• All e-books and audiobooks on The New Life Mission website are free
  • Explore multilingual sermons in global languages
  • Two new revised editions in English have been released
  • Check out our website translated into 27 languages
Search

Sermons

Liteya lia 3: Sango Malamu ya Mayi mpe na Molimo

[3-8] Libatisi lia Yesu lizali na Mabongisi ya Motuya pona Lisiko (Matie 3:13-17)

Libatisi lia Yesu lizali na Mabongisi ya Motuya pona Lisiko(Matie 3:13-17)
“Yesu alongwaki na Galile mpe akendeki na Yordani mpo ete Yoane abatisa Ye. Kasi Yoane aboyaki kobatisa Ye. Alobaki: — Ezali ngai nde nazali na posa ete Yo obatisa ngai; kasi ndenge nini Yo oyei epai na ngai? Yesu azongiselaki ye: — Tika ete esalema bongo sik’oyo! Ezali malamu mpo na biso kosala bongo mpo na kokokisa bosembo nyonso. Tango kaka Yesu azwaki libatisi mpe abimaki na mayi, Likolo efungwamaki; mpe Yesu amonaki Molimo ya Nzambe kokitela Ye lokola ebenga. Bongo, mongongo mokoeyokanaki wuta na Likolo mpe elobaki: ‘Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi.’”
 
 

LIBATISI LIA YOANE MOBATISI


Kotubela ezali nini?
Kobalusa mokongo na bomoyi ya Masumu, kondimela Yesu pona Kokoma mosantu.

Bongo bato ebele na mokili bayebi te pona nini Yesu ayaki na mokili oyo, mpe abatisamaki na Yoane Mobatisi. Boye, tosolola na tina ya libatisi lia Yesu mpe na Yoane Mobatisi oyo abatisaki Ye. 
Yambo, tosengeli kokanisa oyo etindaki Yoane Mobatisi kobatisa bato na Yordani. Etalisami polele na Matie 3:1-12 ete Yoane Mobatisi abatisaki bato pona kozongisa bango na Nzambe wuta masumu na nzela ya kotubela yango. 
“Nazali kobatisa na mayi pona bolimbisi bwa masumu” (molongo na 11), mpe “Mongongo mozali koganga na kati na esobe: ‘Bobongisa nzela ya Nkolo, sala yango malamu.’” (molongo ya 3). Yoane Mobatisi, alataki elamba ya kosala na mapwale ya shamo mpe na kolia mankoko, na koganga na esobe, na kopanza libatisi lia bolimbisi bwa masumu.
Azalaki kogangela bato, “Botubela, Mobikisi ya bato banso azali koya; bobongisa nzela pona Ye, bosala yango malamu. Botika kofukamela banzambe ya bato mosusu mpe boyamba Nkolo na kati na mitema mia bino.” 
Kozonga wuta wapi? Wutu kofukamela bikeko na makambo manso ma mabe ya bomoyi botonda masumu. Bongo, tosala nini? Tosengeli kobatisama na kati na Yesu pona kobulisama. Yoane Mobatisi agangaki na esobe, “Bobatisama na ngai. Bosokolama na masumu ma bino. Mobikisi, Masia na bino, azali koya na mokili oyo. Akolongola mosika masumu mabino manso lokola mwana mpate ya mbeka ya Boyokani bwa Kala mpe akosokola bino na masumu mabino manso.” 
Na kati na Boyokani bwa Kala, masumu ma mokolo na mokolo mazalaki koleka na mbeka ya lisumu na nzela ya kotiya maboko na moto. Masumu ma mbula ma Isalayele mobimba mazalaki koleka na ntaba na nganga-Nzambe monene na Mokolo mwa Bolongoli masumu, oyo ezali na mokolo mwa zomi ya sanza ya sambo ya mbula nyonso (Levitike 16:29-31). 
Na ndenge moko, masumu mabato banso malekaki na Yesu na nzela ya libatisi lia Ye mbala moko pona na libela, pona kolongolama na Ye. Bongo Yoane agangelaki bato kozonga epayi na Yesu mpe batisama na Ye.
Motuya ya yambo kati na libatisi oyo esalema na Yoane Mopatisi ezalaki ya bolimbisi bwa masumu, oyo ezongisi bana Isalayele epayi na Yesu oyo azalaki na nzela ya koya na sima na yango. Kotubela masumu elingi koloba ete tobalukisa mokongo na bomoyi bwa masumu mpe tondimela Masia pona bolimbisami bwa masumu mabiso manso. 
Bana Isalayele bakokaki kobikisama na kotiya elikia na Masia oyo azalaki koya na sima pona kosokola masumu mabango manso. Na ndenge moko, tobikisami na kondimela Yesu, oyo ayaki wuta Lola eleki mbula 2000 mpe alongolaki mosika masumu manso ma mokili. Kasi bana Isalayele na kati na Boyokani bwa Kala batikaki mobeko na Nzambe, babonzaki mbeka ya mabe mpe babosanaki Masia.
Pwete Yoane Mobatisi alingaki kokanisesa bango mobeko mwa Nzambe mpe ya Masia oyo azalaki koya na sima, abandaki kobatisa bato mpe abatisaki mpe Yesu na Yordani.
Bato ebele bayaki epayi na Yoane mpe babatisamaki, na kotubela kofukama liboso na bikeko mpe koboya mobeko mwa Nzambe. Ezali na biloko misato ya motuya na mabongisi ya mbeka―nyama ya bomoyi, kotia maboko na moto, mpe na makili yango. Bato banso ba mokili babikisami na kondimela Yesu.
Tango Bafarizao na Basaduseo bayaki pona kobatisama, Yoane agangaki na bango mpe alobi, “Kasi lokola azalaki komona Bafarizeo mpe Basaduseo koya ebele mpo na kozwa libatisi, alobaki na bango: ‘Bana ya banyoka, nani ateyi bino kokima kanda oyo ezali koya? Bolakisa na nzela ya bizaleli ete bobongoli mitema. Bokanisa kutu te komilobela na se ya mitema: ‘Abrayami azali koko na biso!’ Nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami.’” (Matie 3:7-9).
Bafarizeo mpe Basaduseo wana, elongo na mangoma ya bato ya politike mpe na baye bafukamaka liboso na bikeko, bakanisaki ete bazali bato na Nzambe ata ndenge bandimelaki te liloba lia Nzambe. Bandimelaki banzambe mosusu na makanisi mabango moko. 
Tango bayaki epayi na Yoane Mobatisi pona kobatisama, ayebisaki bango, “Bopesa mbeka ya mabe wana te, kasi bobaluka wuta masumu mpe bondimela na bosolo ete Masia akoya kolongola mosika masumu manso. Bosengeli kondimela yango na mitema mia bino.” 
Kotubela ezali kobaluka wuta nzela ya mabe. Kosenga bolimbisi ya solo ezali kobaluka wuta masumu mpe na kondima ya lukuta mpe kozonga eoayi na Yesu. Ezali kondimela lisiko lia libatisi lia Ye mpe kosambisama na Ye na Kuruse. 
Bongo, Yoane Mobatisi agangaki na bana Isalayele, baye batikaki mobeko mwa Nzambe mpe mabongisi ma mbeka ya masumu, pona kobenda bango bazongela Nzambe. Ezalaki mosala ya Yoane Mobatisi ya kozongisa bato epayi na Yesu pwete bandimela Ye mpe babikisama na masumu mabango. 
 
 

ONDIMELI LISIKO NA NZELA YA LIBATISI LIA YESU?


Bato banso basengeli kosala Nini liboso na Yesu?
Basengeli kondimela Ye pona Kobikisama na masumu.

