(Ba-Ebre 7:1-28)“Melishisedeki azalaki mokonzi ya Salemi mpe Nganga-Nzambe ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo. Ezali Melishisedeki nde akendeki kokutana na Abrayami Wana Abrayami azali kozonga sima na ye kolonga bakonzi; mpe ezali Melishisedeki nde apambolaki Abrayami. Abrayami apesaki ye eteni ya zomi ya bilokonyonso oyoazwaki lokola bomengo ya bitumba. Kombo ya Melishisedeki elakisi ‘mokonzi ya bosembo.’ Azali Lisusu mokonzi ya Salemi; elingi koloba: mokonzi ya kimia. Azalaki na tata te, mama te, bakoko te, mokolo ya mbotama te, mpe mokolo ya kufa te; azalaki lokola Mwana na Nzambe, mpe azali Nganga-Nzambe mpo na libela. Botala ndenge nini Melishisedeki azalaki moto monene mpo ete ezala Abrayami, koko na biso, apesa ye eteni ya zomi ya bomengo na ye ya bitumba ! Solo, Mibeko ya Moyize etindaki bana ya Levi, oyo bakomi Banganga-Nzambe kozwa biteni ya zomi epai ya bandeko na bango, bato ya Isalaele, oyo bazali mpe bato ya libota ya Abrayami. Kasi Melishisedeki oyo azalaki kutu moto ya libota ya Levi te azwaki eteni ya zomi ya Abrayami, mpe apambolaki moto oyo Nzambe apesaki bilaka. Nzokande, tembe ezali te ete ezali moto oyo azali na se nde azwaka lipamboli kowuta na moto oyo aleki ye. Botala lisusu : na ngambo moko, ezali bato oyo bakufaka nde bazali kozwa biteni ya zomi; kasi na ngambo mosusu, kolanda Makomi, ezali moto na bomoi. Boye, na mokuse, tokoki koloba ete Levi oyo azwaka biteni ya zomi afutaki eteni ya zomi epai ya Melishisedeki na nzela ya Abrayami ; 10pamba te, tango Melishisedeki akutanaki na Abrayami, Levi azalaki nanu kati na mokongo ya koko na ye, Abrayami. Boye, soki bato oyo bazwaki mobeko bakokaki kokoma ya kokoka na nzela ya bonganga-Nzambe ya Balevi, mpo na nini kotia Nganga-Nzambe mosusu, kolanda molongo ya Melishisedeki, kasi kolanda molongo ya Aron te? Nzokande, lokola bonganga-Nzambe ebongwani, mobeko mpe esengeli kobongwana. Pamba te makambo yango etali Nganga-Nzambe oyo azali ya libota ya Levi te, kasi ya libota oyo moto na yango moko te atikala kosala na etumbelo. Toyebi malamu ete Nkolo na biso azali ya libota ya Yuda, mpe Moyize atikalaki koloba eloko moko te na tina na bonganga-Nzambe ya libota ya Yuda. Likambo oyo tozali kolobela ekomi lisusu polele koleka awa Nganga-Nzambe mosusu abimi, Nganga-Nzambe oyo akokani na Melishisedeki ; akomi Nganga-Nzambe kolanda mibeko ya bomoto te, kasi kolanda nguya ya bomoi oyo ezali na suka te. Pamba te, tala litatoli oyo baloba na tina na Ye: ‘Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela, kolanda molongo ya Melishisedeki.’ Boye, Nzambe alongolaki mobeko ya liboso mpo ete ezalaki makasi te mpe ezalaki na tina te. Solo, Mibeko ya Moyize ebongisaki eloko moko te. Kasi elikya ya malamu koleka epesameli biso, elikya oyo, na nzela na yango, topusanaka pene ya Nzambe. Makambo wana nyonso esalemaki na nzela ya seleka oyo Nzambe akataki. Nzokande, mpo na Balevi, Nzambe akataki ata seleka te mpo ete bakoma Banganga-Nzambe. Kasi Yesu akomaki Nganga-Nzambe na nzela ya seleka, tango Nzambe alobaki na Ye: ‘Nkolo akati seleka, mpe akobongola mokano na Ye te: ‘Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela.’ Ezali na nzela ya seleka yango nde Yesu akoma ndanga ya boyokani oyo eleki motuya. Mpe lisusu, Banganga-Nzambe bazalaki kokitana ebele, pamba te kufa ezalaki kopekisa bango kosala mosala na bango libela na libela. Kasi mpo ete Yesu azali na bomoi seko na seko, Bonganga-Nzambe na Ye ezali mpo na libela. Yango wana azali na makoki ya kobikisa libela, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela na Ye, mpo ete azali tango nyonso na bomoi mpo na kobondelaka Nzambe na tina na bango. Boye, Yesu nde azali Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo abongi mpo na biso: azali Bule, asala ata mabe moko te, azali peto, akabwana na bato ya masumu, mpe Nzambe atombola Ye penza likolo koleka Likolo, azali na posa te, lokola bakonzi mosusu ya Banganga-Nzambe, ya kotumbaka mbeka mokolo na mokolo mpo na masumu na Ye moko liboso, mpe, na sima, mpo na masumu ya bato, pamba te atumbaki mbeka yango mpo na masumu na bango mbala moko mpo na libela tango amikabaki Ye moko. Bakonzi ya Banganga-Nzambe, oyo batiami na nzela ya Mibeko ya Moyize, bazali bato na bolembu; kasi Mokonzi ya Banganga-Nzambe oyo Nzambe atie na nzela ya maloba ya seleka, oyo eyaki sima na Mibeko ya Moyize, azali Mwana na Ye moko, oyo azali ya kokoka mpo na libela.”
YESU ASALI MOSALA YA BO-NGANGA-NZAMBE BWA LIKOLO
Nani aleki, Nganga-Nzambe Melchizedeki tope Nganga-Nzambe Ya molongo mwa Aron?
Nganga-Nzambe Melchizedeki
Na Boyokani bwa Kala, ezalaki na Nganga-Nzambe Monenena kombo ya Melchizedeki. Na tango ya Abrayami, Chedorlaomer mpe bakonzi basanganaki na ye, bazuwaki biloko binso bia Sodom na Gomori. Abrayami abengisaki basali ba ye, baye babotami na ndako na ye, mpe akumbaki bango na bitumba kobundisa Chedorlaomer na baninga baye.
Wana alongaki Chedorlaomer, mokonzi ya Elam, mpe bakonzi baminga na ye mpe abotola ndeko na ye Lot na biloko bia ye. Na sima, Abrayami azongaki na bolongi likolo na banguna baye, Melchizedeki, Mokonzi ya Salem mpe Nganga-Nzambe ya Nkolo Monene ya Likolo, amemaki mapa mpe na vinyo mpe apambolaki Abrayami. Mpe Abrayami apesaki ye moko na zomi ya biloko nyonso (Ebandeli, elongi 14).
Na Mokanda mwa Nzambe, monene mwa Nganga-Nzambe Melchizedeki na Banganga-Nzambe na bolandani na bango ekomami makambo manso mana. Nganga-Nzambe Monene Melchizedeki azalaki “Mokonzi na kimia,” “Mokonzi na boyengebene,” azalaki na tata te, na mama te, mpe na molongo ya botama te. Azali na ebandeli te mpe na suka te ya bomoyi, kasi azalaki lokola Mwana na Nzambe, atikali Nganga-Nzambe pona libela.
Mokanda mwa Nzambe etalisi biso tososola malamu monene mwa Yesu-Klisto, oyo azalaki Nganga-Nzambe Monene na molongo mwa Melchizedeki, na nzela ya kotala bonganga bwa Yesu na Boyokani bwa Sika mpe oyo ya Nganga-Nzambe Monene Aron na Boyokani bwa Kala.
Bana na Levi bakomaki Banganga-Nzambi mpe bazalaki kozuwa moko na zomi ya bato, toloba kaka, bandeko na bango, baye babotama na Abrayami. Kasi Abrayami apesaki moko na zomi na Nganga-Nzambe Monene Melchizedeki, tango oyo Levi azalaki nano na loketo na tata na ye.
Banganga-Nzambe ya Boyokani bwa Kala bazalaki monene koleka Yesu? Elobami na kati na Mokanda mwa Nzambe. Yesu azali monene koleka Banganga-Nzambe ya mokili oyo? Nani akopambolama na nani? Mokomi ya Ba-Ebre alobeli likambo banda na ebandeli. “Sikoyo likolo na makanisi manso, oyo ya se apambwami na oyo ya monene.” Abrayami apambwami na Nganga-Nzambe Monene Melchizedeki.
Ndenge nini tokoki kobika kati na kondima na biso? Tokotiya elikia na mibeko mia Nzambe na nzela ya momesano mwa kopesa mbeka ya Ndako esantu na Nzambe ya Boyokani bwa Kala, tope totiya elikia na biso na Yesu-Klisto oyo ayaki lokola Nganga-Nzambe Monene ya Lola na nzela ya mbeka na Ye na mayi mpe na Molimo?
Koladisama na bososoli bwa biso, topambwami tope tolakelami mabe. Tozali kobika kolandisama na liloba lia Nzambe mpe kopesa bambeka mokolo na mokolo, tope toponi kondimela lobiko na Yesu oyo apesi biso na nzela ya komibonza Ye moko mbala moko pona libela na mayi mpe na Molimo? Tosengeli kopona moko ya biloko mibale wana.
Na mikolo mia Boyokani bwa Kala, Ba-Isalayele bazalaki kotalela bana ba Aron mpe Levi. Na mikolo mia Boyokani bwa Sika, soki batuni biso nani azali monene, Yesu tope Banganga-Nzambe ya molongo mwa Aron? Bongo, tokozanga tembe nyonso tokoyanola ete ezali Yesu nde Monene. Bato bayebi likambo oyo malamu, kasi kaka bato moke nde bazali kolanda nzela ya kondima ya solo.
Mokanda mwa Nzambe epesi biso eyano yakokoka pona motuna oyo. Ezali kotalisa biso ete Yesu, oyo Awuta na libota mosusu libanda ya oyo epesama mosala na mesa esantu ya Nzambe, azuwaki bonganga ya likolo “Pwete lokola bonganga bobaloki, epesi nzela mobeko ebaluka mpe.”
Nzambe apesaki Ba-Isalayele mitindo 613 na mabongisi ya Mobeko na nzela ya Moize. Moize ayebisaki bango bobika kolandisama na Mobeko mpe na mitindo, mpe bato bandimaki kosalela yango.
Pona nini Nzambe atiyaki pembeni Boyokani mpe avandisi ya mibale?
Pwete moto azalaki na bolembo pona kobika Kolandisama na Boyokani bwa Sika.
Na Mokanda mwa Nzambe, Ba-Isalayele balapaki kolanda mibeko ya Nzambe na mikanda mitano mia Moize: Ebandeli, Kobima, Levitike, Mitango, mpe Deteronomi. Nzambe atalisaki bango mibeko moko na moko mpe balobaki “Boye” na motema moko na yango nyonso.
Tokoki komona ete na sima na Deteronomi, banda na Jozue, Babikaki te kolandisama na mibeko mia Nzambe. Banda na Bilombe tii 1 Bakonzi mpe 2 Bakonzi, babandi kozanga kotosa bakambi na bango. Mpe na sima, babandi kobalukisa malembe-malembe momesano mwa bopesi mbeka ya Ndako esantu ya Nzambe.
Mpe na suka na Malashi, bamemaki banyama oyo ekokaki te pona kobonzela Nzambe libanda na mibeko ya mbeka ezangi mbeba. Basengaki na banganga-Nzambe, “Tobeleli bolekisa yango. Bondima oyo wana.” Na esika ya kobonza mbeka kolandisama na mobeko mwa Nzambe, babalukisi yango na ndenge na bango.
