosolo bwa libasi lia Yesu mpe liwa lia Ye na Kuruse, okoki te kosokolama na masumu mayo ata ozali na bomoyi ya bosembo mingi. Kaka koleka na libatisi lia Yesu nde liloba lia Nzambe likokokisama mpe masumu mayo makolongolama mosika nayo. Lobiko ya solo ekokokisama na nzela ya bolongoli bwa masumu manso mabiso, na maloba mosusu, koleka na libatisi lia Yesu. 
Nalikanisi oyo, okosala nini? Okondima lobiko oyo na kati na motema mwayo? Tope okondima te? Ezali te maloba ma bato, kasi oyo ya Nzambe Ye moko. Yesu akufaki na Kuruse pwete Alongola mosika masumu na nzela ya libatisi lia Ye. Ondime te liwa lia Ye na Kuruse ezalaki bokokisami bwa libatisi lia Ye? 
Ekomami na Barome 8:3-4, “Pamba te likambo oyo Mobeko ekokaki kosala te mpo ete bomoto ezangisaki yango nguya, Nzambe asalaki yango na kotinda Mwana na Ye, na nzoto oyo ekokani na nzoto ya bato ya masumu, mpo ete akoma likabo mpo na lisumu. Boye, akatelaki masumu etumbu kati na nzoto ya bato. Asalaki bongo mpo ete bosembo oyo Mobeko esengaka ekokisama kati na biso oyo totambolaka te kolanda baposa ya nzoto, kasi kolanda Molimo.”
Pwete biso lokola bikelamu na bolembu, tokoki te kobatela mobeko mpe na mikamo mia Nzambe pona bozangi makasi na nzoto, Yesu alongolaki mosika na nzoto masumu manso mpe akumbaki yango na Yemoko. Yango nde bosolo bwa libatisi lia Yesu. Libatisi lia Yesu lipesi nzela na liwa lia Ye na Kuruse. Yango nde bwanya bwa sango malamu ya solo ya Nzambe. 
Soki ondemeli kaka liwa lia Yesu na Kuruse, baluka sikoyo mpe ndima na motema mwayo sango malamu ya lobiko na nzela ya libatisi lia Yesu. Nde okoki kokoma solo-solo mwana na Nzambe. 
 

SANGO MALAMU YA SOLO

Sango ya Solo eza nini?
Sango Malamu ya mayi Mpe na Molimo

Sango malamu ya solo ezali oyo ya bolongoli masumu. Yango nde sango malamu ya libatisi lia Yesu, liwa lia Ye na lisekwi lia Ye oyo Nzambe atalisaki biso. Yesu-Klisto alongolaki mosika masumu manso mbala moko na libatisi lia Ye na Yordane na nzela ya bosomi oyo epesamela baye bandimeli bosolo wana. Koleka na kondima na biso, masumu mabiso manso oyo ya lobi ekoya elongolami mpe. 
Sikoyo, oyo nyonso andimi libatisi lia Yesu mpe na makila na Kuruse abikisami wuta na masumu manso ma mokili pona libela. Ondimi yango? Soki eyano nayo ezali “Boye,” bongo okokoma solo moyengebene. 
Totala na mokuse ndenge makambo malekaki sima na libatisi lia Yesu. Na Yoane 1:29, ekomami, “Botala! Mwana Mpate na Nzambe oyo alongoli mosika lisumu lia mokili!”
Yoane-Mobatisi atatolaki ete Yesu azali Mwana Mpate oyo alongoli mosika lisumu lia mokili. Yoane-Mobatisi alekisaki na nzoto ya Yesu masumu manso ma mokili tango abatisaki Ye na Yordane. Likolo na yango, pwete Yoane-Mobatisi ye moko oyo abatisaki Yesu, atatolaki, “Botala! Mwana Mpate oyo alongoli mosika lisumu lia mokili!” Yesu abatisamaki mpe alongolaki mosika masumu ma mokili, mpe yango nde sango malamu ya mbotama ya mbala ya mibale. 
 
