• All e-books and audiobooks on The New Life Mission website are free
  • Explore multilingual sermons in global languages
  • Two new revised editions in English have been released
  • Check out our website translated into 27 languages
Search

Sermons

Liteya lia 3: Sango Malamu ya Mayi mpe na Molimo

[3-6] Kokatama Ngenga ya Molimo mpe ya Solo (Kobima 12:43-49)

Kokatama Ngenga ya Molimo mpe ya Solo(Kobima 12:43-49)
“Yawe alobaki na Moyize mpe Aron: ‘Tala mibeko na tina na Pasika: ‘Mopaya moko te akoki kolia yango. Kasi mowumbu nyonso oyo bakosomba, basengeli liboso kokata ye ngenga, sima nde akoki kolia Pasika. Mopaya oyo akozala na bino mpo na tango moke mpe mosali oyo azwaka lifuti bakolia yango te. Ekoliama kaka kati na ndako moko na moko, bakobimisa ata mosuni moko te na libanda ya ndako mpe bakobuka ata mokuwa na yango moko te. Lisanga mobimba ya Isalaele ekosala feti ya Pasika. Soki mopaya oyo azali kati na bino alingi kosepela na feti ya Pasika ya Yawe, esengeli ete mibali nyonso oyo bazali kati na ndako na ye bakatama ngenga; bongo nde akozwa nzela ya kolia Pasika lokola mwana mboka ya Isalaele. Kasi mobali oyo akokatama ngenga te akoki kolia Pasika te. Mibeko ezali se ndenge moko mpo na mwana mboka ya Isalaele mpe mpo na mopaya oyo azali kati na bino.’”
 

Nini ezalaki libongisi lia motoya pona Ba-Isalayele kokoma bana na Nzambe na Boyokani bwa Kala?
Basengelaki kokatama ngenga.
 
Maloba ma Nzambe kati na Boyokani nyonso mibale ya Kala mpe ya Sika mazali na motuya mingi pona baye bandimeli Nzambe. Tokoki te kolongola, tope kobakisa ata molongo moko te, pwete maloba ma Nzambe mazali maloba ma bomoyi. 
Matangi malelo mazali kotakisa biso baye tolingi kobatela Pasaka kokatama ngenga yambo. Tosengeli kokanisa pona nini Nzambe ayebisi biso yango. Soki moko nano akatama ngenga te, akoki te kobatela Pasaka. 
Soki tosengeli kondimela Yesu, tosengeli kososola mokano mwa Nzambe kati yakopesa biso maloba oyo. Kokata ngenga ezali kobongisa poso ya mwana mobali na kokata yango na moto na yango. Pona nini Nzambe ayebisaki Abrayami mpe bana baye kokata ngenga? Tina ezali ete Alakaki kaka baye “bakolongolama masumu”, bango nde bakokoma bana ba Ye. 
Ezali pona na yango Ayebisaki bato ba Ye Isalayela na Boyokani bwa Kala kokatama ngenga. Kokoma libota lia Nzambe, bato ya Isalayele basengelaki kokatama ngenga. Ezalaki mokano mwa Ye, pona kosantisama, mpe Akomaki Nzambe ya baye balongolaki masumu mabango na nzela ya kondima kokatama ngenga. Mpe na Boyokani bwa Sika, Akomi Nzambe ya baye balongoli masumu mabango na kondima. 
 
 

PASAKA


Pasaka ezalaki nini?
Ezalaki mokolo oyo Ba-Isalayele Bazalaki konaisa mpe kotonda Nzambe Pona bobimi na Ejipte.

Mokolo mwa feti ya motuya pona bana Isalayele mozalaki mokolo mwa Pasaka. Ezalaki mokolo ya kokanisa mpe kotonda Nzambe pona Bobimi na Ejipte, esika wapi bana Isalayele babikaki lokola bawumbu mbula lokola 400. Nzambe asalelaki bango bikamwa zomi ya minene pona kolongola motema mabe ya Faraon. Ezalaki na nzela wana, Alongolaki bana Isalayele libanda na Ejipte mpe Amemaki bango tii na mabele ya Kana. 
Ba-Isalayele babikisamaki na liwa lia bana ya liboso kati na etumbo ya suka, koleka na makila ma mbeka ya libonza mpe ya kokatama ngenga. Bongo, Nzambe ayebisaki bango kobatela Pasaka koleka ekeke na ekeke lokola nzela ya kokanisa Ye mpe kotonda Ye pona mawa ma Ye. 
 

BANA ISALAYELE BASENGELAKI KOSALA NINI PONA KOBATELA PASAKA?

Bana Isalayele basengelaki kosala nini Pona kobatela Pasaka?
Basengelaki kokatama ngenga.

Tosengeli kososola ete pona kobatela Pasaka, tosengeli kokatama ngenga kati na mitema mia biso. Ata Ba-Isalayele, bakatamaki ngenga pona kobatela Pasaka. 
Ekomaki na Kobima 12:43-49. “Yawe alobaki na Moyize mpe Aron: ‘Tala mibeko na tina na Pasika: ‘Mopaya moko te akoki kolia yango. Kasi mowumbu nyonso oyo bakosomba, basengeli liboso kokata ye ngenga, sima nde akoki kolia Pasika. Mopaya oyo akozala na bino mpo na tango moke mpe mosali oyo azwaka lifuti bakolia yango te. Ekoliama kaka kati na ndako moko na moko, bakobimisa ata mosuni moko te na libanda ya ndako mpe bakobuka ata mokuwa na yango moko te. Lisanga mobimba ya Isalaele ekosala feti ya Pasika. Soki mopaya oyo azali kati na bino alingi kosepela na feti ya Pasika ya Yawe, esengeli ete mibali nyonso oyo bazali kati na ndako na ye bakatama ngenga; bongo nde akozwa nzela ya kolia Pasika lokola mwana mboka ya Isalaele. Kasi mobali oyo akokatama ngenga te akoki kolia Pasika te. Mibeko ezali se ndenge moko mpo na mwana mboka ya Isalaele mpe mpo na mopaya oyo azali kati na bino.” Bongo, Ayebisaki Ba-Isalayele kobatela Pasaka sima ya kokatama ngenga. 
Ba nani bapesamelaki nzela ya kolia mosuni ya mwana mpate ya Pasaka mpe kobatela Pasaka? Kaka baye bakatamaki ngenga, nde bakokaki kobatela Pasaka. 
Mwana Mpate ya Pasaka, lokola toyebi yango, ezali Yesu Klisto oyo alongolaki mosika masumu manso mamokili. 
Bongo, kokatama ngenga ezali nini na Boyokani bwa Kala mpe na Boyokani bwa Sika? Kokatama ngenga elingi koloba kokata poso ya moto ya kimobali. Yesu Klisto mpe akatama ngenga na mokolo ya mwambe sima kobotama na Ye kati na mokili oyo. Nzambe apesaki mibeko ete oyo nyonso akoleka na Pasaka, asengeli kokatama ngenga, mpe Asalaki yango polele pona oyo nyonso azalaki ya kokatama ngenga te, aleka te na Pasaka. 
Pona yango, moto nyonso asengelaki kokatama ngenga kaka pona kotosa mokano mwa Nzambe. Soki ondimeli Yesu, osengeli kososola tina ya kokatama ngenga na Boyokani bwa Sika. 
 
 

MOMESANO MWA KOKATAMA NGENGA OYO NZAMBE ASENGAKI NA ABRAYAMI KOSALA MOZALAKI NINI? 


Ndenge nini Abrayami na bana baye Bakomaki bana na Nzambe?
Na nzela ya kokatama ngenga

Na Ebandeli, Nzambe abimelaki Abrayami, mpe Asalaki boyokani na ye mpe na bana baye. Na elongi ya 15, Nzambe alakaki ete bana ba Abrayami bakoma ebele lokola minzoto na lola mpe Akopesa bango mabela ya Kana lokola eteni na bango. 
Na elongi ya 17, Ayebisaki Abrayami ete, soki ye mpe bana baye bakota na Boyokani na Ye esengeli bakatama ngenga. Akoma Nzambe na bango mpe bakozala bana na Ye. Ezalaki boyokani bwa Nzambe na Abrayami mpe na bana baye. Nzambe alakaki ete, tango bakondimela boyokani bwa Ye mpe bakokatama ngenga, ekolinga koloba bakomi bana na Ye, mpe Akomi Ngambe na bango. 
Ebandeli 17:7-8 says, “Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela na libela kati na Ngai mpe yo, mpe elongo na bakitani na yo sima na yo, mpo na milongo oyo ekoya na sima, mpo ete nazala Nzambe na yo mpe Nzambe ya bakitani na yo sima na yo. Nakopesa lokola libula ya seko na seko, epai na yo mpe epai ya bakitani na yo sima na yo, mokili nyonso ya Kanana epai wapi ozali mopaya. Nakozala Nzambe ya bakitani na yo.”
Kokatama ngenga ezalaki boyokani bwa Nzambe na Abrayam. Mpe na bana baye. 
 
 

NZELA YA KOKATAMA NGENGA YA MOLIMO ELINGI KOLOBA NINI?


Kokatama ngenga na Molimo ezalai nini?
Ezali kolongola masumu manso kati na Mitema na kondimela libatisi Lia Yesu.

Pwete Abrayami andimelaki liloba lia Nzambe, Nzambe asalaki ye moyengebene mpe asalaki ye mwana na Ye. Ezalaki kokatama ngenga oyo ezalaki elembo ya boyokani kati na Nzambe na Abrayami. 
“Tala boyokani na Ngai elongo na yo mpe bakitani na yo sima na yo, boyokani oyo osengeli kobatela: Mwana mobali nyonso kati na bino asengeli kokatama ngenga.” (Ebandeli 17:10).
Na nzoto, kokata ngenga ezali kobongisa poso ya kimobali. Na molimo, elingi koloba kolekisamasumu manso na Yesu na nzela ya kondimela libatisi lia Ye. Tokatami ngenga na molimo tango masumu mabiso manso malongolami na kondimela lobiko na biso na libatisi lia Yesu. Kokatama ngenga na Boyokani bwa Sika ezali kolongola masumu na nzela ya libatisi lia Yesu. 
Pona yango, kokatama ngenga na Boyokani bwa Kala ezali libatisi lia Yesu na Boyokani bwa Sika, mpe nyonso mibale ezali boyokani na Nzambe, oyo ezali kosalabiso libota lia Ye. Boye, kokatama ngenga na Boyokani bwa Kala na libatisi lia Yesu na Boyokani bwa Sika, ezali eloko moko mpe ya ndenge moko. 
Kaka lokola bana na Abrayami bakomaki libota na Nzambe na kokatmangenga, bisompe tokomi bana na Nzambe tango tolongoli masumu manso kati na mitema mia biso. Tozali kosala yango na kondima ete, ezali lisusu te na lisumu kati ya mokili pwete Yesu alongolaki masumu manso mosika, tango abatisamaki na Yoane Mobatisi. 
Libatisi lia Yesu lisali basumuki banso bayengebene na kolongola masumu mabango. Kaka lokola poso moke elongolami pona kobongisa kimobali, bongo masumu ma bato banso ya mokili malongolami na mitema miabango, tango Yesu abatisamaki na Yoane Mobatisi na Yordani. Baye bandimeli yango bakoki kokatama ngenga na molimo mpe bakomi libota lia Nzambe, Moyengebene. 
 