Ba-Isalayele bazalaki kolanda mobeko mwa Nzambe na botondi nyonso te ata mbala moko na kati na Boyokani bwa Kala. Babosanaki mpe babungaki nzela ya lobiko ya mabongisi maye bopesi mbeka ebimisaki polele. Pona yango Nzambe atiyaki libongisi mosusu pona bopesi mbeka. Na Jeremi, Nzambe alobaki, “Nakosala Boyokani bwa sika na ndako ya Isalayele mpe na ndako na Yuda.”
Totanga yango na Jeremi 31:31-34. “Na mikolo ekoya, elobi Yawe, ‘nakosala boyokani ya sika elongo na bato ya Isalaele mpe ya Yuda; ekozala ndenge moko te na boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bangotango nasimbaki bango na loboko mpo na kobimisa bango na Ejipito; pamba te bakataki boyokani na Ngai wana, atako nazalaki Mobali ya libala mpo na bango,’elobi Yawe. ‘Kasi tala boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele, sima na mikolo wana,’ elobi Yawe: ‘Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, nakokoma yango kati na mitema na bango, nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na Ngai. Moko te akoteya lisusu namoninga na ye to ndeko na ye na koloba: ‘Yeba Yawe!’ Pamba te bango nyonso bakoyeba Ngai, kobanda na mwana moke kino na mokolo,’ elobi Yawe, ‘nakolimbisa mabe na bango mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te.’”
Nzambe alobaki ete Akosala mokano mwa sika. Asalaki libela mokano na Ba-Isalayele, kasi bakweyaki kobika na liloba lia Nzambe. Bongo, Azwaki mokano mwa kosala boyokani bwa lobiko na bato ba Ye.
Bakataki ndayi liboso na Nzambe, “Toko fukamela Yo kaka mpe kobika na nzela ya maloba na mibeko mia Yo.” Nzambe ayebisaki bango ete, “Boko zala na nzambe mosusu te liboso na Ngai,” mpe Ba-Isalayele bayebisaki Ye, “Solo-solo, tokofukamela ata moke te banzambe mosusu. Ozali Nzambe na biso moko. Tokoki kozala na nzambe mosusu te.” Kasi bakweyaki bango moko na ndayi na bango oyo bakataka.
Moboko mwa Mobeko evandaki na Mibeko Zomi: “Kozala te na Nzambe mosusu liboso na Ngai. Kosala te elili na loboko tope na mbeli, tope boladisami ya eloko moko mpe kofukamela yango mpe kosalela yango. Kanisa mokolo mwa Saba kobatela yango bule. Kosalela te kombo na Nkolo Nzambe na yo pona pamba. Pesa lokumu na tata na mama nayo. Oko boma te. Okosala ekobo te. Okoyiba te. Okokosela te ndeko ya lobango na yo makambo. Okolula te mwasi ya ndeko na yo ya lobango.” (Kobima, elongi 20).
Ekabolami na mitindo 613 ebongisami na mikano mia kobatela na bomoyi bwa bango. “Oyo epekisami kosalela bana ya basi, mpe ya mibali, oyo epekisami kosalela mama-bokilo....” Mobeko mwa Nzambe mopesaki bango mitindo mia kosala makambo malamu mpe koboya ya mabe. Yango nde Mibeko Zomi na mikano 613 ya kolanda.
Ata bongo, kati na bato banso, moko te akokaki kobatela mitindo nyono ya Mobeko mwa Nzambe. Pona yango, Nzambe asalaki nzela mosusu pona kobikisa biso na masumu manso.
Bonganga bobakisami tango nini? Nasima koya na Yesu na mokili oyo, nde bonganga bobaluki. Yesu azuwi bonganga na banganga-Nzambe banso ba molongo mwa Aron. Alongoli bambeka ya Ndako esantu ya Nzambe oyo epesamelaki banganga ya molongo mwa Levi. Asali Ye moko mosala ya bonganga ya Lola.
Ayaki na mokili, lokola mwana ya Aron te, kasi lokola mwana na Yuda, ndako ya bakonzi. Amikabaki lokola mbeka na nzela ya libatisi lia Ye mpe na makila ma Ye na Kuruse mpe abikisaki bato banso na masumu ma bango.
Na nzela ya komikaba Ye moko, apesi biso nzela ya kozuwa eyano na likambo lia lisumu. Alongolaki mosika masumu ma bato banso na nzela ya mbeka ya libatisi mpe makila ma Ye. Abonzaki mbala moko pona na libela mbeka ya seko pona lisumu nyonso.
LOKOLA BONGANGA YA SIKA EYAKI MOBEKO MWA SIKA EYAKI MPE
Mobeko mwa sika ya lobiko Ezali nini?
Mbeka ya seko Ya Yesu-Klisto
Baninga balingami, bonganga bwa Boyokani bwa Kala ebalukisami kati na Boyokani bwa Sika. Na mikolo mia Boyokani bwa Kala, Nganga-Nzambe monene kati na bana ya Aron, ya ndako na Levi, azalaki kobonza mbeka ya bolongoli masumu ya Ba-Isalayele pona mbula ewuti koleka. Nganga-Monene akokota na Esika Esantu ya Bosantu. Akeyi liboso na kiti ya mawa na makila ya mbeka ya kotumba. Kaka Nganga Monene nde akoki kokota na sima ya elamba molayi, oyo ezali na Esika Esantu ya Bosantu.
Kasi na sima ya boyeyi na Yesu, bonganga ya Aron elakaki na Ye. Yesu azuwaki bonganga bwa seko. Asalaki mosala na bonganga bwa seko na nzela ya komibonza Ye moko, pwete bato banso bakoka kobikisama na masumu ma bango.
Na Boyokani bwa Kala, nganga-Nzambe monene azalaki tokolongola nano masumu maye moko na botiye maboko na moto ya ngombe liboso abanda kosala pona bato mosusu ba ye. Azalaki kolekisa masumu ma ye na botiye maboko, na koloba, “Nzambe, nasumukaki.” Bongo, akoboma nyama mpe akosopa makila ma yango nase mpe liboso na kiti ya mawa mbala sambo.
Soki Nganga-Nzambe monene Aron azalaki bule te, okoki kokanisa mbala boni mabe bato bazalaki. Mwana ya Levi moko, Nganga-Nzambe monene Aron ye moko azalaki mosumuki mpe esengelaki abonza ngombe pona kolongola masumu ma ye moko mpe na ya libota na ye.
Nkolo alobi na Jeremi, elongi 31, “Na kobuka boyokani. Nasali boyokani bwa sika na bino, kasi bokanga yango te. Bongo, Nakolongola boyokani oyo ekokaki te kosantisa bino mpe kopesa bino boyokani bwa sika bwa lobiko. Nakobikisa bino lisusu te na nzela ya mibeko mia Ngai, kasi Nakobonzela bino lobiko na nzela ya sango malamu ya mayi mpe na Molimo.”
Nzambe apesaki biso boyokani bwa sika. Tango oyo, tango ekokaki, Yesu ayaki na mokili lokola moto, amibonzaki Ye moko pona kolongola mosika masumu ma mokili mpe asopaki makila ma Ye na Kuruse pona kobikisa biso baye bandimeli Ye. Alongolaki mosika masumu manso ma bato na nzela ya libatisi lia Ye.
Mobeko mwa Nzambe molongolamaki mpe mosusu mopesamelaki. Ba-Isalayele bakokaki te kobikisama soki bakobaki kobika kolandisama na mobeko mwa Nzambe, kasi bakweyaki kosala yango. “Pwete na mobeko tozali kozuwa boyebi bwa lisumu” (Barome 3:20).
Nzambe alingaki Ba-Isalayele basosola ete bazali basumuki mpe Mobeko mokokaki te kobikisa bango te. Abikisaki bango na nzela ya mobeko mwa lobiko na mayi mpe na Molimo, kolekela na misala mia bango te. Kati na bolingo bwa Ye bozanga ndelo, Nzambe apesaki biso boyokani bwa sika na nzela nini tokoki kobikisama na masumu ma biso manso ma mokili kolekela na libatisi na makila ma Yesu.
Soki ondimeli Yesu na bozangi tina ya libatisi na makila ma Ye, kondima na yo nyonso ezali ya pamba. Tango osali bongo, omitungisi koleka soki ondimelaki Yesu ata moke te.
Nzambe alobi ete Asali boyokani bwa sika pona kobikisa bato banso na masumu ma bango. Nasuka, tokobikisama te pona misala mia biso, kasi pona mobeko mwa boyengebene na nzela ya mayi mpe na makila.
Oyo ezalaki elaka ya seko mpe Akokisaki yango pona biso baye bandimeli Yesu. Mpe atalisaki biso monene mwa Yesu. Atalisi biso ndenge nini Azali monene tango tomeki Ye na banganga-Nzambe ya molongo mwa Aron na boyokani bwa kala.
Tokomi bato mususu mpe ya bomoko na nzela ya kondimela kati na mayi mpe na makila ma Yesu. Nabeleli yo, tala eloko oyo na bokebi mingi. Ezali te likambo ya mayele na makasi ma mokambi na yo, akoki te kozala monene koleka Yesu! Nzela mosusu ezali te. Tokobikisama kaka na nzela ya sango malamu ya mayi mpe na makila, ata mbala moko te na botosi bwa mibeko mia Nzambe. Pwete bonganga bobaluki, mobeko mwa lobiko mokomi mwa sika.
MONENE MWA BOLINGO BWA NZAMBE
Nini ezali monene, Bolingo tope Mobeko mwa Nzambe?
Bolingo bwa Nzambe
Tokoki kobikisama kaka tango tondimeli Yesu, mpe na koyeba ete Abikisaki biso mpe bolingo bwa Nzambe pona biso boleki monene. Sikoyo, ezali na bokeseni nini kati-kati na mibeko mia Nzambe na kondima monene ya bolingo bwaYe?
Bato ba mayele ya kelasi batiyaka motuya mingi na bakombo ya mangomba ma bango mpe na boyebi mosala na bango koleka liloba lia Nzambe. Ata ndenge nini, bosolo mpe bokokisami bwa kondima Yesu boyaki na nzela ya kondimela monene ya lobiko ekokisami na nzela ya mayi mpe na Molimo.
Ata lelo, bato ebele bazali koloba ete lisumu lia ebandeli elimbisami, kazi basengeli kotubela mokolo na mokolo pona masumu ma bango. Bato ebele bandimi yango mpe bameki kobika bomoyi bwa bango kolandisama na mibeko mia Boyokani bwa Kala. Bazali kokoba kobosana monene ya libiko lia Yesu oyo Ayaki na mayi mpe na Molimo.
Na Boyokani bwa Kala, Ba-Isalayele babikaki na mobeko mwa Nzambe pona kobikisama na masumu ma bango, kasi bakokaki te kobikisama. Pwete Nkolo ayebi bolembu bwa biso mpe na tina tokoki te, Alongolaki mibeko mia Ye. Tokoki ata moke kobikisama na nzela ya misala mia biso. Yesu alobaki ete Akobikisa biso na nzela ya sango malamu na Ye ya mayi mpe ya Molimo. Alobaki ete, “Nakobikisa bino na masumu ma bino Ngai moko.” Nzambe asakolaki yango na mokanda mwa Ebandeli.
“Kati na bakitani na yo mpe bakitani na ye. Bakitani ya mwasi bakonyata moto na yo, mpe yo okoswa bango na litindi.” (Ebandeli 3:15). Na sima, Adam na Eva basumukaki mpe bakweyaki, basalaki bilamba na makasa ma nzete ya figi pona kobatamisa bosumuki bwa bango liboso na Nzambe. Kasi Nzambe abengaki bango mpe Asalelaki bango bilamba ya poso ya nyama lokola elembo ya lobiko. Ebandeli etalisi biso bilamba bia ndenge mibale pona lobiko. Moko esalami na makasa ma nzeta ya figi, mpe mosusu esalai na poso ya nyama. Nini ezali malamu koleka? Solo-solo, bilamba ya poso ya nyama pwete bomoyi bwa nyama ebonzamaki pona kobatela moto.