Likambo ya liboso Yesu asalaki na kati ya mosala mwa Ye mwa libanda ezalaki kobatisama na Yoane Mobatisi. Masumu ma mokili mobimba malekaki na nzoto na Ye na nzela wana.
Bongo, libatisi lia Yesu lizalaki ebandeli ya lobiko na Nzambe pona bato banso lokolo mosala ya bosembo ya Yesu oyo elongolaki mosika masumu manso ma mokili. Nzambe apesi lisiko na baye banso bandimeli kati ya bosolo ete Yesu alongolaki mosika masumu ma mokili na nzela ya libatisi lia Ye. 
Tango Yesu ayaki na mokili oyo mpe abatisama na Yoane Mobatisi, sango malamu ya bokonzi bwa Lola ebandaki. Lola efongwamaki na libatisi lia Ye ndenge ekomami na Matie 3:15, ezalaki lokola mbeka ya bolongoli masumu ndenge ekomami na Levitike 1:1-5, 4:27-31 kati na Boyokani bwaKala. 
Makambo manso na Boyokani bwa Kala ezali na lipasa na Boyokani bwa Sika mpe ngambu mosusu mpe. “Boluka kati na buku ya Yawe mpe botanga: Moko te kati na bango akozanga, moko te akomitungisa mpo na moninga na ye; pamba te monoko na Yawe nde epesi mitindo mpe Molimo na Ye akosangisa bango elongo.” (Ezayi 34:16).
 
 

BOYOKANI BWA KALA NA BWA SIKA BOLOBELI BOLONGOLAMI BWA MASUMU MANSO MA BATO


Tosengeli kotubela pona Masumu ma mokolo na mokolo?
Te. Bolimbisi ezali kondima masumu mayo mpe Kotalela libatisi lia Yesu pona kozuwa Lisiko. 

Na Boyokani bwa Kala, lisumu lia mokolo moko lizalaki koleka na mbeka ya lisumu na botiye maboko na moto. Mbeka ekokaki kokatama mpe makila ma yango esopami mpe esambisami esika ya mosumuki. Mpe masumu ma mbula mobimba mazalaki kolekisama na mbeka ya lisumu na nzela ya kotiya maboko na moto, pwete bato banso balimbisama pona lisumu lia mbula. 
Na kati ya Boyokani bwa Sika, na ndenge moko, Yesu Klisto ayaki mpe abatisamaki na Yordani pona kolongola mosika masumu manso ma mokili. Liloba oyo ya Nzambe esakolamaki na Boyokani bwa Kala ekokisamaki.
Yoane Mobatisi, oyo abatisaki Yesu, azalaki mosali na Nzambe oyo atindamaki sanza motoba liboso na Yesu. Atatolaki ete Yesu alongolaki mosila masumu manso ma mokili, na koloba na Yoane 1:29. “Botala! Mwana Ntambe ya Nzambe oyo alongoli mosika masumu ma mokili!” 
Yoane Mobatisi alekisaki masumu ma mokili na Yesu na nzela ya kobatisa Ye na Yordani. Na nzela wana, Nkolo alongolaki mosika masumu manso mabato banso. Oyo esengeli kosala sikoyo ezali kondimela Yesu.
Masumu manso ma mokili malekisamaki na nzoto ya Yesu. Bayekoli baye balobaki na Miasala ya Ntoma 3:19, “Yango wana, bobongola mitema mpe bozonga epai ya Nzambe mpo ete alimbisa masumu na bino.” 
Bazalaki kolamosa biso na koyebisa biso tososola pona nini Yoane Mobatisi abatisaki Yesu, pona nini ayebisaki bato balanda Ye. Alobaki, “Botubela mpe bokoma bato ya sika. Bondimela kati na lisiko lia libatisi lia Yesu. Bosokolama na masumu mabino.”
Mesia ayaki kolongola mosika masumu mabiso manso mbala moko na nzela ya libatisi lia Ye. Masumu manso ma mokili malekisamaki na nzoto ya Yesu na nzela wana. Bongo, Boyokani ya Nzambe bokokisamina libatisi lia Yesu, lokola ekomami na Matie 3:13-17. 
“Yesu alongwaki na Galile mpe akendeki na Yordani mpo ete Yoane abatisa Ye. Kasi Yoane aboyaki kobatisa Ye. Alobaki: —Ezali ngai nde nazali na posa ete Yo obatisa ngai; kasi ndenge nini Yo oyei epai na ngai? Yesu azongiselaki ye: — Tika ete esalema bongo sik’oyo! Ezali malamu mpo na biso kosala bongo mpo na kokokisa bosembo nyonso. Tango kaka Yesu azwaki libatisi mpe abimaki na mayi, Likolo efungwamaki; mpe Yesu amonaki Molimo ya Nzambe kokitela Ye lokola ebenga. Bongo, mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo mpe elobaki: ‘Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi.’”
Pona kokokisa lisiko lia Nzambe, Yesu ayaki epayi na Yoane kobatisama. Yoane Mobatis azalaki mosali ya Nzambe ya bomoko. Luka elongi 1, elobi ete Yoane azalaki mwana ya Aron, nganga-Nzambe ya liboso. Nzambe aponaki Yoane, mwana ya Aron pwete Alingaki motalisi ya elongo ya bato banso pona kokokisa bosembo bwa Ye. 
Bongo, Nzambe asalaki ete Yoane abotama na ndako ya nganga-Nzambe, sanza mitoba yambo Yesu abotama. Yoane abongisaki nzela pona Yesu na koganga kati na esobe,  “Botubela, bino bana ya nyoka! Botubela mpe bokoma bato ya sika. Masia azali koya. Bobongwana epayi na Ye, pamba te, akokata bino mpe akobwaka bino na moto. Bondimela libatisi lia Ye mpe makila ma Ye na Kuruse. Botubela mpe bobatisama, bongo bokozuwa lisiko.” 
Sango malamu ya lisiko ekomami na Misala ya Ntoma 3:19. Tango Yoane Mobatisi agangaki pona masumu ma bato, mingi babongolaki mitema. 
Pwete Yoane alekisaki masumu ma mokili na Yesu, masumu manso ma mokili malongolamaki mosika mbala moko. Pwete Yoane Mobatisi atatolaki ete Yesu alongolaki mosika masumu mabiso manso, toyebi tokoki kobikisama na kondimela sango malamu ya lisiko, sango malamu ya mayi mpe ya makila.
 
 

TINA NINI YOANE MOBATISI AYAKI EPAYI NA YESU


“Pona yango” elingi Koloba nini?
① Malamu koleka 
② Ya kokoka
③ Esengeli na nzela oyo kaka 
(mosusu te)

Baye masumu mabango malongolami mosika na kondimela Yesu, Mobikisi, bakoki kofandisa lobiko na bango na nzela ya kotatola ya Matie sango malamu ya libatisi lia Yesu. Na Matie 3:15-16, Yesu ayaki epayi na Yoane mpe alobaki, “Batisa Ngai.” Mpe Yoane ayanolaki, “Nalingi kobatisama na Yo, mpe Yo oye epayi nangai?”
Ezalaki Yoane oyo abatisaki Yesu, ayebaki Azalaki nani. Yoane azalaki mosali ya Nzambe oyo alekisaki masumu mabiso na Yesu. Pwete Yesu ayaki lokola Mobikisi pona kokokisa lisakoli lia Boyokani bwa Kala, Apesaki mitondo na Yoane Mobatisi kobatisa Ye pwete Alongola mosika masumu manso ma mokili na moto na Ye. 
Pona nini? Pwete Yesu azali Mwana ya Nzambe na Nguya nyonso, Mokeli, mpe Mobikisi. Ayaki epayi na biso pona kosokola masumu mabiso manso. Bongo, pona kobikisa bato banso, Asengelaki kobatisama.
“Pona yango” Yesu abatisamaki na Yoane Mobatisi mpe alongolaki mosika masumu mabiso manso. Asambisamaki na esika na biso na Kuruse. Libatisi lia Yesu lizalaki litatoli pona lisiko lia biso. Lokola Nzambe alakaki na Boyakani bwa Kala ete masumu manso makoleka na Mbeka ya Mwana Mpate, Mwana na Nzambe akomaki Mwana Mpate mpe alongolaki mosika masumu manso na nzoto na Ye. 
Bongo, kotiya maboko na moto na kati na Boyokani bwa Kala na libatisi lia Yesu na Boyokani bwa Sika ezali kolekisa masumu, mpe lobiko mpe bomoyi ya seko na seko epesameli na baye bandimeli kati na sango malamu ya mayi mpe ya Molimo. 
 