KONDIMA YA LOKUTA OYO EZALAKI KOMEMA BATO MOSIKA NA NZAMBE

Nini ememaki Ba-Isalayele Mosika na Nzambe?
Kosanga kokatama ngenga

Nzambe ayebisaki Abrayami ete, mobali nyonso oyo akatama ngenga te, asengeli alongolama libanda na bato na Ye. Bongo, kokatama ngenga ezali nini? Mpe kokatama ngenga ya molimo ezali nini? Soki kotama ngenga ya nzoto ezali kokata poso moke pona kobongisa kimobali na nzoto, boye kokatama ngenga ya molimo ezali kolongola masumu na kati ya mitema mia biso mpe kolekisa yango na Yesu na nzela ya libatisi lia Ye. 
Libatisi lia Yesu ezali kokatama ngenga ya molimo ya bato banso, kolekela yango masumu manso ma mokili malongolami, mpe malekisama na nzoto ya Yesu. Tina ya libatisi lia Yesu na Yoane Mobatisi ezalaki kobikisa bato banso ma mokili na nzela ya kokatama ngenga na molimo, pona kolongola masumu manso.
Masumu manso ma bato malekaki na nzoto ya Yesu. Nzambe, na ebandeli Nzambe na Abrayami, Nzambe ya Isaka, Nzambe ya Yakobo, mpe Nzambe ya bana na Abrayami banso, asalaki boyokani na Abrayami mpe na bana baye pona kokatama ngenga. Bongo, akomaki Nzambe, Mobikisi ya baye banso masumu mabango malongolami na nzela ya kokatama ngenga. 
Kokatama ngenga oyo ezali kolongola masumu ezali nini? Ezali boyokani bwa Nzambe na Abrayami mpe na baye banso babotami mbala ya mibale na kondimela libatisi lia Yesu mpe liwa lia Ye na Kuruse lokola lobiko na bango. Na nzela wana, Apesa biso makoki ya kokoma bana na Ye. Bongo, Azali Nzambe ya baye bakatama ngenga. 
Nzambe alobaki na Abrayami. “Mpo na milongo nyonso oyo ekoya, mwana mobali nyonso kati na bino, oyo akokisi mikolo mwambe asengeli kokatama ngenga: ezala mwana mobali oyo abotami kati na ndako na yo to mwana mobali oyo osombi na mosolo na yo epai ya mopaya, mwana mobali oyo azali mokitani na yo te, ye mpe asengeli kokatama ngenga. Mowumbu nyonso oyo abotami kati na ndako na yo to oyo osombi na mosolo na yo asengeli kokatama ngenga. Boyokani na Ngai ekozala kati na banzoto na bino lokola boyokani ya libela na libela. Mwana mobali nyonso oyo akokatama ngenga te, bakolongola ye kati na bato na ye, mpo ete abebisi boyokani na Ngai.” (Ebandeli 17:12-14).
Oyo nyonso azali komeka kopusana pembeni na Yesu libanda na kotama ngenga ya molimo akolongolama kati na bato ba Ye. Kokatama ngenga ya molimo ezali libatisi lia Yesu na Boyokani bwa Sika, na nzela oyo masumu manso ma mokili malekelaki na nzoto na Ye.
Oyo nyonso andimeli Yesu asengeli kondimela mpe kokatama ngenga ya Boyokani bwa Kala mpe libatisi lia Yesu na Boyokani bwa Sika, pwete azuwa Molimo, abikisama wuta boyumbu bwa masumu maye manso mpe akoma mwana na Nzambe. Na biso baye tondimeli Yesu, kokatama ngenga kati na Boyokani bwa Kala mpe libatisi lia Yesu kati na Boyokani bwa Sika ezali eloko moko. 
Soki tokweyi kososola bosolo ya kokatama ngenga tope tokoki te kondima na mitema mia biso lobiko na nzela ya kokatama ngenga na molimo, oyo ezali kopesa biso nzela ya kobotamambala ya mibale, kondima na biso ezali ya pamba. Tokoki kokanisa ete tondimeli Nzambe, nzoka nde totongaki ndako na biso na kondima ya zelo. 
Nzambe ayebisi biso baye bandimeli Ye kokatama ngenga, kondimela lisiko na nzela ya libatisi lia Yesu, kokatama ngenga ya molimo. Libanda ya kokatama ngenga, tokoki te kokoma bato na Ye. Libanda na kokatama ngenga, tokologolama na milongo mia bato ba Ye. Pona yango, Nzambe apesaki mobeko ete moto moko na moko, ata asumbamaki na mbongo tope mopayi, esengeli akatama nenga liboso na koya na mesa ya Pasaka. 
Ata baye babotama na Isalayele bazalaki kolongola bango na lingomba lia bato ba Ye soki bakatama te ngenga. Boyokani bwa Nzambe na bato ba Ye ya Isalayele bosengeli kosalema na baye banso bandimeli Yesu. 
Na Kobima, elongi 12, Ba-Isalayele baye baliaki mosuni ya Pasaka mpe na matiti ya bololo, basengelaki kokatama ngenga. Pona kolia mosuni ya Pasaka, ezalaki kaka pona baye bakatama ngenga. 
Ezali na motuya ya koyeba ete tango bato ya Isalayele maliaki mosuni ya Pasaka mpe batiyaki makila ma mwana mpate na ma ebende mibale ya ekuke ya ndako mpe na moto na yango, bakatama ngenga yambo. 
Na mobeko oyo mwa Nzambe, soki moto akatama te ngenga, akologolama libanda na libota lia Ye, mpe akobungisa nzela ya ye, ya kokoma mwana na Nzambe. Yango elingi koloba ete lisumu lia bozangi kondima kati na kokatama ngenga ya molimo lizali kokumba bato na mabe. Kaka baye bakatama ngenga na molimo na nzela ya libatisi lia Yesu nde bakoki kobikisama.
“Mayi yango ezali elilingi ya libatisi oyo ebikisi bino sik’oyo. Libatisi yango elongolaka mbindo ya nzoto te, kasi ezali mokano ya kotambola na motema peto liboso ya Nzambe; mpe ezali kobikisa bino na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto” (1 Piere 3:21). Ondimeli solo-solo ete masumu mayo manso malekaki na nzoto ya Yesu na nzela ya libatisi lia Ye na Yordani? Soki ososoli mpe ondimeli bosolo oyo, libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye, okomona ete okatama nganga na molimo mpe okomi moyengebene mpe moto ya bosembo. Mpe okozala na kondima na bosolo ya molimo ete makila ma Yesu na Kuruse makokaki kozala na tina te libanda na libatisi lia Ye. 
Soki ondimi na Kuruse libanda na kokatama ngenga na molimo, na nzela ya kondima libatisi lia Yesu, okolongolama mosika na mawa ma Nzambe. Okomona ete ozali nano na lisumu kati na motema mwa yo. 
Tosengeli kondimela bosolo ete lisiko lia Nzambe libandaki na libatisi lia Yesu Klisto mpe ekokisamaki na makila ma Ye na Kuruse. Kosala bongo, tosengeli kotiya na mitema mia biso malomba masolo, libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye, lokola lobiko na biso. 
Nakondima oyo, tokoki kokangolama na nguya ya molili mpe kokoma bana ya mwinda. Kondima oyo ya molimo ezali kokabola baye babotama mbala ya mibale na bandimi ya losambo kaka.
Nkolo ba biso, Yesu, ayebisaki biso tofanda kati na Ye. Alongolaki mosika masumu manso ma mokili na libatisi lia Ye mpe na makila ma Ye. Pona yango, komema moboyi ya kozala bato na Nzambe, tosengeli kondimela libatisi lia Yesu. Soki tokoki te, tokolongolama mosika na Ye.
Lobiko ya lisiko ezali kaka libatisi lia Yesu na Boyokani bwa Sika mpe kokatama ngenga na Boyokani bwa Kala. Lobiko etondisami tango tondimeli nyonso mibale, libatisi lia Yesu (kokatama ngenga ya molimo) mpe makila ma Yesu na Kuruse (makila ma Mwana Mpate ya Pasaka). 
Kokatama ngenga na nzoto kati na Boyokani bwa Kala ezali na bomoko na libatisi lia Yesu na Boyokani bwa Sika. Ezayi 34:16 maloba manso na Mokanda mwa Nzambe mazali na ndoyi na yango. “Boluka kati na buku ya Yawe mpe botanga: Moko te kati na bango akozanga, moko te akomitungisa mpo na moningana ye; pamba te monoko na Yawe nde epesi mitindo mpe Molimo na Ye akosangisa bango elongo.” 
Liloba nyonso na Boyokani bwa Kala lizali na singa na Boyokani bwa Sika. Ata liloba moko lizangi te ndoyi na liango. 
 

NDENGE NINI PONA BAYE BANDIMELI NA LOLENGE YA LIBOMA MPE YA MABE?

Nani akokende lifeko kati Na bandimi banso ba mokili?
Baye bandimeli te kokatama Ngenga ya molimo

Lelo bandimi mingi bandimeli kaka makila ma Mwana Mpate ya Pasaka. Bazlai kotuna, “Kokatama ngenga, ezali nini? Esalameki na ekeke ya ba-Yuda ya Boyokani bwa Kala. Tosengeli te kokatama ngenga na nzoto pona tango oyo na Boyokani bwa Sika.” 
Ya solo, ezali bongo. Nazali kotinda moto ata moko te na kokatama ngenga na nzoto. Ntoma Polo alobeli yango malamu likolo na kokatama ngenga na molimo, mpe ezali kokatama ngenga ya molimo nde esika nazali kolobela sikoyo. 
Nazali koyebisa yo te kokatama ngenga na nzoto na yo. Kokatama ngenga na nzoto ezali na tina te pona biso, kasi tosengeli koya epayi na Yesu mpe kokatama ngenga na molimo na kondimela libatisi lia Yesu pona kobikisama na masumu mabiso manso. 
Pona botama ya mbala ya mibale ya bato mosusu, basengeli kokatama ngenga na molimo. Oyonyonso andimeli Yesu asengeli kokatama ngenga na molimo. Ezali kaka na ndenge ya kolongola masumu manso mabiso, nzela moko ya kokoma moyengebene. Kaka sima na kokatama ngenga na biso ya molimo, nde tokozala na lisumu lisusu te. Bongo, tosengeli kondima na mitema mia biso kokatama ngenga ya molimo na kondimela libatisi lia Yesu.
Ntoma Polo mpe andimaki motuya ya kokatama ngenga ya molimo. Alobaki ete, “Kokata ngenga ezali oyo ya molimo” (Barome 2:29). Moko na moko na biso asengeli kokatama ngenga pona kokangolama na lisumu. 
Masumu mayo malekaki solo-solo na nzoto na Yesu sima ya kolongolama na yo? Ata na Boyokani bwa Sika, baye bandimeli Yesu basengeli kokatama ngenga kati na mitema mia bango na kondima libatisi lia Yesu. 
Ntoma Polo asalaki yango polele kati na mikanada mia ye. Nzambe abikisaki bato banso wuta boyumbu bwa masumu ma mokili, mpe Asala bango bato ba Ye. Bato ya Isalayela bakomaki bato na Nzambe na kokatama negnga mpe tokomaki bana ba Ye tango tolekisaki masumu mabiso na nzoto na Yesu na kondimela libatisi lia Ye. 
Nzambe andimi biso lokola bato ba Ye tango Amoni kondima kati na libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye na Kuruse. Kondima wana esali biso baye bakatama ngenga ya molimo mpe ekamba biso ba lobiko.
 
 

SALVATION EXISTS FOR SINNERS THROUGH THE BAPTISM OF JESUS AND HIS BLOOD 


Ndenge nini lobiko Esalamaki kati na Yesu?
Na nzela ya libatisi mpe liwa lia Ye Na Kuruse

Lobiko na Yesu Klisto esalamaki na nzela ya mayi ya libatisi lia Ye mpe na makila ma Ye na Kusruse, yango ezali pona basumuki. Makila ma Mwana Mpate mazalaki pona etumbo, mpe libatisi lia Yesu lizalaki kokatama ngenga ya molimo pona kolekisa masumu manso na nzoto na Ye. 
Mangomba ya Ba-Klisto ebele lelo bazali te kolobela polele likolo na kokatama ngenga ya molimo. Ata na Boyokani bwa Kala kokatama ngenga elingi koloba eloko moke pona biso mikolo oyo, tokoki kobosana libatisi lia Yesu ata moke te. 
Nayebisaki yo ete masumu mayo malongolami mosika na libatisi lia Yesu, mpe libatisi lia Yesu libikisi yo na buwumbu bwa masumu mayo manso. Ondimi yango? Soki obosani libatisi lia Yesu, okoyeba te sango malamu ya botama ya mabala ya mibale, sango malamu ya lisiko lia mobimba na nzela ya libatisi lia Yesu.
Ndenge nini tokoki kobosana libatisi lia Yesu, kokatama ngenga ya molimo oyo Nzambe ayebisaki biso? Soki totangi Mokanda mwa Nzambe, tokoki komona ete kokatama ngenga mpe makila ma Pasaka mazali kati na liboke moko. Yango nde sekele ya kokatama ngenga ya molimo, mpe ya libatisi lia Yesu. 
Sango malamu oyo eteyama na Ntomba Yoane ezalaki ya sango malamu ya libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye na Kuruse. Alobaki na 1 Yoane John 5:6, “Oyo need Ayaki na mayi mpe na makila―Yesu Klisto; kaka te na mayi, kasi na mayi mpe na makila.”
Alobaki ete Yesu ayaki na mayi, na makila mpe na Molimo. Kaka te na mayi, mpe kaka te na makila, kasi na mayi, makila mpe Molimo na liboko moko. Biloko oyo misatu, libatisi lia Yesu, makila ma Ye na Kuruse mpe na lisekwi lia Ye uta baweyi, ezali elembo ya lobiko na biso. 
 