Bilamba bia makasa ma nzete ya figi bikokawuka na tango mokuse. Lokola oyebi, likasa lia figi lizalaka lokola loboko na misapi mitano. Bongo, kolata elamba ya likasa lia figi elingi koloba kobatamisa masumu sima na misala. Soki olati bilamba bia makasa ma figi mpe ovandi na se, makasa makokatana na tango moke. Namesanaki kosakana na mindunki ya bana tango nazalaki nano mwana moke. Kasi ata nabateli yango ndenge nini, ekobeba na suka ya mokolo moko kaka. Na ndenge moko, moto azali na makasi mingi te pona komisantisa ye moko.
Kasi lobiko lia mayi mpe na makila, libatisi lia Yesu mpe liwa lia Ye na Kuruse ezali kobikisa basumuki ebele pona kotatola monene mwa bolingo bwa Nzambe. Yango etalisi biso ndenge nini bolingo bwa Nzambe boleki mobeko mwa Ye.
BAYE BAKOBI KONDIMELA MOBEKO MWA NZAMBE
Pona nini bato ya mayele ya kelasi basali Bilamba na misala mia mikolo oyo?
Pwete bayebi te misala mia bango mikoki te Kokomisa bango bayengebene.
Baye basali bilamba bia bango na makasa ma figi bazali kokamba bomoyi na ndenge ya mayele ma kelasi. Bandimi na bango baye bazali na kati na libungi, basengeli kobakisa bilamba bia bango mokolo na mokolo. Basengeli kolata bilamba bia sika mokolo mwa sambo tango ya kokende na etonga. “Nzambe nangai, nasumukaki mingi poso oyo eleki. Kasi Nkolo, nandimi ete Obikisamaki ngai na Kuruse. Nkolo, nabeleli Yo longola mosika masumu mangai na makila ma Kuruse!” Batongi elamba ya sika ya ndenge wana. “Oh, Nkolo akumisama. Alleluya!”
Kasi basengeli kosala elamba mosusu na ndako. Pona nini? Pwete oyo ya kala epasoki. “Nkolo nangai, nasumuki lisusu mikolo misatu oyo. Nabeleli Yo, limbisa ngai.” Basali lisusu elamba ya sika pona kotubela mbala na mbala.
Na ebandeli, bilamba azalaki kowumela mikolo mingi, kasi sima tango moko, basali na bosengi ya mokolo moko ya sika. Lokola bakoki kobika na mobeko mwa Nzambe, bakomi komiyoka soni. “Oh, yango ezali na pasi mingi. Nkolo, oh, Nkolo, nasumuki mbala mosusu!” Mpe tosali bilamba bia sika ya bolimbisi. “Oh, Nkolo, ezali pasi kosala bilamba ya makasa ya figi lelo.” Bazali kosala mosala makasi pona kosala bilamba bia sika.
Tango nyonso oyo bato ba ndenge wana babengi Nkolo, ezali kaka pona kotubela masumu ma bango. Bazali kobeta mbebu na bango kobenga Nzambe, “Nzambe!” Mpe tika kosala bilamba bia sika mokolo na mokolo. Bongo, nini ekosalema tango bakolemba yango?
Mbala moko tope mibale na mbula, bazali kokende na ngomba pona kokila. Bazali komeka kosala bilamba bia makasi koleka. “Nkolo, nabeleli yo longola mosika na ngai masumu mangai. Nabeleli Yo Osala ngai moto ya sika. Nandimeli Yo, Nkolo.” Bakanisi ezali malamu kobondela na butu. Bongo, bapemi na moyi mpe tango ya butu, babandi losambo na butu bamati na banzete, tope bakiti na bandako ya se mpe bagangi makasi na Nzambe. “Nkolo, nandimi!” “♪Natubeli mpe motema mwa ngai motondi na pasi♪” Bazali kobondela na mongongo makasi mpe balobi, “Nandimi.” Na nzela bazali kosala bilamba ya makasi koleka, oyo bakanisi ekowumela tango molayi, kasi bakoki te.
Ndenge nini ezali kopesa makasi ya kokita na se na ngomba, sima ya mabondeli! Lokola mopepe ya malamu, tope mbula ya malamu kati na banzete mpe na fololo, mitemamia bango mitondi na ngolu ya Nzambe ya Makasi nyonso. Bakomi piko koleka na molimo mwa ngombe, bazali na esengo ya bilamba ya sika oyo balati.
Kasi tango kaka moke, bazongi na ndako mpe na etonga, mpe bazongeli moboyi na bango wana, bilamba bikomi salite mpe ebebi.
Baninga na bango batuni bango ete, “Bozalaki wapi?”
“Malamu, nabimaki pona tango moke.”
“Namoni ete okondi moke!”
“Bongo, boye, kasi ezali na lisolo mosusu.”
Balobaka te bawuti kokila, bakendaka kaka na etonga mpe na mabondeli. “Nakolanda lisusu te basi. Nakokosa lisusu te. Nakolula lisusu te ndako ya ndeko ya lobango. Nakolinga bato banso.”
Kasi na tango bamoni kaka mwasi moko ya kitoko na makolo ya mike, bosantu ekimi na mitema mia bango. “Tala malamu ndenge elamba na ye ezali mokuse! Bilamba bia se ekomi mokuse mingi koleka! Nasengeli kotala lisusu makolo mana! Oh! Te! Oh, Nkolo! Nasumuki lisusu!”
Bakambi ba mayele ya kelasi bazali bato ya bosembo libanda, kasi okoyeba te basalaka bilamba bia sika mokolo na mokolo. Bokambi bwa mayele ya kelasi bozali kondima ya bilamba ya makasa ma figi, kondima ya lokuta. Bato ebele batalisaka bomoyi ya bosembo kolandisama na mobeko mwa Nzambe. Bazonganga na moto ya ngomba pwete mingongo mia bango mikomisa bango bayengebene koleka.
Bakambi ba mayele ya kelasi bazuwaka elongi moko ya bosembo tango bazali kokamba mayangani kati na etonga. “Tata Mosantu na Lola! Tosumukaki poso oyo eleki. Nabeleli Yo, limbisa biso...” Bakweyi na kolela mpe ligomba mobimba epandi kolela. Bazali kokanisa ete, “Alekisaki tango molayi na ngomba kati na mabondeli mpe kokila. Elongi na ye ezali kotalisa bosembo.” Kasi lokola kondima na ye ezali ya mayele ya kelasi, ata liboso ya suka ya mabondeli, motema na ye ebandi kotonda na lolendo mpe na masumu.
Tango bato basali bilamba ya sika na makasa ma figi, ekowumela sanza mibale tope misatu. Kasi suka-suka, bilamba wana ekobeba mpe bakoluka basala bilamba mosusu pona kokoba kobika na bilongi mibala mia bango. Yango nde bomoyi ya basali ya mayele ya kelasi baye bazali komeka kobika na mobeko pona kobikisama. Basengeli kosala mbala na mbala bilamba mosusu bia sika.
Bo-saleli bwa mayele ya kelasi bozali kondima ya makasa ma figi. Baye basalelaka yango bakoyebisa yo, “Osali masumi manso ma poso ewuti koleka, boye te? Bongo, tubela.”
Bazali koganga na mongongo makasi na koyebisa yo. “Tubela! Bondela!”
Mosali ya mayele ya kelasi ayebi ndenge nini kosala mongongo mwa ye ekoma mosantu. “Nkolo! Nayoki mawa mingi. Nabikaki te na Mobeko. Nabatelaki te mibeko mia Yo. Limbisa ngai Nkolo, limbisa ngai kaka mbala mosusu.”
Bakoki te kobika na Mobeko ata basaleli makasi manso ma bango. Solo-solo, bazali kobundisa mobeko mwa Nzambe mpe Nzambe Ye moko. Bazali na lolendo liboso na Nzambe.
BAZALI LOKOLA CHUDAL BAE
Pona nini Nzambe alongoli Mobeko?
Pwete ekokaki te kobikisa biso Na masumu ba biso.
Ezalaki na elombe mobali moko na kombo ya Chudal Bae. Na mbula 1950, tango ya bitumba na mboka ya Kore, Basoda Komuniste bayaki epayi na ye mpe bapesaki mitindo ya kokombola lopango mokolo mwa Sabat pona na komona soki akotosa kondima na ye mpe bakomisa ye Koministe. Kasi mwana mobali wana aboyaki kobebisa kondima na ye. Batiyaki sete, kasi akobaki koboya.
Nasuka basoda bakangaki ye na nzete mpe babetaki ye masasi. “Olingi nini, kokombola lopango tope kobomama?”
Liboso ya mitindo ya mabe, alobaki ete, “Malamu nakufa na esika ya kosala mosala mokolo mwa Sabat.”
“Ozwi mokano mwa yo, tokosalela yango pona yo.”
Babetaki ye masasi, mpe akufaki. Na suka bampaka na lingomba bakomisaki ye mokambi pona kokumisa na ndenge wana kondima na ye.
Na sima ya makasi ya bomipesi na ye, kondima na ye ezalaki ya libungi. Pona nini akombolaki kaka lopango, mpe na sima ateyaki basoda wana? Pona nini komikanga mpe kokufa pona yango? Nzambe akokumisa ye pona koboya kosala na mokolo mwa Sabat? Te.
Tosengeli kokumba bomoyi na nzela ya molimo. Misala na biso te, kasi kondima na biso nde ezali na motuya liboso na Nzambe. Bakambi ba matonga balingaka kokumisa bato lokola Chudal Bae pwete balingaka kotalisa monene ya boyengebene kati na mangomba ma bango. Ezali kaka lokola bilongi mibale ya Ba-Farizao baye bazalaki kobundisa Yesu.
Tozali na eloko moko te ya tanga epayi na bato ya mayele ya mokili oyo. Tosengelikotanga nde kondima ya molimo. Tosengeli komituna pona nini Yesu abatisamaki mpe asopaki makila ma Ye na Kuruse, mpe kososola kati na lolenge ya sango malamu ya mayi mpe na Molimo.
Esengeli tosuwa biyano na mituna yango wana liboso na nyonso, mpe komeka kopanza sango malamu na bato banso kati na mokili, pwete babotama mbala ya mibale. Tosengeli komikotisa na misala mia molimo.
Soki moteyi ayebi yo ete, “Zalalokola elenge mobali Chudal Bae. Tika kosala mosala mokolo mosantu mwa Sabat,” alingi kolongola yo na esika ozali pwete olanda ye na lingomba na mokolo mwa eyenga.
Lisolo mousu ekoki kosunga biso yango oyo. Ezalaki na mama moko azalaki na mikakatano mingi pona kokende na losambo na mokolo mwa eyenga. Babokilo na ye bazalaki kosambela lokola Ba-Klisto kasi bazalaki kopekisa ye kokende na ndako na Nzambe. Bazalaki toyebisa ye asalaka misala mokolo mwa eyenga. Kasi, ye akendaki na butu na bilanga na mwinda ya sanza mpe asalaki mosala nyonso oyo basengaki ye pwete libota ezuwa lisusu nzela te ya kopekisa ye kokende na ndako ya Nzambe na tongo mokolo mwa eyenga.
Solo-solo, ezali na mutuya kokende na ndako ya Nzambe, kasi ezali te likambo ya koya kobondela mokolo nyonso ya eyenga pona kotalisa kaka bondimi bwa biso. Kondima ya solo ezali kati na botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Kondima ya solo ebandi tango moto abotami mbala ya mibale.
