(Matie 7:21-23)“Bato nyonso oyo balobaka na Ngai: ‘Nkolo! Nkolo!’ bakokota te na Bokonzi ya Likolo, kaka bato oyo basalaka mokano ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo. Na mokolo ya kosambisama, bato ebele bakoloba na Ngai: ‘Nkolo! Nkolo! Ezali te na Kombo na Yo nde tosakolaki, tobenganaki milimo mabe mpe tosalaki bikamwa ebele?’ Bongo Ngai, nakoyebisa bango: ‘Natikala koyeba bino te! Bolongwa liboso na Ngai, bino bato mabe!’”
TANGO MOSUSU NAZALI MOKO NA KATI...
Bato nyonso balobaka ‘Nkolo, Nkolo’ Bakokota na bokonzi bwa Lola?
Te. Kaka baye basalaka mokano Mwa Nzambe
Yesu Klisto alobi, “Bato nyonso oyo balobaka na Ngai: ‘Nkolo! Nkolo!’ bakokota te na Bokonzi ya Likolo, kaka bato oyo basalaka mokano ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo.” Maloba oyo ebotaki kobanga mingi na mitema mia Ba-Klisto ebele, mpe etindikaki bango kosala makasi pona mokano mwa Nzambe.
Ba-Klisto ebele bakanisi ete eloko moko ya motuya ezali kondimela Yesu pona kokota na bokonzi bwa Lola, kasi Matie 7:21 etalisi biso ete baye banso balobaka na Ye, ‘Nkolo, Nkolo,’ bakokota te na bokonzi bwa Lola.
Bato ebele baye batangi molongo oyo bazali kobanga na komituna “Tango mosusu, nazali moko na kati.” Bameki komikitisa mitema miabango, “Te, Yesu alobelaki baye nano bandimeli Ye te.” Kasi likanisi litikali kati na mitema mia bango, mpe lizali kotungisa bango.
Bongo, bajembeli na suka ya molongo oyo elobi, “kasi oyo azali kosala mokano mwa Tata na Lola.” Bajembeli na maloba, “kosala mokano mwa Tata na Ngai” mpe bakanisi ete bakoki kosala yango na kofuta moko na zomi, kobondela na tongo makasi, koteya, kosala makambo ya malamu, mpe kosumuka te... Bazali komeka na makasi na bango. Ekoki mpe kopesa bango pasi na motema.
Bato ebele bazali kosala mbeba pwete basosoli malamu te molongo wana. Pona yango, nalingi kolobela na molongo wana polele ete tokoki biso banso koyeba mokano mwa Nzambe mpe kobika na yango.
Liboso, tosengeli koyeba mokano mwa Nzambe pona Mwana na Ye kolongola mosika masumu ma bato banso mpe kokangola biso wuta na lisumu.
Ba-Efeso 1:5, ekomami ete, “Nzambe abongisa biso wuta kala pwete tozwa makoki ya kokoma bana na Ye na nzela ya Yesu-Klisto, kolanda bolamu mpe mokano na Ye moko.”
Na maloba mosusu, likanisi lia Ye pona biso lizali toyeba sango malamu ya solo ya Yesu Klisto, ndenge alongolaki mosika masumu mabiso manso, bongo Apesi biso nzela ya kobotama mbala ya mibale. Alingi biso, tobotama mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo na nzela ya kolekisa masumu mabiso na Mwana mwa Ye, Yesu. Yango nde mokano mwa Nzambe.
KAKA PONA KOLOBA, “NKOLO! NKOLO!”
Tosengeli koyeba nini Tango tondimeli Yesu?
Mokano mwa Tata.
“Bato nyonso oyo balobaka na Ngai: ‘Nkolo! Nkolo!’ bakokota te na Bokonzi ya Likolo, kaka bato oyo basalaka mokano ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo.” (Matie 7:21).
Tobengami kososola mokano mwa Tata na nzela mibale. Ya liboso, tosengeli koyeba ezali mokano mwa Ye tolimbisama pona masumu mabiso mpe tobotama mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Ya mibale, tosengeli kosala na moboku ya kondima wana.