 

PONA NINI BIBLIA EZALI KOLOBELA LIBATISI LIA YESU NA MAKILA MAYE? 


Bana Isalayele babikisamaki kaka na Nzela ya makila ya Mwana Mpate na Pasaka?
Te. Bakatamaki yambo ngenga Mpe babatelaki Pasaka na sima.

Libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye ezali oyo epesi biso nzela ya kobotamamabalaya mibale na mayi mpe na Molimo. Kobima elongi 12 elobi ete, “Bozuwa mwana mpate moko, mpe zuwa makila moke mpe botiya yango na ebende mibale ya ekuke mpe na moto ya ekuke ya bandako nabino. Tango Nakomona makil, nakoleka msoika ya bino.” 
Na koyeba yango, tokoki kobikisama na masumu mabiso manso na kondimela kaka na makila ma mwana mpate na Pasaka? Bongo, pona nini libatisi lia Yesu oyo balobeli na Boyokani bwa Sika? Bantoma balobi ete, “Bakundaki bino elongo na Klisto na nzela ya libatisi.” (Bakolose 2:12). “Pamba te bino nyonso oyo bozwaki libatisi kati na Klisto bolataki nde Klisto.” (Bagalatia 3:27). “…ya libatisi oyo ebikisi bino sik’oyo.” (1 Peter 3:21).
Bantoma Oiere na Polo mpe na bayekoli mosusu na Yesu Klisto balobelaki libatisi lia Yesu. Ezali libatisi lia Yesu na Yordani oyo tozali kotalela, mpe ezali kondima kati na libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye na Kuruse oyo ezali bosolo ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. 
Koyebisa yo bosolo, nandimeli Yesu, kasi kaka makila na Ye, mbula zomi elongo, mpe nayebaki te libatisi lia Yesu. Kasi boyebi oyo yango moko elongolaki te masumu mosika na motema mwangai. Nandimeli Yesu na motema nangai mobimba, kasi motema nangai ezalaki ya kotonda na lisumu. 
Sima mbula zomi, naye kososola tina ya kokatma ngenga ya molimo (libatisi lia Yesu) mpe nabotami mbala ya mibale. Nde naye komona bosolo wana: Kokatama ngenga na Boyokani bwa Kala ezalaki elili ya libatisi lia Yesu na Boyokani bwa Sika. Nandimelaki yango mpe nakobi kondimela yango. 
“Na kati na Boyokani bwa Sika, kondima malamu ezali kondimela biloko nyonso mibale makila ma Yesu mpe libatisi lia Ye, kolandisama na Mokanda mwa Nzambe?” Sima na kobotama mbala ya mibale, nakamwaki biloko oyo. 
Banda nandimeli na liloba lia libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye, mituna mitikalaki na makanisi mangai. “Ezali ya solo kokanisa ete masumu mangai manso malekaki na nzoto na Yesu tango Abatisamaki tope ezali malamu ete Yesu abikisaki biso kaka na nzela ya liwa lia Ye na Kuruse? Ekoki te kondimela kaka Yesu azali Nzambe nangai mpe Mobikisi nangai?” Nakanisaki mingi tango nazalaki kotanga Kodima, elongi 12. 
Bato ebele lelo bazali kotanga Kobima elongi 12 mpe bazangi kokanisa mbala mibale likolo ya ndenge oyo Yesu Klisto akufaki na Kuruse lokola Mobikisi na bango. Bazali kokanisa ete ezali malamu kondimela kati na makila ma Klisto mpe batatoli bosolo ya makanisa mabango. Bakoki kokoba kondimela mpe koloba ete Nkolo azali Klisto mpe Mwana na Nzambe kasi bazali kaka basumuki. Bakoki kokanisa ete soki bandimeli ete Yesu Klisto azali Mobikisi, bakobikisama soki bazali kaka na lisumu kati na mitema miabango. 
Eloko wana ezali te kondima ya solo. Kondima wana yango moko ekoki te komema na botama ya mbala ya mibale. Kaka libatisi lia Yesu na makila ma Ye yango nde ekomisaka biso sembo. 
Bongo, Komima elongi 12 elingi koloba nini? Nalukaki na Mokanda mwa Nzambe, nakonakisa ete, “Ezali likambo soki moto andimeli kaka makila ma Yesu mpe ayebeti te libatisi lia Ye?” Ata yambo nasilisa kotanga Kobima, naye komona ete bosolo bwa lobiki bozali te kaka na makila ya Klisto kasi na libatisi lia Yesu mpe. Na nzela ya Mokanda mwa Nzambe, naye kososola ete tokatama ngenga kati na mitema miabiso na nzela ya libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye na Kuruse. 
 
Lona nini Ba-Klisto ebele Bazali nano basumuki?
Pwete bandimeli nano te kati na Libatisi lia Yesu.

Naye komona na Kobima 12:47-49 ete yambo moto moko akoka kolia mosuni ya Pasaka, asengeli kokatama ngenga. Ezali pona tina wana été Nzambe alobi na molongo ya 49, “Mobeko mokozala pona mobotami, mpe pona mopaya oyo azali koleka nzela kati-kati na bino.”
Bongo, oyo nyonso akatama ngenga akokaki kolia mosuni ya Pasaka. Yango nde solo ya likambo. Ndenge moko, tango tondimeli Yesu lokola Mobikisi, tondimi ete masumu mabisi malekaki na nzoto na Yesu, na nzela ya libatisi lia Ye na Yordani mpe bongo tondimi ete Yesu akufaki na Kuruse pona na masumu mana. 
Tango nasosolaki ete Yesu akufaki na Kuruse pona kosambisama pona masumu alongolaki mosika na nzela ya libatisi lia Ye, naye lisusu komona malamu tina ya kokatama ngenga ya molimo oyo ebikisaki biso na masumu manso mpe na botomboki bwa mokili. 
Na tango wana, namonaki ete masumu mangai manso malongolamaki mosika nangai. Motema nangai mokomi pembe lokola mvula ya pembe, mpe na suka namemaki na motema mwangai sango malamu ya mayi, makila mpe na Molimo. 
Naye komona ete ezali na biloko mibale oyo ezali kobikisa biso, kotama ngenga mpe na makila ma mwana mpate na Boyokani bwa Kala, mpe bolekisi masumu manso na Ye na nzela ya libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye na Kuruse kati na Boyokani bwa Sika. Kokatama ngenga na Boyokani bwa Kala mpe libatisi na Boyokani bwa Sika ezali ndenge moko.
Yesu Klisto asambisama te pona masumu ma Ye, kasi pwete Alongolaki masumu ma mokili mobimba na nzela ya libatisi lia Ye. Baye bandimeli ete Yoane Mobatisi oyo azalaki motalisi elongi ya bato banso, abatisaki Yesu mpe alekisaki na nzoto na Ye masumu manso ma mokili bandimi mpe libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye na Kuruse. 
Pona nini bato ebele bazali kondima te libatisi lia Ye ata ekomami mbala ebele na Mokanda mwa Nzambe? Na kozala bongo, bazali kosumuka ata bandimeli Yesu. Bakoki kondimela Yesu, kasi nano mosika na Nzambe. Bazali basumuki mpe bazali kopesa ngai mawa mingi, lokola bakokende na lifelo ata bandimelaki Yesu. 
Ndenge nini bakoki kokoba kosumuka soki bandimeli Yesu? Pona nini, bazali kobika lokola basumuki? Pona nini, bazali kokende na nzela ya mabe? Ezali mawa mingi. Bakokoba kotikala basumuki pwete bandimeli te ndenge masumu manso ma mokili malekaki na nzoto na Yesu Klisto, oyo amemaki lobiko ya libela na bato banso na nzela ya libatisi lia molimo lia Ye. 
Bato bazali kokanisa bazuwi lisiko kati na makila ma Yesu, kasi kondima ya ndenge wana ezali te ya mobimba. Pona nini? Pwete bakweyi kolekisa masumu mabango na nzoto na Yesu! 
Tokoki kobikisama na kondima kati na mayi (libatisi lia Klisto) mpe na makila ma Ye na nzela ya mokano mwa Nzambe: lobikoya kokatama ngenga ya molimo. 
Mpe, nde tokoki kokoma bana ba Nzambe. Tosengeli komituna biso moko. “Soki tondimeli kaka makila ma Yesulokola kokatama ngenga ya molimo, masumu mabiso makolongolamamosika?” Tosengeli kotala eyano na bozindo kati na mitemamia biso. 
Kati na Boyokani bwa Kala, bato bazalaki kobikisama na kokatama ngenga mpe na makila ma mwana mpate ya Pasaka kaka ndenge tozuwi lobiko na libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye na Kuruse. Na nzela wana, tobikisami na etumbo ya Nzambe, mpe na mokili mwa masumu. Baye bandimeli yango bakomi bana na Nzambe mpe Nzambe akomi Tata na bango. 
Oyo abikisami mpe akomi moko ya bana na Nzambe na kondimela biloko mibale wana: kokatama ngenga mpe na makila ma mwana mpate ya Pasaka. Tokoki mpe koloba: libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye. Yango nde bosolo kolandisama na Yesu. Yango nde tina ya solo ya botamaya mbala ya mibale na mayi, makila mpe na Molimo. 
 
 

LISIKO NA MAYI MPE NA MOLIMO OYO EZALI NA MOKANDA MWA NZAMBE LIZALI NINI? 
 

Basumuki bakoki kokoma sembo Na kondimela kaka kati na Makila ma Yesu?
Ata moke

Yesu atikaki kiti na Ye na Lola mpe ayaki na mokili oyo. Abatisamaki na Yoane Mobatisi na mbula 30 pona kolongola mosika masumu manso ma mokili oyo. 
Makila ma Yesu na Kuruse mazalaki etumbopona masumu mavasumuki banso ba mokili. Yesu Klisto ayaki lokola Mobikisi na mokili oyo mpe abikisaki basumuki banso na masumu mabango na nzela ya mayi mpe na makila.
Tobotami mbala ya mibale na makila pamba? Te. Tobikisami wuta na lisumu na libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye. Nalingi kotuna motuna na baye bandimeli kaka makila ma Yesu. “Mosumuki akoki kokoma moyengebene kaka na makila ma Klisto, tope na nzela ya biloko mibale: libatisi lia Yesu na makila ma Ye na Kuruse? Ezali na kondima ete tolekisi masumu mabiso na Yesu na nzela ya libatisi lia Ye na makila, tope kaka na makila ma Ye? Ya solo ezali nini, nazali kotuna yo?” 
Pona kobotama ye solo mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo, tosengeli kokokisa oyo elandi. Tosengelei kondima ete Yesu ayaki na mokili na nzoto, ete Alekisaki na nzoto na Ye masumu manso ma mokili na Yordani na libatisi lia Ye mpe asambisamaki pona masumu manso mana na Kuruse. Na kondimela Yesu Klisto, Mobikisi na biso ya solo, na nzela oyo, tokoki kobotama mbala ya mibale. 
Nakotuna yo lisusu. Kondima nini ezali kolandisama na Mokanda mwa Nzambe? Ezali kondima kati na makila ma Yesu, tope yango mibale ya libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye? 
Kondima na makila ma Yesu ezali boye. Yesu asambisamaki mpe bakatelaki ye etumbo pona masumu manso makoli. Pwete amonaki pasi mpe asopaki makila ma Ye pona masumu mabiso, tobikisami na ezambiselo ya matata koleka. Kasi ezali yango nyonso te. Yambo tondima mabongisi, tosengeli kolobela eloko oyo polele. Pona nini Yesu akufaki na Kuruse? 
Mokanda mwa Nzambe molobeli yango polele ete lifuti lia lisumu lizali liwa. Yesu asumukaki ata moke te na mokili oyo. Ayaki na nzoto lokola moto na nzela ya nzoto ya Maria, kasi Ayaki na elili ya bato ba Ye lokola Mwana ya Nzambe Mosantu mpe Mobikisi mwa basumuki. Ezali pona yango, Asengelaki kobatisama na Yoane Mobatisi liboso Akufa na Kuruse. Tango abatisamaki, Alongolaki mosika masumu manso mabiso na nzoto na Ye moko. Bongo, libanda ya libatisi, Akokaki te kosambisama mpe kosopa makila ma Ye na Kuruse.
 