Okoki kobikisama na masumu mayo na kobika kolandisama na Mobeko mwa Nzambe? Te. Nazali koyebisa yo kobosana Mobeko, kasi toyebi biso banso ete na nzoto oyo ezali pasi mingi kobatela mikano mia Mobeko.
Jake 2:10 elobi ete, “Moto oyo akweyi ata na mobeko moko kaka, atako atosaka mibeko nyonso, abuki nde mibeko nyonso.” Pona yango, kanisa nano ndenge nini okoki kobotama mbala ya mibale na sango malamu ya mayi mpe na Molimo. Bongo, kende na etonga esika wapi okoki koyoka sango malamu. Okoki kobika bomoyi ya kondima na sima obotami mabala ya mibale. Mpe, tango Nkolo akobenga yo, okokende liboso na Ye na esengo nyonso.
Kolekisa te tango na yo na kokende na etonga ya lokuta, kobebisa mbongo na yo te na kosalaki mabonza ya mabe. Bakambi ya lokuta bakoki te kobatela yo kokende na lifelo te. Yambo, yoka sango malamu ya mayi na Molimo mpe botama mbala ya mibale.
Kanis pona nini Yesu ayaki na mokili oyo. Soki okokaki kokota na bokonzi bwa lola na Mobeko, Akokaki te koya na mokili oyo. Sima koya na Ye, bonganga-Nzambe bobalukaki. Mayele ma kelasi makomi makambo makala. Liboso tobikisama, tokanisaki ete tokokaki kobikisama na Mobeko. Kasi, yango ezali lisusu te elembo ya kondima ya solo.
Yesu abikisaki biso na masumu ma mokili na bolingo bwa Ye, na mayi ya libatisi lia Ye, na makila ma Ye, mpe na Molimo. Akokisaki lobiko na biso na nzela ya libatisi lia Ye na Yordani, makila ma Ye na Kuruse, mpe na lisekwi lia Ye.
Nzambe alongolaki mikano ya kala pwete ezalaki na makasi te mpe ekomaki na mosala lisusu te. “Solo, Mibeko ya Moyize ebongisaki eloko moko te. Kasi elikya ya malamu koleka epesameli biso, elikya oyo, na nzela na yango, topusanaka pene ya Nzambe. Makambo wana nyonso esalemaki na nzela ya seleka oyo Nzambe akataki. Nzokande, mpo na Balevi, Nzambe akataki ata seleka te mpo ete bakoma Banganga-Nzambe.” (Ba-Ebre 7:19-20). Yesu akataki ndayi pona kobikisa biso na masumu mabiso na nzela ya libatisi na ya makila. Komipesa pona la liwa ezali makambo ya mayele ya kelasi oyo ezali mbuma ya liwa, mpe kondima ya solo ezali kaka kondimela sango malau ya mayi mpe na Molimo.
Kondima na biso esengeli et bota mbuma. Nini okanisi ezali malamu pona molemo mwa yo? Ekozala malamu kokendaka na etonga mokolo na mokolo mpe kobika na Mobeko, tope ezali malamu kokende na etonga na Nzambe esika wapi sango malamu ya botama ya mbala ya mibale ezali koteyama, pwete tobotama mbala ya mibale? Etonga nini na moteyi nini oyo akoki kozala malamu pona molemo mwa yo? Kanisa malamu mpe pona oyo ekoki na molemo mwa yo.
Nzambe abikisaki biso na nzela ya moteyi oyo azali na maloba ma sango malamu ya mayi mpe na Molimo. Eloko nyonso esengeli ezuwa tina ya lobiko ya molemo ya moko na moko. Mondimi ya bwanya mpe ya solo azali oyo azali kotiya molemo mwaye na liloba lia Nzambe.
YESU AKOMAKI NGANGA-NZAMBE NA NZELA YA KOKATA NDAYI
Bana ya Levi bakomisaki bango banganga Nzambe Na bokati ndayi?
Te. Kaka Yesu nde akomaki Nganga-Nzambe Nabokati ndayi.
Ba-Ebre 7:21-22 elobi ete, “Makambo wana nyonso esalemaki na nzela ya seleka oyo Nzambe akataki. Nzokande, mpo na Balevi, Nzambe akataki ata seleka te mpo ete bakoma Banganga-Nzambe. Kasi Yesu akomaki Nganga-Nzambe na nzela ya seleka, tango Nzambe alobaki na Ye: (Nkolo akati seleka, mpe akobongola mokano na Ye te: ‘Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela.’)”
Na Basembo 110:4 elobali ete,” Yawe alapaki ndayi oyo,akobongola maloba na Ye te: ‘Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela kolanda molongo ya Melishisedeki!’” Nkolo akataki ndayi. Asalaki boyokani na biso mpe Atalisi yango na biso na nzela ya Liloba likomami. “Na kokoma Nganga-Nzambe Monene ya libela na mokano mwa Melchizedek. Melchizedek azali mokonzi ya boyengebene, mokonzi ya kimia mpe nganga-Nzambe monene pona libela. Nakoma Nganga-Nzambe Monene pona libela na mokano mwa Melchizedek pona lobiko nayo.”
Yesu ayaki na mokili oyo mpe akomaki fongola ya boyokani bwa malamu koleka (Ba-Ebre 7:22). Esika ya makila ma ngombe na ntaba, Amibonzaki Ye moko lokola mbeka na nzela ya libatisi mpe na bosopi makila na Kuruse pona kolongola masumu manso mabiso.
Na tango ya Boyokani bwa Kala, tango nganga-Nzambe akufi, mwana na ye nde akosuwa esika na ye tango akozala na mbula 30. Tango akomi mobange mpe mwana mwa ye akokisi mbula 30, akopesa bonganga-Nzambe na ye na mwana wana.
Ezalaki na banan ebele ya banganga-Nzambe minene. Ndenge wana, David abongisaki nzela ya kobanda kosalelela Nzambe biteni na biteni pona kopesa bango nyonso motindo ya kosalela Nzambe. Lokola bana banso ba Aron babongisamaki pona na bonganga-Nzambe, bazalaki na mokumba mwa kosalela Nzambe lokola banganga-Nzambe. Luka alobi ete, “Zacharia s, oyo ya botama ya Abijah.... Ndenge wana, ezalaki tango ya mosala na ye lokola nganga-Nzambe kolandisama na libota lia ye....”
Yesu ayaki na mokili oyo mpe asuwaki bonganga-Nzambe pona seko na seko. Ayaki lokola Nganga-Nzambe ya makambo kito ya koya. Akokisaki lobiko ya botama ya mbala ya mbale na mayi mpe na Molimo.
Bana na Aron bazalaki na bolembu mpe na bozangi botondi kati na nzoto na bango. Nini ezalaki kosalema tango nganga-Nzambe akufi? Mwana na ye akozuwa bonganga-Nzambe, kasi mbeka wana ekokaki te kobikisa bato banso ba mokili. Kondimela moto ezali kondima ya solo te mpe ya kotonda te.
Na tango ya Boyokani bwa Sika, Yesu ayaki na mokili oyo. Kasi Azalaki te na bosengi ya kobonza mbeka mbala na mbala pwete Azali ya sekona seko. Alongolaki masumu mabiso manso mosika na libatisi lia Ye. Amibonzaki Ye moko mpe akufaki na Kuruse pona kobikisa baye banso bakodimela Ye na masumu.
Sikoyo, Azali na bomoyi mpe afandi na loboko ya mobali ya Nzambe pona kotatola pona biso. “Tata na Ngai Molingami, bakoki kozanga botondisami, kasi ndimela Ngai. Nalongolaki te mosika na bango masumu mabango banda kala?” Yesu azali Nganga-Nzambe Monene ya seko na seko ya lobiko na biso.
Banganga-Nzambe ya mokili bazalaki na botondisami nyonso te. Sima na liwa na bango, bana na bango bazalaki tozuwa esika na bango. Nkolo na biso azali ya seko na seko. Akokisaki lobiko ya libela pona biso na koya na Ye awa na mokili, kobatisama na Yoane-Mobatisi, mpe kosopa makila ma Ye na Kuruse pona masumu mabiso manso.
“Nzokande, soki Nzambe alimbisi moto masumu, ezalaka lisusu te na likabo ya kopesa mpo na masumu.” (Ba-Ebre 10:18). Yesu azali kotatola lobiko na biso tii suka ya tango. Osi obtami na mayi mpe na Molimo?
“Boye, Yesu nde azali Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo abongi mpo na biso: azali Bule, asala ata mabe moko te, azali peto, akabwana na bato ya masumu, mpe Nzambe atombola Ye penza likolo koleka Likolo,” (Ba-Ebre 7:26). “Bakonzi ya Banganga-Nzambe, oyo batiami na nzela ya Mibeko ya Moyize, bazali bato na bolembu; kasi Mokonzi ya Banganga-Nzambe oyo Nzambe atie na nzela ya maloba ya seleka, oyo eyaki sima na Mibeko ya Moyize, azali Mwana na Ye moko, oyo azali ya kokoka mpo na libela.” (Ba-Ebre 7:28).
Eloko nalingi koyebisa yo ezali ete Yesu-Klisto, oyo azali na mbeba ata moko te, alongolaki masumu mabiso mosika mbala moko pona libela na nzela ya mayi ya libatisi lia Ye mpe na makila ma Ye na Kuruse. Abikisaki biso na masumu mabiso na nzela ya misala te, kasi na kolongola mosika na biso masumu mabiso mpe asambisamaki mbala moko pona libela.
Ondimi ete Abikisaki biso wuta na masumu mabiso na nzela ya lobiko ya seko na seko? Soki osali boye, obikisami. Kasi soki okoki te, ozali nano na makambo mingi ya koyekola likolo na lobiko ya seko ya Yesu.
Kondima ya solo ewutaka na sango malamu ya mayi mpe na Molimo, kolandisama na Makomi Masantu. Yesu Klisto, Nganga-Nzambe Monene, akomaki Mobikisi mwa biso na nzela ya libatisi lia Ye mpe na makila ne Kuruse.
TOSENGELI KOSOSOLA KONDIMA NA BISO
“Kondimela Yesu” Elingi koloba nini?
Kozala na kondima na libatisi lia Yesu Na liwa lia Ye na Kuruse.
Tosengeli kokanisa ndenge nini tokoki kondimela Yesu na nzela ya malamu mpe tofandisa kondima na biso. Tokoki kondimela Yesu na nzela ya malamu ndenge nini? Tokoki kosala yango na kondimela sango malamu ya libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye na Kuruse.
Kondima ya solo ezali kondimela mosala mwa Yesu, libatisi lia Ye mpe makila ma Ye, mpe na kobakisa te mbeba ata moke te. Ondimeli yango ezali ya solo? Bomoyi na yo ya molimo ezali ndenge nini? Ofandi likolo na misala mpe na makasi mayo moko?
Eleki tango mingi te banda nandimeli Yesu, kasi na bundisami mbula zomi pona mayele ya bato. Solo-solo, nalembi na bomoyi wana. Nalingi te kokanisa tango wana lisusu. Mwasi nangai afandi awa sikoyo. Ayebi ndenge nini ezaliki pona biso.
Na mokolo ya eyenga, nakoki koloba ete, “Mwasi nangai, tosepela nano lelo.”
“Kasi lelo ezali Mokolo ya Eyenga!”
Asokoli te ata bilamba na Mokolo ya Eyenga. Mokolo moko ya Eyenga, elamba nangai epasukaki. Kasi ayebisaki ngai kozela tii moko ya liboso ya poso. Lokola ezalaki ndenge wana, nakobaki na kosalela Mokolo mwa Sabat kaka ndenge wana. Kasi ezalaki makasi. Tozalaki te kopema na mokolo ya eyenga pwete ezalaki pasi mingi tobatela Sabat malamu. Nazali kokanisa yango tii mikolo oyo.