 

LIBATISI LIA YESU LILONGOLI MOSIKA MASUMU MABISO MANSO


Ndenge nini tolata Klisto?
Na kobatisama kati na Klisto

Tango Yesu alingaki kobatisama, Yoane alingaki kopekisa Ye, na koloba, “Nasengeli kobatisama na Yo, mpe Yon de ozali koya epayi nangai?”
Kasi Yesu ayanolaki ete, “Tika ete ezala bongo sikoyo, pona yango ezali malamu pona biso kokokisa bosembo nyonso.” Tika ete ezala bongo sikoyo. Pesa yango nzela. Ayebisaki Yoane, “Osengeli kolekisa masumu mabato na nzoto na Ngai pwete Namema epayi na Ngai baye banso bandimeli sango malamu ya mayi ya lisiko. Nakosambisama pona na masumu mabango pwete baye banso bakondimela libatisi bazuwa lisiko lia masumu mabango banso. Lekisa na nzoto na Ngai masumu manso ma mokili na nzela ya libatisi pwete baye banso bakoya sima bazuwa lisiko lia masumu mabango mbala moko. Pona yango, pesa Ngai nzela esalema sikoyo.”
Yesu abatisama na Yoane Mobatisi mpe libatisi lia Yesu lizalaki kolandisama na mobeko ya bosembo ya lisiko lia Nzambe. Pwete masumu manso malekaki na Yesu tango Abatisamaki, tokoki kozuwa lisiko biso banso mbala moko tango tondimeli Yesu mpe tobatisami. Pwete Alongolaki mosika masumu mabiso manso na nzela ya kotiya maboko na moto, Akufaki na Kuruse na esika na biso mpe sikoyo afandi na loboko ya mobali ya Nzambe. Tokoki kobikisama na kondimela lisiko lia mayi mpe na Molimo. 
Ezali Yesu nde Abikisi biso na masumu ma mokili. Tokoki kobikisama na kondimela Yesu oyo alonglaki mosika masumu mabiso manso mpe afutaki nyongo ya masumu mabiso na Kuruse. Libatisi lia Yesu lizalaki ebandeli ya sango malamu ya lisiko. 
Libatisi lia lisiko likomami na kati na Mokanda mwa Nzambe, mpe ntoma Polo alobeli yango na Bagalatia ete akufaki na Klisto pwete abatisamaki kati na Ye, mpe alati Ye. Ntoma Polo alobelaki likolo ya kondima na ye kati na lisiko na nzela ya libatisi lia Yesu mpeliwa lia Ye na Kuruse. 
 

“TIKA ETE EZALI BONGO SIKOYO”

Mosala ya Yoane Mobatisi Ezali nini?
Kolekisa masumu ma mokili na nzoto na Yesu lokola nganga-Nzambe monene Ya bato banso.

Yesu alobaki ete, “Pona yango ezali malamu pona biso tokokisa bosembo nyonso.” Bosembo nyonso elingi koloba ete kokangolama na masumu manso na libatisi lia Ye mpe kolongola masumu manso na mitema mia bato banso. “Bongo, apesaki Ye nzela.” Yesu abatisami na Yordani.
Kaka ndenge nganga-Nzambe monene azalaki kotiya maboko na moto ya ntaba, Yoane Mobatisi atiyaki maboko maye na moto ya Yesu mpe alekisaki masumu manso ma moliki na Ye. Yoane Mobatisi azalaki nganga-Nzambe monene oyo mosala naye ezalaki kolekisa masumu ma mokili na Yesu lokola motalisi elongi ya bato banso. “Nzambe, nalekisi masumu manso ma mokili na Mwana Mpate na Yo, Yesu.” Bongo, masumu manso ma mokili malekaki na Yesu.
Yoane Mobatisi atiyaki maboko maye na moto na Yesu, akotisi Ye na mayi, mpe alongolaki maboko maye tango Yesu alongolaki na mayi. Libatisi lia Yesu lisalamaki pona lisiko ya bayengebene. Bongo, Yesu abikisaki bato banso baye bandimelaki libatisi lia Ye.
 

LOLA EFONGWAMI MPE MONGONGO EWUTI NA LOLA

Tango nini bokonzi ya Lola Efongwamaki?
Banda mikolo ya Yoane Mobatisi (Matie 11:12)

“Tango kaka Yesu azwaki libatisi mpe abimaki na mayi, Likolo efungwamaki; mpe Yesu amonaki Molimo ya Nzambe kokitela Ye lokola ebenga. Bongo, mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo mpe elobaki: ‘Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi.’” (Matie 3:16-17).
Tango Yesu alongolaki mosika masumu manso ma mokili na libatisi lia Ye, Lola efongwami pona Ye. Bongo, Boyokani ya Nzambe oyo Asalaki eleki ba nkoto ya mbula liboso ekokisama na nzela ya libatisi lia Yesu na Yordani. 
Yango, Yesu, lokola Mwana Mpate ya Nzambe, abikisaki bato banso ya mokili wuta masumu mabango. Masumu manso ma mokili malekaki na Yesu mpe Akokisaki mokano mwa Nzambe.
Ekomami na kati ya Yoane 1:29, “Botala! Mwana Mpate na Nzambe oyo alongoli mosika masumu ma mokili!” Pwete masumu manso malekisamaki na Yesu, Mwana Mpate na Nzambe, Atambolaki tii na Kuruse na Golgota sima ya mbula misato na mokumba na mapeka ma Ye. Na sima Alongolaki mosika masumu manso na nzela ya libatisi lia Ye, esika nyonso Azalaki kokende, Azalaki koyebisa baye bandimeli Ye ete na kondima na bango, masumu mabango manso malimbisami.
Na Yoane 8:11, Ayebisaki na mwasi oyo bakangaki na ekobo, “Ngai mpe nakateli yo te etumbo.” Akokaki kokatela ye etumbo pwete mosambisi ya mokolo wana ezalaki Yesu Ye moko, oyo alongolaki masumu manso mosika. Bongo, Atalisaki na bato banso ete Azali Mobikisi ya basumuki. 
Pwete Ye, Mwana na Nzambe, alongolaki mosika masumu mabiso manso, mondimi nyonso ya mokili akoki kokoma moto ya bosembo. Lola efongwamaki tango Yesu abatisamaki. Bikuke bia bokonzi ya Lola bifongwamaki mpe oyo nyonso andimeli libatisi lia Yesu akoki kokota ofele.
 
 

YESU AKUFAKI NA KURUSE SIMA KOLONGOLA MOSIKA MASUMU MA MOKILI NA NZELA YA LIBATISI LIA YE


Yesu anyataki moto ya Satana ndenge nini?
Na lisekwi lia Ye wuta baweyi sima ya Kondima etumbu pona masumu Mabiso.