MOMESANO MWA MBEKA NA BOYOKANI BWA KALA

Nzela kakopesa mbeka ya kobonza Ezalaki ndenge nini?
① Mbeka ya bomoyi ezanga mbeba
② Kotiya maboko na moto
③ Makia na yango

Totala bosolo oyo na nzela ya momesano mwa mbeka na Ndako ya Bokutani ya Nzambe. Na Boyokani bwa Kala, ezala mosumuki tope nganga-Nzambe akitiya maboko maye na moto ya mwana mpate tope ntaba pona kolekisa masumu maye tope maye ma Ba-Isalayele na mbeka. Mbeka ezalaki kobomama mpe kopesamela na etumbelo. Boyokani bwa Kala bozalaki elili ya Boyokani bwa Sika, mpe Yesu Klisto azalaki Mwana Mpate ye bolongoli lisumu oyo Nzambe alakaki. 
Tango nini bino banso bolekisaki masumu mabino na Yesu? Nakanisi na eyano ya motuna oyo. Kati na Boyokani bwa Kala, Ba-Isalayele, bakokaki te koboma mbeka soki batiye maboko na moto te (kotiya maboko na moto elingi koloba ete kolekisa lisumu na mbeka ya lisumu). Yambo mbeka ya lisumu ezala liboso na etumbelo, kotiya maboko na moto ekosalema pona kolekisa masumu na mbeka ya kobonza. 
“Bongo, akotiya maboko maye na moto ya mbeka ya kotumba.” (Levitika 1:4). Ekomami na Levitike ete mbeka nyonso esengelaki batiya yango maboko na moto. Na kotiya maboko na moto ya mbeka, Ba-Isalayele bazalaki kolekisa masumu mabango na yango, mpe na kopesa makila ma mbeka mpe na mosuni kati na kondima liboso na Nzambe, bakokaki kobikisama wuta bowumbu bwa masumu mabango. Ba-Isalayele babikisamaki na kondima na tango ya Boyokani bwa Kala. 
Tango mbeka ya lisumu epesami liboso na Nzambe, mosumuki asengeli kotiya maboko maye na moto na yango pwete alekisa masumu maye na yango. Mbeka ezalaki kobomama na esika ya musumuki. Makila mango matiyami na maseke minei ya etumbelo mpe oyo etikali esopami na se na makolo ma etumbelo. Yango nde ezalaki nzela ya lisiko lia basumuki. 
Na Boyokani bwa Sika, basumuki bakoki kozuwa lisiko lia masumu mabango manso na nzela ya kondima na bango kati na mayi mpe na makila ma Yesu. 1 Yoane 5:1-10 elobi ete mosumuki azuwi lisiko tango andimeli kati na libatisi lia Yesu mpe makila ma Mwana Mpate na Kuruse. 
Pona yango, mosumuki nyonso akoki kozuwa lisiko soki andimi na makambo mibale: libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye na Kuruse. Libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye, elongo na Molimo Mosantu, ezali na motuya pona kobotama mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. 
Balingami, bokoki kozuwa lisiko kaka na kondimela makila ma Yesu Klisto? Baye bakanisi ete bakoki kobotama mbala ya mibale kaka na kondima makila ma Kuruse bazali kaka na lisumu kati na mitema mia bango. Kasi tokoki kobikisama na masumu mabiso manso na kondima libatisi lia Yesu lokola kokatama ngenga ya molimo ya Boyokani bwa Sika, oyo ezali mikolo oyo lokola kokatama ngenga oyo ya Boyokani bwa Kala. 
Mangomba manso mazali na mateya ma bango. Toyebi ete bazali kozela lifelo soki batiki te kondima ya lokuta. Ba-Presbyteria bakobi na mateya ya mabongisi ma Nzambe; Ba-Methodiste na makambo ya bomoto; Ba-Baptiste na libatisi; mpe  Bato ya Bosantu na bomoyi bwa bosanto. Mpe bango banso balongwa na liloba lia bosolo.
Kasi eloko nini liloba lia solo na Mokanda mwa Nzambe elobi pona botama ya mbala ya mibale? Mokanda mwa Nzambe molobi ete bosolo ezali na libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye. Oyo nyonso andimi mpe alandi liloba lia Nzambe mpe atiye kondima na botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo akozuwa lisiko lia ye.
 

SAKELE YA LIBATISI LIA YESU EZALI NINI?

Kokatama ngenga ya molimo Ezali nini na kati na Boyokani bwa Sika?
Libatisi lia Yesu

Libatisi lia Yesu lizalaki kokatama ngenga ya molimo. Na boyokani bwa Kala, Nzambe alobaki ete oyo nyonso akokatama ngenga te esengelaki alongolama na kati na bato ba Ye. 
Tosengeli koyeba mpe kondima ete kokatama ngenga ya molimona Boyokani bwa Sika ezali solo-solo libatisi lia Yesu. Pwete Yesu abatisamaki na Yoane Mobatisi na ebandeli ya mosalana Ye ya libanda, kokoki kokatam ngenga na kondimela libatisi lia Ye. Tosengeli malamu kokanisa pona nini Yesu asengelaki kobatisama na Yoane Mobatisi. 
“Yesu alongwaki na Galile mpe akendeki na Yordani mpo ete Yoane abatisa Ye. Kasi Yoane aboyaki kobatisa Ye. Alobaki: Ezali ngai nde nazali na posa ete Yo obatisa ngai; kasi ndenge nini Yo oyei epai na ngai? Yesu azongiselaki ye: Tika ete esalema bongo sik’oyo! Ezali malamu mpo na biso kosala bongo mpo na kokokisa bosembo nyonso.” (Matie 3:13-15). 
Yesu abatisamaki na Yoane Mobatisi na Yordani, “mayi ma liwa.” Yoane Mobatisi atiyaki maboko maye na Yesu mpe akotisa Ye mobimba na kati na mayi. Oyo ezalaki lolenge ya libatisi lia malamu (Libatisi: kokotisama kati na mayi). Pona Yesu kolongola mosika masumu ma mokili, Asengelaki kobatisama na nzela moko, na kotoya maboko na moto lokola na Boyokani bwa Kala. 
Libatisi lia Yesu ezali kokatama ngenga na molimo na baye bandimeli Yesu. “Ezali malamu mpo na biso kosala bongo mpo na kokokisa bosembo nyonso.” (Matie 3:15). Ezalaki malamu pona Yesu kolongola mosika masumu manso ma mokili mpe kokoma Nzambe na biso mpe Mobikisi na biso. Bongo, ezalaki malamu lokola ekomami, ete Akufa na Koruse na masumu mabiso manso na moto na Ye. 
Libatisi lia Yesu lizali na nguya ya kobotisa basumuki na botama ya mbala ya mibale. Ezali sekele ya sango malamu ya mayi mpe na Molimo. 
Eloko ya liboso oyo Yesu asalaki na mosala na Ye ya libanda pona kobikisa basumuki wuta na masumu mabango ezalaki kobatisama na Yoane Mobatisi. Libatisi elingi koloba ete “kosokola, kokundama, kolekisa na.” 
Na kobatisama na ndenge Nzambe asengaki, Yesu azuwaki masumu manso ma mokili na Ye moko. “Botala! Mwana Mpate na Nzambe oyo alongoli mosika lisumu lia mokili!” (Yoane 1:29). Libatisi lia Yesu elingi koloba ete bato banso na mokili baye bandimeli Ye, bazali ya kokatama ngenga na molimo. 
Na suka, Akeyi na Kuruse lokola Mwana Mpate na Nzambe oyo alongoli mosika masumu manso ma mokili mpe andimaki kosambisama pona basumuki banso. Bongo, Abikisaki bato banso wuta lisumu.
Pona yango, baye banso bandimeli libatisi lia Yesu Klisto, kokatama ngenga na Boyokani bwa Kala, mpe makila ma Ye na Kuruse lokola lobiko babikisami wuta masumu mabango manso. Yesu Klisto abikisaki basumuki banso na libatisi lia Ye mpe makila ma Ye. Yango nde bosolo ya kokatama ngenga na molimo.
 

LOBIKO EZALI KAKA NA NZELA YA MAKILA? TE, EZALI BONGO TE

Yesu ayaki na Nini na mokili?
Na mayi mpe na makila

1 Yoane 5:4-8 elobi ete, “Pamba te mwana nyonso ya Nzambe alongaka mokili, mpe elonga oyo elongaki mokili ezali: kondima na biso. Nani oyo alongaka mokili? Ezali kaka moto oyo andimaka ete Yesu azali Mwana na Nzambe. Yesu-Klisto azali Ye oyo ayaki na nzela ya mayi mpe makila; ayaki na nzela ya mayi kaka te, kasi na nzela ya mayi mpe makila. Mpe ezali Molimo nde atatoli bongo, pamba te Molimo azali solo. Nzokande, batatoli bazali misato: Molimo, mayi mpe makila; mpe bango misato balobaka ndenge moko.” 
Ba-Klisto balingami, litatoli lia bino pona Ye lokola Mobikisi ezali nini? Ezali mosusu te, ezali kaka kondima kati na Mwana na Nzambe oyo ayaki na mayi mpe na makila. 
Elonga oyo ezali kolonga mokili, ezali nini? Ezali nguya ya kondima kati na mayi mpe na makila. Ezali Yesu Klisto oyo ayaki na mayi mpe na makila. Mpe ezali Molimo Mosantu oyo mozali komema litatoli lina, pona Molimo mozali mwa solo.
Ezali ba biloko misatu oyo ememaka botatoli na mabele: mayi, makila mpe Molimo. Mpe yango nyonso misatu ezali koyokana lokolo moko. Yesu ayaki na mokili oyo na nzoto, Abatisamaki mpe Akufaki na Kuruse pona kobikisa biso na etumbo ya libela. Elembo ete Nzambe, Mokeli mwa biso, akomaki Mobikisi ya basumuki banso, mpe azali na sango malamu ya mayi mpe ya Molimo oyo ebikisi biso banso. 
Ezali elembo na biso ete Yesu, oyo ayaki na mokili lokola Molimo na nzoto, abatisamaki na Yordani pona kolekisa na nzoto na Ye masumu mabiso manso, mpe asokaki na Kuruse, Andimaki kosambisama pona masumu ma biso. Bongo, Abikisaki baye banso bandimeli Ye. Yango nde sango malamu ya mayi mpe na Molimo. 
 

MAYI NA MAKILA OYO EZALI KOMEMA LITATOLI LIA LOBIKO LIA NZAMBE EZALI NINI? 