 
“Botala! Mwana Mpate na Nzambe oyo alongoli mosika lisumu lia mokili!” (Yoane 1:29). Yesu alongoli mosika masumu manso ma mokili na nzela ya libatisi lia Ye.
Masumu maye osalaki banda botama nayo tii okoma na mbula zomi mazali nakati ya lisumu lia mokili. Ondimeli ete masumu mana malekaki mosika na kati na Yesu? ― Boye. ― Bongo oyo ya mbula zomi na moko tii ntuku mibale? Ondime ete masumu mana malekaki mosika na nzela ya Yesu mpe? ― Boye. ― 
Masumu maye okosala lobi ekoya mazali na kati na lisumu lia mokili? ― Boye, mazali na kati. ― Bongo, maleki mpe na nzela ya Yesu? ― Boye. ― Ondimi solo-solo ete masumu mayo malekaki na nzela na Yesu? ― Boye. ― Ondime ete masumu manso ma mokili malekaki na nzela na Yesu na libatisi lia Ye? ―Boye.― 
Olingi solo-solo kobikisama na bowumbu bwa masumu ma mokili? Soki olingi, ndimela sango malamu ya libatisi lia Yesu na makila ma Ye na Kuruse. Tango ondimeli yango, obikisami. Ondimeli yango? Yango nde lobiko ya solo ya botama ya mbala ya mibale. Libatisi lia Yesu na makila ma Ye nde sango malamu ya solo ya botama ya mbala ya mibale. Ezali lipamboli wuta epayi na Nzambe pona na basumuki banso ya mokili.
Kondimela lobiko ya mbotama ya mbala ya mibale kati na libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye na Kuruse, kotalela bolingo bwa Ye ezali kondima ya solo mpe kobotama mbala ya sika ya solo. Bilembo bia botama ya mbala ya mibale bizali mayi na makila ma Yesu. Esengeli kaka kondimela maloba mabosolo makomami na Mokanda mwa Nzambe.
 

KOBONDELA NA KONDIMA

Litatoli nini lizali na Mitema mia babotami ya mbala sika?
Yesu alongoli masumu mabiso na Libatisi lia Ye mpe na makila