Balingami, kondimela Yesu ya solo, esengeli kondimela bolongolami bwa masumu mabiso na nzela ya libatisi lia Ye mpe na makila na Kuruse. Kondima ya solo ezali kondimela bonzambe mpe bomoto bwa Yesu mpe makambo manso Asalaki na mokili oyo. Kondima ya solo ezali na kati na Maloba ma Ye manso.
“Kondimela Yesu” elingi koloba nini? Ezali kondimela libatisi lia Ye mpe makila ma Ye. Bozindu moko ezali na kati na bosolo oyo. Oyo tosengeli kosala ezali kotala na kati na Mokanda mwa Nzambe mpe kondimela sango malamu. Tosengeli biso banso kondimela na nzela ya malamu.
“Matondi Nkolo. Namoni sikoyo ete esalami te na makasi nangai te! Pwete Mobeko mozali boyebi bwa lisumu (Barome 3:20). Nasosoli yango nyonso sikoyo. Nakanisaki ete lokola Mobeko mozalaki malamu, pwete ezalaki mokano mwa Nzambe, nakokaki komeka kobika ba nzela na yango. Nasalaki makasi nangai tii lelo mpe nakokaki te, kasi namoni sikoyo nazalaki na kati na libungi na kokanisa ete nakokaki kobika na Mobeko. Namoni sikoyo ete nakoki te kobatela mibeko mia Nzambe! Bongo, kolekela na nzela ya Mobeko mwa Nzambe, naye komona ete motema mwangai motondi na makanisi ya mabe mpe ya botomboki. Nasosoli sikoyo ete Mobeko mopesamelaki pona koyebisa biso lisumu. Oh, matondo Nkolo. Nasosolaki te liboso mokano mwa Yo, mpe namekaki na pasi mingi kobatela Mobeko mwa Yo. Ezalaki lolendo epayi nangai komeka kosala eloko wana. Limbisa ngai. Nayebi sikoyo ete Yesu abatisamaki mpe asokisamaki pona lobiko nangai! Nandimi yango!”
Osengeli kondimela na bosolo mpe na popeto nyonso. Osengeli kondimela Makomi Masantu na Mokkanda mwa Nzambe. Yango nde nzela moko ekomema yo na botama ya solo ya mbala ya mibale.
Kondimela Yesu ezali nini? Ezali eloko moko ya kokokisa na eteni moko ya tangao? Kondima na biso ezali losambo ya koluka Nzambe oyo esengeli tosalela? Bato basalaki banzambe, mpe babongisi mayekoli ya kokokana na banzambe wana. Losambo na boluki Nzambe ezali eloko moko eyaka malambe pona kokoma na esika moko boye; kokende na bolamu ya moto.
Bongo, kondima ezali nini? Ezali kondimela Nzambe mpe kotiya elikia epayi na Ye. Tozali kotalela lobiko wuta epayi na Yesu, mpe kotonda Ye matondi pona la limpamboli lina. Yango nde kondima ya solo. Yango nde bokeseni kati na kondima na kosambela. Tango kaka okoki kosala bokeseni kati na yango mibale, okosuwa botondisami bwa boyebi ya kondima.
Baye batangaki kelasi ya makambo ma Nzambe mpe nano babotami te mbala ya mibale, bazali koyebisa biso ete tosengeli kondimela Yesu pona kobika bomoyi ya bolamu. Moto akoki kotondisama na kondima kaka pwete azali na bolamu? Ya solo tosengeli kozala bato ya malamu. Nani akoki kokamba bomoyi ya bato malamu koleka oyo abotami mbala ya mibale?
Kasi moto na likambo ezali ete bazali kolobela basumuki. Ezali na mitindo ya masumu 12 kati na mosumuki. Ndenge nini akoki kobika bomoyi bwa bolamu? Na bosolo nyonso, makanisi maye makoki kososola nini ekoki kosalema, kasi motema mwa ye mokoki te komema yango. Tango mosumuki atelemi libanda na etonga, azali kobika bomoyi ya bolamu na mateya oyo azuwi, kasi mayele maye mazali kotinda ye na lisumu.
Pona yango, tosengeli kozuwa mokano na kati na motema mwa biso pona kobika na Mobeko tope kobikisama na kondimela libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye na Kuruse, na kondimela Nganga-Nzambe Monene ya seko na seko oyo ya bokonzi bwa Lola.
Kanisa ete Yesu azali Nganga-Nzambe Monene pona baye bandimeli Ye. Tobikisama biso banso na boyebi mpe kondima kati na lobiko ya solo na nzela ya libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye na Kuruse.
BABOTAMI MBALA YA MIBALE BABANGAKA TE SUKA YA MOKILI
Pona nini babotami ya mbala ya mibale Babangaka te suka ya mokili?
Pwete kondima na bango kati na sango malamu Ya mayi na Molimo ekangoli bango na Lisumu.
Tango ozali solo-solo mobotami ya mbala ya mibale, okoki te kobanga suka ya mokili. Ba-Klisto ebele na Kore balobaki ete suka ya mokili ekoya na mokolo mwa 28, sanza ya zomi ya mbula 1992. Balobaki ete ekozala mokolo moko ya somo koleka. Kasi maloba mabango manso makomaki makambo ya lokuta. Mobotami ya solo ya mbala ya mibale abikaka bomoyi ya bolamu, azali kopanza sango malamu na tango oyo ya suka. Ata mokili oyo ekomi na suka, biso mosala na biso ezali oyo ya panza sango malamu ya mayi mpe na Molimo.
Tango Mobali akoya, basi ba Ye, baye babotami mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo, bakoki kokende kokutana na Ye na esengo mingi, na koloba, “Oh, Oye na suka na makambo manso! Nzoto na ngai ezalaki nano na bolembu, kasi Olingaki ngai wuta masumu mangai manso. Sikoyo, nazali na lisumu kati na motema te. Matondo Nkolo. Ozali Mobikisi mwangai!”
Yesu azali Mobali ya molimo pona bayengebene banso. Libala ekosalema pwete Mobali alingi mwasi na ye mingi, mpe na nzela mosusu te. Nayebi tango mosusu na mokili oyo ekoki kosalema na ndenge mosusu, kasi na Lola, ezali Mobali nde azali kokata likambo soki libale ekozala. Ezali Mobali, Yesu Klisto oyo aponaki kobala kolandisama na bolingo bwa Ye mpe apesaki lobiko, oyo basi baye basengaki ata te. Ezali nde motindo wana libala ya Lola esalamaki.
Mobali ayebi makambo manso ma basi ba Ye. Pwete basi ba Ye balingami bazalaki basumuki, mpe Ayokelaki bango mawa. Abikisaki bango na masumu manso na libatisi lia Ye mpe na makila kosopana na Kuruse.
Nkolo na biso Yesu ayaki na mokili oyo lokola mwana na Aron te. Ayaki te na mokili oyo pona kobonzaka mbeka te. Ezalaki na bana ya Levi ebele pona kosala mosala wana, bana ya Aron, mpe elongo pona kosala mosala moko wana.
Ya solo, bosali ya kobonza mbeka ya Boyokani bwa Kala ezalaki elili na Yesu Klisto Ye moko. Bongo tango oyo ya solo eyaki na mokili, nini ekosalema na elili? Elili elongwami.
Tango Yesu ayaki na mokili oyo, abonzaki te mbeka lokola Aron asalaki. Amibonza Ye moko pona bato banso na nzela ya libatisi mpe na kosopa makila pona lobiko ya basumuki. Akokisaki lobiko na Kuruse.
Pona baye bandimeli kati na libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye na Kuruse, lobiko ekoya na nzela tembe te. Yesu alongolaki masumu ma biso mosika na biso polele-polele. Asalaki yango ya kobatama te. “Nazali nzela, bosolo, mpe bomoyi.” (Yoane 14:6). Yesu ayaki na mokili oyo mpe Abikisaki biso na libatisi lia Ye, liwa lia Ye, mpe lisekwi lia Ye.
BOYOKANI BWA KALA BOZALAKI ELILI NA YESU
Pona nini kofandisa Boyokani Mosusu?
Pwete ya liboso ezalaki Ya kokoka te mpe ezanga tina.
Boyokani bwa Kala ezali elili na Boyokani bwa Sika. Mpe, Yesu abonzaki te mbaka lokola banganga-Nzambe minene ya Boyokani bwa Kala, Asalaki mosala ya bonganga-Nzambe ya kitoko koleka. Pwete bato na mokili oyo bazali basumuki wuta botama na bango, bakobi na kosumuka, mpe bakoki te kokoma bayengebene na nzela ya Mobeko ya Nzambe. Pona yango, Nzambe afandisaki Boyokani mosusu.
Tata na biso na Lola, atindaki Mwana mwa Ye moko na mokili oyo mpe asengaki biso kondimela libatisi lia Ye, makila ma Ye, mpe lisekwi lia Ye. Yango nde Boyokani bwa mbala ya mibale bwa Nzambe. Boyokani bwa mbala ya mibale bosengi biso kondimela sango malamu ya mayi mpe na Molimo.
Nzambe azali kosenga biso te misala ya malamu. Azali kosenga biso te ndenge ya kobika pona kobikisama. Asengi biso nde kondimela lobiko kati na Mwana mwa Ye. Asengi biso kondimela libatisi lia Ye mpe makila na Kuruse liboso na nyonso. Mpe tosengeli koloba: ‘boye’.
Na Mokanda mwa Nzambe, ndako ya Yuda ebatelaki bokonzi. Bakonsi banso bawutaki na ndako ya Yuda tii mokonzi Salomon. Ata na sima ya bokabwani ya bokonzi, ndako ya Yuda efandaki na kiti ya bokonzi ya se tii eye kokatana na mbula 586 yambo Yesu abotama. Na lolenge wana, bato ya Yuda balemelaki Ba-Isalayele. Ndako ya Levi ezalaki oyo ya banganga-Nzambe. Ndako moko moko ya bana Isalayele ezalaki na mosala songolo pona yango. Nzambe alobelaki ndako ya Yuda ete Yesu akobima kuna.
Pona nini asalaki boyokani na ndako ya Yuda? Kosala boyokani wana ezalaki lokola kosala yango na bato banso ya mokili pwete Isalayele atelemaki pona bato banso ba mokili mobimba. Yesu akokisaki boyokani bwa sika, oyo ezalaki kobikisa bato banso na nzela ya libatisi lia Ye, liwa lia Ye na Kuruse, mpe lisekwi lia Ye.
MASUMU MA BATO MAKOKI TE KOLONGWAMA NA NZELA YA KOTUBELA
Masumu ma bato makologwama Na nzela ya kotubela?
Te.
Na Jeremi 17:1, ekomami ete lisumu lia moto nyonso likomami bisika mibale. “Masumu ya Yuda ezali lokola makomi oyo bakoma na ekomeli ya ebende oyo ezali na songe ya diama; bakoma yango na bitando ya mitema na bango mpe na maseke ya bitumbelo na bango.”
Masumu mabiso makomami na mitema mia biso. Ezali bongo nde tokoki koyeba ete tozali basumuki. Yambo kondimela Yesu, moto ayebi te ete azali mosumuki. Pona nini? Pwete mobeko mwa Nzambe mozali te na motema mwa ye. Pona yango, tango kaka moto moko andimeli Yesu, akososola ete azali mosumuki liboso na Nzambe.
Bamosusu basosolaka ete bazali basumuki mbula zoi sima ya kondimela Yesu. “Oh, molingami! Nazali mosumuki! Nakanisaki ete nabikisamaki, kasi namoni ete nazali kaka mosumuki!” Eloko wana ekokisamaka tango toye mokolo moko kososola na suka, oyo tozali na bosolo. Bazalaki na esenge mbula zomi, kasi na pwasa baye komona bosolo bwa bango. Oyebi pona nini? Bososoli wana bomonani na suka, pwete masumu mpe botomboki bwa bango ebimi polele liboso na Mobeko mwa Nzambe. Moto ya ndenge wana andimelaki Yesu mbula zomi na kozanga kobotama mbala ya mibale.