Pwete masumu manso malekisamaki na moto na Ye, Yesu Asambisama na Kuruse. Azalaki na mawa mingi mpe makanisi ma Ye matungisamaki mingi tango Akanisaki pasi na minyoko ya nzela ya Kurse. Abondelaki tii motoki na Ye ekomi lokola makila. Tango akendaki na bayekoli ba Ye na esika ebengani Getsemane, Agangaki, “O Tata na Ngai, soki ekoki kosalema, tika ete kopo oyo eleki mosika mosika na Ngai.” (Matie 26:39). “Na batisamaki mpe Nalongolaki mosika masumu manso ma mokili, kasi tika Ngai na kufa pona yango te.” Kasi Nzambe ayanolaki Ye te. 
Na Mokolo mwa Bolongoli Masumu kati na Boyokani bwa Kala, mbeka ya lisumu esengelaki ebomama pwete makila ma yango masopama liboso na kiti ya mawa na nganga-Nzambe monene. Na ndenge moko, Yesu asengelaki kokufa na Kuruse mpe Nzambe azuwaki mokano ya kosala yango na lolenge mosusu te. 
Mesa ya etumbelo ezali bosambisi bwa Nzambe mpe makila ya mbeka ya lisumu ezali bomoyi. Kosopa makila mbala sambo liboso na kiti ya mawa elingi koloba ete bosambisami nyonso bolekaki mosika (Levitike 16:1-22). 
Yesu abondelaki Nzambe kotika kopo eleka libanda na Ye. Kasi Tata apesaki Ye nzela te mpe Yesu na suka alobaki, “Kolandisama na mokano mwa Ngai te, kasi mwa Yo” (Matie 26:39). Abondelaki Nzambe kosala ndenge Amoni yango malamu. Sima ya mabondeli, Alandaki mokano mwa Tata na Ye. 
Yesu atikaki mokano mwa Ye, mpe Alandaki oyo ya Tata na Ye. Pona nini? Pwete soki Asambisamaki te sima ya kolongola masumu manso ma mokili mosika, lobiko ekokaki te kozala mobimba. Akufaki na Kuruse pwete Alongolaki mosika masumu manso ma mokili na nzela ya libatisi lia Ye. “Pamba te lifuti ya lisumu ezali kufa, kasi likabo ya ofele ya Nzambe ezali bomoi ya seko kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.” (Barome 6:23).
Nzambe akokisaki Boyokani oyo alobaki ete akotinda Mobikisi mpe akobikisa bato banso na nzela ya kotiya maboko na moto, mpe na libatisi lia Yesu. Yesu andimaki mokano mwa Nzambe mpe andimaki mpe bosambisami pona yango.
Ezalaki mpe bokokisami bwa lisakoli lia Ebandeli 3:15, “Nakotia koyinana kati na yo mpe mwasi, mpe kati na bakitani na yo mpe bakitani na ye. Bakitani ya mwasi bakonyata moto na yo, mpe yo okoswa bango na litindi.” Nzambe alakaki Adam kotinda Masia, kitani ya Eva, mpe Akonyata nguya ya Satana oyo ezalaki ete moto akoma mosumuki mpe akende lifelo.
Tango toyebi mpe tondimeli libatisi lia Yesu mpe liwa lia Ye na Kuruse, masumu mabiso manso malongolami mosika mpe tobikisami na etumbo.
Tosengeli kozala na kondima ya malamu kati na mitema mia biso tango tozali kotala libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye na Kuruse. Ndima na motema mwayo, mpe okobikisama. 
 
 

LIBATISI LIA YESU LIZALI EBANDELI YA SANGO MALAMU YA LOLA


Mobeko ya suka Nkolo atikaki yambo Akende Lola ezali Nini?
Apesaki mitindo na bayekoli ba Ye kosala Bato banso bayekoli na Ye na kobatisa bango Na kombo ya Tata, mpe ya Mwana mpe Ya Molimo Mosantu.

Libatisi lia Yesu lizalaki ebandeli ya sango malamu, mpe Abikisaki basumuki banso na libatisi lia Ye mpe na makila ma Ye. Na Matie 28:19, ekomami ete, “Bokende, bokomisa bato ya bikolo nyonso bayekoli na Ngai, bobatisa bango na Kombo ya Tata, ya Mwana mpe ya Molimo Mosantu.” Yesu ayebisaki bayekoli na Ye kotatola ete Tata, Mwana na Molimo Mosantu babikisaki bato banso ba mokili wuta masumu mabango mpe bapetolami na nzela ya libatisi lia Ye mpe na makila ma Ye.
Yesu apesaki bango nguya ya kosala bato banso ba mokili bayekoli na Ye, kotangisa bango libatisi lia Yesu, libatisi lia lisiko, libatisi oyo elongoli mosika masumu manso ma mokili. 
Eleki lokola mbula 2000, Yesu ayaki na mabele na nzoto mpe abatisamaki na Yoane Mobatisi. Na libatisi lia Yesu, masumu manso ma mokili, na yabiso na kati, malekaki na nzoto na Ye. 
Masumu boni malekaki na nzoto na Ye? Boni oyo ya lobi ekoya? Ayebisaki biso ete ate masumu malobi ekoya, malekaki na nzoto na Ye. Masumu ma bana babiso, bikeke na kikeke, ya kala, ya lelo, ya lobi ekoya, ata oyo ya Adam elekaki na nzoto na Yesu. 
Ndenge nini masumu ekozala te? Ndenge nini tokoki kozala na masumu te? Pwete Yesu alongolaki yango mosika na nzela ya libatisi lia Ye mpe bandimi banso bakoki kokangolama na masumu mabango mpe kozuwa bokonzi bwa Lola. 
“Nzokande, moto nyonso oyo atambolaka na solo ayaka epai pole ezali mpo ete misala oyo asalaka, na boyokani elongo na Nzambe, emonana polele.” (John 3:21). 
Yesu alongolaki mosika masumu mabiso manso na nzela ya libatisi lia Ye, makila ma Ye na Kuruse, liwa lia Ye, mpe lisekwi lia Ye. Bongo, kondimela libatisi lia Ye mpe liwa lia Ye na Kuruse ezali kobikisama na masumu manso. Yango nde kondima ya lisiko. 
Tango tondimeli na libatisi mpe na makila ma Klisto, tobikisami. Tango tondimeli malamu Yesu, tozali sembo tope basumuki ? Tozali sembo. Ozali na masumu te, ata ozali moto na bolembu? Boye, nazali na lisumu te. Kondimela libatisi lia Yesu mpe etumbo ekweyelaki Ye na Kuruse ezali kondima ya bopeto mpe ya mobimba.
 

KOBATISA MPE KOBATISIMA NA KOMBO NA YESU

Ebandeli ya sango malamu Ya Lola ezali wapi? 
Na libatisi lia Yesu

Pwete bato bazali na bolembu, bakambi bazali kobatisa baye bandimeli libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye, pona kofandisa kondima na bango. Kobotama mbala ya mibale ezali kofandisa lobiko na bango na libatisi na ndenge moko na oyo ya Yesu lokola elembo ya kondima na bango. 
Mokambi akobondela liboso na kotiya maboko maye na moto ya mobotami ya mbala ya mibale, akobelela lipamboli lia Nzambe pwete moto wana akumisa Ye malamu tii suka ya mikolo mia ye. Bongo, akobatisa ye na kombo ya Tata, mpe ya Mwana na ya Molimo Mosantu.
Tobatisami na efandelo ya libatisi lia Yesu, mpe na makila ma Ye. Libatisi lina lizali kotalisa ete masumu manso malekekaki na Yesu, ete moto oyo babatisi akufi na Yesu mpe asekwi na Ye. 
Kobatisama ezali kopanza kondima na bolekisi masumu na nzoto ya Yesu na nzela ya libatisi lia Ye, asambisami pona na masumu ma moto wana, mpe moto wana asekwi na Yesu. Ezali kotatola liboso ya Tata, Mwana, Molimo Mosantu, Satana, mpe bandeko ya mibali na ya basi. Ezali kotatola ete moto moko abotami mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. 
Baye bandimeli Yesu, mpe bayeki tina ya solo ya libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye na Kuruse, babikisami na masumu mabango ma mokili. Pona yango, babatisima na kombo ya Tata, mpe ya Mwana, mpe ya Molimo Mosantu. 
“Yango wana, soki moto azali kati na Klisto, akomi ekelamu ya sika: makambo ya kala eleki, mpe makambo ya sika eyei.” (2 Bakorinto 5:17). Makambo mabiso makala malekaki mosika na biso mpe tobotami mbala ya mibale lokola bato ya kondima. Tondimi na kati na mitema miabiso ete tobatisami. Tobatisami na kati na Yesu na nzela ya kondimela libatisi lia Yesu. 
 