Ezali mokano mwa Nzambe kolongola mosika masumu ma bato banso na mokili. Satana amemaki kokweya ya koko na biso Adam kati na lisumu. Kasi mokano mwa Tata mozali kolongola mosika masumu manso ma bato. Tosengeli kososola ete mokano mwa Tata pona biso ezali te kopesa moko na zomi, mpe kobondela na tongo, kasi kobikisa biso la lisumu. Yango nde mokano na Ye, oyo ya kobikisa biso banso na bonge kati na mayi monene ya lisumu.
Mokanda mwa Nzambe molobi ete, ezali te oyo nyonso alobi ‘Nkolo, Nkolo’ nde akokota na bokonzi na Lola. Yango elingi koloba oyo Tata alingi pona biso. Ezali mokano mwa Ye pona kobikisa biso na lisumu, mpe na esambiselo ya lifelo, na koyeba ete kati na Adam mpe na Eva tokoki te kotika bomoyi ya lisumu.
MOKANO MWA NZAMBE
Mokano na Ye ezali nini?
Tokoma bana na Ye na kolongola Biso na lisumu.
Matie 3:15 elobi, “Ezali malamu mpo na biso kosala bongo mpo na kokokisa bosembo nyonso.” Bongo ezalaki pona kokokisa mabongisi ma Nzambe ete Yesu ayaki na mokili oyo kobikisa biso na masumu manso. Mokano mwa Nzambe ekokisamaki tango Yesu abatimaki na Yoane Mobatisi.
Alingaki kobikisa biso mpe kosala biso bana ba Ye. Pona kosala yango, Mwana na Ye alongolaki mosika masumu mabiso manso. Ezalaki mokano mwa Ye kosala bato banso bana ba Ye. Bongo, Atindaki Mwana na Ye moko kolongola mosika masumu manso ma bato baye bakweyaki na motambo ya Satana. Ezalaki mokano na Ye kobesa biso bomoyi ya Mwana na Ye moko pona bato banso bakoma bana ba Ye.
Tango Yesu abatisamaki mpe akufaki na Kuruse, mokano mwa Nzambe mokokisamaki. Ezalaki mokano mwa Ye pona biso kondima ete masumu mabiso manso maleka na nzoto na Yesu tango abatisamaki mpe azuwaki etumbo pona botomboki bwa biso na nzela ya liwa na Ye na Kuruse.
“Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.” (Yoane 3:16). Nzambe abikisaki bato na Ye na lisumu. Pona kosala boye, eloko ya liboso Yesu asalaki na mosala na Ye ya libanda ezalaki kobatisama na Yoane Mobatisi.
“Yesu azongiselaki ye: — Tika ete esalema bongo sik’oyo! Ezali malamu mpo na biso kosala bongo mpo na kokokisa bosembo nyonso.” (Matie 3:15). Ezalaki mokano mwa Nzambe ete Yesu ayaki na mokili oyo, kolongola mosika masumu manso ma mokili na nzela ya libatisi lia Ye, akufaki na Kuruse, mpe asekwaki.
Tosengeli koyeba yango polele. Bato ebele batangaka Matie 7:21 mpe bakanisaka ete ezali mokano mwa Ye pona biso kosalela Nkolo, tii liwa, na kopesa biloko nyonso ya mokili oyo pona kotonga bisika ya losambo.
Bandeko Ba-Klisto, biso baye tondimeli Yesu tosengeli koyeba mokano mwa Nzambe mpe kosalela yango. Ezali malamu te pona yo komipesa na etonga mpe oyebi te mokano mwa Ye.
Bato bazali komituna esengi lisusu nini pona kobika bomoyi ya kondima kati na bisika na bango ya mabondeli ya mayele ya bomoto. Kasi ngai moko nayekolaki Bo-Calvin na kati na etonga ya Ba-Presbyteria mpe nakola na mama mobokoli oyo azalaki kosambela mingi lokola mokambi ya mokolo. Natangaki baye babengami Ba-Ortodokse.
Ntoma Polo alobaki ete akokaki komibeta na tolo ete awuti na nadako ya Benjamin mpe atangaki Mobeko na makolo ma Gamaliel, oyo azalaki molakisi monene na tango wana. Liboso Polo abotama mbala ya mibale, azalaki kokende kokanga bandimi ya Yesu. Kasi andimelaki Yesu na nzela ya Damasi mpe akomaki sembo na nzela ya lipamboli lia botama mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo.
TOSENGELI KOYEBA MOKANO MWA NZAMBE YAMBO TOSALA YANGO
Nini ezali na motuya Liboso ya kondima Yesu?