Lipasa lia kokatama ngenga Oyo ekomami na Boyokani bwa Kala ezali nini?
Libatisi lia Yesu

Mayi ezali elili na libatisi lia Yesu Klisto. Na Boyokani bwa Kala, libatisi lia Yesu elingi koloba kokatama ngenga. Lipasa na kokatama ngenga na Boyokani bwa Kala ezali libatisi lia Yesu na Boyokani bwa Sika. Elembo ya kotalisa ete masumu manso malekaki na nzoto na Yesu na libatisi lia Ye. 
Oyo nyonso andimeli na bosolo akoki kotelema liboso na Nzambe mpe koloba na motema mwaye, “Ozali Mobikisi na ngai, Nkolo nangai pwete nandimeli libatisi mpe makila ma Yo, sango malamu ya mayi mpe na Molimo. Pona yango, nazali na lisumu te. Nazali mwana na Nzambe mpe Ozali Mobikisi nangai.” Tokoki kotatola na kondima ya solo. Tina tokoki koloba boye, ezali pwete kondima na biso efandi na libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye. 
Nini ezali kopesa biso nzela ya botama mbala ya mibale? Ezali libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye na Kuruse, oyo ezali litatoli lia lobiko kati na mitema miabiso. Yango nde sango malamu ya botama ya mbala ya mibale ma mayi mpe na Molimo. 
Ba-Klisto balingami, natuni lisusu, “Mosumuki akoki kobikisama na nzela ya kondimela kaka makila ma Klisto?” Te. Lobiko esengi te kondimela kaka liwa lia Ye na Kuruse. Ezali kati na kondimela biloko mibale: mayi na makila ― sango malamu ya mayi mpe Molimo ― nde basumuki bakoki kobotama mbala ya mibale. Totala na Mokanda mwa Nzambe oyo elobi likolo na mayi tope na maloba mosusu na libatisi lia Yesu. 
1 Piere 3:21-22 eloki ete, “Mayi yango ezali elilingi ya libatisi oyo ebikisi bino sik’oyo. Libatisi yango elongolaka mbindo ya nzoto te, kasi ezali mokano ya kotambola na motema peto liboso ya Nzambe ; mpe ezali kobikisa bino na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto oyo akotaki kati na Likolo, avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe mpe azali kokonza ba-anjelu, banguya mpe milimo ya mipepe na likolo.” 
Ntoma Piere atatolaki ete libatisi lia Yesu lizalaki elili ya oyo ebikisaki biso, mpe lizalaki elembo ya lobiko wuta na lisumu. Libatisi lia Yesu lizali lokola kotama ngenga na Boyokani bwa Kala. Kaka lokola ba-Isalayele bandimelaki liloba lia Nzambe mpe bakataki poso ya kimobali na bango pona kokoma bana na Nzambe na tango ya Boyokani bwa Kala, libatisi lia Yesu libikisi biso na tango oyo ya Boyokani bwa Sika. 
Pona yango, kokatama ngenga na Boyokani bwa Kala mpe libatisi lia Yesu na Boyokani bwa Sika ezali eloko moko. Bondimi sikoyo bino banso ete libatisi lia Yesu ezali ya solo eloko moko na kokatama ngenga? Lokola ekomami na  1 Piere 3:21, ezali mpe na elili oyo ezali kobikisa biso, yango nde libatisi. Okoki kobunda na liloba likomami lia Nzambe? 
Ndenge nini biso, baye tozali kobika na mokili oyo, tokoki kangolama na lisumu? Ezali pwete Yesu Klisto abatisamaki pona kokokisa bosembo nyonso ete lobiko wuta lisumu ekomaki ya solo pona biso. Matie 3:15 elobi, “ Ezali malamu mpo na biso kosala bongo mpo na kokokisa bosembo nyonso.”
Pwete masumu ma mokili malekaki na nzoto ya Yesu, oyo nyonso akondima Ye sikoyo akozala na lisumu lisusu te. Tokoki kokoma sembo na kondima bosolo ete masumu mabiso malekaki na nzoto na Yesu na nzela ya libatisi lia Ye. Yesu Klisto alekisaki masumu manso na nzoto na Ye moko mpe akufaki na Kuruse pona kobikisa biso na etumbo nyonso. 
Baninga balingami, biloko oyo mibale ebikisi basumuki banso wuta masumu mabango ezali: mayi na makila. Kolekisa masumu mabiso na nzoto na Ye mpe kokufa pona biso na Kuruse ezali biloko minene mibale oyo Yesu Klisto asalaki kati na mbula misato ya mosala mwa Ye libanda na mokili oyo. 
Yoane 1:29 says, “Botala! Mwana Mpate na Nzambe oyo alongoli mosika masumu ma mokili!” Yesu Klisto abatisamaki pona kolongola mosika masumu ma mokili mpe akufaki na Kuruse pona kofuta botomboki nabiso. Yesu azali Mwana na Nzambe, mpe Mokeli, Akokisaki boyokani ya kokatama ngenga oyo Nzambe asalaka na Boyokani bwa Kala na kolongola mosika masumu ma mokili. 
Oyo nyonso akondimela na motema naye sango malamu ya Yesu, ya mayi mpe na makila akobotama mbala ya mibale, na mayi mpe na Molimo. Mpe Nkolo akokoma Mobikisi na baye banso bandimeli Ye. Matondo Nkolo, Alleluyah! Yesu akokisaki lobiko na biso lokola Nzambe alakaki, mpe Abikisaki biso wuta na bowumbu bwa masumu ma mokili. 
 

KOLONGOLA BOLEMBU BWA NZOTO TE

Nzoto ekomaka Sembo na tango?
Te. Nzoto ekokoba na koyamba Lisumu tii Mokolo tokokufa.

1 Piere 3:21 elobi ete, “Mayi yango ezali elilingi ya libatisi oyo ebikisi bino sik’oyo. Libatisi yango elongolaka mbindo ya nzoto te, kasi ezali mokano ya kotambola na motema peto liboso ya Nzambe; mpe ezali kobikisa bino na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto.”
Tango moto moko andimeli Yesu Klisto lokola Mobikisi, elingi koloba te akotika kosumuka na nzoto naye. Tokoki kokoba kosumuka, kasi na kondima kati na libatisi lia Yesu, tokoki kolekisa masumu mabiso ma mokili na Yesu, oyo afutaki yango na makila ma Ye na Kuruse. Na kondima kati na biloko oyo mibale ya motuya ya lobiko na biso, tobikisami na masumu mabiso. 
Kobotama mbala ya mibale elingi koloba koyamba Yesu kati na mitema miabiso, lokola Mobiki na bato banso. Bolimbisi bwa masumu bozali mpe kosalama kati na miema miabiso. Tango tondimeli libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye na Kuruse, mitema mia biso mibotami mbala ya mibale, kasi mikoki kokoba kosumuka mpe kotomboka na nzoto oyo. Kasi, masumu mabiso manso malimbisamaki libela. 
Libatisi lia Yesu lizali litatoli na baye banso babikisami. Tozali lisusu na masumu te tango tondimeli bolimbisi bwa lisumu na nzela ya libatisi lia Klisto. Tobotami mbala ya mibale tango totiye kati na mitema miabiso, bosolo ya lobiko na nzela ya libatisi lia Yesu, mpe tokomi sembo na nzela ya sango malamu ya mayi mpe ya Molimo. 
Yango nde kondima ya Abrayami na Boyokani bwa Kala, kondima oyo ekomisaka sembo, oyo ntoma Polo azali kolobela, mpe elili na lobiko oyo ntoma Piere atatolaki. 
Kaka lokola Abrayami ayokaki liloba lia Nzambe mpe akomaki sembo, tobikisami tango tondimeli libatisi lia Yesu mpe liwa lia Ye na Kuruse. 
Yoane 1:12 elobi ete, “Nzokande bato nyonso oyo bayambaki Ye, ba-oyo bandimelaki Kombo na Ye, apesaki bango makoki ya kokoma bana na Nzambe.” Ondimeli Yesu Klisto, oyo abikisaki biso wuta bowumbu ya masumu manso na nzela ya libatisi lia Ye, mpe na makila ma Ye, lokola Mobikisi? Tosengeli kozuwa lobiko oyo epesami na biso na nzela ya mayi mpe na makila ma Mwana na Nzambe. 
Lobiko ezali kaka pona na makila ma Yesu Klisto? Te. Ezali pona mayi na makila ma Yesu. Kati na Mokanda mwa Nzambe, ezali polele, mpe lobiko ezali te pona makila ma Yesu yango moko. 
Ezali pona na libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye. Libatisi lia Yesu lizali kokatama ngenga ya molimo na Boyokani bwa Sika. Ezali bosolo ya lobiko oyo ezali kolongola masumu mosika na biso. Ndenge basambisaki Ye pona masumu ma mokili elongi koloba ete Asambisama pona biso, yo nangai. 
Tango toyambi sango malamu ya bolimbisi bwa masumu,libatisi lia Ye, mpe na makila ma Ye, tokangolami na etumbo pona na masumu mabiso manso. Na kondima na biso, tobikisami wuta bowumbu bwa masumu mabiso maye tosalaki na mokili. Tango tozuwi libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye lokola lobiko nabiso, masumu manso kati na mitema miabiso balongolami mosika. Ondimi mpe ososoli ete yango ezali ya solo? Nakanisi ete bino banso bokondimela sango malamu ya mayi mpe ya Molimo. Ndimela yango mpe zuwa bomoyi ya seko. 
Ntoma Polo alobaki ete, “Kokatama ngenga ezali oyo ya motema” (Barome 2:29). Ndenge nini tokokatama ngenga na mitema mia biso? Tokoki kokatama ngenga ya molimo tango tondimeli kati ya koya ya Klisto Yesu na mokili oyo na nzoto, kati na libatisi lia Ye pona kolongola mosika masumu manso ma mokili,mpe kati na liwa lia Ye na Kuruse pona masumu mabiso, mpe na lisekwi lia Ye wuta baweyi. 
Ntoma Poloalobaki ete kokatama ngenga ezali oyo ya motema. Kokatama ngenga ya motema elingi koloba kondimela libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye. Soki olingi kokatama ngenga na kati na motema mwayo, osengeli kotiya na kati na motema mwayo sango malamu ya libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye. Bongo, nde okoki kokoma solo mwana na Nzambe. 
 
 

YOANE MOBATISI ANTIDAMAKI NA NZAMBE? 


Nani azalaki Yoane Mobatisi?
Azalaki motalisi elongi ya bato banso Mpe Nganga-Nzambe monene ya Libota lia Aron.

Awa, tozali na posa ya kotuna nani azalaki Yoane Mobatisi oyo abatisaki Yesu Klisto. Yoane Mobatisi azalaki motalisi elongo ya bato banso ya mokili. Matie 11:11-14 elobi, “Nazali koloba na bino penza ya solo: kati na bato oyo babotama na mwasi, moko te aleki Yoane Mobatisi na monene; nzokande, ye oyo aleki moke kati na Bokonzi ya Likolo aleki Yoane Mobatisi na monene. Wuta na tango oyo Yoane Mobatisi azalaki koteya kino sik’oyo, kokota na Bokonzi ya Likolo ezali likambo ya koyika mpiko, mpe ezali kaka bato oyo bazali kobunda na kondima nde bazali kokota kuna. Pamba te basakoli nyonso mpe Mobeko basakolaki yango bango nyonso kino na tango ya Yoane. Mpe, soki bokoki kondima, boyeba ete ye nde azali Eliya oyo asengeli koya.” 
Ba-Klisto balingami, Yesu alobaki ete ezali na moto monene te koleka Yoane Mobatisi na baye babotami na nzela ya basi. Na botama ya Yoane Mobatisi, ekeke ya Boyokani bwa Liboso bwa Nzambe, ekeke ya Boyokani bwa Kala ekomaki na suka. Esilaki pwete Yesu Klisto oyo azalaki pona kokokisa boyokani bwa Nzambe ayaki na sima. 
Ezalaki nani, ezalaki nani oyo akokokisa boyokani bwa Nzambe? Yesu Klisto, tope Yoane Mobatisi. Yoane Mobatisi alekisaki masumu manso ma mokili na Yesu. Nani azalaki Nganga-Nzambe monene ya suka na Boyokani bwa Kala? Nani azalaki ya ndako ya Aron? Yesu Klisto Ye moko atatolaki ete ezali na moko te monene koleka Yoane Mobatisi. Yoane Mobatisi azalaki motalisi elongi ya bato banso, monene koleka baye banso babotamaki na basi. 
Tokanisa malamu na makambo oyo tozali na yango. Moize, Abrayami, Izak, mpe Jacob babotamaki na basi bango banso. Kasi na bato ba Boyokani bwa Kala, nani azali monene kati ya baye banso babotami na basi? Ezali Yoane Mobatisi. 
Yoane Mobatisi, lokola mosakoli ya suka ya Boyokani bwa Kala, mwana ya ndako ya Aron, abatisaki Mwana Mpate na Nzambe na Boyokani bwa Sika na nzela moko ya kotiya maboko lokola Aron na moto ya mbeka ya lisumu na Mokolo mwa Bolongoli Lisumu na Boyokani bwa Kala. Abatisaki Yesu Klisto mpe alekisaki masumu manso ma mokili na nzoto na Yesu. Azalaki mosali na Nzambe. Akokisaki kokatama ngenga na mitema mia bato banso na kobatisaYesu Klisto. 
Elongo na libatisi lia Yesu, tosengeli kondimela makila ma Ye lokola litatoli lia lobiko na biso. Yesu Klisto alongolaki mosika masumu manso ma mokili na nzela ya libatisi lia Ye mpe Asambisamaki pona yango. Mpe eloko moko oyo tosengeli kosala ezali kaka kondimela yango. Ezali mokano mwa Nzambe ete tondimela oyo Yesu asalaki.
Tango osimbi na motema mwayo sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na molimo, okoki kokoma mwana ya Abrayami mpe mwana na Nzambe. Ezali kaka na bato moke baye bazali na kati na Klisto tango bato ebele bandimeli Ye te na mitema miabango. 
Mokolo ekomi koleka, mpe molili mozali kokweya. Ndimela libatisi lia Yesu mpe pesa Ye nzela akota na motema mwayo. Kondima nayo kati na libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye ekosala ete opambolama na lobiko ya molimo. 
Batela na makanisi mayo ete mafuta ya molimo eyaka tango ondimeli sango malamu ya lobiko, sango malamu ya libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye. Nalingi koyeba ete okoki kobongisa mwinda ya molimo (Etonga) mpe mafuta (Molimo) lokola basi ya bwanya bayebaki nano mibali te (Matie 25:4) na kondimela sango malamu ya libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye. Baye bandimeli Yesu bakendaka na etonga na Molimo kati na mitema miabango.
 