Lokola mosumuki akoki te kolongola masumu maye na kati na motema mwaye moko, atikeli mosumuki liboso na Nzambe. Bamosusu basalaka mbula mitano, mpe bamosusu bakoki kokoma na mbula zomi pona kokoma na bososoli wana. Bamosusu bakoma tii na mbula ntuku misato, bamosusu tii mbula ntuku mitano, mpe bamosusu basosolaka te tii na suka. “Nzambe nangai, nazalaki kozala malamu liboso na nazala na mitindo mia Yo na makanisi mangai. Nakanisaki ete nazalaki kobatela Mobeko mwa Yo malamu, kasi sikoyo nasosoli ete nasumukaka mokolo na mokolo. Kaka lokola ntomba Polo alobaki ete, ‘Na kala, tango Mobeko ezalaki te, nazalaki na bomoi; kasi tango mitindo eyei, lisumu mpe ezwi nguya, mpe ngai nakufi.’ (Brome 7:9). “Nazali mosumuki ata nandimeli Klisto.”
Ezali masumu mayo moko, yango nde ezali kopekisa biso kobika kolandisama na liloba lia Nzambe. Masumu mayo makomami na motema na yo. Pwete Nzambe amoni masumu mayo kuna, tango okitisi moto nayo na se pona kobondela, masumu mayo manso mabimi. “Eloko ya kokamwa! Nazali lisumu oyo osalaki.”
“Kasi nabikisaki yo eleki mbula mibale. Pona nini ozali komimonisa na motema nangai yo lisumu? Pona nini okeyi te mosika nangai?”
“Oh, komikosa te! Nakomami na kati na motema mwa yo. Ata ozali kokanisa nini, ozali kaka mosumuki.”
“Te! Te!”
Bongo, mosumuki atubeli lisusu pona masumu maye asalaki eleki mbula mibale. “Limbisa ngai, Nkolo. Nazali kotungisama na masumu nasalaki liboso. Natubelaki masumu mana, kasi mazali kaka kati nangai. Nasengi bolimbisi, pwete nasumukaki.”
Kasi masumu mana malongolamaka na kotubela? Pwete masumu manso mabato makomami na kati na mitema mia bango, bakoki te kolongola yango bango moko libanga na sango malamu ya mayi mpe Molimo. Kaka na nzela ya sango malamu ya mayi mpe na Molimo, nde masumu makoki kolongolama ya solo. Tokoki kobikisama kaka na nzela ya kondima na biso kati na sango malamu ya Yesu.
NAKOZALA MOBIKISI MWA YO
Ndenge nini tokoki toyanola Na boyokani bwa Sika?
Tosengeli kondimela yango kati na mitema Mpe koteya yango na mokili mobimba.
Nkolo na biso na Lola asalaki boyokani bwa sika na biso. “Nakozala Mobikisi na bino. Nakolongola bino na bowumbu bwa masumu ya mokili na nzela ya mayi mpe na makila. Nakopambola solo-solo baye bakondimela Ngai.”
Ondimeli boyokani oyo ya sika na Nzambe? Tokoki kobikisama wuta na bowumbu bwa masumu mpe kobotama mbala ya mibale kati na solo ya boyokani bwa Ye mpe lobiko na Ye na nzela ya mayi mpe makila.
Tokondimela monganga te soki alandi te bokono bwa biso malamu. Yambo, monganga asengeli kolanda bokono malamu, nde na sima akokomela mobeli kisi oyo ekokani na ye. Bakisi ezali ebele, kasi monganga asengeli koyeba malamu oyo ya kosalela na tango wana. Tango oyo monganga alandeli malamu bokono bwa mobeli mwaye, ezali na bakisi ebele pona kobikisa ye. Kasi soki alandeli yango mabe, bakisi nyonso ya malamu ekosala mobeli mabe.
Ndenge moko, tango ondimeli Yesu, osengeli totala malamu bomoyi bwayo ya molimo na liloba lia Nzambe. Tango otalisi malamu molimo mwayo na liloba lia Nzambe, okoki komona polele ndenge nini molimo mwa yo mozali. Monganga ya molimo akoki kobikisa babeli banso mpe ati ata moko te. Bakoki bango nyonso kobotama mbala ya mibale.
Soki olobi ete, “Nayebi te soki nazwaki lisiko liangai,” elingi koloba ete nano obikisami te. Soki mokambi azali molandi ya Yesu ya solo, asengeli kosuwa eyano na likambo ya lisumu lia bandimi baye. Bongo, akoki kosunga bango na makambo ma kondima na bango mpe kokamba bango na nzela ya molimo. Asengeli kozala na makoki ma kolanda malamu bomoyi ya molimo ya bandimi baye.
Yesu ayaki na mokili oyo kolongola mosika na biso lisumu lia mokili. Ayaki mpe abatisamaki mpe akufaki na Kuruse. Tango alongolaki mosika masumu manso mabiso, atikaki ya yo? Mayi na Molimo elongolaki masumu ma bandimi banso.
Sango malamu ezali lokola bombi. Ekopasola biloko nyonso, banda bandako tii bangomba. Mosala mwaYesu ezali ndenge wana. Alongolaka masumu mosika pona baye bandimeli Ye na sango malamu ya mayi mpe na Molimo. Totala sango malamu ya mayi mpe na Molimo lokola ekomami na kati na Mokanda mwa Nzambe.
SANGO MALAMU YA KOTIA MABOKO NA MOTO NA BOYOKANI BWA KALA
Tina ya kotiya maboko na moto Na Boyokani bwa Kala Ezali nini?
Tina ezali pona kolekisa masumu Na nzoto ya mbeka.
Totala bosolo ya sango malamu ya lisiko na Levitike 1:3-4. “Soki azali kobonza ngombe lokola mbeka ya kotumba, amema nde oyo ezangi mbeba. Bongo akobonza yango na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo ete Yawe andima yango. Moto oyo akobonza yango akotia loboko na ye na moto ya mbeka. Mbeka yango ekondimama lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu ya moto oyo abonzi yango.”
Molongo oyo mozali kotalisa biso ete mbeka ya kotumba esengeli kopesemela na ekuke ya Ndako ya Bokutani na Nzambe liboso na Nkolo na nzela ya kotiya maboko na moto ya mbeka ya kobonza, mpe mbeka wana esengeli ezala ya bomoyi mpe ezangi mbeba.
Na Boyokani bwa Kala, mosumuki akotiya maboko maye na mbeka pona kolekisa masumu maye ma mokolo na mokolo. Akoboma mbeka ya masumu liboso na Nkolo mpe nganga-Nzambe akozuwa makila moke mpe akotiya yango na kati na maseke maye mazali etumbelo ya mbeka. Akosopa na sima makila maye matikali at efandeli ya etumbelo mpe masumu ma mokolo na mokolo ma musumuki makolimbisama.
Pona lisumu lia mbula, ekomami na Levitike 16:6-10, “Aron akobonza mpo na ye moko, ngombe ya mobali lokola mbeka ya masumu mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na ye moko mpe mpo na ndako na ye. Akozwa bantaba ya mibali nyonso mibale mpe akotia yango liboso ya Yawe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Aron akobeta zeke mpo na bantaba ya mibali nyonso mibale : moko mpo na Yawe, mpe mosusu, mpo na Azazeli. Bongo Aron akomema ntaba oyo zeke ekolakisa ete ezali mpo na Yawe, mpe akobonza yango lokola mbeka mpo na masumu. Kasi ntaba ya mobali oyo zeke ekolakisa ete ezali mpo na Azazeli, akomema yango ya bomoi liboso ya Yawe mpo ete basala na yango mosala ya bolimbisi masumu, bongo bakotinda yango na esobe mpo na Azazeli.” Lokola elobami na kati na Mokanda mwa Nzambe, ntaba ya kotika na esobe elingi koloba ete “kolongola.” Bongo, lisumu lia mbula ezalaki kolongolama na mokolo mwa zomi mwa sanza ya sambo.
Na Levitike 16:29-30, ekomami, “Tala malako oyo bosengeli kosalela mpo na libela : na mokolo ya zomi ya sanza ya sambo, ezala mwana mboka to mopaya oyo avandi kati na bino, bosengeli komikitisa mpe bokosala mosala ata moko te, pamba te na mokolo wana nde bokosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino mpe kopetolama bino. Boye bokopetolama na masumu na bino nyonso liboso ya Yawe.”
Ezalaki mokolo oyo bana Isalayele bazalaki kolongola lisumu lia mbula. Ndenge nini yango ekokaki kosalema? Yambo, nganga-Nzambe monene Aron asengelaki kobonza mbeka. Nani azalaki totalisa elongi ya bana Isalayele? Aron. Nzambe aponaki Aron mpe bana baye lokola banganga-Nzambe minene.
Aron abonzaki ngombe pona kolongola masumu maye moko mpe na maye ma ndako na ye. Akoboma ngombe mpe akosopa makila na yango liboso na kiti ya mawa mbala sambo. Asengeli kolongola nano masumu maye moko mpe maye ma ndako na ye.
Kolongola masumu elingi koloba ete kolekisa yango na mbeka pwete akufa esika ya mosumuki. Mosumiki nde oyo asengelaki kokufa, kasi akoki kolekisa masumu maye na mbeka oyo akokufa na esika na ye.
Sima masumu maye mpe maye ma ndako na ye malongolami, akobonza liboso na Nzambe ntaba moko mpe akotinda mosusu na esobe lokola ntaba ya bolongoli lisumu liboso na bana Isalayele.
Ntaba moko abonzami lokolo mbeka ya lisumu. Aron akotiya maboko maye na moto ya mbeka ya lisumu mpe akotatola, “O Nzambe, bato ba Yo Isalayele babuki Mibeko mia Yo Zomi mpe na mitindo 613 ya Mobeko mwa Yo. Ba-Isalayele bakomi basumuki. Nazali kotiya maboko na moto ya ntaba oyo pona kolekisa masamu mabango ma mbula.”
Akokata kingo ya ntaba mpe akokota na Esika Esanto Koleka kati na Ndako ya Bokutani na Nzambe na makila ma yango. Akosopa makila moke liboso na kiti ya mawa mbala sambo.
Nakati na Esika Esanto Koleka, nde esika wapi sandoku ya boyokani efandi. Ezibele na yango ebengami kiti ya mawa, mpe kati na yango ezali na mabanga mibale ya boyokani, kopo ya wolo ya mana, mpe nzete ya Aron oyo ebotaki lisusu.
Nzete ya Aron elingi koloba lisekwi, mabanga mibale ya boyokani ezali boyengebene bwa Ye, mpe kopo ya wolo ya mana ezali liloba lia bomoyi lia Ye.
Ezali na ezibele na sandoku ya boyokani. Makila masopamaki liboso na kiti ya mawa mbala sambo. Lokola ezalaki na ngonga moke ya wolo na suka ya elamba ya nganga-Nzambe monene oyo ezalaki kolela tango azalaki kosopa makila.
Na Levitike 16:14-15, ekomami ete, “Akozwa makila ya ngombe ya mobali mpe, na nzela ya mosapi na ye, akobwaka yango liboso ya esika ya bolimbisi masumu, na ngambo ya este. Boye, na nzela ya mosapi na ye, akobwaka makila mbala sambo liboso ya esika ya bolimbisi masumu. Akokata kingo ya ntaba ya mobali ya mbeka mpo na masumu ya bato mpe akomema makila na yango na sima ya rido. Bongo akosala na makila yango ndenge asalaki na makila ya ngombe ya mobali: akobwaka liboso mpe likolo ya esika ya bolimbisi masumu.”