Tosengeli koyeba Mokano na Ye.
Bosembo na biso ezali mokano mwa Nzambe. “Nzambe alingi ete bozalaka bule tango nyonso: bokimaka pite;” (1 Batesalonikas 4:3). Toyebi ete ezali mokano na Nzambe tokoma sembo na nzela ya mayi mpe na Molimo mpe tobika kati na kondima bomoyi na biso mobimba.
Soki ezali na moto moko oyo andimeli Yesu kasi azali na lisumu kati na motema mwa ye, azali kobika te kolandisama na mokano mwa Nzambe. Kolanda mokano mwa Ye ekosenga tokoma sembo na nzela ya lobiko tokuti kati na Yesu.
Koyeba oyo ezali kosala mokano mwaNzambe. Tango natuni yo, “Ozali lisusu na lisumu na motema na yo ata osi ondimele Yesu?” Mpe oyanoli -boye, bongo polele oyebi te mokano mwa Nzambe. Mokano mwa Nzambe mozali ete tokoma sembo wuta masumu mabiso koleka na kondima kati na mayi mpe na Molimo.
Ezalaki na moto moko oyo azalaki na bana ya botosi. Mokolo mokolo abengaki oyo ya mokolo, oyo azalaki mpe na botosi koleka, mpe ayebisi ye, “Mwana, kende na bonka na nzela ya zamba...”
Yambo asilisa, mwana ayebisaki ye, “Boye, tata” mpe akandaki. Azelaki te koyeba malamu ndenge nini ka kosala oyo basengaki ye. Akendaki kaka.
Tata na ye abengaki ye na sima mpe ayebisaki ye, “Mwana,ezali malamu ozala na botosi, kasi esengeli oyeba nini nalingi osalela ngai.”
Kasi mwana ayebisaki ye “Ezali malamu, tata. Nakokende. Nani akoki kotosa yo koleka ngai?”
Kasi akendaki mpe azongaki maboko pamba. Akokaki te kosala mokano mwa tata naye pwete ayebaki te eloko tata naye alingaki asalela ye. Andimaki lokola mozangi miso.
Tokoki kozala lokola ye soki toyebi te Yesu Klisto. Bato ebele bamipesi, bazali kolanda malakisi ma koyeba makambo ya Nzambe, kopesa moko na zomi, kobondela butu nyonso mpe kokanga biloko ya kolia, libanda na koyeba mokano mwa Nzambe.
Tango bakufi na lisumu kati na mitema miabango, babengami na ekuke ya Lola. Bazalaki bangu pona kosala mokano mwa Nzambe kasi bayebaki te nini Nzambe alingaki bango kosala.
Kosala makambo libanda Na mobeko ezali nini?
Kondimela Yesu lokola mosumuki Tango oyebi sango malamu ya Mayi mpena Molimo.
“Na mokolo ya kosambisama, bato ebele bakoloba na Ngai: ‘Nkolo! Nkolo! Ezali te na Kombo na Yo nde tosakolaki, tobenganaki milimo mabe mpe tosalaki bikamwaebele?’ Bongo Ngai, nakoyebisa bango: ‘Natikala koyeba bino te! Bolongwa liboso na Ngai, bino bato mabe!’” (Matie 7:22-23)
Ezali na makambo Nzambe alingi kosala, mpe ezali na kondima oyo Azali kosenga biso. Alingi biso kondimela ete Yesu alongolaki mosika masumu manso mabiso. Masakoli ebele, kobengana milimo ya mabe, mpe kosala bikamwa na kombo na Ye libanda na bosolo ya mayi mpe na Molimo.
Kosala bikamwa elingi koloba kotonga bandako na Nzambe ebele, koteka biloko nyonso kopesa mbongo na etonga, kopesa bomoyi pona Nkolo, kati-kati na makambo oyo.
Kosakola na kombo na Ye elingi koloba kozala mokambi. Bato ya ndenge wana bazali lokola Bafarizao baye bazali komibeta tolo pona bomoyi kolandisama na Mobeko tango oyo bazali kobundisa Yesu. Ezali mpe ndenge moko na Ba-Klisto ya etonga ya Ba-Ortodokse.
Kobengana milimo mabe ezali kosalela nguya. Bazali moto-moto kati na kondima na bango, kasi Nkolo akoyebisa bango na mokolo ya suka ete Ayebi bango te. Akotuna bango ndenge nini bayebi Ye tango Ye ayebi bango te.