 

PONA NANI YESU ABATISAMAKI?


Pona tina nini Yesu Abatisamaki?
Pona kolongola mosika Masumu ma bato banso
 
“‘Kasi Yoane aboyaki kobatisa Ye. Alobaki: Ezali ngai ndenazali na posa ete Yo obatisa ngai; kasi ndenge nini Yo oyei epai na ngai? Yesu azongiselaki ye: Tika ete esalema bongo sik’oyo! Ezali malamu mpo na biso kosala bongo mpo na kokokisa bosembo nyonso.’” (Matie 3:14-15). 
Yesu abatisamaki pona kolongola mosika masumu manso ma bato banso. Yesu Klisto azali Mwana na Nzambe mpe Mobikisi na biso. Azali Mokeli oyo asala biso. Yesu Klisto ayaki na mokano mwa Nzambe, Tata, kosala biso bato ba Ye. 
Likolo na nani basakoli banso balobaki na Boyokani bwa Kala? Balobelaki Yesu Klisto. Basakoli banso ya Boyokani bwa Kala balobelaki pona koya ya Yesu na mokili oyo, pona kolongola mosika masumu manso mabiso mpe kokangola biso na lisumu pona libela. 
Yesu ayaki na mokili oyo lokola esakolamaki na Boyokani bwa Kala mpe alongolaki mosika masumu manso ma bato banso banda Adam na Eva tii moto ya suka oyo akobotama na mokili oyo. 
Sikoyo, zuwa na kati na motema mwayo lobiko na nzela ya libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye. Ozali lisusu na tembe likolo na bosolo oyo? Ozali lisusu na lisumu kati na motema mwayo? “Ezali malamu mpo na biso kosala bongo mpo na kokokisa bosembo nyonso.” Yesu abatisamaki na Yoane Mobatisi pona kokokisa bosembo nyonso. 
Liloba “libatisi” yango moko elingi koloba “kosokolama.” Yesu abatisamaki na Yoane Mobatisi na nzela ya kotiya maboko na moto ndenge ekomami na Boyokani bwa Kala. 
Sima Alongolaki mosika masumu manso ma bato banso, Akotaki na mayi ya Yordani. Mayi mana malingi koloba liwa mpe kosambisama pona basumuki. Kokota na Yesu kati na mayi ezali elili ya liwa lia Ye na Kuruse. Kobima na Ye na mayi ezali elili ya lisekwi lia Ye na mokolo ya misato sima ya kokufa na Kuruse. 
Yesu azali Nzambe mpe Mobikisi na biso. Koya na Yesu na mokili oyo pona kobatisama, kozokisama tii na liwa na Kuruse, lisekwi lia Ye na mokolo mwa misato, mpe sikoyo kofanda na Ye na loboko ya Nzambe ezali elembo ya polele ete Abikisaki bato banso wuta liwa. Ondimeli solo-solo na makambo oyo?
Libatisi lia Yesu lizali kokatama ngenga ya molimo na Boyokani bwa Sika. “Kokatama ngenga ezali oyo ya motema.” Kokatama ngenga ya motema ezali mobimba tango tondimeli libatisi lia Yesu, bosolo ya kolekisa masumu manso na nzoto na Yesu. Kokatama ngenga ya motema ezali kondima libatisi lia Yesu na nzela oyo tolekisi masumu manso mabiso na Yesu. 
Osi okatama ngenga na kati na motema mwayo? Soki ondimeli kokatama ngenga ya motema, masumu mayo malongolami mbala moko pona libela. Pona tina wana, Yesu akokisaki bosembo nyonso mpe Apesaki biso banso elikia ya lobiko ya basumuki banso. 
Ba-Klisto balingami, bozuwa elembo ya lobiko kati na mitema mpe na makanisi mabino. Yango nde bosolo. Tango ozuwi na motema mwayo lobiko ya Yesu, okokangolama na masumu mayo manso. “Nzokande bato nyonso oyo bayambaki Ye, ba-oyo bandimelaki Kombo na Ye, apesaki bango makoki ya kokoma bana na Nzambe.” (Yoane 1:12). 
Okoki komona sikoyo pona nini Yesu ayaki na mokili oyo pona kobatisama? Ondimeli yango sikoyo? Yesu abatisamaki pona kolongola mosika masumu ma bato banso. Ezalaki libatisi lia kokatama ngenga. Libatisi lia Yesu lipesi kokatama ngenga ya molimo. Ezali pona yango ntoma Polo azali koyebisa biso kokatama ngenga kati na mitema miabiso. Yesu abikisaki biso polele na libatisi lia Ye mpe na makila ma Ye, mpe tozali na nzela mosusu te, kaka kondimela yango na mitema miabiso. Tokoki koloba “Boye”. “Amen” na liloba lia Nzambe kati na mitema miabiso. Ezali te bosolo? Ondimeli yango? 
 

ONDIMELI BOSOLO OYO NA MOTEMA MWAYO?

Tozala nini yambo Kofukamela Yesu?
Tosengeli kozuwa na mitema miabiso bosolo Ya mayi mpe na makila.

Eleki toloba mbula 2000, wuta Yesu ayaki na mokili oyo. Na mokolo oyo mpe na ekeke oyo ya ngolu ya Nzambe, tosengeli kozuwa na mitema miabiso bosolo ya mayi mpe na makila ma Yesu. Ezali te na eloko mosusu ya kobakisa likolo na yango. 
“Kokatama ngenga ezali oyo ya motema.” Tosengeli kokatama ngenga na nzela ya kondimela kati na mitema miabiso. Tokoki kobikisama kaka na nzela ya kondima. Na Boyokani bwa Kala, Ba-Isalayele bazalaki kobikisama na nzela ya kokatama ngenga mpe ya makila ya Pasaka oyo ezalaki kotiyama na ebene mibale ya ekuke mpe na moto ya ekuke na bandako na bango. 
Baye bandimelaki libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye lokola lobiko na bango, bazali kobanga te esambisami ya Nzambe pwete ekoleka mosika na bango. Kasi etumbo ya Nzambe ekokweya na baye banso baboyi kozuwa bosolo oyo kati na mitema miabango. Ezali na bato ebele baye bandimeli Yesu pamba mpe bazali nano bawumbu ya masumu mabango. 
Bakomaki wana ndenge nini? Pona nini bazali kokoba komona pasi pona lisumu? Ezali kaka pwete bayebi te bosolo ya libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye. Bandimeli kaka makila ma Yesu, batiki eapayi libatisi lia Ye.
Lobiko likoki kozuwama na nzela ya kondimela kaka makila ma Yesu pamba? Mokanda mwa Nzambe molobi ete ezali ndenge wana? Boyokani bwa Kala na Boyokani bwa Sika elobi nini likolo na yango? Kolandisama na Mokanda mwa Nzambe, ezali te kaka makila ma Mwana Mpate na Nzambe yango moko, kasi kobakisa mpe libatisi lia Yesu pona lobiko ekokisama (1 Yoane 5:3-6). 
Ondimeli makila ma Yesu yango moko? Baye basali boye bazali nano na lisumu na mitema miabango. Basengeli kolonga kondima na bango ya lokuta mpe kozonga na sango malamu ya solo. 
Baye bandimeli te basengeli koyeba sikoya ete bakambamaki mabe, mpe na kozango koyeba ete Yesu alongolaki mosika masumu manso na Yordani a nzela ya libatisi lia Ye. Basengeli kondima ete bazalaki na libungi mpe batikaki pembeni kondimela libatisi lia Yesu. Basengeli kozuwa na mitema miabango ete Yesu alongolaki mosika masumu manso ma mokili na nzela ya libatisi lia Ye. Lobiko ezali kaka tango tondimeli nyonso mibale : libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye na Kuruse. Na maloba mosusu, kaka na nzela ya sango malamu ya mayi mpe na Molimo nde tokoki kozuwa bomoyi bwa seko. 
Ba-Klisto balingami, tii lelo ozali kokoba na kondimela kaka makila ma Yesu yango moko? Na ndenge wana, ozali nano na lisumu na kati na motema mwayo. Soki osumuki, yango ozali na lisumu kati na motema mwayo. Soki okanisi okangolami na lisumu tango ozali kobika na mobeko mwa Nzambe, ezali kaka makanisi ya pamba ezali koyela yo. Elikia wana ezali te kolandisama na liloba lia Nzambe. 
 

TANGO EZALI NANO

Bosolo ekangoli biso Na buwumbu ya nini?
Na bowumbu ya mobeko ya Lisumu na liwa

Tango ezali nano. Bato banso basengeli kondimela kati na libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye, mpe kokatama ngenga na mitema miabango mpe bakangolama na masumu manso. Kokangolama na masumu manso elingi koloba ete obikisami na kondimela sango malamu ya libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye. 
Olingi kondimela libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye pona lobiko na yo wuta masumu mayo? Tango ondimeli oyo, okoyeba lobiko ezali nini. Okokoma na kimia na makanisi. Bongo, ndenge wana, okokoma moto na bosembo. Na nzela ya misala miayo te, kasi na nzela ya kondima liloba lia Nzambe. Soki moto moko pembeni nayo andimeli kaka makila ma Yesu pona lobiko, ngai na beleli yo kondimela biloko mibale: libatisi lia Ye mpe makila ma Ye. 
Ba-Klisto balingami, lobiko ya mobimba ya bato wuta lisumu ekokisamaki na nzela ya sango malamu ya libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye. Molimo mozali mwa Nzambe. Nzambe ayaki na se na mokili oyo na nzoto ya moto. 
Nzambe alobaki na nzela ya basakoli ete tosengeli kobenga kombo na Yesu, pwete ayaki kobikisa bato na Ye na masumu mabango. Nzambe alobaki, “‘Elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, bongo bakopesa Ye kombo Emanwele oyo elingi koloba: Nzambe elongo na biso.’” (Matie 1:23). 
Nzambe ayaki na mokili oyo kobikisa basumuki. Abatisamaki pona kolongola mosika masumu manso ma mokili mpe kobisa basumuki banso. Yango nde bosolo ya lobiko ya mayi mpe ya makila. Nazali aya koyebisi yo yango. Obikisamaki kaka na makilama Yesu? Te. Tobikisamaki na nzela ya libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye na Kuruse. 
Ezali na basakoli mingi ya lokuta mikolo oyo mpe ya moto makasi baye bandimeli te libatisi lia Yesu. Yesu alobaki, “Mpe okoyeba bosolo, mpe bosolo ekokangola yo.”(Yoane 8:32).
Tosengeli koyeba bosolo. Tosengeli koyeba pona nini Yesu alobelaki pona na libatisi lia Ye, mpe pona nini tosengeli kondimela yango. Tosengeli koyeba pona nini Nzambe ayebisaki Ba-Isalayele kokatama ngenga na Boyokani bwa Kala mpe pona nini alobelaki makila ma Mwana Mpate ya Pasaka. 
Tango toyebi kaka eteni ya lisolo, tokoki te koyeba bosolo nyonso. Yesu alobaki, “Nazali koloba na yo penza ya solo: moto moko te akoki kokota na Bokonzi ya Nzambe soki abotami te na mayi mpe na Molimo.” (Yoane 3:5). 
 