BOMOYI SIMA YA BOTAMA YA MBALA YA MIBALE NA LIBATISI LIA YESU MPE NA MAKILA MA YE NA KURUSE

Mototami ya mbala ya Mibale abikaka pona nini?
Abikaka pona bokonzi bwa Nzambe Mpe bosembo bwa Ye, koteya sango malamu Na mokili mobimba.

Bomoyi sima ya lisiko mpe botama ya mbala ya mibale esengeli efandisama likolo ya kondimela liloba lia Nzambe. Ekoki kozala te likambo ya makanisi tope mayele ma bato, na kati na yango pona kotubelaka mokolo na mokolo. Ezali bomoyi oyo etondisami na kondima ete Yesu alongolaki solo-solo mosika masumu na nzela ya libatisi lia Ye. 
Masumu mabiso manso, malekaki na nzoto ya Yesu, tango abatisimaki. Abikaki mbula misato na mokumba wana na nzoto na Ye tii Andimaki kokende kosambisama pona masumu manso ma bato mpe akufaki na Kuruse pona na yango. 
Pona yango, biso bandimi tosengeli kozala na kondima kati na makomi masantu, kasi na makanisi tope na mayele ma bomoto te. Soki tokoki te kosala yango, tokozala na mosala mwa kotalela masumu ma mokolo na mokolo, sima ya lisiko lia biso mpe botama ya mbala ya sika ya biso. 
Tosengele kotika makambo ma masumu ya mokolo na mokolo mpe komikotisa na kondima ya solo ya sango malamu ya mayi mpe na makila. Yango nde bomoyi ya moto oyo azuwi lisiko lia ye akoki kokamba. 
Yoane Mobatisi alobaki nini likolo na Yesu? Alobaki, “Botala, Mwana Mpate na Nzambe oyo alongoli mosika masumu ma mokili” (Yoane 1:29). Atatolaki ete Yesu alongolaki mosika masumu, ma lelo, lobi ekoya, mpe lobi elakaki, tii na oyo ya ebandeli wana. 
Alongolaki te mosika na biso masuma manso mana? Masumu manso mana malekaki te na nzoto na Yesu? Lisumu lia mokili lizali na kati na yango masumu manso ma kala, ma lelo, mpe ma lobi ekoya. Tosengeli kotatola sango malamu ya lisiko na nzela ya libatisi lia Yesu. 
Baye bandimeli na solo libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye bakobikisama. Oyo nyonso andimeli libatisi lia Yesu azali lisusu te na lisumu kati na motema mwa ye. 
Na loboko mosusu bato bakanisi ete bazali kaka na lisumu pwete bazali kondima te masumu mabango manso malongolamaki na Yesu na nzela ya libatisi lia Ye. Bakosami na Satana. Satana azali koyebisa bango na mongongo ya se na makinisi mabango mateya ya mosuni. “Ozali kosumuka mokolo nyonso. Ndenge nini okoloba ete ozali na lisumu te?” 
Bandimela kaka Nzambe ete bazali lisusu te na lisumu te. Kasi Satana azali kokosa bango mpe kotiya bango na mito ete bazali kaka basumuki. Moko te azali na lisumu soki andimeli solo-solo libatisi lia Yesu, mpe makila ma Ye na Kuruse. 
Pwete tozali kobika na mokili oyo tozali na bolembu ya nzoto, tokoki koloba te tokomi sembo na misala mia biso yango moko. Kasi tokoki koloba na kondima nyonso ete tobikisami na nzela ya libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye na Kuruse. Tango tososoli ete na nzela ya kondima kati na libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye, mitema mia biso mikomi sembo, tokoyeba solo ete tozali na lisumu na kati na motema na biso lisusu te.
“♬ Nazuwi lisiko. Ozuwi lisiko. Tosuwi biso banso lisiko ♬” Yango nde esengo ya boye azali kopesa elengi ya kobika na posa ya koteya sango malamu na bato banso mpe koyeba ete tokambami na Molimo Mosanto. 
Ya solo, tokoki kondimela lisumu mokolo na mokolo, kasi tozali na yango lisusu te. Tozali na libatisi lia Yesu mpe na makila ma Yesu kati na mitema mia biso. Kala, mitema mia biso mizalaki kotonda na masumu, kasi sikoyo, tondimeli libatisi lia Yesu mpe totikali na lisumu lisusu na kati na mitema te. 
“Tala boyokani oyo nakosala elongo na bango sima na mikolo wana, elobi Nkolo: ‘Nakotia mibeko na Ngai kati namakanisi na bango, mpe nakokoma yango kati na mitema na bango.’” (Ba-Ebre 10:16).
Mitema mia biso mizali na masumu lisusu te. Yesu akokisi biso tobikisama na mobimba na libatisi lia Ye mpe na liwa lia Ye na Kuruse. Lobiko wuta lisumu efandi na kondimela liloba lia Nzambe.
 

OYO NYONSO ANDIMELI LIBATISI LIA YESU MPE NA MAKILA MAYE NA KURUSE AKOKI KOSUMUKA LISUSU TE

Tozali kokoma lisusu basumuki Tago tosumuki?
Te, tokoma lisusu te Basumuki.
 
Tango tozali kondimela te libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye, ata tobondeli ndenge nini pona bolimbisi bwa basumu mabiso, ezali kaka na lisumu na mitema mia biso. Kasi tango tondimeli sango malamu ya solo, masumu mabiso manso malongolami mosika na biso. 
“Eh, ndenge nini ozali kongenga boye mikolo oyo?” 
“Omoni, nazali lisusu na lisumu te kati na motema nangai.” 
“Ya solo? Bongo, nakanisi, okoki kosumuka ndenge olingi soki olingi sikoyo?” 
“Oyebi, moto akoki te komibatela ye moko pona kozanga kosumuka. Yango nde moto azali. Kasi Yesu alongolaki mosika masumu manso na libatisi lia Ye mpe andimaki kosambisama pona yango na Kuruse. Pona yango, namipesi kosalela sango malamu na kati na etonga nangai. Barome elongi 6 elobi tokoki biso banso kobika lokola boye. Lokola lisumu lizali lisusu te na kati na motema nangai, nalingi kobika bomoyi ya bosembo. Tosengeli kondimela libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye na Kuruse mpe koteya sango malamu na mokili mobimba! Tango tondimeli Yesu, Nkolo na lisiko na biso, tokoki kokoma te lisusu basumuki. Tosengeli kondimela lobiko ya sezko na seko ya libatisi lia Yesu mpe na makila na Kuruse. Ezali esengo mingi pona yango!”
 
 

NANI AYAMBI MOLIMO?


Yoane Mobatisi Atatolaki nini pona Yesu?
Atatolaki ete Yesu azalaki Mwana Mpate na Nzambe Oyo alongolaki masumu ma mokili, ya kala, Ya lelo, mpe na ya lobi ekoya, Ata na ya ebandeli mpe. 