Nkolo akoloba na bango, “Mpe Nakoyebisa bango, ‘Nano nayebi bino te; bokende mosika na Ngai, bino basali ya makambo mabe!’” Na mokolo wana, ebele ya bato bakoganga na Ye, “Nkolo, nandimi. Nandimi ete Ozali Mobikisi na ngai.” Bakoloba ete balingaka Ye kasi bazali na lisumu kati na mitema miabango. Nkolo akobenga bango basali ya makambo mabe (basumuki baye nano babikisami te) mpe akoyebisa bango bakende mosika na Ye.
Na mokolo wana, baye bakufaki nano babotami te mbala ya mibale bakoganga liboso na Yesu. “Nasakolaki, natongaki banadako na Nzambe, natindaki basali na Nzambe 50 na kombo na Yo.”
Kasi Yesu akolobela bango ete bazali basumuki, “Natikala koyeba bino te! Bolongwa liboso na Ngai, bino bato mabe!”
“Elingi koloba nini? Oyebi te nasakolaki na kombo na Yo? Na sala na kati na etonga mbula ebele… Nayebisa bato bandimela Yo. Ndenge nini Okoki kozanga koyeba ngai?”
Akoyanola, “Natikala koyeba yo te. Yo oyo olobi oyebi Ngai, ozali nano na lisumu kati na motema mwayo, kende mosika na Ngai!”
Ezali eloko ya mabe liboso na Nzambe kondimela Ye na lisumu kati na motema tope kondimela ye te kolandisama na mobeko mwa lobiko na Ye. Ezali malamu te kozanga koyeba mokano mwa Ye. Ezali mabe komeka kosala mokano mwa Ye na kozanga koyeba yango tope koyeba lipamboli lia botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Ezali libanda na mobeko kolanda Ye na kozanga kotosa mokano mwa Ye. Kozanga botosi bwa liloba lia Nzambe ezali lisumu.
MOKANO MWA NZAMBE KATI NA MOKANDA MWA YE
Nani azali mwana Na nzambe?
Moyengebene oyo azali Na lisumu te.
Ezali mokano mwa Nzambe pona biso kondimela sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Sango malamu ya solo efandi na botama ya mbala ya mibale. Ezali mpe mokano mwa Ye ete tobika bomoyi ya sango malamu lokola bana na Nzambe. Tosengeli koyeba mokano mwa Nzambe, kasi bato ebele bayebi nano te sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo.
Tango natunaka bato pona nini bandimeli Yesu, mingi balobaka bandimeli Yesu pona kobikisama na masumu mabango.
Natuni, “Bongo, ozali na lisumu kati na motema na yo?”
Balobi, “Boye, nazali na yango.”
“Bongo, osi obikisami tope nano te?”
“Nasi nabikisami.”
“Mosumuki oyo azali na lisumu kati na motema akoki kokota na bokonzi bwa Lola?”
“Te, akoki te.”
“Bongo, okokende na bokonzi bwa Lola tope kati na moto ya lifelo?”
Balobi ete bakokende na bokonzi bwa Lola, kasi bakoki kokende kuna? Bakokende na liefelo.
Bamosusu bakanisi ete lokola bandimeli Yesu, bakoki kokota na bokonzi ya Lola ata bazali na lisumu kati na mitema mia bango mpe ezali mokano na Nzambe pona bango kosala ndenge wana. Kasi Nzambe aboyi basumuki kati na bokonzi bwa Lola.
Mokano mwa Nzambe mozali nini? Ekomami na Mokanda mwa Nzambe ete mokano mwa Nzambe ezali pona biso kondimela Mwana mwa Ye, kondimela lipamboli lia lisiko na nzela ya libatisi lia Yesu mpe na makila ma Ye na Kuruse.
Baye bandimeli kati na lipamboli lia botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo bakomi bana ba Nzambe. Ezali kembo na biso kokoma bana na Nzambe. Bana na Ye bazali bana ya bosembo.
Tango Nzambe abengi biso bayengebene, Azali kotala Moklisto-mosumuki lokola moto ya bosembo? Nzambe akoki kokosa te. Bongo, liboso na Ye, ozali mosumuki tope moyengebene. Bakoki te kozala lokola ‘bato bazangi lisumu.’ Abengaka kaka oyo andimeli kati na sango malamu ya mayi mpe ya Molimo kosantisama.