Bangonga ya mike ezalaki kolela tango oyo azalaki kosopa makila ma ntaba, mpe Ba-Isalayele baye basanganaki libanda bakokaki koyoka mongongo na yango. Bolongoli masumu mabango bosalamaki na nzela ya nganga-Nzambe monene, mpe mongongo mwa bangonga ya mike ezalaki koloba ete masumu mabango malimbisami. Ezalaki mongongo mwa lipamboli pona bana Isalayele banso.
Tango bangona ya mika elelaki mbala sambo, bazalaki kolobe ete, “Sikoyo, nabikisami. Nazalaki na mokumba ya lisumu lia mbula mobimba, mpe sikoyo nakangolamai.” Mpe bato bakozonga na bomoyi na bango, bakangolami na masumu manso. Monongo ya bangonga ya mike na tango wana ezalaki ya ndenge moko na sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo.
Tango toyoki sango malamu ya lisiko lia mayi mpe Molimo mpe kondimela yango na mitema mpe na minoko, yango nde sango malamu ya mayi mpe na Molimo yango nyonso. Tango bangonga eleli mbala sambo, masumu manso ma mbula mobimba ma Ba-Isalayele esokolami. Masumu mabango manso malogolami liboso na Nzambe.
Na sima ya kobonza ntaba pona na Ba-Isalayele, nganga-Nzambe monene akozuwa ntaba mosusu mpe akokende na bato baye bazali libanda ya Ndako Esantu ya Bolutani na Nzambe. Tango bazali kotala ye, nganga-Nzambe monene Aron akotiya maboko maye na moto ya ntaba wana.
Na Levitike 16:21-22, “Aron akotia maboko na ye mibale na moto ya ntaba yango, akotubela mabe, botomboki mpe masumu nyonso ya bana ya Isalaele na moto ya ntaba yango. Na nzela wana akotia masumu nyonso na moto ya ntaba yango; sima akopona moto moko mpo na kobengana ntaba yango na esobe. Boye ntaba ekomema masumu na bango nyonso na esika oyo ezanga bato, mpe moto yango akotika ntaba kokende na esobe.”
Nganga-Nzambe monene, Aron, akotiya maboko na moto ya ntaba mosusu (ntaba ya kotinda na esobe) mpe akotatola masumu manso ma mbula mobimba ya Ba-Isalayele liboso na Nzambe. “O Nzambe, bana Isalayele basumukaka liboso na Yo. Tobukaki Mibeko mia Yo Zomi mpe mikano 613 ya Mobeko mwaYo. O Nzambe, nalekisi masumu manso ma mbula ya bana Isalayele na moto ya ntaba oyo.”
Kolandisama na Jeremi 17:1, masumu makomami na bisika mibale. Na Mokanda mwa Misala, mpe ekomeli ya mitema na bango.
Bongo, soki bato bakangolami na masumu mabango, masumu mana malongolami na Mokanda mwa Misala mpe na mitema mia bango. Na Mokolo mwa Bolongoli masumu, ntaba moko azalaki pona masumu maye makomami na Mokanda mwa Etumbo mpe mosusu pona masumu makomami na mitema miabango.
Nini Nzambe atalisaki bana Isalayele Na nzela yamabongisi ya mbeka Na Boyokani bwa Kala?
Nkolo akoya mpe kolongola masumu mabango Mbala moko pona libela Na nzela ya malamu.
Na kotiya maboko na moto ya ntaba, nganga-Nzambe monene atalisi bato ete masumu mabango ma mbula malekisami na ntaba. Tango masumu malekisami na moto ya ntaba, moto moko aponami akokende kotika ntaba wana na esobe.
Palestini ezali esika ya esobe. Ntaba oyo alongolaki masumu ma mbula ma bana Isalayele azalaki tobwakama na esobe na moto moko baponaki, esika wapi ezali na mayi te, mpe na matiti te. Bato batelemi mpe bazali kotala ntaba wana ndenge nini ezali kodende na kati na esobe.
Bazali komilobela ete, “Nakokaki kokufa, kasi ntaba akufi esika ya masuumu mangai. Lifuti lia lisumu lizali liwa, kasi ntaba akufi esika na ngai. Matondo, ntaba. Liwa lia yo elingi koloba ete nakoki kobika.” Ntaba abwakami na kati na esobe, mpe bana Isalayele balimbisami masumu mabango ma mbula mobimba.
Tango lisumu kati na motema mwa yo lilekisami na mbeka ya lisumu, opetolami. Ezali eloko moko ya pete. Bosolo ezalaka kaka pete tango ososoli yango.
Ntaba akeyi mpe abungi na esobe. Motindami azongi ye moko sima ya kobwaka yango. Masumu manso ma mbula ma bana Isalayele malongolami. Ntaba ezali kokende kati na esobe esika wapi ezangi mayi na matiti, mpe ekufi na mokumba mwa masumu ma mbula mobimba ma bana Isalayele na nzoto na yango.
Lifuti lia lisumu lizali liwa, mpe Boyengebene bwa Nzambe bokokisami. Nzambe abonzi ntaba pwete bana Isalayele bazuwa bomoyi. Botomboki bwa bango nyonso ya mbula mobimba epetolami.
Lokola misumu lia mokolo mpe lisumu lia mbula ezalaki kolimbisama na Boyokani bwa Kala, ezalaki boyokani ya Nzambe pona masumu mabiso malimbisama mbala moko pona la libela. Boyokani oyo Akotindela biso na Masia, bokozala pona kokangola biso na masumu ma bomoyi bwa biso. Boyokani wana bosalema na nzela ya libatisi lia Yesu.
KOBOTAMA MBALA YA MIBALE NA MAYI MPE NA MOLIMO NA BOYOKANI BWA SIKA
Pona nini Yesu abatisamaki Na Yoane Mobatisi?
Pona kokokisa boyengebene na kolongola mosika Masumu ma mokili. Libatisi lia Yesu Kati na Boyokani bwa Sika ezalaki botiye bwa Maboko ya Boyokani bwa Kala.
Totanga Matie 3:13-15. “Yesu alongwaki na Galile mpe akendeki na Yordani mpo ete Yoane abatisa Ye. Kasi Yoane aboyaki kobatisa Ye. Alobaki: — Ezali ngai nde nazali na posa ete Yo obatisa ngai; kasi ndenge nini Yo oyei epai na ngai? Yesu azongiselaki ye: — Tika ete esalema bongo sik’oyo! Ezali malamu mpo na biso kosala bongo mpo na kokokisa bosembo nyonso.”
Yesu akendaki na Yordani mpe abatisamaki na Yoane Mobatisi, mpe nakosala yango, Akokisaki bosembo nyonso. Abatisamaki na Yoane. Yoane azalaki monene ya baye banso babotami na basi.
Matie 11:11-12 elobi ete “Kati-kati na baye babotami na basi, moko atelemisama nano te monene koleka Yoane Mobatisi… Mpe banda mikolo mia Yoane Mobatisi tii lelo, bokonzi bwa Nzambe esali na pasi ya bitumba.”
Yoane Mobatisi aponama na Nzambe kozala motalisi elongi ya bato banso sanza motoba liboso na Klisto. Azalaki bwana ya Aron mpe nganga-Nzambe monene ya suka.
Yoane Mobatisi alobaki tango Yesu ayaki epayi na ye, “Nasengeli kobatisama na Yo, mpe Ozali koya epayi nangai?”
“Tika ete ezala bongo sikoyo, pwete ekokisa pona biso bosembo nyonso.” Moto na likambo na Ye ezalaki kobikisa bato banso na lisumu pwete bakoma bana na Nzambe. Yesu ayebisa Yoana, “Tosengeli kosalela sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Bongo, batisa Ngai sikoyo.”
Yoane abatisaka Yesu. Ekokisamaki pona Yesu kobatisama pona kolongola mosika masumu manso ma mokili. Pwete Abatisamaki na ndenge ya malamu, tobikisami wuta masumu mabiso manso. Yesu abatisama pwete masumu mabiso manso maleka na nzoto na Ye.
Yesu ayaki na mokili oyo mpe abatisamaki tango azlaki na mbula 30. Ezalaki ebandeli ya mosala mwa Ye. Yesu atodisami na bosembo na nzela ya kolongola mosika masumu manso ma mokili, mpe kobulisa bato banso.
Yesu ayaki na mokili oyo mpe abatisamaki na ndenge ya malamu koleka, pona kokangola biso na bowumbu bwa masumu mabiso. “Pona yango” bosembo nyonso ekokisami.
Nzambe alobaki, “Oyo nde Mwana na Ngai molingami, kati na Ye natiye esengo na Ngai nyonso” (Matie 3:17). Yesu Klisto ayebaki akolongola masumu manso ma bato mpe akozoka na kokufa na Kuruse, kais atosaki mokano mwa Tata na Ye, akoloba, “Te, lokola kolinga na Ngai, kasi kolinga na Yo” (Matie 26:39). Mokano mwa Tata na Ye mozalaki kolongola mosika masumu manso ma bato banso, mpe kopesa lobiko na bato banso ya mokili.
Bongo Yesu, Mwana ya botosi, atosaki mokano mwa Tata na Ye mpe abatisamaki na Yoane Mobatisi.
Na Yoane 1:29, “Mokolo oyo elandaki, wana Yoane amonaki Yesu koya epai na ye, alobaki: — Tala Mpate ya Nzambe, oyo alongolaka lisumu ya mokili.!’” Yesu alongolaki mosika masumu manso mpe asokisama na Kuruse ya Golgota. “Tala! Mwana Mpate na Nzambe oyo alongolaka lisumulia mokili!” Ezali ndege Yoane Mobatisi atatolaki.
Ozali na lisumu tope te? Ozali moto ya bosembo tope mosumuki? Solo ezali ete, Yesu alongolaki mosika lisumu lia mokili mpe akufaki na Kuruse pona biso banso.
Tango nini masumu ma basumuki Banso malekisamaki na Yesu?
Yesu azuwaki masumu mabiso tango Abatisamaki na Yoane Mobatisi Na Yordani.
Na silmaya kobotama na mokili oyo, tozali kosumuka banda mbula moko tii zomi. Yesu alongolaki mosika masumu mana. Tosumukaki lisusu banda mbula zomi na moko tii ntuku mibale. Masumu tozali kosala na mitema mia biso mpe na misala mia biso, Alongolaki yango nyonso mosika.
Toye lisusu kosumuka banda ntuku mibale na moko tii na mbula ntuku minei na mitano. Alongolaki yango mpe mosika na biso. Amemaki na nzoto na Ye masumu manso ma mokili mpe akufa na yango na Kuruse. Tosumukaka banda botama na biso tii liwa na biso, kasi Alongolaki masumu manso wana mosika na biso.
“Tala! Mwana Mpate na Nzambe oyo alongolaka lisumulia mokili!” Masumu manso, banda moto ya liboso, Adam, tii na oyo akobotama ya suka na mokili oyo―soki ekoki kosalema bongo―Alongolaki yango nyonso mosika.
Aponaki te Alongola ya nani mpe Atika ya nani. Azuwaki te mokano mwa kolinga bamosusu mpe kotika bamosusu. Ayaki na nzoto mpe alongolaki mosika masumu manso ma mokili mpe akufaki na Kuruse. Etumbo na biso ekwaki likolo na Ye, mpe alongolaki mosika masumu ma mokili oyo pona libela.
Moto moko te alongwamaki na lobiko na Ye. “Masumu ma mokili” mazali mpe na oyo yayo na kati na yango. Yesu alongolaki yango nyonso mosika.
Na libatisi lia Ye mpe na makila, Apetolaki masumu ma mokili. Alongolaki yango nyonso mosika na nzela ya libatisi lia Ye, mpe Asambisama pona masumu mabiso na Kuruse. Liboso Yesu akufa na Kuruse, Alobaki ete, “Nyonso ekokisami!” (Yoane 19:30), oyo elingi koloba ete lobiko ya bato banso ekokisami.