Oyo noyonso andimeli libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye na Kuruse akozuwa lobiko. Ndenge nini tozali kozuwa Molimo?Misala ya Bantoma 2:38-39 ezali kobesa eyano. “Petelo azongiselaki bango: — Bobongola mitema; tika ete moko na moko kati na bino azwa libatisi na Kombo na Yesu-Klisto mpo ete masumu na ye elimbisama, bongo bokozwa likabo ya Molimo Mosantu. Pamba te elaka oyo ezali mpo na bino, mpo na bana na bino mpe mpo na bavandi nyonso ya bikolo ya mosika, bato nyonso oyo Nkolo, Nzambe na biso, akobenga.’”
Kobatisama na Kombo na Yesu Klisto elingi koloba ete kondimela libatisi lia Yesu mpe kozuwa lisiko. Nde Molimo moko pesamelama lokola likabo na Nzambe. 
Kobatisama na kombo na Yesu Klisto elingi mpe koloba ete kokoma sembo na nzela ya kondimela libatisi lia Klisto mpe makila ma Ye. Tango tokoti na kondima wana, tozuwi lisiko mpe tokomi sembo. Bandimi bakomi pembe lokola mvula ya pembe na nzela ya libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye na Kuruse.
“Mpe boyozuwa likabo lia Molimo Mosantu.” Tango tondimeli na motema moko ete masumu mabiso malekaki na nzoto ya Yesu na nzela ya libatisi mpe Asambisamaki pona yango na liwa lia Ye na Kuruse, mitema mia biso mikomi peto. Bomoyi na biso ebandi tango tondimeli libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye, mpe tozuwi likabo lia Molimo Mosantu mpe tokomi bana na Nzambe. 
“Mpe bokoyeba bosolo, mpe bosolo bokokankola bino” (Yoane 8:32). Tosengeli koyeba bosolo ya kosambisama na Nkolo na Kuruse. Bosolo ezali ete Yesu alongolaki mosika masumu mabiso manso na libatisi lia Ye mpe na liwa lia Ye na Kuruse. Lisiko lipesamela biso tango tondimeli kati na bosolo.
 
 

LIBATISI LIA YESU LIPESI BISO LISIKO


Nani akozuwa Molimo?
Oyo azuwu lisiko lia masumu manso na nzela Ya kondimela libatisi lia Yesu Mpe makila ma Ye na Kuruse.
 
Bolongoli bwa lisumu la momesano mwa Boyokani bwa Kala bozalaki elili ya libatisi lia Yesu na Boyokani bwa Sika. Libatisi lia Yesu lizali moboku ya masakoli manso ma Boyokani bwa Kala. Eteni ya kotiya maboko na moto ya Boyokani bwa Kala ekoki komonana mpe na kati na libatisi lia Yesu na Boyokani bwa Sika. 
Masumu manso ma mokili malekaki na nzoto ya Yesu kati na libatisi lia Ye, kaka lokola masumu ma bana Isalayele mazalaki koleka na ntaba ya bolongoli masumu na nzela ya kotiya maboko na moto. 
Tosengeli kondimela libatisi lia Yesu pwete tobikisama wuta masumu mabiso? Boye! Tosengeli kosala yango! Tondimeli bosolo ya ndege nini Yesu alongolaki mosika masumu manso ma mokili na nzela libatisi lia Ye. Soki tondimeli te kati na libatisi lia Yesu, masumu mabiso makoki koleka na nzoto na Ye te. Tosengeli kondimela pwete lobiko na biso ekoma mobimba. Pamba te, tokoki te kokoma sembo. 
Yesu abikisaki basumuki ba mokili mobimba na nzela ya malamu koleka na libatisi lia Ye. Ekokaki kosalema na nzela mosusu koleka wana te. Pwete libatisi lia Yesu lisalaki libongisi lia kolekisa masumu manso na nzoto na Ye, mpe tosengeli kondimela yango pwete mitema mia biso misokolama mpe lisumu esila.
Tosengeli mpe kondimela makila ma Yesu mazalaki etumbo ya masumu mabiso banso. Bongo, baye banso bakondimela libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye na Kursue babikisami wuta masumu mabango.
Tosengeli kondima libatisi lia Yesu pona kokota na bokonzi bwa Lola. Yango nde nzela ekoki kobikisa biso wuta masumu mpe kokima etumbo. 
Libatisi lia Yesu na Boyokani bwa Sika mpe kotiya maboko na moto kati na Boyokani bwa Kala ezalaki elili ya yango na yango. Esimbani loboko kati na Boyokani bwa Kala na bwa Sika. 
Na kati na Boyokani bwa Sika, Yoane Mobatisi ayaki sanza motoba yambo Yesu abotama. Tango Yesu abaitamaki, ezalaki “Ebandeli ya sango malmau ya Yesu Klisto, Mwana na Nzambe” (Malako 1:1). Sango malamu ebandi na tango Yesu alongolaki mosika masumu ma mokili na nzela ya libatisi lia Ye. 
Mosala mwa lobiko mosalami na nzela ya makambo ebele elandani: botama ya Yesu, libatisi lia Ye, liwa lia Ye na Kursue, lisekwi lia Ye, mpe komata na Ye na Lola. Tango toyebi mpe tondimeli mosala oyo ya lobiko kati na makambo manso malekaki, tobiksami na masumu mabiso manso. Libatisi lia Yesu lizalaki ebandeli ya sango malamu mpe makila ma Ye na Kuruse ezalaki bokokisami na yango. 
“Ebandeli ya sango malamu ya Yesu Klisto, Mwana na Nzambe” (Malako 1:1). Tokoki te kobosana eloko moko te kati na misala mia Ye mia bosembo ―libatisi lia Ye, makila ma Ye na Kuruse, Lisekwi lia Ye, komata na Ye, mpe boyeyi na Ye bwa mbala ya mibale ―wuta sango malamu ya Mwana na Nzambe. 
Yesu ayaki na mokili oyo na nzoto, pwete alongola mosika masumu manso ma bato na nzela ya libatisi lia Ye. Yango nde ezalaki ebandeli ya sango malamu ya Lola. Soki ata eloko moke kati-kati na yango ebungaki, sango malamu ya Lola ekokaki te kozala mobimba. 
Bongo, soki moto moko abotami mbala ya mibale, asengeli andimela libatisi lia Yesu na makila ma Ye. Mikolo oyo, bato ebele bandimeli te libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye. Bakanisi ete libatisi lia Yesu lizali eloko moko ya bokoko. Ezali libungi ya monene. Oyo nyonso andimeli Yesu asengeli kondimela mpe libatisi lia Ye mpe makila ma Ye.
Ndenge nini masumu mabiso makoki kolongolama mosika na kobondela ya pamba kaka pona bolimbisi? Masumu mabiso manso malekaki na nzoto ya Yesu tango abatisamaki na Yoane Mobatisi. Ezalaki na nzela mosusu te pona kolongola masumu ma bato ya mokili. 
Tosengeli kobotama mabala ya mibale na mayi mpe na Molimo pona kokota na bokonzi bwa Lola. Lisiko likokaki kosala te soki mayi ya libatisi, makila ma Kuruse na Molimo ezalaki te. Kaka oyo abotami mbala ya mibale nde akomona Nzambe lokola Yesu ayebisaki Nikodemi na Yoane 3:5. Lobiko ya solo eyaka tango tondimeli libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye.
 
 

TOKOKI KOBIKISAMA LIBANDA YA LIBATISI LIA YESU?