Ndenge nini tokoki Kokoma bana na Nzambe?
Na kondimela sango malamu ya Mayimpe na makila.
Pwete Nzambe alekisaki masumu manso ma mokili na nzoto ya Mwana na Ye, ata Mwana na Ye moko asambisamaki na Kuruse. Nzambe akosaka te. Alobi ete, “Lifuti lia lisumu lizali liwa.” (Barome 6:23). Tango Yesu akufaki, butu etodisaki mabele ngonga misato.
“Pene na ngonga ya misato ya pokwa, Yesu agangaki: — Eloi, Eloi, lema sabachtani? Elingi koloba: Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini osundoli Ngai?’” (Matie 27:46)
Yesu alongolaki mosika masumu manso ma mokili na nzela ya libatisi lia Ye pona kobikisa bato na masumu mabango. Alongolaki masumu mabato banso, mpe Ayebaki ete Akokufa na Kuruse mpe Nzambe, Tata na Ye akotika Ye. Bongo, Nzambe akataki etumbo likolo na Mwana na Ye moko pona masumu alongolaki na Yordani mpe Abalukelaki Mwana na Ye elongi na nganga misato.
“Nzokande bato nyonso oyo bayambaki Ye, ba-oyo bandimelaki Kombo na Ye, apesaki bango makoki ya kokoma bana na Nzambe.” (Yoane 1:12).
Ozali mwana na Nzambe? Tobotami mbala ya mibale pwete tondimeli sango malamu ya botama ya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Baye babotami mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo bazali sembo. Sikoyo tosengeli biso banso kokoma sembo.
“Boye, toloba lisusu nini? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso?” (Barome 8:31). Tango moyengebene amibengi moyengebene liboso na Nzambe mpe ya bato, baye nano bazuwi lisiko bakomeka kokatela ye etumbo. Bongo, ntoma Polo alobaki, “Nani akofunda bato oyo Nzambe apona ? Ezali Nzambe nde akomisaka sembo.” (Barome 8:33). Nzambe alongolaki masumu mabiso manso na nzela ya Yesu mpe abenga biso basembo, bayengebene, mpe bana ba Ye. Apesa biso nguya ya kokoma bana na Ye ba kembo.
Baye babotami na mayi mpe na Molimo bazali bana ba Ye. Bakobika na Ye seko na seko. Bazali lisusu te lokola bikelamu na mokili oyo, kasi bana na Nzambe baye bazali ya Lola.
Sikoyo bazali bayengebene mpe bana na Nzambe, moto moko te akoki kokatela bango etumbo, kosambisa bango, tope kobalola bango na Nzambe.
Tosengeli koyeba sango malamu ya mayi mpe na Molimo pone kondimela Yesu. Tosengeli koyeba Mokanda mwa Nzambe. Ezali na motuya toyeba mpe tondimela mokano mwa Nzambe pwete tosala yango kolandisama na mokano mwa Ye.
EZALI MOKANO MWA NZAMBE BASUMUKI BABOTAMA MBALA YA MIBALE NA MAYI MPE NA MOLIMO
Pona nini Nzambe atindaki Mwana na Ye lokola mosumuki?
Pona kolekisa masumu manso na Nzoto na Ye.
Ezali mokano mwa Nzambe tozuwa lisiko mpe tobotama mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. “Nzambe alingi ete bozalaka bule tango nyonso: bokimaka pite;” (1 Batesalonika 4:3).
Ezalaki mokano mwa Nzambe kotinda Mwana na Ye pwete masumu manso maleka na nzoto na Ye mpe tokoki kobikisama. Yango nde mobeko mwa Molimo oyo ezali kopesa nzela ya kobotama mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo. Ezali kokangola biso na masumu manso.
Tozuwi lisiko. Sikoyo bino banso bososoli mokano mwa Nzambe? Ezali mokano mwa Ye kopesa biso banso lisiko lia Ye. Alingi te kobebisa liloba lia Ye na mokili, kasi kondimela kaka malaoba ma Ye mpe konfukama liboso na Ye moko.
Ezali mokano mwa Nzambe ete baye babotami mbala ya mibale batatola sango malamu mpe babika na ndako na Nzambe, bamipesa na mosala ya komema baye nano bayebi te Nkolo epayi na Nzambe.