KOBATISAMA KATI NA KLISTO

Ndenge nini tokoki Kutana na liwa lia Klisto?
Na kolekisa masumu mabiso manso na Nzela ya libatisi lia Ye

Mokanda mwaNzambe motatoli sekele ya lobiko. Ezali kaka ne makila ma Yesu yango moko? Te. Ezali na makila ma Ye mpe na libatisi elongo. Ntoma Polo alobelaki yango mbala ebele na Barome, elongi 6 mpe lisusu na mikanda mosusu.
Totanga Barome 6:3-8. “Boni, boyebi te ete biso nyonso oyo tosila kobatisama kati na Yesu-Klisto tozwaki nde libatisi kati na kufa na Ye? Bakundaki biso elongo na Ye na nzela ya libatisi kati na kufa na Ye mpo ete, lokola Klisto asekwaki kati na bakufi na nzela ya nkembo ya Tata, biso mpe totambola na bomoi ya sika. Pamba te soki tosanganaki elongo na Ye kati na kufa na Ye, solo tokosangana mpe elongo na Ye kati na lisekwa na Ye. Pamba te toyebi malamu ete bomoto ya kala ebakamaki na ekulusu elongo na Klisto mpo ete nzoto na biso lokola esalelo ya lisumu ekufa mpe tozala lisusu bawumbu ya lisumu te. Moto nyonso oyo asilaki kokufa atangamaki lokola moto ya sembo: azali lisusu te na se ya bokonzi ya lisumu. Nzokande, lokola tosila kokufa elongo na Klisto, tozali kondima ete tokozala mpe na bomoi elongo na Ye.”
Totala molongo mwa 5, ekomami, “Pamba te soki tosanganaki elongo na Ye kati na kufa na Ye, solo tokosangana mpe elongo na Ye kati na lisekwa na Ye.”
Liwa lia Ye lizalaki lia biso, pwete masumu mabiso manso malekaki na nzoto na Ye na nzela ya libatisi lia Ye. 
Bongo, libatisi lia Yesu lisangisi makila ma Ye na Kuruse na biso. Kondima na biso kati na libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye mapesi biso nzela ya kokutana na Yesu. “Lifuti lia lisumu lizali liwa” (Barome 6:23). Pona yango liwa na Yesu na Kuruse ezalaki liwa na biso. Abatisamaki pona kozuwa masumu manso mabiso na nzoto na Ye moko. Kondimela kati na bosolo oyo ezali kosangisa biso na Yesu Klisto, Mobikisi na biso. 
 

TOSENGELI TE KONDIMELA YESU KAKA LOKOLA ETENI YA NZELA YA LOSAMBO NA BOMOYI NA BISO
 
“Azali moyengebene mpe Sembo” elobi nini?
Elobi Yesu alongolaki mosika masumu Mabiso manso pona kobikisa oyo nyonso Akodimela bosolo.
 
Bato ebele bandimeli Yesu lokola kati na losambo na bomoyi na bango, bongo bazali kokende na etonga mpe koganga na kopanza miso na kobondela mpe na kotubela. Bazali kotatola masumu mabango mpe kosenga bolimbisi mokolo na mokolo. Bazali kobondela, “Yesu, nayebi mpe nandimi ete Okufaki na Kuruse pona ngai. Boye, nandimi.” 
Polele, basosoli te molongo oyo. “Soki toyamboli masumu na biso, Nzambe akolimbisa biso mpe akopetola biso na mabe nyonso, pamba te azali Sembo mpe Moyengebene.” (1 Yoane 1:9). Bazali koloba ete bakolimbisama pona masumu mabango ma mokolo na mokolo na nzela ya kotubela lisumu. Kasi lisumu na molongo oyo lizali kolobela te botomboki bwa mokolo na mokolo. Molongo wana molingi koloba ete tolimbisami pona masumu mabiso mbala moko pona libela tango totaloli yango nano tobikisami te. 
“Boye, kondima ewutaka na maloba oyo toyokaka, mpe maloba oyo toyokaka ewutaka na Liloba ya Klisto.” (Barome 10:17). “Mpe okoyeba bosolo, mpe bosolo bokokangola yo” (Yoane 8:32).
Ba-Klisto baligani, bosolo bozali polele. Soki ondimeli ete Yesu akufaki na Kuruse kasi alongolaki te masumu na libatisi lia Ye na Yordani, kondima nayo ezali ya pamba. Soki moklisto moko alingi kobikisama na masumu manso maye, asengeli kondimela ete masumu maye malekaki na Yesu na nzela ya libatisi na Yordani mbala moko pona libela mpe asambisamaki pona masumu mabiso na Kuruse. Na maloba mosusu, tosengeli kondimela biloko mibale: libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye. 
“Lobiko ekoki kozwama na moto mosusu te, pamba te kombo mosusu ezali te na mokili, oyo epesama na bato, oyo ekoki kobikisa biso.” (Misala ya Bantoma 4:12). Yesu Klisto alongolaki masumu manso na nzela ya libatisi lia Ye mpe akomaki Mobikisi mwa biso. Yesu ayaki na mayi mpe na makila kobikisa biso na bowumbu ya libela. “Pamba te kondima oyo ekomisaka sembo ewutaka na motema, mpe litatoli oyo ememaka na lobiko ebimaka nde na monoko.” (Barome 10:10). Ozali mosumuki tope boyengebene? 
Bagalatia 3:27 says, “Pamba te bino nyonso oyo bozwaki libatisi kati na Klisto bolataki nde Klisto.” Molongo oyo motalisi biso solo-solo ete Yesu akufaki na Kuruse, sima na kolongola masumu manso ma mokili na nzela ya libatisi lia Ye. Asekwaki wuta baweyi na mokolo mwa misato mpe sikoyo afandi na loboko ya mobali ya Nzambe. Akomaki Nkolo ya lobiko pona baye banso baye bandimeli Ye. 
Soki Yesu abatisamaki te, soki asopaki te makila ma Ye na Kuruse pona biso, Akokaki te kokoma Mobikisi na biso. Tokoki kobikisama kaka tango tondimeli sango malamu ya mayi mpe ya Molimo. 
 

ATA MWANA NA MOIZE

Pona nini Nzambe alingaki Koboma Moize na nzela ya Ejipte?
Pwete akataka te nganga ya mwana Na ye.

Balingami, bozali koyoka sekela ya lisiko ya masumu mabiono manso na nzela ya mayi mpe na makila ma Yesu. Ezali lipamboli ya malamu koyoka maloba ma Nzambe. 
Ezali kaka makila ma Yesu Klisto? Na tango ya Boyokani bwa Kala, bato bakomaki bana na Abrayami na nzela ya kokatama ngenga mpe na makila ma mwana mpate ya Pasaka. Sikoyo tokomi bato na Nzambe na kondimela libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye. Nzambe atalisi biso elembo na yango na Boyokani bwa Kala na nzela ya Moize. 
Pona kobikisa Ba-Isalayele, Nzambe alobaki na Moize mpe ayebisaki ye komema bato na Ye libanda na Ejypte. Bongo, Moize, na nzela ya tata bokilo na ye Jetro, atikaki Madia, akenda na Ejypte na mwasi na ye mpe na mwana naye. Tangoamatisaki libota lia ye na mpunda, Nkolo akutani na ye na esika apemaki mpe alingaki koboma ye. 
Kasi mwasi na ye Sefora ayebaki tina na yango. Alokotaki libanga ya songe mpe akataka mwana na ye ngenga mpe abwakaki yango na makolo ma Moize, mpe alobi, “Solo-solo ozali mobali ya makila pona ngai!” Mpe Nzambe atika ye akende. 
Oyo ezalaki nzela na Ye ya kotalisa ete Akokaki koboma moto moko, ata mwana na Moize, soki akatama ngenga te. Na Ba-Isalayele, kokatama ngenga ezalaki elembo ya boyokani na Nzambe. Bayebaki ete Nzambe akoki koboma moto kati na bato ba Ye, ata mwana na mokambi, soki akatama te ngenga. Pona yango, na nzela ya kokomana koboma bato, Nzambe ayebisaki Moize na nzela oyo. 
Mokanda mwa Nzambe molobi ete Sefora mwasi ya mayeli akataki mwana ngenga mpe abwakaki poso na yango na makolo ma Moize, na koloba “Ozali mobali moko ya makila!” Alandaki mobeka mwa Nzambe mwa kokatama ngenga (Kobima 4:26). 
Oyo nyonso akatama ngenga te kati na Ba-Isalayele, akolongolama kati na bato na Nzambe. Kaka baye bakatama ngenga nde bakokaki kolia mosuni ya mwana mpate ya Pasaka mpe kokota na mosala mwa bato na Nzambe. 
Ntoma Polo azalaki Mo-Ebre. Akatama ngenga mikolo mwambe na sima ya botama na ye, atangaki na makolo ma molakisi monene, Gamaliel, mpe asosolaki solo-solo pona nini Yesu abatisamaki na Yordani mpe pona nini Akufaki na Kuruse. Bongo, ntoma Polo akomaki likolo na libatisi lia Yesu na mikanda miaye.
Ntoma Polo alobelaki mpe likolo na makila ma Yesu lokola botondisami ya lobiko na biso. Makila ezalaki kaka eloko ya suka pona lisiko lia Ye tango oyo. Kokatama ngenga ya molimo ezalaki libatisi lia Yesu. Ezali kosimba te kolobela makila libanda na libatisi lia Ye. 
Ntoma Polo alobelaka mingi na likolo ya Kuruse ya Yesu mbalamoko. Ponanini boye? Pwete ezali elembo ya suka ya lobiko na biso. Soki Yesu alongolaki mosika masumu ma mokili mpe Alekisaki yango na Ye moko, kasi akokaki te kosopa makila na Kursue pona kozuwa etumbo pona biso, tokokaki te kobikisama. Ezali pona yango ntoma Polo alobaki mingi likolo na Kuruse. Kuruse ezali etani ya suka ya lobiko. 
Soki bosolo ya lobiko ebebisamaki te nzela-nzela koleka na bikeke na bikeke, tokokaki kozala na bato ebele bazangi lisumu. Kasi eloko ya mabe, bosolo ebungisami na tango, mpe bato ebele natikali kaka na lisolo lia Kuruse mpe bazali koyeba te libatisi lia Yesu lilingi koloba nini. 
Pwete bazali na kondima ya likolo-likolo pona sango malamu, batikali basumuki ata basali mbula ebele na makambo ma kondimela Yesu. Bazalikaka basumuki simambula zomi, ata simambula ntuku mitano ya bomoyi ya lozambo.
 

LITATOLI LIA NGAI

Nzambe atalaka basumuki Lokola bayengene?
Te. Azali sembo. Moyengebene azali oyo akangolami na lisumu, Oyo alekisa masumu manso na Yesu Na nzela ya libatis lia Ye.