Ndenge nini Yesu akomi Mokonzi na biso?
Na nzela ya kolongola masumu Mabiso na libatisi lia Ye

Soki tobosani ete na kati ya mosala ya Nkolo, Yesu ayaki pona kolongola mosika masumu ma mokili manso na nzela ya libatisi lia Ye, tope tosangi kotalela bosantu na Yesu, oyo abotama mwasi ayebi nano mobali te Maria, soki to moni eloko pamba kondimela Kuruse ya Yesu, Bo-Klisto ekokoma lokola losambo ya pamba-pamba esika wapi bandimi bazali koyemba “limbisa ngai, limbisa ngai, limbisa ngai, limbisa ngai” lukola ba budiste kati na esika basanganaka na bango. 
Kolongola libatisi lia Yesu elingi koloba ete masumu mabiso malekaki na nzoto na Ye te. Kondima na biso ekosanga tina, ekozala na bokeseni lisusu te na moto ya nyongo azali kosenga afutama, tango afutaki eloko moko te. Ekokomisa biso bato ya lokuta, pwete eloko moko esalemi te mpe biso banso tokomonana bato ya lokuta. Soki nkolo nyongo alobi ete afutaki nyongo nyonso tango afutaki te, akotikala kaka moto ya nyongo, mpe ekozala bongo na kati na motema na ye.
Yesu asokolaki bandimi na mayi ya libatisi lia Ye mpe asalaki bango bana na Nzambe. Yesu alongolaki mosika masumu ma mokili manso na nzela ya Yoane Mobatisi, pwete bandimi banso basantisama. Tango toyebi mpe tondimeli yango, mitema mia biso mikomi peto pona libela. 
Matondo Nzambe pona ngolo na Yo. Luka 2:14 elobi ete, “Nkembo na Nzambe kati na bisika oyo eleki likolo, mpe kimia na mabele kati na bato oyo alingaka!” Kondima na biso kati na mayi na makila ma Yesu ezali komemela biso lobiko ya mobimba mpe kosala biso bana na Nzambe. Libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye ebikisi biso mpe oyo nyonso andimeli makambo mibale wana, abikisami. 
Eloko moko te ekoki kotikala pembeni na mosala mwa Yesu. Bamosusu bandimelaka kaka makila, mpe bazali koloba ete ntoma Polo akumisaka kaka Kuruse. Kasi libatisi lia Yesu lizali na kati na Kuruse. 
Tokoki kotala Barome elongi 6 pwete tomona ete Polo abatisamaki kati na Klisto mpe akufaki kati na Klisto. Mpe na Bagalatia 2:20, “Boye ezali lisusu ngai te moto nazali kobika, kasi ezali Klisto nde azali kobika kati na ngai. Bomoi oyo nazali kobika sik’oyo kati na nzoto na ngai lokola moto, nazali kobika yango na nzela ya kondima kati na Mwana na Nzambe, oyo alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.”
Mpe Bagalatia 3:27-29, “Pamba te bino nyonso oyo bozwaki libatisi kati na Klisto bolataki nde Klisto. Bokeseni ezali lisusu te kati na Bayuda mpe Bagreki, kati na bawumbu mpe bansomi, kati na mibali mpe basi ; pamba te bino nyonso bozali se moto moko kati na Yesu-Klisto. Mpe soki bozali ya Klisto, bozali mpe bokitani ya Abrayami, bakitani ya libula kolanda elaka oyo Nzambe apesaki na Abrayami.”
Kobatisama na kati na Klisto elingi koloba kondimela makambo manso Asalaki na mokili, libatisi lia Ye, mpe makila ma Ye na Kuruse. Kondimela libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye ezali kondimela bosolo ya bolongoli masumu mosika eleki mbula 2000. Nzela mosusu ya komema lobiko ezali te.
 

TOBIKISAMI NA NZAMBE TANGO TONDIMELI KATI NA LIBATISI LIA YESU MPE MAKILA NA KURUSE 

Masumu mabiso makoki kolongolama Na nzela ya kosenga bolimbisi?
Te. Bolimbisi ya lisumu ekoki kosalema na nzela ya Kondima na biso ete masumu manso malekaki na Yesu Tango Abatisamaki Na Yoane Mobatisi.

“Pamba te kondima oyo ekomisaka sembo ewutaka na motema, mpe litatoli oyo ememaka na lobiko ebimaka nde na monoko.” (Barome 10:10).
“Pamba te bino nyonso oyo bozwaki libatisi kati na Klisto bolataki nde Klisto.” (Bagalatia 3:27). Kondima na biso ezali kokumba biso na kobatisama kati na Klisto, kolata Klisto, mpe kokoma bana ba Nzambe. Tango Yesu ayaki na mokili mpe Abatisamaki, masumu mabiso na ya mokili malekaki na Ye. 
Kondima na biso esengeli komema biso kozala na Klisto. Tokufaki tango Akufaki. Tosekwaki tango Asekwaki. Sikoyo pwete tondimeli kati na libatisi lia Yesu, makila ma Ye, misekwi lia Ye, komata na Ye, mpe boyeyi na Ye, tokoki kokota na bokonzi bwa Lola pona kobika kuna pona libela. 
Tango bato bandimeli kati na makila ma Yesu Ye moko, bakoki koniokwama lisusu na lisumu litikalaka kati na motema. Pona nini? Pwete bayebi nano te tina ya libatisi lia Yesu, oyo Alongolaki mosika masumu mabango manso mpe apetolaki mitema miabango mpe Akokomisaki yango pembe lokola mvula ya pembe pona libela. 
Ondimali kati na libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye maye mabikisi yo wuta na masumu mayo? Nabeleli yo ondimela kati ya bosolo. Soki ozangi kondima na libatisi lia Yesu, kondima na yo ezali ya pamba. Soki kondima kati na libatisi lia Yesu ezali te, okozuwa te lisiko lia masumu mayo; omikotisi na kati ya bolingo ya bitumba. 
Baye bandimeli kaka Kuruse balobaka, “Yesu azali Nkolo nangai, oyo akufaki na kuruse pona ngai. Asekwaki lisusu wuta baweyi mpe atatolaki lisekwi lia Ye mikolo 40, liboso amata na Lola mpe afanda na loboko ya mobali ya Nzambe. Nandimeli ete Akoya mbala ya mibale pona kosambisa biso mpe nabondeli ete Yesu akobalokisa ngai mobimba, bongo nakoki kokutana na Ye. Oh, Yesu molingami na ngai, Nkolo nangai.” 
Basengi bolimbisi ya masumu mabango mpe bakanisi bazali na lisumu te, kasi ezali na masumu kati na mitema mia bango. “Nandimeli Yesu kasi nazali na lisumu kati na motema. Nalingi Yesu kasi nazali na lisumu kati na motema nangai. Nakoki koloba ete, ‘Limbisa ngai yaka, mobali nangai, pwete nazali na lisumu mpe nakoki te koyeba malamu soki nabikisami tope te. Bongo, nakanisi Yesu akoya tango namibongisi malamu mpe kaka tango na bondeli makasi mpe natubeli makasi. Nalingi Yesu na motema nangai kasi nakoki te kokuta na Yo pwete nazali na masumu kati na motema nangai.” 
Soki Yesu akokaki kotuna bato ya ndenge wana, “Pona nini bokanisi ete bozali te ya mobimba?” 
Bakokaki koyanola, “Nkolo, nayebi ete nazali sembo te pwete nasumukaka mokolo na mokolo. Bongo, benga ngai tango okobenga basumuki.” 
Bayebi te Nzambe, Mokeli mpe Mosambisi, akondima te basumuki tope kosala bango bana na Ye. 
Mobali ya libala ayaki pona kopesa biyano na makambo ya mwasi na ye, kasi pwete mwasi ayebaki te yango, mpe akomi kotungisama. Tango tokanisi ete tozali basumuki pwete tosumukaki na nzoto, tozali na kondima kati na Nzambe te. Tango tososoli te bosolo ya liloba ya Nzambe, lisumu kati na mitema mia biso ezali kobakisama. 