Tosali kosumuka te pwete tolingi kosala yango, kasi pwete tozali na bolembu. Kasi, Yesu alongolaki mosika masumu mana. Nzambe alekisaki yango na nzoto na Yesu na nzela ya Yoane Mobatisi. Atindaki Mwana na Ye pona tina wana mpe abatisamaki na Yoane Mobatisi. Tobikisami na kondimela yango. Yango nde mokano mwa Nzambe.
OYO NDE MOKANO MWA NZAMBE PONA BISO KONDIMA YESU, OYO ATINDAKI
Pona nini Yesu ayaki Lokola mosumuki?
Pona kolongola mosika masumu Manso ma bato.
Mokanda mwa Nzambe elobi kosala mokano mwa Nzambe ezali kondimela Ye oyo Nzambe atinda. “Batunaki Ye lisusu: Tosengeli kosala nini mpo na kokokisa misala oyo Nzambe azali kozela epai na biso? Yesu azongiselaki bango: Mosala ya Nzambe, yango oyo: bondima Ye oyo Nzambe atindaki. Batunaki Ye lisusu: Elembo nini ya kokamwa okolakisa biso mpo ete tondima Yo? Okosala penza nini? Bakoko na biso baliaki mana kati na esobe kolanda ndenge ekomama: ‘Apesaki bango lipa kowuta na Likolo.’” (Yoane 6:28-31).
Bato bayebisaki Yesu ete Nzambe apesaki Moize elembo tango azalaki na nzela ya Kana, kopesa Bana Isalayele mana wuta Lola, mpe lokola mbuma ya kodima Nzambe (Yoane 6:32-39). Bato batunaki Yesu, “Tosala nini pona kosala mosala mwa Nzambe?”
Yesu ayanoki bango ete basengeli kondimela Ye pona kosala mosala mwa Nzambe. Soki tolingi kosalela Nzambe, tosengeli kondimela misala mia Yesu Klisto. Ezali mokano mwa Nzambe pona biso kondimela kaka mpe koteya sango malamu mpe kobika kolandisama na yango.
Nzambe apesi biso mitindo, “Bokende, bokomisa bato ya bikolo nyonso bayekoli na Ngai, bobatisa bango na Kombo ya Tata, ya Mwana mpe ya Molimo Mosantu bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.” (Matie 28:19-20).
Yesu alobaki na biso polele kobatisa na kombo na Tata, mpe na Mwana, mpe na Molimo Mosantu. Eloko nyonso Asalaki pona Tata, mpe Molimo ezali na kati na libatisi lia Ye. Tango tososoli yango, tokoki kondimela Nzambe mpe komona eloko nonso Yesu asalaki na liloba mpe ndenge nini Molimo etatolaki yango.
Yesu atindamaki na Nzambe pona kotatola sango malamu ya mayi mpe Molimo. Pona yango, kaka tango tondimeli liloba lia Nzambe mpe mosali mwa Ye, nde tokoki kobikisama.
KOSALA MOSALA MWA NZAMBE
Tina na bomoyi ya Biso ezali nini?
Kosala mokano mwa Nzambe na Kopanza sango malamu na mokili.
Soki tolingi kosala mosala mwa Nzambe, tosengeli kondimela sango malamu ya libatisi lia Yesu mpe liwa lia Ye na Kuruse. Ezali mosala mwa Nzambe kondimela Ye oyo Nzambe atindaki. Pona kondimela Yesu, tosengeli yambo kondimela ete Abikisaki biso na mayi mpe na makila ma Ye.
Mokano mwa Nzambe mokokisami kati na biso tango tondimeli Yesu mpe toteyi sango malamu. Na nzela wana tosali mosala mwa Nzambe. Ayebisaki biso ete kaka baye bandimeli lipamboli lia botamaya mbala ya mibale na mayi mpe na Molimo, nde baye bakoki kokota na bokonzi bwa Lola.
Tozuwa biso banso bisika na biso kati na bokonzi bwa Lola na nzela ya kososola bosolo ya makambo oyo. Koyeba bosolo bwa mokano mwa Nzambe, koyeba mpe kondimela ete masumu mabiso manso malekaki na nzoto na Yesu na libatisi lia Ye. Kobika pona kokomisa monene bokonzi bwaYe. Na suka, koteya sango malamu tii mokolo ya liwa.