Na bandi kondimela Yesu tango nazalaki na mbula 20 ya botama. Liboso na tango wana, nazalaki na likanisi lia masumu boni nasalaki na bomoyi pwete nayebaki te mobeko mwa Nzambe. Nabikaki na ndenge na nagi moko mpe nayebaki te Nzambe tii tango wana. 
Nayei kobela. Nazalaki maladi, mpe nakomaki na eteni ya kokanisa ete nakokufa. Bongo, nazuwaki mokano nasenga bolimbisi bwa masumu mangai yambo nakufa. Pwete nayokaki été Yesu akufaki pona basumuki lokola nagai, mpe nandimelaki Ye. Na ebandeli, natodaki na esengo mpe na kozongiza matondo. 
Kasi pasi na nzoto ebandaki komata mpe nabandaki koyoka mabe koleka. Sima ya mbula mike, nakokaki te, mpe nabandi kosala masumu mokolo na mokolo. Nayei kokoma mosumuki koleka mingi. Sima mbula zomi, nazalaki kaka kosumuka, tango wana nazalaki kosumuka koleka liboso. Nandimela Yesu mbula zomi, mpe bomoyi ya kosumuka esilaki te epayi nangai. Nazalaki mondimi mpe mosumuki. 
Ate nazalaki koyemba, “♪Kolela ekobikisa ngai te! Ate elongi nangai etondi na pinzoli, ekokaki te kolongola ngai kobanga, ekokaki te kolongola lisumu lia ngai lia mbula ebele! Kolela ekobikisa ngai te!♪” Nazalaki kolela na koganga mingi tango nyonso nazalaki kosumuka. 
“Nzambe nangai, nabeleli Yo, limbisa ngai na lisumu oyo. Limbisa ngai mpe na oyo mosusu, mpe nakosala lisusu te.” Sima na kosumuka, nazalaki kobondela pona mikolo misato. Nazalaki komikangela na ndako mpe kobondela na kokanga biloko ya kolia ata mikolo misato. Pwete motema mwangai mozalaki na kimia ata moke te, nazalaki koganga epayi na Nzambe pona bolimbisi. Na mokolo ya misato, nakoyoka malamu mpe kokanisa kozonga liboso na Nzambe. 
“Lisusu, nalogoli mosika masumu mangai. Alleluyah!” Bongo, nakobika mikolo moke bomoyi ya malamu. Kasi, na suka, nakosumuka lisusu mpe motema mwangai mobebi lisusu. Nazalaki kobandela mabongisi mana mbala na mbala. Ezalaki pasi mingi kondimela Yesu na ebandeli, kasi mingi, nazalaki kokoba kati ya kondima, mingi mpe nazalaki kosumuka, mpe esalaki ngai pasi mingi lokola ndako oyo etondi na salite. 
Sima mbula zomi, nakomaki mosumuki ya mabe koleka ndenge nabandaki kozala. “Pona nini nandimelaki Yesu na bolenge nyonso boye? Ekokaki kozala malamu kondimela Yesu tango nakomaki na mbula pene na ntuku mwambe, kaka pene na kokufa. Bongo, nakokaki kozala na ekenge mpe koboya lisumu, na kozanga kosenga bolimbisi ya mokolo na mokolo.” Nakanisaki ete nakobika kolandisama na mokano mwa Nzambe, kasi nakokaki te. Nazalaki koyoka lokola nabandaki kolongwa na makanisa mangai!
Nabandeli koluka lisusu Nzambe. Nalekisaki tango mingi pona kotanga kelasi ya makambo ma Nzambe. Kasi, na sima mbula moke, motema mwangai mokawuki lisusu. Yambo nabanda kotanga mikanda ya mateya ya makambo ma Nzambe, nazalaki koloba ete nasengeli kobika lokola Mosantu Damien, kolala te na mbetu ya malamu. Nakataki ndayi nazala na bomoyi ya komipesa na makambo ma Nzambe mingi mpe kotiya baposa ya mokili oyo. 
Lokola nazalaki kotanga bomoyi bwa Mosantu wana, nazuwaki mokano mwa kobika lokola ye. Namekaki kosala biloko ya pasi pona ngai moko kati na bomoyi nangai. Nazalaki kofukama esika ya makasi mingi pona kobondela tango molayi. Bongo, nazalaki koyoka ete mabondeli mangai mazalaki kokoma mpe nazalaki kosepelamingi na yango. 
Kasi, sima mbula zomi, nakokaki lisusu te kozala yango. Bongo, nabonelaki Nzambe. “Nzambe nangai na Lola, nabeleli Yo na motema nangai mobimba. Nayebi ata batiye ngai mbeli na kingo, nakoki koboya Yo te. Kasi ata nandimeli Yo na mtema mwangai mobimba, ponan nini nazali na eloko te nakati na ngai? Ponana nini nazali na esngo te? Pona nini nazali kokoba kosumuka? Natikaki kokanisa masumu tango mwa molagi yambo. Nayaki kondimela Yo mpe sikoyo nazali komituna pona nini nakomi lisusu mabe koleka, na mbula oyo nyonso nazali na Yo. Likambo nini nangai?” 
Ezali na esika oyo nde nayei kozuwa eyano. Nandimelaki Nzambe libanda ya kobikisama na masumu mangai. Nayebaki te bosolo na tango wana, mpe yango nde ebendaki ngai na bosoba oyo nyonso. 
Na lisumu kati na motema mwayo, ndenge nini okoyabisa bamosusu lisiko lia ngolu ya Nzambe kati na Yesu? Nabondelaki mingi lisusu. “Nzambe nangai, nakosilisa kelasi nangai mpe bakokomisangai mosali mwa Yo. Kasi soki nazali mosali oyo akambami na misumu, ndenge nini koyebisa basumuki mosusu lisiko lia Yo? Nazali mosumuki ngai moko mpe nazali kotanga mikanda  mia ntoma Polo, mpe nasosoli ete soki moto moko azali te na molimo mwa Klisto azali te mwana na Nzambe. Kasi na ndenge nyonso oyo naluki, Molimo mozali te kati nangai. Nayokaki yango na ebandeli, kasi ezali lisusu te, mpe elimwa na yango. Nini elekaki? Nabeleli Yo, Nkolo, yebisa ngai pona nini.” 
Na nyonso, tina ezalaki ete namikosaki na kokanisa ete nazuwaki lisiko na kondimela kaka Yesu. Nalelaki pona na yango tango molayi. 
Nzambe alakaki komimonisa na baye bakoluka Ye na motema moko. Akutanaki nangai kati na bosolo bwa Ye na suka. Nazalaki nano mosumuki mbula zomi sima nabandaki kondimela Yesu. Kasi tango natangi sekele ya libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye, tango nasosoli tina ya kokatama ngenga na Boyokani bwa Kala mpe na ndenge ya molimo na Boyokani bwa Sika, tango nayei komona mpe kondimela kati na sekele ya lobiko na nzela ya libatisi lia Klisto, pasi nangai nyonso esilaki. Molemo mwangai mokomaki pembe lokola mvula ya pembe. 
Ekozala ndenge moko pona yo. Soki ondimeli sango malamu ya libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye, okozala lisusu te na lisumu. Okoki kozala na bolembu, kasi okokoma moyengebene. Tango ozuwi bosolo oyo kati na motema mwayo, mpe oyebisi bamosusu, bakobikisama mpe bakokumisa Nzambe, na koganga “Alleluyah!” 
Nalingi kotonda bandeko ya mibali na ya basi baye bazuwi mpe lisiko. Nakumisi Yesu pona kobikisa biso wuta bowumbu bwa masumu mabiso. Alleluyah! Tozuwi ya solo lisiko lia masumu mabiso manso. 
Ezali lipamboli ya monene oyo tokoki te kobetela lisolo mobimba ya esngo na biso na maloba moke. Toyemba zembo oyo elongo. “♪Kombo na Ye ekomaki sekele, pwete nano totatoli te ba sekele ya ekelamu moko na moko. Abwakisamaki mpe atikala libanda ya mabanda batongi ndako baponaki, kasi kombo na Ye ekomi monene mpe na motuya koleka wolo na motema mwangai.♪”
 
 

LIBATISI LIA YESU MPE MAKILA MAYE EKOKI PONA KOBIKISA MASUMUKI WUTA MASUMU MABANGO


Nini ezali kolongola Masumu na mitema?
Libatis lia Yesu

Yesu Klisto alongolaki mosika masumu manso mamokili na nzela ya libatisi lia Ye mpe na makila. Akataka biso ngenga na molimo pona kosala biso bato ba Ye. Azali Nzambe ya babotami ya mbala ya mibale.
Ezali na bosambisi bwa lisumu. Kasi Yesu abatisamaki mpe asambisamaki na Kuruse pona kobikisa biso. Na makila ma Ye, Abikisi biso banso mpe asekwaki na mokolo mwa misato wuta bayei. Ezalaki Nzambe Tata oyo asekwisaki Yesu wuta baweyi. 
Bomoyi bwa Yesu ezali bomoyi bwa biso mpe elembo ya bozaleli bwa biso lokola bana na Nzambe. Libatisi lia Ye lilongolaki mosika masumu manso mabiso mpe makila ma Ye ma talo na Kuruse mazali elembo ete Amemaki etumbo ya masumu mabiso esika na biso. 
Bandeko balingami, bozali na elembo oyo ya libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye na kati ya mitema miabino? Natuni bino lisusu. Lobiko na bino ewuti kaka na makila ma Yesu? Te. Ewuti na nzela ya libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye elongo.
 

NANI MOTO YA LIBUNGI MPE MOTO MAKASI? 

Nani moto ya libungi?
Oyo amikateli etumbo ye moko Na kokweya kondima kati na Libatisi lia Yesu
 
Bandeko balingami, bozali kaka masumuki nakokoba kotubela kondima na bino mokolo na mokolo kati na Yesu bomoyi nabino? Soki ozali mosumuki ata ondimeli Yesu, bongo ozali moto makasi mpe moto ya libungi. Kozala na moto makasi ezali koboya kondimela bosolo bwa Nzambe. Tito 3:10-11 elobeli bato na moto makasi, “Soki, kati na Lingomba, ezali na moto oyo amemaka bokabwani, kebisa ye, mbala moko, mpe kebisa ye mbala ya mibale. Soki aboyi kaka koyoka, bimisa ye libanda ya Lingomba; Soki, kati na Lingomba, ezali na moto oyo amemaka bokabwani, kebisa ye, mbala moko, mpe kebisa ye mbala ya mibale. Soki aboyi kaka koyoka, bimisa ye libanda ya Lingomba; pamba te osengeli koyeba ete moto ya ndenge wana abunga nzela, azali kosala masumu; mpe na ndenge wana, amikateli ye moko etumbu.”
Moto oyo azali komikatela etumbu alobi, “Nzambe nangai! Nazali mosumuki. Nandimeli Yo, kasi nazali kaka mosumuki. Kolanda te oyo moto mosusu akoki koloba, nazali kaka mosumuki mpe nayebi yango ezali ya solo.” 
Nzambe ayebisi ye, “Ozali kaka mosumuki mpe nano te mwana mwa Ngai? Bongo ozali moto ya libungi mpe moto makasi, mpe okobwakama na moto ya lifelo.” 
Soki ondimeli Yesu libanda na sango malamu ya libatisi lia Yesu kati na motema mwa yo, soki omikateli etumbu yo moko lokola mosumuki mpe otatoli na Nzambe ete molimo mwayo mozali na lisumu, bongo ozali moto ya libungi mpe moto makasi liboso na Nzambe. 
 

MONDIMI YA SOLO AZALI NANI?

Litatoli lia lobiko lizali Nini?
Mayi, makila, mpe Molimo
 
Baye banso bandimeli sango malamu ya libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye, baye bakomaki bato na Nzambe, mpe baye banso balongolaki masumu mabango mosika bazali bayengebene. Ndenge nini okokoba kozala mosumuki tango ondimeli Yesu? Mosumuki akoki te kokota na bokonzi bwa Nzambe. 
Baye bakomi sembo na kondimela Yesu bazali na litatoli lia Nzambe kati na mitema miabango. Litatoli lizali libatisi lia Yesu na makila ma Ye. Mosala oyo ya lobiko yango nde Yesu Klisto asalaki na mokili oyo. 
Pona yango, oyo nyonso aboya kondimela sango malamu ya libatisi na nzela oyo Yesu alongolaki masumu manso mabiso mosika akolongwama na kati na bato ba Nzambe. 
Bandeko mibali mpe ya basi kati na kondima, bondimi na mitema miabino sango malamu ezali te lobiko ya basumuki kaka na makila na Yesu yango moko, kasi mpe na mayi oyo ezali libatisi lia Yesu? 
Oyo nyonso akodima mosala mwa Yesu na mokili oyo, mpe oyo nyonso akondima mayi, makila, mpe na Molimo akobikisama na masumu manso. Yango nde bosolo ya bwanya ya sango malamu ya mayi, makila mpe na Molimo. 
Yesu asokolaki biso na masumu manso na nzela na libatisi lia Ye pwete bato banso bakoka kobikisama na nzela na Ye. Sikoyo, soki ondimeli ya solo Yesu, nzela ya kozala mosumuki lisusu ezali te. 
Yesu asekwakaki wuta baweyi. Abikisaki milemo nyonso oyo ebeganaki mosika na Nzambe na botomboki ya mabe. Yesu alingi kobenda bato banso baye babungaki. Nzambe azali kosala kati na Yesu na sango malamu ya mayi, makila mpe na Molimo. Abengaki biso mpe tokoki sikoyo kozuwa lisiko mpe kobikisama na nzela na Ye. 
Ondimeli bosolo ya bozindo mingi? Nazali koyebisa yo ete lobiko ezali te kaka na makila, kasi na biloko mibale: libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye na Kuruse. Baye bazali koloba ete babikisami kaka na makila basengeli koyeba ete bazali na lisumu kati na mitema miabango. 
Tokanisaka biso banso ete ezalaki ya kokoka pona lobiko na biso, kondimela kaka makila ma Yesu. Tokanisaka bongo liboso, kasi sikoyo tomoni ete ekoki te. Tosengeli kobikisama mpe kobotama mbala ya mibale na nzela ya kondimela Yesu Klisto, oyo ayaki na mayi, makila mpe na Molimo. 
Mosumuki nyonso akoki kobotama mbala ya mibale na nzela ya kondimela libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye (1 Yoane 5:5-10). Tokumisa Nzambe. Alleluyah!