Pona nini bato mosusu bazali kokemba na Lisumu litikali na mitema miabango?
Pwete bayebaki te na kati na mitema miabango Tina ya libatisi lia Yesu kati na nini bolongoli ya Masumu mabango.

Mobali ya libala alongolaki mosika masumu ma mokili. Wapi? Na Yordani tango Abaisamaki. Baye bandimeli yango bazali nano basumuki. Batikai masi ya milakeli mabe.
Mobali atuni mwasi ete, “Ndenge nini okoki kolinga Ngai tango oyo ozali mwasi na Ngai te? Liboso obenga Ngai Mobali na Yo, masumu mayo esengeli kolongolama mosika.”
Tokoki kozuwa lisiko libanda na libatisi lia Yesu? Te! Tokelami na elili na Nzambe, pwete tozali koluka bosembo kati na mitema miabiso, mpe mitema miabiso emeki kozala sembo, mpe. Kazi ezali pasi pona biso kokanisa tozali na lisumu te soki mitema mia biso misokolami te. Kaka tango tondimeli libatisi lia Yesu nde tokoki solo-solo koloba ete tozali na lisumu te mpe tokomi sembo.
Mitema mia biso mikoki kosokolama te soki tozali komitala ete tozali na lisumu te tango oyo na bosolo, tozali na lisumu kati na mitema miabiso. Nzambe akoki koyamba biso na lolenge wana te. Nzambe akosaka ata moko te. 
Nzambe ayebisaki Moize kotanga bana Isalayele mpe kofuta epayi na Ye nyongo ya bomoyi na bango. Mozuwi apesaki koleka eteni ya shekeli mpe mobola kopesa moke na yango. Moko na moko afutaki nyongo ya bomoyi. 
Pona yango, ndenge nini moto akoki kokoma sembo soki andimeli te Yesu oyo afutaki nyongo ya bomoyi bwa ye? Moto ya ndenge wana azali kokoba kozala na lisumu na motema mwa ye. 
Tango tondimeli kaka makila ma Yesu, tozali na lisumu kati na mitema mia biso mpe tosengeli kotubela ete tozali basumuki. Kasi tango tondimeli sango malamu ya libatisi lia Ye mpe na Kuruse elongo, tokoki solo-solo koloba ete tozali na lisumu te. Lobiko mpe bomoyi ya seko ezali ya biso.
 
 

BOTOMBOKI NA MOLIMO


Lisumu nini ekatelaka Moto etumbo ya lifelo?
Lisumu na Molimo, na maloba mosusu, Koboya kondimela kati na Libatisi lia Yesu.

Barome 1:17 elobi ete, “Pamba te Sango Malamu yango emonisaka biso bosembo ya Nzambe, oyo ezwamaka na nzela ya kondima, wuta na ebandeli kino na suka, kolanda ndenge ekomama: ‘Moto ya sembo akobika na nzela ya kondima.’” Bosembo bwa Nzambe bomimonani kati na sango malamu. Yesu Klisto ayaki na mokili oyo mpe alongolaki mosika masumu manso ma bato na libatisi lia Ye mpe na liwa lia Ye na Kuruse. Libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye ezali na nguya ya sango malamu. Apetolaki masumu mabiso manso mbala moko pona na libela. 
Kondima elingi koloba ete lobiko mpe kozanga kondima elingi koloba lifelo. Tata na biso na Lola astindaki Mwana na Ye moko na mokili mpe Abatisamaki pona kolongola mosika masumu mabiso. Bongo, oyo akondimela Ye, akoki kopetolama na botomboki na ye nyonso. 
Lisumu litikali na mokili oyo lizali koboya kondimela libatisi lia Ye mpe na makila ma Ye. Koboya kondima ezali botomboki na Molimo mpe lisumu oyo ekosambisama na Nzambe Ye moko, oyo etumbo na yango ekomeme moto ya bozangi kondima na lifelo. Yango nde lisumu ya monene koleka nyonso. Oyo nyonso asali yango esengeli atubela mpe azuwa lisiko na kondimela libatisi lia Yesu. 
Pamba te, akomona pasi libela na libela. Obikisami na litatoli lia lisiko na nzela ya libatisi lia Ye na makila ma Ye? Oyanbaki litatoli lia Yoane ndenge ekomami na Yoane 1:29, “Botala! Mwana Mpate oyo alongoli mosika masumu mamokili!” Ondimeli libatis lia Yesu mpe makila ma Ye lokola ekomami na Ba-Ebre 10:18, “Nzokande, soki Nzambe alimbisi moto masumu, ezalaka lisusu te na likabo ya kopesa mpo na masumu.” 
Nzambe atatoli ete baye bandimeli libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye na mitema miabango, Asali bango bana na Ye. Baye bandimeli libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye bazuwi lisiko na nzela ya bosembo mpe bolingo na Yesu. 
Oyo nyonso Nzambe atinda, alobelaka maloba ma Nzambe, kasi baye bazali na mabele, baye batindama te na Nzambe, bazali koteya kolandiama na makanisi mabango moko. Ezali na bato ebele na mokili oyo baye bazali koteya liloba lia Nzambe, mpe baye batindama na Nzambe kolobela libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye. 
Kasi baye bazali koteya maloba mabango moko bazali kosalela kaka makanisi mabango moko. Bazali koloba ete, “Tozuwi lisiko lia lisumu lia ebandeli, kasi moko na moko asengeli kosenga molimbisi pona masumu ma mokolona mokolo.” Balobi ete tozali kokoma sembo malembe-malembe. 
Kasi, moto akoki kokoma sembo na makasi maye moko? Tokoki kokoma sembo na makasi mabiso moko, mpe na misala  ya biso moko, na boyebi bwa biso moko? Tokomi sembo pwete Nzambe alongolaki mosika masumu mabiso, tope pwete tozali komeka kokokisa kokoma na lisiko na nzela ya biso moko? 
Kondima ya solo ekomisa biso sembo. Tokoki kokomisa likala pembe soki tosokoli yango mbala nkotomoko? Tokoki kokomisa pembe poso moyindu na kosokola? Motuya ya saboni boni ekolongola mosika masumu mabiso, mpe bosembo bwa biso bozali lokola eteni ya elemba ya salite. Tokokoma sembo na kondima libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye, tope na kondima kaka makila ma Ye na Kuruse? 
Kondima ya solo eyaka na mayi ya libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye na Kuruse. Lobiko ezali te mbuma ya mosala ya maboko mabiso moko. Kaka kondima na biso kati na libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye nde ekokangola biso na lisumu mpe kokomisa biso sembo. 
Tata apesaki bato banso na maboko ma Mwana na Ye, mpe baye bandimeli Ye bazuwa bomoyi ya seko. Kodimela kati na Mwana elingi koloba ete kondima kati na lisiko na nzela ya libatisi lia Ye mpe na makila ma Ye. Baye bandimeli bakozuwa bomoyi ya seko lokola bana na Nzambe. Baye bakobikisama bakobika libela na loboko ya mobali na Nzambe. 
Kondima kati na libatisi lia Yesu mpe bomoko bwa Ye na Nzambe ezali mpe kondima kati na Molimo. Liloba ya solo lizali kopesa biso nzela ya kobotama mabala ya mibale. Tobikisami na kondimela libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye.
Zala na kondima. Ndimela libatisi lia Yesu mpe makila ma Ye, mpe okozuwa lisiko. Ndimela sango malamu ya solo mpe okozuwa bolimbisi bwa masumu mayo.