Baningi Ba-Klisto! Baye bandimeli sango malamu ya mayi mpe Molimo bazali kosala mosala mwa Nzambe. Yango nde mosala ya Nzambe kondimela Ye, oyo Nzambe atindaki. Ezali kosala mokano mwa Ye kondimela ete masumu manso malekaki na Ye oyo Nzambe atindaki mpe Yesu Klisto azali Mobikisi na biso.
Mosala mwa kobikisa moto wuta na lisumu ekokisamaki tango Yesu abatisamaki na Yordani mpe akufaki pona biso banso na Kuruse. Eteni ya mibale ya mosala na Nzambe ezali kondimela Ye oyo Nzambe atindaki, kodimela Mobikisi oyo alongolaki mosika masumu manso ma mokili, mpe koteya sango malamu na mokili mobimba.
Sikoyo tobotami mbala ya mibale, tokoki kobika mpe koteya sango malamu ya suka ya mokili.
Baye bandimeli Yesu mpe bayebi Te mokano mwa Nzambe, Bakendaka wapi?
Bakendaka na lifelo.
“Na mokolo ya kosambisama, bato ebele bakoloba na Ngai: ‘Nkolo! Nkolo! Ezali te na Kombo na Yo nde tosakolaki, tobenganaki milimo mabe mpe tosalaki bikamwa ebele?’ Bongo Ngai, nakoyebisa bango: ‘Natikala koyeba bino te! Bolongwa liboso na Ngai, bino bato mabe!’” (Matie 7:22-23)
Molongo oyo mozali polele mpe motalisi biso nani azali mosumuki liboso na Nzambe mpe oyo azali kosala kati na libungi mpe botomboki ya Mobeko.
Bato ebele nano babotami te mbala ya mibale kati-kati na baye bazali koloba ‘Nkolo, Nkolo’ Bazali na pasi mpe bazali kokoba kosumuka na mitema mia bango. Bongo, bazali koganga na kobenga ‘Nkolo, Nkolo’ na ndenge ya kolela, na kobondela libanda ya bosolo.
Bandimi ete na mitema mia bango bakoki komikopetola na kokanga kati na mabondeli, kasi ekosalema te pwete lisumu litikali na kati na mitema. Bazali kobondela na kogamga, kolela lokola Nzambe azalaka mosika. Tango kondima ya kotonda ezali te, tozali koganga ‘Nkolo, Nkolo’ mbala na mbala.
Na bisika mosusu wapi botama ya sika ezangi, babondelaka na nzoto, na koganga, mpe na kobeta maboko.
Kasi tokoki totala Mokanda na Nzambe mpe komona ete baye banso bazali koganga ‘Nkolo, Nkolo,’ bakokota te banso na bokonzi bwa Lola. Kaka baye bandimeli sango malamu ya mayi mpe ya Molimo nde bazali na kondima ezali kokumba bango na mosala mwa Nzambe.
Mokanda mwa Nzambe molobi ete ezali mabe kobenga kombo na Ye na lisumu na motema. Okendaki na ngomba pona mabondeli? Bakambi ya basi, bazali kolela, na kobenga kombo na Ye pwete nano bakutana na Yesu na bosolo te, tope bandimeli te Molimo na mitema miabango, tope babotama mbala ya mibale te na mayi mpe na Molimo. Bazali kobenga kombo na Ye pwete bazali na kobanga kokende na lifelo.
Kanisa moto oyo asalelaki Nzambe lokola mokambi tope mosali na Nzambe aboyami na Nkolo. Koboyama na moboti, tope mwasi ekobuka motema, kasi koboyama na Nzambe, Mokonzi na bakonzi, Mosambisi na bato banso, tokokende lisusu wapi?
Nakanisi ete yango ekokoma te pona moko na moko kati-kati na biso. Nabeleli yo yoka mpe ndima sango malamu ya mayi mpe na Molimo. Ezali mokano na Nzambe pona biso kobotama mbala ya mibale kati na sango malamu ya mayi mpe na Molimo.
Biso Ba-Klisto tosengeli solo-solo kondimela sango malamu ya mayi mpe na Molimo mpe kozuwa makasi na bosolo bwa Mokanda mwa Nzambe. Yango nde ekoki kobikisa biso na etumbo na Nzambe.