Pona nini Yesu akufaki na Kursue? Pwete bomoyi ya mosuni ezali na makila, mpe makila ezali kosala nzela ya bokangolami bwa bato na masumu mabango ati na bomoyi na bango (Levitike 17:11). Pona nini Yesu asengelaki kobatisama? Pwete Alingaki kolongola mosika masumu ma mokili.
“Na sima na yango, Yesu, lokola ayebaki ete makambo manso makokisami sikoyo, ete Makomi masengeli kokokisama, alobi, ‘Nayoki posa ya mayi!’” (Yoane 19:28). Yesu akufaki, Ayebaki ete maboyokani manso ma Nzambe ma Boyokani bwa Kala makokisami na libatisi lia Ye na Yordani mpe na liwa lia Ye na Kuruse.
Yesu ayebaki ete lisiko likokisami na nzela na Ye, mpe alobaki, “Nyonso ekokisami!” akufaki na Kuruse. Abulisaki biso, asekwaki lisusu wuta baweyi na mokolo mwa misato mpe amataki na Lola, esika wapi Afandi na loboko ya mobali ya Nzambe.
Bolongoli masumu mosika na nzela ya libatisi lia Yesu mpe liwa na Ye na Kuruse ezali sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Ndimela yango mpe okolimbisama masumu mayo manso.
Tokoki te kolongola masumu mabiso na kosambela pona kotubela mokolo na mokolo. Lisiko liyaki mbala moko pona libela na nzela ya libatisi lia Yesu mpe liwa na Ye na Kuruse. “Nzokande, soki Nzambe alimbisi moto masumu, ezalaka lisusu te na likabo ya kopesa mpo na masumu.” (Ba-Ebre 10:18).
Sikoyo, oyo nyonso tozali na yango ezali kondimela lisiko na nzela ya libatisi lia Yesu mpe liwa na Ye na Kuruse. Ndima, mpe okobika.
Barome 5:1-2 elobi, “Yango wana, lokola tokomi bato ya sembo na nzela ya kondima, tozali na kimia elongo na Nzambe na nzela ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto oyo na nzela na Ye, tozwi ndingisa, na nzela ya kondima, ya kozwa ngolu oyo kati na yango tozali kowumela mpe tozali komikumisa kati na elikya ete tokobika nkembo ya Nzambe.”
Ezali na nzela mosusu te pona kokoma mosembo, kasi kondimela sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo.
TINA YA MOBEKO MWA NZAMBE
Tokoki kopetolama Na Mobeko?
Te, tokoki te. Mobeko mokoki kak kokebisa na masumu mabiso.
Na kati na Ba-Ebre 10:9, ekomami ete, “Alobaki lisusu: “Tala ngai oyo, nayei mpo na kosala mokano na Yo.” Boye, alongolaki losambo ya liboso mpo na kotia losambo ya mibale.” Tokoki te kokoma bato ya bosembo na nzela ya Mobeko. Ekokomisa biso kaka basumuki. Nzambe asengi na biso te kotosa Mobeko.
Barome 3:20 elobi, “Pwete Mobeko mozali boyebi bwa lisumu.” Nzambe apesaki bana Isalayele Mobeko na nzela ya Moise sima ya mbula 430 eleki banda Abrami azuwaki Boyonaki. Apesaki bango Mobeko pwete bayeba lisumu elingi koloba nini liboso na Nzambe. Libanda na mobeko mwa Nzambe, bato bakokaki te koyeba lisumu. Nzambe apesaki biso Mobeko mwa Ye pona kokoka koyeba lisumu.
Bongo, tina ya Mobeko ezali koyebisa biso ete tozali basumuki liboso na Nzambe. Na nzela ya boyebi wana, tobengami kondimela Yesu kati na sango malamu ya lipamboli ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Yango nde tina ya Mobeko oyo Nzambe apesaki biso.
NKOLO AYAKI KOSALA MOKANO MWA NZAMBE
Tosengeli kozali nini Liboso na Nzambe?
Tosengeli kondimela lisiko lia Nzambe Na nzela ya Yesu.
“‘Nayei mpo na kosala mokano na Yo.” Boye, alongolaki losambo ya liboso mpo na kotia losambo ya mibale.” (Ba-Ebre 10:9). Pwete tokoki te kobulisama na Mobeko, Nzambe abikisaki biso na Mobeko mwa Ye te, kasi na lisiko lia Ye lia mobimba. Nzambe abikisaki biso na bolingo bwa Ye mpe na bosembo bwa Ye.
“Mpe ezali mpo na mokano yango ya Nzambe nde topetolamaka na masumu, na nzela ya mbeka ya nzoto na Ye moko Yesu-Klisto, oyo akabaki mbala moko mpo na libela. Mpo na kosala mosala na ye ya bonganga, Nganga-Nzambe nyonso azalaki kokende na esika na ye ya mosala mokolo na mokolo, mpe azalaki kopesa mbala na mbala bambeka ya ndenge moko oyo ezalaki kutu na makoki te ya kolongola masumu ya bato. Kasi sima na Klisto kobonza mbeka moko kaka mpo na masumu, avandi mpo na libela na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe.” (Ba-Ebre 10:10-12).
Afandi na loboko ya mobali ya Nzambe pwete mosala mwa Ye mwa lisiko mozalaki mobimba mpe eloko moko ya kobaki ezali te. Akobatisama lisusu te, mpe Akomikaba lisusu te pona kobikisa biso.
Sikoyo, lokola masumu manso ma mokili malongolami mosika, myonso Asengeli kosala ezali kopesa bomoyi bwa seko na baye bakondimela Ye. Azali kopesa elembo na Ye na baye bandimeli lobiko ya mayi mpe na Molimo.
Yesu ayaki na mokili oyo, mpe Alongolaki mosika masumu manso ma mokili mpe akufaki na Kuruse, Akokisaki bongo mosala mwa Ye. Sikoyo mosala mwa Nkolo mosili, Afandi na loboko ya mobali ya Nzambe.
Tosengeli kondimela ete, Nkolo na biso Yesu abikisi biso pona libela na libela. Akomisi biso bato ya bosembo pona seko na seko na nzela ya libatisi lia Ye mpe na makila.
BAYE BAKOMI BAGUNA NA NZAMBE
Banani bazali banguna Na Nzambe?
Baye bandimeli Yesu kasi Bazali na lisumu na motema.
Kati na Ba-Ebre 10:12-14, Nkolo alobi ete, “Kasi sima na Klisto kobonza mbeka moko kaka mpo na masumu, avandi mpo na libela na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe. Wuta tango wana, azali kozela ete Nzambe akomisa banguna na Ye enyatelo makolo na Ye. Pamba te, na nzela ya likabo moko kaka, akomisaki bato ya kokoka mpo na libela, ba-oyo apetolaki na masumu.” Alobaki ete Akokaki kozela tii esambisama ya suka pona kokata likambo na bango.
Banguna na Ye bazali kokoba koloba ete, “Nzambe, nabondeli Yo, limbisa masumu mangai.” Satana na balandi baye bandimeli te sango malamu ya mayi mpe na Molimo, mpe bazali kokoba kosenga bolimbisi.
Nkolo na biso Nzambe akosambisa bango te sikoyo. Kasi tango Yesu akoya mbala ya mibale, bakosambisama mpe bakobwakama na lifelo pona libela. Nzambe azali koyokela bango mawa, tii mokolo oyo bakotubela mpe bakomi bato ya bosembo na nzela ya lisiko.
Nkolo na biso Yesu alongolaki mosika masumu manso mpe akufaki pona biso, baye bandimeli Ye. Yesu akoya mokolo moko pona kobikisa baye bandilemali Ye. “O, yaka epayi na biso kala mingi te, Nkolo.” Akoya mbala ya mibale kozuwa bato ya bosembo pona kokende kobika na bango libela kati na Lola.
Baye bazali kokoba na koloba ete bazali basumuki, tango Nkolo akoya, bakozala te na esika na Lola. Na Mokolo ya Suka, bakosambisama, mpe bakobwakama na kati na moto ya lifelo. Etumbo oyo ezali kozela baye baboyi kondimela botama ya mbala mibale na mayi mpe na Molimo.
Nkolo na biso Yesu azali kotala baye bandimeli lokuta lokola banguna na Ye. Ezali pona yango, tosengli kobunda na lokuta ekotela biso te. Ezali pona yango, tosengeli kondimela sango malamu oyo ya lipamboli ya botama ya mabala ya mibale na mayi mpe na Molimo.
TOSENGELI KONDIMELA SANGO MALAMU YA MAYI NA MOLIMO
Ezali na posa ya kolongola masumu mabiso Sikoyo, tango masumu mabiso manso Mafutamaki nyonso?
Te, ata mbala moko te.
“Molimo Mosantu mpe azali kotatola epai na biso na tina na Ye, pamba te alobaki liboso: ‘Tala boyokani oyo nakosala elongo na bango sima na mikolo wana, elobi Nkolo: Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, mpe nakokoma yango kati na mitema na bango.’” (Ba-Ebre 10:15-16)
Sima Alongolaki mosika masumu manso, Alobaki ete, “boyokani oyo Nakozala na bango.” Boyani wana ezali ya ndenge nini? “Nakotiya mibeko mia Ngai kati na mitema mia bango, mpe kati na makanisi ma bango Nakokoma yango.” Tomekaki kosalela mayele ya bato kolandisama na Mobeko mwa Ye, kasi tokokaki te kobikisama na nzela ya Mobeko.
Na sima toye koyeba ete Yesu abikisaki biso bandimelaki na mitema mia bango sango malamu ya lipamboli ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Oyo nyonso andimeli kati ya libatisi mpe makila ma Yesu azuwi lisiko.
Yesu azali Nkolo ya lobiko. “Lobiko ekoki kozwama na moto mosusu te, pamba te kombo mosusu ezali te na mokili, oyo epesama na bato, oyo ekoki kobikisa biso.” (Acts 4:12). Yesu ayaki na mokili oyo lokola Mobikisi na biso. Pwete tokoki te kobikisama na nzela ya misala mia biso, Yesu abikisaki biso mpe akomaki na ekomeli ya mitema mia biso ete Abikisi biso na Mobeko mwa Ye mwa bolingo na lobiko.
“‘Bongo na sima, abakisaki: ‘Nakokanisa lisusu te, ezala masumu na bango to mabe na bango.’ Nzokande, soki Nzambe alimbisi moto masumu, ezalaka lisusu te na likabo ya kopesa mpo na masumu.” (Ba-Ebre 10:17-18).
Sikoyo akokanisa lisusu te misala mia biso mia mabe. Sikoyo Alongolaki masumu mabiso mosika, tondimeli tozali lisusu te na masumu makolimbisama. Nyongo ya biso efutami nyonso mpe eloko etikali kofutama lisusu ezali te. Bato babikisami na nzela ya kondima kati na mosala mwa Yesu, oyo Abikisaki biso na nzela ya libatisi lia Ye mpe makila na Kuruse.
Sikoyo, nyonso ya kosala ezali kaka kondimela mayi na makila ma Yesu. “Mpe okoyeba bosolo mpe bosolo bokokangola yo” (Yoane 8:32). Ndima kati na lobiko na Yesu. Kozuwa lisiko ezali pete koleka kopema. Ya kosala ezali kondimela biloko ndenge ezali. Lobiko ezali kaka kondimela liloba lia Nzambe.
Ndima ete Yesu azali Mobikisi na biso (na libatisi lia Yesu mpe liwa lia Ye na Kuruse), mpe tiya kondima ete lobiko ezali mpe ya yo. Longola mosika na yo makanisi mosusu. Ndimela kaka lobiko kati na Yesu. Na bondeli yo ya solo, ndimela Yesu mpe banda kozela kokota na bomoyi bwa seko na seko elongo na Ye.