Kobondela ezali kondimela Yesu kolandisama na makanisi ma moto ye moko, na kotika epayi liloba lia bule lia Nzambe. Kasi, lobiko wuta lisumu ezali libanda ya makanisi ya moto ya ndenge wana. Kondima maloba manso ma Boyokani bwa Kala, mpe koboya makanisi ya bomoto nde nzela ya kondima ya solo. Ezali kozuwa yango ndenge ekomami na Mokanda mwa Nzambe mpe kondima lobiko na nzela ya mayi na makila: libatisi lia Yesu na liwa lia Ye na Kuruse. Okoki kobikisama na nzela ya kozuwa na motema mwayo bwanya ya sango malamu ya solo.
Soki ozangi libatisi lia Yesu ozangi nzela ya kolekisa masumu mayo, mpe na bozangi bosopi makila ya bofuti bwa masumu mayo bozali te. Masumu mabiso manso malekaki na Yesu liboso Akende na Kuruse pona kosopa makila pona biso. Tango tondimeli libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye na Kuruse, tokobotama mbala ya mibale na nzela ya sango malamu kolekela na sango malamu, tobisami na masumu manso ma mokili. 
Kondima ya solo ezali kondimela ete Yesu-Kristu apetola biso na masumu mabiso manso tango Abatisamaki; ezali kondima ete Azuwaki etumbo ya masumu mabiso manso na Kuruse. Esengeli tondimela lobiko ya bosolo ya Nzambe. Nzambe alingaki biso banso mingi ete Abikisaki biso na nzela ya libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye na Kuruse. Tango tondimeli sango malamu oyo, tobikisami na bowumbu ya masumu manso, tokangolami na etumbo mpe tokomi bayengebene liboso na Nzambe. 
“Nkolo, nandimi. Nakoki te komibikisi kasi nandimi sango malamu ya libatisi lia Yesu, liwa lia Ye na Kuruse mpe na lisekwi.” Totonda Nzambe pona lipamboli lia botama ya mbala ya mibale. Kondima sango malamu ya solo ya botama ya mbala ya mibale nde kondima ya solo.
Bosolo ya botama ya mbala ya mibale bozali boye; “Bongo, kondima ewutaka na koyoka, koyoka na liloba lia Nzambe” (Barome 10:17). “Mpe okoyeba bosolo, bosolo bokokangola yo” (Yoane 8:32). Esengeli koyeba bosolo malamu, mpe kondima sango malamu ya mayi, makila mpe na Molimo pona kozala na litatoli na yango (1 Yoane 5:5-8). 
“Bosolo ekokangola yo.” Yango nde maloba ma Yesu pona mayi na makila. Okangolami? Ozali na kati ya mabondeli tope na kondima? Yesu alingi kaka baye bazali na kondima na sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi, na makila, mpe na Molimo. 
Soki ondimela sango malamu ya libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye, ozali na lisumu te na kati na motema mwayo. Kasi soki ondimeli Yesu likolo-likolo lokola eteni ya mabondeli, ozali kokoba na kobika kati na lisumu pwete ozali te na kondimaya solo kati na lobiko na Yesu. Bato ya losamo bazali kozuwa bokangolami na etumbu ya masumu mabango tango nyonso bazali tosambela kati na kotubela. 
Boye, bato ya ndenge wana bakoki te kobikisama na masumu mabango na botondi nyonso. Ata bazali kotubela bomoyi nabango mobimba, ekoki te kozuwa esika ya bofuti bwa etumbo ya masumu na nzela ya libatisi lia Yesu mpe na liwa lia Ye na Kuruse. Bikisama na nzela ya kondimela sango malamu ya Yesu, oyo elongoli mosika masumu manso ma mokili, elongo na oyo ya lobi ekoya.
Nakoyebisa yo lisusu ete kosenga bolimbisi mikolo nyonso ekoki te kozuwa esika ya sango malamu ya botama ya mbala ya mibale. Esengeli Ba-Klisto banso bandimela bokangolami na etumbo ya masumu na nzela ya sango malamu ya botama ya mbala ya mibale. 
Tokoki te kosenga bolimbisi bwa masumu mabiso ndenge ya kosilisa yango. Bosengi bolimbisi ya lokuta ekoki kokoma na Nzambe te, kasi eko sunga kaka pona tango moke molemo ya moto. Bosengi bolimbisi ezali ngambo moko kotubela oyo ezali kokota te na botangi bwa mokano mwa Nzambe. Yango nde eloko moko oyo Nzambe azali kozela epayi na biso. 
Kutubela ya solo ezali nini? Ezali kozongela Nzambe. Kozongela liloba lia lobiko lia Yesu mpe kondimela liloba ndenge ekomami. Sango malamu oyo ezali kobikisa biso ezali sango malamu ya libatisi lia Yesu, liwa lia Ye na Kuruse mpe lisekwi lia Ye. Tango tondimeli sango malamu oyo na bontondi nyonso, tobikisami be tozuwi bomoyi ya seko. 
Yango nde bwanya ya sango malamu ya botama ya mbala ya mibale; ezali kondimela libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye elongo na sango ya bokonzi bwa Nzambe oyo ezali kopesa biso nzela ya kobotama mbala ya mibale.
Tango Yesu alobaki na biso ete esengeli tobotama na mayi mpe na Molimo, Alingaki ete tobotama na kondimela libatisi lia Ye mpe makila na Kuruse. Nasima tokoki kokota mpe kofanda na bokonzi bwa Nzambe. Tosengami kondimela liloba lia Ye. Biloko mibale oyo ezali komema litatoli lia bolongolami bwa masumu mabiso, libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye na Kuruse, nde maloba oyo mapesi nzela ya botama ya mbala ya mibale. 
Ondimeli sango malamu ya botama ya mbala ya mibale, na ya bolongoli mosika masumu? Kondima na libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye na Kuruse ebikisi biso na masumu manso ma mokili. Tokoki kobotama mbala ya mibale na kondima ya ndenge oyo. Lokola Mokanda mwa Nzambe molobeli biso ete Yesu alongoli mosika masumu ma basumuki banso ba mokili, pona nini tondimela te botama ya mbala ya mibale? 
Baye bandimeli makambo maye mibale oyo ezali komema litatoli ya botama ya sika, libatisi lia Yesu mpe liwa lia Ye na Kuruse, bazali babotami ya mbala ya mibale ya solo. Mpe na oyo nyonso andimeli Mwana na Nzambe azali na litatoli na kati na ye moko (1 Yoane 5:3-10). Tango ondimeli Yesu, okoki te kobika libanda na sango malamu ya mayi, makila mpe na Molimo. 
Kaka lokola Mokonzi ya Mabinga Naman asokolaki mbala sambo na Yordane pona kosilisa libela maladi na ye ya maba (2 Bakonzi elongi ya 5), esengeli tondimela ete Yesu alongolaki mosika na biso masumu manso ma mokili mbala moko pona libela na Yordane mpe apesaki biso lobiko ya seko. 
Pwete Yesu alingaki biso, tokoki kobikisama na masumu mabiso manso ma mokili mpe kozuwa bomoyi bwa seko na nzela ya kondimela sango malamu ya bolongoli mosika masumu. Tondimela biso banso sango malamu ya botama ya mbala ya mibale mpe tozuwa lobiko na Nzambe.